Makambo oyo basusu bakaniselaka biso ezali nde na ntina?
NA NTEMBE te moto nyonso alingaka bákumisa ye. Soki bapesi biso longonya toyokaka esengo mpo tomonaka ete tozali na valɛrɛ. Soki bandimi likambo moko oyo tosali, etindaka biso tóbakisa lisusu milende mpo tósala likambo yango malamu koleka. Nzokande, toyokaka motema mpasi soki tomoni ete bato mosusu basepeli te na likambo moko oyo tosali. Soki balobi na biso maloba mabe to ya kotyola, ekoki kolɛmbisa biso nzoto. Makambo oyo bato mosusu bakaniselaka biso ekoki kotinda biso tómimona ete tozali na valɛrɛ to te.
Soki tolobi ete ndenge oyo bato mosusu bamonaka biso etali biso te, ezali libunga. Tokoki mpenza kozwa matomba soki bato mosusu bayebisaka biso ndenge oyo bamonaka etamboli na biso. Soki makanisi ya bato yango ezali kolanda mitinda ya Biblia, ekoki kopesa biso mposa ya kosala malamu mpe ya kozala bato ya sembo. (1 Bakolinti 10:31-33) Kasi, mbala mingi makanisi ya bato ezalaka mabe. Tótalela makanisi mabe oyo banganga-nzambe bakonzi mpe bato mosusu bazalaki na yango mpo na Yesu Klisto ntango “babandaki koganga makasi, kolobáká ete: ‘Baká na nzete! Baká ye na nzete!’” (Luka 23:13, 21-25) Ntango mosusu, ezalaka na ntina te tólanda makanisi mabe oyo bato bazali na yango mpo na biso mpo bayebi makambo na biso malamu te, bazali koyokela biso likunya to mpo bazali nde kokanisela biso mabe. Yango wana, tosengeli kozala na bososoli mpe bwanya liboso ya kondima makanisi ya bato mosusu.
Makanisi ya banani ezali na ntina?
Tolingaka ete bandeko oyo tozali na bango na losambo ya solo bándima biso. Bato yango ezali bandeko ya libota na biso oyo bazali baklisto mpe bandeko mosusu na lisangá. (Baloma 15:2; Bakolose 3:18-21) Bolingo, limemya mpe ‘bilendiseli’ ya bandeko yango ezali na ntina mingi mpo na biso. (Baloma 1:11, 12) Na ‘elimo ya komikitisa totalelaka bamosusu ete baleki biso.’ (Bafilipi 2:2-4) Longola yango, tolukaka ete ‘baoyo bazali kokamba biso,’ elingi koloba bankulutu na lisangá bándima biso mpe tosepelaka mingi.—Baebele 13:17.
Likambo mosusu ya malamu mingi ezali “litatoli moko ya malamu epai ya bato ya libándá.” (1 Timote 3:7) Ezalaka malamu mpenza ntango bandeko oyo bazali Batatoli te, baninga ya mosala, mpe bato ya kartye bazali komemya biso! Tosalaka makasi ete tózala na etamboli ya malamu mpo bato oyo toteyaka básepela na nsango ya Bokonzi oyo tomemelaka bango! Soki bato na kartye to na mboka bayebi biso ete tozali na etamboli ya malamu mpe tozali bato ya sembo, yango epesaka Nzambe nkembo. (1 Petelo 2:12) Nzokande, tosengeli ata moke te kobuka mitinda ya Biblia mpo bato básepela na biso; tosengeli mpe te kosala makambo kaka mpo bákumisa biso. Tosengeli koyeba ete tokoki kosepelisa moto nyonso te. Yesu alobaki boye: “Soki bozalaki bato ya mokili, mbɛlɛ mokili ezali kolinga eloko na yango. Lokola bozali bato ya mokili te, kasi naponi bino na kati ya mokili, yango wana mokili ezali koyina bino.” (Yoane 15:19) Tokoki nde kosala eloko moko mpo banguna na biso bámemya biso?
Oyo tokoki kosala mpo banguna bámemya biso
Yesu alobaki boye: “Bokozala biloko ya koyinama na bato nyonso mpo na nkombo na ngai; kasi moto oyo akoyika mpiko tii na nsuka ye wana nde akobika.” (Matai 10:22) Bato oyo bayinaka biso, ntango mosusu bakoselaka biso makambo. Bakonzi oyo bazangi bosembo bakoki koloba ete tozali kotinda bato na botomboki. Banguna mosusu balobaka polele ete tozali mwa lingomba oyo ezali kotya mobulu mpe esengeli bápekisa yango. (Misala 28:22) Nzokande, tokoki ntango mosusu komonisa ete nyonso wana ezali lokuta. Na ndenge nini? Soki tolandi toli ya ntoma Petelo oyo: “Bómibongisa ntango nyonso mpo na koloba liboso ya moto nyonso oyo atuni bino ntina ya elikya oyo ezali na kati na bino, kasi bósalaka bongo na elimo ya boboto mpe na limemya makasi.” (1 Petelo 3:15) Longola yango, tosengeli kozala na “maloba ya pɛto oyo ekoki te kokweisama; mpo moto oyo azali na ngámbo wana mosusu ayoka nsɔni, awa azangi likambo ya mabe ya koloba mpo na biso.”—Tito 2:8.
Wana tozali kosala makasi tómonisa ete nyonso oyo bazali koloba mpo na biso ezali lokuta, tosengeli kolɛmba nzoto te. Bafundaki Yesu, Mwana ya Nzambe oyo azalaki moto ya kokoka, ete azali motuki, motomboki mpe balobaki kutu ete azali na bademo. (Matai 9:3; Malako 3:22; Yoane 19:12) Babebisaki lokumu ya ntoma Paulo. (1 Bakolinti 4:13) Ezala Yesu to Paulo bakipaki makambo yango te mpe bakobaki mosala na bango. (Matai 15:14) Bayebaki ete, lokola “mokili mobimba ezali kolala na kati ya nguya ya moto mabe,” banguna na bango bakoki kosepela na bango te. (1 Yoane 5:19) Lelo oyo, tozali mpe kokutana na makambo ya ndenge wana. Tosengeli te kolɛmba nzoto ntango banguna bazali kopanza biso bansango ya lokuta.—Matai 5:11.
Makanisi oyo eleki ntina
Makambo oyo moto na moto akaniselaka biso etalelaka makanisi na ye mpe makambo oyo ayoká mpo na biso. Ezali na bato oyo basepelaka na biso mpe bakumisaka biso; ezali mpe na baoyo bayinaka biso. Nzokande, soki tozali ntango nyonso kotosa mitinda ya Biblia na bomoi na biso, tosengeli kozala na esengo mpe na kimya.
Ntoma Paulo akomaki boye: “Makomami nyonso epemami na Nzambe mpe ezali na litomba mpo na koteya, kopamela, kosembola makambo, mpo na kopesa disipilini na kati ya boyengebene, mpo moto ya Nzambe azala moto oyo akoki mpenza, oyo azali na nyonso esengeli mpo na mosala nyonso ya malamu.” (2 Timote 3:16, 17) Soki totiki Liloba ya Nzambe etambwisa biso na makambo nyonso, Yehova Nzambe ná Mwana na ye Yesu Klisto bakosepela na biso. Yango wana, oyo eleki ntina ezali ndenge oyo Yehova ná Mwana na ye batalelaka biso. Makambo oyo bakaniselaka biso nde emonisaka valɛrɛ na biso ya solosolo. Tokozwa bomoi soki bango bazali kosepela na biso.—Yoane 5:27; Yakobo 1:12.
[Maloba na katikati ya lokasa 30]
“Nayokaka nsɔni soki bazali kokumisa ngai, kasi nasɛngaka yango na nse ya motema.”—RABINDRANATH TAGORE, MOKOMI MOKO YA INDE
[Bililingi na lokasa 31]
Makambo oyo bandeko na biso baklisto bakaniselaka biso ezali na ntina
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 30]
Culver Pictures