Yehova azali kobongisa nzela
“Nsango Malamu oyo na Bokonzi ekosakolama.”—MATAI 24:14.
1. Ndenge nini mosala ya kosakola ekokisamaki na ekeke ya liboso mpe ezali kokokisama na ekeke ya 20?
LOKOLA Yehova azali Nzambe ya bolingo, azali na mposa ete ‘bato ya lolenge nyonso bábika mpe bázwa boyebi mpenza ya solo.’ (1 Timote 2:4, NW) Mpo na yango, esengeli kosakola mpe koteya na mokili mobimba. Na ekeke ya liboso, mosala yango ya kosakola esalaki ete lisangá ya baklisto ezala “likonzi mpe etɛ[lɛ]miselo na makambo na solo.” (1 Timote 3:15) Nsima na yango, lipɛngwi ekɔtaki mpe eumelaki ntango molai. Na ntango yango solo ezalaki lisusu kongɛnga te. Na mikolo oyo, na “elaka na nsuka,” “boyebi” ekómi mingi, mpe epesi bato ebele elikya oyo euti na Biblia, elikya ya lobiko ya seko.—Danyele 12:4.
2. Yehova asalaki nini mpo mosala ya kosakola esalema malamu?
2 Atako Satana alɛmbi te mpo na koluka kobebisa mokano ya Nzambe, mosala ya kosakola ezali kokende liboso na ndenge ya kokamwa, ezala na ekeke ya liboso mpe na ekeke ya 20. Yango ezali kotinda biso tókanisa esakweli ya Yisaya. Mpo na Bayuda oyo basengelaki kolongwa na boombo mpe kozonga na Yuda na ekeke ya motoba L.T.B., Yisaya akomaki boye: “Mabwaku nyonso makotondisama, nkeka mpe ngomba nyonso ikokitisama. Bisika bigunzami ikosembolama mpe bipai na mobulu ikobongisama alima.” (Yisaya 40:4) Ndenge moko mpe, Yehova abongisaki nzela mpo na mosala monene ya kosakola, ezala na ekeke ya liboso to na ekeke ya 20.
3. Na makambo nini Yehova akoki kokokisa mikano na ye?
3 Yango elingi koloba te ete awa na mabelé, Yehova nde atambwisaki likambo mokomoko mpo mosala ya kosakola nsango malamu ekende liboso; elingi mpe koloba te ete Yehova asalelaki makoki na ye ya koyeba makambo ekoya mpo ayeba ndenge likambo mokomoko ekosalema. Ya solo, akoki koyeba mpe kobongisa makambo oyo ekoya. (Yisaya 46:9-11) Kasi azali mpe na makoki ya kobongola makambo oyo ezali kosalema. Lokola mobateli ya mpate oyo ayebi mosala na ye malamu, ayebaka kotambwisa mpe kobatela etonga na ye, Yehova azali kotambwisa basaleli na ye. Azali kobikisa bango, azali kobatela bango mpo bázala malamu na elimo mpe azali kosalisa bango báyeba kosalela makambo oyo ezali kobima ete mosala ya kosakola nsango malamu na mokili mobimba ekende liboso.—Nzembo 23:1-4.
Mosala ya mpasi
4, 5. Mpo na nini kosakola nsango malamu ezali mokumba moko monene?
4 Kotonga masuwa na ntango ya Noa ezalaki mosala moko monene mpenza, ndenge moko mpe, mosala ya kosakola Bokonzi ezalaki mosala monene na ekeke ya liboso mpe ezali mosala monene na ntango na biso. Komema nsango moko na bisika nyonso oyo bato bafandi ezalaka ntango nyonso likambo ya mpasi; kasi mosala ya kosakola nsango malamu ezalaki mpasi lisusu koleka. Na ekeke ya liboso, bayekoli ya Yesu bazalaki mpenza mingi te. Yesu, Motambwisi na bango afundamaki ete azali mozimbisi mpe abomamaki. Lingomba ya Bayuda ezalaki lingomba ya kala. Bazalaki na tempelo moko kitoko na Yelusaleme. Mangomba mosusu ezalaki banda kala na mikili oyo ezalaki pembenipembeni ya Mai Monene ya Méditerranée; mangomba yango ezalaki na batempelo mpe banganga na yango. Ndenge moko mpe, ntango “elaka na nsuka” ebandaki na 1914, baklisto bapakolami bazalaki mingi te, nzokande bandimi ya mangomba mosusu oyo balobaka ete basalelaka Nzambe bazalaki ebele.—Danyele 12:9.
5 Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete bakonyokola bango. Alobaki boye: “Bakobimisa bino mpo na minyoko mpe bakoboma bino; mabota nyonso bakoyina bino mpo na nkombo na ngai.” (Matai 24:9) Longola mikakatano yango, mingimingi na “mikolo ya nsuka,” baklisto bakozala na “ntango ya mpasi.” (2 Timote 3:1) Bonene ya mosala, minyoko, mpe bampasi ya mokili eyeisi mosala yango lisusu mpasi koleka. Esɛngi kozala na kondima makasi.
6. Yehova alobaki nini mpo na kondimisa basaleli na ye ete mosala ekokende ntango nyonso liboso?
6 Yehova ayebaki ete mikakatano ekozala, kasi ayebaki mpe ete eloko moko te ekopekisa mosala yango. Esakweli moko eyebisaki ete mosala ya kosakola ekokende ntango nyonso liboso. Esakweli yango ekokisamaki, ezala na ekeke ya liboso mpe na ekeke ya 20; yango elobaki boye: “Nsango Malamu oyo na Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba.”—Matai 24:14.
7. Na ekeke ya liboso, mosala ya kosakola ekómaki tii wapi?
7 Lokola bazalaki na elimo santu mpe bazalaki na kondima, basaleli ya Nzambe na ekeke ya liboso bakendaki liboso na kokokisa mosala na bango. Lokola Yehova azalaki na bango elongo, basalaki mosala monene koleka ndenge oyo bango moko bakanisaki. Soki mbula 27 nsima ya liwa ya Yesu, ntango Paulo akomelaki Bakolose mokanda, alobaki ete nsango malamu “esili kosakolama epai na bato nyonso na nse na Likoló.” (Bakolose 1:23) Ndenge moko mpe lelo oyo, na nsuka ya ekeke ya 20, nsango malamu ezali kosakolama na mikili 233.
8. Bato mingi bandimaki nsango malamu na kati ya makambo nini? Pesá bandakisa.
8 Na bambula oyo, bamilio ya bato bandimi nsango malamu. Mingi bandimi yango na ntango ya mpasi: na ntango ya bitumba, na kati ya epekiseli, mpe na ntango ya minyoko makasi. Ezalaki mpe bongo na ekeke ya liboso. Mokolo moko babɛtaki Paulo na Sila fimbo makasi mpe bakɔtisaki bango na bolɔkɔ. Moto akoki kondima te ete na esika ya ndenge wana bakokaki kokómisa bato bayekoli! Kasi, Yehova asalelaki libaku yango mpo na kokómisa bato bayekoli. Paulo na Sila babimaki na bolɔkɔ, mpe mokɛngɛli ya bolɔkɔ na libota na ye mobimba bakómaki bandimi. (Misala 16:19-33) Makambo motindo yango ezali komonisa ete batɛmɛli bakoki te kopekisa nsango malamu esakolama. (Yisaya 54:17) Kasi, baklisto bakutanaki kaka na botɛmɛli mpe minyoko te. Sikoyo, tólobela naino makambo ya malamu oyo esalisaki na kobongisa nzela mpo mosala ya kosakola nsango malamu, ezala na ekeke ya liboso to na ekeke ya 20, ekende liboso.
Makambo ya losambo
9, 10. Ndenge nini Yehova apesaki bato elikya mpo na kosakola nsango malamu na ekeke ya liboso mpe na ekeke ya 20?
9 Tótalela ntango oyo nsango malamu esengelaki kosakolama na mokili mobimba. Na ekeke ya liboso, esakweli ya bapɔsɔ 70, oyo ezali na Danyele 9:24-27, eyebisaki mbula oyo Masiya asengelaki komonana: na mobu 29 T.B. Atako na ekeke ya liboso Bayuda bayebaki malamumalamu ntango yango te, bazalaki mitema likoló, bazalaki kozela Masiya. (Luka 3:15) Buku moko ekomami na Lifalanse (Manuel Biblique) elobi boye: “Bato bayebaki ete bapɔsɔ ntuku nsambo oyo Danyele alobelaki ekómaki na nsuka; moto moko te akamwaki ntango bayokaki Yoane Mobatisi kosakola ete Bokonzi ya Nzambe ekómi pene.”
10 Tokoloba nini mpo na ntango na biso? Likambo monene oyo esalemaki ezali ete Yesu afandaki na kiti ya bokonzi kuna na likoló; yango ezalaki mpe ebandeli ya eleko ya kozala na ye na nguya ya Bokonzi. Esakweli ya Biblia emonisi ete likambo yango esalemaki na 1914. (Danyele 4:13-17) Bandimi mosusu ya ntango na biso bazalaki mpe mitema likoló mpo na kozela likambo yango. Bayekoli ya solosolo ya Biblia bazalaki mpe na elikya yango, bango babandaki kobimisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na mobu 1879 mpe ezalaki kobéngama La Tour de Garde de Sion et Messager de la présence du Christ (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Siona mpe mopanzi-nsango ya kozala ya Klisto). Na bongo, ezala na ekeke ya liboso mpe na mikolo na biso, bilikya oyo bandimi bazalaki na yango ebongisaki nzela mpo nsango malamu esakolama.a
11. Makambo nini ya losambo epesaki nzela mpo nsango malamu esakolama malamu?
11 Likambo mosusu oyo esungaki mosala ya baklisto, ezala na ekeke ya liboso to na mikolo na biso, ezali ete bato mingi bayebaki Biblia. Na ekeke ya liboso, Bayuda mingi bazalaki kofanda na bikólo mosusu oyo ezalaki zingazinga. Bayuda yango bazalaki na biyanganelo epai bazalaki kokutana mbala na mbala mpo na koyoka botangi mpe ndimbola ya Biblia. Na bongo, baklisto ya ekeke ya liboso basalisaki bato banda na boyebi ya makambo ya Nzambe oyo bazalaki na yango. (Misala 8:28-36; 17:1, 2) Na ebandeli ya ekeke na biso, basaleli ya Yehova bakutanaki na makambo ndenge yango na mikili mingi. Biblia ezalaki mingi na mikili ya boklisto, mingimingi na mikili oyo Lingomba ya Protesta ezalaki makasi. Bazalaki kotánga yango na bandakonzambe mingi; mpe bato mingi bazalaki na Biblia na bango moko. Bato mingi bazalaki na Biblia, kasi esengelaki kosalisa bango mpo na kososola makambo oyo ezali na mokanda yango.
Matomba ya mibeko ya Leta
12. Na ekeke ya liboso, ndenge nini mibeko ya Loma ezalaki kobatela bato?
12 Mibeko ya Leta esalisaki mingi mpo baklisto básala mosala na bango ya koteya. Bokonzi ya Loma ezalaki koyangela bikólo mingi na ekeke ya liboso, mpe mibeko na yango ebongolaki mpenza bomoi ya mokolo na mokolo. Mibeko yango ezalaki kobatela bato, mpe ebatelaki baklisto ya ekeke ya liboso. Na ndakisa, mpo na mibeko ya Loma, babimisaki ntoma Paulo na bolɔkɔ mpe babɛtaki ye fimbo te. (Misala 16:37-39; 22:25, 29) Na Efese, ntango bato ebele batombokaki, bayebisaki bango mibeko ya Loma, mpe bafandaki nyɛɛ. (Misala 19:35-41) Mokolo moko, balingaki kosala Paulo mabe na Yelusaleme, kasi abikaki mpo azalaki mwanamboka ya Loma. (Misala 23:27) Na nsima, mibeko ya Loma epesaki ye nzela asamba na ntina na kondima na ye liboso ya Kaisala. (Misala 25:11) Atako bakonzi mingi ya Loma bazalaki konyokola bato na boyangeli na bango, mingimingi na ekeke ya liboso mibeko esalisaki mpo na “kolongisa mpe kobatela nsango malamu na mibeko ya Leta.”—Bafilipi 1:7, NW.
13. Na mikolo na biso, ndenge nini mibeko ya Leta ezali kosalisa biso na kosala mosala ya kosakola?
13 Lelo oyo, makambo ezali mpe ndenge yango na mikili mingi. Atako ezali na baoyo bazali koluka ‘kobongisa makambo mabe na nzela ya mibeko,’ na mikili mingi, mibeko ya Leta elobi mpenza ete moto nyonso azali na bonsomi ya kosambela. (Nzembo 94:20, NW) Baguvernema mingi, ntango ezali komona ete Batatoli ya Yehova bazali bato oyo bakoki kobebisa kimya ya mboka te, ezali kopesa biso mikanda ya Leta oyo ezali komonisa ete bandimi mosala na biso. Na États-Unis, epai mikanda mingi ya Batatoli ebimisamaka, mibeko ya mboka esali ete Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elanda kobimisama na boumeli ya mbula 120 mpe bato bátánga yango na mokili mobimba.
Ntango ya kimya mpe kotosa bindimeli ya bato mosusu
14, 15. Na ekeke ya liboso, ndenge nini mwa kimya epesaki nzela na kosakola nsango malamu?
14 Na ntango mwa kimya ezalaki, mosala ya kosakola ekendeki mpe liboso. Atako maloba ya Yesu ezalaki solo ete ‘ekólo moko ekotɛmɛla ekólo mosusu,’ ezala na ekeke ya liboso to na mikolo na biso, ntango ya kimya epesaki nzela ete nsango ya Bokonzi esakolama mingi. (Matai 24:7) Baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki na ntango ya Pax Romana, to Kimya ya Loma. Moto moko ya mayele na istware akomaki boye: “Bokonzi ya Loma eyangelaki mpenza mikili oyo ezalaki pembenipembeni ya Mai Monene ya Méditerranée, yango wana esukisaki bitumba oyo ezalaki kosalema ntango nyonso na mikili yango.” Kimya yango epesaki baklisto ya liboso nzela ya kosala mibembo na mikili nyonso oyo Bokonzi ya Loma ezalaki koyangela mpe makama ezalaki mpenza te.
15 Bokonzi ya Loma esalaki nyonso ete bato nyonso bázala liboke moko. Yango esalaki ete bato básalaka mibembo, bátosaka bindimeli ya bato mosusu, mpe bamoko bándima makanisi ya basusu, mpe elendisaki likanisi oyo ete bato nyonso bazali bandeko. Buku moko (On the Road to Civilization) elobi boye: “Lokola bokonzi [ya Loma] ezalaki na bomoko, makambo ezalaki malamu [mpo na kosakola nsango ya baklisto]. Bandelo ya bikólo ezalaki lisusu kokabola bato te. Mwanamboka ya Loma azalaki mwanamboka ya mokili mobimba. . . . Lisusu, na ekólo oyo bazalaki koloba ete mboka ya moto ezali mokili mobimba, ezalaki mpasi te mpo bato bándima lingomba oyo ezalaki koteya ete bato nyonso bázala bandeko.”—Talá Misala 10:34, 35; 1 Petelo 2:17.
16, 17. Na mikolo na biso, nini ezali kopusa bato na koluka kimya, mpe bato mingi bazali koloba nini?
16 Tokoloba boni mpo na mikolo na biso? Bitumba ya ekeke ya 20 ebomi bato mingi koleka bitumba nyonso oyo esalemá liboso, mpe bitumba ezali naino kosalema na mikili mosusu. (Emoniseli 6:4) Kasi, ntango ya kimya ezalaka. Na boumeli ya mbula koleka 50, mikili oyo ezali na bibundeli eleki makasi ebundaki te kati na yango. Likambo yango esalisaki mingi mpo nsango malamu esakolama na mikili yango.
17 Makambo ya nsɔmɔ oyo bitumba ya ekeke ya 20 ebimisi epusi bato mingi na kondima ete tozali na mposa ya bokonzi oyo ekoyangela mokili mobimba. Kobanga etumba ya mokili mobimba epusaki mikili na kosala lisangá oyo babéngaki Société des Nations mpe na nsima basalaki ONU. (Emoniseli 13:14) Mokano ya liboso ya bibongiseli yango ezalaki ya kolendisa kimya mpe kosalisanaka kati na bikólo. Mbala mingi bato oyo bamonaka ete tozali mpenza na mposa ya bokonzi oyo ekoyangela mokili mobimba bandimaka nsango malamu ya bokonzi oyo ekotya kimya ya solosolo oyo ekoumela, elingi koloba Bokonzi ya Nzambe.
18. Makanisi nini bato bazalaki na yango na ntina na mangomba esungaki mosala ya kosakola?
18 Atako baklisto banyokwamaki mingi na bantango mosusu, ezala na ekeke ya liboso to na ekeke ya 20, ezalaki na bantango oyo bato mingi bazalaki kotosa bindimeli ya bato mosusu. (Yoane 15:20; Misala 9:31) Baloma bazalaki kondima mpe kokɔtisa na losambo na bango banzambe ya bikólo oyo bazalaki koyangela. Profesɛrɛ Rodney Stark akomaki boye: “Na makambo mingi, Bokonzi ya Loma epesaki bato bonsomi mingi ya losambo, mpe bonsomi ya ndenge wana eyaki komonana lisusu kaka nsima ya Révolution Américaine.” Lelo oyo, na mikili mingi, bato bakómi mpenza kondima makanisi ya bato mosusu; yango wana bazali kondima koyoka nsango ya Biblia oyo Batatoli ya Yehova bazali komemela bango.
Biloko oyo siansi ezali kobimisa
19. Ndenge nini baklisto ya ekeke ya liboso basalelaki codex?
19 Mpo na kosukisa, tótalela ndenge oyo Yehova asalisaki basaleli na ye básalela malamu biloko oyo siansi ezali kobimisa. Atako baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki na eleko oyo siansi ezalaki kobimisa biloko ya sika nokinoki te, basalelaki eloko moko oyo ebimaki sika: codex, to mokanda ya bankasa. Codex ezwaki esika ya rulo oyo ezalaki mindɔndɔ mpo na kosalela yango. Buku moko (The Birth of the Codex) elobi boye: “Bakomi oyo bazalaki baklisto te baumelaki mpenza liboso bábanda kosalela codex na esika ya barulo, nzokande, na bisika nyonso oyo bazalaki, baklisto bakómaki mbala moko kosalela codex.” Buku yango elobi lisusu boye: “Na ekeke ya mibale, na bisika nyonso oyo bazalaki, baklisto bazalaki kosalela codex; yango ezali kopusa biso na kokanisa ete bakómaki kosalela yango liboso ya mobu 100 T.B.” Codex ezalaki na mindɔndɔ lokola rulo te mpo na kosalela yango. Moto akokaki koluka mpe komona nokinoki maloba oyo azali koluka. Na ntembe te, likambo yango esalisaki baklisto ya liboso baoyo, lokola Paulo, bazalaki kolimbola Biblia mpe bazalaki ‘kopesa mikapo mpo na kondimisa’ makambo oyo bazalaki koteya.—Misala 17:2, 3, NW.
20. Na mosala na bango ya kosakola nsango malamu na mokili mobimba, ndenge nini basaleli ya Nzambe bazali kosalela biloko oyo siansi ezali kobimisa?
20 Mikolo oyo, siansi ezali kobimisa biloko ya sika na ndenge ya kokamwa. Ba imprimerie oyo ebimisaka mikanda nokinoki epesi nzela mpo na kobimisa mikanda oyo elimbolaka Biblia na minɔkɔ mingi mbala moko. Biloko oyo siansi ezali kobimisa mikolo oyo esalisi mingi mpo na kobongola Biblia nokinoki. Mituka, bingbunduka, masuwa, mpe aviɔ ezali kosalisa mpo na kokumba mikanda oyo elimbolaka Biblia na mokili mobimba. Telefone mpe bamasini ya fax ezali kosalisa bato básolola ata soki moko azali mosika na mosusu. Na nzela ya elimo na ye, Yehova atambwisi basaleli na ye na kosalela malamu biloko yango ya siansi mpo na kopalanganisa nsango malamu na mokili mobimba. Ntango bazali kosalela biloko yango, mposa na bango ezali te ya koyeba biloko oyo ebimi sika na mokili. Kasi, mposa na bango ya libosoliboso ezali ya koyeba wapi oyo ekosalisa bango na kokokisa mosala na bango malamu koleka.
21. Tokoki kozala na elikya nini?
21 Yesu asakolaki ete, “Nsango Malamu oyo na Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba.” (Matai 24:14) Lokola baklisto ya ekeke ya liboso bamonaki ndenge esakweli yango ekokisamaki, biso mpe lelo oyo tozali komona yango na bonene na yango. Atako mosala ezali monene mpe ezali mpasi, ezala na ntango malamu to na ntango ya mpasi, ntango mibeko ya bamboka mpe makanisi ya bato ezali kobongwana, na ntango ya bitumba to na ntango ya kimya, na kati ya makambo nyonso ya sika oyo siansi ezali kobimisa, nsango malamu esakolami mpe ezali kosakolama. Ozali kokamwa te na komona ete Yehova azali na mayele mingi mpe amonaka mpenza mosika? Tokoki mpenza kozala na elikya ete mosala ya kosakola ekokokisama na ndenge oyo Yehova akanaki mpe mokano na ye oyo ezali komonisa bolingo na ye ekokokisama mpo bato ya sembo bázwa mapamboli. Bakozwa mabelé mpe bakofanda wana libela na libela. (Nzembo 37:29; Habakuku 2:3) Soki tozali kokokisa mokano ya Yehova na bomoi na biso, tokozala na kati ya bato yango.—1 Timote 4:16.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba makambo mosusu ya bisakweli yango mibale mpo na Masiya, talá mokanda Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko, nkasa 36, 97, mpe 98-107, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
Bozongeli
◻ Mpo na nini kosakola nsango malamu ezalaki mokumba moko monene?
◻ Ndenge nini mibeko ya Leta mpe mwa kimya na bamboka epesaki baklisto nzela mpo básala mosala na bango?
◻ Lipamboli ya Yehova na mosala ya kosakola ezali kopesa biso elikya nini mpo na makambo ekosalema na mikolo ekoya?