Lisolo ya bomoi
Ndakisa ya baboti na ngai elendisaki ngai
YA JANEZ REKELJ
Ezalaki na 1958. Ngai ná mwasi na ngai Stanka tozalaki likoló ya Bangomba Alpes ya Karawanken na ndelo ya Yougoslavie ná Autriche, tozalaki koluka kokima na Autriche. Kokatisa na ngámbo ya Autriche ezalaki likama mpamba te basoda bazalaki kokɛngɛla makasi ndelo ya Yougoslavie mpo moto akatisa te. Ntango topusanaki lisusu mwa moke, tomonaki ngomba ekitá makasi liboso na biso. Ngai ná Stanka tomonaki naino bangomba yango ndenge ezalaka na ngámbo ya Autriche te. Tokendaki na ngámbo ya ɛsti tii ntango tokómaki na esika moko oyo ngomba ekitá, mpe ezalaki na mabanga ya minene mpe ya mike. Tomikangaki na nsinga moko oyo tozalaki na yango mpe tomitikaki tii na nse, kozanga koyeba ndenge bomoi na biso ekosuka.
TIKÁ nayebisa bino ndenge likambo yango ekómelaki biso mpe ndenge ndakisa ya bosembo ya baboti na ngai esalisaki ngai natikala sembo epai ya Yehova na ntango ya mikakatano.
Nakolá na Slovénie, oyo ekómá lelo ekólo moko moke na Mpoto ya ntei. Ezwami na Bangomba Alpes ya Mpoto. Na nɔrdi na yango tozali na Autriche, na wɛsti Italie, na sudi Croatie mpe na ɛsti Hongrie. Kasi, ntango baboti na ngai Franc ná Rozalija Rekelj babotamaki, Slovénie ezalaki na kati ya Ampire Autriche-Hongrie. Nsima ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, Slovénie ekómaki na kati ya ekólo moko ya sika oyo babengaki Bokonzi ya Serbie, Croatie mpe Slovénie. Na 1929, nkombo ya ekólo yango ekómaki Yougoslavie, oyo elimboli “Slavie ya sudi.” Nabotamaki mwa 9 Yanuali, kaka na mbula wana, na pembeni ya mboka Podhom, pene na laki kitoko ya Bled.
Mama na ngai azalaki mondimi ya Katolike ya makila. Tata leki na ye moko azalaki sango, mpe batata mwasi na ye misato bazalaki bamamɛlo. Azalaki na mposa makasi ya kozwa Biblia na ye moko, atánga mpe ayeba yango malamu. Kasi, tata azalaki kosepela na makambo ya losambo te. Makambo oyo mangomba esalaki na Etumba Monene ya 1914-1918 ezalaki kopesa ye mpasi mingi.
Nayekoli solo
Mwa moke nsima ya Etumba, noko na ngai Janez Brajec ná mwasi na ye Ančka bakómaki bayekoli ya Biblia, nkombo oyo Batatoli ya Yehova bayebanaki na yango na ntango wana. Na ntango wana, bazalaki kofanda na Autriche. Banda na 1936, Ančka azalaki koya kotala mama. Apesaki ye Biblia mpe abandaki mbala moko kotánga yango ná Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe mikanda mosusu oyo elimbolaka Biblia na monɔkɔ ya Slovénie. Nsukansuka, ntango Hitler abɔtɔlaki Autriche na 1938, Janez ná Ančka bazongaki na Slovénie. Nazali koyeba lisusu ete Janez ná Ančka bayebaki makambo mingi, bazalaki kotalela makambo na ndenge ebongi mpe balingaki Yehova mingi. Bazalaki mbala mingi kosolola na mama na Biblia, mpe yango esalisaki ye amipesa epai ya Yehova. Azwaki batisimo na 1938.
Ntango mama atikaki kolanda mimeseno ya mangomba oyo eyokani na Biblia te, lokola fɛti ya Noele, koboya kolya boudin oyo basali na makila; mpe mingimingi ntango atumbaki bikeko nyonso oyo tozalaki na yango, bato nyonso ya mboka basilikelaki ye. Mosika te, botɛmɛli ebandaki. Batata mwasi ya mama oyo bazalaki bamamɛlo bakomelaki ye mokanda mpo na kosɛnga ye azongela Malia mpe Lingomba ya Katolike. Kasi, ntango mama akomelaki bango mokanda mpe atunaki bango mituna ya Biblia, azwaki eyano te. Nkɔkɔ na ngai mpe atɛmɛlaki ye makasi. Azalaki moto mabe te, kasi bandeko na biso mpe bato mosusu ya mboka nde batindaki ye asala bongo. Mpo na yango, abebisaki mikanda ya mama mbala na mbala, kasi asimbaki Biblia na ye soki moke te. Afukamaki liboso na ye mpo na kobondela ye azonga na lingomba. Akómaki kutu tii na kobangisa ye na mbeli. Kasi, tata na ngai ayebisaki ye polele ete akosepela bongo ata moke te.
Tata azalaki ntango nyonso komonisa bango ete mama azali na bonsomi ya kotánga Biblia mpe ya kosala oyo eyokani na bindimeli na ye. Na 1946, ye mpe azwaki batisimo. Komona ndenge Yehova asalisaki mama akangama kaka na solo kozanga kobanga atako bazalaki kotɛmɛla ye mpe ndenge Yehova apesaki ye mbano mpo na kondima na ye, etindaki ngai nakolisa boyokani na ngai ná Nzambe. Nazwaki mpe litomba monene na momeseno oyo mama azalaki na yango ya kotángela ngai Biblia mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia na mongongo makasi.
Mama azalaki mpe kosolola ntango molai na leki na ye ya mwasi Marija Repe, mpe nsukansuka ngai ná mama-leki Marija tozwaki batisimo mokolo moko na katikati ya sanza ya Yuli 1942. Ndeko moko ayaki kosala lisukulu moko ya mokuse, mpe tobatisamaki na ndako na biso na kati ya saani moko monene ya mabaya.
Misala makasi na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba
Na 1942, ntango Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ezalaki makasi, bato ya Allemagne mpe ya Italie bazwaki Slovénie mpe bakabolaki yango bango ná Hongrie. Baboti na ngai baboyaki kokɔta na Volksbund, ebongiseli ya Banazi. Ngai mpe naboyaki koloba “Heil Hitler” na eteyelo. Na ntembe te, molakisi na ngai ayebisaki bakonzi likambo yango.
Batyaki biso na engbunduka mpe bamemaki biso na ndako moko monene oyo ezalaki kaa ya misala makasi, pene na mboka Hüttenbach, na etúká ya Bavière. Tata asalaki nyonso mpo nakóma kosala mpe kofanda esika moko na mosali mampa ya mboka wana ná libota na ye. Na ntango wana, nayekolaki kosala mampa, mosala oyo esalisaki ngai mingi na nsima. Na nsima, batindaki bandeko na biso nyonso oyo batikalaki (mama-leki Marija ná libota na ye) na kaa ya Gunzenhausen.
Ntango Etumba esilaki, nalingaki kokende elongo na etuluku moko ya bato epai baboti na ngai bazalaki. Na mpokwa liboso ya mokolo oyo tolingaki kokende, tata ayaki mbalakaka. Nayebi te nini elingaki kokómela ngai soki nakendaki na bato wana, mpamba te bazalaki bato malamu te. Na mbala wana mpe, namonaki ete Yehova amibanzabanzaka mpo na ngai na ndenge asalelaki baboti na ngai mpo bábatela mpe bábɔkɔla ngai. Ngai ná tata totambolaki mikolo misato mpo na kokóma esika libota na biso ezalaki. Libota mobimba tokómaki na mboka na biso na sanza ya Yuni 1945.
Ntango etumba esilaki, bakoministe bazwaki bokonzi na Yougoslavie mpe Josip Broz Tito akómaki prezida. Yango wana, mikakatano ya Batatoli ya Yehova esilaki te.
Na 1948, ndeko moko autaki na Autriche mpe andimaki kolya na biso. Bisika nyonso oyo azalaki kokende, bapolisi bazalaki kolanda ye mpe kokanga bandeko oyo azalaki kotala. Bakangaki mpe tata na ngai mpo ayambaki ye mpe afundaki ye te epai ya bapolisi, mpe mpo na yango batyaki ye na bolɔkɔ mbula mibale. Mama amitungisaki mingi kaka te mpo tata azali te, kasi mpe mpo ayebaki ete mosika te ngai ná leki na ngai ya mobali tokomekama mpo tozali koboya kokɔta na mosala ya soda.
Bolɔkɔ na Masedonia
Na sanza ya Novɛmbɛ 1949, babengaki ngai na mosala ya soda. Nakendeki koyebisa bango ete nakoki kosala mosala ya soda te mpo na lisosoli na ngai. Bakonzi baboyaki koyokela ngai mpe batyaki ngai na engbunduka ná balikili mosusu mpe bamemaki biso na Masedonia, na ngámbo mosusu ya Yougoslavie.
Na boumeli ya mbula misato, nazalaki kozwa ata nsango ya libota na ngai te, ya bandeko ya lisangá mpe te, mpe nazalaki na mikanda oyo elimbolaka Biblia te, ata Biblia mpe te. Ezalaki mpenza mokakatano mpo na ngai. Komanyola likoló na Yehova mpe ndakisa ya mwana na ye Yesu klisto elendisaki ngai. Ndakisa ya baboti na ngai mpe elendisaki ngai. Mpe lisusu, mabondeli oyo nazalaki kosala ntango nyonso mpo na kozwa makasi, esalisaki ngai nabungisa elikya te.
Na nsima, batindaki ngai na bolɔkɔ na mwa mboka Idrizovo, pene na engumba Skopje. Na bolɔkɔ yango, bato ya bolɔkɔ bazalaki kosala misala ndenge na ndenge. Na ebandeli, nasalaki mosala ya kokomba ndako mpe komema mikanda na babiro. Atako moto moko ya bolɔkɔ oyo azalaki liboso polisi ya sirete azalaki konyokola ngai, nazalaki na boyokani malamu na moto nyonso: Bakɛngɛli ya bolɔkɔ, bato mosusu ya bolɔkɔ, ata mpe mokonzi ya izini oyo ezalaki na bolɔkɔ.
Na nsima, nayokaki ete bazali koluka moto moko oyo ayebi kosala mampa. Nsima ya mwa mikolo, mokonzi ya bolɔkɔ ayaki kobenga bankombo. Atambolaki na kati ya bato ya bolɔkɔ, atɛlɛmaki liboso na ngai mpe atunaki boye: “Oyebi kosala mampa?” Nayanolaki ete: “Ɛɛ, mokonzi.” Alobaki: “Leká lobi na ntɔngɔ esika basalaka mampa.” Moto ya bolɔkɔ oyo azalaki konyokola ngai ayaki kuna mbala na mbala, kasi akokaki kosala eloko moko te. Nasalaki kuna banda na Febwali tii na Yuli 1950.
Na nsima, batindaki ngai na kaa ya engumba Volkoderi, na sudi ya Masedonia, pene na laki Prespa. Lokola nakómaki pene na engumba Otešovo, nakómaki na likoki ya kokomela libota na ngai mikanda. Nazalaki kobongisa banzela ná bato mosusu ya bolɔkɔ, kasi nazalaki kolekisa ntango mingi na kosala mampa, mpe kuna nazalaki na mosala ya makasi te. Nabimaki na bolɔkɔ na sanza ya Novɛmbɛ 1952.
Na boumeli ya ntango oyo nazalaki na Podhom te, lisangá moko esalemaki kuna. Na ebandeli, lisangá yango ebandaki koyangana na otɛlɛ moko na engumba Spodnje Gorje. Na nsima, tata apesaki eteni moko ya ndako na biso mpo makita esalemaka wana. Nazalaki na esengo ya koyangana na bango ntango nazongaki na Masedonia. Nazongelaki lisusu boninga ná Stanka oyo nakutanaki na ye liboso nakɔta bolɔkɔ. Tobalanaki mwa 24 Aprili 1954. Kasi, mwa bopemi oyo nazwaki etikalaki moke esila.
Bolɔkɔ na Maribor
Na sanza ya Sɛtɛmbɛ 1954, babengaki ngai lisusu na mosala ya soda. Na mbala oyo, bakatelaki ngai etumbu ya bolɔkɔ mbula misato na ndambo na Maribor, oyo ezwami na ɛsti ya Slovénie. Ntango libaku emonanaki, nasombaki bapapye ná biki. Nabandaki kokoma makambo nyonso oyo ezalaki koyela ngai na makanisi, ezala bavɛrsɛ ya Biblia, makanisi oyo natángaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe oyo nazwaki na mikanda mosusu oyo elimbolaka Biblia. Nazalaki kotánga makambo oyo nakomaki mpe kobakisa makambo mosusu oyo nazalaki komikundola. Na nsuka ya etumbu na ngai ya bolɔkɔ, kaye yango etondaki, mpe yango esalisaki ngai nakoba kolanda solo mpe nazala makasi na elimo. Kobondela mpe komanyola elendisaki mpe ngai mingi na elimo mpe esalisaki ngai nasakola solo na mpiko mpenza epai ya bato mosusu.
Na ntango wana, bapesaki ngai ndingisa ya kozwaka mokanda moko na sanza mpe bato bakokaki koya kotala ngai na boumeli ya miniti 15 na sanza. Mpo na koya kotala ngai na bolɔkɔ, Stanka azalaki kosala mobembo na engbunduka butu mobimba mpo akóma na ntɔngɔ mpe na nsima azalaki kozonga kaka mokolo yango. Nazalaki kolendisama mingi mbala nyonso oyo azalaki koya kotala ngai. Na yango, nasalelaki mayele moko mpo na kozwa Biblia. Ngai ná Stanka tofandaki na mesa, mpe mokɛngɛli moko azalaki wana mpo na kokɛngɛla biso. Ntango mokɛngɛli yango atalaki epai mosusu, natyaki na sakosi na ye mokanda oyo na kati nasɛngaki ye amemela ngai Biblia ntango akoya kotala ngai na mbala ya nsima.
Stanka ná baboti na ngai bamonaki ete kosala bongo ezali likama. Na yango, bakabolaki Biblia ya Makomami ya Grɛki ya boklisto na bitenibiteni mpe bakɔtisaki yango na kati ya mampa. Na nzela wana nde nazwaki Biblia oyo nazalaki na bosɛnga na yango. Kaka ndenge wana mpe nazwaki Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo Stanka akomaki. Nakokaki kosala nokinoki kopi mosusu na mabɔkɔ mpe nabomaki oyo bamemelaki ngai mpo moto oyo akomona bakopi yango ayeba te epai wapi nazwaki yango.
Lokola nazalaki kotika te kopesa litatoli, baninga na ngai ya bolɔkɔ balobaki ete soki nakebi te nakosuka mabe. Mokolo moko, nazalaki kosolola masolo ya Biblia na moninga moko ya bolɔkɔ. Toyokaki moto moko akɔtisi fungola na porte, mpe mokɛngɛli moko ya bolɔkɔ akɔtaki. Nakanisaki mbala moko ete bakotya ngai na eteni moko ya bolɔkɔ ngai moko. Kasi, mokɛngɛli azalaki na likanisi wana te. Alandaki lisolo na biso mpe azalaki na mposa ya kokɔta na lisolo yango. Lokola asepelaki na biyano napesaki na mituna na ye, abimaki mpe akangaki porte.
Na sanza ya nsuka ya bolɔkɔ na ngai, mokonzi oyo atalelaka bizaleli ya bato ya bolɔkɔ apesaki ngai longonya ndenge nakangamaki na solo. Namonaki yango lokola mbano mpo na milende oyo nasalaki mpo na koyebisa bato nkombo ya Yehova. Na sanza ya Mai 1958, babimisaki ngai lisusu na bolɔkɔ.
Nakimi na Autriche mpe na nsima na Australie
Na sanza ya Augusto 1958, mama akufaki. Abɛlaki mwa mikolo. Na nsima, na sanza ya Sɛtɛmbɛ1958, babengaki ngai na mosala ya soda mpo na mbala ya misato. Na mpokwa yango, Ngai ná Stanka tozwaki ekateli makasi ya kokima ndenge nalobaki na ebandeli ya lisolo oyo. Kozanga koyebisa moto, tozwaki sakosi na biso mibale ya biloko ná tapi, tobimaki na lininisa mpe tokendaki na ndelo ya Autriche na wɛsti ya Ngomba Stol. Emonanaki mpenza ete Yehova abongiselaki biso nzela ya kokima mpo ayebaki ete tosengeli na libateli.
Bakonzi ya Autriche batindaki biso na kaa ya bato bakimá mboka pene na Salzbourg. Na boumeli ya nsanza motoba oyo tosalaki kuna, tozalaki ntango nyonso esika moko na Batatoli ya mboka yango, yango wana tozalaki kolekisa ntango moke na kaa. Bato mosusu oyo tozalaki na bango na kaa bakamwaki ndenge toumelaki te kozwa baninga. Na ntango wana nde toyanganaki mpo na mbala ya liboso na liyangani. Ezalaki mpe mbala ya liboso oyo tokokaki kosakola ndako na ndako na bonsomi. Ezalaki mpenza mpasi mpo na biso kokabwana na baninga na biso wana ntango tokómaki kokende epai mosusu.
Bakonzi ya Autriche bapesaki biso nzela ya kokende na Australie. Tondimaki te ete tokokaki kokende mosika ndenge wana. Tosalaki mobembo na engbunduka tii na engumba Genoa, na Italie mpe na nsima tomataki masuwa oyo ememaki biso na Australie. Nsukansuka, tokómaki kofanda na engumba Wollongong, na Nouvelle-Galles du sud. Mwana na biso Philip abotamaki wana mwa 30 Marsi 1965.
Kofanda na Australie epesaki biso mabaku mingi ya kosakola, na ndakisa kosakwela bato mosusu oyo bautaki na bamboka oyo eyebanaki liboso lokola Yougoslavie. Tozali mpenza na botɔndi epai na Yehova ndenge apamboli biso, mingimingi ndenge libota na biso ezali kosalela ye na bomoko. Philip ná mwasi na ye Susie bazali kosala na biro ya Batatoli ya Yehova na Australie, mpe bazwaki kutu libaku ya kosala mbula mibale na biro ya Batatoli ya Slovénie.
Atako bobangé ná maladi ezali kotungisa biso, ngai ná mwasi na ngai tozali kaka na esengo ya kosalela Yehova. Nazali mpenza na botɔndi mpo na ndakisa malamu ya baboti na ngai! Tii lelo oyo, ndakisa na bango ezali kaka kolendisa ngai mpe kosalisa ngai nasala oyo ntoma Paulo alobaki: “Bósepelaka na kati ya elikya. Bóyika mpiko na kati ya bolɔzi. Bótingama na mabondeli.”—Baloma 12:12.
[Elilingi na lokasa 17]
Baboti na ngai na nsuka ya bambula 1920
[Elilingi na lokasa 17]
Mama na ngai, na lobɔkɔ ya mobali ná Ančka oyo ateyaki ye solo
[Elilingi na lokasa 18]
Ngai ná mwasi na ngai Stanka, mwa moke nsima ya libala na biso
[Elilingi na lokasa 19]
Lisangá oyo ezalaki koyangana na ndako na biso na 1955
[Elilingi na lokasa 20]
Ngai ná mwasi na ngai, mwana na biso Philip mpe mwasi na ye Susie