Ndenge nini otalelaka ezaleli ya bokosi?
NA ELANGA ya Getesemane, Yuda Mokeliota apusanaki pene na Yesu mpe ‘apwepwaki ye.’ Wana ezali ndenge oyo bato bazalaki komonisana boboto mpe bolingo. Kasi mbote ya Yuda ezalaki kaka bokosi mpamba, asalaki bongo mpo na kolakisa Yesu epai ya bato oyo bayaki kokanga ye na butu wana. (Matai 26:48, 49) Yuda azalaki mokosi—moto oyo akosaka ete azali boye nzokande azali bongo te, moto oyo abombaka makanisi na ye ya mabe mpe amonisaka lokola ete oyo ye azali koloba to kosala ezali mpenza yango nde euti na motema na ye. Liloba ya Grɛki oyo babongoli yango na “mokosi” elimboli “ye oyo azali koyanola,” elimboli mpe mosali ya teatre. Na nsima, bakómaki kosalela liloba yango mpo na kobenga moto nyonso oyo azali kosala likambo moko boye mpo na kokosa bato mosusu.
Osalaka nini soki omoni ezaleli ya bokosi? Na ndakisa, oyokaka nkanda ntango omonaka bakompanyi oyo esalaka makaya ezali kolendisa bato bámɛla makaya, atako minganga bamonisi polele ete likaya ezali mabe? Osilikaka ntango omonaka bokosi ya baoyo bazali na mokumba ya kobatela bato, kasi bazali nde konyokola bato oyo bango basengeli kobatela? Esalaka yo mpasi ntango oyaka komona ete moto oyo okanisaki ete azali moninga ya solosolo nzokande azali moninga oyo azangi bosembo? Omiyokaka ndenge nini ntango omonaka bokosi ya mangomba?
“Mawa na bino . . . bakosi!”
Tótalela ndenge nini makambo ya losambo ezalaki koleka ntango Yesu azalaki awa na mabele. Bakomeli na Bafalisai bamikumisaki ete bazali bateyi ya sembo ya Mibeko ya Nzambe, kasi soki totali malamu, bazalaki nde kotondisa makanisi ya bato na mateya na bango, oyo esalaki ete bato bátalela lisusu Nzambe te. Bakomeli na Bafalisai bazalaki kokangama makasi na mibeko, kasi na ndenge ya likolólikoló; bazalaki kotalela te mitinda ya ntina mingi oyo ezalaki na kati ya mibeko yango, oyo ezalaki komonisa bolingo mpe motema mawa. Na miso ya bato, bazalaki komonisa lokola ete bamipesaki na Nzambe, kasi soki bazali bango moko, bazalaki kosala makambo mingi ya mabe. Misala na bango ekokanaki ata moke te na makambo oyo bazalaki koloba. Ntango bazalaki kosala makambo na bango, mposa na bango ezalaki ete “bato bátala bango.” Bakokanaki na “malita mapakolami mpɛmbɛ. Yango emonani kitoko libándá nde katikati etondi na mikuwa ya bato bakufi mpe na ndenge nyonso ya bosɔtɔ.” Na mpiko nyonso, Yesu azalaki kotɔndɔla bokosi na bango; mbala na mbala azalaki koloba na bango ete: “Mawa na bino, bakomeli mpe Bafalisai, bakosi!”—Matai 23:5, 13-31.
Soki ozalaki na bomoi na ntango wana, lokola bato mosusu ya motema sembo, yo mpe olingaki mpenza koyina bokosi wana ya bato ya mangomba. (Baloma 2:21-24; 2 Petelo 2:1-3) Kasi olingaki nde kotika ete bokosi ya bakomeli mpe ya Bafalisai epesa yo nkanda mpe emema yo na koboya mangomba nyonso, ata mpe lingomba oyo Yesu Klisto na bayekoli na ye bazalaki kolakisa bato mpo bálanda yango? Ezaleli wana ekokaki te kozangisa yo makambo ya malamu?
Etamboli ya bokosi ya bato ya mangomba ekoki kotinda biso tóyina mangomba nyonso. Nzokande, soki tosali bongo, tokoki koyeba te kososola bosembo ya basambeli ya solosolo. Meko oyo tozwi mpo na komibatela na bokosi, ekoki kosala ete tózanga baninga ya solosolo. Yango wana, tosengeli kokanisa malamu mpe kozala na bokatikati na oyo etali ndenge na biso ya kotalela ezaleli ya bokosi.
“Bótala malamu”
Ya liboso, tosengeli koyeba kokesenisa banani mpenza bazali bakosi. Ezalaka likambo ya pɛtɛɛ te. Bato ya libota moko bamonaki bosolo ya likambo yango, kasi ezalaki nsima ya kozwa mikakatano minene mpenza. Maladi ya mama na bango, oyo azalaki na lopitalo, eyaki makasi mpe akómaki pene ya liwa. Lokola bato ya libota yango bamonaki ete nyonso wana esalemaki mpo lopitalo wana esalisaki mama na bango na ndenge elongobani te, bafundaki lopitalo yango na tribinale. Bazwaki avoka moko mpo asunga bango; avoka yango azalaki pastɛrɛ na lingomba moko ya esika oyo bazalaki kofanda. Atako lopitalo yango efutaki bango soki dolare milio 3,4 (3 400 000), mpasi ya libota wana eyaki lisusu makasi. Mama yango akufaki na bobola makasi, ata kutu mbongo ya kokunda ye ezalaki te. Mpo na nini? Mpamba te avoka yango atyaki mbongo wana nyonso na libenga na ye moko. Zulunalo moko oyo elimbolaka mibeko elobaki boye mpo na avoka yango: “Soki etamboli oyo amonisi ezali yango nde azalaki koteya . . . , boye mateya na ye esengelaki kozala oyo: tiká tóyibaka na biso.” Ndenge nini tokoki komibatela na bato ya motindo wana?
Yesu apesaki bato ya eleko na ye oyo bazalaki komona bokosi ya bakonzi ya mangomba toli moko; toli yango elobi boye: “Bótala malamu.” (Matai 16:6; Luka 12:1) Ya solo, tosengeli kozala ekɛngɛ. Bato bakoki kobimisa mikano ya malamu mpe komimonisa mpenza lokola ete bazali sembo, kasi tosengeli kokeba mpe kondima mbala moko te moto nyonso oyo toyebi malamumalamu te. Na ndakisa, soki toyebi ete mbongo ya monyato ekómi mingi na mabɔkɔ ya bato, tokobanda kotalela na likebi mpenza mbongo nyonso oyo ekwei na mabɔkɔ na biso, boye te?
Bakosi babimaki ata na kati ya lisangá ya boklisto ya solo. Moyekoli Yuda apesaki likebisi oyo: “Na ntango oyo bazali kolya elongo na bino na bilambo na bino ya bolingo, bazali nde mabanga oyo ebombami na kati ya mai; babateli ya mpate oyo bazali komileisa bango moko kozanga kobanga; mapata ezangi mai oyo mipɛpɛ ezali kotindika yango bisika nyonso; banzete oyo ezangi mbuma nzokande eleko na yango ya kobota mbuma ekómi pene na nsuka.”—Yuda 12, NW.
‘Kotala malamu’ elimboli koboya kokosama na moto oyo azali komonisa lokola ete alingi yo nzokande azali nde moto oyo alukaka matomba na ye moko mpe apalanganisaka makanisi oyo esimbami na Liloba ya Nzambe te. Lokola mabanga ya nsɔngɛ oyo efandi na kati ya mai oyo ezali koningana te, moto ya ndenge wana akoki kozindisa elimo ya bato oyo bazangi bokɛngi. (1 Timote 1:19) Mokosi akoki kopesa bilaka mingi ete akobɔndisa bato na elimo, nzokande ndenge moko ‘lipata oyo ezangi mai’ ebɛtisaka mbula te, moto yango asalaka eloko moko ya malonga te. Ndenge moko na nzete oyo ebotaka te, mokosi abotaka ata mbuma moko ya solosolo te oyo moklisto asengeli kobota. (Matai 7:15-20; Bagalatia 5:19-21) Ya solo, tosengeli kokeba na bakosi motindo wana. Kasi, tosengeli kosala yango kozanga kokanisa ete moto nyonso azali na mikano ya mabe.
“Bósambisaka te”
Bato ya kozanga kokoka balingaka kaka kobimisa mabe ya bato mosusu, kasi oyo ya bango moko babombaka yango! Ezaleli wana nde esalaka ete tókóma bakosi. Yesu alobaki boye: “Yo mokosi, longolá liboso libaya lizali na liso na yo, mpe talá, okomona polele mpo na kolongola mpumbulu na liso na ndeko na yo.” Ebongi tólanda toli oyo apesaki: “Bósambisaka te ete básambisa bino te. Zambi na esambiseli ekosambisaka bino, bakosambisa bino na yango . . . Mpo na nini okotala mpumbulu oyo ezali na liso ya ndeko na yo naino okanisi libaya lizali na liso na yo moko te?”—Matai 7:1-5.
Soki na bantango mosusu bato mosusu basali makambo oyo emonani lokola ete ezali bokosi, tosengeli te kowela kobenga bango ete bazali bakosi. Na ndakisa, ntango ntoma Petelo azalaki na Antiokia, ‘azongaki nsima mpe amitangolaki’ na baninga na ye bandimi oyo bazalaki Bayuda te, mpo na kosepelisa bapaya oyo bazalaki Bayuda, oyo bautaki na Yelusaleme. Balanaba mpe ‘asanganaki elongo na Petelo na bato mosusu na kokosa.’ Petelo asalaki bongo atako ezalaki ye nde moto aponamaki mpo na kofungola nzela na bato ya bikólo mosusu ete bándimama na lisangá ya boklisto. (Bagalatia 2:11-14; Misala 10:24-28, 34, 35) Kasi mwa libunga wana oyo Balanaba na Petelo basalaki etyaki bango te na molɔngɔ ya bakomeli na Bafalisai to na molɔngɔ ya Yuda Mokeliota.
“Tiká ete bolingo na bino bózala na bokosi te”
Yesu alobaki ete: “Ntango osaleli bato mosusu makambo malamu, kofuta mobɛti-mondule te mpo atambola liboso na yo—ndenge basali teatre basalaka, mpo balukaka ete bato bákumisa bango, ezala na kati ya biyanganelo to na babalabala.” (Matai 6:2, Phillips) Ntoma Paulo akomaki ete: “Tiká ete bolingo [na bino, NW] bózala na bokosi te.” (Baloma 12:9) Alendisaki elenge Timote ete azala na ‘bolingo uta na motema ya pɛto . . . mpe kondima ezangi bokosi.’ (1 Timote 1:5) Soki tozali mpenza na bolingo mpe na kondima ya solosolo, elingi koloba oyo ezangi koluka matomba na biso moko mpe ezangi bokosi, bato mosusu bakotyela biso motema. Tokozala mpenza liziba ya nguya mpe ya elendiseli ya solosolo mpo na bato oyo bazali zingazinga na biso. (Bafilipi 2:4; 1 Yoane 3:17, 18; 4:20, 21) Oyo eleki nyonso, tokondimama na Yehova.
Nzokande, baoyo basalelaka bokosi, bokosi yango ekomema bango na liwa. Ata soki moto abombi bokosi na ye ndenge nini, nsukansuka ekoyebana kaka. Yesu Klisto alobaki ete: “Makambo nyonso oyo ebombama ekomonana polele mpe makambo ya sɛkɛlɛ ekoyebana.” (Matayo 10:26, Boyokani ya Sika; Luka 12:2) Salomo, mokonzi ya mayele alobaki ete: “Nzambe akokómisa misala nyonso epai na kosambisama elongo na makambo nyonso mabombami, soko mazali malamu, soko mazali mabe.”—Mosakoli 12:14.
Liboso tókóma na ntango wana, mpo na nini tosengeli kotika ete bokosi ya bato mosusu ebongola mpenza makanisi na biso kino kozangisa biso bolingo ya solosolo ya baninga oyo bazangi bokosi? Tokoki kozala na bokɛngi kozanga ete tókanisela bato mabe ntango nyonso. Tósala nyonso oyo ekoki na biso mpo bolingo na biso mpe kondima na biso ezalaka na bokosi te.—Yakobo 3:17; 1 Petelo 1:22.
[Bililingi na lokasa 22]
Soki ozalaki na ntango ya bakomeli na Bafalisai, olingaki kotika ete bokosi na bango epekisa yo kolanda Yesu Klisto na bayekoli na ye?