Ntango bayibi bakɔteli bino na ndako na mindoki
NA Ikoyi, kartye moko kitoko na Afrika ya Wɛsti, bandako ekómi kobatelama makasi. Bandako mingi izingami na bifelo milai ya mɛtɛlɛ misato oyo likoló na yango batii nzube, biteni ya milangi, to nsinga ya bibende oyo babéngaka kangá-moyibi. Bakɛngɛli babatelaka bikuke minene ya bibende, oyo bakangi na minyɔlɔlɔ, na bibende to mafungola. Maninisa mazali na bibende. Biteni ya ndako ya kolala mpe biteni mosusu ya ndako ekabwani na bikuke ya bibende. Na butu, babimisaka bambwa minene (berger allemand, bouledogue) mpo bátambolaka na kati ya lopango. Miinda makasi engɛngisaka lopango mpe bazali na bangonga oyo esalaka na ordinatere mpe elelaka makasi soki bayibi bakɔti.
Moto nyonso ayebi ete kobatela ndako na ye ezali na ntina mingi. Bazulunalo ezali kobimisa mitó na makambo ya mawa lokola oyo: “Bayibi bakómi kokɔtela bato ya kartye na mindoki”; “Bayibi ya bana bangali”; mpe “Nsɔmɔ ekɔti na [engumba] likoló na bayibi.” Likambo yango ezali kosalema na mikili mingi. Ndenge Biblia esakolaki, tozali na bomoi na ntango ya mpasi.—2 Timote 3:1.
Na bisika nyonso, mobulu, bakisa mpe bayibi oyo bakɔtelaka bato na ndako na mindoki bakómi mingi. Mbala mingi, baguvernema ezali kokoka te to ezali kolinga te kobatela bato na bango. Na mikili mosusu, bapolisi bazali moke mpe bazangi bisaleli bisengeli, yango wana bakómaka nokinoki te na esika ya likama mpo na kobikisa bato. Mbala mingi baleki-nzela babangaka kosunga moto oyo azali na likama.
Lokola elikya ya kozwa lisungi ya bapolisi to ya bato ya penepene ezalaka te, bato oyo bayibi bakɔteli bango na ndako babundaka kaka bango moko. Nkulutu moko moklisto na mokili moko ya bobola alobaki ete: “Soki omeki kobelela, bayibi bakosala yo mabe to bakoboma yo. Kotya motema na lisungi ya bato ya libándá te. Soki lisungi eyei, ekozala malamu, kasi kolikya na yango te to kobelela te, mpamba te ntango mosusu soki obeleli omilukeli liwa.”
Libateli mpe Liloba ya Nzambe
Atako baklisto bazali bato ya mokili te, kasi bazali kofanda na mokili. (Yoane 17:11, 16) Yango wana, lokola bato nyonso, bango mpe bazwaka bibongiseli bisengeli mpo na komibatela. Kasi, na bokeseni na bato oyo basambelaka Yehova te, basaleli ya Nzambe balukaka libateli na kolandáká mitinda ya boklisto.
Nzokande, na mikili mosusu ya Afrika bato bazwaka nkisi mpo na komibatela na bayibi. Nganga-nkisi akokata moto nzɔlɔkɔ na lobɔkɔ, na ntolo, to na mokɔngɔ. Na nsima akopakola nkisi na bampota wana, akolobaloba makambo, na ndenge yango bakanisaka ete moto abatelami na bayibi. Bato mosusu batyaka bikelakela to bankisi na bandako na bango, bakanisaka ete “libateli” yango ekopekisa bayibi básala bango mabe.
Baklisto ya solo basimbaka nkisi te. Biblia eboyi lolenge nyonso ya biyambayamba, mpamba te yango ezali kotya bato na boyokani na bademo, baoyo bapalanganisi mobulu na kati ya mokili. (Genese 6:2, 4, 11) Biblia elobi polele ete: “Bokosala nkisi te.”—Levitike 19:26.
Bato mosusu bakanisaka ete soki bazali na mondoki yango nde libateli. Nzokande, baklisto batosaka maloba ya Yesu ete: “Baoyo nyonso bakosimba mopanga bakokufa na mopanga.” (Matai 26:52) Basaleli ya Nzambe batii “mipanga na bango ete mizala bitimweli” mpe basombaka mindoki te mpo na komibatela na bayibi to na matumoli.—Mika 4:3.
Tokoloba boni soki moto alingi kozala na bakɛngɛli oyo bazali na mindoki? Atako moto na moto akokamata ekateli mpo na ye moko, tosengeli komikundola ete kosala bongo elimboli kopesa moto mosusu mondoki. Mposa ya patro ezalaka ete bakɛngɛli na ye básala nini ntango moyibi akɔteli bango? Ezalaka ete bakɛngɛli bábɛta moyibi masasi soki esengeli mpo na kobatela bato mpe biloko oyo bazali kokɛngɛla, boye te?
Ekateli oyo baklisto bakamati ya koboya kosalela nkisi mpe mindoki mpo na komibatela ekoki komonana lokola ekateli ya bozoba na miso ya bato oyo bayebi Nzambe te. Nzokande, Biblia epesi biso elikya ete: “Ye oyo akotya elikya epai na Yehova akobatelama.” (Masese 29:25, NW) Atako Yehova abatelaka lisangá mobimba ya bato na ye, abatelaka mosaleli na ye mokomoko te ete báyiba biloko na ye te. Yobo azalaki mpenza sembo, kasi Nzambe atikaki nzela ete bayibi báyiba bibwele na ye, kino koboma basali na ye. (Yobo 1:14, 15, 17) Nzambe atikaki mpe nzela ete Paulo akutana na “makama mpo na babɔtɔli.” (2 Bakolinti 11:26) Atako bongo, Nzambe azali koteya bato na ye bálanda toli oyo epesamaka mpo na kokeba na bayibi. Lisusu azali kopesa bango boyebi oyo ezali kosalisa bango ete báyeba eloko bakoki kosala mpo bayibi básala bango mabe te ntango bakɔteli bango na ndako.
Lolenge ya kokeba na bayibi
Moto ya mayele alobaki kala ete: “Biloko mingi na mozwi ikopekisa mpɔngi na ye.” (Mosakoli 5:12) Na maloba mosusu, baoyo bazali na biloko mingi bakoki komitungisa ete mbala mosusu bakobungisa biloko na bango mpe bazwaka mpɔngi te ntango bazali komibanzabanza na likambo yango.
Lolenge moko ya kokeba na mitungisi mpe na bayibi ezali bongo koboya konduka biloko ya ntalo. Ntoma moko apemamaki na Nzambe akomaki ete: “Makambo nyonso kati na mokili, na mposa mabe na nzoto mpe mposa mabe na miso mpe [lolendo ya kolakisa biloko oyo azali na yango, NW] iuti na Tata te kasi iuti na mokili.” (1 Yoane 2:16) Bamposa oyo epusaka bato básomba biloko ya ntalo mingi bobele yango nde epusaka bato mosusu na koyiba. Mpe “lolendo ya kolakisa biloko oyo moto azali na yango” ekoki kozala libyangi mpo na bayibi.
Longola likambo ya koboya komilakisa, okoki lisusu komibatela na bayibi soki okomonisa ete ozali moklisto ya solo. Soki olingaka bato, ozali na kolongobana, mpe ozali na molende na mosala ya kosakola nsango malamu, okoki komisalela lokumu malamu na kartye na yo mpe bato bakopesa yo limemya. (Bagalatia 5:19-23) Koyebana lokola moklisto malamu ekoki kozala libateli koleka kozala na mondoki.
Ntango bayibi bakɔteli bino na mindoki
Kasi, bokosala nini soki bayibi bakɔteli bino mpe batungisi bino? Bóbosana te ete bomoi na bino eleki biloko oyo bozali na yango na motuya. Klisto Yesu alobaki ete: “Bótɛlɛmɛla [moto] mabe te. Kasi soko nani akobɛta yo na litama na mobali, pesá ye oyo mosusu. Mpe na ye oyo alingi . . . elamba na nse, akamata mpe elamba na libándá lokola.”—Matai 5:39, 40.
Toli yango ezali toli ya mayele. Nzokande baklisto basɛngisami te ete bátángela babɔtɔli biloko nyonso oyo bazali na yango, kasi mbala mingi bayibi bakómaka na nkanda mingi soki moto azali kotɛlɛmɛla bango, aboyi koyokela bango, to azali kokosa. Lokola mingi kati na bango ‘bayokaka mawa te,’ bazalaka motema mokuse mpo na kosala moto mabe.—Baefese 4:19.
Samuel afutelaka na lopango moko ezali na bandako mingi. Bayibi bakangaki nzela nyonso ya kobima na lopango mpe babandaki kokɔta na ndako mokomoko kobɔtɔla biloko. Samuel ayokaki lokito ya mindoki, bikuke bizali kofungwama, bato bazali konganga, mpe kolela. Likoki ya kikima ezalaki te. Samuel ayebisaki mwasi na ye na bana na bango misato ete báfukama, bátombola mabɔkɔ, bákanga miso, mpe báfanda nyɛɛ. Ntango bayibi bakɔtaki na ndako na bango, Samuel akitisaki miso na nse ntango azalaki koloba na bango, ayebaki ete soki atalaki bango na elongi bakokaki kokanisa ete akoyeba bilongi na bango na nsima. Alobaki ete: “Bókɔta, bókamata eloko nyonso oyo bolingi. Moto moko akopekisa bino te. Tozali Batatoli ya Yehova, mpe tokotɛlɛmɛla bino te.” Bayibi bakamwaki na likambo yango. Nsima ya ngonga soko moko, bayibi nyonso bayaki esika moko, bango nyonso bato soko 12 mpe bazalaki na mindoki. Bayibaki babiju, mbongo, radio, mpe televizyo, kasi babɛtaki bato ya libota na ye te mpe bazokisaki bango te ndenge basalaki bato na bandako mosusu na kati ya lopango yango. Samuel na libota na ye batɔndaki Yehova na ndenge abatelaki bomoi na bango.
Likambo oyo emonisi ete ntango bayibi bayei kosɛnga mbongo to biloko mosusu, bato oyo batɛlɛmɛlaka bango te bazwaka makama mingi te.a
Na mabaku mosusu soki moklisto apesi litatoli epai na bayibi ekoki kobatela ye na likama. Ntango bayibi bakɔtelaki Ade na ndako, ayebisaki bango ete: “Nayebi ete makambo na bino ezali kotambola malamu te, yango wana bozali kosala mosala oyo. Biso Batatoli ya Yehova toyebi ete mokolo mosusu moto nyonso akozala na biloko ya kolya bikoki mpo na ye na libota na ye. Na Bokonzi ya Nzambe moto nyonso akofanda na kimya mpe na esengo.” Yango elɛmbisaki mwa moke nkanda ya bayibi. Moko na bango alobaki ete: “Toyoki mawa ndenge tokɔti na ndako na yo, kasi osengeli koyeba ete tozali na nzala.” Bazwaki biloko ya Ade, kasi basimbaki ye na libota na ye te.
Zalá kimya
Ezalaka mpasi mpo ete moto azala kimya liboso na likama, mpamba te mokano ya liboso ya bayibi ezalaka ya kobangisa bato mpo ete bátosa oyo bango bakoloba. Libondeli ekosalisa biso. Soki tobeleli Yehova ata na nse ya motema mpe na maloba mokuse, akoyoka biso. Biblia endimisi biso na maloba oyo: “Miso na [Yehova] ikotalaka bato na boyengebene mpe matoi na ye ikoyokaka konganga na bango.” (Nzembo 34:15) Yehova akoyoka biso mpe akoki kopesa biso mayele ya kosala likambo nyonso na kimya.—Yakobo 1:5.
Longola libondeli, eloko mosusu oyo ekosunga yo ozala na kimya ezali bongo koyeba liboso likambo oyo okosala mpe oyo okosala te soki moyibi akɔteli yo. Ya solo, okoki koyeba liboso te soki likambo yango ekokuta yo na ezaleli nini. Kasi, ezali malamu koyeba mitinda, ndenge moko ezali malamu koyeba na makanisi likambo okosala mpo na komibikisa soki ozali na kati ya ndako oyo ezali kozika. Kobongisa makanisi na yo liboso ekosalisa yo mpo ozala na kimya, olɛnga te, mpe ozwa likama te.
Nzambe amonisi polele ndenge atalelaka moyibi: “Ngai, [Yehova] nalingi kosambisa-sembo, naboyi moyibi mpe masumu.” (Yisaya 61:8) Ezekiele apemamaki na Nzambe mpo na kotánga moyibi lokola lisumu monene. (Ezekiele 18:18) Lisusu, bobele buku yango ya Biblia emonisi ete Nzambe akolimbisa moto oyo abongoli motema mpe azongisi biloko oyo ayibaki.—Ezekiele 33:14-16.
Atako baklisto bazali kofanda na mokili oyo etondi na mobulu, bazali kosepela na elikya ya kofanda na Bokonzi ya Nzambe, ntango moyibi ekozala lisusu te. Mpo na eleko yango, Biblia elaki ete: “[Bato na Nzambe] bakofanda mpe na nse, moto na moto na nse na miwiti na ye mpe na nzete na ye na mosuke, moto moko akobangisa bango te, mpo ete monɔkɔ na [Yehova] na bibele elobi bongo.”—Mika 4:4.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Nzokande, bosengeli kondima makambo nyonso te. Batatoli ya Yehova bandimaka te makambo oyo ezali kobuka mobeko ya Nzambe. Na ndakisa, mwasi oyo azali moklisto akondima te komitika ete bábebisa ye.