Mosala ezali kokende liboso na esanga moko kitoko
MOTO nyonso oyo akómi na Taïwan asepelaka na zamba kitoko ya esanga yango. Bilanga ya loso, oyo ezalaka na langi ya mai ya pondu, ekómaka na langi ya mosaka ntango ekɔmeli. Bangomba ya esanga yango ezipami na bazamba ya banzete minene. Lokola bingumba na yango etondi mɛkɛ na bato, molunge ezalaka makasi; nzokande, na bazamba to na bangomba, mopɛpɛ ezalaka mpiɔ. Yango nde etindaki moto ya liboso ya Mpoto oyo amonaki esanga yango abenga yango Ilha Formosa, to “Esanga kitoko.”
Taïwan ezali esanga moko kitoko mpenza, kasi ezali kaka na kilomɛtrɛ 390 na molai mpe kilomɛtrɛ 160 na monene. Esanga yango ezali na bangomba milaimilai. Ngomba Yü Shan (to Morrison) ezali molai koleka Ngomba Fuji ya Japon mpe Ngomba Cook ya Nouvelle-Zélande. Bangomba ya Taïwan ezali mingimingi na ntei; pembenipembeni ezali mokili patatalu oyo ekei tii na mbu; bato mingi ya Taïwan, oyo bazali sikoyo milio 22, bafandaka na bisika yango.
Bokoli ya elimo
Mosala ya Batatoli ya Yehova na Taïwan ezali kobenda bato mingi na losambo ya solo. Mosala yango ezali kokende liboso mpo na molende oyo mikóló mpe bilenge bazali komonisa ntango bayebi Yehova, Nzambe ya solo. Ezali mpenza likambo ya kokamwa na komona ndenge basakoli ya molende, oyo bazali kosalisa bato mosusu báyeba Yehova mpe mokano na ye, bazali se kobakisama.
Soki basakoli bakómi mingi, esɛngaka kobakisa bandako ya losambo. Na sanza ya Desɛmbɛ 1990, basombaki lopango moko mpo na kotonga bandako ya sika ya filiale ya Batatoli ya Yehova. Biro ya kala ya filiale, oyo ezalaki na engumba Taipei, ekómaki moke mpo na kotambwisa mosala ya basakoli ya Bokonzi 1 777 oyo bazalaki na Taïwan na ntango wana. Bandeko ya molende oyo bautaki na mikili mosusu elongo na bandeko ya Taïwan, bilenge mpe mikóló, basalaki mosala makasi, oyo eumelaki bambula mingi, mpo na kotonga Betele ya sika na Hsinwu, mpe bafungolaki yango na Augusto 1994. Na ntango wana, basakoli ya nsango malamu ya Bokonzi bakómaki 2 515. Lelo oyo, nsima ya mbula koleka zomi, motángo yango ebakisami mbala mibale; basakoli baleki 5 500, mpe na sanza mokomoko, soki tokamati basakoli minei, mosakoli ata moko asalaka mosala ya mobongisi-nzela. Mingimingi ezali bilenge mibali mpe basi oyo bazali kitoko lokola “mamwɛ” ya ntɔngɔntɔngɔ.—Nzembo 110:3.
Bilenge bazali komipesa na mosala ya Yehova
Basakoli mingi ya molende ya esanga yango bazali bilenge. Bamosusu kutu bazali na eteyelo ya ebandeli. Na ndakisa, na engumba moko na nɔrdi ya Taïwan, mwasi moko ná mobali na ye bakendaki mpo na mbala ya liboso na makita ya Batatoli ya Yehova; bayanganaki na Eteyelo ya Mosala ya Teokrasi, likita epai Batatoli ya Yehova bayekolaka koteya Biblia. Bakamwaki mingi komona Weijun, mwana moko ya moke, atɛlɛmi liboso mpe azali kotánga Biblia malamu koleka mikóló mingi. Na nsima, ntango bayanganaki na makita mosusu, bakamwaki mingi komona ete ata bana oyo bakɔti naino kelasi te bazali kopesa biyano ya malamu. Basepelaki na ndenge oyo bana bafandaka kimya na Ndako ya Bokonzi.
Nini etindaka bana yango bámipesa ndenge wana na koyekola Biblia na mboka oyo etondi na bato ya Lingomba ya Bouddha mpe ya Lingomba ya Tao? Baboti na bango balandaki mitinda ya Biblia mpe basalisi bana na bango bázala na boyokani malamu na Yehova. Lokola baboti ya Weijun basalaka makasi mpo boyekoli ya Biblia na libota mpe mosala ya kosakola ezala makambo ya esengo, yaya na ye ya mobali ná oyo ya mwasi basilá kozwa batisimo. Ntango Weijun amonisaki ete ye mpe alingi kokóma mosakoli, mama na ye alobaki ete na sanza yango, akabolaki bazulunalo mingi koleka oyo libota mobimba bakabolaki. Weijun alingaka koteya bato mosusu, kopesa biyano na makita, mpe koyebisa bato mosusu makambo oyo azali koyekola.
Ntango bilenge yango bakómi mikóló
Bilenge yango basalaka nini ntango bakómi mikóló? Mingi kati na bango bazali kokoba kolakisa ete balingaka Yehova mpe mosala ya kosakola. Na ndakisa, Huiping atángaka na iniversite. Mokolo mosusu, molakisi moko alobaki ete bato ya lingomba moko baboyaka bázongisa bango makila, kasi ayebi nkombo ya lingomba yango te. Ntango babimaki, Huiping ayebisaki molakisi ete bato yango ezali Batatoli ya Yehova mpe alimbwelaki ye ntina oyo baboyaka bázongisa bango makila.
Molakisi mosusu alakisaki kasɛti-video moko oyo elobelaki bamaladi oyo ezwamaka na kosangisa nzoto. Na kasɛti yango batángaki vɛrsɛ ya 1 Bakolinti 6:9, kasi molakisi alobaki ete Biblia epekisi te ete mibali na mibali to basi na basi básangisaka nzoto. Huiping ayebisaki mpe molakisi yango likanisi ya Nzambe na likambo yango.
Ntango Shuxia, moninga na ye moko ya kelasi, azalaki kobongisa lisolo moko likoló ya mobulu na kati ya mabota, Huiping apesaki ye Lamuká! ya 8 Novɛmbɛ 2001 oyo bakomi na ezipeli ete “De l’aide pour les femmes battues” (“Lisalisi mpo na basi oyo mibali na bango babɛtaka bango”) mpe ayebisaki ye ete zulunalo yango eyebisi makanisi ya Biblia mpo na likambo yango. Nsukansuka, Shuxia akómaki mosakoli oyo azwi naino batisimo te. Lelo oyo, ye ná Huiping basakolaka nsango malamu.
Bana-kelasi mingi bamonaka ete koyebana lokola bato oyo balandaka mitinda ya Biblia ezali likambo ya pɛtɛɛ te; mingimingi na mwa bingumba ya mike. Baninga ya Zhihao bazalaki kosɛka ye mpo na lingomba na ye mpe mpo azalaki kosakola. Alobi boye: “Nazalaki kobanga mpenza; yango wana, ntango nazali na mosala ya kosakola, nazalaki kosambela ete nakutana na bana-kelasi na biso te. Ntango mosusu bazalaki kosangana ata zomi mpo na kotumola ngai!” Mokolo moko, molakisi asɛngaki Zhihao alobela lingomba na ye na kelasi. Zhihao alobi boye: “Nabandaki lisolo na ngai na Genese mokapo 1 mpe na nsima napesaki biyano na mituna lokola oyo: Nani asalá mabelé mpe biloko nyonso? Moto autaki wapi? Kaka ntango nabandaki kotánga Biblia, baninga mosusu babandaki kosɛka ngai mpe koloba ete nazali moto ya biyambayamba. Kasi, nalandaki bango te mpe nasilisaki lisolo na ngai. Na nsima, nasololaki na baninga mosusu ya kelasi mpo na kolimbwela bango mateya na biso mpe ntina oyo tobimaka mosala ya kosakola. Lelo oyo, soki bamoni ngai na mosala ya kosakola, basɛkaka ngai lisusu te!”
Zhihao abakisi boye: “Lokola baboti na ngai bazali Batatoli, totángaka mokapo ya mokolo ntɔngɔ nyonso. Lisusu, toyekolaka Biblia na libota mpe toyanganaka na makita pɔsɔ na pɔsɔ. Nyonso wana esalisaka ngai napesa eyano oyo ebongi epai ya moto nyonso oyo atumoli ngai ntango nazali koteya bato mosusu solo ya Biblia.”
Tingmei atángaka na eteyelo moko ya bana-basi. Mokolo moko, baninga na ye bayebisaki ye bákende kozwa mopɛpɛ ná bilenge mosusu ya eteyelo ya mibali. Amonaki ete makambo mabe ekoki kosalema kuna mpe aboyaki. Baninga ya Tingmei bazalaki kosɛnga ye likambo yango mbala na mbala, atako azalaki kosolola na bango makambo malamu oyo azalaki kozwa na buku Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano bibongi.a Bazalaki kobenga ye yuma. Kasi, eumelaki te, bango nyonso bamonaki ntina ya kotosa mitinda ya Biblia ntango moninga na bango moko azwaki zemi mpe alongolaki yango. Tingmei alobi boye: “Lokola nasalaka makambo oyo Yehova asɛngaka, lisosoli na ngai ezali kimya. Yango wana, nazalaka na esengo mpe na kimya.”
Bazali kolonga mikakatano
Ruiwen azali moninga ya motema ya Tingmei. Ntango Ruiwen azalaki mwana moke, azalaki komona ete koyangana na makita mpe kobima na mosala ya kosakola ezali motungisi ya mpamba. Kasi, ntango amonaki ete bandeko ya lisangá bazali mpenza na bolingo ya solosolo, oyo ekeseni mpenza na bolingo ya likolólikoló ya baninga ya kelasi, amonaki ete asengeli kobongola makanisi na ye. Ruiwen abandaki koteya baninga na ye ya kelasi mpe eumelaki te, ayebaki makambo oyo asengelaki kosala. Asɛngaki mosala ya mobongisi-nzela mosungi, azalaki kolekisa ngonga koleka 50 na sanza na mosala ya kosakola. Na nsima akómaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza, mpe abandaki kolekisa ngonga koleka 70 na mosala ya kosakola. Ruiwen alobi boye: “Nazangi maloba mpo na kotɔnda Yehova. Asundolaki ngai ata mokolo moko te. Atako nasalaki makambo oyo esepelisaki ye te, azalaki kaka kolinga ngai. Mama ná bandeko mosusu ya lisangá mpe bamonisaki ngai ete balingaka ngai. Lokola nazali koyekola Biblia na bato mitano, namonaka ete nazali kosala mosala oyo eleki misala nyonso.”
Na mboka moko, bakambi ya eteyelo basɛngaki bana-kelasi mibale oyo bazalaki Batatoli ya Yehova bákende komonisa eteyelo na bango na momekano moko ya mabina ya mboka. Ntango bana yango bayebaki ndenge momekano yango ekozala, bamonaki ete soki basali yango, lisosoli na bango ekotungisama. Basɛngaki na bakambi ya eteyelo ete básala momekano yango te, kasi bakambi baboyaki. Kutu, balobaki na bango ete lokola baponaki bango, basengeli kosala momekano wana. Lokola bilenge yango basepelaki te, na nzela ya Internet, bakomelaki ebongiseli oyo etalelaka makambo ya biteyelo mpo na kolimbola likambo na bango. Atako bapesaki bango eyano te na mokanda na bango, batindelaki bakambi ya eteyelo mokanda oyo elobaki ete basengeli te kosɛngisa mwana-kelasi asala momekano ya ndenge wana. Bilenge yango basepelaki mpenza komona ndenge mateya ya Biblia esalisaki bango bázala na lisosoli ya malamu mpe epesi bango makasi ya kosala oyo ezali malamu!
Ata bilenge oyo bazali bibɔsɔnɔ bazali kosepela mingi koyebisa bato mosusu elikya oyo ezali na Biblia. Minyu abotamá ebɔsɔnɔ. Lokola mabɔkɔ na ye esalaka te, mpo na koluka mikapo, abalolaka nkasa ya Biblia na lolemo. Mpo na kosala lisolo na Eteyelo ya Mosala ya Teokrasi, moto oyo akosolola na ye afandaka na ebonga mpe asimbelaka ye mikro. Komona milende oyo Minyu asalaka mpo na kobongisa masolo na ye esimbaka mpenza motema!
Ntango Minyu ayebisaki ete alingi kokóma mosakoli, bandeko mosusu ya basi na lisangá bayekolaki ndenge ya kopesa litatoli na telefone mpo na kosalisa ye. Afinaka babutɔ na lolemo mpe bandeko yango basalisaka ye na kokoma bankombo ya bato oyo asololi na bango. Lokola asepelaka mingi na mosala ya kosakola, akómá mobongisi-nzela mosungi; na sanza moko, alekisaka ngonga 50 tii 60 mpo na kosolola na bato makambo ya Nzambe na telefone. Bato mosusu oyo asololaki na bango bandimaki atindela bango mikanda oyo elimbolaka Biblia mpe abengaka bango mpo na kosolola. Lelo oyo, azali koyekola Biblia na bato misato oyo asololaki na bango na telefone.
Lokola mamwɛ ya ntɔngɔntɔngɔ, bilenge mibali mpe basi oyo bazali na masangá 78 ya Batatoli ya Yehova na Taïwan, bazali komipesa na molende na mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi epai ya ebele ya bato oyo batondi na esanga yango. Yango emonisi kaka mwa moke mosala oyo ezali kosalema na mokili mobimba, oyo ezali kokokisa esakweli ya Biblia oyo: “Bato na yo bakomipesa na yo na bolingo nyonso, na mokolo ya nguya na yo, na nkembo ya bulɛɛ, bilenge na yo bakoya epai na yo lokola mamwɛ longwa na ntango ya ntɔngɔntɔngɔ.” (Nzembo 110:3) Bilenge yango bazali mpenza kolendisa mikóló oyo bazali kosala na bango elongo, mpe na koleka, bazali kopesa Yehova Nzambe esengo mingi!—Masese 27:11.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Etanda/Elilingi na lokasa 10]
BAZALI NA MPOSA YA BANDAKO YA BOKONZI MINGI
Lokola basakoli bazali se kobakisama na Taïwan, bakómi na mokakatano monene ya kozwa Bandako ya Bokonzi. Mpo na nini? Mpamba te, longola kaka na bamboka, bazali mpenza na bisika te oyo bakoki kotonga Bandako ya Bokonzi. Lisusu, mabelé ezali ntalo mingi, mpe mibeko ya kotonga ezali makasi mpenza. Na bingumba ya minene, basombaka bandako oyo ezali babiro mpe bakómisaka yango Bandako ya Bokonzi. Atako bongo, babiro yango mingi ezalaka mpenza malamu te, baplafɔ ezali na nse mingi, bankolo bisika yango basɛngaka mbongo mingi koleka mpo na misala ya kobongisa, esengeli kozala na ndingisa mpo na kokɔta na babuludingi yango, mpe makambo mosusu oyo nyonso ezali kosala ete babiro ebonga te mpo na kosalela yango lokola Ndako ya Bokonzi.
Atako bongo, na bambula oyo euti koleka, Batatoli ya Yehova na Taïwan batongaki Bandako ya Bokonzi ya sika. Lokola Batatoli bango moko bandimi kobimisa mbongo mpe bazali koyekola kotonga, bazali kokoba koluka mabelé mpo na kotonga Bandako ya Bokonzi mosusu.