Lolenge oyo okoki kozwa bikateli ya malamu
BONSOMI ya kopona oyo olingi ezali likabo oyo Nzambe apesá biso. Soki tózangaka yango, mbɛlɛ tolingaki kozala lokola barobo, tolingaki kozala bankolo ya nzoto na biso te. Nzokande, lokola tozali na yango etyaka mpe biso liboso ya mikakatano ndenge na ndenge. Lokola tozali na bonsomi ya kopona oyo tolingi, na bomoi na biso mobimba esengelaka na biso mbala na mbala kozwa bikateli.
Ɛɛ, bikateli mingi ezalaka ya pɛtɛɛ. Bikateli mosusu, na ndakisa koyeba soki osengeli kopona mosala nini to soki osengeli kobala, ekoki kopesa moto esengo to koyokisa ye mpasi bomoi na ye mobimba na mikolo mizali koya. Ezali mpe na bikateli mosusu oyo ekoki kopesa bato mosusu esengo to koyokisa bango mpasi. Bikateli mosusu oyo baboti bazwaka epesaka bana na bango esengo to eyokisaka bango mpasi. Longola nyonso wana, tóbosana te ete tokozongisa monɔkɔ epai ya Nzambe mpo na bikateli mingi oyo tozwaka.—Baloma 14:12.
Ntina oyo osengeli koluka lisalisi
Lisolo ya bato emonisi ete bikateli oyo bato bazwaka ezalaka mbala mingi ya malamu te. Ekateli ya liboso mpenza oyo ezwamaki na kati ya lisolo ya bato ezalaki mabe mpenza. Eva azwaki ekateli ya kolya mbuma oyo Nzambe apekisaki polelepolele. Liponi na ye, oyo eutaki na mposa na ye ya moimi, etindaki mpe mobali na ye atosa Nzambe te lokola ye; yango esalaki ete bato bákóma komona mpasi makasi. Na makambo mingi, bato bazali kaka kozwa bikateli na kolanda bamposa na bango ya moimi, na esika ete bálanda mitinda oyo ezali sembo. (Genese 3:6-19; Yilimia 17:9) Mpe mbala na mbala, na ntango oyo esengelaka na biso kozwa bikateli ya minene, nde toyebaka ete mayele na biso ezali na nsuka.
Yango wana, ezali likambo ya kokamwa te soki, na ntango ya kozwa bikateli ya minene, mingi balukaka lisalisi epai ya bato oyo bazali na mayele oyo eleki mpenza ya bango. Biblia elobeli ntango moko oyo Nebukadanesala, wana azalaki na kati ya etumba, asengelaki kozwa ekateli. Atako azalaki mokonzi, amonaki ete asengeli “koluka koyeba makambo mabombami,” elingi koloba asɛngaki lisalisi ya bilimo mabe. Na yango, lisolo elobi ete: “Aningisaki makula. Atunaki mituna na nzela ya telafimi; atalelaki libale malamumalamu.” (Ezekiele 21:21, NW) Ezali mpe ndenge moko lelo oyo, bato mingi bakendeke koluka lisalisi epai ya bato oyo bayebisaka makambo ekoya mpe epai ya banganga-minzoto mpe na makambo mosusu balukaka lisalisi epai ya bilimo. Kutu nyonso wana ememelaka bango litomba ata moko te, ekosaka bango nde kokosa.—Levitike 19:31.
Nzokande, ezali na Moto oyo tokoki kotyela motema na makambo nyonso; ye nde asalisá mpe asalisaka bato bázwa bikateli ya malamu. Moto yango nde Yehova Nzambe. Na ndakisa, na ntango ya kala, Nzambe apesaki Yisalaele, libota na ye, Ulimu mpe Tumimu—ntango mosusu ezalaki mbɛsɛ mosantu oyo ezalaki kobwakama na ntango oyo libota yango ezalaki kokutana na makambo minene mpenza. Na nzela ya Ulimu mpe Tumimu, Yehova azalaki kopesa mbala moko biyano na mituna oyo bazalaki kotuna mpe azalaki kosalisa mikóló ya Yisalaele báyeba soki bikateli na bango ezali na boyokani na mokano na ye.—Exode 28:30; Levitike 8:8; Mituya 27:21.
Tótalela ndakisa mosusu. Na ntango oyo Gideona abyangamaki mpo na kokamba mampinga ya Yisalaele mpo na kobunda na Midyani, esengelaki azwa ekateli: kondima to koboya mokumba wana ya lokumu. Lokola Gideona alingaki koyeba mpenza soki Yehova akosunga ye, asɛngaki amona elembo moko ya kokamwisa. Abondelaki ete nkunge oyo ekotikala libándá butu mobimba epɔla na mai, kasi mabele oyo ezali zingazinga na yango epɔla te. Na butu oyo elandaki, asɛngaki ete nkunge epɔla na mai te, nde mabele oyo ezali zingazinga na yango epɔla na mamwɛ. Na boboto nyonso, Yehova apesaki Gideona bilembo oyo ye asɛngaki. Yango esalaki ete Gideona azwa ekateli ya malamu mpe, na lisungi ya Nzambe, alongaki mpenza banguna ya Yisalaele.—Basambisi 6:33-40; 7:21, 22.
Ezali boni lelo oyo?
Lelo oyo, Yehova azali kolanda kopesa basaleli na ye lisalisi ntango esengelaka bázwa bikateli ya minene. Ndenge nini? Tosengeli nde kosɛnga Yehova bilembo oyo ekolakisa biso ekateli ya malamu oyo tosengeli kozwa ndenge Gideona asɛngaki ye ‘elembo ya nkunge’? Mobali moko na mwasi na ye bazalaki koyeba te soki basengelaki kokende kosala epai mposa ya basakoli ya Bokonzi ezalaki makasi. Mpo báyeba ekateli nini basengelaki kozwa, basalaki boye: Bakanaki kotɛka ndako na bango na motuya moko boye. Soki ndako yango etɛkami na dati boye mpe na motuya oyo bakanaki to na motuya oyo eleki yango, ekozala elembo oyo ekomonisa ete Nzambe andimi bákende. Nde soki ndako yango etɛkami te, ekomonisa ete Nzambe andimi bákende te.
Ndako yango etɛkamaki te. Tokoki mpenza koloba ete yango ezalaki elembo ete Nzambe andimaki te ete mobali wana na mwasi na ye bákende kosala epai mposa ezalaki makasi? Na ntembe te, ekozala mpenza kolekisa ndelo na koloba na bosikisiki makambo oyo Yehova asalaka mpe oyo asalaka te mpo na basaleli na ye. Tokoki te koloba ete lelo oyo Yehova asalaka eloko te mpo na komonisa biso mokano na ye. (Yisaya 59:1) Kasi, tóyeba ete tozali na lotomo te ya kozela komona lobɔkɔ na ye na bikateli na biso ya minene, noki te ekozala lokola nde totiki ete Nzambe azwaka bikateli na esika na biso. Ata Gideona kutu, na makambo mingi ya bomoi na ye azalaki kozwa bikateli ye moko kozanga ete Yehova alakisa ye bilembo ya kokamwisa!
Atako bongo, Biblia elobi ete Nzambe akoki kopesa biso litambwisi. Biblia esakoli mpo na ntango na biso ete: “Matoi na yo makoyoka liloba nsima na yo ete, Oyo ezali nzela, tambolá na yango, wana ekobongwana yo na epai na mobali to na epai na mwasi.” (Yisaya 30:21) Ntango esengelaka ete tózwa bikateli ya ntina, ebongi mpenza ete tóluka koyeba soki bikateli na biso eyokani na mokano ya Nzambe mpe soki yango emonisi bwanya na ye oyo eleki nyonso. Tokoyeba yango ndenge nini? Na kotaleláká Liloba na ye mpe na kotikeláká yango nzela ete ezala ‘mwinda na makaka na biso, mpe pole na nzela na biso.’ (Nzembo 119:105; Masese 2:1-6) Mpo na kosala bongo, tosengeli kokolisa momeseno ya koyekola Biblia mpo na kozwa boyebi ya solosolo. (Bakolose 1:9, 10) Mpe na ntango ya kozwa ekateli moko boye, tosengeli koluka malamumalamu mitinda nyonso ya Biblia oyo etaleli likambo yango. Bolukiluki yango ekopesa biso nzela ya “koluka koyeba malamumalamu mpenza makambo oyo eleki ntina.”—Bafilipi 1:9, 10, NW.
Tosengeli mpe koyebisa Yehova likambo yango na kati ya libondeli, mpe tótya motema ete akoyoka biso. Koyebisa Nzambe na biso ya bolingo ekateli oyo tosengeli kozwa mpe makanisi ndenge na ndenge oyo tozali kotalela mpo na ekateli yango, ezali mpenza likambo ya kobɔndisa! Na nsima, tokoki kosɛnga litambwisi na ye na motema moko mpo na kozwa ekateli ya malamu. Mbala mingi, elimo santu ekokundwela biso mitinda ya Biblia oyo etalelami na likambo yango, to ekoki kosalisa biso mpo na kososola malamumalamu mokapo moko oyo elobeli likambo yango.—Yakobo 1:5, 6.
Na kati ya lisangá ezali mpe na bato bakɔmɛli oyo Yehova apesi, baoyo tokoki kosolola na bango na ntina na bikateli na biso. (Baefese 4:11, 12) Nzokande, ntango tozali koluka toli epai ya bato mosusu, tosengeli te kolanda ndakisa ya bato oyo bakendaka epai ya moto moko mpe na nsima epai ya moto mosusu na likanisi ya kokutana kaka na moto oyo akoloba makambo oyo bazali na mposa ya koyoka. Bongo na nsima balandaka toli na ye. Tosengeli mpe te kobosana likambo oyo ekómelaki Lehobama, yango ezali ndakisa oyo ezali kokebisa biso. Ntango asengelaki kozwa ekateli moko ya monene, azwaki toli ya malamu epai ya mikóló oyo basalaki elongo na tata na ye. Nzokande, na esika ete alanda toli oyo bango bapesaki ye, akendaki koluka toli epai ya bilenge oyo bakolaki elongo na ye. Lokola alandaki toli ya bilenge wana, azwaki ekateli moko ya mabe mpe nsukansuka abungisaki eteni monene ya bokonzi na ye.—1 Mikonzi 12:1-17.
Ntango ozali koluka toli, luká yango epai ya bato oyo bayebi makambo mingi ya bomoi mpe baoyo bayebi Makomami malamumalamu mpe baoyo bazali na limemya makasi mpo na mitinda ya sembo. (Masese 1:5; 11:14; 13:20) Soki likoki ezali, zwá ntango ya komanyola likoló ya mitinda oyo etalelami na likambo yango mpe likoló ya makambo nyonso ozwi na bolukiluki oyo osali. Lokola okómi sikoyo kotalela likambo yango ndenge Liloba ya Yehova ezali mpe kotalela yango, ekateli ya malamu ekomonana mpenza polelepolele.—Bafilipi 4:6, 7.
Bikateli oyo tozwaka
Ezalaka mpasi te mpo na kozwa bikateli mosusu. Ntango etinda epesamaki ete bátika kopesa litatoli, bantoma bayebaki ete basengeli kaka kosakola na ntina na Yesu, na yango bakakatanaki te mpo na koyebisa Sanedrina ekateli na bango ya kotosa Nzambe na esika ya kotosa bato. (Misala 5:28, 29) Nzokande, bikateli mosusu esɛngaka kokanisa mingi, mpamba te etinda ata moko te ya Biblia elobeli yango polele. Atako bongo, mbala mingi mitinda ya Biblia ekolakisa biso polele ekateli nini ya malamu tosengeli kozwa. Na ndakisa, atako mitindo ya kominanola ndenge na ndenge oyo ezali na mikolo na biso ezalaki te na ntango ya Yesu, tozali kokuta makanisi ya polele na kati ya Biblia oyo ezali komonisa makambo nini Yehova asepelaka na yango mpe makambo nini asepelaka na yango te. Na bongo, moklisto nyonso oyo amipesi na kominanola oyo ezali kokumisa mobulu, pite to botomboki, azwi bongo ekateli moko ya mabe.—Nzembo 97:10; Yoane 3:19-21; Bagalatia 5:19-23; Baefese 5:3-5.
Na bantango mosusu, bikateli mibale ekoki kozala nyonso malamu. Kokende kosala epai mposa ezali makasi ezali libaku moko malamu mpe ekoki kosala ete tózwa mapamboli mingi. Kasi soki, mpo na bantina mosusu, moto azwi ekateli ya kokende te, ata bongo akoki kaka kosala mosala ya malamu na lisangá na ye. Mbala mosusu, ekómaka ete tózwa ekateli moko oyo ekopesa biso libaku ya komonisa bozindo ya bosembo na biso epai ya Yehova to nini mpenza totyaka na esika ya liboso na bomoi na biso. Na ndenge yango, Yehova atikelaka biso nzela ya kosalela bonsomi oyo tozali na yango ya kopona mpo na komonisa soki ezalela mpenza ya motema na biso ezali nini.
Mbala mingi, bikateli na biso epesaka bato mosusu esengo to eyokisaka bango mawa. Na ndakisa, baklisto ya ekeke ya liboso basepelaki mingi ntango bipekiseli ndenge na ndenge ya Mibeko elongwaki. Yango elakisaki ete bakokaki kondima to koboya bilei oyo ezalaki mbindo na nse ya Mibeko. Atako bongo, bakokaki kosalela bonsomi yango ndenge bango moko balingi te; balendisamaki nde na kosalela yango na ndenge oyo ekobɛtisa bato mosusu libaku te. Tokoki kosalela maloba ya Paulo na likambo yango na bikateli mingi oyo tozwaka: “Bókeba ete bókóma te bantina ya kobɛtisa libaku.” (1 Bakolinti 10:32, NW) Mposa wana ya kobɛtisa bato mosusu libaku te ekoki kosalisa biso tóyeba mpenza bikateli nini tosengeli kozwa. Kutu, bolingo mpo na mozalani ezali mobeko ya mibale oyo eleki monene.—Matai 22:36, 39.
Makambo oyo ebimaka nsima wana tozwi bikateli
Bikateli oyo ezwami na lisosoli ya malamu mpe oyo esimbami na mitinda ya Biblia, ata ndɛlɛ, ebotaka mbuma ya malamu. Nde, ekoki kozala ete mwa moke na nsima ya kozwa bikateli yango, mikakatano ekoki kokómela biso. Na ndakisa, ntango bantoma bayebisaki Sanedrina ekateli na bango ya kolanda kosakola na ntina na Yesu, babɛtaki bango fimbo liboso ete bátika bango. (Misala 5:40) Ntango Baebele misato oyo—Sadalaka, Mesaka, mpe Abede-nego—bazwaki ekateli ete bakofukamela te ekeko ya wolo oyo Nebukadenesala asalaki, batyaki bomoi na bango na likama. Bandimaki ata mpe kokufa mpo na ekateli na bango. Kasi bayebaki ete Nzambe akondima mpe akopambola bango.—Danyele 3:16-19.
Soki tokutani na mikakatano mpo totosaki lisosoli na biso liboso ya kozwa ekateli moko boye, yango elakisi te ete ekateli yango ezalaki mabe. “Ntango mpe makambo oyo ekanami te” ekoki kosala ete ata bikateli oyo totalelaki malamumalamu emonana lokola mabe na nsuka. (Mosakoli 9:11, NW ) Lisusu, ntango mosusu Yehova atikaka nzela ete mikakatano ekómela biso mpo na komona soki tozali mpenza sembo epai na ye. Yakobo abundaki na anzelu butu mobimba liboso ete azwa lipamboli. (Genese 32:24-26) Biso mpe tokoki kobunda na mikakatano, ata soki tozali kosala likambo oyo ezali sembo. Kasi, soki bikateli na biso eyokani na mokano ya Nzambe, tokoki kotya motema ete akosalisa biso tóyika mpiko mpe ete nsukansuka akopambola biso.—2 Bakolinti 4:7.
Na bongo, soki olingi kozwa ekateli moko ya monene, kotya motema te na bwanya na yo moko. Luká mitinda ya Biblia oyo ebongi na likambo yango. Yebisá Yehova likambo yango. Soki likoki ezali, luká toli ya baninga baklisto oyo bakɔmɛli. Na nsima, zalá na mpiko. Salelá malamu bonsomi ya kopona oyo Nzambe apesá yo. Zwá ekateli ya malamu mpe monisá Yehova ete motema na yo ezali sembo liboso na ye.
[Elilingi na lokasa 28]
Talelá Liloba ya Nzambe liboso ya kozwa bikateli ya minene
[Bililingi na lokasa 29]
Yebisá Yehova bikateli oyo olingi kozwa
[Elilingi na lokasa 30]
Okoki kosolola na baklisto oyo bakɔmɛli mpo na bikateli ya minene oyo olingi kozwa