Tómekola mawa ya Yehova
“Zalá na mawa [lokola] tata na bino azali na mawa.” —LUKA 6:36.
1. Ndenge nini Bafalisai bamimonisaki ete bazali na mawa te?
ATAKO bato bazalisami na elilingi ya Nzambe, mbala mingi bakokaka komekola mawa na ye te. (Genese 1:27) Na ndakisa, tótala naino Bafalisai. Mokolo moko ya Sabata, Yesu ayokelaki moto moko akauká lobɔkɔ mawa mpe abikisaki ye, kasi Bafalisai basepelaki te. Kutu, bafandelaki Yesu likita “ete báboma ye.” (Matai 12:9-14) Mokolo mosusu, Yesu abikisaki moto moko oyo azalaki komona te banda abotamá. Na mbala oyo lisusu, “Bafalisai mosusu” basepelaki te na ndenge Yesu ayokelaki moto yango mawa. Baimaimaki ete: “Moto yango auti na Nzambe te mpo ete akotosaka sabata te.”—Yoane 9:1-7, 16.
2, 3. Yesu alingaki koloba nini na maloba oyo, “Bókeba mpe bótala malamu mpo na mfulu na Bafalisai”?
2 Motema makasi ya Bafalisai ezalaki mabe monene oyo basalelaki bato mpe lisumu na miso ya Nzambe. (Yoane 9:39-41) Yesu alobaki malamu mpenza ntango ayebisaki bayekoli na ye ete, “Bókeba mpe bótala malamu mpo na mfulu” ya etuluku wana oyo ezalaki na bopusi mingi mpe ya mangomba mosusu lokola Basadukai. (Matai 16:6) Na Biblia, mfulu esalelami mpo na komonisa lisumu to libebi. Boye, Yesu alobaki ete mateya ya “Bakomeli na Bafalisai” ekokaki kobebisa losambo ya solo. Na ndenge nini? Na ndenge ezalaki koteya bato bámonaka na Mibeko ya Nzambe bobele mitinda mpe milulu na bango ya makasimakasi, nzokande bazalaki kobosana “makambo oyo maleki ntina”; mpe mawa ezali na kati ya makambo yango. (Matai 23:23, NW) Lingomba wana ya milulu mpamba ekómisaki kosambela Nzambe lokola likambo oyo eleki kilo.
3 Na ndambo ya mibale ya lisese ya mwana na kilikili, Yesu atɔndɔlaki makanisi mabe ya bakonzi ya mangomba ya Bayuda. Na lisese yango, tata, oyo azali elilingi ya Yehova, alingaki kolimbisa mwana na ye oyo abongolaki motema. Kasi yaya na ye, oyo azalaki elilingi ya “Bafalisai na Bakomeli,” azalaki na makanisi mosusu na likambo yango.—Luka 15:2.
Nkanda ya ndeko ya mwana na kilikili
4, 5. Mpo na nini tokoki mpe koloba ete ndeko ya mwana na kilikili mpe “abungaki”?
4 “Nde mwana na ye na nkulutu azalaki na elanga, mpe wana eyaki ye kobɛlɛma na ndako ayokaki miziki na kobina. Abyangi moko na basali epai na ye, mpe atuni ye soko makambo oyo mazali nini. Ye mpe ayebisi ye ete, Ndeko na yo ayei, mpe tata na yo abomi mwana na ngɔmbɛ na mafuta mpo ete azwi ye na nzoto makasi. [Asilikaki, NW] mpe alingaki kokɔta te.”—Luka 15:25-28.
5 Tomoni ete na kati ya lisese ya Yesu, bobele mwana na kilikili te nde azalaki mabe. Buku moko elobi ete, “Bana nyonso mibale oyo balobelami awa babungaki; moko, kozanga bosembo ebebisaki ye, mpe mosusu, amimonaki ete azali sembo mpe yango ezimbisaki ye.” Tomoni ete ndeko ya mwana na kilikili asukaki se na koboya kosepela te kasi lisusu “asilikaki.” Liloba ya Greke oyo ebongolami na ‘kosilika’ ezali na likanisi ya kodasuka te, kasi kozala na nkanda na motema. Tomoni ete ndeko ya mwana na kilikili akangaki nkanda makasi, yango wana amonaki ete ebongi te kosala feti mpo na bozongi ya moto oyo, soki totali malamu, azalaki na ntina moko te ya kokima ndako.
6. Ndeko ya mwana na kilikili azali elilingi ya nani, mpe mpo na nini?
6 Ndeko ya mwana na kilikili azali mpenza elilingi ya bato oyo basepelaki te ntango Yesu ayokelaki bato ya masumu mawa mpe atyelaki bango likebi. Mawa ya Yesu esimbaki mitema ya bato yango te oyo bamimonaki sembo. Esengo oyo ezalaka na likoló ntango moto ya masumu alimbisami, bango bazalaki na yango te. Kutu, mawa ya Yesu epesaki bango nkanda, mpe babandaki “kokanisa mabe” na mitema na bango. (Matai 9:2-4) Mokolo mosusu, nkanda ya Bafalisai engalaki kino babéngisaki moto moko oyo Yesu abikisaki mpe na nsima “babwakaki ye libándá” ya eyanganelo—na ntembe te elingi koloba ete babenganaki ye! (Yoane 9:22, 34) Ndenge moko na ndeko ya mwana na kilikili, oyo “alingaki kokɔta te,” bakonzi ya mangomba ya Bayuda bapesaki mokɔngɔ ntango bazwaki libaku ya ‘kosepela na basepeli.’ (Baloma 12:15) Na nsima, Yesu akobaki koloba lisese na ye mpo na kotɔndɔla makanisi mabe na bango.
Makanisi ya libunga
7, 8. (a) Na ndenge nini ndeko ya mwana na kilikili akangaki ntina te ya likambo babéngi kozala mwana? (b) Nndenge nini mwana ya mokóló akesanaki na tata na ye?
7 “Bongo tata na ye abimi mpe abondeli ye. Ye nde azongisi monɔkɔ na tata ete, Kanisá ete nasaleli yo mbula mingi boye, mpe naboyi monɔkɔ na yo mbala moko te, nde opesi ngai ata mwana na ntaba mbala moko te ete nasepela na baninga na ngai, nde awa esili mwana na yo oyo koya, oyo asilisi biloko na yo na basi na pite, obomeli ye mwana na ngɔmbɛ na mafuta.”—Luka 15:28-30.
8 Maloba wana emonisi ete ndeko ya mwana na kilikili akangaki mpenza ntina ya likambo babéngi kozala mwana te. Asalelaki tata na ye se lokola mosali asalelaka nkolo na ye. Lokola ye moko ayebisaki tata na ye ete: ‘Nasalelaki yo.’ Ya solo, mwana oyo ya mokóló akimaki ndako ata mokolo moko te mpe abukaki mibeko ya tata na ye te. Kasi, bolingo nde epusaki ye na kotosa tata na ye? Azalaki mpenza na esengo ya kosalela tata na ye, to abandaki nde kokanisa ete azali na likambo na moto te, azali mwana malamu bobele mpo azalaki kokokisa mikumba na ye “na elanga”? Soki azalaki mpenza mwana malamu, mpo na nini ye na tata na ye bazalaki na likanisi moko te? Mpo na nini akangaki motema na ntango akokaki koyokela leki na ye mawa?—Kokanisá na Nzembo 50:20-22.
9. Limbolá ndenge nini bakonzi ya mangomba ya Bayuda bakokanaki na mwana ya mokóló.
9 Bakonzi ya mangomba ya Bayuda bakokanaki na mwana oyo ya mokóló. Bakanisaki ete bazali sembo epai ya Nzambe mpo bazalaki kotosa Mibeko. Ya solo, botosi ezali na ntina mingi. (1 Samwele 15:22) Kasi batyelaki misala likebi mingi koleka, yango wana bakómisaki losambo lokola bisalasala mpamba, mpo kaka bato bámona bango, kasi bazalaki mpenza bato ya elimo te. Batyaki makanisi na bango nyonso na bonkɔkɔ. Mitema na bango ezalaki na bolingo te. Yango wana, bazalaki komona bato oyo bazangi lokumu lokola mputulu ya makolo na bango, kutu bazalaki kobénga bango na lityo nyonso ete ‘bato balakelami mabe.’ (Yoane 7:49) Ndenge nini Nzambe akokaki kosepela na misala ya bakonzi yango wana mitema na bango ezalaki mosika na ye?—Matai 15:7, 8.
10. (a) Mpo na nini maloba, “Nalingi mawa, nalingi mbeka te” ezalaki toli oyo ebongi? (b) Kozanga mawa ezali mpenza likambo monene?
10 Yesu ayebisaki Bafalisai ete “bókenda koyekola ntina na oyo ete, Nalingi mawa, nalingi mbeka te.” (Matai 9:13; Hosea 6:6) Bayebaki te makambo nini ebongi kotya na esika ya liboso, mpamba te lokola bazangaki mawa, mbeka nyonso oyo bazalaki kopesa ezalaki na ntina moko te. Likambo yango ezali na ntina mingi, mpamba te Biblia etángi bato “bazangi mawa” kati na baoyo Nzambe amoni ete “babongi kokufa.” (Baloma 1:31, 32) Yango wana, tokokamwa te ndenge Yesu alobaki ete bakonzi ya mangomba babongaki na liwa ya seko. Tomoni ete babongaki na etumbu yango mingimingi mpo bazangaki mawa. (Matai 23:33) Kasi, na kati ya etuluku yango, ekokaki kozala na bato mosusu oyo bakokaki kosalisama. Na nsuka ya lisese na ye, Yesu amekaki kosembola makanisi ya Bayuda wana na maloba oyo tata alobaki na mwana ya mokóló. Tólanda ndenge alobaki.
Mawa ya tata
11, 12. Na lisese ya Yesu, ndenge nini tata amekaki kososolisa mwana na ye ya mokóló, mpe ndenge oyo tata asalelaki maloba “ndeko na yo” ekoki kolimbola nini?
11 “Ye nde alobi na ye ete, Mwana, yo ozali na ngai elongo ntango nyonso, mpe biloko na ngai nyonso bizali na yo. Nde ekoki ete tósepela mpe tózala na esengo mpo ete ndeko na yo oyo azalaki mokufi mpe azali na bomoi lisusu, azalaki mobungani mpe azwami.”—Luka 15:31, 32.
12 Tomoni ete tata alobaki “ndeko na yo.” Mpo na nini? Tóbosana te ete mwa liboso ntango azalaki koloba na tata na ye, mwana ya mokóló abéngaki mwana na kilikili ete “mwana na yo,” kasi alobaki te ete “ndeko na ngai.” Emonani ete awanganaki leki na ye. Sikawa, ezali lokola ete tata azali koyebisa mwana ya mokóló ete: ‘Azali bobele mwana na ngai te. Azali ndeko na yo, bozali na ye makila moko. Osengeli mpenza kosepela lokola azongi!’ Na ntembe te maloba ya Yesu ezalaki polele na matoi ya bakonzi ya mangomba ya Bayuda. Soki totali malamu, bato ya masumu oyo bango bazalaki kotyola bazalaki “bandeko” na bango. Kutu, “moyengebene azali kati na mokili te oyo akosala bobele malamu mpe akobunga te.” (Mosakoli 7:20) Yango wana, bakonzi ya Bayuda basengelaki mpenza kosepela ntango bato ya masumu babongolaki motema.
13. Ndenge lisese ya Yesu esuki mbala moko, motuna nini ya monene yango etikeli biso?
13 Ntango tata asilisi koloba, lisese mpe esuki. Ezali lokola ete Yesu asɛngi na bayoki na ye ete bango moko bákanisa nsuka ya lisolo yango. Ata soki mwana ya mokóló ayanolaki ndenge nini, moyoki mokomoko azalaki liboso ya motuna oyo, ‘Yo mpe okozala na esengo lokola esengo oyo ezalaka na likoló ntango moto ya masumu abongoli motema?’ Lelo oyo, baklisto bazali na libaku ya kopesa eyano na motuna yango. Ndenge nini?
Tómekola mawa ya Nzambe
14. (a) Ndenge nini tokoki kolanda toli ya Paulo na Baefese 5:1 na likambo etali koyokela mawa? (b) Makanisi mabe nini tosengeli kolongola na oyo etali mawa ya Nzambe?
14 Paulo apesaki Baefese toli ete: “Bómekola Nzambe, lokola bana balingami.” (Baefese 5:1, NW) Yango wana, biso baklisto tosengeli kozala na botɔndi mpo na mawa ya Nzambe, kolona yango na kati ya mitema na biso, mpe komonisa yango na boyokani na biso na bato mosusu. Kasi, tosengeli kokeba. Ebongi te tótalela mawa ya Nzambe lokola nzela ya kotalela lisumu lokola likambo moke. Na ndakisa, bato mosusu bakoki koloba kozanga kokanisa malamu ete, ‘Soki nasali lisumu, nakobondela Nzambe alimbisa ngai, mpe akoyokela ngai mawa.’ Makanisi ya ndenge wana ezali oyo Yuda, moko na bakomi ya Biblia, abéngaki ‘kobalola ngɔlu na Nzambe na biso kino bosɔtɔ.’ (Yuda 4) Atako Yehova ayokelaka bato mawa, “akozanga kopesa etumbu te” epai ya basali na mabe oyo baboyi kobongola mitema.—Exode 34:7, NW; kokanisá na Yosua 24:19; 1 Yoane 5:16.
15. (a) Mpo na nini mingimingi bankulutu basengeli kozala na bokatikati na oyo etali koyokela mawa? (b) Atako bakokanga miso te na misala ya mabe, bankulutu basengeli kosala makasi na likambo nini, mpe mpo na nini?
15 Na ngámbo mosusu, tosengeli mpe kokeba ete tólekisa ndelo te—koluka kokóma na makambo makasi mpe kosambisa-sambisa baoyo babongoli mpenza motema mpe bazali koyoka mawa mpo na masumu na bango. (2 Bakolinti 7:11) Lokola bankulutu bazwi mokumba ya kokɛngɛla bampate ya Yehova, ezali na ntina mingi ete bázala na bokatikati na likambo yango, mingimingi ntango bazali kosambisa makambo. Tosengeli kobatela lisangá ya boklisto ete ezala pɛto, mpe Makomami etindi ete ‘tóbengana moto mabe’ na kobimisáká ye na lisangá. (1 Bakolinti 5:11-13) Kasi, ebongi koyokela moto mawa soki ntina ya kosala yango ezali. Yango wana, atako bankulutu bakangaka miso na misala ya mabe te, basalaka nyonso ete bázala na boboto mpe na mawa; nyonso wana na elimo ya bosembo. Bayebi malamu etinda ya Biblia ete: “Ekateli ekozanga mawa epai na moto na moto oyo akosalaka na mawa te. Kasi mawa ekolonga kati na kosambisama.”—Yakobo 2:13; Masese 19:17; Matai 5:7.
16. (a) Na lisalisi ya Biblia, monisá ete Yehova alingi mpenza ete baoyo babungi nzela bázonga epai na ye. (b) Ntango moto ya masumu abongoli motema, ndenge nini biso mpe tokoki komonisa ete toyambi ye na esengo?
16 Lisese ya mwana na kilikili emonisi polele ete Yehova alingi ete baoyo babungi nzela bázonga epai na ye. Kutu, azali ntango nyonso kobyanga bango kino ekomonana mpenza ete baboyi kobongola motema. (Ezekiele 33:11; Malaki 3:7; Baloma 2:4, 5; 2 Petelo 3:9) Lokola tata ya mwana na kilikili, baoyo bazali kozonga Yehova atalaka bango lokola biloko mpamba te, andimaka bango lisusu lokola basangani mpenza ya libota. Omekolaka Yehova na likambo yango? Ntango moninga moko mondimi, oyo abimisamaki na ebongiseli, azongisami, ozalaka na mayoki nini? Toyebi ete ‘esengo ezalaka na likoló.’ (Luka 15:7) Kasi, esengo ezalaka na mabelé, na lisangá na bino, mpe na motema na yo? To lokola mwana ya mokóló na lisese, ozalaka na mwa nkanda, lokola ete ebongi te koyamba moto oyo esengelaki te ete atika etonga ya Nzambe?
17. (a) Na ekeke ya liboso, likambo nini ebimaki na Kolinti, mpe toli nini Paulo apesaki na lisangá mpo na kosilisa yango? (b) Mpo na nini tokoki koloba ete toli ya Paulo ebongaki, mpe ndenge nini tokoki kosalela yango lelo oyo? (Talá mpe etanda na lobɔkɔ ya mobali.)
17 Mpo na kosalisa biso tómitalela na likambo oyo, tótalela likambo moko oyo esalemaki na Kolinti na mobu 55 T.B. Kuna, moto moko oyo abimisamaki na lisangá abongolaki motema mpe atikaki makambo mabe. Bandeko basengelaki kosala nini? Basengelaki nde kozala na mwa ntembe, komituna soki abongwani mpenza mpe kokoba kokima ye? Nzokande, Paulo ayebisaki Bakolinti ete: “Ebongi bólimbisa ye na boboto mpe bóbɔndisa ye, noki te moto yango akozinda na mawa oyo eleki. Yango wana, nalendisi bino ete bóndimisa ye bolingo na bino.” (2 Bakolinti 2:7, 8, NW) Mbala mingi mayoki ya kobwakama mpe kozanga elikya etungisaka basali na mabe oyo babongoli motema. Na yango, bato yango bazalaka na mposa ya komona mpenza ete baninga na bango bandimi mpe Yehova balingi bango. (Yilimia 31:3; Baloma 1:12) Yango ezali na ntina mingi. Mpo na nini?
18, 19. (a) Ndenge nini Bakolinti na ekeke ya liboso bakangaki miso na mabe? (b) Ndenge nini elimo ya kozanga mawa ekokaki komema Bakolinti ete ‘Satana abɔtɔla bango’?
18 Ntango alendisaki Bakolinti ete bálimbisaka, Paulo ayebisaki bango ntina moko oyo basengeli kosala bongo: “Ete Satana abɔtɔla biso te, mpo toyebi mayele na ye.” (2 Bakolinti 2:11) Alingaki koloba nini? Liboso Paulo apamelaki lisangá ya Kolinti mpo ete batikaki nzela na misala ya mabe. Batikaki moto yango na etamboli na ye ya masumu kozanga ete bápesa ye etumbu. Na ndenge yango, lisangá mobimba—mingimingi bankulutu—bazalaki kosepelisa Satana, mpamba te alingaki kosepela komona lisangá mobimba na ezalela oyo ekosepelisa Nzambe te.—1 Bakolinti 5:1-5.
19 Sikawa soki balekisaki ndelo na ngámbo mosusu mpe baboyaki kolimbisa moto oyo abongolaki motema, Satana alingaki kobɔtɔla bango na nzela mosusu. Ndenge nini? Na boye ete alingaki kozwa bango na motambo ya kozala na makambo makasi mpe kozanga mawa. Soki moto oyo abongolaki motema ‘azindaki na mawa oyo eleki’—to, ndenge libongoli mosusu ya Biblia (Today’s English Version) elobi, “na mawa mingi kino akosundola makambo nyonso”—bankulutu balingaki kozala na ngambo monene na miso ya Yehova! (Kokanisá na Ezekiele 34:6; Yakobo 3:1) Ezali mpo na yango nde Yesu, nsima ya kokebisa bayekoli na ye ete bábɛtisa “baoyo mike” libaku te, alobaki ete: “Bókeba na bino! Soko ndeko na yo asali lisumu, pamelá ye. Soko abongoli motema, limbisá ye.”a—Luka 17:1-4.
20. Na ndimbola nini esengo ezalaka na likoló mpe awa na mabelé ntango moto ya masumu abongoli motema?
20 Ebele ya bato oyo bazali kozonga na losambo ya solo mbula na mbula bazali na botɔndi mpo na mawa oyo Yehova amoniseli bango. Ndeko mwasi moko oyo azongisamaki na lisangá alobi ete, “Nayebi te soki ezali na likambo moko na bomoi na ngai oyo epesá ngai esengo lokola likambo oyo.” Ɛɛ, baanzelu mpe bazali kosepela na ye elongo. Biso mpe tósangana na ‘esengo kati na likoló’ oyo ezalaka ntango moto ya masumu abongoli motema. (Luka 15:7) Na ndenge yango, tokomekola mawa ya Yehova.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Atako emonani lokola ete mosali na mabe oyo azalaki na lisangá ya Kolinti aumelaki mingi te mpo azongisama na lisangá, yango esengeli te kosalelama lokola ndakisa mpo na bato nyonso oyo babimisami na lisangá. Likambo na likambo ezali na ndenge na yango. Basali na mabe mosusu babongolaka motema nokinoki nsima ya kobimisama. Mpo na basusu, elekaka mwa ntango liboso ya komona ete babongoli motema. Kasi, ezala ndenge nini, baoyo bazongisami basengeli kozala bato oyo bamonisaki liboso bilembeteli ete bayokaki mawa, mpe soki esengeli, basengeli komonisa misala mibongi na kobongola motema.—Misala 26:20; 2 Bakolinti 7:11.
Bozongeli
◻ Na likambo nini ndeko ya mwana na kilikili akokanaki na bakonzi ya mangomba ya Bayuda?
◻ Likambo nini emonisi ete ndeko ya mwana na kilikili akangaki mpenza ntina ya likambo babéngi kozala mwana te?
◻ Makanisi nini ya mabe tosengeli kolongola na oyo etali mawa ya Nzambe?
◻ Lelo oyo, ndenge nini tokoki komekola mawa ya Nzambe?
[Etanda na lokasa 17]
“BÓNDIMISA YE BOLINGO NA BINO”
Mpo na mosali na mabe oyo babimisaki na lisangá ya boklisto, bongo na nsima abongolaki motema, Paulo ayebisaki bandeko ya lisangá ya Kolinti ete: “Nalendisi bino ete bóndimisa ye bolingo na bino.” (2 Bakolinti 2:8, NW) Liloba ya Greke oyo ebongolami na “kondimisa” ezali liloba ya baí-mibeko; elimboli “kopesa ndanga.” Bato oyo babongoli motema mpe bazongisami na lisangá bazalaka mpenza na mposa ya komona ete tolingi bango mpe toyambi bango lisusu lokola bandeko na kati ya lisangá.
Kasi, tosengeli kobosana te ete na kati ya lisangá, bato mingi bayebaka te makambo oyo esalaki ete moto abimisama na lisangá to mpe azongisama. Lisusu, ekoki kozala ete mabe ya moto oyo abongoli motema eyokisaki bato mosusu na lisangá mpasi to ezokisaki bango—mbala mosusu mpasi yango ekosila noki te. Yango wana, lokola mpasi wana ezali naino na motema, ntango liyebisi epesami ete Ndeko Fulani azongisami na ebongiseli, tokokamwa te ete tozali komonisa esengo te kino biso moko tokosilisa likambo yango.
Kondima ya bato oyo bazongisami elendisamaka mpenza soki bamoni ete bayambami lisusu lokola bandeko na lisangá ya boklisto! Tokoki kolendisa bato oyo babongoli motema na kosololáká na bango mpe kozala na bango lokola bandeko na biso na Ndako ya Bokonzi, na mosala ya kosakola, mpe na mabaku mosusu oyo mabongi. Ntango tozali kondimisa, to kopesa ndanga ya bolingo na biso mpo na bandeko yango, elingi koloba te ete tozali kokitisa bonene ya mabe oyo basalaki. Kasi, esika moko na baanzelu ya likoló, tozali kosepela ete batiki bomoi ya masumu mpe bazongi epai na Yehova.—Luka 15:7.
[Elilingi na lokasa 15]
Mwana ya mokóló aboyaki kosepela bozongi ya ndeko na ye