Dalio mokonzi oyo alingaki bosembo
MOKONZI moko monene amikumisaki mpo na misala ya botongi oyo atambwisaki. Alobaki ete: “Na kati ya Babilone, natongaki lopango monene ya efelo na ngámbo ya ɛsti. Natimolaki telase . . . Natongaki na gudro mpe na biliki efelo monene lokola ngomba, ekoki kokweisama te.” Ya solo, Nebukadanesala, mokonzi ya Babilone, abandisaki mosala monene ya botongi mpe asalaki mosala makasi mpo na kotonga lopango ya kobatela mboka-mokonzi ya bokonzi na ye. Kasi nsukansuka, Babilone ekweisamaki, likambo oyo ye akanisaki te.
Likambo yango esalemaki na mokolo ya 5 Ɔkɔtɔ́bɛ 539 L.T.B. Sirise II, mokonzi ya Perse, ayaki elongo na basoda ya ekólo Mede, alongaki Babilone mpe abomaki Belesasala, mokonzi ya Bakaladi. Nani akómaki sikawa mokonzi ya liboso ya engumba oyo balongaki? Danyele, mosakoli ya Nzambe oyo azalaki na kati ya engumba wana ntango ekweaki, akomaki: “Dalio, Momadai, azwaki bokonzi. Azalaki na mbula ntuku motoba na mibale.”—Danyele 5:30, 31.
Dalio azalaki nani? Azalaki mokonzi ya ndenge nini? Makambo nini asalelaki mosakoli Danyele oyo azalaki moombo na Babilone mbula koleka 70?
Mokonzi oyo ayebani malamu te
Lisolo ya ntango ya kala eyebisi biso makambo mingi te mpo na Dalio Momadai. Bamede batiká mpenza makomi te oyo ezali kolobela lisolo na bango. Lisusu, makambo mingi ezangi na lisolo ya bitanda ya makomi ya cunéiforme oyo bakundolaki na Moyen-Orient. Makomi mosusu ya ntango ya kala oyo mazali kino lelo mazali mingi te mpe makomamaki mbula nkama to mpe koleka nsima ya makambo oyo masalemaki na ntango ya Dalio.
Atako bongo, bilembeteli bizali komonisa ete nsima ya kobɔtɔla Ecbatane, engumba-mokonzi ya Mede, Sirise II, mokonzi ya Perse akómaki koyangela Bamede. Na nsima, Bamede na Baperse basanganaki mpo na kobundisa bikólo mosusu na litambwisi ya Sirise. Na ntina na boyokani na bango, Robert Collins amonisi boye na kati ya buku Bamede na Baperse (na Lingelisi): “Na ntango ya kimya, Bamede na Baperse bazalaki na etɛlɛmɛlo moko. Mbala mingi bazalaki kopona bango na bisika ya lokumu na misala ya Leta mpe lokola bakonzi na mampinga ya Baperse. Bato ya bikólo mosusu bazalaki kotalela Bamede na Baperse ndenge moko, bazalaki kokesenisa te kati na balongi mpe baoyo balongamaki.” Na bongo, Bokonzi ya Mede etombwanaki nzela moko na Perse mpo na kosala bokonzi oyo ebéngamaki Medo-Perse.—Danyele 5:28; 8:3, 4, 20.
Na ntembe te Bamede bakokisaki mokumba monene mpo na kokweisa Babilone. Makomami malobeli “Dalio mwana na [Asueruse, NW], na libota na [Bamede, NW]” ete azalaki mokonzi ya liboso ya Bamede na Baperse oyo, na ntango wana, esangisaki mpe ekólo Babilone. (Danyele 9:1) Na nguya ya bokonzi na ye azalaki mpe na lotomo ya kotya mibeko “lokola na mobeko na [Bamede na Baperse, NW] mokoki kobongwana te.” (Danyele 6:8) Makambo oyo Biblia eyebisi biso mpo na Dalio mazali mpe kolakisa biso mwa moke bomoto na ye mpe ntina mpenza oyo mikanda ya kala elobeli ye mingi te.
Danyele azwi lokumu
Biblia elobi ete mwa moke nsima ya kobanda koyangela na Babilone, Dalio atyaki “[baguvernere, NW] monkama na ntuku mibale na likoló na bokonzi . . . Atyaki mpe mikóló misato na likoló na bango, mpe Danyele azalaki moko na bango.” (Danyele 6:1, 2) Kasi, bakonzi mosusu basepelaki te na ndenge batyaki Danyele na esika ya lokumu. Na ntembe te lokola azalaki sembo, apekisaki kanyaka, mpe ekoki kozala ete bato mingi basepelaki bongo te. Ekoki mpe kozala ete bakonzi bazalaki mpe na likunya, mpamba te mokonzi asepelaki na Danyele mingi mpe akanaki kokómisa ye ministre-mokonzi.
Mpo na koluka kosukisa likambo yango, bakonzi yango mibale mpe baguvernere babongisaki motambo moko na kosaleláká mibeko. Bakendaki epai ya mokonzi mpe basɛngaki ye atya sinyatili na ye na mobeko oyo epekisaki ‘kobondela nzambe to moto’ mosusu te bobele Dalio na boumeli ya mikolo 30. Bapesaki likanisi ete moto nyonso oyo akobuka mobeko yango akobwakama na libulu ya nkosi. Dalio akanisaki ete bakonzi minene nyonso bakosepela na mobeko wana, mpe likanisi yango emonanaki lokola ete ezali lolenge ya komonisa bosembo na bango epai ya mokonzi.—Danyele 6:1-3, 6-8.
Dalio atyaki sinyatili na mobeko mpe mosika te amonaki mbuma oyo ebotaki. Moto ya liboso oyo abukaki mobeko yango ezalaki Danyele, mpamba te akobaki kobondela Yehova Nzambe. (Talá Misala 5:29.) Atako mokonzi asalaki nyonso mpo na koluka kobongola mobeko oyo ekobongwanaka te, babwakaki mosembwi Danyele na libulu ya nkosi. Dalio andimaki ete Nzambe ya Danyele azali na nguya ya kobikisa bomoi ya mosakoli na ye.—Danyele 6:9-17.
Nsima ya kolekisa butu mobimba kozanga mpɔngi mpe na kokila bilei, Dalio akimaki mbangu na libulu ya nkosi. Ayokaki mpenza esengo ntango akutaki Danyele na bomoi mpe azwaki likama te! Mpo na kokata likambo na bosembo, mokonzi atindaki ete bato oyo bafundaki Danyele mpe mabota na bango bábwakama mbala moko na libulu ya nkosi. Apesaki mpe etinda ete ‘na bokonzi na ye mobimba, bato bálɛnga mpe bábanga liboso ya Nzambe ya Danyele.’—Danyele 6:18-27.
Ezali polele ete Dalio amemyaki Nzambe mpe losambo ya Danyele mpe azalaki pene ya kosembola mabe. Kasi, ekoki mpenza kozala ete bakonzi mosusu oyo batikalaki basilikaki na ndenge oyo mokonzi apesaki bato oyo bafundaki Danyele etumbu. Lisusu, tokoki kokanisa ete etinda oyo Dalio apesaki ete bato nyonso na bokonzi na ye ‘bábanga liboso ya Nzambe ya Danyele’ esepelisaki banganga-nzambe ya Babilone te. Lokola ekoki mpenza kozala ete bakomeli bapusamaki na makambo yango, tokoki kokamwa te soki balongolaki bisika oyo elobelaki Dalio na makomi ya bato. Kasi, lisolo mokuse ya mokanda ya Danyele emonisi Dalio lokola mokonzi oyo alingaki bosembo.