Lisungi oyo ebongi mpenza mpo na kokitisa mitungisi
“Boyá epai na ngai, bino nyonso oyo bozali konyokwama mpe bomemi mikumba, mpe nakobɔndisa bino.”—MATAI 11:28, NW.
1, 2. (a) Biblia ezali na makambo nini oyo ekoki kokitisa mitungisi oyo eleki mingi? (b) Mateya ya Yesu ezalaki na litomba nini?
TOKANISI ete yo mpe omonaka ete mitungisi soki eleki mingi ezalaka mabe; ekómaka maladi. Biblia elobi ete bato nyonso balɛmbi na komema mikumba, yango wana mingi bazali koluka ndenge oyo mitungisi oyo bazali na yango na bomoi ya lelo ekoki kolongwa. (Baloma 8:20-22) Kasi, Makomami mpe ezali komonisa biso ndenge oyo, ata na moi ya lelo, tokoki kozwa lisungi ya solosolo mpo mitungisi na biso ekita. Tokozwa lisungi yango soki tolandi toli mpe ndakisa ya elenge mobali moko oyo azalaká na bomoi eleki sikoyo mbula 2000. Elenge yango azalaki mosali na mabaya, kasi mingimingi azalaki nde kolinga bato. Maloba na ye ezalaki kosimba mitema ya bato, azalaki kokokisa bamposa na bango, azalaki kosalisa bato oyo balɛmbaki mpe kobɔndisa bato oyo bazalaki konyokwama na makanisi. Kasi esuki wana te: asalisaki bato mingi ete bákola mpenza na elimo. Na bongo, mitungisi mingi oyo bazalaki na yango ekitaki, ndenge mpe oyo ya yo ekoki kokita.—Luka 4:16-21; 19:47, 48; Yoane 7:46.
2 Moto yango ezali Yesu, moto ya Nasalete; ye azalaki kolanda mayele ya mokili te oyo bato mosusu bazalaki kokende koyekola na Loma, na Athènes to na Alexandrie na ntango ya kala. Atako bongo, mateya na ye eyebani mingi. Mateya na ye ezalaki na motó ya likambo moko: guvɛrnɛma oyo Nzambe akosalela mpo na koyangela mabele na ndenge oyo ebongi mpenza. Yesu ateyaki mpe malako ya ntina oyo moto akoki kolanda mpo na kozala na bomoi ya malamu, malako yango ezali na ntina mingi lelo oyo. Bato oyo bayekolaka mateya ya Yesu mpe basalelaka yango, bazwelaka yango matomba mbala moko; moko ya matomba yango ezali ete bamonaka ete mitungisi na bango mingi ekitaka. Yo mpe olingi kozwa litomba yango?
3. Yesu alobaki na bato nini?
3 Mbala mosusu okoki kokakatana mpe koloba ete, ‘Ndenge nini moto oyo azalaká na bomoi kalakala ndenge wana akoki kosalisa ngai lelo oyo?’ Soki okanisi bongo, tosɛngi na yo oyoka maloba oyo Yesu azali koloba na biso: “Bóya epai na ngai, bino nyonso bozali konyokwama mpe bomemi mikumba, mpe nakobɔndisa bino. Bómema ekangiseli na ngai mpe bóyekola epai na ngai, mpo ngai nazali na boboto mpe nazali na motema ya komikitisa, na bongo milimo na bino ekobɔndisama. Mpo ekangiseli na ngai ezali pɛtɛpɛtɛ mpe mokumba na ngai ezali pɛpɛlɛ.” (Matai 11:28-30, NW) Alingaki mpenza koloba nini? Tótalela naino maloba yango malamumalamu mpo na komona ndenge oyo ekoki kosalisa mpo ete mitungisi oyo ezali konyokola biso ekita.
4. Yesu asololaki na banani, mpe mpo na nini tokanisi ete bato yango bamonaki ete ezalaki mpasi mpo bákokisa makambo oyo bazalaki kosɛnga bango?
4 Yesu asololaki na bato mingi oyo bazalaki kosala makasi mpo na kotosa mibeko kasi bazalaki lokola ‘bamemi mikumba,’ mpamba te bakonzi ya Bayuda bakómisaki losambo kilo. (Matai 23:4) Bakonzi ya mangomba batyaki ebele ya mibeko ata na likambo nini oyo bato basalaka. Soki bazali mbala na mbala kozongela koyebisa yo ete boye to boye “kosala te,” omoni te ete ekokóma kotungisa yo? Nzokande, Yesu azalaki kobenga bato ete báyoka ye mpo na koyeba solo, koyeba boyengebene, mpe kozala na bomoi ya malamu mingi. Ya solo, mpo na koyeba Nzambe ya solo esengelaki koyoka Yesu Klisto, mpamba te na nzela na ye nde bato bakoki koyeba Yehova, ezala na ntango wana to lelo oyo. Yesu alobaki ete: “Ye oyo amoni ngai asili komona Tata.”—Yoane 14:9.
Bomoi na yo etondi na mitungisi?
5, 6. Meká naino kokokanisa misala mpe ndenge bazalaki kofuta bato na ntango ya Yesu mpe na ntango na biso.
5 Likambo yango ekoki mpe kotalela yo mpo ntango mosusu ozali na mitungisi mingi na mosala na yo to libota na yo. Ekoki mpe kozala ete mikumba mosusu ezali koleka yo motó. Soki ezali bongo, ozali lokola bato ya sembo oyo Yesu akutanaki na bango mpe asalisaki bango. Tókamata na ndakisa kosala mosala mpo na kobikela. Lelo oyo, bato mingi bazali kobunda na likambo yango; na ntango ya Yesu ezalaki mpe bongo.
6 Na ntango wana, moto ya mosala azalaki kosala ngonga 12 na mokolo, azalaki kosala mikolo 6 na pɔsɔ, mbala mingi mpo báfuta ye denali moko mpamba mpo na mokolo mobimba. (Matai 20:2-10) Yango ezali nini soki okokanisi yango na lifuti oyo ozali kozwa to oyo baninga na yo bazali kozwa? Ezali mpasi mpo tókokanisa lifuti ya bato na ntango ya kala na oyo bato bazali kozwa lelo oyo. Tokoki kosala yango soki tomeki kotalela biloko oyo moto akoki kosomba na mbongo oyo bafutaka ye. Moto moko ya mayele alobaki ete na ntango ya Yesu, limpa moko oyo basali yango na kɔpɔ minei ya falini, bazalaki kosomba yango na mbongo oyo bazalaki kofuta na yango moto mpo na ngonga moko ya mosala. Moto mosusu ya mayele alobi ete bazalaki kosomba kɔpɔ moko ya vinyo ya malamu na mbongo oyo bazalaki kofuta moto mpo na ngonga mibale ya mosala. Bandakisa oyo ekoki kosalisa yo na komona ete na ntango wana bato bazalaki koyoka mpasi na mosala mpe bazalaki kosala ntango molai kaka mpo na kozwa mwa eloko ya kobikela. Bazalaki mpenza na mposa ete bákitisa bango mikumba wana mpe bálendisa bango, ndenge mpe biso tozali na mposa yango lelo oyo. Soki ozali moto ya mosala, ntango mosusu okoki komona lokola ete bazali kotya yo molunge mpo osala mingi koleka. Mbala mingi tozangaka ata ntango ya kokanisa malamu liboso ya kozwa bikateli. Na ntembe te, yo mpe ozali komona ete ozali mpenza na mposa bákitisa yo mikumba.
7. Ndenge nini bato bayambaki maloba ya Yesu?
7 Tomoni mpenza ete maloba oyo Yesu alobaki na baoyo nyonso bazalaki ‘konyokwama mpe komema mikumba’ esepelisaki bato mingi oyo bayokaki yango na ntango wana. (Matai 4:25; Malako 3:7, 8) Mpe tóbosana te ete Yesu abakisaki elaka oyo: “Nakobɔndisa bino.” Elaka yango ezali naino ata na moi ya lelo. Ekoki kotalela biso soki tozali ‘konyokwama mpe komema mikumba.’ Ekoki mpe kotalela bandeko mpe baninga oyo bazali kokutana na makambo ndenge yango.
8. Na ndenge nini kobɔkɔla bana mpe kozala mobange ebakisaka mitungisi?
8 Ezali mpe na makambo mosusu oyo ezali lokola kilo mpo na bato. Kobɔkɔla bana ezali etumba moko monene. Ata mpe kaka kozala mwana ekoki kozala mpasi. Bato mingi, ezala mikóló to bana, bazali konyokwama na makanisi mpe bazali kotungisama na maladi. Atako bato bakómi koumela mingi na bomoi koleka ndenge ezalaki kala, mibange bazali na mikakatano oyo bazali kobunda na yango, atako minganga bakómi na mayele mingi.—Mosakoli 12:1.
Kosala na ekangiseli
9, 10. Na ntango ya kala, ekangiseli ezalaki elilingi ya nini, mpe mpo na nini Yesu alobaki na bato bámema ekangiseli na ye?
9 Tomoni ete na maloba na ye na Matai 11:28, 29 (NW), Yesu alobaki ete: “Bómema ekangiseli na ngai mpe bóyekola epai na ngai.” Na ntango wana, moto mpamba azalaki mpenza komiyoka lokola nde amemi ekangiseli. Banda kalakala, basalelaka ekangiseli na maloba ya elilingi mpo na kolobela boombo. (Genese 27:40; Levitike 26:13; Deteronome 28:48) Yesu amonaki bangamba mingi oyo bazalaki mpenza kosalela bikangiseli mpo na kokumba biloko ya kilo na mapeka. Bikangiseli mosusu ezalaki pɛtɛpɛtɛ na nkingo mpe na mapeka; kasi, mosusu ezalaki kozokisa na nkingo mpe na mapeka. Lokola Yesu asalaká mosala ya mabaya, ekoki mpenza kozala ete azalaki kosala bikangiseli, mpe ayebaki kosala ekangiseli oyo ezali “pɛtɛpɛtɛ.” Mbala mosusu azalaki kotya mwa mposo ya nyama to mwa elamba mpo ezokisa te.
10 Ntango Yesu alobaki ete, “Bómema ekangiseli na ngai,” mbala mosusu azalaki komikokanisa na moto oyo azali kopesa ekangiseli oyo esalemi malamu mpe ezali “pɛtɛpɛtɛ” na nkingo mpe na mapeka ya moto ya mosala. Yango wana, Yesu abakisaki ete: “Mokumba na ngai ezali pɛpɛlɛ.” Elingi koloba ete ekangiseli yango ezalaki malamu mpo na kosala na yango; azalaki mpe kopesa mosala oyo ezali konyokola te. Kasi, ntango alobaki na bato ete bámema ekangiseli na ye, Yesu azalaki kolaka te ete akokitisa mpasi nyonso oyo bazalaki na yango na ntango wana. Atako bongo, makambo ya sika oyo azalaki kolaka bango elingaki mpenza kolendisa bango. Makambo oyo basengelaki kobongola na bomoi na bango mpe na ndenge bango ya kosala makambo elingaki kokitisa mpasi na bango. Na koleka, elikya kitoko mpe ya solosolo elingaki kosalisa bango bázala na bomoi oyo ezali na mitungisi mingi te.
Yo mpe okoki kolendisama
11. Mpo na nini tolobi ete Yesu azalaki koloba te ete bato bátika ekangiseli oyo bazalaki na yango mpo bámema ekangiseli mosusu?
11 Simbá likambo oyo: Yesu alobaki te ete bato bátika bikangiseli oyo bazalaki na yango mpo bázwa mosusu. Bokonzi ya Loma elingaki kaka koyangela mboka na bango, ndenge moko lelo oyo, baguvɛrnɛma ezali koyangela bisika nyonso oyo baklisto bazali. Mpako oyo Baloma bazalaki kosɛnga bango na ekeke ya liboso elingaki kolongwa te. Bamaladi mpe mikakatano ya mbongo elingaki kosila te. Ezaleli ya kozanga kokoka esengelaki kosila te epai ya bato. Kasi, kolanda mateya ya Yesu ekokaki mpenza kobɔndisa bango, ndenge mpe ekoki kobɔndisa biso lelo oyo.
12, 13. Yesu amonisaki nini oyo esengelaki mpenzampenza kobɔndisa bato, mpe bato mosusu basalaki nini?
12 Ndenge mpenza ya kosalela elilingi ya ekangiseli oyo Yesu alobelaki emonanaki na mosala ya kokómisa bato bayekoli. Ntembe ezali te ete mosala oyo Yesu atyaki na esika ya liboso ezalaki mosala ya koteya bato, mpe azalaki kolobela mingimingi Bokonzi ya Nzambe. (Matai 4:23) Yango wana, ntango alobaki ete, “Bómema ekangiseli na ngai,” tokanisi mpenza ete esɛngaki mpe kosala mosala oyo ye azalaki kosala. Baevanzile ezali komonisa ete bato ya sembo oyo bayokaki Yesu batikaki misala na bango, likambo oyo ezalaki mpenza kotungisa bomoi ya bato mingi. Tókanisa lisusu maloba oyo alobaki na Petelo, Andele, Yakobo mpe Yoane ete: “Bólanda ngai, mpe nakokómisa bino balɔbi ya bato.” (Malako 1:16-20, NW) Amonisaki bato yango oyo bazalaki babomi-mbisi ete bakokaki kozala na esengo mingi soki bamipesi na mosala oyo ezalaki na esika ya liboso na bomoi na ye. Ye moko asengelaki kotambwisa bango mpe kosunga bango na kati ya mosala yango.
13 Bayuda mosusu oyo bayokaki ye bakangaki ntina ya likambo yango mpe basalaki bongo. Kanisá likambo oyo elekaki na libongo, likambo oyo totángaka na Luka 5:1-11 (NW). Babomi-mbisi minei babomaki nzoto butu mobimba kasi bazwaki eloko te. Bongo, na mbala moko, minyama na bango etondaki na mbisi! Likambo yango esalemaki yango moko te; ezalaki nde likamwisi oyo Yesu asalaki. Ntango babalolaki miso na libongo, bamonaki ebele ya bato oyo bazalaki kosepela mpenza na mateya ya Yesu. Makambo wana ekómisaki polele maloba oyo Yesu ayebisaki bango minei ete: “Banda sikoyo [bokokanga] bato na bomoi.” Basalaki nini ntango bayokaki bongo? “Bazongisaki masuwa na mokili, mpe basundolaki biloko nyonso mpe balandaki ye.”
14. (a) Ndenge nini tokoki kobɔndisama lelo oyo? (b) Nsango malamu nini ya kobɔndisa Yesu azalaki kosakola?
14 Yo mpe okoki mpenza kosala ndenge yango. Mosala ya koteya bato solo ya Biblia ezali naino kosalema. Batatoli ya Yehova pene na milio 6 bandimi maloba ya Yesu ya ‘komema ekangiseli na ye’; bakómi “balɔbi na bato.” (Matai 4:19, NW) Ezali na baoyo basalaka kaka mosala yango; bamosusu mpe, atako bazali na misala na bango, bazali kosala makasi ete básala mosala yango na ntango oyo batikalaka na yango. Bango nyonso bazali komona ete mosala yango ezali kobɔndisa bango, mitungisi na bango ezali kokita. Mosala yango ya koyebisa basusu nsango malamu, “Nsango Malamu ya Bokonzi,” esepelisaka bango mpenza. (Matai 4:23) Koyebisa nsango ya malamu ezalaka esengo, kasi esengo eleki mingi lisusu na koyebisa nsango malamu ya Bokonzi. Biblia ezali na makambo ya ntina oyo tosengeli na yango mpenza mpo na kondimisa bato ebele ete bakoki kozala na bomoi oyo ezali na mitungisi mingi te.—2 Timote 3:16, 17.
15. Ndenge nini okoki kozwa matomba na mateya ya Yesu mpo na kozala na bomoi ya malamu?
15 Na mwa makambo mosusu, ata bato oyo babandi sika koyekola makambo etali Bokonzi ya Nzambe bazwi litomba na mateya ya Yesu oyo etali ndenge ya kozala na bomoi ya malamu. Bato mingi bakoki koloba na bosembo mpenza ete mateya ya Yesu elendisi bango mpe esalisi bango bákoka kobongola bomoi na bango. Yo mpe okoki kosala yango soki otaleli mwa mitinda ya bomoi ya malamu oyo ezali na kati ya masolo ya bomoi ya Yesu mpe mosala na ye, mingimingi na Baevanzile oyo Matai, Malako mpe Luka bakomaki.
Ndenge ya kobɔndisama
16, 17. (a) Epai wapi tokoki kokuta mateya mosusu ya ntina oyo Yesu ateyaki? (b) Ntango tozali kolanda mateya ya Yesu, tosengeli kosala nini mpo ebɔndisa biso?
16 Na mobu 31 ya ntango na biso (T.B.), Yesu asalaki lisolo moko oyo eyebani na mokili mobimba tii na moi ya lelo. Babengaka yango Lisolo Likoló ya Ngomba. Lisolo yango ezali na Matai mokapo 5 tii mokapo 7 mpe Luka mokapo 6, mpe emonisi na mokuse mateya ebele ya Yesu. Mateya mosusu ya Yesu ezali mpe na bisika mosusu na Baevanzile. Makambo mingi oyo alobaki ezali mpasi te mpo na kokanga ntina na yango, kasi kosalela yango nde ekoki kozala mpasi. Tolendisi yo otánga mikapo yango malamumalamu mpe okanisa mpenza likoló ya makambo yango. Tiká ete mateya yango ebongola makanisi mpe ezaleli na yo.
17 Ya solo, ezali na ndenge mingi oyo tokoki kokabola mateya ya Yesu. Na lisolo na biso, tókabola yango na mikolo nyonso ya sanza mpo tózwa liteya moko na mokolo; tozali kosala yango na mokano ya kosalela yango na bomoi na biso. Tokosala ndenge nini? Soki okómi na liteya moko, koleka yango nokinoki te. Kanisá lisusu lisolo ya mokonzi oyo azalaki na bozwi oyo atunaki Yesu Klisto ete: “Nasala nini ete nazwa bomoi ya seko?” Ntango Yesu azongelaki makambo ya ntina mingi na kati ya Mibeko ya Nzambe oyo asengeli kokokisa, moto yango alobaki ete akokisaka yango banda kala. Kasi, amonaki ete asengelaki mpe kosala makambo mosusu. Yesu alobaki na ye asala lisusu molende mpo na kosalela mpenza mitinda ya Nzambe, azala moyekoli oyo azali kosala mosala. Emonani ete mobali yango andimaki kosala nyonso wana te. (Luka 18:18-23) Na yango, moto oyo alingi koyekola mateya ya Yesu lelo oyo asengeli kobosana te ete kondima mateya yango mpe kosalela yango ezali makambo mibale ekeseni; kosalela nde ekitisaka mitungisi.
18. Monisá ndenge oyo okoki kosalela malamu makambo oyo ezali na etanda.
18 Sikoyo, mpo na kobanda kotalela mpe kosalela mateya ya Yesu, talá likambo ya liboso na etanda. Yango etindi biso na Matai 5:3-9. Ezali solo ete mokomoko na biso akoki kozwa ntango mwa mingi mpo na kokanisa na bozindo toli malamu oyo ezali na bavɛrsɛ wana. Kasi, soki totaleli bavɛrsɛ nyonso wana lokola liteya moko, okoloba nini mpo na oyo etali ezaleli ya moto? Soki olingi mpenza kolonga kokitisa mitungisi oyo eleki mingi na bomoi na yo, eloko nini ekosalisa yo? Na ndenge nini bomoi na yo ekoki kokóma malamu koleka soki otyeli makambo ya elimo likebi mwa mingi lisusu, soki otii lisusu mingi makanisi na yo na makambo yango? Na bomoi na yo, ozali na makambo mosusu oyo esengeli komipesa na yango mingi te mpo ozwa ntango ya komipesa mingi na makambo ya elimo? Soki osali yango, esengo na yo ekobakisama.
19. Okoki lisusu kosala nini mpo na kokóma na bososoli mingi?
19 Ezali mpe na likambo mosusu oyo okoki kosala. Omoni boni soki otaleli bavɛrsɛ yango na mosaleli mosusu ya Nzambe mpo na kopesana makanisi, ekoki kozala molongani na yo, ndeko na yo to moninga na yo? (Masese 18:24; 20:5) Kobosana te ete na likambo ya ndenge wana, mokonzi oyo azalaki na bozwi mingi atunaki moto mosusu: Yesu. Eyano oyo Yesu apesaki ye ekokaki kopesa ye nzela ya kozwa bolamu mpe bomoi ya seko. Moninga na yo mondimi oyo bokopesana na ye makanisi likoló ya bavɛrsɛ wana akokokana na Yesu te; kasi, lisolo na bino likoló ya mateya ya Yesu ekozala na litomba mpo na bino mibale. Koumela te mpo na kosala yango.
20, 21. Programɛ nini okoki kolanda mpo na koyekola mateya ya Yesu, mpe ndenge nini okoki koyeba soki ozali kokola?
20 Talá lisusu etanda “Mateya oyo ekosalisa yo.” Mateya yango ekabolami na ndenge oyo ezali kopesa yo nzela na kotalela liteya moko na mokolo. Liboso, okoki kotánga maloba ya Yesu na bavɛrsɛ oyo bapesi. Na nsima, kanisá maloba na ye. Kanisá ndenge oyo okoki kosalela yango na bomoi na yo. Soki omoni ete osalaka yango, kanisá soki okoki lisusu kosala nini mpo na kolanda kosalela liteya wana oyo euti na Nzambe. Meká kosalela liteya yango na mokolo oyo otángi yango. Soki omoni ete ezali kopesa yo mwa kwokɔsɔ mpo na kokanga ntina na yango to mpo na koyeba ndenge oyo okoki kosalela yango, zongelá yango na mokolo oyo elandi. Kasi, kobosana te ete ezali kosɛnga te okokisa yango malamumalamu liboso oleka na liteya mosusu. Na mokolo oyo elandi, okoki kotalela liteya mosusu. Na nsuka ya pɔsɔ, talá soki olongi kosalela mateya ata minei to mitano ya Yesu. Na pɔsɔ ya mibale, bakisá mateya mosusu, saláká yango mokolo na mokolo. Soki omoni ete olongi te kosalela mateya mosusu, kolɛmba nzoto te. Moklisto nyonso akokutana na likambo yango. (2 Ntango 6:36; Nzembo 130:3; Mosakoli 7:20; Yakobo 3:8) Landá kosala yango na pɔsɔ ya misato mpe ya minei.
21 Soki sanza moko na nsima, okoki kosilisa makambo nyonso 31. Osilisa yango to te, okomiyoka ndenge nini? Okozala na esengo, mbala mosusu okomiyoka malamu. Ata soki okei mpenza mosika te, okomona ete mitungisi na yo ekokita mpenza, to okomona ete okoyeba kolonga mitungisi malamu, mpe okoyeba ndenge oyo okoki kokende liboso. Yebá ete ezali na makambo mosusu mingi ya malamu oyo Yesu ateyaki, kasi ezali na liste wana te. Tolendisi yo oluka yango mpe omeka kosalela yango.—Bafilipi 3:16.
22. Kolanda mateya ya Yesu ekoki kobota mbuma nini, kasi makambo nini lisusu tosengeli kotalela?
22 Omoni ete ekangiseli ya Yesu, atako ezali na mwa kilo na yango, kasi ezali mpenza pɛtɛpɛtɛ. Kolanda mateya na ye mpe kozala moyekoli na ye ezali mokumba moko ya pɛpɛlɛ. Nsima ya kosala mbula 60 na bomoi ya ndenge wana, ntoma Yoane, moninga mpenza ya Yesu, alobaki ete: “Bolingo ya Nzambe ezali boye ete tókokisa malako na ye. Malako na ye mpe mazali na bozito te.” (1 Yoane 5:3) Yo mpe okoki kozala na elikya yango. Ntango oumeli na kosalela mateya ya Yesu, okobanda mpe komona ete makambo mingi oyo ezali motungisi mpenza na bomoi ya bato ebele ekozala mpenza motungisi te epai na yo. Okomona ete mitungisi na yo ekokita mpenza. (Nzembo 34:8) Kasi, ezali mpe na makambo mosusu oyo osengeli kotalela na ekangiseli ya Yesu, oyo toyoki ete ezali pɛtɛpɛtɛ. Yesu alobaki lisusu ete azali ‘na boboto mpe na motema ya komikitisa.’ Maloba yango elimboli nini mpo na biso ntango tozali koyekola epai ya Yesu mpe kolanda ndakisa na ye? Tokotalela yango na lisolo oyo elandi.—Matai 11:29.
Okopesa eyano nini?
• Ntango tolingi ete mitungisi oyo eleki biso motó ekita, mpo na nini tosengeli koluka lisalisi epai ya Yesu?
• Ekangiseli ezalaki elilingi ya nini, mpe mpo na nini?
• Mpo na nini Yesu alobaki na bato ete bámema ekangiseli na ye?
• Ndenge nini okoki kolendisama na elimo?
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 14]
Mokapo ya mobu 2002 mpo na Batatoli ya Yehova ekozala: “Bóya epai na ngai . . . mpe nakobɔndisa bino.”—Matai 11:28, NW.
[Etanda/ELilingi na lokasa 12]
Mateya oyo ekosalisa yo
Makambo nini ya malamu okokuta na Matai mokapo 5 tii mokapo 7? Mikapo yango ezali na mateya oyo Yesu, Moteyi Monene, ateyaki likoló ya ngomba moko na Galilai. Tosɛngi yo okamata Biblia na yo, otánga bavɛrsɛ oyo topesi awa na nse mpe omituna mituna oyo ezali pembeni ya vɛrsɛ mokomoko.
1. 5:3-9 Makambo yango ezali koteya ngai nini na oyo etali ezaleli na ngai mobimba? Nakosala nini mpo nazala na esengo mingi koleka? Nakoki kosala ndenge nini mpo nakokisa malamumalamu bamposa na ngai ya elimo?
2. 5:25, 26 Na esika ya kolanda elimo ya kowelana oyo bato mingi bazali na yango, ezaleli nini eleki malamu?—Luka 12:58, 59.
3. 5:27-30 Maloba ya Yesu ezali komonisa nini na oyo etali kokanisakanisa makambo ya mbindo? Soki nazali kobengana makanisi ya ndenge wana, nakozala na esengo mpe na kimya ya makanisi?
4. 5:38-42 Mpo na nini nasengeli kosala makasi mpo na kozala nkandankanda te, ezaleli oyo bato bazali kolendisa lelo oyo?
5. 5:43-48 Litomba nini nakozwa soki naluki kofanda malamu na bato oyo mbala mosusu nazalaki kotalela bango lokola banguna? Ndenge nini koluka kofanda malamu na bato ekoki mpenza kokitisa to kosilisa matata?
6. 6:14, 15 Soki ntango mosusu nalingaka kolimbisa te, ekoki nde kozala mpo ete nazalaka na likunya to nabombaka nkanda? Ndenge nini nakoki kotika ezaleli yango?
7. 6:16-18 Namitungisaka mingi mpo na ndenge oyo nazali komonana na miso ya bato koleka ndenge oyo motema mpe makanisi na ngai ezali mpenza? Nasengeli komitungisa mingi mpo na makambo nini?
8. 6:19-32 Soki nazali komitungisa mingi mpo na mbongo mpe mpo na kozala na biloko mingi, yango ekomema ngai wapi? Esengeli nakanisaka makambo nini mpo natalelaka mbongo mpe kozala na biloko mingi na lolenge ya malamu?
9. 7:1-5 Namiyokaka ndenge nini na kati ya bato oyo balingi kosambisa basusu mpe kotɔngatɔnga, oyo balukaka kaka mabunga ya basusu? Mpo na nini esengeli naboya bizaleli ya ndenge yango?
10. 7:7-11 Soki tosengeli kolɛmba te ntango tozali kosenga Nzambe; kasi tokoloba boni mpo na ezaleli yango na makambo mosusu ya bomoi?—Luka 11:5-13.
11. 7:12 Atako nayebi Lilako Lileki Malamu, nasalelaka yango mpenza?
12. 7:24-27 Lokola ngai moko nasengeli kopona ndenge oyo nakomitambwisa na bomoi na ngai, ndenge nini nakoki komibongisa malamu mpo na kolonga mikakatano mpe mitungisi? Mpo na nini nasengeli kokanisa likambo yango sikoyo?—Luka 6:46-49.
Mateya mosusu oyo nakoki kotalela:
13. 8:2, 3 Ndenge nini nakoki komonisa motema mawa mpo na bato oyo bazali na mpasi, ndenge Yesu asalaki yango mbala mingi?
14. 9:9-38 Nazalaka mpenza na ezaleli ya koyokela basusu mawa, mpe ndenge nini nakoki komonisa ezaleli yango mingi koleka?
15. 12:19 Lokola esakweli oyo elobelaki Yesu eteyi ngai, nasalaka makasi ete naboya koswana?
16. 12:20, 21 Bolamu nini nakosalela basusu soki nazali kotungisa bango te na maloba to na misala na ngai?
17. 12:34-37 Makambo nini nalobaka mingi ntango nasololaka na bato? Nayebi ete soki nakamoli lilala, ekobimisa mai na yango; na yango mpo na nini nasengeli komitalelaka ngai moko, elingi koloba kotalela motema na ngai?—Malako 7:20-23.
18. 15:4-6 Maloba ya Yesu eteyi ngai nini mpo na likambo etali kosunga mibange?
19. 19:13-15 Nasengeli koluka ntango ya kosala nini?
20. 20:25-28 Mpo na nini koluka bokonzi mpo na kozwa kaka lokumu ezali na ntina te? Ndenge nini nakoki kolanda ndakisa ya Yesu na likambo yango?
Makanisi mosusu, oyo Malako akomaki:
21. 4:24, 25 Ndenge oyo natalelaka bato mosusu ezali na ntina nini mpenza?
22. 9:50 Soki maloba na ngai mpe misala na ngai ezali malamu, mbuma malamu nini yango ekozanga te kobota?
Mpo na kosukisa, mwa ndambo ya mateya mosusu oyo Luka akomaki:
23. 8:11, 14 Soki natiki ete mitungisi, koluka kozala na biloko mingi mpe komipesa na bisengo ezwa ngai ntango mingi mpe natyelaka yango makanisi mingi, nakoki kosuka ndenge nini?
24. 9:1-6 Atako Yesu azalaki na nguya ya kosilisa maladi, likambo nini atyaki na esika ya liboso?
25. 9:52-56 Nasilikaka mpambampamba? Naboyaka kozongisa mabe na mabe?
26. 9:62 Ndenge nini nasengeli kotalela mokumba na ngai ya kosakola Bokonzi ya Nzambe?
27. 10:29-37 Ndenge nini nakoki kosala mpo nafandaka na bato malamu, natyelaka mpe bato mosusu likebi?
28. 11:33-36 Makambo nini nakoki kobongola mpo bomoi na ngai ezala na mindɔndɔ te?
29. 12:15 Biloko ya mokili ezali na esika nini na bomoi ya moto?
30. 14:28-30 Soki nazali kozwa ntango ya kokanisa liboso ya kozwa bikateli, makambo nini nakomipekisa na kosala mpe matomba nini nakozwa?
31. 16:10-12 Bolamu nini nakoki kozwa soki nazali sembo na bomoi na ngai?
[Bililingi na lokasa 10]
Mosala ya kobikisa bato oyo tozali kosala na ekangiseli ya Yesu, elendisaka