Tóboya koimaima
“Bókoba kosala makambo nyonso kozanga koimaima.”—BAFILIPI 2:14.
1, 2. Toli nini ntoma Paulo apesaki baklisto ya Filipi mpe ya Kolinti, mpe mpo na nini?
NA MOKANDA oyo ntoma Paulo akomelaki baklisto ya Filipi na ekeke ya liboso, akumisaki bango mingi mpo na ezaleli na bango ya bokabi mpe molende na bango. Ayebisaki bango mpe ete azalaki kosepela mingi na misala malamu oyo bazalaki kosala. Atako bongo, Paulo apesaki bango toli ete ‘bákoba kosala makambo nyonso kozanga koimaima.’ (Bafilipi 2:14) Mpo na nini Paulo apesaki toli wana?
2 Paulo ayebaki mabe oyo koimaima ekoki kosala. Mwa bambula liboso, ayebisaki bandeko ya lisangá ya Kolinti ete koimaima ekoki kosala mabe mingi. Paulo amonisaki bango ete ntango Bayisalaele bazalaki na esobe, bazalaki kosilikisa Yehova mbala na mbala. Mpo na nini? Mpamba te bazalaki kolinga makambo ya mabe, kosambela bikeko, kosala pite, komeka Yehova, mpe koimaima. Paulo alendisaki Bakolinti ete bálanda te bandakisa mabe wana. Akomaki boye: “Bózala mpe baimaimi te, ndenge bamosusu na kati na bango baimaimaki, mpe babomamaki na mobomi.”—1 Bakolinti 10:6-11.
3. Mpo na nini ezali na ntina mingi tótalela likambo ya koimaima lelo oyo?
3 Lelo oyo, biso basaleli ya Yehova tozali na elimo lokola ya baklisto ya lisangá ya Filipi. Tozali na molende mpo na misala ya malamu mpe tolinganaka. (Yoane 13:34, 35) Kasi, soki tokanisi mabe oyo koimaima esalaki epai ya basaleli ya Nzambe na ntango ya kala, ebongi mpenza tótyela toli oyo likebi: “Bókoba kosala makambo nyonso kozanga koimaima.” Mpo na yango, tótalela naino bandakisa euti na Biblia ya bato oyo baimaimaki. Na nsima, tokolobela mwa makambo oyo tokoki kosala mpo tóboya koimaima, ezaleli oyo ebimisaka mabe mingi.
Bato mabe baimaimi epai ya Yehova
4. Ndenge nini Bayisalaele baimaimaki na esobe?
4 Biblia esaleli liloba ya Liebele oyo elimboli ‘koimaima, kolobaloba, to kolelalela’ na lisolo ya makambo oyo elekaki na boumeli ya mbula 40 oyo Bayisalaele balekisaki na esobe. Mbala mingi, Bayisalaele bazalaki koimaima mpo bazalaki kosepela te na bomoi oyo bazalaki na yango. Na ndakisa, kaka mwa bapɔsɔ nsima ya kolongwa na boombo na Ezipito, “lingomba mobimba ya bato ya Yisalaele baimaimaki epai ya Moize mpe na Alona.” Bayisalaele balelalelaki mpo na biloko ya kolya; balobaki boye: “Malamu ete tokufaki na lobɔkɔ ya [Yehova] kuna na mokili ya Ezipito, wana [efandaki] biso pembeni ya mbɛki ya mosuni mpe elyaki biso kwanga na kotonda, mpo ete bino bokambi biso awa na lisobe oyo mpo na koboma koyangana mobimba oyo na nzala.”—Exode 16:1-3.
5. Ntango Bayisalaele bamilelalelaki, koimaima na bango ezalaki mpenza epai ya nani?
5 Nzokande, Yehova apesaki Bayisalaele nyonso oyo basengelaki na yango na kati ya esobe, ezala biloko ya kolya to mai. Na kati ya esobe, ata mokolo moko te Bayisalaele balingaki kokufa mpo na nzala. Kasi, lokola basepelaki te na oyo Nzambe apesaki bango, bangalisaki mokakatano na bango mpe bakómaki koimaima. Atako bazalaki koimaima epai ya Moize ná Alona, Yehova amonaki ete baimaimaki nde epai na ye. Moize alobaki na Bayisalaele boye: “[Yehova] ayoki koimaima na bino epai na ye. Biso tozali nini? Koimaima na bino ezali epai na biso te kasi epai na [Yehova].”—Exode 16:4-8.
6, 7. Lokola emonisami na Mituya 14:1-3, ndenge nini makanisi ya Bayisalaele ebongwanaki?
6 Mwa moke na nsima, Bayisalaele baimaimaki lisusu. Moize atindaki mibali 12 bákende konɔnga Mokili ya Ndaka. Ntango bazongaki, mibali zomi bapesaki bato nsango ya kobangisa. Yango esalaki nini? “Bato nyonso ya Yisalaele baimaimaki epai na Moize ná Alona. Lingomba mobimba balobelaki bango ete, Soki tokufaki na mokili ya Ezipito, malamu! To, soki tokufaki na lisobe oyo, malamu! [Yehova] alingaki kokɔtisa biso na mokili [ya Kanana] ete tókufa na mopanga mpo na nini? Basi na biso na bana na biso bakokangama. [Kozonga] na biso na Ezipito ekoleka na malamu te?”—Mituya 14:1-3.
7 Makanisi ya Bayisalaele ebongwanaki mpenza! Liboso, bazalaki na botɔndi mingi na ndenge balongwaki na boombo na Ezipito mpe bakatisaki Mai Motane, yango wana basanzolaki Yehova na banzembo. (Exode 15:1-21) Kasi, ntango bakutanaki na mikakatano na esobe mpe bakómaki kobanga Bakanana, esengo nyonso esilaki. Na esika bátɔnda Nzambe oyo alongolaki bango na boombo, bamonaki ete babungisaki makambo ya malamu mpe bakanisaki ete ezali foti na ye. Koimaima na bango emonisaki ete bazalaki na botɔndi te mpo na nyonso oyo Yehova asalelaki bango. Yango wana Yehova alobaki boye: “Lingomba mabe oyo bakoimaima na ntina na ngai ntango molai boni?”—Mituya 14:27; 21:5.
Koimaima kati na baklisto ya liboso
8, 9. Tángá mwa bandakisa ya koimaima oyo Makomami ya Grɛki elobeli.
8 Bato nyonso oyo touti kolobela baimaimaki mpo na komonisa polele ete bazali na esengo te. Nzokande, Biblia elobi ete na mobu 32 ya ntango na biso (T.B.), ntango Yesu Klisto azalaki na Yelusaleme mpo na Fɛti ya Mingombo, ‘ezalaki na masolo mingi ya nse-nse na kati ya bibele ya bato na ntina etali ye.’ (Yoane 7:12, 13, 32) Bato bazalaki koloba mpo na ye na nse-nse, bamosusu bazalaki koloba ete azali moto malamu, bamosusu mpe ete azali moto malamu te.
9 Mokolo mosusu, Matai Levi, mokɔngɔli-mpako moko, ayambaki Yesu ná bayekoli na ye na ndako na ye. “Bafalisai mpe bakomeli na bango babandaki koimaima epai ya bayekoli na ye, kolobáká ete: ‘Mpo na nini bozali kolya mpe komɛla elongo na bakɔngɔli-mpako mpe basumuki?’” (Luka 5:27-30) Mwa moke na nsima, na etúká ya Galilai, “Bayuda babandaki koimaima mpo na [Yesu] mpamba te alobaki ete: ‘Ngai nazali limpa oyo ekitaki uta na likoló.’” Maloba wana ebɛtisaki ata bayekoli na ye mosusu libaku mpe bakómaki koimaima.—Yoane 6:41, 60, 61.
10, 11. Mpo na nini Bayuda oyo bazalaki koloba monɔkɔ ya Grɛki baimaimaki, mpe liteya nini bankulutu bakoki kozwa na ndenge oyo bantoma basilisaki likambo yango?
10 Koimaima mosusu ebimaki mwa moke nsima ya Pantekote ya mobu 33 T.B.; kasi, koimaima yango ebotaki mbuma ya malamu. Na ntango wana, baklisto ya Yudea bazwaki bibongiseli mpo na kosalisa bato oyo bazalaki bapaya na Yisalaele, oyo bakómaki bayekoli sika. Kasi, mwa mikakatano ebimaki na likambo ya kokabola biloko. Lisolo elobi boye: “Koimaima moko ebimaki na ngámbo ya Bayuda ya monɔkɔ ya Grɛki mpo na Bayuda ya monɔkɔ ya Liebele, mpamba te bazalaki kobosana basi na bango oyo bakufelá mibali na ntango ya kokabola biloko ya mokolo na mokolo.”—Misala 6:1.
11 Koimaima wana ekeseni na koimaima ya Bayisalaele na kati ya esobe. Soki Bayuda oyo bazalaki koloba monɔkɔ ya Grɛki bamilelalelaki ezali te mpo bazalaki kosepela te na bomoi na bango. Bamonaki ete ndenge oyo bazalaki kokabolela basi mosusu oyo bakufelá mibali biloko ezalaki malamu te mpe balingaki ete likambo yango eyebana. Longola yango, bato yango oyo baimaimaki babimisaki mobulu te, batombokelaki mpe Yehova te. Bayebisaki bantoma likambo oyo ezalaki kotungisa bango, mpe bantoma babongisaki makambo nokinoki mpo bamonaki ete kolela na bango ezalaki na ntina. Na likambo wana, bantoma batikelaki bankulutu ya lelo ndakisa ya malamu mpenza! Bakɛngɛli basengeli te ‘kokanga matoi na bango wana mobola akolela.’—Masese 21:13; Misala 6:2-6.
Koimaima ebebisaka mokemoke
12, 13. (a) Pesá ndakisa oyo ezali komonisa makambo oyo koimaima ekoki kosala. (b) Nini ekoki kotinda moto abanda koimaima?
12 Bandakisa mingi ya koimaima oyo tolobeli emonisi ete ezaleli yango esalaki mabe mingi epai ya basaleli ya Nzambe. Yango wana, tosengeli kotalela malamu ndenge oyo koimaima ekoki kobebisa biso mokemoke lelo oyo. Tokoki kozwa ndakisa moko mpo na kolimbola yango. Toyebi ete bibende mingi egugaka. Ntango ebende moko ebandi koguga, soki basali eloko te, nsukansuka ebebaka makasi mpe ezalaka lisusu na ntina te. Mituka mingi etambolaka lisusu te ezali te mpo motɛrɛ nde ebebaki, kasi mpo bibende egugaki mingi mpe ekómaki likama mpo na kotambola na yango. Ndenge nini tokoki kosalela ndakisa oyo na likambo ya koimaima?
13 Ndenge bibende mingi egugaka, biso mpe bato ya kozanga kokoka tobendamaka mingi na koimaima. Tosengeli kofungola miso mpo tómonaka mbala moko ntango kaka tobandi kokóma na elimo ya koimaima. Ebende egugaka noki soki ezali na esika ya mpiɔ to soki ezali kozwa mai ya mungwa; ndenge moko mpe, mbala mingi mikakatano epusaka biso na koimaima. Ntango tozali na kimya te na makanisi, ata mwa likambo moke oyo esepelisi biso te ekoki kokóma likambo monene mpe tokobanda kolelalela mpo na yango. Lokola mpasi ezali se kobakisama na mikolo oyo ya nsuka, ntembe ezali te ete makambo oyo ekoki kotinda biso tómilelalela ekobanda se kobakisama. (2 Timote 3:1-5) Na bongo, mosaleli moko ya Yehova akoki kobanda koimaima mpo na ndeko moko. Koimaima yango ekoki kozala mpo na mwa likambo moke kaka; na ndakisa, asepelaka te na likambo moko oyo ezali bolɛmbu ya ndeko yango, to mpe mpo na mayele na ye to mikumba oyo azwi.
14, 15. Soki tomoni ete tobandi kokóma na elimo ya koimaima, mpo na nini tosengeli kotala yango mpamba te?
14 Ata soki likambo nini oyo ezali kosepelisa biso te, soki tomoni ete tobandi kokóma na elimo ya koimaima, kasi tozali kosala eloko te mpo na kosilisa yango, ekokola mpe ekokóma ezaleli na biso. Ezaleli yango ekoki kokɔtela biso mokemoke mpe na nsuka, kobebisa biso mpenza. Koimaima ya Bayisalaele mpo na bomoi oyo bazalaki na yango na esobe ememaki bango tii na kopamela Yehova. (Exode 16:8) Tólinga ata moke te ete likambo ya ndenge wana ekómela biso!
15 Tokoki kobatela ebende eguga te soki tozali kopakola yango mafuta mpe tozali kolongola nokinoki mwa bisika mikemike oyo tomoni ete ebandi koguga. Ndenge moko mpe, ntango tomoni ete tobandi kokóma na elimo ya koimaima, tokoki kobondela mpo na kopekisa yango ekola mpe kosala makasi mpo na kolonga yango. Na ndenge nini?
Tótalela makambo ndenge oyo Yehova atalelaka yango
16. Ndenge nini tokoki kolonga elimo ya koimaima?
16 Koimaima etindaka biso tókóma kotalela kaka mikakatano na biso mpe tóbosana makambo malamu oyo tozali na yango na ndenge tozali Batatoli ya Yehova. Mpo na kolonga elimo ya koimaima, tosengeli kokanisaka mingi makambo malamu yango. Na ndakisa, mokomoko na biso azali na libaku malamu ya komema nkombo ya Yehova. (Yisaya 43:10) Tokoki kokóma baninga ya Yehova mpe tokoki kobondela ye ata na ntango nini, na elikya ete akoyoka biso. (Nzembo 65:2; Yakobo 4:8) Bomoi na biso ezali na ntina mpo toyebi ete Satana alobaki ete Yehova abongi te kozala moyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba mpe biso tozali na libaku ya kopesa ye eyano soki totikali sembo epai ya Nzambe. (Masese 27:11) Tozali na libaku malamu ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi. (Matai 24:14) Kondima na biso na mbeka oyo Yesu Klisto apesaki mpo na kobikisa biso ezali kosalisa biso tózala na lisosoli ya malamu na miso ya Nzambe. (Yoane 3:16) Nyonso wana ezali mapamboli oyo tozali na yango, ata soki tozali na mikakatano nini.
17. Mpo na nini tosengeli kotalelaka makambo ndenge oyo Yehova atalelaka yango, ata soki likambo moko ekoki mpenza kotinda biso tóimaima?
17 Tóluka kotalela makambo ndenge oyo Yehova atalelaka yango. Davidi ayembaki boye: “Ee [Yehova], yebisá ngai nzela na yo; monisá ngai bilekelo na yo.” (Nzembo 25:4) Soki tomoni likambo moko oyo ekoki mpenza kotinda biso na koimaima, tóbosana te ete Yehova mpe azali komona yango. Yehova akoki kosilisa mokakatano yango nokinoki. Kasi, mpo na nini ntango mosusu atikaka yango eumela? Ezalaka mpo na kosalisa biso tólona bizaleli malamu lokola motema molai, koyika mpiko, kondima, mpe kokanga motema.—Yakobo 1:2-4.
18, 19. Pesá ndakisa moko oyo emonisi mbuma malamu ya kokanga motema mpe koimaima te liboso ya makambo mosusu.
18 Soki tozali kokanga motema liboso ya mwa makambo mosusu oyo ekoki kotungisa biso mpe tozali koimaima te, tokobongisa bomoto na biso mpe yango ekoki kobenda likebi ya bato oyo bazali komona biso. Na 2003, etuluku moko ya Batatoli ya Yehova ya Allemagne basalaki mobembo na bisi mpo na kokende na liyangani ya etúká na ekólo Hongrie. Sofɛlɛ ya bisi yango azalaki Motatoli te mpe liboso azalaki na esengo te soki akanisi ete akolekisa mikolo zomi elongo na Batatoli. Kasi na nsuka ya mobembo, makanisi na ye ebongwanaki. Mpo na nini?
19 Na mobembo yango, makambo mingi ezalaki kotambola malamu te. Atako bongo, Batatoli bazalaki kolelalela te. Sofɛlɛ yango alobaki ete amemá naino bakiliya ya malamu bongo te! Kutu, alobaki ete soki Batatoli bayei na ndako na ye, akoyamba bango mpe akoyoka bango malamumalamu. Bandeko na biso bapesaki ndakisa malamu mpamba te ‘basalaki makambo nyonso kozanga koimaima’!
Kolimbisa elendisaka bomoko
20. Mpo na nini tosengeli kolimbisanaka?
20 Ezali boni soki tozali na likambo na ndeko moko? Soki ezali likambo ya monene, tosengeli kosalela toli ya Yesu oyo ezali na Matai 18:15-17. Kasi, ntango mosusu ezalaka mpe na ntina te, mpamba te makambo mingi ezalaka kaka makambo mikemike. Kutu, likambo mosusu ekoki kopesa biso libaku ya koyekola kolimbisa. Paulo akomaki boye: “Bókoba kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu mpe kolimbisana na motema moko soki moko na bino azali na likambo ná mosusu. Kaka ndenge Yehova alimbisaki bino na motema moko, bino mpe bósala bongo. Kasi, longola makambo nyonso wana, bólata bolingo, mpo yango ezali ekanganeli ya kokoka mpo na bomoko.” (Bakolose 3:13, 14) Tokozala na motema ya kolimbisa? Tokanisi ete Yehova amonaka te makambo oyo ekoki kotinda ye aimaima epai na biso? Kasi, mbala na mbala ayokelaka biso mawa mpe alimbisaka biso.
21. Soki moto moko azali koimaima, baoyo bazali pembeni na ye bakoki koyoka ndenge nini?
21 Ata soki likambo ezali mabe ndenge nini, ezali koimaima te nde ekosilisa yango. Liloba ya Liebele oyo ebongolami na koimaima ekoki mpe kolimbola konguluma. Na ntembe te toyokaka mabe mpenza kofanda pembeni ya moto oyo azali na ezaleli ya koimaima; kutu, tolukaka kokima ye. Soki biso mpe tozali koimaima to konguluma, tóyeba ete baoyo bazali pembeni na biso bakoyoka mpe ndenge wana. Elingi koloba ete bakoyoka mabe mpe bakoluka kokima biso! Moto oyo azali koimaima akoki kobenda likebi ya basusu, kasi yango ekosala te ete básepela na ye.
22. Elenge mwasi moko akomaki nini mpo na Batatoli ya Yehova?
22 Kolimbisa elendisaka bomoko, likambo ya ntina mingi mpo na basaleli ya Yehova. (Nzembo 133:1-3) Na Mpoto, elenge mwasi moko ya mbula 17 oyo azali Mokatolike atindaki mokanda na biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova mpo na kokumisa bango. Akomaki boye: “Longola lingomba na bino, nayebi lingomba mosusu te oyo bandimi na yango bayinanaka te, bazali na lokoso te, baboyaka bato mosusu te, balukaka kaka bolamu na bango te, mpe bazali na bomoko.”
23. Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?
23 Soki tozali na botɔndi mpo na makabo nyonso ya elimo oyo tozali kozwa lokola tozali basambeli ya Nzambe ya solo, Yehova, ekosalisa biso tólendisa bomoko mpe tóboya koimaima na makambo ya basusu. Lisolo oyo elandi ekomonisa ndenge oyo bizaleli oyo Nzambe azali koteya biso ekosalisa biso tóboya lolenge oyo eleki mabe ya koimaima, elingi koloba koimaima na ntina na ebongiseli ya Yehova awa na mabelé.
Ozali koyeba lisusu?
• Koimaima esalaka makambo nini?
• Ndakisa nini okoki kopesa mpo na komonisa mbuma mabe ya koimaima?
• Nini ekoki kosalisa biso tólonga elimo ya koimaima?
• Ndenge nini kolimbisa ekoki kosalisa biso tóboya koimaima?
[Elilingi na lokasa 15]
Bayisalaele baimaimaki nde epai ya Yehova!
[Elilingi na lokasa 17]
Olukaka kotalela makambo ndenge Yehova atalelaka yango?
[Bililingi na lokasa 18]
Kolimbisa elendisaka bomoko na kati ya baklisto