Yehova azali Mosungi na biso
“Lisalisi na ngai ekouta epai ya Yehova, Mozalisi ya likoló ná mabelé.”—NZEMBO 121:2, NW.
1, 2. (a) Mpo na nini tokoki koloba ete biso nyonso tozalaka na mposa ya lisalisi? (b) Yehova azali Mosungi ya ndenge nini?
MOTO nyonso azalaka na mposa ya lisalisi, na ndakisa, mpo na kosilisa mokakatano moko ya monene, to ntango ndeko to moninga na ye akufi, to mpo na koyikela minyoko mpiko. Mbala mingi, moto alukaka lisalisi epai ya moninga moko oyo akoki kosunga ye. Ntango moto ayebisi moninga na ye likambo oyo ezali kotungisa ye, ayokaka lokola nde bakitisi ye kilo. Kasi, moninga oyo azali moto akoki kosalisa na makambo nyonso te. Lisusu, moto akoki kozanga makoki ya kosalisa biso na ntango oyo tozali na mposa na ye.
2 Nzokande, ezali na Mosungi moko oyo azali na nguya mpe na makoki nyonso. Kutu, alaki biso ete akosundola biso ata mokolo moko te. Mokomi ya nzembo atángaki nkombo na ye ntango alobaki na elikya mpenza ete: “Lisalisi na ngai ekouta epai ya Yehova.” (Nzembo 121:2, NW) Mpo na nini mokomi ya nzembo azalaki na elikya ete Yehova akosalisa ye? Mpo na kozwa eyano na motuna yango, tótalela Nzembo 121. Boyekoli yango ekomonisa biso ntina oyo biso mpe tokoki koloba ete Yehova azali Mosungi na biso.
Mosungi oyo tokoki kotyela motema mobimba
3. Ekoki mpenza kozala ete mokomi ya nzembo atombolaki miso na ngomba nini, mpe mpo na nini?
3 Mokomi ya nzembo abandaki na komonisa ete lokola Yehova akelaki biloko nyonso, tokoki kotyela ye motema: “Nakotombola miso na ngai na ngomba. Lisalisi na ngai ekouta wapi? Lisalisi na ngai ekouta epai ya Yehova, Mozalisi ya likoló ná mabelé.” (Nzembo 121:1, 2, NW) Mokomi ya nzembo atombolaki te miso na ye na ngomba kaka oyo miso na ye emonaki. Ntango akomaki maloba wana, tempelo ya Yehova ezalaki na Yelusaleme. Engumba yango oyo ezalaki likoló mpenza, na bangomba ya Yuda, mpe Yehova azalaki kofanda kuna na ndenge ya elilingi. (Nzembo 135:21) Ekoki mpenza kozala ete mokomi ya nzembo atombolaki miso na elikya nyonso na ngomba ya Yelusaleme epai tempelo ya Yehova ezalaki mpo na kosɛnga na Yehova asalisa ye. Mpo na nini mokomi ya nzembo azalaki na elikya ete Yehova akoki kosalisa ye? Mpamba te azali “Mozalisi ya likoló ná mabelé.” Na maloba mosusu, mokomi ya nzembo azalaki koloba ete, ‘Eloko moko te ekoki kopekisa Mozalisi oyo azali na nguya nyonso kosalisa ngai.’—Yisaya 40:26.
4. Ndenge nini mokomi ya nzembo amonisaki ete Yehova alandelaka ntango nyonso bamposa ya basaleli na ye mpe mpo na nini likambo yango ezali kokitisa biso mitema?
4 Na bavɛrsɛ elandi, mokomi ya nzembo amonisaki ete Yehova alandelaka ntango nyonso bamposa ya basaleli na ye: “Ye akotika [lokolo] na yo kosɛlimwa te; mobateli na yo akolala mpɔngi soki moke te. Talá, ye oyo akobatela Yisalaele akolala te, akolala mpɔngi mpe te.” (Nzembo 121:3, 4) Nzambe akoki soki moke te kotika ete baoyo batyelaka ye motema ‘básɛlimwa’ to bákwea mpe bákoka lisusu kotɛlɛma te. (Masese 24:16) Mpo na nini? Mpamba te Yehova azali lokola mobateli ya mpate oyo azali ata na mpɔngi moke te ntango azali kokɛngɛla bibwɛlɛ na ye. Likambo yango ezali mpenza kokitisa biso motema! Akokanga liso na ye ata na miniti moko te mpo azanga komonisa bamposa ya basaleli na ye. Azali kokɛngɛla bango butu moi.
5. Mpo na nini mokomi ya nzembo alobaki ete Yehova azali na “lobɔkɔ ya mobali”?
5 Mokomi ya nzembo azalaki mpenza kondima ete Yehova azali Mobateli ya solosolo ya basaleli na ye, yango wana akomaki boye: “[Yehova] azali mobateli na yo. [Yehova] azali elilingi na yo epai na lobɔkɔ ya mobali. Moi ekobɛta yo na mokolo te, sanza ekobɛta yo na butu te.” (Nzembo 121:5, 6) Na mikili ya Moyen-Orient, moto oyo azali kosala mobembo na makolo azalaki kosepela mingi ntango akómi esika oyo akoki kobombama moi makasi. Yehova azali lokola esika ya kobombama mpo na basaleli na ye, abatelaka bango na makambo oyo enyokolaka lokola moi makasi. Mokomi ya nzembo alobi mpe ete Yehova azali na “lobɔkɔ ya mobali.” Na ntango ya kala, nguba ya soda oyo azali kobunda ezalaki mpenza kobatela lobɔkɔ na ye ya mobali te mpamba te azalaki kosimba yango na lobɔkɔ ya mwasi. Moninga ya solosolo akokaki kobatela soda ya ndenge wana soki atɛlɛmi pembeni na ye, na lobɔkɔ ya mobali, ntango bazali kobunda na banguna. Yehova azali lokola moninga ya ndenge wana, atɛlɛmi pembeni ya basambeli na ye, azali ntango nyonso kobatela bango.
6, 7. (a) Ndenge nini mokomi ya nzembo amonisi ete ata mokolo moko te Yehova akotika kosalisa basaleli na ye? (b) Mpo na nini tokoki kozala na elikya lokola oyo mokomi na nzembo azalaki na yango?
6 Yehova akotika nde kosalisa basaleli na ye? Ekosalema ata mokolo moko te. Mokomi ya nzembo asukisi boye: “[Yehova] akobatela yo na mabe nyonso; ye akobatela molimo na yo. [Yehova] akobatela kobima na yo mpe kokɔta na yɔ, [sikoyo] mpe na lobiko na lobiko.” (Nzembo 121:7, 8) Tomoni ete mokomi ya maloba yango abongoli ntango oyo azali kosalela, atiki kosalela eleko bebe (temps présent), mpe akómi kosalela eleko ekoya (futur). Na vɛrsɛ 5, mokomi ya nzembo alobaki: “[Yehova] azali mobateli na yo.” Na bavɛrsɛ oyo, akomi: ‘Yehova akobatela yo.’ Yango ezali kondimisa basambeli ya solo ete Yehova akosalisa bango ata na mikolo ekoya. Ata soki bazali na esika nini to bakutani na mikakatano nini, lobɔkɔ na ye ekozala mokuse te mpo na kosalisa bango.—Masese 12:21.
7 Ya solo, mokomi ya Nzembo 121 azalaki mpenza na elikya ete Mozalisi oyo azali na nguya nyonso atyelaka basaleli na ye miso lokola mobateli malamu ya mpate mpe azalaka ekɛngɛ lokola sinzili. Biso mpe tokoki kozala na elikya lokola oyo mokomi ya nzembo azalaki na yango, mpamba te Yehova abongwanaka te. (Malaki 3:6) Kasi, yango elingi koloba ete tokoki kozwa likama moko te na nzoto na biso? Te, kasi soki tozali ntango nyonso kotyela ye motema lokola Mosungi na biso, akobatela biso na makama nyonso oyo ekoki kobebisa elimo na biso. Kasi, motuna tokoki komituna yango oyo: ‘Ndenge nini Yehova asalisaka biso?’ Tótalela ndenge minei oyo asalisaka biso. Na lisolo oyo, tokolobela ndenge oyo azalaki kosalisa basaleli na ye na ntango ya kala. Bongo, na lisolo ekolanda nde tokotalela ndenge oyo azali kosalisa basaleli na ye lelo oyo.
Lisalisi ya baanzelu
8. Mpo na nini tokoki kokamwa te ete baanzelu balingaka mpenza ete basaleli ya Nzambe awa na mabelé bázala malamu?
8 Baanzelu ya Yehova bazali ebele ebele. (Danyele 7:9, 10) Bikelamo yango ya elimo oyo babengami bana ya Nzambe bakokisaka mokano na ye na bosembo mpenza. (Nzembo 103:20) Baanzelu bayebi malamu ete Yehova alingaka mingi bato oyo basambelaka ye mpe alingi kosalisa bango. Yango wana, tokoki kokamwa te ete baanzelu balingaka mpenza ete basaleli ya Nzambe bázala malamu awa na mabelé. (Luka 15:10) Na bongo, tokanisi mpenza ete baanzelu basepelaka mingi ndenge Yehova atindaka bango mpo na kosalisa bato. Na ntango ya kala, ndenge nini Yehova azalaki kotinda baanzelu mpo na kosalisa basaleli na ye awa na mabelé?
9. Pesá ndakisa moko oyo ezali komonisa ndenge Nzambe apesaki baanzelu nguya ya kobatela bato ya sembo.
9 Nzambe apesaki baanzelu nguya ya kobatela mpe kobikisa bato ya sembo. Baanzelu mibale basalisaki Lota ná bana na ye ya basi na kokima ntango Sodoma ná Gomola ebomamaki. (Genese 19:1, 15-17) Anzelu moko abomaki basoda 185 000 ya Asulia oyo balingaki kobundisa Yelusaleme. (2 Mikonzi 19:35) Ntango babwakaki Danyele na libulu ya bankɔsi, Yehova “atindaki [anzelu] na ye, mpe azipaki minɔkɔ ya bankɔsi.” (Danyele 6:21, 22) Anzelu moko abimisaki ntoma Petelo na bolɔkɔ. (Misala 12:6-11) Biblia elobeli bandakisa mingi mosusu oyo emonisi ndenge baanzelu babatelaki bato. Nyonso wana elongisi maloba ya Nzembo 34:7 ete: “Anzelu ya [Yehova] akozingela esika ya baoyo bakotosaka ye; mpe akobikisa bango.”
10. Ndenge nini Yehova asalelaki anzelu moko mpo na kolendisa mosakoli Danyele?
10 Na bantango mosusu, Yehova azalaki kotinda baanzelu mpo na kolendisa bato ya sembo mpe kopesa bango makasi. Ndakisa moko ya polele ezali na Danyele mokapo 10. Na ntango wana, ekoki mpenza kozala ete Danyele azalaki na mbula pene na 100. Mosakoli yango alɛmbaki mpenza nzoto, na ntembe te mpo Yelusaleme ebebisamaki mpe tempelo etongamaki naino kaka te. Lisusu, makanisi na ye ebulunganaki mpenza nsima ya komona emonaneli moko ya nsɔmɔ. (Danyele 10:2, 3, 8) Nzambe atindelaki ye anzelu moko mpo na kolendisa ye. Anzelu yango ayebisaki Danyele mbala mingi ete ‘alingami mingi’ na Nzambe. Likambo nini esalemaki? Mosakoli yango oyo akómaki mobange alobaki na anzelu ete: “Okembisi ngai.”—Danyele 10:11, 19.
11. Pesá ndakisa moko oyo emonisi ndenge oyo Nzambe asalelaki baanzelu mpo na kotambwisa mosala ya kosakola nsango malamu.
11 Yehova azalaki mpe kotinda baanzelu mpo na kotambwisa mosala ya kosakola nsango malamu. Anzelu moko atambwisaki Filipo mpo akende koyebisa mokube Moetiopia moko nsango ya Klisto, mpe moto yango azwaki batisimo. (Misala 8:26, 27, 36, 38) Mwa moke na nsima, Nzambe alingaki ete nsango malamu esakolama epai ya bato ya bikólo mosusu. Koloneyi, moto moko oyo azalaki Moyuda te, kasi azalaki kobanga Nzambe, amonaki anzelu moko na emonaneli mpe ayebisaki ye atinda bato bákende kobenga ntoma Petelo. Ntango bato oyo Koloneyi atindaki bamonaki Petelo, balobaki na ye boye: “Koloneyi . . . azwi malako ya Nzambe na nzela ya anzelu moko mosantu mpo na kobengisa yo na ndako na ye mpe mpo na koyoka makambo oyo ozali na yango ya koloba.” Petelo akendaki epai ya Koloneyi, mpe na ndenge yango, bato ya liboso oyo bazali Bayuda te, bakɔtaki na lisangá ya boklisto. (Misala 10:22, 44-48) Kanisá ndenge oyo okomiyoka soki oyebi ete anzelu moko nde asalisi yo okutana na moto moko oyo azali na mposa ya koyoka nsango malamu!
Lisalisi na nzela ya elimo santu
12, 13. (a) Mpo na nini bantoma ya Yesu bakokaki kozala na ntembe te ete elimo santu ekosalisa bango? (b) Na ndenge nini elimo santu epesaki baklisto ya liboso nguya?
12 Mwa moke liboso Yesu akufa, ayebisaki bantoma na ye ete bakozanga lisalisi te. Alobaki ete Tata na ye akopesa bango ‘mosungi, elimo santu.’ (Yoane 14:26) Bantoma bakokaki kozala na ntembe te ete elimo santu ekosalisa bango. Kutu, Biblia ezali na ebele ya bandakisa oyo emonisi ndenge Yehova asalelaki elimo santu, nguya oyo eleki nguya mosusu nyonso, mpo na kosalisa basaleli na ye.
13 Na mabaku mingi, Yehova asalelaki elimo santu mpo na kopesa bato nguya ya kosala mokano na Ye. Basambisi babikisaki Yisalaele na nguya ya elimo santu. (Basambisi 3:9, 10; 6:34) Kaka elimo wana epesaki baklisto ya ekeke ya liboso nguya ya kokoba kosakola na molende atako banguna basalaki nyonso mpo na kotɛmɛla bango. (Misala 1:8; 4:31) Lokola balongaki kokokisa mosala na bango, yango emonisi mpenza ete elimo santu ezalaki kopesa bango nguya. Soki bongo te, ndenge nini “bato batángá kelasi mingi te mpe bato mpamba” bakokaki kosakola nsango ya Bokonzi na mokili mobimba oyo bayebaki na ntango wana?—Misala 4:13; Bakolose 1:23.
14. Ndenge nini Yehova asalelaki elimo santu mpo na kongɛngisa basaleli na ye?
14 Yehova asalelaki mpe elimo santu mpo na kongɛngisa basaleli na ye. Na lisalisi ya elimo ya Nzambe, Yozefe alimbolaki bandɔtɔ ya Falao. (Genese 41:16, 38, 39) Na nzela ya elimo na ye, Yehova amonisaki bato ya komikitisa mikano na ye, nzokande abombaki yango na miso ya bato ya lolendo. (Matai 11:25) Yango wana, mpo na makambo oyo Yehova asalaka “mpo na baoyo balingaka ye,” ntoma Paulo alobaki boye: “Ezali epai na biso nde Nzambe amonisi yango na nzela ya elimo na ye.” (1 Bakolinti 2:7-10) Moto akoki kokanga ntina ya mokano ya Nzambe kaka na lisalisi ya elimo santu.
Lisalisi ya Liloba ya Nzambe
15, 16. Nzambe alobaki na Yosua asala nini mpo asalaka makambo na bwanya?
15 Liloba ya Yehova ezali “na litomba mpo na koteya,” esalisaka mpe basaleli ya Nzambe bázala ‘bato oyo bakoki mpenza, oyo bazali na nyonso esengeli mpo na mosala nyonso ya malamu.’ (2 Timote 3:16, 17) Biblia ezali na bandakisa mingi oyo emonisi ndenge Nzambe asalisaki basaleli na ye ya kala na nzela ya mikanda ya Biblia oyo esilaki kokomama.
16 Liloba ya Nzambe epesaki basambeli ya Nzambe litambwisi ya malamu. Ntango Nzambe apesaki Yosua mokumba ya kokamba libota ya Yisalaele, alobaki na ye boye: “Buku ya mobeko oyo [Moize akomaki] ekolongwa na monɔkɔ na yo te, kasi okokanisa yango butu na moi, ete okeba kotosa makambo nyonso makomami na yango. Mpo ete bongo okozalisa nzela na yo malamu mpe bongo [okosala makambo na bwanya, NW].” Tomoni ete Nzambe alakaki Yosua te ete akopesa ye bwanya na ndenge ya likamwisi. Kasi, Yosua akokaki kosala makambo na bwanya soki azali kotánga “buku ya mobeko” mpe komanyola yango.—Yosua 1:8; Nzembo 1:1-3.
17. Ndenge nini mikanda ya Liloba ya Nzambe oyo ezalaki na ntango ya Danyele mpe oyo ezalaki na ntango ya Mokonzi Yosiya esalisaki bango?
17 Nzambe asalelaki mpe Liloba na ye mpo na komonisa mokano na Ye. Na ndakisa, mokanda ya Yilimia esalisaki Danyele asosola mbula boni esengelaki koleka liboso Yelusaleme oyo ebebisamaki etongama lisusu. (Yilimia 25:11; Danyele 9:2) Tótala mpe likambo oyo esalemaki ntango Mokonzi Yosiya azalaki koyangela na Yuda. Na ntango wana, ekólo mobimba epesaki Yehova mokɔngɔ mpe bakonzi mingi oyo balekaki liboso na ye basalaki kopi na bango moko te ya Mibeko, bazalaki mpe kotosa Mibeko te. (Deteronome 17:18-20) Kasi, ntango bazalaki kobongisa tempelo, bamonaki “mokanda ya mibeko,” mbala mosusu oyo mpenza Moize akomaki. Ekoki kozala ete ezalaki mokanda ya libosoliboso, oyo esilaki kokomama soki mbula 800 liboso. Ntango Yosiya ayokaki makambo oyo ekomami na mokanda yango, mokonzi yango amonaki mpenza ete ekólo mobimba batikaki kosala mokano ya Yehova mpe azwaki meko mpo na kosala makambo oyo ekomamaki na buku yango. (2 Ntango 22:8; 23:1-7) Tomoni mpenza ete mikanda ya Biblia oyo basaleli ya Nzambe bazalaki na yango na ntango wana ezalaki kosalisa bango!
Lisalisi na nzela ya bandeko ya elimo
18. Mpo na nini tokoki koloba ete mbala nyonso oyo mosambeli moko ya solo asalisi moninga na ye, ezali mpenza Yehova nde asalisi ye?
18 Mbala mingi, Yehova asalisaka biso na nzela ya bandeko na biso ya elimo. Soki totali malamu, Yehova nde asalisaka ntango mosambeli ya solo asalisi ndeko na ye ya elimo. Mpo na nini tolobi bongo? Mpo na bantina mibale. Ya liboso, elimo santu ya Nzambe esalaka mosala. Elimo yango ebotaka mbuma lokola bolingo mpe bolamu epai ya baoyo balukaka etambwisa bango. (Bagalatia 5:22, 23) Yango wana, ntango motema ya mosaleli moko ya Nzambe etindi ye asalisa ndeko na ye, emonisaka ete elimo ya Yehova ezali kosala. Ya mibale, Nzambe akelá biso na elilingi na ye. (Genese 1:26) Yango elingi koloba ete tozali na likoki ya komonisa bizaleli na ye lokola boboto mpe motema mawa. Yango wana, lokola moto asalemi na elilingi ya Yehova, mbala nyonso oyo mosaleli na ye moko asalisi moninga na ye, lisalisi yango eutaka mpenzampenza nde epai ya Yehova.
19. Ndenge nini masolo ya Biblia emonisi lolenge oyo Yehova asalisaki basaleli na ye na nzela ya bandeko na bango ya elimo?
19 Ndenge nini Yehova azalaki kosalisa basaleli na ye na nzela ya bandeko na bango ya elimo na ntango ya kala? Mbala mingi, Yehova azalaki kotinda mosaleli na ye moko apesa moninga na ye toli, na ndakisa, Yilimia apesaki Baluku toli oyo ebikisaki ye. (Yilimia 45:1-5) Ntango mosusu basambeli ya solo bazalaki kokabela bandeko na bango ya elimo biloko; na ndakisa, baklisto ya Masedonia mpe ya Akaya bazalaki mpenza na mposa ya kosalisa bandeko na bango ya Yelusaleme oyo bazalaki na bosɛnga. Ntoma Paulo alobaki ete mposa na bango ya kokaba ebimisaki “matɔndi oyo ezali kopesama epai ya Nzambe.”—2 Bakolinti 9:11.
20, 21. Bandeko ya Loma balendisaki Paulo na libaku nini?
20 Masolo oyo esimbaka mpenza motema ezali oyo elobeli ndenge basaleli ya Yehova basalaki makasi mpo na kolendisana mpe kopesana makasi. Na ndakisa, tótala likambo moko oyo bandeko basalaki mpo na ntoma Paulo. Ntango azalaki kokende na bolɔkɔ na Loma Paulo, asalaki mobembo na nzela oyo bazalaki kobenga “la voie Appienne.” Eteni ya nsuka ya mobembo yango ezalaki mpasi mpenza, mpamba te basengelaki koleka na etúká moko oyo ezali na lobwaku mpe mabelé na yango ezalaki na maimai.a Bandeko ya lisangá ya Loma bayokaki ete Paulo azali na nzela. Basalaki nini? Bafandaki na bandako na bango na Loma mpe bazelaki tii ntango Paulo akokóma na engumba yango mpo bákende kopesa ye mbote?
21 Luka, mokomi moko ya Biblia, oyo asalaki mobembo yango elongo na Paulo, ayebisi biso likambo oyo esalemaki: “Uta kuna [na Loma] bandeko, ntango bayokaki nsango na biso, bayaki koyamba biso tii na Esika ya Zando ya Apiusi mpe na Tavɛrnɛ-Misato.” Kanisá naino! Ntango bayokaki ete Paulo azali na nzela, ndambo ya bandeko ya Loma bakendaki koyamba ye na nzela. Bamosusu bazelaki ye na zando ya Apiusi, esika moko eyebanaki mingi oyo bato ya mobembo bazalaki kopema, na ntaka ya kilomɛtrɛ 74 kobanda na Loma. Bamosusu bazelaki ye na Tavɛrnɛ-Misato, esika mosusu ya kopema oyo ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ 58 banda na Loma. Paulo ayokaki ndenge nini? Luka akomi boye: “Na komonáká bango, Paulo apesaki Nzambe matɔndi mpe azwaki mpiko.” (Misala 28:15) Kanisá naino—komona mpamba Paulo amonaki bandeko oyo basalaki mobembo mpo na kokende kokutana na ye elendisaki ye mpe epesaki ye makasi! Paulo apesaki nani matɔndi mpo na lisungi wana? Apesaki Yehova Nzambe matɔndi, Moto oyo asalelaki bandeko wana mpo na kosunga ye.
22. Mokapo ya mobu 2005 ezali nini, mpe tokolobela nini na lisolo elandi?
22 Tomoni mpenza ete makambo ekomami na Biblia oyo Nzambe asalaki bato ezali komonisa ete azali Mosungi. Azali Mosungi oyo aleki basungi nyonso. Yango wana, mpo na Batatoli ya Yehova, maloba ya Nzembo 121:2 (NW) ekozala mokapo ya mobu 2005; vɛrsɛ yango elobi ete: “Lisalisi na ngai ekouta epai ya Yehova.” Kasi, ndenge nini Yehova azali kosalisa biso na moi ya lelo? Tokolobela yango na lisolo oyo elandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mokomi Horace (65—8 L.T.B.), oyo asalaki mpe mobembo na nzela yango, alobelaki bwale oyo bato ya mobembo bazalaki komona na eteni wana. Horace alobaki ete zando ya Apiusi “ezalaki na ebele ya bato ya masuwa mpe bato ya mayele mabe oyo bazalaki kotɛka na banganda.” Alobelaki motungisi ya “bangungi mpe magbololo” mpe ete mai ezalaki “salite mpenza.”
Ozali koyeba lisusu?
Ndenge nini Yehova azalaki kosalisa bato—
• na nzela ya baanzelu?
• na nzela ya elimo santu?
• na nzela ya Liloba na ye?
• na nzela ya bandeko ya elimo?
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 15]
Mokapo ya mobu 2005 ekozala: “Lisalisi na ngai ekouta epai ya Yehova.”—Nzembo 121:2, NW.
[Elilingi na lokasa 16]
Paulo atɔndaki Nzambe mpo na lisalisi oyo bandeko ya Loma bapesaki ye