Bapɛtolami mpo na misala ya malamu
“Tiká tómipɛtola na mbindo nyonso ya nzoto mpe ya elimo, tókokisa bosantu malamumalamu na kati ya kobanga Nzambe.”—2 BAKOLINTI 7:1, NW.
1. Yehova azali kosɛnga ezaleli nini epai na baoyo bazali kosambela ye?
DAVIDI, mokonzi ya Yisalaele ya kala atunaki motuna moko ya ntina mingi na ntina etali losambo oyo Yehova andimaka. Motuna yango elobi boye: “Nani akoki komata na ngomba ya Yehova? Mpe nani akoki kotɛlɛma na esika na ye ya bosantu?” Na nsima, apesaki eyano oyo: “Ye oyo azali na mabɔkɔ ya pɛto mpe na motema ya pɛto, ye oyo amemi molimo na Ngai te na makambo oyo ezangi ntina, mpe oyo alapi ndai ya lokuta te.” (Nzembo 24:3, 4, NW) Yehova, ye oyo azali mosantu na makambo nyonso, mpo akoka kondima moto, moto yango asengeli kozala pɛto mpe mosantu. Bambula mingi liboso, Yehova ayebisaki lisangá ya Yisalaele boye: “Bosengeli komisantisa mpe bosengeli komimonisa basantu, mpamba te ngai nazali mosantu.”—Levitike 11:44, 45, NW; 19:2, NW.
2. Paulo mpe Yakobo balobaki nini oyo ezali komonisa mpenza ete bopɛto ezali na ntina na losambo ya solo?
2 Bankama ya bambula na nsima, na mokanda oyo atindelaki baninga na ye baklisto oyo bazalaki kofanda na Kolinti, engumba oyo etondaki na misala ya mbindo, ntoma Paulo akomaki boye: “Bandeko ya bolingo, lokola tozali na bilaka wana, tómipɛtola na mbindo nyonso ya nzoto mpe ya elimo, tókokisa bosantu malamumalamu na kobanga Nzambe.” (2 Bakolinti 7:1, NW) Maloba yango ezali komonisa mpe ete mpo moto ayokana na Nzambe mpe azwa mapamboli oyo ye alaki, asengeli kozala na mbindo te na nzoto mpe na elimo. Ntango mpe moyekoli Yakobo akomaki na ntina na losambo oyo Nzambe andimaka, alobaki boye: “Losambo oyo ezali pɛto mpe oyo ezali mbindo te na miso ya Nzambe Tata na biso ezali boye: kobatela bitike na basi oyo bakufelá mibali na kati ya bampasi na bango, mpe kozala na litɔnɔ ya mokili te.”—Yakobo 1:27, NW.
3. Likambo nini tosengeli kosala makasi mpo na kokokisa yango mpo Nzambe andima losambo na biso?
3 Lokola kozala pɛto, kozala mosantu mpe kozala na mbindo te ezali makambo ya ntina na losambo ya solo, moto nyonso oyo alingi ete Nzambe asepela na ye asengeli kosala makasi mpo na kokokisa makambo yango. Kasi, lokola lelo oyo bato nyonso bazali kotalela bopɛto na lolenge moko te, tosengeli koyeba malamumalamu makambo oyo Yehova amonaka ete ezali pɛto mpe malamu mpe kosala makambo yango. Tosengeli koyeba makambo oyo Nzambe azali kosɛnga epai ya bato oyo bazali kosambela ye mpe makambo oyo asali mpo na kosalisa bango bákóma mpe bátikala bato ya pɛto mpe oyo bandimami na miso na ye.—Nzembo 119:9; Danyele 12:10.
Kozala pɛto mpo na losambo ya solo
4. Limbolá bopɛto na ndenge oyo elobelami na Biblia.
4 Mpo na bato mingi, kozala pɛto elimbolaka kaka kozala na salite te to mpe kozala na mikrobe te. Nzokande, na Biblia, likambo ya kozala pɛto emonisami na maloba mingi ya Liebele mpe ya Grɛki oyo ezali kopesa likanisi ya bopɛto ya nzoto kaka te, kasi mbala mingi, bopɛto ya bizaleli mpe ya elimo. Yango wana, mokanda moko oyo elimboli maloba ya Biblia elobi boye: “Maloba ‘pɛto’ mpe ‘mbindo’ esalelami mingi te na makambo etali kaka bopɛto ya nzoto, kasi esalelami mingi na makambo ya losambo. Na bongo, tokoloba ete ‘bopɛto’ etalelaka makambo nyonso ya bomoi.”
5. Mibeko ya Mose esɛngisaki Bayisalaele bázala pɛto na makambo nini?
5 Mibeko ya Mose ezalaki na malako mpe mitinda mpo na makambo nyonso ya bomoi ya Bayisalaele mpe ezalaki komonisa makambo ya pɛto mpe oyo endimamaki mpe makambo ya mbindo mpe oyo endimamaki te. Na ndakisa, na Levitike mokapo 11 tii 15, tokokuta malako etali bopɛto mpe makambo nini ezalaki mbindo. Banyama mosusu ezalaki mbindo mpe Bayisalaele basengelaki kolya yango te. Mwasi oyo aboti azalaki mbindo mpo na mwa mikolo oyo Mibeko ekataki. Bamaladi mosusu ya loposo, mingimingi maladi ya maba, ezalaki kokómisa moto oyo azali na yango mbindo; lisusu, moto oyo azali kobima mai na enama ya kobotela, azala mwasi to mobali, azalaki mbindo. Mibeko eyebisaki mpe makambo oyo moto asengeli kosala soki azali mbindo. Na ndakisa, na Mituya 5:2 (NW), tozali kotánga boye: “Pesá bana ya Yisalaele mobeko ete bábimisa na kaa moto nyonso oyo azali na maba, moto nyonso oyo azali kobima mai mpe moto nyonso oyo akómi mbindo mpo asimbi molimo oyo ekufi.”
6. Mpo na nini Yehova apesaki mibeko oyo etali bopɛto?
6 Na ntembe te mibeko yango mpe mibeko mosusu oyo Yehova apesaki ezalaki na makambo oyo eyokani na malako ya minganga mpe ya bokolɔngɔnɔ ya nzoto atako na ntango wana makambo yango eyebanaki naino te, mpe bato bazwaki matomba na ntango bazalaki kotosa yango. Kasi, mibeko yango ezalaki kaka te mibeko ya bokolɔngɔnɔ ya nzoto to malako mpo na kobatela bango. Ezalaki makambo oyo esɛngamaki na kati ya losambo ya solo. Lokola mibeko yango etalelaki makambo ya bomoi ya mokolo na mokolo, lokola kolya, kobota, libala mpe bongo na bongo; emonisaki polele ete lokola Yehova azalaki Nzambe na bango, azalaki na lotomo ya koyebisa makambo nini ebongaki mpe makambo nini ebongaki te na bomoi na bango oyo bapesaki yango mobimba na Yehova.—Deteronome 7:6; Nzembo 135:4.
7. Mapamboli nini libota ya Yisalaele balingaki kozwa soki babatelaki Mibeko?
7 Kondimana ya Mibeko ezalaki mpe kobatela Bayisalaele na misala ya mbindo ya bikólo oyo ezalaki pembenipembeni na bango. Soki Bayisalaele bátosaka mpenza Mibeko mpe makambo nyonso oyo esɛngamaki mpo na kotikala pɛto na miso ya Yehova, balingaki kozala bato oyo babongi mpo na kosalela Nzambe na bango mpe kozwa mapamboli na ye. Yehova ayebisaki bato ya ekólo yango boye: “Soko bokotosa monɔkɔ na ngai mpe bokobatela kondimana na ngai, mbɛlɛ bokozala bato na ngai mpenza kati na bato nyonso, mpo ete mokili mobimba ezali ya ngai, mpe bokozala bokonzi ya banganga mpe libota [mosantu, NW].”—Exode 19:5, 6; Deteronome 26:19.
8. Mpo na nini, na moi ya lelo, baklisto basengeli kotya likebi na makambo oyo Mibeko elobaki na ntina na bopɛto?
8 Lokola Yehova apesaki makambo nyonso wana na kati ya Mibeko mpo na koteya Bayisalaele ndenge ya kozala pɛto, kozala basantu mpe bato oyo akoki kondima bango, ezali mpenza komonisa ete ebongi baklisto bátalela malamumalamu ndenge oyo bazali kokokisa makambo yango lelo oyo! Atako baklisto basɛngisami na kotosa Mibeko te, basengeli kobosanaka te, lokola Paulo alobaki yango, ete makambo nyonso oyo ekomamaki na Mibeko “ezali elili ya makambo oyo ekoya, kasi bosolo ezali na Klisto.” (Bakolose 2:17, NW; Baebele 10:1) Soki Yehova Nzambe, ye oyo alobi ete “nakobongwana te,” azalaki kozwa na lisɛki te likambo ya kozala pɛto mpe na mbindo te na losambo ya solo na ntango wana, lelo oyo tosengeli kotalela na lisɛki te likambo ya kozala pɛto na nzoto, na bizaleli mpe na elimo, soki tolingi ete andima biso mpe apambola biso.—Malaki 3:6; Baloma 15:4; 1 Bakolinti 10:11, 31.
Bopɛto ya nzoto elobelaka biso
9, 10. (a) Mpo na nini ezali na ntina ete moklisto azala nzoto pɛto? (b) Mbala mingi bato balobaka nini mpo na mayangani ya Batatoli ya Yehova?
9 Kozala nzoto pɛto ezali na ntina na kati ya losambo ya solo ata na moi ya lelo? Atako kozala nzoto pɛto yango moko te nde esalaka ete moto azala mosambeli ya solo ya Nzambe, kasi ebongi mpenza ete nzoto ya mosambeli ya solo ezala pɛto na ndenge oyo ekoki. Mingimingi na moi ya lelo, lokola bato mingi bazali kotya likebi mpenza te na likambo ya kozala nzoto pɛto to mpe ya kolata bilamba ya pɛto, bakisa mpe kotya bopɛto na bisika oyo bafandi, soki moto azali kosala makambo wana, bato mosusu bamonaka yango. Yango ekoki kobota mbuma malamu, ndenge Paulo ayebisaki baklisto ya Kolinti ete: “Tozali kobɛtisa libaku ata na likambo moko te, mpo bato báloba mabe te mpo na mosala na biso ya baministre; kasi na makambo nyonso tozali komimonisa baministre ya Nzambe.”—2 Bakolinti 6:3, 4, NW.
10 Mbala mingi bakonzi ya Leta bakumisaka Batatoli ya Yehova ete bazalaka pɛto, bazalaka bato ya mobulu te mpe bazalaka na limemya; bizaleli yango emonanaka mingimingi na ntango basalaka mayangani ya minene. Na ndakisa, ntango Batatoli basalaki liyangani na etúká ya Savone na Italie, zulunalo moko (La Stampa) elobaki boye: “Moto oyo atamboli na esika ya liyangani, akomona mbala moko bopɛto mpe molɔngɔ ya bato oyo bazali kosalela yango.” Nsima ya liyangani moko ya etúká oyo Batatoli basalaki na engumba São Paulo na Brésil, mokambi moko ya stade ayebisaki kapita ya bato oyo batyaka bopɛto kuna ete: “Banda lelo, tolingi bótyaka bopɛto na stade na ndenge oyo Batatoli ya Yehova basali yango.” Mokambi mosusu ya stade yango alobaki boye: “Soki Batatoli ya Yehova balingi kofutela stade, eloko kaka totalelaka ezali mikolo nini bakosalela yango. Tomitungisaka te mpo na makambo nyonso oyo etikali.”
11, 12. (a) Motinda nini ya Biblia tosengeli kobosana te na oyo etali bopɛto ya nzoto na biso? (b) Mituna nini tokoki komituna mpo na mimeseno na biso mpe bomoi na biso?
11 Soki bato bazali kokumisa Nzambe oyo tosambelaka mpo na bopɛto na biso mpe kozanga mobulu oyo emonanaka na bisika oyo tosanganaka mpo na losambo, na ntembe te ezali mpe na ntina mingi ete mokomoko na biso azala na bizaleli yango na bomoi na ye. Kasi, tokoki kokanisa ete ntango tozali na kati ya na biso, tokoki komonisa bopɔtu mpe kosala ndenge oyo tolingi. Lisusu, mpo na molato mpe ndenge na biso ya kobongisa nzoto, toyebi malamu ete moto na moto azali na bonsomi ya kopona oyo amonaka malamu mpe esepelisaka ye! Kasi, ezali mpe na esika oyo bonsomi yango esuki. Tókanisa lisusu ntango Paulo alobelaki likambo ya kopona bilei, akebisaki bandeko na ye baklisto na maloba oyo: “Bókebaka ntango nyonso ete bonsomi oyo bozali na yango ekóma te, ezala ata na lolenge nini, libaku mpo na baoyo bazali na bolɛmbu.” Na nsima, apesaki motinda moko ya ntina mingi oyo: “Makambo nyonso epesami nzela; kasi ezali makambo nyonso te nde ezali na litomba. Makambo nyonso epesami nzela; kasi ezali makambo nyonso te nde etongaka.” (1 Bakolinti 8:9, NW; 10:23, NW) Ndenge nini tokoki kosalela toli ya Paulo na likambo etali bopɛto?
12 Bato mosusu basengeli mpenza kokanisa ete ministre ya Nzambe asengeli kozala pɛto mpe asengeli kozala na bomoi ya mobulu te. Yango wana, tosengeli kotalaka malamu ndako na biso mpe lopango na biso mpo emonisa te ete tozali kokosa ntango tozali koloba ete tozali baministre ya Liloba ya Nzambe. Bato bakoki koloba nini mpo na biso mpe mateya na biso soki batali ndako na biso? Emonisaka ete tozalaka mpenza na mposa ya kozala na mokili ya sika ya boyengebene epai oyo nyonso ekozala pɛto mpe na molɔngɔ, mokili oyo tolobelaka mingi epai ya bato mosusu? (2 Petelo 3:13) Molato na biso, ezala na ntango tozali kozwa mopɛpɛ to na ntango tozali na mosala ya kosakola, ekoki kobakisa lokumu ya nsango oyo tosakolaka to mpe kokitisa yango. Na ndakisa, yoká maloba oyo mopanzi-nsango moko na Mexique alobaki: “Bilenge bazali mingi mpenza na Lingomba ya Batatoli ya Yehova, mpe eloko ebendaka likebi ezali ndenge bakataka nsuki na bango, ndenge oyo bazalaka pɛto mpe ndenge oyo balataka malamu.” Kozala na bilenge ya ndenge wana kati na biso ezali mpenza esengo!
13. Tokoki kosala nini mpo na kozala pɛto mpe ete makambo nyonso oyo tosalaka ezala na molɔngɔ?
13 Koloba ete nzoto na biso, biloko na biso mpe ndako na biso esengeli kozalaka pɛto mpe na molɔngɔ ezali mpasi te, kosala yango nde ezalaka mpasi. Mpo na kosala yango, ezali kosɛnga te tóluka ebele ya bisaleli ya mindɔndɔmindɔndɔ mpe ya ntalo mingi, kasi tosengeli nde kozala na ebongiseli malamu mpe kosala ntango nyonso na molende. Tosengeli kozwaka ntango ya kosukola nzoto na biso, bilamba na biso, ndako na biso, motuka na biso mpe biloko mosusu. Atako esɛngaka biso ntango mpo tósala misala na biso ya mikolo nyonso, bakisa mpe kobima na mosala ya kosakola, koyangana na makita mpe koyekola biso moko, yango ezali kopesa biso nzela te ya kobosana bopɛto mpe lolenge oyo ebongi na miso ya Nzambe mpe ya bato. Maloba oyo tomesaná koloba ete ‘likambo na likambo ezali na ntango na yango’ etaleli mpe makambo yango na bomoi na biso.—Mosakoli 3:1.
Motema oyo ezali pɛto
14. Mpo na nini tokoki koloba ete bopɛto ya bizaleli mpe ya elimo ezali na ntina koleka bopɛto ya nzoto?
14 Ezali na ntina ete tóbatelaka nzoto na biso pɛto, kasi ezali mpe na ntina koleka ete tózalaka pɛto na bizaleli mpe na elimo. Tolobi bongo nsima ya kotalela likambo oyo ete soki Yehova aboyaki ekólo ya Yisalaele, ezali te mpo bazalaki pɛto te na nzoto, kasi ezali mpo ete bazalaki mbindo na bizaleli mpe na elimo. Na nzela ya mosakoli Yisaya, Yehova ayebisaki bango ete lokola bazalaki “libota ya masumu, bato bakumbi bozito ya mabe,” bambeka na bango, bafɛti oyo bazalaki kosala mpo na sanza ya sika mpe sabata, ata mpe mabondeli na bango, akómaki koyoka yango kilo. Basengelaki kosala nini mpo Nzambe asepela na bango lisusu? Yehova alobaki boye: “Bómisukola, bómipɛtola, bólongola mabe na makambo masalaki bino liboso na miso na ngai; bótika kosala mabe.”—Yisaya 1:4, 11-16.
15, 16. Eloko nini Yesu alobaki ete ekómisaka moto mbindo, mpe ndenge nini tokoki kozwa litomba na maloba ya Yesu?
15 Mpo na komona lisusu ntina ya bopɛto ya bizaleli mpe ya elimo, tótalela maloba ya Yesu epai ya Bafalisai mpe bakomeli ntango balobaki ete bayekoli na ye bazalaki mbindo mpamba te basukolaki mabɔkɔ te liboso ya kolya. Yesu azongisaki bango na nzela ntango alobaki boye: “Ezali te oyo ekɔtaka na monɔkɔ ya moto nde ekómisaka ye mbindo; kasi oyo ebimaka na monɔkɔ ya moto nde ekómisaka ye mbindo.” Na nsima Yesu alimbolaki boye: “Makambo oyo ebimaka na monɔkɔ eutaka na motema, mpe makambo wana nde ekómisaka moto mbindo. Na ndakisa, makanisi ya mabe, koboma bato, bikobo, pite, koyiba, matatoli ya lokuta, kotuka, eutaka na motema. Wana nde makambo oyo ekómisaka moto mbindo; kasi kolya kozanga kosukola mabɔkɔ ekómisaka moto mbindo te.”—Matai 15:11, 18-20, NW.
16 Liteya nini tokoki kozwa na maloba ya Yesu? Yesu amonisaki ete misala ya mabe, ya nsɔni mpe ya mbindo ebandaka naino na bamposa ya mabe, ya nsɔni mpe ya mbindo na kati ya motema. Lokola moyekoli Yakobo alobaki yango, “moto na moto akomekamaka mpo na kobendama mpe kolengolama na mposa mabe na ye moko.” (Yakobo 1:14, 15) Yango wana, soki tolingi ete tókwea te na masumu minene oyo Yesu atángaki, tosengeli kolongola na motema na biso mposa ya makambo wana mpe tosengeli kotika te ete yango ekɔta na motema na biso. Elingi koloba ete tosengeli kokeba mpe kotalela malamu mikanda nini tokotánga, makambo nini tokotika ete miso na biso etalaka mpe makambo nini tokotika ete matoi na biso eyokaka. Lelo oyo, lokola makanisi ezali ete moto azali na bonsomi ya koloba mpe bato ya misala ya ntɔki bakoki kosala biloko nyonso oyo bakanisi na motó na bango, bato ya masano mpe bato oyo basalaka bapiblisite bazali kobimisa miziki mpe kolakisa bililingi oyo ezali kolamusa bamposa mabe ya nzoto na biso oyo ezangi kokoka. Tosengeli kozala na ekateli ya kotika te ete makanisi ya ndenge yango ekɔta na motema na biso. Likanisi mpenza ezali ete mpo na kosepelisa Nzambe mpe kondimama na ye, tosengeli kobatela motema na biso pɛto.—Masese 4:23.
Bapɛtolami mpo na misala ya malamu
17. Mpo na nini Yehova apɛtoli bato na ye?
17 Na ntembe te ezali mpenza libaku malamu mpe ezali libateli ete, na lisalisi ya Yehova, tokoki kozala pɛto na miso na ye. (2 Bakolinti 6:14-18) Kasi, tozali mpe koyeba ete ezali na ntina oyo Yehova apɛtoli basaleli na ye. Paulo alobaki na Tito ete Klisto Yesu “amipesaki mpo na biso mpo asikola biso na lolenge nyonso ya botyoli-mibeko mpe kopɛtola mpo na ye moko bato oyo bazali na molende mpo na misala ya malamu.” (Tito 2:14, NW) Lokola tozali bato oyo bapɛtolami, tosengeli kozala na molende mpo na misala nini?
18. Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali na molende mpo na misala ya malamu?
18 Libosoliboso tosengeli kosala molende ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. (Matai 24:14) Soki tozali kosala yango, tozali kopesa bato nyonso elikya ya kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobebisama ata na lolenge moko te. (2 Petelo 3:13) Misala mosusu ya malamu oyo tosengeli kosala ezali mpe lokola kobota mbuma ya elimo ya Nzambe na bomoi na biso ya mokolo na mokolo, mpe na ndenge yango, kokumisa Tata na biso ya likoló. (Bagalatia 5:22, 23; 1 Petelo 2:12) Tóbosanaka mpe te bato oyo bazali kati na lisangá ya Yehova te, baoyo bakoki kozwa makama. Tobosana te toli ya Paulo ete: “Soko tozwi nzela, tósalela bato nyonso malamu mpe na koleka epai na bango bazali bandimi.” (Bagalatia 6:10) Makambo nyonso wana, soki tozali kosala yango na motema pɛto mpe na makanisi malamu, esepelisaka mpenza Nzambe.—1 Timote 1:5.
19. Soki tozali kobatela bopɛto ya solosolo ya nzoto, ya bizaleli mpe ya elimo tokozwa mapamboli nini?
19 Lokola basaleli ya Oyo-Aleki-Likoló, tosengeli kokokisaka maloba ya Paulo ete: “Bandeko, nazali kobondela bino na mawa ya Nzambe ete bókaba banzoto na bino lokola mbeka ya bomoi, ya bosantu, oyo Nzambe akondima yango, elingi koloba bósala mosala mosantu na makanisi na bino.” (Baloma 12:1, NW) Tiká tókoba kopesa motuya mingi na libaku malamu ya kopɛtolama na Yehova mpe tósalaka nyonso oyo tokoki mpo na kobatela bopɛto ya solosolo ya nzoto, ya bizaleli mpe ya elimo. Soki tozali kosala bongo, tokoyoka nsɔni te mpe tokozala na esengo banda sikoyo mpe tokozala na elikya ya komona ndenge oyo “makambo ya liboso,” elingi koloba ebongiseli ya makambo ya mabe oyo ezali lelo, ekoleka ntango Nzambe ‘akozalisa biloko nyonso biloko ya sika.’—Emoniseli 21:4, 5.
Ozali koyeba lisusu?
• Mpo na nini Yehova apesaki Bayisalaele ebele ya mibeko etali bopɛto?
• Na ndenge nini bopɛto ya nzoto ebakisaka lokumu ya nsango oyo tosakolaka?
• Mpo na nini bopɛto ya bizaleli mpe ya elimo ezali na ntina mingi koleka kutu bopɛto ya nzoto?
• Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali bato oyo bazali na “molende mpo na misala ya malamu”?
[Bililingi na lokasa 21]
Bopɛto ya nzoto ebakisaka lokumu ya nsango oyo tosakolaka
[Elilingi na lokasa 22]
Yesu alobaki ete makanisi ya mabe ememaka na misala ya mabe
[Bililingi na lokasa 23]
Batatoli ya Yehova bazali bato oyo bapɛtolami mpe bazali na molende mpo na misala ya malamu