Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 15/1 nk. 20-22
  • Omimonaka lokola moto ya ndenge nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Omimonaka lokola moto ya ndenge nini?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Basambeli ya solo mpe bakoki kozala na lolendo
  • Ezaleli ya komimona moto ya ntina mingi ebotaka mbuma malamu te
  • Tómitalelaka na ndenge oyo ebongi
  • Bolamu ya komitalela na ndenge ebongi
  • Tambolá elongo na Nzambe na komikitisa mpe na bopɔlɔ
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
  • Esengo na bato na komikitisa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Bopɔlɔ esilá ngala?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • Bopɔlɔ​—Ezaleli oyo epesaka kimya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 15/1 nk. 20-22

Omimonaka lokola moto ya ndenge nini?

AZALAKI na lolendo. Lokola batyaki ye mokonzi ya guvɛrnɛma, alingaki ete bábɛtɛlaka ye mabɔkɔ mpe bákumisaka ye. Kasi ayokaki mabe mpenza lokola mosali moko ya Leta aboyaki kopesa ye lokumu oyo azalaki koluka. Yango wana, mokonzi yango ya lolendo asalaki mayele mpo aboma bato nyonso oyo bazalaki ekólo moko na moto oyo aboyaki kopesa ye lokumu na kati ya mboka wana. Atako bato balingaka bámona bango na lokumu, kasi oyo wana eleki mpenza ndelo!

Moto yango ezalaki Hamana, mokonzi monene na ndako ya Asierise mokonzi ya Perse. Ye asilikelaki nani? Asilikelaki Moyuda moko nkombo na ye Moledekai. Atako nkanda oyo etindaki Hamana aluka kosilisa bato ya ekólo ya Moledekai elekaki ndelo, kasi yango ezali komonisa likama mpe makambo ya nsɔmɔ oyo lolendo ebimisaka. Lolendo na ye eyokisaki kaka bato mosusu mpasi te kasi lisusu ememelaki ye nsɔni na miso ya bato nyonso mpe na nsima ebomisaki ye.—Esetele 3:1-9; 5:8-14; 6:4-10; 7:1-10.

Basambeli ya solo mpe bakoki kozala na lolendo

Yehova azali kosɛnga ete ‘tótambola na bopɔlɔ esika moko na Nzambe.’ (Mika 6:8) Biblia ezali na masolo ya bato mingi oyo bazangaki bopɔlɔ bakómaki komimona na ntina koleka. Yango ememelaki bango mikakatano mpe mpasi. Soki totaleli mwa bandakisa yango, ekoki kosalisa biso tómona bozoba mpe likama ya kozanga bopɔlɔ to komitalela na ntina koleka.

Yona mosakoli ya Nzambe amimonaki ete azali moto ya ntina mingi, yango wana alukaki kokima ntango Yehova atindaki ye ayebisa bato mabe ya Ninive ete akopesa bango etumbu. (Yona 1:1-3) Na nsima, ntango bato ya Ninive bandimaki nsango na ye mpe babongolaki motema, Yona asepelaki te. Azalaki kowela mingi lokumu na ye moko lokola mosakoli kasi bomoi ya ebele ya bato ya Ninive ezalaki na ntina mingi te to mpe ezalaki na ntina te na miso na ye. (Yona 4:1-3) Soki tozali komimona ete tozali bato ya ntina mingi, ekoki kozala mpasi mpo tókoka kotalela makanisi ya bato mosusu mpe makambo oyo ezali koleka esika tozali na ndenge oyo ebongi.

Tótalela mpe Uzia, ye azalaki mokonzi malamu na Yuda. Ntango azalaki lisusu na bokatikati te na makanisi na ye, na lolendo nyonso alukaki kosala misala mosusu oyo ezalaki bobele mpo na banganga. Lokola azalaki komitalela na ntina koleka mpe asalaki makambo na lolendo, azwaki maladi mpe Nzambe alingaki ye lisusu te.—2 Ntango 26:3, 16-21.

Ata bantoma ya Yesu mpe bazwamaki na motambo ya komimona na ntina mingi. Moko na moko akómaki kokanisa mingi kaka mpo na lokumu na ye moko. Ntango komekama makasi eyaki, batikaki Yesu mpe bakimaki. (Matai 18:1; 20:20-28; 26:56; Malako 9:33, 34; Luka 22:24) Lokola bazangaki bopɔlɔ mpe lokola bazalaki komimona bato ya ntina mingi, yango ememaki bango bábosana mokano ya Yehova mpe mokumba na bango.

Ezaleli ya komimona moto ya ntina mingi ebotaka mbuma malamu te

Soki tozali na ezaleli ya komimona lokola bato ya ntina mingi ekoki kobimisa mikakatano mpe kobebisa boyokani na biso na bato mosusu. Na ndakisa, ekoki kozala ete tofandi na esika moko boye, tomoni mwasi moko na mobali na ye bazali koloba na mongongo ya nse mpe bazali kosɛka. Soki tomipesaka lokumu mingi, tokoki koloba ete bazali kaka kosɛka biso mpamba te bazali koloba na mongongo ya nse, nzokande ezali bongo te. Makanisi na biso ekoki kopekisa biso tóndima ete bazali nde kosɛka likambo mosusu. Tokoki koloba boye, soki bazali koloba na ngai te, bazali koloba na nani? Tokoki kosilika mpe kozwa mokano ya kolobisa lisusu mwasi na mobali yango te. Na ndenge yango, komipesa lokumu na ndenge eleki ndelo ekoki komema biso tókanisa mabe mpe tóbebisa boyokani na biso na baninga, na bandeko, mpe na bato mosusu.

Baoyo bamipesaka lokumu oyo eleki ndelo bakómaka na lolendo, ntango nyonso bamikumisaka mpo na mayele na bango, misala na bango, mpe biloko oyo bazali na yango. To soki bazali kosolola, balingaka kaka bango bálobaka, ntango nyonso bakoloba likambo moko oyo etali bango. Kolobaloba ndenge wana emonisaka ete moto azangi bolingo mpe ekoki kolɛmbisa bato oyo bazali koyoka ye. Kutu, mbala mingi bato ya lolendo bakabwanaka na bato mosusu.—1 Bakolinti 13:4.

Lokola tozali Batatoli ya Yehova, bato bakoki kosɛka to mpe kobengana biso na mosala ya kosakola. Tosengeli koyeba ete bazali koboya biso te, baboyi nde Yehova, Nkolo nsango oyo tozali kosakola. Nzokande, soki tomipesaka lokumu oyo eleki ndelo, ekoki kobimisa makambo ya mabe. Eleki mwa bambula, ndeko moko akendaki kosakwela moto moko mpe moto yango alobaki na ye mabe, ndeko wana azwaki maloba yango lokola nde balobi na ye, na nsima ye mpe azongisaki maloba mabe. (Baefese 4:29) Kobanda wana, ndeko yango atikaki kobima na mosala ya ndako na ndako. Ya solo, lolendo ekoki kotinda biso tósilika makasi na ntango tozali kosakola. Tósala makasi ete likambo yango ekómela biso te. Nzokande, tóluka na komikitisa nyonso lisalisi ya Yehova mpo na kobatela esengo na ndenge tozali na libaku ya kosangana na mosala ya kosakola.—2 Bakolinti 4:1, 7; 10:4, 5.

Lolendo ekoki lisusu kopekisa biso kondima toli oyo tozali mpenza na mposa na yango. Na mboka moko na Amerika ya Ntei, elenge mobali moko asalaki lisolo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na lisangá moko ya Batatoli ya Yehova. Ntango mokɛngɛli na eteyelo apesaki ye toli makasi na ndenge ebongaki asala, elenge yango asilikaki, abwakaki Biblia na nse mpe abimaki na Ndako ya Bokonzi, mpe akanaki ete akozonga lisusu te. Nsima ya mikolo moke, atikaki lolendo na ye, azongisaki boyokani na mokɛngɛli na eteyelo, mpe na komikitisa andimaki toli. Na nsima, elenge yango asalaki milende mpe akómaki moklisto oyo akɔmeli.

Komimona moto ya ntina mingi mpe komitalela na koleka ndelo ekoki kobebisa boyokani na biso na Nzambe. Masese 16:5 epesi likebisi oyo: “Mitema nyonso na lolendo iboyami na [Yehova].”

Tómitalelaka na ndenge oyo ebongi

Tomoni polele ete, tosengeli komitalela na koleka ndelo te. Kasi, yango elingi koloba te ete tosengeli te kotya likebi mingi na makambo oyo tosalaka to oyo tolobaka. Biblia emonisi ete bakɛngɛli, basaleli ya misala, ɛɛ, bato nyonso na kati ya lisangá, basengeli koyeba kopesa nzoto kilo. (1 Timote 3:4, 8, 11; Tito 2:2) Na yango, baklisto bakoki kosala nini mpo ete bámitalelaka na ndenge eleki ndelo te kasi, bámipesaka nzoto kilo?

Biblia emonisi ebele ya bandakisa ya kolendisa ya bato oyo bamitalelaki na ndenge eleki ndelo te. Ndakisa oyo eleki monene ezali ya komikitisa ya Yesu Klisto. Mpo na kosala mokano ya Tata na ye mpe kobikisa bato, Mwana ya Nzambe andimaki kotika esika na ye ya nkembo na likoló mpe akómaki moto mpamba awa na mabelé. Atako bafingaki ye, banyokolaki ye, akufaki liwa ya nsɔni, akangaki motema mpe abatelaki lokumu na ye. (Matai 20:28; Bafilipi 2:5-8; 1 Petelo 2:23, 24) Nini esalisaki Yesu mpo asala bongo? Amipesaki mobimba na Yehova mpe andimaki kosala mokano na ye. Yesu azalaki koyekola Liloba ya Nzambe mingi mpenza, azalaki kobondela makasi, mpe azalaki kosakola na molende mpenza. (Matai 4:1-10; 26:36-44; Luka 8:1; Yoane 4:34; 8:28; Baebele 5:7) Soki tolandi ndakisa ya Yesu, yango ekosalisa biso tómitalelaka na ndenge oyo ebongi.

Tótala lisusu ndakisa malamu ya Yonatana mwana ya Mokonzi Saulo. Lokola tata na ye atosaki Yehova te, Yonatana azangaki libaku ya kozala mokonzi na esika ya tata na ye Saulo. (1 Samwele 15:10-29) Yonatana asilikaki na likambo yango? Ayokelaki Davidi, elenge oyo akómaki mokonzi na esika na ye, zuwa? Atako Yonatana azalaki mokóló mpe na ntembe te ayebaki makambo mingi koleka Davidi, kasi na bopɔlɔ mpe na komikitisa andimaki likambo oyo Yehova asalaki mpe na bosembo nyonso asungaki Davidi. (1 Samwele 23:16-18) Koyeba mokano ya Nzambe malamumalamu mpe kondima kotosa yango ekosalisa biso ‘tóleka te komikanisa na motindo mobongi te.’—Baloma 12:3.

Yesu ateyaki ntina ya kozala na bopɔlɔ mpe komikitisa. Amonisaki yango ntango alobaki na bayekoli na ye ete soki bakei na feti ya libala basengeli kofanda na “kiti ya lokumu te” mpamba te soki moto mosusu ya lokumu mingi ayei bakoki koyoka nsɔni ntango bakolongola bango na kiti yango mpe bakopesa bango kiti na nsima mpenza. Mpo na komonisa likambo yango polele, Yesu alobaki boye: “Oyo akomizwela lokumu, lokumu na ye ekolongwa; mpe oyo aboyi lokumu, lokumu na ye ekozala monene.” (Luka 14:7-11) Soki tozali bato ya mayele, tóyoka toli ya Yesu mpe ‘tómilatisa komikitisa.’—Bakolose 3:12, NW; 1 Bakolinti 1:31.

Bolamu ya komitalela na ndenge ebongi

Elimo ya komikitisa esalisaka basaleli ya Yehova bázala na esengo ya solosolo na mosala na bango ya kosakola. Soki bankulutu bazali ‘kobatela etonga na boboto’ mpe na komikitisa nyonso, bandeko bakobanda kobanga te mpo na koya epai na bango. (Misala 20:28, 29, NW) Na ndenge yango bato nyonso na kati ya lisangá bakokakatana te mpo na kosolola na bango mpe koluka lisalisi epai na bango. Na yango, lisangá ekozala na bomoko mpo ete bandeko nyonso bazali na bolingo, na esengo, mpe bazali kotyelana motema.

Soki tozali komitalela na ntina koleka te tokozala na baninga malamu. Bopɔlɔ mpe komikitisa ekopekisa biso kokolisa elimo ya kowelana mpe koluka kosala to kozala na biloko mingi koleka bato mosusu. Bizaleli yango ya Nzambe ekosalisa biso tótalelaka bamposa ya bato mosusu, mpe na nsima tokokoka kobɔndisa mpe kosunga baoyo bazangi. (Bafilipi 2:3, 4) Mbala mingi bato bandimaka toli oyo bapesi bango na bolingo mpe na boboto. Mpe boyokani ya ndenge yango oyo etalelaka kaka bamposa ya moto ye moko te ebotaka boninga malamu, boye te? Yango nde lipamboli ya kozala na bopɔlɔ mpe komitalela ntina koleka te!—Baloma 12:10.

Soki tozali komitalela na ndenge ebongi ekozala mpasi te mpo tóndima mabunga na biso ntango tosaleli moto moko mabe. (Matai 5:23, 24) Yango ebimisaka boninga ya malamu, etindaka bato bázongisa boyokani mpe bápesana limemya. Soki bazali na komikitisa mpe na bopɔlɔ, baoyo bazali bakɛngɛli, lokola bankulutu baklisto, bazali na libaku malamu ya kosala malamu koleka mpo na bato mosusu. (Masese 3:27; Matai 11:29) Moto ya komikitisa akomona mpasi te mpo na kolimbisa baoyo basali ye mabe. (Matai 6:12-15) Akosilika te mpo na mabunga mikemike, mpe akotya elikya na Yehova mpo abongisa makambo oyo ye akokoka kobongisa te.—Nzembo 37:5; Masese 3:5, 6.

Bolamu eleki monene oyo tokozwa soki tozali na bopɔlɔ mpe na komikitisa mpenza yango oyo: Yehova akosepela na biso mpe akolinga biso mingi. “Nzambe akotɛmɛlaka bato na lolendo, nde akopesaka basɔkɛmi ngɔlu.” (1 Petelo 5:5) Tiká ete tókwea te na motambo ya kokanisa ete tozali malamu koleka kutu ndenge oyo tozali mpenza. Nzokande, na komikitisa nyonso tóyeba esika na biso na kati ya bibongiseli oyo Yehova azali kokamata. Mapamboli minene ezali kozela baoyo bazali kokokisa lisɛngami ya Nzambe ya ‘kotambola na bopɔlɔ esika moko na Nzambe.’

[Elilingi na lokasa 22]

Yonatana na komikitisa nyonso asungaki Davidi

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto