Bato bazali koluka bomoi ya esengo
ELEKI mwa bambula, batunaki bato na bikólo Allemagne, Angleterre, États-Unis mpe France motuna oyo: “Moto asengeli na nini mpo azala na bomoi ya esengo?” Na kati ya bato oyo batunaki, bato 89 likoló ya monkama balobaki ete asengeli kozala nzoto kolɔngɔnɔ; bato 79 likoló ya monkama balobaki libala ya malamu; bato 62 likoló ya monkama balobaki bana; mpe bato 51 likoló ya monkama balobaki mosala ya malamu. Lisusu, atako balobaka ntango nyonso ete mbongo ezali sɛkɛlɛ ya bomoi ya esengo te, bato 47 likoló ya monkama oyo batunamaki bazalaki mpenza kondima ete mbongo nde ememelaka moto esengo. Kasi, makambo nini tomonaka mpenzampenza?
Ya liboso, tótalela likanisi oyo bato mosusu balobaka ete mbongo epesaka moto esengo. Ankɛtɛ moko oyo basalaki epai ya bato monkama oyo baleki na mbongo na États-Unis emonisaki ete bato yango bazali na esengo te koleka bato mosusu nyonso. Lisusu, atako na mbula 30 oyo euti koleka, bozwi ya bato mingi na États-Unis ebakisami mbala mibale, minganga ya maladi ya motó bamonisi ete bato yango bakómi na esengo te koleka ndenge bazalaki liboso. Kutu, lapolo moko elobi boye: “Kaka na eleko yango, bato mingi bakómi kotungisama na makanisi. Motángo ya bilenge oyo bazali komiboma ebakisami mbala misato. Mabala oyo ezali kokufa ebakisami mbala mibale.” Na bikólo soki 50, bato ya mayele oyo balukaki koyeba soki mpenza mbongo epesaka bolamu bamonaki ete moto akoki kosomba bolamu na mbongo te.
Lisusu, tokoki nde koloba ete moto akoki kozala na esengo kaka soki azali nzoto kolɔngɔnɔ, azali na libala ya malamu mpe na mosala ya malamu? Soki kaka makambo wana nde ememelaka moto esengo, tokoloba boni mpo na ebele ya bato oyo bazali nzoto kolɔngɔnɔ te ná baoyo bazali na mabala ya malamu te? Tokoloba boni mpo na babalani oyo bazali na bana te mpe mpo na ebele ya bato oyo bazali na misala ya malamu te? Tokoki nde koloba ete bato ya ndenge wana bakoki kozala na esengo te? Tokoki koloba ete baoyo bazali na esengo lelo oyo mpo bazali nzoto kolɔngɔnɔ mpe bazali na mabala ya malamu bakozala lisusu na esengo te soki makambo ebongwani?
Tozali koluka esengo na esika oyo ebongi mpenza?
Moto nyonso alingaka kozala na esengo. Yango ekoki kokamwisa biso te mpamba te Biblia elobi ete Mozalisi ye moko azali “Nzambe ya esengo,” mpe bato bakelamaki na elilingi ya Nzambe. (1 Timote 1:11; Genese 1:26, 27) Yango wana, esengeli kaka bato báluka bomoi ya esengo. Kasi, bato mingi bamonaka ete koluka esengo ezali lokola koluka kokanga mopɛpɛ.
Kasi, ekoki nde kozala ete bato mosusu bamipesi mobimba na koluka bomoi ya esengo? Filozofe Eric Hoffer amonaki ete ezali mpenza bongo. Ye alobaki boye: “Soki bato bazali na esengo te, ezali mpo bamipesi mobimba na koluka bomoi ya esengo.” Yango ekoki kozala mpenza bongo soki tozali koluka bomoi ya esengo na esika oyo ebongi te. Soki tosali bongo, na esika tózwa esengo, tokomiyokisa nde mpasi mpamba. Koluka kokóma na bozwi; koluka lokumu to koluka koyebana, komipesa na politiki, koluka kozala moto monene to koboma nzoto mpo na mbongo; ata mpe kolanda bisengo, nyonso wana ememelaka moto bolamu te. Yango wana tokoki kokamwa te ete bato mosusu bakómá kotalela bomoi ndenge mokomi moko alobaki: “Tolingaki kozala na esengo soki tozalaki te koboma nzoto mpo na koluka bomoi ya esengo”!
Kutu, na ankɛtɛ oyo tolobeli na ebandeli, bato 40 likoló ya monkama balobaki ete moto azalaka na esengo soki azali kosala malamu mpe azali kosalisa basusu. Mpe bato 25 likoló ya monkama balobaki ete kozala na kondima mpe kosambela ezali na ntina mingi mpo moto azala na esengo. Nyonso wana emonisi ete ezali na ntina mingi tóluka koyeba mpenza makambo oyo ekoki komemela moto esengo. Lisolo oyo elandi ekosalisa biso tóyeba makambo yango.
[Bililingi na lokasa 3]
Bato mingi bakanisaka ete mbongo, libota ya malamu, to mosala ya malamu nde ememelaka moto esengo. Yo mpe okanisaka bongo?