Ba Collégiants: Boyekoli ya Biblia ekesenisaki bango na mangomba mosusu
Osilá koyoka lisolo ya ba Collégiants?
Mwa lingomba yango ya ekeke ya 17 na ekólo Pays-Bas ekesanaki na mangomba minene oyo ezalaki na ntango wana. Na ndenge nini, mpe liteya nini tokoki kozwa epai na bango? Mpo na koyeba yango, tózonga naino bambula mingi na nsima.
NA MOBU 1587, Jacobus Arminius (to, Jacob Harmensen) akendaki na engumba Amsterdam. Azwaki mosala noki, mpo atángaki kelasi mingi. Ntango azalaki na mbula 21, azwaki diplome na Iniversite ya Leyde, na ekólo Hollande. Nsima na yango, alekisaki mbula motoba na ekólo Suisse mpo na koyekola teoloji epai ya Théodore de Bèze, oyo akómaki na esika ya Jean Calvin, moto oyo akotisaki mbongwana na Lingomba ya Protesta. Baprotesta ya Amsterdam basepelaki mpenza kopona Arminius, ye azalaki na mbula 27, lokola moko na bapastere na bango! Kasi, nsima ya mwa bambula, bandimi mingi ya lingomba bayokaki mawa ndenge baponaki ye. Mpo na nini?
Ntembe likoló ya liteya oyo elobaka ete makambo nyonso masilá kokanama liboso
Ntango Arminius akómaki pastere, mwa moke na nsima matata ebimaki kati na Baprotesta ya engumba Amsterdam mpo na liteya oyo elobaka ete makambo nyonso masilá kokanama liboso. Yango ezalaki liteya monene ya Calvin, kasi bandimi mosusu bamonaki ete Nzambe oyo asilá kokana ete bamoko bázwa lobiko mpe bamosusu etumbu na lifelo, azali Nzambe mabe mpe azali sembo te. Balandi ya Calvin balikyaki ete lokola Arminius azalaki mwanakelasi ya Bèze, akosembola bato oyo bazalaki kondima liteya yango te. Nzokande, balandi ya Calvin bakamwaki ndenge Arminius amityaki na ngámbo ya bato oyo bazalaki kondima liteya yango te. Na mobu 1593, matata ekómaki ndɔngɔ na boye ete na engumba Amsterdam Lingomba ya Protesta ekabwanaki na bituluku mibale: baoyo bazalaki kondima liteya yango mpe baoyo bazalaki koboya yango, to bato ya bokatikati.
Nsima ya mwa bambula, matata oyo ezalaki se na engumba moko ekabolaki Lingomba ya Protesta na ekólo mobimba. Nsukansuka, na Novɛmbɛ 1618, ekómaki ntango ya kokata likambo yango mbala moko mpo na libela. Balandi ya Calvin, lokola basoda na banamboka bazalaki kolongisa bango, babéngisaki bato ya ngámbo mosusu (ntango wana babéngamaki Batɛmɛlia) na likita moko ya ekólo mobimba, to sinode ya Baprotesta na Dordrecht. Na nsuka ya likita, bayebisaki bapastere Batɛmɛli nyonso bápona: To kotya sinyatili na mokanda oyo elobaki ete bakoteya lisusu te, to kolongwa na ekólo wana. Mingi balongwaki na ekólo mpe bakendaki kofanda na mboka mopaya. Na ndenge yango, bapastere ya Calvin bazwaki bisika ya bapastere oyo bazalaki batɛmɛli. Bayangani ya sinode bakanisaki ete mateya ya Calvin elongaki.
Ndenge ba Collégiants babandaki mpe bakómaki mingi
Ndenge moko na bipai mosusu, lisangá ya batɛmɛli na mboka moke babéngi Warmond, oyo ezali pene ya Leyde, ezalaki lisusu na pastere te. Kasi, na kokesena na bisika mosusu, lisangá yango eboyaki pastere oyo sinode etyaki. Lisusu, na mobu 1620, ntango pastere moko motɛmɛli atyaki bomoi na ye na likama na ndenge azongaki na Warmond mpo na kokamba lisangá, bandimi mosusu ya lisangá baboyaki mpe ye. Bandimi yango bakómaki kosala makita na bango ya losambo na kobombama kozanga mokonzi ya lingomba. Na nsima, bakómaki kobénga makita yango collège mpe basangani na yango, ba Collégiants.
Atako na ebandeli ba Collégiants bazangaki bapastere, kasi bazangaki bindimeli ya lingomba te, mosika te makambo ebongwanaki. Gijsbert Van der Kodde, moko na ba Collégiants alobaki ete lokola bazalaki kosangana kozanga litambwisi ya bakonzi ya lingomba, bazalaki kolanda mpenza Biblia mpe nzela ya baklisto ya liboso koleka mangomba ya minene. Alobaki lisusu ete, ebongiseli ya bakonzi ya lingomba ebandaki nsima ya liwa ya bantoma mpo na kopesa misala na mibali oyo bazalaki koboya koyekola mosala ya mabɔkɔ.
Na mobu 1621, Van der Kodde na basangani mosusu oyo bazalaki na makanisi ndenge moko na ye bakómaki kosala makita na Rijnsburg, mboka moko moke oyo ezali pembeni.b Siegfried Zilverberg, nganga-mayele ya masolo ya kala alobi ete, mwa bambula na nsima, ntango monyoko esilaki mpe moto na moto akómaki na bonsomi ya kozala na bindimeli na ye, nsango ya makita ya ba Collégiants epalanganaki na ekólo mobimba mpe ebéndaki “bato ya ndenge nyonso.” Ezalaki na batɛmɛli, bamenonite, balandi ya Socin, ata mpe bato ya teoloji. Bamoko bazalaki basali bilanga. Bamosusu bakomi ya ntɔki, babimisi mikanda, minganga, mpe bato ya mombongo. Spinoza (Benedictus de Spinoza), moto ya filozofi, na Johann Amos Comenius (to, Jan Komenský), molakisi mpe lisusu Rembrandt van Rijn, moyemi ya lokumu, bakɔtaki na lingomba yango. Makanisi ndenge na ndenge oyo bato yango ya molende bamemaki esalaki ete bindimeli ya ba Collégiants bipalangana mingi.
Nsima ya mobu 1640, etuluku yango ya molende ekolaki nokinoki. Na lombangu mpenza bituluku ya makita ebotanaki na bingumba Rotterdam, Amsterdam, Leeuwarden, mpe na bingumba mosusu. Andrew Fix, profesere ya istware, alobi ete banda mobu 1650 tii mobu 1700, “ba Collégiants bakómaki lingomba moko ya losambo ya monene mingi mpe oyo esalaki bopusi na ekólo Pays-Bas na ekeke ya 17.”
Bindimeli ya ba Collégiants
Lokola lingomba ya ba collégiants ezalaki kotika nzela na makanisi ya bato, na bindimeli ndenge na ndenge, mpe na bonsomi ya koloba, yango wana Collégiant mokomoko azalaki na bonsomi ya kozala na bindimeli na ye moko oyo ekeseni na bindimeli ya basusu. Kasi, na bindimeli mosusu bazalaki na likanisi moko. Na ndakisa, ba Collégiants nyonso bandimaki ete ezali na ntina mingi ete moto na moto ayekolaka Biblia. Collégiant moko akomaki ete mosangani nyonso asengeli “kosalaka bolukiluki na ye mpe asengeli kozela te ete moto mosusu ateya ye boyebi ya Nzambe.” Bazalaki mpe kosala bongo. Jacobus Vana Slee, nganga-mayele ya masolo ya kala ya mangomba na ekeke ya 19, alobi ete ba Collégiants bayebaki Biblia mingi koleka mangomba mosusu ya ntango wana. Ata banguna na bango bazalaki kokumisa bango mpo na makoki na bango ya kosalela Biblia malamumalamu.
Lokola, ba Collégiants bazalaki koyekola Biblia mingi, bakómaki na bindimeli oyo ekesenaki na oyo ya mangomba minene. Mikanda oyo ekomamaki kobanda na ekeke ya 17 kino na ekeke ya 20 emonisi mwa bindimeli na bango:
Lingomba ya ebandeli. Na mobu 1644, Adam Boreel, Collégiant mpe moto ya teoloji akomaki ete ntango lingomba ya ebandeli emikɔtisaki na politiki na eleko ya Amperere Constantin, ebebisaki kondimana na yango na Klisto mpe ebungisaki kopemama ya elimo santu. Abakisaki ete mpo na yango, mateya ya lokuta ekómaki mingi mpe ekobaki tii na eleko na ye.
Mbongwana. Mbongwana oyo esalemaki na ekeke ya 16 na Luther, na Calvin, mpe bamosusu ebongolaki mpenza lingomba mingi te. Kutu, Galenus Abrahamsz, mokambi ya ba Collégiants mpe monganga (1622-1706), alobaki ete Mbongwana ebebisaki lisusu lingomba malamumalamu, ebimisaki koswana mpe koyinana. Mbongwana ya solosolo esengeli kobongola motema, nzokande Mbongwana wana esalaki yango te.
Lingomba mpe bakonzi ya lingomba. Mangomba ya minene ezali mabe, ezali na makambo ya mokili, mpe etambwisami na Nzambe te. Moto nyonso oyo azali kozwa makambo ya losambo na lisɛki te, likambo malamu oyo asengeli kosala ezali se ya kolongwa na lingomba ya lokuta mpo ete asangana na masumu na yango te. Ba Collégiants balobaki ete mosala ya bakonzi ya lingomba, endimami na Biblia te, mpe ezalaki “kobebisa bolamu ya elimo ya lisangá ya boklisto.”
Bokonzi mpe Paladiso. Daniel de Breen (1594-1664), moko na babandisi ya etuluku oyo ezalaki na engumba Amsterdam, akomaki ete Bokonzi ya Klisto ezalaki bokonzi ya elimo te oyo efandaka na motema ya moto. Molakisi Jacob Ostens, Collégiant na engumba Rotterdam, alobaki ete “bato ya kalakala bazalaki kolikya na bilaka ya Nzambe awa na mabelé.” Ndenge moko, ba Collégiants bazalaki kozela ntango oyo mabelé ekobongwana paladiso.
Bosato. Bakambi mosusu ya ba Collégiants oyo bazwaki bopusi ya bindimeli ya Socin, baboyaki liteya ya Bosato.c Na ndakisa, Daniel Zwicker (1621-1678) akomaki ete liteya nyonso oyo ekoki kolimbolama na mayele ya bato te, lokola Bosato, “ezalaka te mpe ezali lokuta.” Reijnier Rooleeuw, oyo azalaki Collégiant, abongolaki Biblia mpe ebimisamaki na mobu 1694. Ebongolaki eteni ya nsuka ya Yoane 1:1 boye: “Mpe Liloba azalaki nzambe” na esika oyo mabongoli minene elobaka ete: “Mpe Liloba azalaki Nzambe.”d
Makita ya pɔsɔ na pɔsɔ
Atako ba Collégiants bazalaki na boyokani na bindimeli nyonso te, kasi makita na bango na bingumba ndenge na ndenge ezalaki kosalema ndenge moko. Van Slee, nganga-mayele ya masolo ya kala, alobi ete na ebandeli ya lingomba ya ba Collégiants, makita na bango ezalaki kobongisama liboso te. Ba Collégiants bakanisaki ete na kolanda maloba ya ntoma Paulo elobeli ntina ya “kosakola,” bandeko mibali nyonso bakokaki kosala masolo na makita. (1 Bakolinti 14:1, 3, 26) Yango wana, mbala mingi makita ezalaki koumela tii na kati ya butu mpe bato mosusu bazalaki “kolala mpɔngi.”
Na nsima, makita ebongisamaki malamu. Ba Collégiants bazalaki koyangana kaka mikolo ya lomingo te, kasi lisusu na kati ya pɔsɔ na bampokwa. Mpo na kosalisa molobi mpe lisangá mobimba na komibongisa liboso mpo na makita oyo ekosalema na mbula mobimba, bazalaki kobimisa manaka oyo ezalaki na bavɛrsɛ ya Biblia oyo bakotalela mpe bankombo ya balobi. Nsima ya loyembo mpe libondeli ya ebandeli, molobi moko azalaki kolimbola bavɛrsɛ ya Biblia. Soki asilisi, azalaki kotuna mibali bápesa makanisi na ntina na makambo oyo bauti kolanda. Bongo, molobi mosusu azalaki komonisa ndenge ya kosalela bavɛrsɛ yango. Likita ezalaki kosuka na libondeli mpe loyembo.
Ba Collégiants na engumba Harlingen, na etúká ya Friesland, babandaki lolenge ya sika ya kosala makita. Molobi oyo alekisi ngonga na lisolo na ye asengelaki kofuta mwa lomande.
Mayangani ya ekólo mobimba
Ba Collégiants bamonaki lisusu ete basengeli kosalaka mayangani ya minene. Yango wana, kobanda mobu 1640, mbala mibale na mbula (na prɛnta mpe na eleko ya molunge), ba Collégiants ya ekólo mobimba bazalaki kokende na Rijnsburg. Fix, nganga-mayele ya masolo ya kala, akomi ete mayangani yango ezalaki kosalisa bango na “koyeba makanisi, mayoki, bindimeli, mpe misala ya bandeko na bango ya bisika nyonso.”
Soki bakei kuna, ba Collégiants mosusu bazalaki kofutela bandako epai ya bato ya mboka, nzokande bamosusu bazalaki kofanda na Groote Huis (Ndako Monene), otɛlɛ moko oyo ezalaki na biteni ya kolala 30 ya ba Collégiants bango moko. Kuna, bazalaki kolamba bilei mpo na bato 60 kino 70. Nsima ya kolya, bapaya bakokaki kotambola na elanga monene ya otɛlɛ yango mpo na kotala ‘biloko Nzambe asalá, kobɛta mwa masolo, to mpo na komanyola.’
Atako ba Collégiants nyonso te nde bamonaki ete esengeli kozwa batisimo, mingi bamonaki ete ezalaki na ntina. Yango wana, batisimo ekómaki likambo ya ntina na mayangani minene. Van Slee, nganga-mayele ya masolo ya kala, alobi ete mbala mingi molulu yango ezalaki kosalema mokolo ya pɔsɔ na ntɔngɔ. Nsima ya loyembo mpe libondeli, lisukulu ya batisimo ezalaki kosalema. Na nsima, molobi azalaki kosɛnga na mikóló oyo balingi kozwa batisimo báyambola kondima na bango na maloba oyo: “Nandimi ete Yesu Klisto azali Mwana ya Nzambe ya bomoi.” Nsima ya kosala libondeli na nsuka ya lisukulu, bango nyonso bazalaki kokende na esika oyo bato bakozwa batisimo mpo na kotala mibali mpe basi oyo bafukami na kati ya mai, mpo ete mai ekómela bango tii na mapeka. Bongo, mobatisi akokitisa motó ya mondimi ya sika malɛmbɛmalɛmbɛ kino ekozinda na mai. Nsima ya batisimo, moto nyonso akozonga na esika na ye mpo na kolanda lisukulu mosusu.
Mokolo ya pɔsɔ na ngonga ya mitano nsima ya midi, likita ezalaki kobanda na botángi mokuse ya Biblia, loyembo, mpe libondeli. Mpo ete molobi azanga te, mokomoko na ngala na yango, bituluku ya Rotterdam, ya Leyde, ya Amsterdam, mpe ya etúká ya Hollande ya Nɔrdi ezalaki kotinda balobi na liyangani mokomoko. Mokolo ya lomingo na ntɔngɔ ezalaki mpo na Elambo ya Nkolo. Nsima ya lisukulu, libondeli, mpe loyembo, mibali mpe na nsima basi bazalaki kolya limpa mpe komɛla vinyo. Masukulu mingi ezalaki kolandana mokolo ya lomingo na mpokwa, mpe mokolo ya yambo na ntɔngɔ bango nyonso bazalaki kosangana mpo na lisukulu ya nsuka. Van Slee alobi ete, masukulu mingi oyo ezalaki kosalema na mayangani yango, ezalaki koteya ndenge ya kosalela mateya yango, ezali kopesa kaka bandimbola te kasi kolendisa bayoki na kosalela makambo oyo bazali koyoka.
Bafandi ya Rijnsburg bazalaki kosepela ete mayangani yango esalemaka na mboka na bango. Molimboli moko ya makambo na ekeke ya 18 akomaki ete ebele ya bapaya, oyo bazalaki kosomba biloko mingi, bazalaki kokɔtisa mbongo mingi na mwa mboka yango. Longola wana, nsima ya liyangani nyonso ba Collégiants bazalaki kopesa babola ya Rijnsburg mwa mbongo. Na ntembe te, na mobu 1787, ntango batikaki kosala mayangani wana mwa mboka yango emonaki solo ete ebungisi eloko moko. Nsima na yango etuluku ya ba Collégiants elɛmbaki. Mpo na nini?
Ntina oyo balɛmbaki
Na nsuka ya ekeke ya 17, matata ebimaki mpo na ntina ya mayele ya bato na kati ya losambo. Bamoko na kati ya ba Collégiants balobaki ete makanisi ya bato esengeli koleka liboso ya emoniseli ya Nzambe, kasi bamosusu baboyaki. Nsukansuka, kowelana ekabolaki lingomba mobimba ya ba Collégiants. Ezali nsima ya liwa ya bato mingi oyo bazalaki kowelana na likambo yango na ngámbo nyonso mibale nde ba Collégiants basanganaki lisusu esika moko. Fix, nganga-mayele ya istware, alobi ete nsima ya kokabwana wana lingomba “ezalaki lisusu ndenge ezalaki liboso te.”
Kopesa nzela na bindimeli ya ndenge na ndenge oyo ekómaki mingi na Lingomba ya Protesta na ekeke ya 18, ememaki mpe kokwea ya ba Collégiants. Lokola mitinda ya ba Collégiants na ntina na mayele ya bomoto mpe kotika nzela na bindimeli ya bato mosusu ekómaki kondimama na bato mingi, “Lingomba ya ba Collégiants oyo kala ezalaki mwinda se moko, elimwaki na kongɛnga ya bingɛngiseli oyo ekómaki mingi.” Na nsuka ekeke ya 18, ebele ya ba Collégiants bakómaki Bamenonite mpe na mangomba mosusu.
Lokola ba Collégiants bamityelaki mokano ya kosala bomoko ya makanisi te na lingomba na bango, Collégiant mokomoko azalaki na makanisi na ye. Bayebaki likambo yango, mpe kutu batutaki ntolo te ete bazali “na bomoko ya makanisi,” ndenge ntoma Paulo alendisaki baklisto bázala. (1 Bakolinti 1:10, NW) Nzokande, ba Collégiants bazalaki kolikya na eleko oyo bindimeli ya moboko ya boklisto, lokola bomoko ya makanisi, ekosalema.
Atako boyebi ya solo ekómaki naino mingi te na eleko ya ba Collégiants, kasi batikaki ndakisa malamu oyo mangomba mingi lelo oyo bakoki kolanda. (Talá Danyele 12:4.) Ndenge babéndaki likebi na ntina ya boyekoli ya Biblia eyokani na toli ya ntoma Paulo ete: “Bómeka makambo nyonso.” (1 Batesaloniki 5:21) Boyekoli ya bango moko ya Biblia esalisaki Jacob Arminius na bato mosusu na koyeba ete mateya mosusu oyo mongomba minene ezalaki kondima banda kala eutaki na Biblia te. Ntango basosolaki yango, bazwaki makasi mpo na komikesenisa na mangomba minene. Soki ezalaki yo, olingaki kosala bongo?
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na mobu 1610, bato ya ngámbo mosusu batindelaki bakonzi ya Pays-Bas mokanda (oyo emonisaki bantina oyo bazalaki kotɛmɛla). Nsima ya likambo wana, babéngaki bango batɛmɛli.
b Lokola bazalaki na mwa mboka moke babéngi Rijnsburg, ba Collégiants bazalaki mpe kobéngama ba Rijnsburgers.
c Talá Lamuká! ya 22 Novɛmbɛ 1988, lokasa 19 (ebimeli ya Lifalanse), “Balandi ya Socin—Mpo na nini baboyaki liteya ya Bosato?”
d Het Nieuwe Testament van onze Heer Jezus Christus, uit het Grieksch vertaald door Reijnier Rooleeuw, M.D. (Kondimana ya Sika ya Nkolo na biso Yesu Klisto, ebongolami uta na Greke na Reijnier Rooleeuw, M.D.)
[Elilingi na lokasa 24]
Rembrandt van Rijn
[Bililingi na lokasa 26]
Mboka moke babéngi Warmond esika lingomba ya ba Collégiants ebandaki, mpe Ebale De Vliet epai batisimo ezalaki kopesama
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 23]
Background: Courtesy of the American Bible Society Library, New York