“Bóya epai na ngai, . . . mpe nakobɔndisa bino”
Bilenge oyo bazali lokola matanga ya mamwe
NTEMBE ezali te ete Yesu Klisto azalaki mpe kokanisa bayekoli na ye oyo bazalaki bilenge ntango alobaki ete: “Bóya epai na ngai, . . . mpe nakobɔndisa bino.” (Matai 11:28) Ntango bato babandaki komemela ye bana na bango ya mike, bayekoli na ye bamekaki kopekisa bango. Kasi Yesu alobaki boye: “Bótika bana mike báya epai na ngai; bómeka te kopekisa bango.” Kutu, Yesu “akamataki bana na mabɔkɔ na ye mpe abandaki kopambola bango.” (Malako 10:14-16) Ya solo, bana mike bazalaki na motuya mingi na miso ya Yesu.
Na kati ya Biblia, tokokuta masolo ya bilenge basi mpe mibali, ata mpe bana mike, oyo bapesaki ndakisa malamu mpo na kosalela Nzambe. Mokanda ya Nzembo esakolaki ete ekozala na ‘bilenge mibali’ oyo bazali kobɔndisa lokola matanga ya mamwe. Elobeli mpe ‘bilenge mibali’ mpe “baseka” oyo bazali kokumisa nkombo ya Yehova.—Nzembo 110:3; 148:12, 13.
Esika oyo bilenge bazali kokola
Elilingi ya matanga ya mamwe ebongi mpenza mpo na kolobela bilenge, mpamba te mamwe emonisaka biloko oyo etondi mpe mapamboli. (Genese 27:28) Mamwe etangaka malɛmbɛmalɛmbɛ mpe epesaka mpiɔ. Na ntango ya kozala ya Klisto oyo tozali sikoyo, ebele ya bilenge baklisto bazali kondima komipesa na motema moko. Ndenge moko na matanga ya mamwe oyo epesaka makasi, ebele ya bilenge basi mpe mibali bazali kosalela Nzambe na esengo mpe bazali kosunga bandimi mosusu.—Nzembo 71:17.
Bilenge baklisto basukaka kaka te na kobɔndisaka basusu, bango moko mpe bazwaka libɔndisi na mosala na bango. Ebongiseli ya Nzambe ezali esika oyo bakoki kokola. Bilenge basi mpe mibali bazalaka na etamboli malamu mpenza; yango wana, bazalaka baninga mpenza ya Nzambe. (Nzembo 119:9) Na kati ya lisangá, bamipesaka mpe na makambo mosusu ya malamu mpe bazwaka baninga ya malamu; nyonso wana epesaka bango bomoi moko ya esengo mpe oyo ezali na ntina.
‘Ezali kobikisa mpe kobɔndisa’
Bilenge baklisto bango moko bamimonaka lokola ‘matanga ya mamwe’? Tólobela naino Tania, elenge mwasi moko oyo amipesaka mingi na misala ya lisangá mpe sanza na sanza asalaka ngonga koleka 70 na mosala ya kosakola. Ndenge nini ye ayokaka? Alobi boye: “Nayokaka ete nabɔndisami mpe nalendisami. Lokola Yehova mpe ebongiseli na ye oyo ezali awa na mabele bazali na esika na kati ya bomoi na ngai, yango ezali ‘kobikisa mpe kobɔndisa’ ngai.”—Masese 3:8, NW.
Ariel, elenge mwasi oyo azali mpe mobongisi-nzela, asepelaka mingi na bilei ya elimo oyo azwaka na lisangá. Ye alobi boye: “Ntango nazali kolya na mesa ya Yehova na ndenge ya elimo na makita mpe na mayangani, nabɔndisamaka mpenza na elimo. Lisusu, koyeba ete, na mokili mobimba, bato mosusu bazali mpe kosala mosala oyo nasalaka, elendisaka ngai.” Mpo na komonisa likambo oyo epesaka ye mpenza libɔndisi oyo eleki mabɔndisi nyonso, alobi boye: “Kozala moninga ya Yehova ebɔndisaka mpenza, mingimingi soki nayoki to namoni makambo mabe oyo mokili oyo ezali kobimisela bato.”—Yakobo 2:23.
Abishai azali na mbula 20; azali mobongisi-nzela mpe mosaleli na misala na lisangá. Ayebisi likambo oyo ye amoni na bomoi na ye: “Namoni ete nabɔndisami mpamba te nayebi ndenge ya kolonga mikakatano ebele oyo bilenge bazali kokutana na yango lelo oyo. Solo ya Biblia esalisi ngai natya ntango nyonso makanisi na ngai na makambo oyo nasengeli kosala mpo nakoka kosalela Yehova na motema mobimba.”
Ntango Antoine alekisaki mwa moke mbula 13, azalaki nkandankanda. Mokolo mosusu, abambaki moninga na ye moko ya kelasi kiti, mpe atubaki mosusu kreyɔ. Antoine azalaki mpenza kobɔndisa te! Kasi mateya ya Biblia oyo ayekolaki ebongolaki bizaleli na ye. Sikoyo azali na mbula 19 mpe azali mosaleli na misala, azali mpe mobongisi-nzela na lisangá; alobi boye: “Nazali kopesa Yehova matɔndi na ndenge asalisi ngai nayeba ye mpe namona ntina ya kozala na ezaleli ya komipekisa mpe nabongola bomoi na ngai. Yango nde ebateli ngai na mikakatano mingi.”
Bato mosusu bamonaka ndenge oyo bilenge baklisto babɔndisaka. Na Italie, ezali na elenge Motatoli moko nkombo na ye Matteo. Na kelasi na bango, molakisi abimisaki mobeko ete mwana nyonso oyo akoloba liloba ya nsɔni akofuta lomande. Nsima ya mwa mikolo, bana basɛngaki ye ete alongola mobeko yango, mpamba te, ndenge bango moko balobaki, “ezali mpasi mpo moto asalela te elobeli ya nsɔni.” Matteo alobi boye: “Kasi, molakisi andimaki maloba na bango te mpe atángaki ngai, Motatoli ya Yehova, lokola ndakisa; akumisaki ngai liboso ya bana-kelasi nyonso mpo na elobeli na ngai ya pɛto.”
Na kelasi moko ya bana ya mitó makasi, na ekólo Thaïlande, molakisi abengaki elenge moko ya mbula 11, nkombo na ye Racha, aleka liboso. Apesaki ye longonya mpo na etamboli na ye, alobaki boye: “Mpo na nini bino nyonso bozali kolanda ndakisa na ye te? Azwaka kelasi na lisɛki te mpe azali na etamboli malamu.” Nsima na yango, ayebisaki bana-kelasi boye: “Mpo na ngai, namoni ete bosengeli kokóma Batatoli ya Yehova lokola Racha mpo bóbongisa etamboli na bino.”
Ezali mpenza esengo komona ebele ya bilenge baklisto bazali koyeba Yehova malamumalamu mpe bazali kosala mokano na ye. Bilenge yango bazalaka na bwanya lokola mikóló. Nzambe akoki kosalisa bango mpo ete bomoi oyo bazali na yango sikoyo ezala malamu mpe akoki kopesa bango bomoi ya malamu koleka na mokili ya sika oyo ezali koya. (1 Timote 4:8) Na kati ya mokili oyo ezali kokelela na makambo ya elimo, oyo etondi mpe na bilenge oyo bazali konyokwama mpe balɛmbi nzoto, bilenge lokola oyo tolobeli na lisolo oyo bazali mpenza kobɔndisa!