“Moto ya ekɛngɛ atalelaka matambe na ye”
MOTO ya ekɛngɛ ayebaka ndenge ya kosala soki akutani na likambo mpe azalaka mayele, akanisaka malamu, azalaka na bososoli mpe na bwanya. Azalaka makambo nyamunyamu te mpe na mayele mabe te. Masese 13:16 (NW) elobi ete: “Moto nyonso ya ekɛngɛ akosala na boyebi.” Nyonso wana emonisi ete bokɛngi ezali ezaleli malamu oyo tosengeli kozala na yango.
Na bomoi na biso ya mokolo na mokolo, ndenge nini tokoki komonisa ete tozali na bokɛngi? Ndenge nini ezaleli yango emonanaka na makambo oyo toponaka, makambo oyo tosalaka bato mosusu, mpe na ndenge oyo tosalaka soki tokutani na makambo ya ndenge na ndenge? Matomba nini moto ya ekɛngɛ azwaka? Mpe makama nini akimaka? Salomo, mokonzi ya Yisalaele ya kala, apesi biyano ya malamu na mituna yango, ndenge tokoki kotánga yango na Masese 14:12-25.a
Salelá bwanya mpo na kopona nzela na yo
Mpo na kopona nzela ya malamu mpe kolonga na bomoi esɛngaka koyeba kokesenisa mabe ná malamu. Nzokande, Biblia elobi boye: “Ezali na nzela oyo emonani malamu na miso ya moto, kasi nsuka na yango ezali banzela ya liwa.” (Masese 14:12, NW) Yango wana, tosengeli koyekola kokesenisa makambo oyo ezali mpenza malamu ná oyo emonanaka lokola malamu. Maloba “banzela ya liwa” ezali komonisa ete banzela oyo ekoki kokosa moto ezali mingi. Tótalela mwa makambo oyo tosengeli kokeba na yango mpe kokima yango.
Mbala mingi, bapesaka bato ya mbongo mpe bato minene na mokili limemya mpe bakumisaka bango. Lokumu mpe bozwi na bango ekoki kotinda bato bákanisa ete ndenge na bango ya kosala makambo ezali malamu. Kasi, tokoki koloba nini mpo na banzela oyo bato yango basalelaka mpo na kokóma na bozwi to na lokumu? Banzela yango ezalaka ntango nyonso ya malamu mpe ya sembo? Ezali mpe na bato mosusu oyo bazalaka na molende mpo na losambo na bango. Kasi, tokoki nde koloba ete molende na bango elakisaka ete makambo oyo bandimaka ezali solo?—Baloma 10:2, 3.
Moto mosusu akoki komona ete nzela oyo azali kolanda ezali malamu, kasi ezali nde mpo azali komikosa. Soki tozali kotalela makanisi na biso moko mpo na kozwa bikateli, yango emonisi ete tozali komityela motema; nzokande motema ezali na bokosi. (Yilimia 17:9) Lisosoli oyo eteyami malamu te ekoki kotinda biso tókanisa ete nzela ya mabe ezali malamu. Na bongo, nini ekosalisa biso tópona nzela ya malamu?
Ezali na ntina mingi tómipesa na koyekola makambo mozindo ya Liloba ya Nzambe mpo na kokóma na ‘makoki ya kososola oyo eteyami mpo na kokesenisa ná mabe ná malamu.’ Longola yango, tosengeli koteya makoki yango na “kosalela yango” wana tozali kotosa mitinda ya Biblia. (Baebele 5:14) Tosengeli kokeba mpo nzela oyo ezali komonana lokola ete ezali malamu emema biso tótika ‘nzela ekangamakangamá oyo ememaka na bomoi.’—Matai 7:13, 14.
“Motema ekoki kozala na mpasi”
Tokoki nde kozala na esengo soki tozali na kimya ya motema te? Kosɛka mpe loyenge ekitisaka nde mpasi oyo efandi mpenza na motema? Komipesa na masanga, komɛla bangi, to komipesa na misala ya mbindo mpo na kobosana makambo oyo ezali kotungisa biso ezali nde nzela ya bwanya? Te. Mokonzi Salomo alobi boye: “Ata na kati ya kosɛka, motema ekoki kozala na mpasi.”—Masese 14:13a, NW.
Kosɛka ekoki kobomba mpasi, kasi esilisaka yango te. Biblia elobi boye: “Ezali na ntango oyo etyami mpo na likambo nyonso.” Ya solo, ezali na “ntango ya kolela mpe ntango ya kosɛka; ntango ya komitungisa mpe ntango ya kopumbwa.” (Mosakoli 3:1, 4, NW ) Soki mitungisi na biso ezali kosila te, tosengeli koluka ndenge mosusu ya kosilisa yango, mbala mosusu na “toli ya mayele.” (Masese 24:6)b Kosɛka mpe mwa loyenge ezalaka na ntina na yango, kasi yango esalisaka mpenza te. Mpo na kokebisa biso na masano ya mabe mpe na komipesa na loyenge, Salomo alobaki boye: “Esengo esukaka na mawa.”—Masese 14:13b, NW.
Ndenge nini moto oyo azali sembo te mpe moto malamu bakotondisama?
Mokonzi Salomo alobi lisusu boye: “Moto oyo azali sembo te na motema akotondisama na mbuma ya banzela na ye, kasi moto malamu na mbuma ya misala na ye.” (Masese 14:14, NW ) Ndenge nini moto oyo azali sembo te mpe moto malamu bakotondisama na mbuma ya misala na bango?
Moto oyo azali sembo te amitungisaka te ete akozongisa monɔkɔ epai ya Nzambe. Yango wana, amonaka te ntina ya kosala oyo ezali malamu na miso ya Yehova. (1 Petelo 4:3-5) Moto ya ndenge wana atondisamaka na ndenge amipesaka na koluka bozwi ya mokili. (Nzembo 144:11-15a) Nzokande, moto malamu akanisaka mingimingi kosala oyo ezali sembo na miso ya Nzambe. Na misala na ye nyonso, alandaka mitinda ya sembo ya Nzambe. Moto ya ndenge wana atondisamaka mpamba te Yehova azali Nzambe na ye mpe azwaka esengo mingi na kosalela Oyo-Aleki-Likoló.—Nzembo 144:15b.
‘Tóndima maloba nyonso te’
Salomo amonisaki bokeseni oyo ezali kati na banzela ya zoba ná oyo ya moto ya bokɛngi na maloba oyo: “Zoba andimaka liloba nyonso, kasi moto ya ekɛngɛ atalelaka matambe na ye.” (Masese 14:15, NW ) Moto ya ekɛngɛ azalaka bindimandima te. Na esika ya kondima likambo nyonso oyo ayoki to atika bálakisa ye makambo oyo asengeli kokanisa, atalelaka matambe na ye malamumalamu. Alukaka naino koyeba makambo malamu, mpe asalelaka boyebi.
Na ndakisa, tótalela motuna oyo, “Nzambe azali?” Na motuna wana, zoba alandaka kaka oyo bato mingi to bato minene bakanisaka. Nzokande, moto ya ekɛngɛ azwaka ntango ya kotalela makambo malamumalamu. Akanisaka na bavɛrsɛ lokola Baloma 1:20 mpe Baebele 3:4. Na makambo ya Nzambe, moto ya ekɛngɛ andimaka makambo te kaka mpo bakonzi ya mangomba balobi yango. ‘Amekaka maloba mapemami mpo na komona soki yango euti na Nzambe.’—1 Yoane 4:1.
Kolanda toli ya ‘kondima maloba nyonso te’ ezali mpenza likambo ya bwanya! Na kati ya lisangá, baoyo bazali na mokumba ya kopesa basusu toli basengeli mpenza kobosanaka likambo yango te. Moto oyo azali kopesa toli asengeli koyeba malamu likambo oyo azali kopesela toli. Asengeli koyoka malamu mpe koyeba likambo mobimba mpo apesa te toli ya mabe to oyo ebongi mpenza te.—Masese 18:13; 29:20.
“Moto oyo azali na makoki ya kokanisa ayinami”
Mokonzi Salomo amonisi bokeseni mosusu oyo ezali kati na moto ya bwanya ná zoba; alobi boye: “Moto ya bwanya abangaka mpe akimaka mabe, kasi zoba asilikaka mpe amityelaka motema. Moto oyo asilikaka noki akosala bozoba, kasi moto oyo azali na makoki ya kokanisa ayinami.”—Masese 14:16, 17, NW.
Moto ya bwanya abangaka makama oyo nzela ya mabe ememaka. Yango wana, azalaka ekɛngɛ mpe andimaka toli nyonso oyo ekoki kosalisa ye akima mabe. Zoba azalaka na bobangi ya ndenge wana te. Lokola amityelaka motema, aboyaka toli na lolendo nyonso. Lokola moto ya ndenge wana aumelaka te kosilika, asalaka makambo ya bozoba. Kasi, na ndimbola nini moto oyo azali na makoki ya kokanisa ayinami?
Liloba ya Liebele oyo ebongolami na “makoki ya kokanisa” ezalaka na ndimbola mibale. Ekoki kolimbola bososoli to mayele. (Masese 1:4; 2:11; 3:21) Kasi, ekoki mpe kolimbola makanisi ya mabe.—Nzembo 37:7; Masese 12:2; 24:8.
Soki maloba “moto oyo azali na makoki ya kokanisa” elimboli moto oyo akanisaka makambo ya mabe, ezali mpasi te tómona mpo na nini moto ya ndenge wana ayinami. Nzokande, ezali mpe solo ete moto oyo azali na bososoli bakoki koyina ye na baoyo bazangi yango. Na ndakisa, bato ya mokili bayinaka bato oyo basalelaka bososoli na bango mpe baponaka kozala “bato ya mokili te.” (Yoane 15:19) Bilenge baklisto oyo basalelaka makoki na bango ya kokanisa mpe baboyaka baninga ya mabe batyolamaka. Toyebi ete bato ya mokili oyo ezali kolala na kati ya nguya ya Satana Zabolo bayinaka basambeli ya solo.—1 Yoane 5:19.
“Bato mabe bakogumbama na nse”
Ezali mpe na likambo mosusu oyo ekesenisaka moto ya ekɛngɛ ná zoba. “Bato oyo bazangi mayele bakozwa bozoba, kasi bato ya [bokɛngi, NW ] bakolata boyebi lokola motole.” (Masese 14:18) Lokola bato oyo bazangi mayele bazali mpe na bososoli te, baponaka bozoba. Yango nde ekómaka lolenge na bango. Nzokande, boyebi ebongisaka moto ya mayele ndenge motole epesaka mokonzi lokumu.
Mokonzi Salomo abakisi boye: “Bato mabe bakogumbama na nse liboso ya bato malamu; mpe bato ya masumu na bikuke ya bayengebene.” (Masese 14:19) Na maloba mosusu, nsukansuka malamu elongaka mabe. Tókanisa naino ndenge oyo basaleli ya Nzambe lelo oyo bazali se kokóma ebele mpe bomoi ya malamu oyo bazali na yango. Ntango banguna mosusu bazali komona mapamboli oyo Yehova azali kosopela basaleli na ye, ekopusa bango ‘bágumbama’ liboso ya oyo azali na maloba ya elilingi mwasi ya Yehova kuna na likoló, oyo amonisami awa na mabelé na batikali na kati ya baklisto bapakolami. Ata soki liboso ya Armagedon bandimi yango te, nsukansuka banguna yango bakondima ete basaleli ya Nzambe awa na mabelé bazali mpenza komonisa ebongiseli na ye ya likoló.—Yisaya 60:1, 14; Bagalatia 6:16; Emoniseli 16:14, 16.
‘Tóyokela babola mawa’
Salomo alobeli likambo moko oyo emonanaka epai ya bato: “Mobola ayinami ata na mozalani na ye; nde mozwi azali na baninga mingi.” (Masese 14:20) Likambo yango emonanaka mpenza epai ya bato ya kozanga kokoka! Lokola bato balukaka kaka bolamu na bango moko, basepelaka na mozwi koleka mobola. Ata soki mozwi azali na baninga mingi, baninga yango bazali kaka lokola bozwi na ye; bazali se mpo na mwa ntango. Yango wana tosengeli te kosalela mbongo to maloba ya sukali mpo na kozwa baninga.
Tosengeli kosala nini soki nsima ya komitalela na bosembo, tomoni ete tolukaka kozala baninga ya mozwi, kasi totyolaka mobola? Tosengeli koyeba ete Biblia eboyi kopona bilongi ndenge wana. Elobi boye: “Ye oyo akotyola mozalani na ye asali lisumu; kasi ye oyo ayokeli babola mawa azali na esengo.”—Masese 14:21.
Tosengeli komibanzabanza mpo na bato oyo bazali na mpasi. (Yakobo 1:27) Ndenge nini tokoki kosala yango? Tosengeli kosalisa bango na “biloko ya kobikela ya mokili oyo,” elingi koloba mbongo, biloko ya kolya, esika ya kolala, bilamba, kotala bango mpe kosolola na bango. (1 Yoane 3:17) Moto oyo ayokelaka bato ya ndenge wana mawa azalaka na esengo, mpamba te “esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.”—Misala 20:35.
Mokomoko asukaka ndenge nini?
Likanisi oyo elobaka ete “nyonso oyo moto azali kolona, yango nde akobuka” emonanaka mpe na misala ya moto ya ekɛngɛ mpe oyo ya zoba. (Bagalatia 6:7) Moto ya ekɛngɛ asalaka makambo ya malamu; zoba akanisaka mabe. Mokonzi Salomo atuni motuna oyo: “Baoyo bakobanzabanza mabe bakopɛngwa te?” Eyano ezali ete bakopɛngwa. “Nde boboto mpe solo ekozala epai ya bango baoyo bakolukaka malamu.” (Masese 14:22) Nzambe amoniselaka bato oyo basalaka malamu motema-boboto na ye; bato mosusu mpe basepelaka na bango.
Mpo na komonisa ete moto oyo amipesaka na mosala nde alongaka, mpe ye oyo alobaka mingi kasi asalaka moke, asukaka na bobola, Salomo alobi boye:“Na misala nyonso litomba ezali; nde maloba mpamba ya bibebe ekoyeisa bobele bobola.” (Masese 14:23) Likanisi yango ezali solo ata na mosala na biso ya elimo. Soki tozali komipesa na mosala ya kosakola, tozwaka libaku ya komemela bato mingi solo ya Liloba ya Nzambe oyo ebikisaka bomoi. Soki tozali kokokisa malamu mokumba nyonso oyo bapesi biso na lisangá, tokoyoka esengo mpe tokozwa bolamu.
Masese 14:24 (NW) elobi boye: “Motole ya bato ya ekɛngɛ ezali bozwi na bango, nde bozoba ya bato bazangi mayele ezali bozoba.” Maloba yango ekoki kolimbola ete bwanya oyo bato ya mayele balukaka, yango nde bozwi na bango, mpe ezalaka lokola motole na mitó na bango, to ekómisaka bango kitoko. Nzokande, zoba abukaka kaka bozoba. Buku moko elobi ete lisese yango ekoki mpe kolimbola ete “bozwi ezali lokola eloko kitoko mpo na baoyo basalelaka yango malamu . . . [nzokande] bazoba bazalaka kaka na bozoba na bango.” Ezala na ndimbola nini, moto ya bwanya azwaka mbano malamu koleka zoba.
Mokonzi ya Yisalaele alobi lisusu boye: “Motatoli ya sembo akobikisa milimo; nde ye oyo akozimbisa akolobaka lokuta.” (Masese 14:25) Atako maloba yango ezali solo mpo na bato oyo bazali kosamba na tribinale, tótalela mpe ndenge oyo ekoki kolimbola mpo na mosala na biso. Mosala na biso ya kosakola Bokonzi mpe ya kokómisa bato bayekoli esɛngaka kopesa litatoli na solo ya Liloba ya Nzambe. Litatoli yango ezali kosikola bato ya mitema sembo na losambo ya lokuta mpe ezali kobikisa bomoi ya bato mingi. Soki tozali ntango nyonso kokeba mpo na biso moko mpe mpo na mateya na biso, tokomibikisa mpe tokobikisa bato oyo bazali koyoka biso. (1 Timote 4:16) Wana tozali kokoba kosala yango, tóluka ntango nyonso komonisa bokɛngi na makambo nyonso ya bomoi na biso.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Novɛmbɛ 2004 elobelaki Masese 14:1-11, na nkasa 26-29.
b Talá Lamuká! ya 22 Ɔkɔtɔbɛ 1987, nkasa 11-16 (ebimeli ya Lifalanse).
[Elilingi na lokasa 18]
Komipesa na koyekola makambo mozindo ya Liloba ya Nzambe ezali na ntina mingi mpo na koyeba kokesenisa mabe ná malamu
[Elilingi na lokasa 18]
Komipesa na koluka bozwi ya mokili epesaka mpenza esengo?