Yehova azali kosɛnga biso makambo oyo eleki makasi?
“[Yehova] alingi nini epai na yo? Bobele ete osala na boyengebene mpe ete olinga boboto mpe ete otambola na bopɔlɔ esika moko na Nzambe na yo.”—MIKA 6:8.
1. Mpo na nini bato mosusu basalelaka Yehova te?
YEHOVA azali kosɛnga basaleli na ye eloko moko. Kasi, nsima ya kotánga maloba ya mokanda ya Mika oyo esimbi boyekoli na biso, okomona mpenza ete Nzambe azali kosɛnga biso makambo ya makasi te. Atako bongo, bato mingi basalelaka Mozalisi na biso Monene te, mpe bato mosusu oyo bazalaki kosalela ye, batiki. Mpo na nini? Mpo bamonaka ete makambo oyo Nzambe azali kosɛnga biso eleki makasi. Tokoki mpenza koloba bongo? To mbala mosusu mokakatano euti nde na ndenge oyo moto atalelaka makambo oyo Yehova azali kosɛnga? Lisolo moko ya kala ekosalisa biso tósosola likambo yango.
2. Namana azalaki nani, mpe mosakoli ya Yehova asɛngaki ye asala nini?
2 Namana, mokonzi ya basoda ya Sulia azalaki na maladi ya maba. Bayebisaki ye ete na Yisalaele, ezalaki na mosakoli moko ya Yehova oyo akokaki kosilisa maladi na ye. Namana na baninga na ye basimbaki nzela, bakendaki na Yisalaele mpe bakómaki na ndako ya Elisa, mosakoli ya Nzambe. Kasi, na esika Elisa abima mpo na koyamba mopaya monene oyo ayaki epai na ye, atindaki nde mosaleli na ye ayebisa Namana ete: “Kendá kosukola na Yaladene mbala nsambo mpe nzoto na yo ekobika mpe ekozala pɛto.”—2 Mikonzi 5:10.
3. Mpo na nini Namana aboyaki liboso kosala likambo oyo Yehova asɛngaki?
3 Soki Namana akokisi likambo oyo mosakoli ya Nzambe asɛngi ye, mbɛlɛ maladi mabe na ye ekosila. Tokoki mpenza koloba ete likambo oyo Yehova asɛngaki ye elekaki makasi? Te. Kasi Namana aboyaki kosala likambo oyo Yehova asɛngaki. Alobaki ete: “Abana mpe Falapala, oyo mikɛlɛ na Damasɛkɛ, ileki mai nyonso na Yisalaele te? Nakoki kosukola na yango te ete napɛtwa?” Na yango, Namana abandaki kozonga epai na ye na nkanda.—2 Mikonzi 5:12.
4, 5. (a) Namana azwaki mbano nini lokola atosaki, mpe alobaki nini nsima na yango? (b) Sikoyo tokotalela nini?
4 Mokakatano ya Namana ezalaki mpenza nini? Ezali te ete likambo oyo basɛngaki ye ezalaki mpasi. Na mayele nyonso, basaleli ya Namana balobaki na ye boye: “Soko mosakoli alobaki na yo ete osala likambo monene, [mbɛlɛ] yo osali yango te? Na koleka, soko alobi na yo ete, Sukolá mpe okopɛtwa!” (2 Mikonzi 5:13) Mokakatano eutaki nde na elimo oyo Namana azalaki na yango. Namana amonaki ete bapesaki ye lokumu oyo ebongi na ye te mpe basɛngaki ye asala likambo oyo na miso na ye ezalaki na ntina te mpe ezalaki kokitisa ye. Kasi, Namana andimaki toli ya mayele ya basaleli na ye mpe asukolaki mbala nsambo na Ebale Yaladene. Kanisá esengo azalaki na yango ntango “nzoto na ye ekómaki lisusu lokola nzoto na mwana moke, apɛtwaki”! Azalaki na botɔndi mingi. Namana alobaki mpe ete banda mokolo wana, akokaki kosambela nzambe mosusu te kaka Yehova.—2 Mikonzi 5:14-17.
5 Banda kala, Yehova asɛngaka bato bátosa mibeko ndenge na ndenge oyo apesaka. Sikoyo tosɛngi na yo otalela mwa ndambo ya mibeko yango. Ntango ozali kotalela yango, omituna soki Yehova asɛngaki yo makambo yango olingaki kosala nini. Na nsima, tokotalela makambo oyo Nzambe azali kosɛnga biso lelo oyo.
Makambo oyo Yehova asɛngaki na ntango ya kala
6. Makambo nini basɛngaki na mobali na mwasi ya liboso, yo olingaki kotalela mobeko yango ndenge nini?
6 Yehova ayebisaki Adama na Eva, mobali na mwasi ya liboso ete bábota bana, bázala bakonzi ya mokili, mpe bázala bakonzi ya banyama. Mobali na mwasi na ye bafandaki mpe na elanga moko kitoko. (Genese 1:27, 28; 2:9-15) Kasi, batyelaki bango mobeko moko. Elanga ya Edene ezalaki na banzete mingi oyo ezalaki kobota mbuma, kasi ezalaki na nzete moko oyo basengelaki kolya te. (Genese 2:16, 17) Basɛngaki bango likambo ya mpasi te, lokuta? Soki ezalaki yo, mbɛlɛ osepelaki na mokumba wana, mpe na elikya ya bomoi ya seko na nzoto kolɔngɔnɔ? Atako momeki moko akɔtaki na elanga ya Edene, olingaki koboya kondima makanisi na ye? Olingaki kondima ete Yehova atya mwa malako oyo ezalaki mpe makasi te?—Genese 3:1-5.
7. (a) Noa azwaki mokumba nini, mpe makambo nini akutanaki na yango? (b) Ndenge nini otalelaka likambo oyo Yehova asɛngaki Noa?
7 Bambula mingi na nsima, Yehova atindaki Noa atonga masuwa mpo abika na mpela oyo esengelaki kozindisa mokili mobimba. Soki tokanisi ndenge masuwa yango ezalaki monene, tokomona ete kotonga yango ezalaki lisɛki te mpe, na ntembe te, bato mosusu bazalaki kosɛka mpe kolɛmbisa ye ntango azalaki kosala mosala yango. Kasi, Noa abikisaki libota na ye na banyama ebele! (Genese 6:1-8, 14-16; Baebele 11:7; 2 Petelo 2:5) Soki bapesaki yo mokumba ya ndenge wana, olingaki kosala yango na molende mpe kosilisa yango? To olingaki koloba ete Yehova asɛngi yo likambo oyo eleki makasi?
8. Likambo mini basɛngaki Abalayama, mpe botosi na ye ezalaki elilingi ya likambo nini?
8 Nzambe asɛngaki Abalayama likambo ya mpasi mpenza. Alobaki na ye boye: “Kamatá mwana na yo, mwana na yo [kaka moko, NW], Yisaka, oyo yo olingi, mpe kendá na mokili na Moliya mpe kabá ye [lokola] mbeka na kotumba.” (Genese 22:2) Lokola Yehova alakaki ete Yisaka akobota bana, kasi na ntango wana azalaki naino na mwana te, kondima ya Abalayama emekamaki na likambo oyo ete Nzambe akoki kozongisa Yisaka na bomoi. Ntango Abalayama alingaki kokaba Yisaka lokola mbeka, Nzambe apekisaki ye aboma mwana na ye. Likambo yango elakisaki ete Nzambe akopesa Mwana na ye mpo na bato nyonso mpe na nsima akosekwisa ye.—Genese 17:19; 22:9-18; Yoane 3:16; Misala 2:23, 24, 29-32; Baebele 11:17-19.
9. Mpo na nini tokoki koloba ete Yehova asɛngaki Abalayama makambo oyo eleki makasi te?
9 Bato mosusu bakoki komona ete likambo oyo Yehova Nzambe asɛngaki Abalayama elekaki makasi. Kasi, ezali mpenza bongo? Tokoki mpenza koloba ete Mozalisi na biso, oyo akoki kosekwisa bakufi, azali na bolingo te soki asɛngi biso tótosa ye ata soki yango ekosɛnga biso tókufa mpo na mwa ntango? Yesu Klisto na bayekoli na ye ya liboso bakanisaki bongo te. Bandimaki konyokwama, ata mpe kokufa, mpo na kosala mokano ya Nzambe. (Yoane 10:11, 17, 18; Misala 5:40-42; 21:13) Soki ekómeli yo bongo, okondima kosala yango? Tótalela makambo mosusu oyo Yehova asɛngaki bato oyo bandimaki kozala basaleli na ye.
Mibeko ya Yehova na Yisalaele
10. Banani balakaki ete bakosala makambo nyonso oyo Yehova asɛngaki, mpe apesaki bango nini?
10 Bankɔkɔ ya Abalayama, baoyo mwana na ye Yisaka mpe nkɔkɔ na ye Yakobo to Yisalaele babotaki, bakómaki ekólo monene oyo ebéngamaki libota ya Yisalaele. Yehova alongolaki Bayisalaele na boombo na Ezipito. (Genese 32:28; 46:1-3; 2 Samwele 7:23, 24) Mwa moke na nsima, bandimaki kosala makambo nyonso oyo Nzambe asɛngaki bango. Balobaki boye: “Tokosala yango nyonso elobi [Yehova].” (Exode 19:8) Lokola Bayisalaele bazalaki na mposa Yehova azala mokonzi na bango, Yehova apesaki bango mibeko koleka 600, bakisa mpe Mibeko Zomi. Na nsima, mibeko oyo Nzambe apesaki na nzela ya Mose, ekómaki kobéngama kaka Mibeko.—Ezela 7:6; Luka 10:25-27; Yoane 1:17.
11. Ntina nini mosusu Mibeko epesamaki, mpe malako mosusu nini epesamaki mpo na kokokisa yango?
11 Ntina mosusu oyo bapesaki Mibeko ezalaki mpo malako na yango elakisa Bayisalaele bizaleli oyo ebongi na makambo ya kosangisa nzoto, mombongo, mpe kobɔkɔla bana. (Exode 20:14; Levitike 18:6-18, 22-24; 19:35, 36; Deteronome 6:6-9) Mibeko emonisaki makambo oyo moto asengeli kosalela baninga na ye, to bibwele na ye. (Levitike 19:18; Deteronome 22:4, 10) Mibeko ya bafeti ya mbula na mbula mpe koyangana mpo na losambo esalisaki bato bázala malamu na elimo.—Levitike 23:1-43; Deteronome 31:10-13.
12. Mokano monene ya Mibeko ezalaki nini?
12 Ntoma Paulo amonisaki ntina moko monene ya Mibeko. Akomaki boye: “[Mibeko] ebakisamaki mpo mabunga emonana polele, tii ntango mombóto [Klisto] akoya; ye oyo bapesaki elaka.” (Bagalatia 3:19, NW) Mibeko ezalaki kosalisa Bayisalaele bábosana te ete bazali bato ya masumu. Na bongo, bazalaki mpenza na mposa ya mbeka oyo ekolongola masumu na bango mpo na libela. (Baebele 10:1-4) Elingi koloba ete Mibeko epesamaki mpo na kobongisa Bayisalaele bándima Yesu lokola Masiya to Klisto. Paulo akomaki ete: “Mibeko izalaki Molakisi na biso kino koya na Klisto, ete tólongisama na kondima.”—Bagalatia 3:24.
Mibeko ya Yehova elekaki kilo?
13. (a) Ndenge nini bato ya masumu bazalaki kotalela Mibeko, mpe mpo na nini? (b) Okoki mpenza koloba ete Mibeko elekaki makasi?
13 Atako Mibeko ezalaki “na bosantu mpe sembo mpe malamu,” bato mingi bamonaki ete elekaki kilo. (Baloma 7:12, NW) Lokola Mibeko ezalaki na mbeba ata moke te, Bayisalaele bakokaki kotosa makambo na yango nyonso te. (Nzembo 19:7) Yango wana ntoma Petelo abéngaki yango “nkanga na nkingo, oyo batata na biso, na biso mpe, tozalaki na nguya na kokumba te.” (Misala 15:10) Mibeko yango moko ezalaki kilo te, mpe bato oyo batosaki yango bazwaki bolamu mingi.
14. Pesá mwa bandakisa oyo ezali kolakisa ete Mibeko ezalaki na ntina mingi mpo na Bayisalaele?
14 Na ndakisa, Mibeko esɛngaki te ete bátyaka moyibi na bolɔkɔ kasi, asala mosala mpo afuta biloko oyo ayibi, mpe asengeli kofuta yango mbala mibale to koleka. Na ndenge yango, moto oyo bayibi eloko na ye azalaki kobungisa yango libela te, mpe bato ya misala bazalaki na mokumba te ya kopesa Leta mbongo mpo na kotambwisa misala ya babolɔkɔ. (Exode 22:1, 3, 4, 7) Bilei oyo ebebi epekisamaki. Mosuni ya ngulu soki ebɛli malamu te ekoki kozala na mikrobe ya trichinose, mpe lapin ekoki kozala na maladi ya tularémie. (Levitike 11:4-12) Ndenge moko mpe, Mibeko ezalaki kobatela bato lokola epekisaki kosimba bibembe. Mibeko elobaki ete moto oyo asimbi ebembe asengeli kosukola nzoto mpe kosukola bilamba na ye. (Levitike 11:31-36; Mituya 19:11-22) Lokola basɛngaki bango bákundaka nyei, bazalaki komibatela na mikrobe; nzokande bato ya siansi bayei koyeba mikrobe kaka na bikeke oyo.—Deteronome 23:13.
15. Nini ezalaki kilo mpo na Bayisalaele?
15 Mibeko esɛngaki bato makambo oyo eleki makasi te. Kasi bato oyo bazalaki na mokumba ya kolimbola Mibeko nde bazalaki kosɛnga bato makambo ya makasi. Diksionere moko (A Dictionary of the Bible) ya James Hastings, elobi boye: “Mobeko mokomoko ya Biblia ebotaki ebele ya malako mikemike. . . . Balukaki ete likambo nyonso oyo bato bakoki kosala ezala na malako na yango euti na Mibeko, mpe na makanisi na bango bayebaki eloko babéngi mawa te, batyaki mibeko makasimakasi oyo eutaki na makanisi na bango moko mpo na makambo nyonso oyo basalaka. . . . Moto akokaki lisusu koyokela lisosoli na ye te; liloba ya Nzambe ezalaki lisusu na kosalelama te mpe ebungaki na kati ya mibeko ebele ebele.”
16. Yesu alobaki nini mpo na mibeko mpe bonkɔkɔ makasimakasi ya bakonzi ya mangomba?
16 Yesu Klisto amonisaki mabe ya bakonzi ya mangomba oyo batyelaki bato mibeko ebele ebele ntango alobaki boye: “Bazali kokanga mikumba na bozito mpe bakotya yango na mapeka na bato nde bango mpenza balingi kotombola yango ata na mosapi na bango te.” (Matai 23:2, 4) Amonisaki ete mibeko makasimakasi, bonkɔkɔ, mpe milulu ya mindɔndɔmindɔndɔ mpo na komipɛtola oyo bango moko batyaki, eyeisaki “Liloba ya Nzambe mpamba.” (Malako 7:1-13; Matai 23:13, 24-26) Kasi, ata liboso Yesu aya awa na mabelé, balakisi ya mibeko na Yisalaele bazalaki kopesa makambo oyo Yehova asɛngaki ndimbola mosusu.
Yehova azali mpenza kosɛnga nini?
17. Mpo na nini Yehova asepelaki te na bambeka ya Bayisalaele oyo bazangaki kondima?
17 Na monɔkɔ ya mosakoli Yisaya, Yehova alobaki boye: “Natondi maa na mbeka itumbami na bampate babali, mpe na mafuta na banyama babɔkɔlami; nasepeli na makila na bangɔmbɛ te to na bana na mpate to na bantaba babali te.” (Yisaya 1:10, 11) Mpo na nini Nzambe asepelaki te na bambeka oyo ye moko asɛngaki na kati ya Mibeko? (Levitike 1:1–4:35) Mpo bato bazalaki kotosa ye te. Yango wana bapesaki bango toli oyo: “Bómisukola, bómipɛtola, bólongola mabe na makambo masalaki bino liboso na miso na ngai; bótika kosala mabe, yekolá kosala malamu, luká boyengebene, [sembolá monyokoli, kɔtelá, NW] bitike na batata, lobelá mwasi-akufeli-mobali.” (Yisaya 1:16, 17) Maloba oyo esalisi biso na koyeba malamu makambo oyo Yehova azali kosɛnga epai ya basaleli.
18. Makambo nini mpenza Yehova azalaki kosɛnga epai ya Bayisalaele?
18 Yesu amonisaki mpenza eloko oyo Nzambe alingi. Alobaki yango ntango batunaki ye motuna oyo: “Mobeko nini eleki monene kati na Mibeko nyonso?” Yesu apesaki eyano oyo: “Okolinga [Yehova] Nzambe na yo na motema na yo mobimba na molimo na yo mobimba mpe na [elimo, NW] na yo mobimba. Oyo ezali mobeko moleki monene mpe oyo na liboso. Mosusu na mibale ezali mpe lokola yango ete, Okolinga mozalani na yo lokola yo moko. Mibeko nyonso mpe basakoli [ekangami] na mibeko oyo mibale.” (Matai 22:36-40; Levitike 19:18; Deteronome 6:4-6) Mosakoli Mose amonisaki mpe likanisi yango ntango atunaki boye: “[Yehova] Nzambe na yo aluki nini epai na yo soko ezali oyo te ete [ozala na limemya mpo na Yehova, NW] Nzambe na yo mpe otambola na nzela na ye nyonso mpe olinga ye mpe osalela [Yehova] Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba, mpe otosa malako mpe mibeko na [Yehova]?”—Deteronome 10:12, 13; 15:7, 8.
19. Ndenge nini Bayisalaele balukaki bamonanaka basantu, kasi Yehova alobaki na bango nini?
19 Atako bazalaki kosala makambo mabe, Bayisalaele balingaki bamonanaka basantu. Atako Mibeko esɛngaki koboya kolya kaka na Mokolo ya Mbɔndi oyo ezalaki kosalema mbala moko na mbula, bango bakómisaki yango momeseno. (Levitike 16:30, 31) Kasi Yehova apamelaki bango na maloba oyo: “Oyo ezali kokila esili ngai kopona te? Kokangola minyoko na masumu, kofungola nkamba na ekangeli; kotika monyokolami ete alongwa wana esili ye kokangwa; mpe kobuka bikangeli nyonso. Ezali te ete okabola kwanga na yo epai na ye oyo azali na nzala? Mpe ete oyeisa babola babwakami libándá epai na ndako na yo? Ete wana okomona moto na bolumbu, olatisa ye, mpe ete omibomba te liboso na bato na libota na yo mpenza?”—Yisaya 58:3-7.
20. Mpo na nini Yesu apamelaki bato oyo bazalaki kosalela Nzambe na bosembo te?
20 Bayisalaele yango oyo bazalaki komimona bato ya sembo bazalaki na mokakatano ndenge moko na bakonzi ya mangomba oyo Yesu ayebisaki boye: “Bokokabaka ndambo na zomi na eidosomo mpe na aneti mpe na nkumina, nde bokotikaka kosala makambo maleki na bozito kati na mibeko, yango: kosambisa-sembo mpe koyoka mawa mpe kondima. Ekokaki kosala oyo mpe kotika yango na liboso te.” (Matai 23:23; Levitike 27:30) Maloba yango ya Yesu esalisi biso tóyeba makambo oyo Yehova azali mpenza kosɛnga biso.
21. Ndenge nini mosakoli Mika alobaki na mokuse makambo oyo Yehova azali kosɛnga mpe oyo azali kosɛnga te?
21 Mpo na komonisa polele makambo oyo Yehova azali kosɛnga mpe oyo azali kosɛnga te, mosakoli Mika atunaki motuna oyo: “Naya liboso na [Yehova] na eloko nini ete nakumbama liboso na Nzambe na lokumu? Nayela ye na mbeka itumbami, na bana na ngɔmbɛ na [mbula] moko? [Yehova] akosepela nde na nkóto na bampate babali, soko na bitima nkóto zomi na mafuta? Napesa mwana na ngai na liboso mpo na lipɛngwi na ngai, mbuma na nzoto na ngai mpo na lisumu na molimo na ngai? Ɛ moto, asili koyebisa yo oyo ezali malamu! [Yehova] alingi nini epai na yo? Bobele ete osala na boyengebene mpe ete olinga boboto mpe ete otambola na bopɔlɔ esika moko na Nzambe na yo.”—Mika 6:6-8.
22. Yehova asɛngaki mpenzampenza nini epai ya bato oyo apesaki Mibeko?
22 Na bongo, Yehova asɛngaki mpenza makambo nini epai ya bato oyo apesaki Mibeko? Bálinga Yehova Nzambe. Kasi, ntoma Paulo alobaki boye: “Mibeko mobimba ikokisami na liloba moko ete, Olinga mozalani na yo lokola yo moko.” (Bagalatia 5:14) Paulo ayebisaki mpe baklisto ya Loma ete: “Ye oyo akolingaka moto mosusu, azali kokokisa Mibeko. . . . Bolingo ezali kokokisa Mibeko.”—Baloma 13:8-10.
Mibeko eleki makasi te
23, 24. (a) Mpo na nini tosengeli kokanisa ata moke te ete makambo Yehova azali kosɛnga biso eleki makasi? (b) Tokotalela nini na lisolo oyo elandi?
23 Motema na biso esimbami te na komona ete Yehova azali Nzambe ya bolingo, ayebaka mikakatano ya bato, mpe azali na motema mawa? Yesu Klisto, Mwana na ye mobotami-bobele-moko ayaki awa na mabelé mpo na kokumisa bolingo ya Nzambe, mpo na koyebisa bato ete Yehova alingi bango mingi. Mpo na komonisa ete Nzambe azali mpenza na bolingo, Yesu alobaki boye mpo na bandɛkɛ mikemike: “Moko na bango akokwea na mabelé te soko Tata na bino ayebi te.” Asukisaki na maloba oyo: “Boye bóbanga te, bino boleki bandɛkɛ mike mingi.” (Matai 10:29-31) Ya solo, ezala likambo nini oyo Nzambe ya bolingo asɛngi biso, ekoki koleka makasi te!
24 Kasi, lelo oyo Yehova azali kosɛnga biso nini? Mpe mpo na nini bato mingi bamonaka lokola ete makambo oyo Nzambe azali kosɛnga biso eleki makasi? Soki totaleli mituna oyo, tokoyeba mpo na nini ezali malamu mingi tósala likambo nyonso oyo Yehova asɛngi biso.
Okoki kopesa eyano?
◻ Mpo na nini bato mosusu bakoki koboya kosalela Yehova?
◻ Ndenge nini makambo oyo Yehova azali kosɛnga bato ebongwanaki na boumeli ya bambula?
◻ Mibeko ekokisaki makambo nini?
◻ Mpo na nini makambo oyo Yehova azali kosɛnga biso eleki makasi te?
[Elilingi na lokasa 18]
Mibeko ya bato, lokola milulu ya mindɔndɔmindɔndɔ mpo na komipɛtola, ekómisaki losambo kilo.