“Hema ya basembwi ekofulisama”
NTANGO Armagedon ekoya kosukisa ebongiseli mabe ya Satana, “ndako ya bato mabe ekobebisama.” Ekozala boni mpo na “hema ya basembwi”? Na mokili ya sika oyo Nzambe alaki, hema ya basembwi “ekofulisama.”—Masese 14:11.
Kasi, liboso ‘bato mabe bálongolama na mokili mpe bato ya masumu bápikolama wana,’ bato malamu basengeli naino kaka kofanda elongo na bango. (Masese 2:21, 22) Basembwi bakoki mpenza kofulisama na ntango bafandi elongo na bato mabe? Masese 14:1-11 emonisi ete soki tozali komonisa bwanya na maloba mpe na misala na biso, tokoki kofulisama mpe kozala na mwa kimya ata lelo oyo.
Bwanya etongaka ndako
Na ntina na malamu to mabe oyo mwasi akoki komema na libota, Mokonzi Salomo alobaki boye: “Mwasi ya [bwanya, “NW”] akotonga ndako na ye, nde oyo ya zoba akobuka yango na mabɔkɔ na ye mpenza.” (Masese 14:1) Ndenge nini mwasi ya bwanya akoki kotonga ndako na ye? Mwasi ya bwanya atosaka bokonzi oyo Nzambe atyá. (1 Bakolinti 11:3) Alandaka te elimo ya mokili ya Satana ya kotɛmɛla bokonzi. (Baefese 2:2) Atosaka mobali na ye mpe alobaka malamu na ntina na ye, mpe na ndenge yango, asalaka ete bato bámemya mobali na ye lisusu mingi. Mwasi ya bwanya apesaka mobali na ye mabɔkɔ na koteya bana makambo ya elimo mpe makambo mosusu ya bomoi. Asalaka mingi mpo na bolamu ya libota na ye, mpe na ndenge yango, moto nyonso na kati ya ndako amiyokaka malamu mpe asepelaka. Asalelaka mbongo na mayele mpe ayebaka kobatela yango. Mwasi oyo azali mpenza na bwanya asalaka mingi mpo libota na ye ezala malamu mpe na kimya.
Mwasi ya zoba atosaka te bokonzi oyo Nzambe atyá. Abangaka ata te koloba mabe mpo na mobali na ye. Lokola ayebaka kobatela mbongo te, abebisaka mpambampamba biloko oyo libota na ye ezwi na mpasi. Alekisaka mpe ntango na ye na makambo ezangi ntina. Na ndenge yango, abongisaka ndako na ye malamu te, mpe bana na ye bazalaka makasi te na nzoto mpe na elimo. Ya solo mpenza, mwasi ya zoba abukaka ndako na ye.
Kasi, nini emonisaka ete moto azali na bwanya to azali zoba? Masese 14:2 elobi boye: “Ye oyo akotambola na sembo azali kotosa [Yehova], nde ye oyo azali na mobulu na nzela na ye akotyola ye.” Moto ya sembo abangaka Nzambe ya solo, mpe “kobanga [Yehova] ezali ebandeli ya [bwanya, NW].” (Nzembo 111:10) Moto oyo azali mpenza na bwanya ayebaka ete asengeli ‘kobanga Nzambe mpe kobatela mibeko na ye.’ (Mosakoli 12:13) Nzokande, zoba atosaka te mitinda ya sembo ya Nzambe. Banzela na ye etɛngamá. Moto ya ndenge wana atyolaka Nzambe mpe alobaka na motema na ye ete: “[Yehova] azali te.”—Nzembo 14:1.
Mbɛbu oyo etambwisami na bwanya
Tokoloba boni mpo na maloba ya moto oyo abangaka Yehova mpe maloba ya oyo atyolaka Ye? Mokonzi Salomo alobaki boye: “Fimbo ya lolendo ezali na monɔkɔ ya zoba, kasi mbɛbu ya bato ya bwanya ekobatela bango.” (Masese 14:3, NW) Lokola zoba azangi bwanya oyo euti na likoló, azalaka moto ya kimya te mpe azalaka makambo makasimakasi. Bwanya oyo etambwisaka ye ezali bwanya ya nse, ya bonyama mpe ya bademo. Monɔkɔ na ye etondi na maloba ya kowelana mpe ya lolendo. Maloba ya lolendo oyo ebimaka na monɔkɔ na ye ememelaka ye moko mpe bato mosusu mpasi mingi.—Yakobo 3:13-18.
Bibɛbu ya moto ya bwanya ebatelaka ye, mpe ebakiselaka ye esengo mpe bolamu. Na ndenge nini? Biblia elobi boye: “Moto apusi koloba mingi, akozokisa lokola mompanga, kasi maloba ma bato ba bwanya makobikisa.” (Masese 12:18, Liloba lya Nzambe) Moto ya bwanya azalaka na maloba ya mabe to ya kozokisa te. Akanisaka malamu na motema na ye liboso ya kopesa eyano. (Masese 15:28) Maloba na ye ya malamu ebikisaka, elingi koloba elendisaka milimo oyo ezali kotungisama mpe ekitisaka mitema ya bato oyo bazali konyokwama. Na esika bibɛbu ya moto ya bwanya eyokisa bato mpasi, etyaka nde kimya.
Misala oyo esalemi na bwanya
Salomo akomaki lisusu lisese moko oyo ezali kobenda likebi oyo na ntembe te ezali komonisa ete liboso ya kosala likambo moko, esengeli kotalela malamu mpe mabe na yango. Alobaki boye: “Esika bangɔmbɛ ezali te, elyelo ezalaka pɛto, kasi babukaka mbuma mingi mpo na makasi ya ngɔmbɛ-mobali.”—Masese 14:4, NW.
Buku moko oyo elimbolaka maloba ya Biblia elimbolaki lisese yango boye: “Soki bilei ezangi na [elyelo ya bangɔmbɛ], elakisaka ete bangɔmbɛ ya koleisa ezali te, mpe na bongo, moto akomona mpasi te ya kosukola mpe kobatela banyama, mpe akobebisa mbongo mingi te. Kasi eteni ya nsuka ya vɛrsɛ 4 emonisi mabe ya kozanga bangɔmbɛ: soki moto azali kosalela bangɔmbɛ te, akobuka mpe mbuma mingi te.” Yango wana, mosali bilanga asengeli kosalela bwanya mpo na kopona.
Omoni te ete ebongi mpe tósalelaka liteya oyo ezali na lisese wana ntango tolingi koluka mosala mosusu, tozali kopona ndako oyo tokofanda, tolingi kosomba motuka, tolingi kobɔkɔla nyau to mbwa, mpe bongo na bongo? Moto ya bwanya akotalela naino malamu mpe mabe ya likambo oyo alingi kosala mpo na koyeba soki akobebisa makasi mpe mbongo na ye mpamba te.
Litatoli oyo epesami na bwanya
Salomo alobaki lisusu boye: “Motatoli ya sembo akolobaka lokuta te, kasi motatoli mabe akobimisaka nkuta.” (Masese 14:5) Na ntembe te, litatoli ya lokuta ekoki kosala mabe mingi. Nabota, moto ya Yizelele, abomamaki na mabanga mpamba te batatoli mibale ya lokuta bakoselaki ye makambo. (1 Mikonzi 21:7-13) Lisusu, lokola batatoli mingi ya lokuta bakoselaki Yesu makambo, bakatelaki ye etumbu ya liwa. (Matai 26:59-61) Setefano, moyekoli ya liboso ya Yesu oyo abomamaki mpo na kondima na ye, bakoselaki ye mpe makambo na batatoli ya lokuta.—Misala 6:10, 11.
Moto ya lokuta, ata soki bakangi ye lelo te, ata ndɛlɛ akosuka mabe. Biblia elobi ete Yehova ayinaka “motatoli ya lokuta oyo akolobaka maloba ya sembo te.” (Masese 6:16-19) Likabo ya moto ya ndenge wana ekozala na kati ya laki oyo ezali kopela na mɔtɔ mpe na sufulu, elingi koloba liwa ya mibale elongo na bato mosusu ya mabe lokola babomi-bato, bato ya pite, mpe basambeli ya bikeko.—Emoniseli 21:8.
Motatoli ya sembo alapaka ndai ya lokuta te. Apesaka mpe litatoli ya lokuta te. Kasi, yango elingi koloba te ete asengeli koyebisa makambo nyonso ata epai ya bato oyo bazali na mokano ya kosala basaleli ya Yehova mabe. Abalayama mpe Yisaka baboyaki koyebisa makambo nyonso epai ya bato oyo bazalaki basambeli ya Yehova te. (Genese 12:10-19; 20:1-18; 26:1-10) Lahaba, oyo azalaki kofanda na Yeliko, akosaki basoda ya mokonzi. (Yosua 2:1-7) Ata Yesu Klisto ye moko azalaki koboya koyebisa makambo mosusu soki amoni ete ekozala mabe aloba yango. (Yoane 7:1-10) Alobaki boye: “Bópesa eloko ya bosantu na bambwa te, mpe bóbwaka mayaka na bino liboso ya bangulu te.” Mpo na nini? Noki te ‘bábaluka mpo na kopasola bino.’—Matai 7:6.
‘Kozwa boyebi ezali mpasi te’
Bato nyonso nde bazalaka na bwanya? Masese 14:6 (NW) elobi boye: “Motyoli aluki kozwa bwanya, mpe azwi yango te; kasi mpo na moto ya bososoli kozwa boyebi ezali mpasi te.” Motyoli, to mosɛki, akoki koluka bwanya, kasi akozwa bwanya ya solo te. Lokola motyoli asɛkaka na lolendo nyonso makambo ya Nzambe, akoki te kozwa eloko oyo epesaka bwanya, elingi koloba boyebi ya Nzambe ya solo. Enzombo mpe lolendo na ye epekisaka ye koyekola makambo ya Nzambe mpe kozwa bwanya. (Masese 11:2) Mpo na nini amitungisaka te mpo na koluka bwanya? Lisese eyebisi yango te, kasi ekoki kozala ete asalaka bongo mpo bato mosusu bákanisa ete azali na bwanya.
Mpo na moto ya bososoli, “kozwa boyebi ezali mpasi te.” Bososoli ezali “likoki ya kokanga ntina ya likambo,” “likoki ya komona boyokani oyo ezali na kati ya eteni mokomoko ya likambo.” Ezali likoki ya koyokanisa biteni ndenge na ndenge ya likambo moko mpe komona likambo yango mobimba, kasi te kaka mwa biteni na yango. Lisese yango elingi koloba ete kozwa boyebi ezalaka mpasi te mpo na moto oyo azali na likoki wana.
Kanisá naino ndenge oyo yo moko ozwaki boyebi ya solo ya Biblia. Na ntembe te, ntango obandaki koyekola Biblia, oyekolaki libosoliboso mateya ya ebandeli na ntina na Nzambe, bilaka na ye, mpe na ntina na Mwana na ye. Na boumeli ya mwa ntango, ozalaki komona boyokani te na kati ya makambo yango. Kasi, ntango okobaki koyekola, okómaki komona boyokani oyo ezali na kati ya makambo yango mpe okokaki komona ndenge makambo yango eyokani na mokano mobimba oyo Yehova azali na yango mpo na bato mpe mpo na mabelé. Okómaki komona ete mateya nyonso ya Biblia ezali na boyokani. Ezalaki lisusu mpasi te mpo oyekola mpe osimba makambo ya sika, mpamba te okokaki noki mpenza komona ndenge makambo yango eyokani na oyo oyebaki liboso.
Salomo, mokonzi ya bwanya, ayebisi biso epai oyo tosengeli te kokende koluka boyebi. Alobi boye: “Longwá na epai ya moto ya zoba wana ososoli ete boyebi ezali na bibɛbu na ye te.” (Masese 14:7) Zoba azalaka na boyebi ya solosolo te. Boyebi ebimaka na bibɛbu na ye te. Toli ya Salomo ezali ete osengeli kolongwa penepene na moto ya ndenge wana, mpe okomonisa bwanya soki osali bongo. Moto oyo “akotambolaka na bazoba, ekosukela ye mabe.”—Masese 13:20, Liloba lya Nzambe.
Salomo alobaki lisusu boye: “Moto wa bwanya mpe wa bokebi ayebi nini asengeli kosala, kasi [zoba] ayebi se kokosa.” (Masese 14:8, Liloba lya Nzambe) Moto ya bwanya akanisaka malamu liboso ya kosala likambo. Atalelaka banzela nyonso oyo ezali liboso na ye mpe alukaka koyeba epai oyo nzela mokomoko ekoki komema ye. Aponaka nzela na ye na bwanya mpenza. Ezali boni mpo na zoba? Aponaka nzela ya bozoba, mpe akanisaka ete ayebi oyo azali kosala mpe ete aponi nzela oyo eleki malamu. Bozoba na ye ekosaka ye.
Bwanya na ndenge ya kofanda na bato
Moto ya bwanya ayokanaka malamu na bato mosusu. Mokonzi Salomo alobaki boye: “Bazoba basekaka mabunga, kasi boyokani ezalaka na kati ya basembwi.” (Masese 14:9, NW) Ntango zoba asali mabe, na esika ayoka motema mpasi, ye amonaka yango likambo ya kosɛka. Abebisaka boyokani na ye na bato ya ndako na ye mpe na bato mosusu, mpamba te “lolendo epekisaka ye asɛnga bolimbisi” mpe aluka kimya. (The New English Bible) Mosembwi alimbisaka mabunga ya basusu. Azalaka mpe ntango nyonso pene na kosɛnga bolimbisi ntango asali mabe. Lokola alukaka kimya, azalaka ntango nyonso na boyokani malamu na basusu, mpe yango ememelaka ye esengo mingi.—Baebele 12:14.
Na nsima, Salomo alobelaki bolɛmbu moko emonanaka na boyokani kati na bato. Alobaki boye: “Moto na moto ayebi mpasi oyo ezali o motema mwa ye, moto mosusu akoyoka esengo na ye elongo te.” (Masese 14:10, Liloba lya Nzambe) Ezala tozali na mawa to na esengo, tokoki nde ntango nyonso komonisa bato mosusu oyo ezali na kati ya motema na biso to mpe koyebisa bango ndenge mpenza tozali koyoka? To mpe moto akoki koyeba ntango nyonso ndenge oyo moto mosusu azali koyoka? Eyano na mituna yango mibale ezali ete “te.”
Tózwa ndakisa ya moto oyo azali na makanisi ya komiboma. Mbala mingi, soki moto akómi na makanisi wana, amonisaka yango polele te epai ya ndeko to moninga na ye. Bato mosusu mpe bakoki ntango nyonso te koyeba soki ndeko to moninga na bango azali na makanisi wana. Tosengeli te komipesa foti soki tomonaki yango te mpe tokokaki te kosalisa ye. Lisese yango eteyi biso mpe ete atako tosepelaka kosalisa moninga oyo azali kotungisama na makanisi, lokola tozali bato, tozali na makoki nyonso te oyo esengeli mpo na kosala yango. Yango wana, ntango tozali na mikakatano, tosengeli komitika kaka na mabɔkɔ ya Yehova.
“Ndako na ye ekozala na mosolo mpe na biloko”
Mokonzi ya Yisalaele alobaki boye: “Ndako ya bato mabe ekobebisama, nde hema ya basembwi ekofulisama.” (Masese 14:11) Moto mabe akoki kokóma na bozwi mingi na mokili oyo mpe akoki kozala na ndako kitoko, kasi nyonso wana ekozala na ntina nini mpo na ye ntango akozala lisusu te? (Nzembo 37:10) Nzokande, mosembwi akoki kozala kaka na mwa ndako ya bongobongo. Kasi, Nzembo 112:3 elobi ete “ndako na ye ekozala na mosolo mpe na biloko.” Mosolo mpe biloko yango ezali nini?
Ntango tozali koloba mpe kosala makambo na bwanya, tozali na “bozwi mpe lokumu” oyo eutaka na bwanya. (Masese 8:18) Bozwi mpe lokumu yango ezali makambo lokola boyokani malamu na Nzambe mpe na bazalani na biso, nzoto kolɔngɔnɔ mpe bomoi ya esengo, ná mwa kimya oyo ekoki. Ya solo mpenza, “hema ya basembwi” ekoki kofulisama ata lelo oyo.
[Elilingi na lokasa 27]
Mwasi ya bwanya atongaka ndako na ye
[Elilingi na lokasa 28]
“Maloba ma bato ba bwanya makobikisa”