Elikya ya lisekwa ezali na nguya
“Nabungisi biloko nyonso . . . [mpo] nayeba [Yesu Klisto] mpe nguya ya kosekwa na ye.”—BAFILIPI 3:8-10.
1, 2. (a) Eleki mwa bambula, ndenge nini mokonzi moko ya lingomba alimbolaki lisekwa? (b) Lisekwa ekosalema ndenge nini?
NA EBANDELI ya bambula ya 1890, bazulunalo elobelaki lisolo moko ya kokamwa oyo mokonzi moko ya lingomba asalaki na Brooklyn, na engumba New York, na États-Unis. Mokonzi yango ya lingomba alobaki ete lisekwa ekosalema boye: mikwa nyonso na misuni oyo ezalaki na nzoto ya moto liboso akufa, ekosangana mpe ekozonga na bomoi, ata soki nzoto yango ekufaki na mɔ́tɔ to na likama, to nyama elyaki yango to ekómaki bilei ya banzete. Moteyi yango alobaki ete na mokolo moko ya ngonga 24, mokili ekotonda na makolo, misapi, mikwa, misisa, mpe mposo ya nzoto ya bamiliare ya bato oyo bakufá. Binama yango ekolukaluka binama mosusu oyo ezaláká na yango nzoto moko. Na nsima, milimo ekouta na likoló mpe na lifelo mpo na kokɔta na banzoto yango oyo esekwi.
2 Ekoki kosalema te ete baatome oyo ezalaki na nzoto ya moto liboso akufa esangana lisusu bongo moto asekwa; mpe lisusu, ezali lokuta ete moto azalaka na molimo oyo ekufaka te. (Mosakoli 9:5, 10; Ezekiele 18:4) Yehova Nzambe oyo asekwisaka bato, azali na ntina te ya kosangisa lisusu baatome oyo ezalaki na nzoto ya moto liboso akufa. Akoki kosala nzoto ya sika mpo na moto oyo asekwi. Yehova apesi Mwana na ye Yesu Klisto nguya ya kosekwisa bakufi mpe likoki ya kozala na bomoi ya seko. (Yoane 5:26) Yango wana Yesu alobaki ete: “Ngai nazali lisekwa mpe bomoi. Ye oyo azali kondima ngai, ata asili kokufa, akobika.” (Yoane 11:25, 26) Talá elikya kitoko boye! Elikya yango ezali kolendisa biso tóyika mpiko na minyoko mpe tóndima ata kokufa mpo na kobatela bosembo na biso lokola tozali Batatoli ya Yehova.
3. Mpo na nini esengelaki ete Paulo alobela makambo oyo ezali kondimisa liteya ya lisekwa?
3 Lisekwa eyokani te na liteya oyo elobaka ete moto azali na molimo oyo ekufaka te, likanisi oyo Platon, moto ya filozofi ya Bagreke azalaki na yango. Likambo nini elekaki ntango ntoma Paulo ateyaki bato minene ya Grèce na Ngomba Ale, na engumba Atene, ntango alobelaki Yesu, mpe amonisi ete Nzambe asekwisaki ye? Lisolo yango elobi ete: “Eyoki bango mpo na lisekwa na bakufi, bamosusu basɛki.” (Misala 17:29-34) Bato mingi oyo bamonaki Yesu ntango asekwaki bazalaki naino na bomoi mpe, atako bazalaki kosɛka bango, bato yango bapesaki litatoli ete asekwaki mpenza. Kasi bateyi ya lokuta oyo bazalaki na lisangá ya Kolinti bazalaki kondima lisekwa te. Yango wana na mokanda ya 1 Bakolinti mokapo 15, Paulo alobaki makambo oyo ezali kondimisa mpenza liteya yango oyo Klisto ateyaki. Soki toyekoli malamumalamu makambo oyo alobaki, tokomona ete elikya ya lisekwa ekokokisama solo mpe ezali na nguya.
Makambo oyo emonisi ete Yesu asekwaki mpenza
4. Banani bamonaki Yesu nsima ya lisekwa na ye, oyo Paulo atángaki nkombo na bango?
4 Talá ndenge Paulo abandaki. (1 Bakolinti 15:1-11) Soki Bakolinti bakómaki mpenza bandimi mpe basengelaki kokangama makasi na nsango malamu ya lobiko ezalaki mpamba te. Klisto akufaki mpo na masumu na biso, bakundaki ye, mpe asekwaki. Yesu oyo asekwaki abimelaki Kefa (Petelo), “na nsima, bazomi na mibale.” (Yoane 20:19-23) Bato soki 500 bamonaki ye mpe mbala mosusu ezali na ntango yango nde apesaki etinda ete: ‘Bókende kokómisa bato bayekoli.’ (Matai 28:19, 20, NW) Yakobo amonaki ye, bantoma nyonso ya sembo mpe bamonaki ye. (Misala 1:6-11) Pene na Damaseke, Yesu abimelaki Saulo “lokola mwana oyo abotami liboso ete elaka ekoka” elingi koloba lokola nde Saulo asilaki kosekwa mpo na bomoi ya elimo. (Misala 9:1-9, NW) Bato ya Kolinti bakómaki bandimi mpo Paulo ateyaki bango mpe bandimaki nsango malamu.
5. Na kotalela mokanda ya 1 Bakolinti 15:12-19 ndenge nini Paulo asololaki na bato mpe amonisaki bango ntina ya likambo?
5 Talá ndenge Paulo azali kosolola na bato mpe komonisa bango ntina ya likambo. (1 Bakolinti 15:12-19) Lokola bato oyo bamonaki likambo na miso bazali koteya ete Klisto asekwaki, ndenge nini moto akoki koloba ete lisekwa ezali te? Soki Yesu asekwaki te, tozali koboma nzoto mpamba na mosala ya kosakola mpe kondima na biso ezali na ntina moko te, mpe tozali bato ya lokuta mpo tozali kokosela Nzambe makambo ntango tozali koloba ete asekwisaki Klisto. Soki bakufi bakosekwa te, ‘tozali naino na kati ya masumu na biso,’ mpe baoyo bazalaki kondima Klisto mpe bakufá bakendá mpo na libela. Lisusu, “soko tozali kolikya na Klisto bobele na bomoi oyo, tozali koleka bato nyonso na mawa.”
6. (a) Paulo alobaki nini mpo na kondimisa ete Yesu asekwaki? (b) “Monguna ya nsuka” ezali nani mpe ndenge nini akolongwa?
6 Paulo andimisi ete Yesu asekwaki. (1 Bakolinti 15:20-28) Lokola Klisto azali “mbuma ya liboso” ya baoyo balali na liwa, bato mosusu oyo bakufá mpe bakosekwa. Lokola liwa eyaki mpo na kozanga botosi ya moto moko, Adama, lisekwa mpe eyei na nzela ya moto moko, Yesu. Bato na ye bakosekwa na boumeli ya kozala na ye. Klisto ‘[akobebisa] bokonzi nyonso mpe nguya nyonso’ oyo ezali kotɛmɛla bokonzi mpe boyangeli ya Nzambe lokola Mokonzi tii ntango Yehova akotya bayini na ye nyonso na nse ya makolo na ye. Na nzela ya mbeka ya Yesu, ata “monguna ya nsuka,” elingi koloba liwa oyo tozwaki na Adama ekolongolama. Bongo na nsima Yesu akozongisa Bokonzi epai ya Nzambe mpe Tata na ye, akomikitisa ye moko epai na “ye oyo akitisi biloko nyonso na nse na ye, ete Nzambe azala nyonso kati na bato nyonso.”
Kobatisama mpo na kozala bakufi?
7. Banani bazali ‘kobatisama mpo na kozala bakufi,’ mpe yango elimboli nini mpo na bango?
7 Paulo atuni bato oyo bazali kondima lisekwa te ete: “Baoyo bakobatisamaka [mpo na kozala] bakufi bazali kosala nini?” (1 Bakolinti 15:29) Paulo alingaki koloba te ete bato ya bomoi basengeli kobatisama mpo na bato oyo bakufá, mpamba te moyekoli mokomoko ya Yesu asengeli koyekola, kondima, mpe kozwa batisimo. (Matai 28:19, 20; Misala 2:41) Baklisto bapakolami bazali “kobatisama [mpo na kozala bakufi]” na ndenge bazali kondima bomoi oyo ezali komema bango na liwa mpe na lisekwa. Batisimo yango ebandaka ntango elimo santu epesaka bango elikya ya bomoi na likoló mpe esukaka ntango basekwi mpo na bomoi ya elimo, bomoi oyo bakokufa lisusu te na likoló.—Baloma 6:3-5; 8:16, 17; 1 Bakolinti 6:14.
8. Baklisto basengeli kozala na elikya nini ata soki Satana na basaleli na ye babomi bango?
8 Lokola maloba ya Paulo emonisi yango, elikya ya lisekwa epesaka baklisto makasi mpo bábanga makama te mpe liwa oyo ezali ntango nyonso liboso na bango lokola bazali kosakola Bokonzi. (1 Bakolinti 15:30, 31) Bayebi ete Yehova akoki kosekwisa bango soki atikeli Satana na basaleli na ye nzela báboma bango. Kaka Nzambe nde akoki koboma molimo na bango, to bomoi mpo na libela na Geena, oyo ezali elilingi ya liwa ya seko.—Luka 12:5.
Tosengeli kozala na bokɛngi
9. Soki tolingi elikya ya lisekwa ezala na nguya oyo ezali kosunga biso na bomoi, tosengeli koboya banani?
9 Elikya ya lisekwa epesaki Paulo makasi. Ntango azalaki na Efese, ekoki kozala ete banguna na ye bakɔtisaki ye na libándá ya masano mpo abunda na banyama ya mabe. (1 Bakolinti 15:32) Soki ezali mpenza bongo, toyebi ete babikisaki ye, ndenge babikisaki Danyele mpo ete bankosi básala ye mabe te. (Danyele 6:16-22; Baebele 11:32, 33) Lokola azalaki na elikya ya lisekwa, Paulo azalaki na makanisi mabe te lokola bapɛngwi ya Yuda na eleko ya Yisaya. Bapɛngwi yango bazalaki koloba boye: “Tólya mpe tómela zambi lobi tokokufa.” (Yisaya 22:13) Soki tolingi ete elikya ya lisekwa epesa biso makasi mpo na kosunga biso ndenge esungaki Paulo, tosengeli koboya bato oyo bazalaka na makanisi mabe ya ndenge wana. Paulo apesaki likebisi oyo: “Bómizimbisa te; kotambolana na bato mabe ekobebisa malamu na motema.” (1 Bakolinti 15:33) Ya solo, likambo yango etaleli makambo ndenge na ndenge ya bomoi.
10. Ndenge nini tokoki kobatela ntango nyonso elikya na biso ya lisekwa?
10 Epai ya bato oyo bazalaki na ntembe ete lisekwa ekozala te, Paulo alobaki boye: “Bózonga na makanisi ya sembo mpe bósala masumu lisusu te. Mpo ete bamosusu bayebi Nzambe te. Nazali koloba boye mpo na koyokisa bino nsɔni.” (1 Bakolinti 15:34) Na “ntango ya nsuka” oyo, tosengeli kosala makambo oyo eyokani na boyebi ya solosolo ya Nzambe mpe ya Klisto. (Danyele 12:4; Yoane 17:3) Soki tosali bongo tokobatela ntango nyonso elikya na biso ya lisekwa.
Bato bakosekwa na nzoto nini?
11. Ndakisa nini Paulo asalelaki mpo na kolimbola lisekwa ya baklisto bapakolami?
11 Na nsima Paulo apesaki biyano na mwa mituna. (1 Bakolinti 15:35-41) Mbala mosusu mpo na koluka kobɛta ntembe ete lisekwa ekozala te, moto moko akokaki kobimisa mituna oyo: “Bakufi bakosekwa nzela nini? Bakoya na nzoto na motindo boni?” Ndenge Paulo amonisaki yango, mbuma oyo bakoni na mabele ekufaka naino, na nsima epɔlaka mpo na kobima lisusu lokola nzete. Se ndenge yango, moto oyo abotami na elimo asengeli naino kokufa. Se ndenge nzete oyo ebimi na mbuma oyo bakonaki ezalaka na nzoto ya sika, nzoto oyo moklisto mopakolami akosekwa na yango ekokesana na nzoto ya moto ya mosuni. Atako akoyeba makambo oyo ayebaki liboso akufa, akosekwa lokola ekelamu ya sika mpe na nzoto ya elimo mpo na kofanda na likoló. Baoyo bakosekwa awa na mabele bakosekwa na nzoto lokola bato.
12. Maloba “nzoto ya likoló” mpe “nzoto ya mabele” elimboli nini?
12 Ndenge Paulo alobaki yango, mosuni ya moto ekeseni na mosuni ya nyama. Ata mpe nyama nyonso ezali na misuni ndenge moko te. (Genese 1:20-25) “Nzoto ya likoló,” elingi koloba bikelamu ya elimo bazali na nkembo ndenge moko te na “nzoto ya mabele,” elingi koloba bikelamu ya mosuni. Lisusu nkembo ya moi, ekeseni na oyo ya sanza, mpe ya minzoto. Bapakolami oyo bakosekwa bazali na nkembo monene koleka bato.
13. Na kotalela 1 Bakolinti 15:42-44, eloko nini ekonamaka mpe nini esekwaka?
13 Nsima ya komonisa bokeseni yango, Paulo abakisaki ete: “Ezali mpe bongo na lisekwa ya bakufi.” (1 Bakolinti 15:4244) Alobaki boye: “Ekokonama eloko ya kopɔla, ekosekwa eloko ya kozanga kopɔla.” Awa Paulo azali kolobela etuluku mobimba ya bapakolami. Ekonami eloko ya kopɔla na liwa, ekosekwa eloko ezangi kopɔla, elingi koloba ezangi masumu. Atako mokili etyolaki yango, ekosekwa na bomoi ya likoló mpe emonani na Klisto na nkembo. (Misala 5:41; Bakolose 3:4) Na liwa ezali lokola “nzoto ya mosuni” ekonami mpe ekosekwa “nzoto ya [elimo].” Lokola likambo yango esalemaka mpo na baklisto oyo babotami na elimo, tokoki kondima ete bato mosusu mpe bakosekwa mpo na bomoi awa na mabele.
14. Ndenge nini Paulo amonisaki bokeseni oyo ezali kati na Klisto na Adama?
14 Na nsima Paulo amonisaki bokeseni oyo ezali kati na Klisto na Adama. (1 Bakolinti 15:45-49) Adama, moto ya liboso, “akómaki molimo ya bomoi.” (Genese 2:7) Adama ya nsuka, Yesu, “[akómaki] elimo oyo ekopesaka bomoi.” Apesaki bomoi na ye lokola mbeka, libosoliboso mpo na bayekoli na ye bapakolami. (Malako 10:45) Ntango bazali bato, ‘bazali na elilingi ya moto oyo asalami na mputulu,’ kasi ntango basekwaka bakómaka lokola Adama ya nsuka. Ya solo, mbeka ya Yesu ekopesa bolamu na bato nyonso ya botosi, bakisa mpe baoyo bakosekwa awa na mabele.—1 Yoane 2:1, 2.
15. Mpo na nini baklisto bapakolami basekwaka na nzoto ya mosuni te, mpe ndenge nini bazali kosekwa na ntango ya kozala ya Klisto?
15 Ntango baklisto bapakolami bakufaka, basekwaka na nzoto ya mosuni te. (1 Bakolinti 15:50-53) Nzoto oyo epɔlaka, elingi koloba nzoto oyo ezali na makila na mai, ekoki te kozwa eloko oyo ezangi kopɔla mpe Bokonzi ya likoló. Bapakolami mosusu bakolala ntango molai na liwa te. Soki kaka basukisi bomoi na bango awa na mabele na bosembo nyonso na boumeli ya kozala ya Yesu, ‘bakobongwana mbala moko, na ntango ya kobweta liso.’ Kaka ntango yango bakosekwa mpo na bomoi ya elimo na nzoto oyo ekoki kopɔla te mpe ya nkembo. Na nsuka, mwasi ya Klisto kuna na likoló, ekozala etuluku ya bato 144 000.—Emoniseli 14:1; 19:7-9; 21:9; 1 Batesaloniki 4:15-17.
Tolongi liwa!
16. Ndenge Paulo mpe basakoli ya kala balobaki, nini ekokómela liwa oyo tozwaki epai ya mosumuki Adama?
16 Lokola ayebaki ete elonga ezali, Paulo alobaki ete liwa ekolongwa mpo na libela. (1 Bakolinti 15:54-57) Ntango eloko oyo epɔlaka mpe ekufaka ekopɔla lisusu te mpe ekokufa lisusu te, maloba oyo ekokokisama ete: “Akosilisa kufa libela.” “Ɛ kufa, kolonga na yo wapi? Ɛ kufa, esweli na yo wapi?” (Yisaya 25:8; Hosea 13:14) Esweli oyo ebimisaka liwa ezali lisumu, mpe nguya ya lisumu ezalaki Mobeko, oyo ezalaki kokatela basumuki etumbu ya liwa. Mpo na mbeka mpe lisekwa ya Yesu, liwa oyo tozwaki epai ya mosumuki Adama ekolonga lisusu te.—Baloma 5:12; 6:23.
17. Epai ya banani maloba ya 1 Bakolinti 15:58 ezali kokokisama lelo oyo?
17 Paulo alobaki ete: “Bongo, bandeko na ngai balingami, bótɛlɛma ngwi, bóninganaka te, bósalaka mosala ya Nkolo ntango nyonso, awa eyebi bino ete kati na Nkolo mosala na bino ezali mpamba te.” (1 Bakolinti 15:58) Maloba yango ezali kokokisama lelo epai ya batikali bapakolami na “bampate mosusu” ya Yesu ata soki bakufi na mikolo oyo ya nsuka. (Yoane 10:16) Mosala na bango lokola basakoli ya Bokonzi ezali mpamba te, mpo ete lisekwa ezali kozela bango. Yango wana, lokola tozali basaleli ya Yehova tómipesa mingi na mosala ya Nkolo wana tozali kozela mokolo oyo tokoganga na esengo ete: “Kufa, kolonga na yo wapi?”
Elikya ya lisekwa ekokisami!
18. Nini emonisi ete Paulo azalaki na elikya makasi mpenza ya lisekwa?
18 Maloba ya Paulo na 1 Bakolinti mokapo 15 ezali komonisa polele ete elikya ya lisekwa esimbaki mpenza bomoi na ye. Andimaki mpenza ete Yesu asekwaki mpe bato mosusu bakosekwa na malita ya bato nyonso. Yo mpe ozali na kondima makasi ndenge yango? Paulo atalelaki bolamu na ye moko lokola “nyɛi” mpe ‘andimaki kobungisa biloko nyonso’ mpo akoka ‘koyeba Klisto mpe nguya ya kosekwa na ye.’ Ntoma andimaki ata kokufa lokola Yesu mpe azalaki na elikya ete akosekwa na “lisekwa ya ebandeli.” Lisekwa yango ebengami mpe “lisekwa ya liboso,” ezali mpo na bayekoli ya Yesu bapakolami 144 000. Bango bazali kosekwa mpo na bomoi ya elimo na likoló, kasi “bakufi oyo batikalaki” bakosekwa awa na mabele.—Bafilipi 3:8-11, NW; Emoniseli 7:4; 20:5, 6.
19, 20. (a) Tángá bato oyo nkombo na bango ekomami na Biblia mpe bakosekwa mpo na bomoi awa na mabele? (b) Lisekwa ya nani oyo ozelaka na motema likoló?
19 Elikya ya lisekwa ekómá likambo ya solo mpe ya nkembo mpo na bapakolami oyo batikalaki sembo tii na liwa. (Baloma 8:18; 1 Batesaloniki 4:15-18; Emoniseli 2:10) Bato oyo bakobika na “bolɔzi monene” bakomona ndenge oyo elikya ya lisekwa ekokokisama awa na mabele ntango ‘mai monene ekozongisa bakufi oyo bazali na kati, mpe kufa na [Hades, NW] ekozongisa bakufi oyo bazali na kati na yango.’ (Emoniseli 7:9, 13, 14; 20:13) Yobo oyo ayokaki mpasi ya kokufela bana mibali nsambo mpe bana basi misato, akozala na kati ya bato oyo bakosekwa awa na mabele. Kanisá esengo akozala na yango ntango akoyamba bango lisusu, mpe ndenge bana yango bakosepela ntango bakomona bandeko na bango mosusu ya mibali nsambo mpe ya basi misato ya kitoko!—Yobo 1:1, 2, 18, 19; 42:12-15.
20 Ekozala mpenza esengo ntango Abalayama na Sala, Yisaka na Lebeka, na bamosusu mingi, bakisa mpe “basakoli nyonso,” bakosekwa mpo na bomoi awa na mabele! (Luka 13:28) Moko na basakoli yango ezali Danyele, balakaki ye ete akosekwa na boyangeli ya Masiya. Ekoki mbula soki 2 500 banda Danyele azali kopema na kati ya lilita, kasi na nguya ya lisekwa, etikali moke ‘akotɛlɛma mpo na yango eponami mpo na ye’ lokola moko na “bana ya mokonzi na mokili mobimba.” (Danyele 12:13; Nzembo 45:16) Kanisá esengo ekozala ntango okoyamba kaka bato ya sembo ya kala te kasi lisusu tata na yo, mama, bana, to bato mosusu oyo olingaki mingi baoyo monguna liwa abɔtɔlaki yo bango!
21. Mpo na nini tosengeli kozela te mpo na kosalela bato makambo malamu?
21 Mbala mosusu tozali na baninga na biso to na bato oyo tolingaka mingi mpe bazali kosalela Nzambe banda bambula mingi kasi bakómi mibange. Bobange ekoki komemela bango mwa mikakatano na bomoi. Tiká tólingaka bango mpe tópesaka bango lisalisi nyonso oyo tokoki kopesa bango sikoyo! Na bongo, ata soki bakufi lelo oyo, biso tokoyoka mawa te mpamba te tokokisaki mokumba na biso epai na bango. (Mosakoli 9:11; 12:1-7; 1 Timote 5:3, 8) Tóyeba ete Yehova akobosana te makambo malamu oyo tozali kosalela bato, ata bazali bilenge to mikóló, bazwi to babola. Paulo akomaki ete: “Soko tozwi nzela, tósalela bato nyonso malamu mpe na koleka epai na bango bazali bandimi.”—Bagalatia 6:10; Baebele 6:10.
22. Lokola tozali kozela kokokisama ya elikya ya lisekwa, mokano na biso esengeli kozala nini?
22 Yehova azali “Tata ya mawa mpe Nzambe ya kobɔndisa nyonso.” (2 Bakolinti 1:3, 4) Liloba na ye ezali kobɔndisa biso mpe ezali kosalisa biso tóbɔndisa bato mosusu na elikya makasi ya lisekwa. Lokola tozali naino kozela ntango oyo tokomona ndenge elikya yango ekokokisama, ndenge bakufi bakosekwa mpo na bomoi awa na mabele, tózala lokola Paulo, ye azalaki kondima lisekwa. Tiká ete tólanda mpenzampenza ndakisa ya Yesu, ye azalaki na elikya ete Nzambe azali na nguya ya kosekwisa ye mpe Nzambe asekwisaki ye. Etikali moke baoyo bazali na malita ya kokanisama, bakoyoka mongongo ya Klisto mpe bakobima. Tiká ete likambo yango ebɔndisa biso mpe epesa biso esengo. Na koleka, tótɔnda Yehova, oyo asali ete tólonga liwa na nzela ya Nkolo na biso Yesu Klisto!
Okopesa eyano nini?
• Banani bamonaki Yesu nsima ya lisekwa na ye, oyo Paulo atangáki nkombo na bango?
• “Monguna ya nsuka” ezali nani, mpe ndenge nini akolongwa?
• Mpo na baklisto bapakolami, eloko nini ekonamaka mpe nini esekwaka?
• Banani oyo nkombo na bango ekomami na Biblia okosepela kokutana na bango ntango bakosekwa na bomoi awa na mabele?
[Elilingi na lokasa 16]
Ntoma Paulo alobaki makambo oyo ezali kondimisa ete lisekwa ekozala mpenza
[Bililingi na lokasa 20]
Lisekwa ya Yobo, libota na ye, mpe bato mosusu mingi ekozala esengo nsuka te!