Bótombola mabɔkɔ ya sembo na libondeli
“Nalingi ete babali bábondela na bisika nyonso, wana ekotombola bango mabɔkɔ [ya sembo, NW] mazangi nkanda mpe kowelana.”—1 TIMOTE 2:8.
1, 2. (a) Ndenge nini 1 Timote 2:8 etaleli libondeli ya basaleli ya Yehova? (b) Tolingi kolobela makambo nini sikoyo?
YEHOVA alingi ete basaleli na ye bázala sembo epai na ye mpe bázala sembo moko epai na mosusu. Ntoma Paulo alakisaki ete bosembo ezali na boyokani na libondeli ntango akomaki ete: “Nalingi ete babali bábondela na bisika nyonso, wana ekotombola bango mabɔkɔ [ya sembo, NW] mazangi nkanda mpe kowelana.” (1 Timote 2:8) Tomoni ete Paulo azalaki kolobela libondeli na nkombo ya bato ebele “na bisika nyonso” oyo baklisto bazalaki kosangana. Na makita ya lisangá, nani asengelaki komonisa basaleli ya Nzambe na libondeli? Bobele mibali oyo bazalaki bulɛɛ, bazalaki sembo, mpe oyo bazalaki kobanga Nzambe mpe bazalaki kokokisa misala oyo Makomami epesi bango básalela Nzambe. (Mosakoli 12:13, 14) Basengelaki kozala pɛto na elimo mpe na etamboli na bango, mpe basengelaki kozala bato oyo bamipesi mpenza na Yehova Nzambe.
2 Mingimingi bankulutu ya lisangá basengeli ‘kotombolaka mabɔkɔ ya sembo na libondeli.’ Mabondeli na bango oyo mauti na motema mpe mapesami na nkombo ya Yesu Klisto mamonisaka bosembo na bango epai ya Nzambe mpe masalisaka bango na koboya kowelana mpe nkanda. Moto oyo azwi mokumba ya komonisa lisangá ya boklisto na libondeli na nkombo ya bato ebele asengeli kozala na nkanda te, na motema mabe te, mpe azala sembo epai ya Yehova mpe ebongiseli na ye. (Yakobo 1:19, 20) Malako mosusu nini Biblia epesi mpo na baoyo bazwi mokumba ya komonisa basusu na libondeli? Mpe mitinda nini ya Makomami tosengeli kosalela na mabondeli ya biso moko mpe na libota?
Tókanisa liboso makambo tokoloba na libondeli
3, 4. (a) Mpo na nini ezali malamu kokanisa liboso makambo oyo tokoloba na libondeli na nkombo ya bato ebele? (b) Makomami elobi nini mpo na bolai ya mabondeli?
3 Soki basɛngi biso tósala libondeli na nkombo ya bato ebele, na ntembe te tokozwa ntango ya kokanisa ata mwa moke makambo oyo tokoloba. Soki tosali bongo, ekosalisa biso na kolobela makambo ya ntina kozanga ete libondeli na biso ezala molaimolai, oyo ezangi motó na makolo. Na libondeli ya biso moko tokoki mpe kobimisa maloba. Bolai na yango etali se biso moko. Yesu abondelaki butu mobimba liboso ya kopona bantoma na ye 12. Nzokande, ntango abandisaki Ekaniseli ya liwa na ye, tomoni ete mabondeli oyo asalaki mpo na limpa mpe mpo na vinyo ezalaki mikuse. (Luka 6:12-16; Malako 14:22-24) Mpe toyebi ete Nzambe andimaki ata mabondeli mikuse oyo Yesu asalaki.
4 Na ndakisa soki basɛngi biso ete tósala libondeli mpo na libota mobimba liboso ya kolya; libondeli wana esengeli kozala molai te, kasi na nyonso oyo tokoloba tosengeli mpe komonisa botɔndi na biso mpo na bilei yango. Soki tozali kosala libondeli na nkombo ya bato ebele liboso ya kobanda makita to na nsuka na yango, ezali na ntina te ete tósala libondeli ya molaimolai mpe koloba makambo ebele ebele. Yesu asepelaki na ezaleli ya Bakomeli te mpamba te ‘bazalaki kosala mabondeli milai mpo na kokosa.’ (Luka 20:46, 47) Moto oyo abangaka Nzambe akosala bongo te. Kasi, ntango mosusu ebongi kosala libondeli ya mwa molai. Na ndakisa, nkulutu oyo aponami mpo na kosala libondeli na nsuka ya liyangani asengeli kokanisa liboso makambo oyo akoloba mpe mbala mosusu akolinga kolobela mwa makambo mingi. Kasi, ata libondeli motindo wana esengeli kozala molai koleka te.
Tózala na limemya liboso ya Nzambe
5. (a) Likambo nini tosengeli kobosana te ntango tozali kobondela na nkombo ya bato ebele? (b) Mpo na nini tosengeli kobondela na limemya mpe na lokumu?
5 Ntango tozali kobondela na nkombo ya bato ebele, tosengeli kobosana te ete tozali koloba na bato te. Kasi, tozali nde bato ya masumu oyo tozali kobondela Nkolo Mokonzi Yehova. (Nzembo 8:3-5, 9; 73:28) Yango wana, tosengeli kolakisa ete tozali kobanga Nzambe mpe tolingi kosilikisa ye te na maloba na biso to mpe na elobeli na biso. (Masese 1:7) Davidi, mokomi na nzembo ayembaki ete: “Nde ngai nakokɔta na ndako na yo mpo na mingi na boboto na yo; nakokumbama na nse epai na Tempelo na bulɛɛ na yo mpo na kobanga yo.” (Nzembo 5:7) Soki tozali na elimo wana, tokoloba maloba nini soki basɛngi biso ete tósala libondeli na nkombo ya bato nyonso na likita ya Batatoli ya Yehova? Na ntembe te soki tozwi libaku ya kosolola na mokonzi oyo azali moto, tokosala yango na limemya mpe na lokumu. Na bongo, mabondeli na biso esengeli kozala na lokumu mpe na limemya koleka, mpamba te tozali kobondela Yehova, “Mokonzi ya seko,” boye te? (Emoniseli 15:3) Yango wana, ntango tozali kobondela, tokoboya maloba lokola oyo: “Mbote Yehova,” “Yambá bolingo na biso,” to “Totombeli yo mokolo malamu.” Ata na esika moko te Makomami elobi ete Yesu Klisto, Mwana mobotami-bobele-moko ya Nzambe alobaki bongo na Tata na ye ya likoló.
6. Likambo nini tosengeli kobosana te ntango ‘topusani na kiti ya bokonzi ya ngɔlu’?
6 Paulo alobaki: “Na koloba polele, tiká ete . . . tókende liboso ya kiti ya bokonzi ya ngɔlu.” (Baebele 4:16, NW) Atako tozali bato ya masumu, tokoki kosolola na Yehova na “koloba polele” mpamba te totii kondima na biso na mbeka ya lisiko ya Yesu Klisto. (Misala 10:42, 43; 20:20, 21) Kasi, “koloba polele” motindo wana elimboli te ete tozali kosolola na Nzambe makambo ya mpambampamba; tosengeli mpe koloba makambo mazangi limemya te. Mpo Yehova asepela na mabondeli oyo tozali kosala na nkombo ya bato ebele, tosengeli kosala yango na limemya mpe na lokumu oyo ebongi. Tosengeli kosalela libondeli te mpo na kopesa mayebisi, toli, to kopamela baoyo bazali koyoka biso.
Tóbondela na komikitisa
7. Ndenge nini Salomo alakisaki komikitisa ntango abondelaki na mokolo ya bofungoli tempelo ya Yehova?
7 Ezala ete tozali kosala libondeli na nkombo ya bato ebele to mpo na biso moko, tosengeli kobosanaka motinda ya Makomami oyo te: tosengeli kozala na komikitisa na kati ya mabondeli na biso. (2 Ntango 7:13, 14) Mokonzi Salomo alakisaki komikitisa na libondeli oyo asalaki na nkombo ya bato nyonso na ntango ya bofungoli tempelo ya Yehova na Yelusaleme. Salomo asilisaki kotonga moko na bandako oyo elekaki kitoko na mokili mobimba na ntango wana. Kasi, abondelaki na komikitisa ete: “Solo Nzambe akofanda na mokili? Talá lola mpe likoló na lola ikoki kozingela ye te, na koleka ndako oyo ngai natongeli yo yango ekoki te.”—1 Mikonzi 8:27.
8. Ndenge nini tokoki kolakisa komikitisa na libondeli na nkombo ya bato ebele?
8 Na ndakisa ya Solomo, tosengeli kozala na komikitisa ntango tozali kosala libondeli na nkombo ya bato ebele. Atako tokoloba lokola basango te, kasi tokoki kolakisa komikitisa na mongongo na biso. Mabondeli oyo esalami na komikitisa ezalaka na maloba ya makasimakasi te to ya kokamwisa te. Mabondeli oyo esalami na komikitisa ebendaka likebi ya bato epai ya moto oyo azali kosala yango te, kasi epai na Ye oyo bazali kosambela. (Matai 6:5) Komikitisa emonanaka mpe na makambo oyo tozali koloba na kati ya libondeli. Soki tozali kosala libondeli na komikitisa, tokomonisa te lokola ete tozali kosɛnga Nzambe asala likambo na ndenge oyo biso tolingi. Nzokande, tokobondela Yehova asala na ndenge oyo eyokani na mokano na ye mosantu. Mokomi na nzembo apesaki ndakisa ya elimo oyo ebongi ntango abondelaki ete: “Ɛ [Yehova], nakobondela yo ete, Bikisá biso; ɛ [Yehova], nakobondela yo ete, Longisá biso.”—Nzembo 118:25; Luka 18:9-14.
Mabondeli na yo euta na motema
9. Toli nini ya malamu Yesu apesaki na Matai 6:7, mpe ndenge nini tokoki kosalela yango?
9 Mpo Nzambe asepela na mabondeli oyo tozali kosala biso moko to na nkombo ya bato ebele, mabondeli yango esengeli kouta na motema. Na yango, tokozongela ntango nyonso bobele maloba moko te kozanga ete tókanisa makambo oyo tozali koloba. Na Lisolo na ye likoló ya Ngomba, Yesu apesaki toli ete: “Ezali bino kobondela, bólobaloba lokola ekosalaka bapakano te, zambi bazali [komikosa na] kokanisa ete Nzambe akoyoka bango mpo na kolobaloba na bango.” Na maloba mosusu, Yesu alobaki: “Bómela maloba te; bózongelazongela maloba ezangi ntina te.”—Matai 6:7, NW, maloba na nse ya lokasa.
10. Mpo na nini ebongi kobondela mpo na likambo moko mbala mingi?
10 Ya solo, tokoki kobondela mpo na likambo moko mbala na mbala. Kosala bongo ezali mabe te, mpamba te Yesu alobaki ete: “Bókoba kolɔmba mpe bakopesa bino; bókoba koluka mpe bokozwa; bókoba kobɛta mpe bakofungwela bino.” (Matai 7:7, NW) Mbala mosusu bozali na mposa ya Ndako ya Bokonzi ya sika mpamba te Yehova azali kokolisa mosala ya kosakola na teritware na bino. (Yisaya 60:22) Ezali mabe te kolobela mposa yango ntango nyonso oyo ozali kosala libondeli yo moko to ntango oyo ozali kosala libondeli na nkombo ya bato nyonso na makita ya basaleli ya Yehova. Kosala bongo elimboli ‘kozongela maloba ya mpamba’ te.
Kobosana matɔndi mpe masanzoli te
11. Ndenge nini Bafilipi 4:6, 7 ekoki kosalelama na mabondeli ya yo moko to na mabondeli na nkombo ya bato ebele?
11 Bato mingi babondelaka bobele mpo na kosɛnga eloko. Kasi, bolingo na biso mpo na Yehova Nzambe esengeli kopusa biso na kotɔnda mpe kokumisa ye, ezala ete tozali kosala libondeli ya biso moko to tozali kobondela na nkombo ya bato mingi. Paulo akomaki ete, “Bómitungisa mpo na likambo moko te nde kati na makambo nyonso tiká ete bisɛngeli na bino biyebana epai na Nzambe na mabondeli mpe na malɔmbɔ mpe na matɔndi. Mpe kimya na Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekosɛnzɛla mitema na bino mpe bikaniseli na bino kati na Klisto Yesu.” (Bafilipi 4:6, 7) Ɛɛ, longola mabondeli mpe malɔmbɔ, tosengeli kozongisa matɔndi epai ya Yehova mpo na mapamboli ya elimo mpe ya mosuni oyo azali kopesa biso. (Masese 10:22) Mokomi ya nzembo ayembaki ete: “Pesá Nzambe matɔndi mpo na likabo, kokisá ndai na yo epai na Oyo-Aleki-Likoló.” (Nzembo 50:14) Mpe nzembo oyo Davidi ayembaki lokola libondeli ezalaki na maloba oyo ezali kosimba motema: “Nakosanzola nkombo na Nzambe na loyembo; nakokumisa ye na matɔndi.” (Nzembo 69:30) Biso mpe tosengeli kosala bongo ntango tozali kobondela biso moko to na nkombo ya bato mingi, boye te?
12. Ndenge nini Nzembo 100:4, 5 ezali kokokisama lelo oyo, mpe tokoki kosanzola mpe kokumisa Nzambe mpo na makambo nini?
12 Mokomi na nzembo ayembelaki Nzambe boye: “Bókɔta kati na bikuke na ye na matɔndi, na lopango na ye na kosanzola; bótɔnda ye, bósanzola nkombo na ye. Zambi [Yehova] azali malamu, boboto na ye ekosila te; solo na ye ekotikalaka na libota na libota.” (Nzembo 100:4, 5) Lelo oyo, bato ya bikólo nyonso bazali kokɔta na lopango ya tempelo ya Yehova. Tokoki kosanzola mpe kotɔnda ye mpo na likambo yango. Otɔndaka Nzambe mpo na Ndako ya Bokonzi na bino mpe oyanganaka kuna pɔsɔ na pɔsɔ elongo na baoyo balingaka ye mpo na kolakisa ete osepelaka mpenza? Ntango ozali na makita, otombolaka mongongo na yo na motema mobimba mpo na koyemba nzembo ya masanzoli mpe ya matɔndi mpo na Tata na biso ya likoló oyo alingi biso mingi?
Koyoka nsɔni te mpo na kobondela
13. Ndakisa nini ya Makomami elakisi ete tosengeli kobondela Yehova ata soki tosalaki mabe mpe tozali koyoka ete tobongi kopusana pene na Yehova te?
13 Ata soki tosalaki mabe, bongo tozali komona lokola ete tobongi kopusana pene na Nzambe te, tosengeli kobondela Nzambe na bozindo. Ntango Bayuda basalaki lisumu na ndenge babalaki basi bapaya, Ezela afukamaki, atombolaki mabɔkɔ ya sembo epai ya Nzambe, mpe abondelaki na komikitisa ete: “Ɛ Nzambe na ngai, nayoki nsɔni mpe nabangi kotɛlɛmisa elongi na ngai epai na yo, ɛ Nzambe na ngai; zambi masumu na biso iyei mingi likoló na motó na biso mpe mabe na biso ikoli kino lola. Longwa na mikolo na batata na biso, tosali masumu mingi kino mokolo oyo . . . Nsima wana nyonso oyo esili kokwela biso mpo na makambo mabe na biso mpe mpo na lipɛngwi na biso monene, naino yo Nzambe na biso, opesi biso bitumbu oyo izalaki moke mpo na mabe mingi na biso mpe osili kobongisela biso litika, biso tosopi lisusu malako na yo mpe tokangami na bondeko na mabota baoyo bakosalaka bosɔtɔ oyo. Yo akoyokela biso nkanda te kino okosilisa biso nyɛɛ ete ata litika litikala te mpe moko akokima te? Ɛ [Yehova], Nzambe na Yisalaele, yo ozali na boyengebene mpo ete totikali litika libikisami, lokola na lelo oyo; talá tozali liboso na yo na masumu na biso; moko akoyeba kotɛlɛma liboso na yo mpo na oyo te.”—Ezela 9:1-15; Deteronome 7:3, 4.
14. Lokola emonisamaki na mikolo ya Ezela, tosengeli kosala nini mpo ete Nzambe alimbisa biso?
14 Mpo Nzambe alimbisa biso, tosengeli koyambola masumu na biso mpe kolakisa ete toyoki mawa mpe kobota “mbuma ibongi na kobongwana na motema.” (Luka 3:8; Yobo 42:1-6; Yisaya 66:2) Na mikolo ya Ezela, bato oyo babongolaki motema, basembolaki makambo mbala moko: bakabwanaki na basi na bango bapaya. (Ezela 10:44; talá 2 Bakolinti 7:8-13.) Soki tolingi Nzambe alimbisa masumu minene na biso, tóyambola yango na libondeli ya komikitisa mpe tóbota mbuma oyo ekolakisa ete tobongoli mpenza motema. Kobongola motema mpe mposa ya kosembola makambo esengeli mpe kopusa biso na koluka lisalisi ya elimo epai ya bankulutu baklisto.—Yakobo 5:13-15.
Zwá libɔndisi na libondeli
15. Ndenge nini likambo ya Hana emonisi ete libondeli ekoki kobɔndisa biso?
15 Ntango likambo moko ezali kosala biso mpasi na motema, libondeli ekoki kobɔndisa biso. (Nzembo 51:17; Masese 15:13) Libondeli ebɔndisaki Hana, mwasi ya sembo. Azalaki na bomoi na eleko oyo mabota ezalaki na bana mingi na Yisalaele, kasi ye abotaki te. Elekana, mobali na ye, abotaki bana ya mibali mpe ya basi na mwasi mosusu, Penina. Mwasi yango azalaki kosɛka Hana mpo azalaki ekomba. Hana abondelaki makasi mpe alakaki ete soki aboti mwana mobali, ‘akopesa ye epai na Yehova bomoi na ye mobimba.’ Lokola libondeli na ye mpe maloba ya Nganga-Monene Eliya ebɔndisaki Hana, “mawa emonanaki lisusu na elongi na ye te.” Abotaki mwana mobali mpe apesaki ye nkombo Samwele. Na nsima, atindaki ye akende kosala na hema ya Yehova. (1 Samwele 1:9-28) Mpo na kolakisa botɔndi na ye mpo na boboto ya Nzambe epai na ye, asalaki libondeli ya kozongisa matɔndi—libondeli oyo ekumisaki Yehova ete akokani na moto moko te. (1 Samwele 2:1-10) Lokola Hana, libondeli ekoki kobɔndisa biso, na elikya ete Nzambe ayanolaka na malɔmbɔ nyonso oyo mayokani na makambo oyo alingi. Ntango tofungweli ye motema na biso, ‘tózala lisusu na mawa te,’ mpamba te akolongola bozito na biso to akopesa biso makasi ya kokumba yango.—Nzembo 55:22.
16. Lokola emonisami na likambo ya Yakobo, mpo na nini tosengeli kobondela na ntango tozali kobanga to ntango totungisami?
16 Soki likambo moko ezali kobangisa biso, to ezali kosala biso mpasi na motema, to ezali kotungisa biso, tókakatana te mpo na kobondela Nzambe mpo ete abɔndisa biso. (Nzembo 55:1-4) Yakobo azalaki kobanga liboso ya kokutana na ndeko na ye Esau oyo akabwaná na ye kala. Kasi, Yakobo abondelaki: “Ɛ Nzambe na tata ngai Abalayama mpe Nzambe na tata na ngai Yisaka, Ɛ [Yehova] oyo alobelaki ngai ete, Zongá na mokili na yo mpe na [bandeko] na yo mpe nakosalela yo malamu, ngai nabongi te ata na ndambo moke na kati na bolingo mpe na sembo esili yo komonisa na moombo na yo, mpo ete nakati ngámbo na Yaladene oyo bobele na lingenda na ngai, mpe sikawa nakómi bitúká mibale. Nabondeli yo ete obikisa ngai na mabɔkɔ na ndeko na ngai, na mabɔkɔ na Esau mpo ete nabangi ye ete akóma mpe aboma biso nyonso, bamama elongo na bana. Olobaki ete, Nakosalela yo malamu mpe nakoyeisa libota na yo lokola zelo na mai na monana, oyo ekoki kotángama te mpo na mingi.” (Genese 32:9-12) Esau asalaki Yakobo mpe bato na ye mabe te. Na ndenge yango, Yehova ‘asalelaki’ Yakobo ‘malamu’ na libaku wana.
17. Na boyokani na Nzembo 119:52, ndenge nini libondeli ekoki kobɔndisa biso ntango tomekami makasi?
17 Ntango tozali kolɔmba, kokanisa makambo oyo Liloba ya Nzambe elobi ekoki kobɔndisa biso. Na nzembo oyo eleki molai—libondeli kitoko oyo etyamaki na miziki—ekoki kozala Hizikiya, mwana ya mokonzi, nde ayembaki ete: “Nakobanza mpo na bikateli na yo na kala, ɛ [Yehova]; bongo nazwi libɔndisi.” (Nzembo 119:52) Soki tosali libondeli na komikitisa na ntango tomekami makasi, tokoki kokanisa motinda to mobeko moko ya Biblia oyo ekoki kosalisa biso na kokende ntango nyonso liboso mpe tokobɔndisama na ntango toyebi ete tozali kosepelisa Tata na biso ya likoló.
Bato ya sembo batikaka kobondela te
18. Mpo na nini tokoki koloba ete ‘moto nyonso ya sembo akobondela Nzambe’?
18 Baoyo nyonso bazali sembo epai ya Yehova Nzambe ‘bakotika kobondela te.’ (Baloma 12:12, NW) Na Nzembo 32—ekoki kozala ete Davidi akomaki yango nsima ya kosala lisumu na Bata-seba—alobelaki mpasi na ye mpo na kozanga koluka bolimbisi mpe ndenge abɔndisamaki ntango abongolaki motema mpe ayambolaki lisumu na ye epai ya Nzambe. Na nsima, Davidi ayembaki: “Mpo na yango [mpamba te Yehova alimbisaka moto nyonso oyo abongoli mpenza motema] mosembwi nyonso akobondela yo na ntango oyo okoki komonana.”—Nzembo 32:6, NW.
19. Mpo na nini tosengeli kotombola mabɔkɔ ya sembo na libondeli?
19 Soki tosepelaka na boyokani oyo tozali na yango na Yehova Nzambe, tokobondela ye ayokela biso mawa mpo na mbeka ya lisiko ya Yesu. Na kondima, tokoki kopusana na kiti ya bokonzi ya ngɔlu na maloba ya polele mpo na kozwa ngɔlu mpe lisungi na ntango ebongi. (Baebele 4:16) Kasi tokoki kobondela mpo na makambo mingi! Yango wana ‘tótika kobondela te’—ntango nyonso, tósanzola mpe tótɔnda Nzambe na maloba mauti mpenza na motema. (1 Batesaloniki 5:17) Tiká ete, butu na moi, tótombola mabɔkɔ ya sembo na libondeli.
Okopesa eyano nini?
◻ Mpo na nini ebongi tókanisa naino makambo tokoloba na libondeli na nkombo ya bato ebele?
◻ Mpo na nini tosengeli kobondela na limemya mpe na lokumu?
◻ Tosengeli kolakisa elimo nini ntango tozali kobondela?
◻ Ntango tozali kobondela, mpo na nini tosengeli kobosana matɔndi mpe masanzoli te?
◻ Ndenge nini Biblia emonisi ete libondeli ekoki kobɔndisa biso?
[Elilingi na lokasa 17]
Mokonzi Salomo alakisaki komikitisa na libondeli oyo asalaki na nkombo ya bato ebele na mokolo oyo bafungolaki tempelo ya Yehova
[Bililingi na lokasa 18]
Na ndakisa ya Hana, libondeli ekoki kobɔndisa yo