Mpo na nini kozwa batisimo?
“Bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, mpe bóbatisa bango.”—MATAI 28:19, NW.
1, 2. (a) Makambo nini esalaki ete bato mosusu bázwa batisimo? (b) Mituna nini tokoki komituna na ntina etali batisimo?
CHARLEMAGNE, mokonzi ya Ba-Franc alongaki Ba-Saxon na bitumba; na nsima, banda mobu 775 tii 777 ya ntango na biso (T.B.), asɛngisaki bango na makasi ete bázwa batisimo. John Lord, moto ya mayele na makambo ya kala, akomaki ete: “Akómisaki bango na makasi baklisto ya nkombo.” Ndenge moko mpe, Vladimir Ier, mokonzi ya Russie abalaki mwana ya mokonzi oyo azalaki moto ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse na mobu 987 T.B.; na nsima, azwaki ekateli ete bato nyonso ya ekólo na ye basengeli kokóma “baklisto.” Abimisaki mobeko ete bato nyonso bábatisama, oyo akoboya, bakoboma ye na mopanga!
2 Batisimo wana elongobanaki mpenza? Ezalaki mpenza na ndimbola ya solo? Ata moto nini akoki na ye kozwa batisimo?
Ndenge nini batisimo esengeli kopesama?
3, 4. Mpo na nini kobwakela moto mwa mai to kosopela ye mai na motó ezali te ndenge oyo ebongi mpo na kopesa baklisto batisimo?
3 Ntango Charlemagne to ntango Vladimir Ier bapesaki mitindo ete bato nyonso bázwa batisimo, bakonzi yango basalaki te ndenge oyo Liloba ya Nzambe ezali kosɛnga. Soki bazali kobwakela bato mwa mai to kosopela bango mai na motó, ata mpe soki bazali kozindisa na mai bato oyo bateyi bango naino mateya ya solo ya Makomami te, batisimo ya ndenge wana ezalaka na ntina moko te.
4 Tótalela makambo oyo esalemaki ntango Yesu moto ya Nasalete akendaki epai ya Yoane Mobatisi na mobu 29 T.B. Yoane azalaki kobatisa bato na Ebale Yaladene. Bato bango moko bazalaki kokende epai na ye mpo na kozwa batisimo. Bazalaki kaka kokita na ebale bongo ye azalaki kosopela bango mwa mai na motó to kobwakela bango mai? Nini esalemaki ntango Yoane abatisaki Yesu? Matai alobi ete nsima ya kobatisa ye, Yesu ‘abimaki nokinoki na mai.’ (Matai 3:16) Azalaki na kati ya mai, bazindisaki ye na kati ya mai na Ebale Yaladene. Ndenge moko mpe, mokube Moetiopia oyo azalaki mondimi azwaki batisimo na kati ya “mai.” Esengelaki ete Yesu mpe bayekoli na ye bábatisama na bamai ya ndenge wana mpamba te batisimo na bango esɛngaki kozindisama na mai.—Misala 8:36.
5. Ndenge nini baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki kobatisa bato?
5 Maloba ya Grɛki oyo ebongolami na “kobatisa,” “batisimo,” mpe bongo na bongo, elimboli kozindisa na mai. Mokanda moko (Smith’s Bible Dictionary) elobi ete: “Batisimo elimboli mpenzampenza kozindisa na mai.” Yango wana, Babiblia mosusu elobelaka “Yoane Mozindisi.” (Matai 3:1, Rotherham; Diaglott interlinear) Na mokanda na ye (History of the Christian Religion and Church, During the Three First Centuries), Augustus Neander alobi boye: “Na ebandeli, bazalaki kopesa bato batisimo na kozindisáká bango na kati ya mai.” Mokanda moko ya Lifalanse oyo eyebani mingi (Larousse du XXe siècle) elobi boye: “Bazalaki kopesa baklisto ya liboso batisimo na kozindisáká bango na kati ya mai na esika nyonso oyo mai ezalaki.” Mokanda mosusu mpe (New Catholic Encyclopedia, 1967, Volimi 2, lokasa 56) elobi ete: “Ezali polele ete na Lingomba ya ekeke ya liboso, bazalaki kopesa bato batisimo na kozindisáká bango na kati ya mai.” Yango wana lelo oyo, moto oyo alingi kozwa batisimo mpo na kokóma Motatoli ya Yehova, bazindisaka ye na mai.
Ntina ya sika mpo na batisimo
6, 7. (a) Mpo na nini Yoane azalaki kobatisa bato? (b) Nini ezalaki likambo ya sika na batisimo oyo bayekoli ya Yesu bazalaki kopesa?
6 Batisimo oyo Yoane azalaki kopesa ezalaki na ntina oyo ekeseni na batisimo oyo bayekoli ya Yesu bapesaki. (Yoane 4:1, 2) Yoane azalaki kobatisa bato mpo bámonisa na miso ya bato nyonso ete babongoli motema, batiki masumu to kobuka Mibeko.a (Luka 3:3) Kasi, batisimo ya bayekoli ya Yesu ezalaki na ndimbola mosusu. Na Pantekote ya mobu 33 T.B., ntoma Petelo alobaki na bato oyo bazalaki koyoka ye ete: “Bobongola mitema mpe moto na moto azwa batisimo na nkombo ya Yezu Kristo mpo Nzambe alimbisa bino masumu.” (Misala 2:37-41, Boyokani ya Sika) Atako Petelo azalaki koloba na Bayuda mpe na baprozelite, azalaki kolobela te batisimo mpo na kobongola motema mpe kotika kobuka Mibeko; alingaki mpe koloba te ete kozwa batisimo na nkombo ya Yesu elongolaka masumu.—Misala 2:10.
7 Na mokolo wana, Petelo asalelaki fungola ya liboso na “bafungola ya bokonzi.” Mpo na nini? Mpo na komonisa bato oyo bazalaki koyoka ye ete bazali na libaku ya kokɔta na Bokonzi ya likoló. (Matai 16:19, NW) Lokola Bayuda bandimaki Yesu te ete azali Masiya, kobongola motema mpe kondimela ye ezalaki likambo ya sika mpe ya ntina mingi mpo Nzambe akoka kolimbisa bango. Mpo na komonisa na miso ya bato kondima motindo wana, basengelaki kozwa batisimo, elingi koloba kozindisama na mai na nkombo ya Yesu Klisto. Na ndenge yango nde bakomonisa ete bamipesi na Nzambe na nzela ya Klisto. Lelo oyo, bato nyonso oyo balingi ete Nzambe ayamba bango basengeli kozala na kondima motindo wana, basengeli komipesa na Yehova Nzambe mpe kozwa batisimo ya boklisto mpo na komonisa ete bamipesi mobimba na Oyo-Aleki-Likoló.
Boyebi ya solosolo ezali na ntina mingi
8. Mpo na nini na kati ya boklisto ya solo bapesaka batisimo bipesela te?
8 Na kati ya boklisto ya solo, bapesaka batisimo bipesela te. Yesu atindaki bayekoli na ye ete: “Bókende kokómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, bóbatisa bango na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu, mpe bóteya bango bátosa makambo nyonso oyo natindaki bino.” (Matai 28:19, 20, NW) Liboso moto azwa batisimo, basengeli ‘koteya ye kotosa makambo nyonso oyo Yesu atindaki bayekoli na ye.’ Yango wana, kopesa batisimo na makasi na bato oyo bazali naino na kondima te mpe bayebi naino Liloba ya Nzambe malamumalamu te ezali na ntina moko te mpe eyokani te na makambo oyo Yesu atindaki bayekoli na ye ya solo.—Baebele 11:6.
9. Kozwa batisimo “na nkombo ya Tata” elimboli nini?
9 Kozwa batisimo “na nkombo ya Tata” elimboli nini? Elimboli ete moto oyo azali kozwa batisimo andimi esika mpe bokonzi ya Tata na biso ya likoló. Na bongo, moto yango andimi ete Yehova Nzambe azali Mozalisi na biso, azali “Oyo-Aleki-Likoló na mokili mobimba” mpe Mokonzi ya Molɔ́ngɔ́.—Nzembo 83:18; Yisaya 40:28; Misala 4:24, NW.
10. Kozwa batisimo ‘na nkombo ya Mwana’ elimboli nini?
10 Kozwa batisimo ‘na nkombo ya Mwana’ elimboli kondima esika mpe bokonzi ya Yesu lokola Mwana mobotami-bobele-moko ya Nzambe. (1 Yoane 4:9, NW) Bato oyo bakokisi masɛngami mpo na kozwa batisimo bandimaka ete Yesu azali moto oyo, na nzela na ye, Nzambe apesi “lisiko mpo na mingi.” (Matai 20:28; 1 Timote 2:5, 6) Bato oyo balingi kozwa batisimo basengeli mpe kondima “esika ya likoló” oyo Nzambe atomboli Mwana na ye.—Bafilipi 2:8:11, NW; Emoniseli 19:16.
11. Kozwa batisimo ‘na nkombo ya elimo santu’ elimboli nini?
11 Kozwa batisimo ‘na nkombo ya elimo santu’ elimboli nini? Elimboli ete moto oyo alingi kozwa batisimo andimi ete elimo santu ezali nguya ya Yehova, oyo asalelaka na misala ndenge na ndenge na kolanda mokano na ye. (Genese 1:2; 2 Samwele 23:1, 2; 2 Petelo 1:21) Bato oyo bakokisi masɛngami mpo na kozwa batisimo bandimaka ete elimo santu esalisaka na kososola “makambo mozindo ya Nzambe,” na kosakola Bokonzi, mpe na komonisa mbuma ya elimo oyo ezali “bolingo, esengo, kimya, motema molai, boboto, motema malamu, kondima, bopɔlɔ, komipekisa.” —1 Bakolinti 2:10, NW; Bagalatia 5:22, 23, NW; Yoele 2:28, 29.
Ntina ya kobongola motema mpe kobongwana
12. Boyokani nini ezali kati na batisimo mpe kobongola motema?
12 Longola kaka batisimo ya Yesu, moto oyo asalaki na masumu te, batisimo ezali elembo oyo Nzambe andimi yango mpe oyo ezali na boyokani na kobongola motema. Ntango tobongoli motema, yango elakisi ete toyoki mpenza mawa to mpasi na motema, mpo na likambo moko oyo tosalaki to tozangaki kosala. Bayuda ya ekeke ya liboso oyo bazalaki na mposa ya kosepelisa Nzambe basengelaki kotika masumu oyo basalelaki Klisto. (Misala 3:11-19) Bandimi mosusu ya lisangá ya Kolinti oyo bazalaki Bayuda te batikaki pite, losambo ya bikeko, koyiba, mpe masumu mosusu ya minene oyo bazalaki kosala. Lokola babongolaki motema, ‘basukwamaki’ na kati ya makila ya Yesu, ‘basantisamaki,’ to baponamaki, mpo na mosala ya Nzambe; mpe ‘batángamaki bayengebene’ na nkombo ya Klisto mpe na elimo ya Nzambe. (1 Bakolinti 6:9-11) Kobongola motema ezali likambo ya ntina mingi mpo moto akóma na lisosoli ya malamu mpe mpo Nzambe alimbisa masumu na ye.—1 Petelo 3:21.
13. Kobongwana liboso ya kozwa batisimo esɛngaka nini?
13 Liboso ya kokóma Batatoli ya Yehova oyo bazwi batisimo, tosengeli naino kobongwana. Kobongwana ezali likambo oyo moto asalaka yango na mposa na ye moko nsima ya kozwa ekateli na motema na ye ya kolanda Klisto Yesu. Moto oyo abongwani ndenge wana atikaka makambo mabe oyo azalaki kosala mpe azwaka ekateli ya kosala makambo oyo ezali sembo na miso ya Nzambe. Na kati ya Makomami, baverbe ya Liebele mpe ya Grɛki oyo elimboli kobongwana ezali na likanisi ya kopesa mokɔngɔ to kobaluka. Ezali lokola nde moto oyo asali yango alongwe na nzela ya mabe mpe abaluki epai ya Nzambe. (1 Mikonzi 8:33, 34) Kobongwana esɛngaka kosala “misala oyo eyokani na kobongola motema.” (Misala 26:20, NW) Esɛngaka ete tótika losambo ya lokuta, tótosa mibeko ya Nzambe, mpe tósambela kaka Yehova. (Deteronome 30:2, 8-10; 1 Samwele 7:3) Moto oyo abongwani akómaka na makanisi, na mikano mpe na elimo mosusu. (Ezekiele 18:31) ‘Tobalukaka’ ntango tolongoli bizaleli ya mabe mpe na esika na yango toloni bomoto ya sika.—Misala 3:19; Baefese 4:20-24, NW; Bakolose 3:5-14.
Komipesa na motema mobimba ezali na ntina mingi
14. Mpo na moyekoli ya Yesu, komipesa na Nzambe elimbolaka nini?
14 Moyekoli ya Yesu oyo alingi kozwa batisimo asengeli liboso komipesa na Nzambe na motema mobimba. Komipesa elimboli komitya pembeni mpo na kosala mokano moko mosantu. Likambo yango ezali na ntina mingi; yango wana tosengeli koyebisa Yehova na kati ya libondeli ekateli oyo tozwi ya kosalela kaka ye mpo na libela. (Deteronome 5:9) Kasi, tomipesaka na mosala moko boye te to na moto moko boye te, tomipesaka nde na Nzambe.
15. Mpo na nini bazindisaka moto na mai na ntango ya batisimo?
15 Ntango tomipesi na Nzambe na nzela ya Klisto, toyebisaka nde ekateli na biso ya kosala mokano ya Nzambe na bomoi na biso ndenge emonisami na kati ya Makomami. Moto azwaka batisimo mpo na komonisa na miso ya bato ete amipesi na Nzambe, elingi koloba ete bazindisaka ye na mai, se ndenge oyo Yesu azwaki batisimo na Ebale Yaladene mpo na komonisa ete amipesi na Nzambe. (Matai 3:13) Tokosimba mpe ete Yesu azalaki kobondela ntango likambo wana ya ntina esalemaki.—Luka 3:21, 22.
16. Ndenge nini tokoki kosepela na ndenge oyo ebongi ntango bato bazali kozwa batisimo?
16 Batisimo ya Yesu ezalaki likambo ya lisɛki te, kasi elekaki na esengo. Ezalaka mpe bongo mpo na batisimo ya baklisto lelo oyo. Ntango bato bazali kozwa batisimo mpo na komonisa ete bamipesi na Nzambe, biso bamosusu tokoki kobɛta mabɔkɔ mpe kopesa bango longonya mpo na komonisa ete tozali mpe na esengo, kasi tokosala yango na limemya, na loyenge te. Na yango, tosengeli te kobɛta mabɔkɔ nzela moko na koganga makasi, kobɛta bapiololo mpe kosala makambo mosusu ya ndenge wana mpamba te batisimo ezali likambo ya bosantu oyo moto asalaka mpo na komonisa kondima na ye. Tosengeli komonisa esengo na biso na limemya.
17, 18. Nini esalisaka na koyeba soki moto akokisi masɛngami mpo na kozwa batisimo?
17 Na mangomba mosusu, mpo na kopesa batisimo, basopelaka bana mwa mai to mpe basɛngisaka ebele ya bato oyo bayebi Makomami te ete bázwa batisimo; kasi, Batatoli ya Yehova bapesaka bato batisimo na makasi te. Kutu, babatisaka kaka bato oyo bakokisi masɛngami ya elimo. Liboso moto akóma mosakoli ya nsango malamu oyo azwi naino batisimo te, bankulutu balukaka koyeba soki ayebi mateya ya ebandeli ya Biblia, azali kotosa yango na kati ya bomoi na ye, mpe soki akoyanola ɛɛ na motuna lokola oyo: “Olingi mpenza kokóma Motatoli ya Yehova?”
18 Mbala mingi, moto abandaka naino na kosakola Bokonzi sanza na sanza; bongo na nsima, soki ayebisi ete azali na mposa ya kozwa batisimo, bankulutu basololaka na ye mpo na koyeba soki azali mondimi oyo amipesi na Yehova mpe soki akokisi masɛngami ya Nzambe mpo na kozwa batisimo. (Misala 4:4; 18:8) Bankulutu bayebaka ete moto akokisi masɛngami mpo na kozwa batisimo na nzela ya mituna (koleka 100) oyo bakotuna ye na ntina etali mateya ya Biblia. Bato mosusu bakokisaka masɛngami te; yango wana, bandimamaka te mpo na kozwa batisimo.
Ezali na likambo moko oyo ezali kopekisa yo kozwa batisimo?
19. Soki tolandi makanisi oyo ezali na Yoane 6:44, banani bakoyangela elongo na Yesu?
19 Bato mingi oyo bapesaki bango batisimo na makasi, mbala mosusu bateyaki bango ete soki bakufi, bakokende na likoló. Kasi, Yesu alobaki mpo na bayekoli na ye ete: “Moto akoki koya epai na ngai te bobele soko Tata, Motindi na ngai akobenda ye.” (Yoane 6:44) Yehova abendi bato 144 000 ete bákende epai ya Klisto mpo na koyangela na ye elongo na Bokonzi ya likoló. Kopesa bato batisimo na makasi esalaka te ete moto akóma mosantu oyo abongi na esika wana ya lokumu na kati ya ebongiseli ya Nzambe.—Baloma 8:14-17; 2 Batesaloniki 2:13; Emoniseli 14:1.
20. Nini ekoki kosalisa bato mosusu oyo bazwi naino batisimo te?
20 Mingimingi kobanda na katikati ya bambula ya 1930, ebele ya bato oyo bazali na elikya ya kobika na “bolɔzi monene” mpe kozala na bomoi ya seko awa na mabele bakómi “bampate mosusu” ya Yesu. (Emoniseli 7:9, 14; Yoane 10:16) Bato yango bakokisi masɛngami mpo na kozwa batisimo mpamba te bazali kotosa Liloba ya Nzambe na bomoi na bango mpe bazali kolinga ye ‘na motema na bango mobimba, na molimo na bango mobimba, na nguya na bango mobimba, mpe na mayele na bango mobimba.’ (Luka 10:25-28) Bato mosusu, atako bayebaka ete Batatoli ya Yehova ‘basambelaka Nzambe na elimo mpe na solo,’ balandi naino te ndakisa ya Yesu mpe bazwi naino batisimo te mpo na komonisa na miso ya bato nyonso ete balingaka mpenza Yehova mpe balingi kosalela se ye. (Yoane 4:23, 24; Deteronome 4:24; Malako 1:9-11) Soki bazali kobondela makasi mpo na likambo yango oyo ezali na ntina mingi, yango ekoki kopesa bango mposa mpe molende ya kotosa mpenza Liloba ya Nzambe, ya komipesa mobimba na Yehova Nzambe mpe kozwa batisimo.
21, 22. Mpo na nini bato mosusu balingaka te komipesa mpe kozwa batisimo?
21 Bato mosusu balingaka naino te komipesa mpe kozwa batisimo mpo bamipesi na makambo ya mokili mpe na koluka bozwi; yango wana, bazali na ntango mingi te mpo na makambo ya elimo. (Matai 13:22; 1 Yoane 2:15-17) Bato yango bakozala na esengo mingi soki babongoli makanisi mpe mikano na bango! Soki baluki kozala baninga ya Yehova, bakokóma bazwi na elimo, mitungisi na bango ekokita, mpe bakozwa kimya mpe esengo oyo eutaka na kosala mokano ya Nzambe.—Nzembo 16:11; 40:8; Masese 10:22; Bafilipi 4:6, 7.
22 Bato mosusu balobaka ete balingaka Yehova kasi bamipesaka te mpe bazwaka batisimo te mpo bakanisaka ete na ndenge yango, Nzambe akotuna bango likambo te. Kasi, Nzambe akotuna mokomoko na biso. Biso nyonso tokómaki na likambo na miso ya Yehova ntango kaka toyokaki liloba na ye. (Ezekiele 33:7-9; Baloma 14:12) Lokola Bayisalaele ya kala bazalaki ‘libota eponami,’ bazalaki kobotama na ekólo oyo emipesaki na Yehova, mpe na bongo, basengelaki kosalela ye na bosembo na ndenge oyo mibeko na ye esɛngaki. (Deteronome 7:6, 11) Lelo oyo, moto moko te abotamaka na ekólo oyo emipesi na Nzambe, kasi soki tozwi mateya ya solosolo ya Makomami, tosengeli kosalela yango na kondima.
23, 24. Makambo nini esengeli kobangisa moto te mpo na kozwa batisimo?
23 Bato mosusu mpe babangaka kozwa batisimo mpo bamonaka ete bayebi makambo mingi te. Kasi, biso nyonso tozali na makambo mingi ya koyekola mpamba te ‘moto te akoyeba kososola mosala mosalaki Nzambe longwa na ebandeli kino nsuka.’ (Mosakoli 3:11) Tókamata ndakisa ya mokube Moetiopia. Ye azalaki prozelite, elingi koloba ete ayebaki mwa moke Makomami, kasi ayebaki mikano nyonso ya Nzambe te. Kasi, nsima ya koyeba ebongiseli oyo Yehova asalaki mpo na kobikisa bato na nzela ya mbeka oyo Yesu apesaki, mbala moko mokube yango azwaki batisimo na mai.—Misala 8:26-38.
24 Bato mosusu bakakatanaka komipesa na Nzambe mpo babangaka ete bakokoka te kosala makambo nyonso oyo ezali kosɛngama na moto oyo amipesi. Monique, elenge mwasi moko ya mbula 17, alobaki boye: “Nazalaki kolinga kozwa batisimo te mpo nazalaki kobanga mbala mosusu nakokoka te kosala makambo oyo ekosɛngama na ngai lokola namipesi na Nzambe.” Kasi, soki totyeli Yehova elikya na motema na biso mobimba, ‘akotambolisa biso.’ Akosalisa biso ‘tólanda kotambola na kati ya solo’ lokola basaleli na ye ya sembo oyo bamipesi.—Masese 3:5, 6; 3 Yoane 4, NW.
25. Motuna nini ebongi tótalela yango?
25 Mbula na mbula, bankóto ya bato bazali kondima komipesa mpe kozwa batisimo mpamba te bazali kotyela Yehova elikya nyonso mpe bazali kolinga ye na motema na bango mobimba. Mpe tokanisi mpenza ete mposa ya mosaleli mokomoko ya Nzambe ezali ete atikala sembo epai na ye. Nzokande, tozali na ntango ya mpasi mpe kondima na biso ezali komekama na ebele ya makambo ya ndenge na ndenge. (2 Timote 3:1-5) Tokoki kosala nini mpo na kokokisa makambo oyo esɛngami na biso baoyo tomipesi na Yehova? Tokolobela yango na lisolo oyo elandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Lokola Yesu asalaki lisumu ata moko te, azwaki batisimo mpo na komonisa te ete abongoli motema, kasi mpo na komonisa ete amipesi na Nzambe mpo na kosala mokano ya Tata na ye.—Baebele 7:26; 10:5-10.
Ozali koyeba lisusu?
• Ndenge nini baklisto bazwaka batisimo?
• Moto asengeli koyeba makambo nini liboso azwa batisimo?
• Baklisto ya solo basengeli naino kosala makambo nini liboso ya kozwa batisimo?
• Mpo na nini bato mosusu balingaka kozwa batisimo te, kasi ndenge nini bakoki kosalisa bango?
[Bililingi na lokasa 14]
Oyebi soki kozwa batisimo ‘na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu’ elimboli nini?