“Bóbatela makanisi na bino mobimba”
“Moto ya zoba ayambi maloba nyonso, nde moto ya mayele akotala malamu na nzela ekokende ye.”—MASESE 14:15.
1, 2. (a) Likambo oyo ekómelaki Lota na Sodomo epesi biso liteya nini? (b) Maloba “bóbatela makanisi na bino” elimboli nini?
NTANGO Abalayama ayebisaki Lota apona mokili oyo alingi kofanda, miso ya Lota ekendeki mbala moko na mokili moko ya mai mingi oyo ezalaki “lokola na elanga ya [Yehova].” Na ntembe te, amonaki ete ezali esika oyo ebongi mpenza mpo na kofanda na libota na ye, mpamba te “Lota aponaki mpo na ye mpenza mokili polele nyonso ya Yolodani” mpe atyaki hema na ye penepene na Sodomo. Nzokande, kitoko ya esika yango ekosaki ye, mpamba te “bato ya Sodomo [oyo] bazalaki na masumu mingi liboso ya [Yehova]” bazalaki kofanda penepene na esika yango. (Genese 13:7-13) Na nsima, Lota ná libota na ye babungisaki biloko mingi. Nsukansuka, ye ná bana na ye mibale ya basi bakómaki kofanda na kati ya lidusu ya mabanga. (Genese 19:17, 23-26, 30) Mokili oyo Lota amonaki elɛngi na ebandeli ekómelaki ye lisusu nde bololo.
2 Likambo oyo ekómelaki Lota epesi basaleli ya Nzambe lelo oyo liteya. Ntango tolingi kozwa bikateli, tosengeli koyeba makama oyo yango ekoki kobimisela biso mpe koboya kolanda kaka oyo ezali komonana na miso. Yango wana, toli ya Biblia oyo ebongi mpenza: “Bóbatela makanisi na bino mobimba.” (1 Petelo 1:13) Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “kobatela makanisi” elimboli “koyeba kokanga motema.” Richard Lenski, molimboli moko ya maloba ya Biblia, alobi ete ezaleli yango elimboli kozala na motema mpiɔ, kotalela makambo malamumalamu, mpe na ndenge yango esalisaka biso tózwa bikateli ya malamu. Tótalela sikoyo mwa makambo oyo esɛngaka ete tófungola miso.
Tókanisaka malamu liboso ya komikɔtisa na mombongo moko
3. Mpo na nini tosengeli kokeba ntango moto moko asɛngi biso tósala na ye mombongo moko?
3 Na ndakisa, moto moko oyo omemyaka mpenza, ntango mosusu mosambeli moko ya Yehova, alobi na yo ete bósala mombongo moko. Azali mpenza komonisa ete mombongo yango ekobotela bino mbongo mingi mpe azali kolendisa yo osala noki mpo ozanga libaku yango te. Okoki kobanda kolɔta ete bomoi na yo mpe ya libota na yo ebongi, ata mpe kokanisa ete yango ekosalisa yo omipesa mingi na makambo ya elimo. Kasi, Masese 14:15 epesi likebisi oyo: “Moto ya zoba ayambi maloba nyonso, nde moto ya mayele akotala malamu na nzela ekokende ye.” Esengo oyo moto azalaka na yango ntango alingi kobanda mombongo moko ekoki kosala ete abosana kotalela makama mpe mikakatano mosusu oyo mombongo yango ekoki kobimisela ye. (Yakobo 4:13, 14) Na ntango wana, ezali na ntina mpenza ete obatela makanisi na yo mobimba!
4. Ndenge nini tokoki ‘kotala malamu nzela tozali kokende’ ntango moto moko asɛngi biso tósala na ye mombongo?
4 Moto ya bokɛngi akotalela naino mombongo yango malamumalamu liboso azwa ekateli. (Masese 21:5) Yango nde ekosalisa ye amona makama oyo mombongo yango ekoki kobimisa. Tózwa ndakisa oyo: Moto moko azali koluka kodefa mbongo mpo na kosala mombongo, mpe alaki yo ete soki odefisi ye mbongo yango akofuta yango na benefisi moko monene. Okoki komona yango libaku malamu, kasi wapi makama na yango? Moto yango alaki ete akofuta mbongo na yo ata soki mombongo na ye ekwei? Na maloba mosusu, okobungisa nde mbongo na yo soki mombongo na ye ekwei? Okoki mpe komituna boye: “Mpo na nini azali kodefa mbongo epai ya bato? Babanki emoni nde ete mombongo yango ezali na makama mingi?” Kozwa ntango ya kokanisa ndenge wana ekosalisa yo oyeba soki ebongi odefisa ye mbongo yango to te.—Masese 13:16; 22:3.
5. (a) Likambo nini ya bwanya Yilimia asalaki ntango asombaki elanga? (b) Mpo na nini ezali malamu mingi kokoma makambo nyonso ya mbongo oyo boyokani na mokanda?
5 Ntango mosakoli Yilimia asombaki elanga epai ya mwana ya ndeko ya tata na ye, oyo azalaki mpe mosaleli ya Yehova, basalaki mokanda na miso ya batemwe. (Yilimia 32:9-12) Lelo oyo, moto ya bwanya oyo alingi komikɔtisa na makambo nyonso ya mbongo na moto moko, ezala ndeko na ye ya makila to ya lisangá, basengeli kokoma makambo nyonso oyo bayokani na mokanda.a Kokoma makambo oyo boyokani polelepolele ekosala ete matata ebima te na nsima mpe bokobatela bomoko. Nzokande, kozanga kosala mokanda ezali moko ya makambo oyo ebimisaka mindondo mbala mingi na makambo ya mbongo na kati ya basaleli ya Yehova. Likambo ya mawa, mindondo ya ndenge wana ekoki komemela moto mpasi ya motema, kotinda ye akangela moninga nkanda, mpe akoki ata kobungisa kondima na ye.
6. Mpo na nini tosengeli kokeba na lokoso?
6 Tosengeli mpe kokeba na lokoso. (Luka 12:15) Soki balaki yo benefisi monene, yango ekoki kokanga yo miso na makama ya mombongo moko ya mabe. Ata bato mosusu oyo bazalaki na mikumba ya minene na mosala ya Yehova, bakwei na motambo wana. Liloba ya Nzambe ezali kokebisa biso boye: “Tiká ete ezaleli na bino na bomoi ezanga bolingo ya mbongo, wana bozali kosepela na oyo bozali na yango na biloko ya sikoyo.” (Baebele 13:5) Soki moklisto alingi komikɔtisa na mombongo moko, asengeli komituna boye: ‘Ezali mpenza na ntina nasala mombongo yango?’ Kozala na bomoi ezangi mindondo mpe kotya losambo ya Yehova na esika ya liboso ekobatela biso na “makambo mabe ya ndenge nyonso.”—1 Timote 6:6-10.
Mikakatano ya baklisto oyo bazali minzemba
7. (a) Mikakatano nini baklisto mingi oyo bazali minzemba bakutanaka na yango? (b) Ndenge nini tokomonisa bosembo na biso epai ya Yehova ntango tozali koluka moto ya kobalana na ye?
7 Basaleli mingi ya Yehova bazali na mposa ya kobala, kasi bazwi naino te molongani oyo abongi na bango. Na mikili mosusu, bandeko mpe baninga batyaka bato mbamba mpo bábala. Kasi, ekoki kozala mpasi mpo na kozwa mwasi to mobali oyo abongi na yo na kati ya lisangá. (Masese 13:12) Nzokande, baklisto bayebi malamu ete kotosa etinda ya Biblia ya kobala “na kati ya Nkolo kaka” ezali komonisa botosi epai ya Yehova. (1 Bakolinti 7:39) Mpo na kolonga bopusi mpe komekama oyo bazali kokutana na yango, baklisto oyo bazali minzemba basengeli kobatela makanisi na bango mobimba.
8. Mokakatano nini elenge mwasi Sulamite akutanaki na yango, mpe basi baklisto lelo oyo bakoki kosala nini soki bakutani na mokakatano yango?
8 Na Loyembo ya Salomo, mokonzi asepelaki mpenza na elenge mwasi Sulamite, oyo azalaki moto mpamba. Azalaki kolakisa ye bozwi, lokumu mpe kitoko na ye mpo alinga ye, atako elenge mobali moko alingaki ye. (Loyembo ya Salomo 1:9-11; 3:7-10; 6:8-10, 13) Soki ozali ndeko mwasi, mobali moko mpe akoki kosepela na yo, kasi yo ozali kolinga ye te. Moto moko na esika osalaka, ntango mosusu mokonzi moko ya mosala, akoki kobanda koloba na yo maloba ya sukali, komonisela yo boboto mpe koluka mabaku ya kozala esika moko na yo. Kebá na moto ya ndenge wana. Ata soki moto yango alukaka ntango nyonso te okóma makango na ye, mbala mingi ezalaka nde bongo. Na ndakisa ya elenge mwasi Sulamite, zalá lokola “lopango.” (Loyembo ya Salomo 8:4, 10) Boyá maloba na ye ya kolɛngola na motema moko. Ntango kaka obandi mosala, yebisá baninga na yo ya mosala ete ozali Motatoli ya Yehova mpe saleláká mabaku nyonso mpo na kopesa bango litatoli. Yango ekobatela yo.
9. Wapi mwa makama ya kosala boninga na moto oyo oyebi te na nzela ya Internet? (Talá mpe etanda na lokasa 25.)
9 Bato bakómi kosepela mingi na bisika oyo bafungolá na Internet mpo na kosalisa minzemba oyo bazali koluka bato ya kobalana na bango. Bato mosusu balobaka ete yango ezali kosalisa bango báyebana na bato oyo bakoki kokutana na bango na ndenge mosusu te. Kasi, kosala boninga na moto oyo oyebi te ezali mpenza likama. Na Internet, ezali mpasi oyeba soki makambo oyo moto azali koloba ezali solo to lokuta. (Nzembo 26:4) Ezali te mpo moto alobi ete azali mosaleli ya Yehova nde ezali mpenza bongo. Lisusu, kosolola na moto masolo ya bolingo na Internet ekoki kokolisa lolango nokinoki, mpe yango ekoki kotinda yo omipesa na ye kozanga ete oyeba ye malamumalamu. (Masese 28:26) Ezala na nzela ya Internet to na banzela mosusu, komipesa na moto oyo oyebi malamu te ezali bozoba.—1 Bakolinti 15:33.
10. Ndenge nini baklisto mosusu bakoki kolendisa baklisto oyo bazali minzemba?
10 Yehova “azali na bolingo mingi ya motema” mpo na basaleli na ye. (Yakobo 5:11) Ayebi ete baklisto oyo bazali minzemba mpo bazangi makoki ya kobala to bamoni naino te bato oyo babongi na bango, bakutanaka na mikakatano oyo elɛmbisaka bango mpenza ntango mosusu, mpe asepelaka mingi na ndenge bazali kotikala sembo. Ndenge nini basusu bakoki kolendisa bango? Tosengeli ntango nyonso kopesaka bango longonya mpo na botosi mpe elimo ya komipimela oyo bazali komonisa. (Basambisi 11:39, 40) Tosengeli mpe kobosanaka bango te soki tobongisi bokutani moko mpo na kolendisana. Osali yango mikolo oyo? Tokoki mpe kobondelaka Yehova asalisa bango bálɛmba te na elimo mpe bázala na esengo ya kosalela ye. Na motema mobimba, tómonisa ete tosepelaka na bandeko wana ya sembo ndenge Yehova asepelaka na bango.—Nzembo 37:28.
Ntango tozali na maladi
11. Kotungisama makasi na maladi ememaka mikakatano nini?
11 Ezalaka mpasi mpenza ntango biso moko to ndeko na biso moko azali kotungisama makasi na maladi! (Yisaya 38:1-3) Ntango tozali koluka nkisi mpo na komibikisa, ezali na ntina mingi tóbosana te mitinda ya Biblia. Na ndakisa, baklisto batosaka mpenza mobeko ya Biblia oyo elobi ete tóboya makila, mpe baboyaka kotalisa nzoto to komisalisa na nzela ya bikelakela. (Misala 15:28, 29; Bagalatia 5:19-21) Kasi, mpo na bato oyo bayebi mosala ya monganga te, ezali mpasi báyeba kopona lolenge ya komisalisa ya malamu. Nini ekoki kosalisa biso tóbatela makanisi na biso mobimba?
12. Ndenge nini moklisto akoki kozala na bokatikati ntango azali koluka komisalisa?
12 “Moto ya mayele akotala malamu na nzela ekokende ye,” elingi koloba asalaka bolukiluki na Biblia mpe na mikanda oyo elimbolaka Biblia. (Masese 14:15) Na mikili oyo minganga bazali mingi te mpe balopitalo ezali ebele te, kosalela bankisi ya bonkɔkɔ na nzela ya matiti mpe bankasa ekoki komonana lokola lolenge kaka moko ya komisalisa. Soki tolingi komisalisa na lolenge wana, tokoki koyeba makambo mingi soki totángi Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛmbɛ 1987, nkasa 21-24 (na Lingala) to ya 15 Aprili 1987, nkasa 26-29 (na Lifalanse). Ezali kokebisa biso na makama oyo lisalisi ya ndenge wana ekoki komema. Na ndakisa, tokoki komituna boye: Moto oyo nalingi asalisa ngai na nkisi ya bonkɔkɔ ayebani lokola moto ya bikelakela? Mpo na ye, maladi mpe liwa eutaka epai ya banzambe (to bilimo ya bankɔkɔ) oyo basiliki to epai ya banguna oyo basalelaka bondoki? Apesaka bambeka, abelelaka bilimo to asalaka bikelakela mosusu ntango azali kosala bankisi na ye to kosalisa bato? (Deteronome 18:10-12) Kosala bolukiluki ya ndenge wana ekosalisa biso tólanda toli ya Biblia oyo: “Bótalelaka malamumalamu makambo nyonso; bókangama makasi na oyo ezali malamu.”b (1 Batesaloniki 5:21) Yango ekosalisa biso tózala na bokatikati na likambo yango.
13, 14. (a) Ndenge nini tokoki komonisa bokatikati na likambo ya komisalisa na maladi? (b) Mpo na nini tosengeli kozala na bokatikati ntango tozali kobɛtela bato mosusu masolo oyo etali maladi mpe lolenge ya komisalisa?
13 Bokatikati ezali na ntina mingi na makambo nyonso ya bomoi, ata mpe na oyo etali kolɔngɔnɔ ya nzoto. (Bafilipi 4:5) Soki tozali kotyela nzoto na biso likebi na bokatikati, yango ekomonisa botɔndi na biso epai ya Nzambe mpo na likabo kitoko ya bomoi oyo apesá biso. Ntango tokutani na mikakatano ya nzoto, tosengeli kotyela yango likebi. Nzokande, tokokóma mpenza nzoto kɔlɔngɔnɔ kaka ntango ngonga ya Nzambe mpo na “kobikisa bikólo” ekokoka. (Emoniseli 22:1, 2) Tosengeli kokeba ete tómitungisaka koleka ndelo te mpo na nzoto na biso tii tóbosana ata bamposa ya elimo, oyo ezali na ntina mingi koleka.—Matai 5:3; Bafilipi 1:10.
14 Tosengeli mpe kozalaka na bokatikati ntango tozali kobɛtela bato masolo oyo etali maladi mpe lolenge ya komisalisa. Tosengeli te kolobelaka mingi makambo ya ndenge wana ntango tokutani na bandeko na biso baklisto na makita ya lisangá to na mayangani. Lisusu, kozwa bikateli na makambo ya komisalisa nzoto etalelaka mbala mingi mitinda ya Biblia, lisosoli ya moto mpe boyokani na ye ná Yehova. Na yango, soki tolingaka ndeko na biso moklisto, tokoluka te kondimisa ye makanisi na biso to kotya ye mbamba mpo aboya koyokela lisosoli na ye. Atako tokoki koluka toli epai ya bandeko oyo bakɔmelá na elimo na kati ya lisangá, moklisto mokomoko asengeli ‘komema mokumba na ye moko’ ya kozwa ekateli, mpe “mokomoko na biso akozongisa monɔkɔ mpo na ye moko epai ya Nzambe.”—Bagalatia 6:5; Baloma 14:12, 22, 23.
Ntango tokutani na mikakatano
15. Nini ekoki kokómela biso ntango tokutani na mikakatano?
15 Mikakatano ekoki kotinda ata basaleli ya sembo ya Yehova báloba to básala makambo na bozoba. (Mosakoli 7:7) Ntango Yobo akutanaki na komekama makasi, azalaki lisusu na bokatikati te mpe esɛngaki Nzambe azongisa ye na nzela. (Yobo 35:2, 3; 40:6-8) Atako “Moize azalaki na bopɔlɔ mingi, na koleka bato nyonso bazalaki na nse,” mokolo moko atombokaki mpe alobaki kozanga kokanisa. (Mituya 12:3; 20:7-12; Nzembo 106:32, 33) Davidi akangaki mpenza motema mpo aboma Mokonzi Saulo te, kasi ntango Nabala afingaki ye ná bato na ye, Davidi atombokaki makasi mpe azalaki lisusu na bososoli te. Kaka nsima ya kosolola na Abigaili nde azwaki lisusu mayele, mpe yango esalisaki ye asala te likambo moko ya bozoba.—1 Samwele 24:2-7; 25:9-13, 32, 33.
16. Nini ekoki kosalisa biso tósala makambo te kozanga kokanisa?
16 Biso mpe tokoki kokutana na mikakatano oyo ekoki kosilisa biso mayele. Soki tozali kotalela makanisi ya bato mosusu na likebi ndenge Davidi asalaki, yango ekoki kosalisa biso tósala te makambo kozanga kokanisa mpe tókwea te na lisumu. (Masese 19:2) Lisusu, Liloba ya Nzambe epesi biso toli oyo: “Bóyoka nkanda nde salá lisumu te; bóloba na mitema na bino mpenza likoló na mbeto na bino mpe zalá nyɛɛ.” (Nzembo 4:4) Soki tokoki, ekozala malamu tózela tii ntango nkanda ekosila liboso ya kozwa bikateli. (Masese 14:17, 29) Tokoki kobondela Yehova makasi, “mpe kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekobatela mitema na [biso] mpe makoki na [biso] ya kokanisa na nzela ya Klisto Yesu.” (Bafilipi 4:6, 7) Kimya wana oyo euti na Nzambe ekokitisa biso mitema mpe ekosalisa biso tóbatela makanisi na biso mobimba.
17. Mpo na nini tosengeli kotya motema epai ya Yehova soki tolingi kobatela makanisi na biso mobimba?
17 Atako tosalaka makasi mpo tókima makama mpe tósala bozoba te, biso nyonso tosalaka mabunga. (Yakobo 3:2) Ekoki kozala ete tolingi kobɛta libaku, kasi toyebi yango ata moke te. (Nzembo 19:12, 13) Lisusu, soki Yehova atambwisi biso te, biso bato tozali na likoki mpe lotomo te ya kotambwisa makolo na biso. (Yilimia 10:23) Tozali mpenza na botɔndi epai na ye na ndenge azali koloba na biso ete: “Nakoteya yo mpe nakolakisa yo nzela ekoki na yo [kolanda]; Nakopesa yo toli wana nazali kotala yo.” (Nzembo 32:8) Ɛɛ, na lisalisi ya Yehova, tokoki kobatela makanisi na biso mobimba.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba makambo mingi na ntina na mokanda ya boyokani na makambo ya mombongo, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Augusto 1997, nkasa 30-31; 15 Novɛmbɛ 1986, nkasa 16-17 (na Lifalanse) ; mpe Lamuká! ya 8 Febwali 1983, nkasa 13-15 (na Lifalanse), ebimisami na Batatoli ya Yehova.
b Kotalela makambo malamumalamu ekosalisa mpe bato oyo balingi komisalisa na balolenge mosusu oyo eyebani mpenza te.
Okopesa eyano nini?
Ndenge nini tokoki kobatela makanisi na biso
• soki moto moko asɛngi biso tósala na ye mombongo?
• ntango tozali koluka moto oyo tokobalana na ye?
• ntango tozali na maladi?
• ntango tokutani na mikakatano?
[Etanda na lokasa 25]
Okoki kondima yango?
Bakomá maloba oyo elandi na bisika oyo bafungolá na Internet mpo na kosalisa minzemba oyo bazali koluka bato oyo bakobalana na bango:
“Ata soki biso nde tokomi makambo oyo, tondimi te ete ezali solo mpenza.”
“Tokoki mpenza koloba te ete makambo nyonso oyo bozali kotánga na Internet ezali solo, to ezali na ntina.”
“Makanisi, batoli, to makambo mosusu oyo bokotánga na Internet euti epai ya bato oyo bakomi yango . . . mpe bino moko nde bokotala soki bokoki kondima yango.”
[Elilingi na lokasa 23]
“Moto ya mayele akotala malamu na nzela ekokende ye”
[Bililingi na lokasa 24, 25]
Ndenge nini basi baklisto bakoki komekola elenge mwasi Sulamite?
[Elilingi na lokasa 26]
“Bótalelaka malamumalamu makambo nyonso; bókangama makasi na oyo ezali malamu”