Moto nyonso akozala na bonsomi
“Nabanzi ete mpasi na ntango oyo [tokoki komeka yango, NW] te na nkembo elingi komonana kati na biso. Zambi na mposa monene, mokili mobimba ezali kotalela ete Nzambe amonisa emoniseli na bana na ye. Nzambe azalisaki mokili mpamba, mpo na mokano na yango mpenza te nde mpo na mokano na ye oyo azalisaki yango boye. Kasi ezalaki na elikya ekosikwa na boombo na libebisi kino lisiko na nkembo na bana na Nzambe. Toyebi ete biloko nyonso bisalamaki na Nzambe, izali kokimela elongo kino ntango oyo, lokola na mpasi na kobota mwana.”—BALOMA 8:18-22.
NA ETENI oyo ya mokanda atindelaki baklisto ya Loma, ntoma Paulo amonisi malamu mpe na mokuse ntina oyo bato bazalaka na bonsomi ya solosolo te mpe ntina oyo bomoi na bango etondi na mpasi. Alimboli mpe ndenge oyo tokoki kozwa bonsomi ya solosolo.
“Mpasi na ntango oyo”
Tokoloba te ete Paulo amoni “mpasi na ntango oyo” eloko mpamba ntango alobi ete “tokoki komeka yango te na nkembo elingi komonana kati na biso.” Na eleko oyo Paulo azalaki na bomoi mpe nsima na ye, bakonzi mabe ya Loma banyokolaki baklisto makasi; bazalaki mpe kotosa ntomo ya bato te. Na eleko moko, bakonzi ya Loma bazalaki kozwa baklisto lokola banguna ya Leta, mpe bazalaki konyokola bango na ndenge ya mabe mpenza. John Morris Roberts, nganga-mayele ya istware, alobi ete: “Na mboka-mokonzi [Loma], baklisto mingi babomamaki na ndenge ya nsɔmɔ na mabándá ya masano to mpe bazalaki kotumba bango wana bazali naino na bomoi.” (Shorter History of the World) Lisolo mosusu elobi boye mpo na bato oyo Néron atindaki ete bányokola bango: “Bamoko babakaki bango na ekulusu, basusu balatisaki bango mposo ya nyama, bongo batongaki yango, mpe bazalaki kotindela bango bambwa; basusu bazalaki kopakola bango gudrɔ mpe bazalaki kotumba bango wana bazali na bomoi mpo na kongɛngisa mboka na ntango ya molili.”—New Testament History, ekomami na Frederick Bruce.
Tobanzi ete baklisto wana ya ekeke ya liboso balingaki kopona bonsomi na esika ya monyoko ya ndenge wana, kasi baboyaki kotyola mateya ya Yesu Klisto mpo bázwa bonsomi yango. Bamikɔtisaki ata moke te na kowelana, lokola oyo ezalaki kati na bakonzi ya Loma na Bazelote, elingi koloba Bayuda oyo bazalaki kobunda mpo na bonsomi. (Yoane 17:16; 18:36) Mpo na Bazelote, “ndenge makambo ezalaki na ntango wana, elongobanaki te na koloba ete bátika nyonso na mabɔkɔ ya Nzambe bongo ye moko azwa ekateli na ntango oyo akopona.” Balobaki ete, likambo oyo ebongaki kosala na ntango wana ezalaki “kobundisa banguna,” elingi koloba Bokonzi ya Loma. (New Testament History) Baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki kokanisa ndenge mosusu. Bango bamonaki ete nzela se moko oyo eleki malamu ezali ya “kozela ete Nzambe azwa ekateli na ntango oyo aponi.” Elikya na bango ezalaki ete eloko moko te, kaka Nzambe ye moko nde akosukisa “mpasi ya ntango oyo” mpe akopesa bonsomi ya solosolo mpe ya libela. (Mika 7:7; Habakuku 2:3) Kasi, liboso tótalela ndenge likambo yango ekosalema, tótalela naino ntina oyo ‘mokili ezalisamaki mpamba.’
Mokili ‘ezalisami mpamba’
Na buku na ye (The Emphatic Diaglott), Benjamin Wilson alobi ete na vɛrsɛ oyo, liloba “mokili” ezali te, ndenge bato mosusu bakanisaka, “biloko Nzambe akela oyo ezangi bomoi,” kasi ezali nde “bato nyonso.” (Talá Bakolose 1:23.) Yango elimboli bato nyonso na mokili—biso nyonso oyo tolingaka kozala na bonsomi. ‘Tozalisamaki mpamba’ mpo na makambo oyo baboti na biso ya liboso basalaki. Ezalaki na “mposa na [biso] te” to te mpo ete toponaki yango. Batikelaki biso ezaleli yango. Soki tolandi Biblia, tokoloba ete Rousseau azalaki na libunga ntango alobaki ete “moto abotamaka na bonsomi.” Mokomoko na biso abotamaki na boombo ya lisumu mpe kozanga kokoka, tozali lokola baombo ya ebongiseli oyo etondi na mitungisi mpe makambo ya mpamba.—Baloma 3:23.
Mpo na nini bongo? Mpamba te baboti na biso ya liboso, Adama na Eva balukaki bákóma “lokola Nzambe,” bázwaka bikateli bango moko mpe báponaka bango moko mabe na malamu. (Genese 3:5) Babosanaki likambo moko ya ntina mingi mpo na bonsomi. Kaka Nzambe nde akoki kozala na bonsomi oyo ezangi ndelo. Ye azali Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba. (Yisaya 33:22; Emoniseli 4:11) Bonsomi ya moto esengeli kozala na ndelo. Yango wana moyekoli Yakobo alendisaki baklisto na eleko na ye ete bátika “Mobeko mobongi, mobeko ya bonsomi” etambwisa bango.—Yakobo 1:25.
Na bosembo na ye, Yehova alongolaki Adama na Eva na molɔngɔ ya bana na ye; yango wana, nsukansuka bakufaki. (Genese 3:19) Tokoloba boni mpo na bana na bango? Na mawa na ye, Yehova atikelaki bango likoki ya kobota bana, atako bakokaki se kotikela bana yango bomoto oyo ezangi kokoka, bakisa mpe lisumu na liwa. Yango wana, “liwa epalangani epai ya bato nyonso.” (Baloma 5:12) Ezali na ndenge yango nde Nzambe “azalisaki [mokili] mpamba.”
‘Komonana ya bana ya Nzambe’
Yehova azalisaki mokili mpamba “na elikya” ete mokolo mosusu, bato bázwa lisusu bonsomi na nzela ya misala ya “bana ya Nzambe.” Banani yango bazali “bana ya Nzambe”? Ezali bayekoli ya Yesu Klisto oyo babotami na boombo ya lisumu mpe na bomoto oyo ezangi kokoka lokola bato mosusu nyonso. Na kobotama na bango, bazali na esika te na libota ya Nzambe, yango ezali libota ya pɛto mpe ekoka. Kasi Yehova asali likambo moko monene mpo na bango. Na lisalisi ya mbeka ya Yesu Klisto oyo ekoki kosikola bato, abimisi bango na bolɔkɔ ya lisumu oyo baboti na bango batikelaki bango mpe abéngi bango “bato ya sembo,” to bato ya pɛto na elimo. (1 Bakolinti 6:11) Na nsima andimi bango lokola “bana ya Nzambe,” mpe ayambi bango lisusu na libota na ye.—Baloma 8:14-17.
Lokola bazali bana oyo Nzambe andimi, bakozala na libaku monene mpe ya nkembo. Bakozala “banganga mpo na Nzambe na biso, mpe bakozala bakonzi na mokili” elongo na Yesu Klisto lokola bayangeli na Bokonzi to guvernema ya Nzambe. (Emoniseli 5:9, 10; 14:1-4) Boyangeli yango esimbami na mibeko ya bonsomi mpe ya bosembo, kasi na minyoko mpe mitungisi te. (Yisaya 9:6, 7; 61:1-4) Ntoma Paulo alobi ete bana yango ya Nzambe bakosala elongo na Yesu, ‘mombóto ya Abalayama’ oyo alakamaki banda kalakala. (Bagalatia 3:16, 26, 29) Na ndenge yango, bazali na mokumba monene na kokokisama ya elaka oyo Nzambe apesaki na moninga na ye Abalayama. Na elaka yango, Nzambe alobaki mpe ete na nzela ya mombóto [to, mwana] ya Abalayama, “mabota nyonso na nse bakopambolama.”—Genese 22:18.
Bolamu nini bakomemela bato? Bana ya Nzambe bazali mpe kosala mosala ya kobikisa bato nyonso na mabe oyo lisumu ya Adama ememaki mpo bákóma lisusu na bomoto oyo ekoka. Bato oyo “bauti na mabota nyonso, na mikili nyonso” bakoki kozwa mapamboli soki bandimi mbeka ya Yesu Klisto oyo ekoki kosikola mpe soki batosi Bokonzi na ye oyo ekopesa bato bolamu. (Emoniseli 7:9, 14-17; 21:1-4; 22:1, 2; Matai 20:28; Yoane 3:16) Na ndenge yango nde “mokili mobimba” ekozwa lisusu “bonsomi ya nkembo ya bana ya Nzambe.” Bonsomi yango ekozala mpo na mwa ntango moke te lokola oyo boyangeli moko ya politiki ekoki kotya; ekozala bonsomi na makambo nyonso oyo epesaka bato mpasi mpe minyoko banda Adama na Eva baboyaki bokonzi ya Nzambe. Yango wana, likambo oyo ntoma Paulo alobaki ekoki kokamwisa biso te ete, “mpasi na ntango oyo [tokoki komeka yango] te” na mosala ya nkembo oyo bato ya sembo bakosala!
“Komonana ya bana ya Nzambe” ekobanda ntango nini? Etikali moke mpenza, ntango Yehova akolakisa na bato nyonso polele banani bazali bana ya Nzambe. Likambo yango ekosalema ntango “bana” yango bakosekwa mpo na kokóma na bomoi lokola bikelamu ya elimo mpe bakosala elongo na Yesu Klisto mpo na kopɛtola mabelé oyo na mabe mpe minyoko na etumba ya Nzambe ebéngami Armagedon. (Danyele 2:44; 7:13, 14, 27; Emoniseli 2:26, 27; 16:16; 17:14; 19:11-21) Zingazinga na biso tozali komona bilembeteli ebele oyo emonisi ete toumeli mingi na kati ya “mikolo ya nsuka,” eleko oyo Nzambe akosukisa ntango molai oyo atikaki nzela na botomboki mpe mabe oyo yango ebimisaki.—2 Timote 3:1-5; Matai 24:3-31.
Ɛɛ, lokola ntoma Paulo alobi yango, “biloko nyonso bisalamaki na Nzambe, izali [kolela] elongo kino ntango oyo,” kasi ezali lisusu mpo na ntango mingi te. Bato mingi oyo bazali na bomoi lelo oyo, bakomona “kokokisama ya makambo nyonso, yango elobaki Nzambe na minɔkɔ na basakoli na ye na bulɛɛ longwa na kalakala,” bakisa mpe ndenge oyo kimya, bonsomi, mpe bosembo ekozonga mpo na bato nyonso.—Misala 3:21.
Bonsomi ya solosolo
Osengeli kosala nini mpo na kozwa ‘bonsomi yango ya nkembo ya bana ya Nzambe’? Yesu Klisto alobaki ete: “Soko bino bokoumela kati na liloba na ngai, bokozala bayekoli na ngai na solo, mpe bokoyeba solo, mpe solo ekosikola bino.” (Yoane 8:31, 32) Talá sɛkɛlɛ ya bonsomi: koyekola mpe kotosa mibeko na mateya ya Klisto. Likambo yango ezali kopesa mwa bonsomi ata sikoyo. Etikali moke, ekopesa bonsomi ya solosolo na ntango oyo Klisto Yesu akoyangela mokili. Likambo ya mayele oyo moto akoki kosala ezali koyeba “liloba” ya Yesu, soki ayekoli Biblia. (Yoane 17:3) Lokola baklisto ya ekeke ya liboso, kɔtá na molɔngɔ ya bayekoli ya solo ya Klisto. Soki osali bongo, okoyeba solo oyo ezali kosikola, solo oyo Yehova azali koteya na nzela ya ebongiseli na ye.—Baebele 10:24, 25.
Wana ozali ‘kozela komonana ya bana ya Nzambe,’ okoki kozala na elikya lokola ntoma Paulo ete Klisto akobatela mpe akosunga yo, ata soki minyoko mpe kozanga bosembo ezali komonana lokola ekoki kosila te. Nsima ya kolobela komonana ya bana ya Nzambe, Paulo atunaki boye: “Nani [akokabola] biso na bolingo na Klisto? Bolɔzi soko nkaka soko minyoko soko nzala soko bolumbu soko likamba soko mopanga?” (Baloma 8:35) Ya solo, na kolanda maloba ya Rousseau, baklisto na mikolo ya Paulo bazalaki naino “na minyɔlɔlɔ” ya banguya ndenge na ndenge oyo ezalaki konyokola bango. ‘Bazalaki koboma bango mokolo mobimba’ lokola ‘bameme ya koboma.’ (Baloma 8:36, NW ) Batikaki ete makambo yango elɛmbisa bango?
Paulo akomi ete, “Kasi na makambo oyo nyonso tokoleka kolonga na mpo na ye oyo alingaki biso.” (Baloma 8:37) Baklisto ya ekeke ya liboso balongaki atako bakutanaki na makambo wana nyonso? Ndenge nini? Paulo apesi eyano oyo: “Nandimi solo ete ata kufa, ata bomoi, ata [baanzelu, NW], ata mikonzi, ata makambo na ntango oyo, ata makambo makoya nsima, ata ndenge na nguya na mokili, ata molai, ata bozindo, ata eloko mosusu nini ekoki [kokabola] biso te na bolingo na Nzambe bozali kati na Klisto Yesu, Nkolo na biso.” (Baloma 8:38, 39) Yo mpe okoki ‘kolonga’ na “bolɔzi soko nkaka soko minyoko” oyo okoki kokutana na yango sikoyo. Bolingo oyo Nzambe azali na yango endimisi biso ete etikali moke, ɛɛ moke mpenza, ‘tokosikwama na boombo [nyonso] . . . kino lisiko na nkembo na bana na Nzambe.’
[Bililingi na lokasa 6]
‘Biloko nyonso Nzambe asalaki bizali kokimela elongo kino ntango oyo’
[Elilingi na lokasa 7]
‘Biloko Nzambe asalaki bikosikwa na boombo na libebisi kino lisiko na nkembo na bana na Nzambe’