Nini mpenza endimisaka yo makambo ondimaka?
Kondima elimboli “komona ete likambo ezali solo to elongobani.” Mokanda moko ya ONU (Déclaration universelle des droits de l’homme) elobi ete moto na moto azali na “bonsomi ya kozala na makanisi na ye, na lisosoli na ye mpe na lingomba na ye.” Bonsomi yango ezali mpe kopesa ye nzela “ya kokɔta na lingomba mosusu to kokóma na endimeli mosusu” soki asepeli kosala bongo.
KASI, ntina nini moto akoki koluka kokɔta na lingomba mosusu to kotika kondima likambo moko mpe kondima mosusu? Bato mingi balobaka ete: “Nazali na bindimeli na ngai mpe ekoki na ngai boye.” Bato mingi bakanisaka ete ata soki bindimeli ezali ya lokuta, ekoki kosala moto mabe te. Na ndakisa, ezali te mpo moto moko andimaka ete mabele ezali patatalu nde akomisala mabe to akosala moninga na ye mabe. Bato mosusu balobaka ete: “Tótika moto na moto azala na makanisi na ye.” Kasi, likanisi yango ezalaka ntango nyonso malamu? Okanisi ete monganga moko akoki kondima kotika moninga na ye monganga na makanisi na ye ete nsima ya kosimba bibembe akoki na ye koleka mbala moko kosalisa bato ya maladi?
Na oyo etali mangomba, makambo oyo eleká ezali komonisa ete bindimeli ya lokuta ememaki makambo ya mabe mpenza. Kanisá makambo ya nsɔmɔ oyo esalemaki ntango bakonzi ya mangomba “bazalaki kolendisa baklisto ya molende mabe na kosala mobulu” na ntango ya bitumba ya Croisades na eleko ya Moyen Âge. Kanisá lisusu makambo oyo elekaki na etumba moko euti kosalema kala te, epai “baklisto” basimbaki mandoki mpe, “lokola kaka basoda ya Moyen Âge oyo bazalaki kokoma bankombo ya basantu na bisimbeli ya mipanga na bango, bango mpe babakaki bililingi ya Malia na na mandoki na bango.” Bato yango nyonso bazalaki na molende mpo bakanisaki ete bazalaki kosala malamu. Nzokande, soki totali malamu, ezala na bitumba yango to na bitumba mosusu ya mangomba, ezalaki na likambo moko elongobani te.
Mpo na nini mokili etondi na mobulungano mpe bitumba? Biblia ezali kopesa eyano ete Satana Zabolo azali “kozimbisa mabele mobimba.” (Emoniseli 12:9; 2 Bakolinti 4:4; 11:3) Ntoma Paulo alobaki ete bandimi mingi “bakobunga” mpamba te Satana akokosa bango na ‘bilembo mpe bikamwiseli ya lokuta.’ Paulo alobaki ete bato yango “bakobunga mpo baboyaki kozwa mpe kolinga makambo ya solo oyo ekokaki kobikisa bango” mpe na ndenge yango ‘bakobebisa mitema na bango mpo bandima lokuta.’ (2 Tesalonika 2:9-12, Boyokani ya Sika) Okoki kosala nini mpo ozwama te na motambo ya kondima makambo ya lokuta? Nini mpenza endimisaka yo makambo oyo ondimaka?
Tosengeli kondima makambo oyo tobɔkwamá na yango?
Ntango mosusu baboti na yo bateyá yo bindimeli na bango. Yango ekoki kozala likambo ya malamu. Nzambe alingaka ete baboti báteya bana na bango. (Deteronome 6:4-9; 11:18-21) Tozali na ndakisa ya elenge Timote, makambo oyo mama na ye na nkɔkɔ na ye bateyaki ye ememelaki ye matomba mingi. (2 Timote 1:5; 3:14, 15) Makomami elobi na bana ete bámemya bindimeli ya baboti na bango. (Masese 1:8; Baefese 6:1) Kasi, okanisi mpenza ete Mozalisi na yo alingi ete ondima makambo kaka mpo baboti na yo bandimaka yango? Kutu, kondima kaka bindimela makambo ya bankɔkɔ ekoki kozala likama.—Nzembo 78:8; Amosa 2:4.
Mwasi Mosamalia moko oyo asololaki na Yesu Klisto abɔkwamaki na mateya ya lingomba na bango Basamalia. (Yoane 4:20) Yesu aboyaki te ete mwasi yango azala na bonsomi ya kopona oyo asepeli kondima; atako bongo, alobaki na ye ete: “Bino bozali kosambela yango eyebi bino te.” Makambo mingi oyo azalaki kondima ezalaki ya lokuta, mpe Yesu ayebisaki ye ete asengelaki kobongwana soki alingi ete Nzambe andima losambo na ye, elingi koloba asengeli kosambela “na elimo mpe na solo.” Na esika ete mwasi yango akangama kaka na bindimeli na ye oyo, na ntembe te alingaki yango mingi, ye mpe bato mosusu basengelaki kokóma ‘batosi ya kondima’ oyo emonisami na nzela ya Yesu Klisto.—Yoane 4:21-24, 39-41; Misala 6:7.
Tosengeli kondima makanisi ya bato ya mayele
Balakisi mingi mpe bato mingi ya mayele babongi mpenza na limemya. Kasi, banda kala ezalaki na balakisi mingi ya lokumu oyo bazalaki na mabunga. Na ndakisa, Bertrand Russell, moto ya mayele na istware, alobi mpo mikanda mibale ya makambo ya siansi oyo Aristote, moto ya filozofi ya Bagrɛkɛ akomaki, ete: “ata fraze na yango moko te ekoki kondimama soki totaleli siansi ya lelo.” Ata bato ya mayele ya ntango na biso, mbala mingi mpe bamikosaka. Na mobu 1895, Lord Kelvin, moto moko ya siansi na Angleterre, alobaki na kondima mpenza ete: “Bamasini oyo eleki mopɛpɛ na kilo, oyo ekopumbwa likoló ekoki kosalema te. Yango wana, moto ya bokɛngi andimaka bindimela te ete likambo moko ezali solo kaka mpo molakisi moko ya mayele alobi yango.—Nzembo 146:3.
Tosengeli mpe kozala na bokɛngi ndenge yango na mateya ya mangomba. Ntoma Paulo bateyaki ye malamu na balakisi ya lingomba na ye mpe azalaki na “molende mpo na bonkɔkɔ ya batata na [ye].” Kasi, molende oyo azalaki na yango mpo na bindimeli ya bankɔkɔ na ye ememelaki ye mikakatano. Etindaki ye na “konyokola lisangá ya Nzambe mpe kobebisa yango.” (Bagalatia 1:13, 14, NW; Yoane 16:2, 3) Likama monene lisusu ezalaki ete Paulo alekisaki ntango mingi na “kotuta makolo na makɔnga,” elingi koloba azalaki koboya kolanda nzela oyo ekokaki komema ye na kondima Yesu Klisto. Esɛngaki ete Yesu ye moko asala likambo ya kokamwa mpo na komema Paulo na kobongola bindimeli na ye.—Misala 9:1-6; 26:14.
Tosengeli kondimela bapanzi-nsango?
Mbala mosusu ondimaka mingi makambo oyo otángaka to mpe oyokaka na bansango. Bato mingi basepelaka ndenge bapanzi-nsango bazali na bonsomi ya koloba makambo nyonso; na bongo, bakoki koyoka makambo oyo ekoki kozala ntina. Kasi, babosanaka ete bato ya nguya babombami nsima mpe bazali kosalela biloko wana mpe mbala mingi na ndenge oyo bango balingi. Mbala mingi, ntango bazali kosakola bansango, babongolaka bosolo ya makambo mpe yango ekoki kobongola makanisi na yo.
Lisusu, mpo na kosepelisa bato ebele, mbala mingi radio, televizyo na bazulunalo elobelaka mingi makambo oyo matoi ya bato esepelaka koyoka mpe makambo ya sika. Makambo oyo bakokaki koloba to kokoma te eleki mwa bambula, ekómi kolobama mpe kokomama mpambampamba. Mokemoke, makambo oyo bato batalelaka lokola bizaleli malamu, bakómi koboya mpe kosundola yango. Makanisi ya bato ezali kobeba mokemoke. Bakómi kokanisa ete “mabe ezali malamu mpe malamu ezali mabe.”—Yisaya 5:20, NW; 1 Bakolinti 6:9, 10.
Ndenge ya koyeba makambo ya solo oyo tokoki kondima
Kolanda makanisi mpe mateya ya filozofi ya bato ezali lokola kotonga ndako likoló ya zelo. (Matai 7:26; 1 Bakolinti 1:19, 20) Na bongo, nini mpenza esengeli kondimisa yo makambo? Lokola Nzambe apesá yo mayele ya koluka koyeba makambo oyo ozali komona zingazinga na yo mpe mayele ya komituna mituna na makambo ya elimo, omoni te ete asengeli mpe kobongisa ndenge ya kozwa biyano ya solosolo na mituna na yo? (1 Yoane 5:20) Ezali mpenza bongo! Kasi, na makambo ya losambo, ndenge nini okoki koyeba oyo ezali solo? Kozanga kokakatana tolobi ete kaka Biblia, Liloba ya Nzambe, nde ekoki kosalisa yo na likambo yango.—Yoane 17:17; 2 Timote 3:16, 17.
Kasi, moto mosusu akoki koloba ete: “Ezali nde bato oyo basimbaka Biblia nde bakɔtisi mobulungano mingi na mokili.” Ya solo, bakonzi ya mangomba oyo balobaka ete balandaka Biblia babimisi makanisi mingi oyo etii mobulu mpe ezali bongolabongola. Ezali bongo mpamba te bindimeli na bango euti mpenza na Biblia te. Ntoma Petelo abengaki bango “basakoli ya lokuta” mpe “balakisi ya lokuta” oyo bakobimisa “mwa mangomba ya kobebisa.” Petelo alobaki ete mpo na misala na bango, “bato bakoloba mabe mpo na nzela ya solo.” (2 Petelo 2:1, 2, NW ) Kasi, Petelo akomaki ete: “Liloba ya esakweli ekómi mpenza likambo ya solo mpo na biso; mpe bozali kosala malamu lokola bozali kotyela yango likebi lokola na mwinda oyo ezali kongɛnga na esika ya molili.”—2 Petelo 1:19, NW; Nzembo 119:105.
Biblia ezali kolendisa biso tótalelaka soki makambo oyo tozali kondima eyokani na mateya na yango. (1 Yoane 4:1) Ebele ya bato oyo batángaka Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli bakoki kotatola ete bomoi na bango ekómaki na ntina mpe ekómaki malamu mpo basalaki bongo. Yango wana, tolendisi yo ozala lokola bato ya Beloya oyo bazalaki na makanisi ya malamu. ‘Talelaká malamumalamu Makomami mokolo na mokolo’ liboso ya kopona makambo oyo okondima. (Misala 17:11) Batatoli ya Yehova bakosepela kosalisa yo mpo osala yango. Ya solo, ezali ekateli na yo ya kopona oyo okondima. Kasi, ezali likambo ya mayele na koluka koyeba soki bindimeli na yo euti na mayele mpe bamposa ya bato te, kasi euti mpenza na Liloba ya solo ya Nzambe.—1 Batesaloniki 2:13; 5:21.
[Bililingi na lokasa 6]
Okoki kotyela mateya ya Biblia motema