Okotambola elongo na Nzambe?
‘Tambolá na bopɔlɔ esika moko na Nzambe na yo.’—MIKA 6:8.
1, 2. Ndenge nini makanisi oyo Yehova azalaka na yango mpo na biso ekokani na oyo ya moboti oyo azali kolakisa mwana kotambola?
BEBE atɛlɛmi, makolo ezali kolɛnga, asimbi mabɔkɔ ya tata to mama na ye mpe abandi kobwaka mwa makolo. Yango ekoki komonana lokola likambo moke, kasi mpo na tata mpe mama ya mwana, ezali likambo monene, oyo etondisaka bango na bilikya mpo na mwana na bango. Baboti bazelaka na motema likoló ntango oyo bakobanda kotambola elongo na mwana na bango, basimbani. Bazalaka na elikya ete, na lolenge boye to boye, bakotambwisa mwana na bango mpe bakosalisa ye na makambo nyonso na bomoi na ye.
2 Yehova mpe azalaka na makanisi ya ndenge wana mpo na bana na ye awa na mabelé. Mokolo moko, alobaki mpo na libota na ye Yisalaele to Efalaima boye: “Nalakisaki Efalaima ete atambola, nakamataki bango na mabɔkɔ na ngai . . . Nakambi bango na bikangelo ya moto, na nkamba ya bolingo.” (Hosea 11:3, 4) Awa, Yehova azali komimonisa lokola moboti ya bolingo, oyo azali na motema mpiɔ kolakisa mwana na ye kotambola, mpe ntango mosusu soki akwei, azali ata komema ye na mabɔkɔ na ye. Yehova, moboti oyo aleki malamu, azali na mposa makasi ya kolakisa biso kotambola. Asepelaka mpe kotambola elongo na biso ntango tozali kokende liboso. Ndenge vɛrsɛ oyo esimbi lisolo na biso emonisi yango, tokoki kotambola elongo na Nzambe! (Mika 6:8) Kasi, kotambola elongo na Nzambe elimboli nini? Mpo na nini tosengeli kotambola elongo na Nzambe? Ndenge nini tokoki kotambola elongo na Nzambe? Mpe mapamboli nini tokozwa soki tozali kotambola elongo na Nzambe? Tiká tótalela mituna yango mokomoko.
Kotambola elongo na Nzambe elimboli nini?
3, 4. (a) Maloba ya elilingi kotambola elongo na Nzambe ezali kobimisa likanisi nini ya ntina? (b) Kotambola elongo na Nzambe elimboli nini?
3 Biso bato tokoki kotambola elongo na Nzambe te ndenge bato mibale batambolaka, mpamba te Nzambe azali elimo. (Exode 33:20; Yoane 4:24) Na yango, ntango Biblia elobaka ete bato batambolaki elongo na Nzambe, esalelaka nde maloba ya elilingi. Esalelaka elilingi moko kitoko, oyo ebongi mpo na bato ya bikólo nyonso, ya bonkɔkɔ nyonso mpe ya bileko nyonso. Ya solo, nani akoki koloba ete ayebi te soki kotambola elongo na moto mosusu elimboli nini? Omoni te ete elilingi wana ezali komonisa boyokani malamu mpenza kati na bato mibale? Boyokani ya ndenge wana ezali kosalisa biso tóyeba soki kotambola elongo na Nzambe elimboli nini. Tiká sikoyo tólimbola yango malamumalamu.
4 Tókanisa lisusu bato ya sembo Enoka ná Noa. Mpo na nini Biblia elobi ete batambolaki elongo na Nzambe? (Genese 5:24; 6:9) Na Biblia, liloba “kotambola” elimbolaka mingi kolanda etamboli moko boye. Enoka ná Noa baponaki etamboli oyo ezalaki na boyokani na mokano ya Yehova Nzambe. Na bokeseni na bato ya ntango na bango, bazalaki koluka litambwisi ya Yehova mpe kotosa mitinda na ye. Bazalaki mpenza kotyela ye motema. Elingi nde koloba ete Yehova azalaki kozwa bikateli na esika na bango? Te. Yehova apesá bato likoki ya kopona, mpe alingi tósalela likabo yango esika moko na ‘likoki na biso ya kokanisa.’ (Baloma 12:1) Nzokande, ntango tozali kozwa bikateli, totikaka na komikitisa nyonso ete likoki na biso ya kokanisa etambwisama na makanisi ya Yehova oyo eleki makanisi na biso mosika. (Masese 3:5, 6; Yisaya 55:8, 9) Na yango, ntango tozali kotambola na nzela ya bomoi, totambolaka mpenza elongo na Yehova.
5. Mpo na nini Yesu asalelaki maloba kobakisa mwa lipeko mpo na kolobela bolai ya bomoi ya moto?
5 Mbala mingi, Biblia elobelaka bomoi lokola mobembo. Na bisika mosusu, Biblia elobaka mbala moko ete bomoi ezali mobembo, kasi na bisika mosusu, esalelaka likanisi yango kaka. Na ndakisa, Yesu alobaki boye: “Nani na kati na bino na komitungisáká akoki kobakisa mwa lipeko moko na bolai ya bomoi na ye?” (Matai 6:27) Makambo mosusu oyo ezali na kati ya maloba wana ekoki kokamwisa yo. Mpo na nini Yesu asalelaki maloba kobakisa “mwa lipeko,” oyo ezali emekeli ya bolai, mpo na kolobela “bolai ya bomoi,” na esika ya emekeli ya ntango?a Emonani ete na maloba wana Yesu akokanisaki bomoi ná mobembo. Na yango, alingaki koloba ete komitungisa ekoki te kosalisa moto abakisa ata mɛtrɛ moko na bolai ya mobembo ya bomoi na ye. Elingi nde koloba ete tokoki kosala eloko moko te mpo na kobakisa bolai ya mobembo na biso elongo na Nzambe? Ezali bongo te! Yango ememi biso na motuna ya mibale, mpo na nini tosengeli kotambola elongo na Nzambe?
Mpo na nini tosengeli kotambola elongo na Nzambe?
6, 7. Bato ya kozanga kokoka bazali na mposa makasi ya nini, mpe mpo na nini tosengeli kotyela Yehova motema mpo akokisela biso mposa yango?
6 Ntina moko oyo tosengeli kotambola elongo na Yehova Nzambe emonisami na Yilimia 10:23: “E [Yehova], nayebi ete nzela ya moto ezali kati na ye moko te, ekoki na motamboli te ete atambolisa makolo na ye moko.” Na yango, biso bato tozali na likoki mpe lotomo te ya kotambwisa bomoi na biso. Tozali mpenza na mposa bátambwisa biso. Baoyo bapesaka Nzambe mokɔngɔ mpe balukaka komitambwisa bango moko basalaka mpenza libunga oyo Adama ná Eva basalaki. Bato yango ya liboso balukaki lotomo ya koponaka bango moko oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe. (Genese 3:1-6) Lotomo wana ‘ezali kati na’ biso te.
7 Omoni te ete ozali na mposa ya motambwisi na mobembo wana ya bomoi? Mokolo na mokolo, esɛngaka tózwa bikateli ya mike to ya minene. Bikateli yango mosusu ezalaka pɛtɛɛ te, mpe ekoki kobebisa to kobongisa avenire na biso mpe oyo ya libota na biso. Kasi, kanisá naino ete moto moko oyo aleki biso na ebele ya mbula mpe na mayele asepelaka kosalisa biso na kozwa bikateli yango! Likambo ya mawa, bato mingi lelo oyo batyaka motema nde na bososoli na bango moko mpe bamonaka malamu bámitambwisa bango moko. Bazali kobosana maloba ya Masese 28:26: “Ye oyo akotalela motema na ye moko azali elema nde ye oyo akotambola na mayele, ye akobika.” Yehova alingi tóbika na makama oyo ekómelaka bato oyo batalelaka motema na bango ya bokosi. (Yilimia 17:9) Alingi tótambola na bwanya, tótyela ye motema lokola Motambwisi mpe Moteyi na biso. Soki tosali bongo, tokokoba kotambola na mobembo na biso ya bomoi na kimya mpe na esengo.
8. Lisumu mpe kozanga kokoka ememaka bato wapi, kasi Yehova alingi nini mpo na biso?
8 Ntina mosusu oyo tosengeli kotambola elongo na Nzambe etali bolai ya mobembo oyo tolingi kosala. Biblia eyebisi likambo moko ya mawa. Tokoki koloba ete bato nyonso ya kozanga kokoka bazali kokenda kaka esika moko. Na ntina na mikakatano ya bobange, Mosakoli 12:5 elobi boye: “Moto akokenda na ndako na ye ya [libela] mpe baleli bakotambola na nzela.” “Ndako ya libela” yango ezali nini? Ezali lilita, epai lisumu mpe kozanga kokoka ememaka biso. (Baloma 6:23) Kasi, Yehova alingi te ete tósuka kaka na mwa mobembo mokuse oyo tosalaka banda na kobotama tii na lilita. (Yobo 14:1) Kaka soki tozali kotambola elongo na Nzambe nde tokozala na elikya ete tokokoba kotambola ndenge mpenza alingi, elingi koloba libela na libela. Mposa na yo ezali bongo te? Soki ezali bongo, osengeli kotambola elongo na Tata na yo.
Ndenge nini tokoki kotambola elongo na Nzambe?
9. Mpo na nini Yehova azalaki ntango mosusu komibomba liboso ya libota na ye, kasi elikya nini apesaki na Yisaya 30:20?
9 Tosengeli kotalela motuna ya misato ya lisolo na biso na likebi mpenza. Motuna yango ezali, Ndenge nini tokoki kotambola elongo na Nzambe? Eyano na motuna yango ezali na Yisaya 30:20, 21 (NW): “Molakisi na yo Monene akomibomba lisusu te, mpe miso na yo ekozala mpenza miso oyo ezali komona Molakisi na yo Monene. Matoi na yo ekoyoka liloba na nsima na yo ete: ‘Oyo ezali nzela. Tambolá na kati na yango,’ soki okokende na lobɔkɔ ya mobali to soki okokende na lobɔkɔ ya mwasi.” Maloba ya Yehova oyo ezali na vɛrsɛ 20 ekokaki kokundwela basaleli na ye ete ntango bazalaki kotombokela ye, azalaki komibomba liboso na bango. (Yisaya 1:15; 59:2) Nzokande, awa balobi te ete Yehova amibombi, kasi atɛlɛmi nde polele liboso ya basaleli na ye ya sembo. Yango ekoki kotinda biso tókanisa molakisi moko oyo atɛlɛmi liboso ya bayekoli na ye mpe azali kolimbolela bango malamumalamu makambo oyo alingi báyeba.
10. Ndenge nini okoki ‘koyoka liloba na nsima na yo’ oyo euti epai ya Molakisi na yo Monene?
10 Vɛrsɛ 21 epesi elilingi mosusu. Yehova azali kolanda libota na ye na nsima mpe koyebisa bango nzela oyo basengeli kolanda. Bato oyo balimbolaka Biblia balobaki ete maloba wana ekoki kouta na ndenge mobateli ya mpate azalaki ntango mosusu kolanda bampate na ye na nsima mpe kobelela mpo na kolakisa bango nzela mpe kopekisa bango bálanda nzela ya mabe. Ndenge nini maloba yango ekoki kosalelama mpo na biso? Ntango totángaka Liloba ya Nzambe mpo na koluka litambwisi, totángaka makambo oyo ekomamaki eleki lelo bankóto ya bambula. Soki totali ntango oyo bakomaki maloba yango, tokoloba ete ezali kolanda biso na nsima. Kasi, ezali na motuya lelo oyo ndenge kaka ezalaki ntango bakomaki yango. Batoli ya Biblia ekoki kotambwisa biso na bikateli oyo tozwaka mokolo na mokolo, mpe ekoki kosalisa biso tópona ndenge bomoi na biso ekozala na mikolo ekoya. (Nzembo 119:105) Ntango tozali kolanda batoli yango na molende, Yehova azali kotambwisa biso. Tozali kotambola elongo na Nzambe.
11. Na Yilimia 6:16, maloba nini ya elilingi Yehova asalelaki mpo na kobenga bato na ye bázonga na nzela, kasi bango basalaki nini?
11 Totikaka mpenza Liloba ya Nzambe etambwisa biso ndenge wana? Ezali na ntina tótɛlɛmaka mpo na komitalela na bosembo mpenza. Vɛrsɛ moko oyo ekoki kosalisa yo osala bongo yango oyo: “[Yehova] alobi boye ete, Bótɛlɛma kati na nzela mpe bótala, bótuna [banzela] ya kala, ete nzela malamu ezali wapi; bótambola wana, mpe bokozwa kimya mpo na milimo na bino.” (Yilimia 6:16) Maloba wana etindi biso tókanisa moto moko ya mobembo oyo atɛlɛmi na esika oyo banzela ekutaná mpo na kotuna bálakisa ye nzela oyo asengeli kolanda. Bato ya Yehova oyo batombokelaki ye na Yisalaele basengelaki mpe kosala bongo na ndenge ya elimo. Basengelaki kotɛlɛma mpo na koluka “banzela ya kala.” “Nzela malamu” yango ezalaki nzela oyo bankɔkɔ na bango oyo bazalaki bato ya sembo batambolaki, nzela oyo ekólo yango etikaki na bozoba nyonso. Likambo ya mawa, Yisalaele baboyaki toli ya Yehova. Vɛrsɛ yango ebakisi boye: “Kasi balobi ete, Tokotambola wana te!” Kasi, na mikolo na biso, basaleli ya Nzambe bazali kosala lokola bango te.
12, 13. (a) Ndenge nini bayekoli bapakolami ya Klisto bazali kotalela toli ya Yilimia 6:16? (b) Ndenge nini lelo oyo tokoki kotalelaka lolenge oyo tozali kotambola?
12 Banda na nsuka ya bambula ya 1800, bayekoli bapakolami ya Klisto bazali kolanda toli ya Yilimia 6:16. Na motema moko mpenza bazali kokamba bato mpo na kozonga na “banzela ya kala.” Na bokeseni na mangomba ya boklisto oyo ebungá nzela, bakangami kaka na “ndakisa ya maloba oyo epesaka litomba” oyo Yesu atiká mpe oyo bayekoli na ye ya sembo ya ekeke ya liboso ya ntango na biso (T.B.) balandaki. (2 Timote 1:13) Tii lelo, bapakolami bazali kosalisana bango na bango mpe bazali kosalisa baninga na bango “bampate mosusu” bálanda nzela ya bomoi oyo epesaka litomba mpe esengo, oyo mangomba ya boklisto etiká kolanda.—Yoane 10:16.
13 Lokola moombo ya sembo azali kopesa bilei ya elimo na ntango oyo ebongi, azali kosalisa bamilio ya bato bámona “banzela ya kala” mpe bátambola elongo na Nzambe. (Matai 24:45-47) Yo mpe ozali na kati ya bamilio ya bato yango? Soki ezali bongo, osengeli kosala nini mpo opɛngwa te mpe ozongela banzela na yo moko te? Ekozala malamu otalelaka mbala na mbala lolenge oyo ozali kotambola na bomoi na yo. Soki otiki te kotánga Biblia mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia mpe okobi kaka koyangana na makita oyo bapakolami bazali kobongisa lelo oyo, wana ozali koyekola ndenge ya kotambola elongo na Nzambe. Mpe soki na komikitisa nyonso ozali kolanda batoli oyo ezali kopesama, wana nde ozali kotambola elongo na Nzambe mpe kolanda “banzela ya kala.”
Tótambola lokola nde tozali “komona moto oyo amonanaka te”
14. Ndenge nini bikateli oyo tozali kozwa na bomoi na biso ekomonisa ete tondimaka mpenza ete Yehova azali?
14 Mpo na kotambola elongo na Yehova, tosengeli kondima ete azali mpenza. Tóbosana te, Yehova ayebisaki bato ya sembo na Yisalaele ya kala ete amibombaki liboso na bango te. Lelo oyo, azali mpe komimonisa epai ya basaleli na ye lokola Molakisi Monene. Ondimaka mpenza ete Yehova azali mpe omonaka lokola nde atɛlɛmi liboso na yo mpo na koteya yo? Kondima ya ndenge wana nde ekosalisa biso tótambola elongo na Nzambe. Moize azalaki na kondima ya ndenge wana, “mpo atikalaki ngwi lokola nde azalaki komona Moto oyo amonanaka te.” (Baebele 11:27) Soki tondimaka mpenza ete Yehova azali, tokobanda koluka koyeba makanisi na ye liboso ya kozwa bikateli. Na ndakisa, tokoki ata te kozwa likanisi ya kosala masumu mpe kobombela bankulutu to bato ya libota na biso. Tokosala nde makasi mpo na kotambola elongo na Nzambe ata ntango moto moko te azali komona biso. Lokola Mokonzi Davidi, tozwi ekateli oyo: “Nakotambola na motema [sembo] kati na ndako na ngai.”—Nzembo 101:2.
15. Ndenge nini kozala elongo na bandeko na biso esalisaka biso tóndima ete Yehova azali mpenza?
15 Yehova ayebi ete tozali bato ya kozanga kokoka, tozali na nzoto ya mosuni mpe tokoki ntango mosusu kozala na mokakatano ya kondima makambo oyo tomoni na miso te. (Nzembo 103:14) Asalaka makambo mingi mpo na kosalisa biso tólonga bolɛmbu ya ndenge wana. Na ndakisa, asangisi bato oyo bauti na bikólo nyonso ya mokili mpe akómisi bango “ekólo moko mpo na nkombo na ye.” (Misala 15:14) Lokola tozali kosala elongo, tozali kolendisana. Soki toyoki ndenge Yehova asalisaki ndeko moko alonga bolɛmbu to komekama moko ya makasi, tondimaka mpenza ete Yehova azali.—1 Petelo 5:9.
16. Ndenge nini koyekola bomoi ya Yesu esalisaka biso tótambola elongo na Nzambe?
16 Likambo eleki ntina ezali ete Yehova apesi biso Mwana na ye azala ndakisa na biso. Yesu alobaki boye: “Ngai nazali nzela mpe solo mpe bomoi. Moto moko te azali koya epai ya Tata soki na nzela na ngai te.” (Yoane 14:6) Koyekola ndenge Yesu alekisaki bomoi na ye awa na mabelé ezali moko ya makambo oyo ekosalisa biso tóndima ete Yehova azali mpenza. Makambo nyonso oyo Yesu alobaki mpe asalaki ezalaki komonisa mpenza bomoto mpe bizaleli ya Tata na ye ya likoló. (Yoane 14:9) Ntango tozali kozwa bikateli, tosengeli naino komituna soki Yesu alingaki kosala nini na esika na biso. Soki tozali kokanisa na mozindo ndenge wana mpe kobondela liboso ya kozwa bikateli, tóyeba ete tozali kolanda matambe ya Klisto. (1 Petelo 2:21) Na ndenge yango, tozali kotambola elongo na Nzambe.
Mapamboli nini tokozwa?
17. Soki tozali kotambola na nzela ya Yehova, tokozwa “kimya” ya ndenge nini mpo na milimo na biso?
17 Kotambola elongo na Nzambe ezali bomoi moko ya esengo. Kanisá lisusu elaka oyo Yehova apesaki libota na ye na likambo etali koluka ‘nzela ya malamu.’ Alobaki na bango boye: “Bótambola wana, mpe bokozwa kimya mpo na milimo na bino.” (Yilimia 6:16) “Kimya” yango ezali nini? Ezali nde bomoi ya kimya, oyo etondi na bisengo mpe na bomengo? Te. Yehova azali kopesa eloko moko oyo eleki na motuya, oyo ata bato ya bozwi mingi koleka ya mokili oyo bakoki kozwa te. Kozwa kimya mpo na molimo na yo elimboli kokóma na kimya ya motema, esengo, bolamu mpe bomengo ya elimo. Soki ozali na kimya ya ndenge wana, okomona mpenza ete oponi nzela oyo eleki malamu. Ezali mpasi kozala na kimya ya ndenge wana na mokili oyo etondi na mikakatano.
18. Lipamboli nini Yehova azali na mposa ya kopesa yo, mpe ekateli na yo ezali nini?
18 Bomoi yango moko ezali lipamboli monene. Na esika ya kozanga mpenza bomoi, kozala na yango ata ya mokuse eleki malamu. Nzokande, Yehova akanaki te ete mobembo na yo ya bomoi ezala kaka mokuse, banda na makasi ya bolenge tii na mitungisi ya bobange. Yehova azali nde na mposa ete ozwa lipamboli oyo eleki nyonso. Alingi okoba kotambola elongo na ye libela na libela! Likambo yango emonani mpenza na Mika 4:5: “Mabota nyonso bakotambola, moko na moko na nkombo ya nzambe na ye; nde biso tokotambola na nkombo ya [Yehova] Nzambe na biso, libela na libela.” Okosepela kozwa lipamboli yango? Okozwa mpenza oyo Yehova azali kobenga “bomoi ya solosolo”? (1 Timote 6:19) Soki ezali bongo, zwá ekateli ya kotambola elongo na Yehova lelo, lobi mpe libela na libela!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na Babiblia mosusu, na esika ya liloba “lipeko” oyo ezali na vɛrsɛ oyo, basalelaka bimekeli ya ntango, na ndakisa “mokolo moko” (Bible na lingala ya lelo oyo mpe Liloba lya Nzambe) to “miniti moko” (A Translation in the Language of the People, ya Charles B. Williams). Kasi, liloba oyo basalelaki na makomami ya Grɛki elimboli mpenza nde lipeko, oyo ezalaki na bolai ya santimɛtrɛ soki 45.
Okopesa eyano nini?
• Kotambola elongo na Nzambe elimboli nini?
• Mpo na nini osengeli kotambola elongo na Nzambe?
• Nini ekosalisa yo otambola elongo na Nzambe?
• Mapamboli nini bato oyo batambolaka elongo na Nzambe bazwaka?
[Bililingi na lokasa 23]
Na kati ya Biblia, toyokaka mongongo ya Yehova na nsima na biso ezali koloba ete, “Oyo ezali nzela”
[Elilingi na lokasa 25]
Na makita, tozwaka bilei ya elimo na ntango ebongi