Yehova “akosala ete likambo ekatama na bosembo”
“Ezali nde solo te ete Nzambe akosala ete likambo ekatama na bosembo mpo na baponami na ye oyo babelelaka ye butu moi?”—LUKA 18:7.
1. Banani balendisaka yo, mpe mpo na nini?
NA LISANGÁ ya Yehova, ezali na bandeko mibali mpe basi oyo bazali kosalela Nzambe na bosembo banda bambula ebele mpenza. Oyebi bamosusu kati na bandeko yango? Mbala mosusu ntango kaka otángi motuna yango, okanisi ndeko mwasi moko ya mobange oyo azwá batisimo kala mpenza, kasi azangisaka makita te. To mpe okanisi mbala moko ndeko mobali moko ya mobange oyo abimaka na mosala ya kosakola pɔsɔ na pɔsɔ mpe yango ezali momeseno na ye banda bambula ebele. Bandeko yango mingi bazalaki kokanisa te ete tokokóma tii na bambula oyo kozanga ete Armagedona eya. Nzokande, atako mokili mabe oyo ebomami naino te, balongoli elikya na bango na bilaka ya Yehova te mpe bazali kaka na ekateli makasi ya ‘koyika mpiko tii na nsuka.’ (Matai 24:13) Kondima makasi ya bandeko yango ya sembo elendisaka mpenza bandeko nyonso na kati ya lisangá.—Nzembo 147:11.
2. Likambo nini epesaka biso mawa?
2 Kasi, mbala mosusu mpe tomonaka likambo mosusu. Batatoli mosusu basalaki mosala ya kosakola bambula ebele, kasi na nsima, kondima na bango ekómaki kolɛmba, mpe nsukansuka batikaki lisangá. Toyokaka mawa mingi ndenge bandeko na biso mosusu batiká Yehova, mpe mposa na biso ezalaka ete tókoba kosalisa ‘mpate mokomoko oyo abungá nzela’ azonga na etonga. (Nzembo 119:176; Baloma 15:1) Makambo wana mibale oyo tomonaka, elingi koloba, bandeko mosusu bazali kotikala sembo mpe bamosusu bazali kobungisa kondima, ezali kotinda biso tómituna mwa mituna. Nini esalisaka ebele ya Batatoli bázala ntango nyonso na kondima ete Yehova akokokisa bilaka na ye, nzokande bamosusu bazali kobungisa yango? Nini ekoki kosalisa biso tóbatela kondima makasi ete “mokolo monene ya [Yehova]” ebɛlɛmi? (Sefania 1:14) Tiká tótalela ndakisa moko oyo ezali na Evanzile ya Luka.
Likebisi mpo na baoyo bakozala na “ntango Mwana ya moto akoya”
3. Banani bakoki mpenza kozwa liteya na ndakisa ya zuzi ná mwasi oyo akufelá mobali, mpe mpo na nini?
3 Na Luka mokapo 18, Yesu apesaki ndakisa ya zuzi moko ná mwasi moko oyo akufelá mobali. Ndakisa yango ekokani na ndakisa ya moto oyo azalaki mbamba, oyo tolobelaki na boyekoli eleki. (Luka 11:5-13) Nzokande, lisolo mobimba epai ndakisa ya zuzi ná mwasi oyo akufelá mobali ezali emonisi ete likambo yango etaleli mingimingi bato oyo bakozala na bomoi “ntango Mwana ya moto akoya” na Bokonzi na ye; ntango yango ebandaki na 1914.—Luka 18:8.a
4. Yesu alobaki likambo nini liboso apesa ndakisa oyo ezali na Luka mokapo 18?
4 Liboso Yesu apesa ndakisa yango, amonisaki ete kozala na ye na Bokonzi ekomonana polele lokola “mokalikali” oyo “engɛngaka banda na esika moko na nse ya likoló tii na esika mosusu na nse ya likoló.” (Luka 17:24; 21:10, 29-33) Atako bongo, bato mingi oyo bakozala na “ntango ya nsuka” bakotya likebi te na elembo wana oyo ekomonana polele. (Danyele 12:4, NW) Mpo na nini? Mpo na ntina se moko oyo bato ya ntango ya Noa mpe ya ntango ya Lota batyaki likebi te na makebisi ya Yehova. Bato ya ntango ya Noa mpe ya ntango ya Lota ‘bazalaki kolya, komɛla, kosomba, kotɛka, kotonga bandako tii mokolo oyo babomamaki.’ (Luka 17:26-29) Bato wana bakufaki mpo bamipesaki mobimba na makambo na bango mpe bazalaki kotyela mokano ya Nzambe likebi te. (Matai 24:39) Lelo oyo mpe, bato mingi bamipesi na makambo na bango mpe bazali komona te elembo oyo ezali kolakisa ete nsuka ya mokili oyo mabe ebɛlɛmi.—Luka 17:30.
5. (a) Yesu akebisaki banani, mpe mpo na nini? (b) Mpo na nini bato mosusu basili kobungisa kondima na bango?
5 Emonani ete Yesu azalaki komibanzabanza mpo na bayekoli na ye; amonaki ete bango mpe bakoki kobendama na mokili ya Satana mpe ‘kozonga na biloko oyo ezali na nsima.’ (Luka 17:22, 31) Kutu, likambo yango esili kokómela baklisto mosusu. Bandeko yango bazelaki bambula mingi mokolo oyo Yehova akosukisa mokili oyo mabe. Nzokande, ntango bamonaki ete Armagedona eyei te na ntango oyo bango bakanisaki, balɛmbaki nzoto. Babungisaki elikya ete mokolo oyo Yehova akosambisa mokili ebɛlɛmi. Balɛmbisaki mabɔkɔ na mosala ya kosakola, mokemoke bakómaki komipesa na makambo ya mokili mpe bazalaki lisusu na ntango te mpo na makambo ya elimo. (Luka 8:11, 13, 14) Likambo ya mawa, nsukansuka, ‘bazongaki na biloko oyo ezali na nsima’!
Tosengeli “ntango nyonso kobondela”
6-8. (a) Lobá ndakisa ya zuzi ná mwasi oyo akufelá mobali. (b) Liteya nini Yesu abimisaki na ndakisa yango?
6 Tosengeli kosala nini mpo kondimisama makasi oyo tozali na yango ete Yehova akokokisa bilaka na ye elɛmba te? (Baebele 3:14) Yesu alobelaki likambo yango nsima ya kokebisa bayekoli na ye mpo bázonga na mokili mabe ya Satana te.
7 Luka alobi ete Yesu “apesaki bango ndakisa moko mpo na komonisa bango ntina ya kobondela ntango nyonso mpe ya kolɛmba te.” Yesu alobaki boye: “Na engumba moko boye ezalaki na mosambisi moko oyo azalaki kobanga Nzambe te mpe azalaki na limemya na moto te. Kasi ezalaki na mwasi moko oyo akufelá mobali na engumba yango mpe azalaki kokende mbala na mbala epai na ye, kolobáká ete, ‘Salá ete nazwa elonga na ngai liboso ya monguna na ngai.’ Ɛɛ, na boumeli ya ntango moko boye azalaki koboya, kasi na nsima alobaki na kati na ye ete, ‘Atako nabangaka Nzambe te to namemyaka moto te, ata ndenge nini, lokola mwasi oyo akufelá mobali azali ntango nyonso kotungisa ngai, nakosala na boye ete azwa elonga na ye, noki te akokoba koya kobɛtabɛta ngai makofi koleka ndelo.’”
8 Nsima ya kopesa ndakisa yango, Yesu abimisaki liteya oyo: “Bóyoka oyo mosambisi wana alobaki, atako azalaki moyengebene te! Boye, ezali nde solo te ete Nzambe akosala ete likambo ekatama na bosembo mpo na baponami na ye oyo babelelaka ye butu moi, atako azali na motema molai epai na bango? Nazali koyebisa bino ete, Akosala ete likambo ekatama na bosembo nokinoki mpo na bango. Kasi, ntango Mwana ya moto akoya, akokuta mpenza kondima awa na mabelé?”—Luka 18:1-8.
“Salá ete nazwa elonga na ngai”
9. Wapi likanisi ya ntina na ndakisa ya zuzi ná mwasi oyo akufelá mobali?
9 Likanisi ya ntina ya ndakisa yango ezali polele. Bato mibale ya ndakisa yango, ata mpe Yesu ye moko, balobelaki likanisi yango. Mwasi oyo akufelá mobali alobaki boye: “Salá ete nazwa elonga na ngai.” Zuzi alobaki: “Nakosala na boye ete azwa elonga na ye.” Yesu atunaki motuna ete: “Ezali nde solo te ete Nzambe akosala ete likambo ekatama na bosembo?” Na nsima alobaki ete: “[Yehova] akosala ete likambo ekatama na bosembo nokinoki mpo na bango.” (Luka 18:3, 5, 7, 8) Ntango nini Nzambe “akosala ete likambo ekatama na bosembo”?
10. (a) Na mbula nini likambo ekatamaki na bosembo na siɛklɛ ya liboso? (b) Ntango nini mpe ndenge nini likambo ekokatama na bosembo mpo na basaleli ya Nzambe ya lelo oyo?
10 Na siɛklɛ ya liboso, “mikolo ya kokata makambo na bosembo” eyaki na mobu 70 ya ntango na biso (T.B.), ntango Yelusaleme ná tempelo na yango ebomamaki. (Luka 21:22) Mpo na basaleli ya Nzambe lelo oyo, likambo ekokatama na bosembo na “mokolo monene ya [Yehova].” (Sefania 1:14; Matai 24:21) Na ntango wana, Yehova ‘akozongisa bolɔzi epai ya baoyo bazali kobimisela [basaleli na ye] bolɔzi’ na ndenge “[Yesu Klisto] akozongisa mabe na baoyo bayebi Nzambe te mpe baoyo bazali te kotosa nsango malamu oyo etali Nkolo na biso Yesu.”—2 Batesaloniki 1:6-8; Baloma 12:19.
11. Na ndenge nini likambo ekokatama na bosembo “nokinoki”?
11 Kasi, maloba ya Yesu ete Yehova akosala ete likambo ekatama na bosembo “nokinoki” elimboli nini? Liloba ya Nzambe emonisi ete “atako [Yehova] azali na motema molai,” soki kaka ntango na ye ekoki, akokata likambo; akozela te. (Luka 18:7, 8; 2 Petelo 3:9, 10) Ntango Mpela eyaki na mikolo ya Noa, bato mabe babomamaki mbala moko. Ndenge moko mpe, na mikolo ya Lota, mɔtɔ eutaki na likoló mpe ebomaki bato mabe. Yesu alobaki boye: “Ekozala mpe bongo na mokolo yango ntango Mwana ya moto asengeli komonisama.” (Luka 17:27-30) Na ntango yango mpe, “libebi ya mbalakaka” ekokómela bato mabe. (1 Batesaloniki 5:2, 3) Tokoki kozala na elikya ete lokola Yehova azali na boyengebene, soki ntango oyo akani koboma mokili ya Satana ekoki, akozelisa ata moke te.
“Akosala ete likambo ekatama na bosembo”
12, 13. (a) Ndakisa ya zuzi ná mwasi oyo akufelá mobali eteyi biso nini na ntina na Nzambe? (b) Mpo na nini tokoki kozala na elikya ete Yehova akoyoka mabondeli na biso mpe akosala ete likambo ekatama na bosembo?
12 Ndakisa ya zuzi ná mwasi oyo akufelá mobali ezali komonisa makambo mosusu ya ntina mingi. Ntango Yesu alobelaki liteya ya ndakisa yango, alobaki boye: “Bóyoka oyo mosambisi wana alobaki, atako azalaki moyengebene te! Boye, ezali nde solo te ete Nzambe akosala ete likambo ekatama na bosembo mpo na baponami na ye?” Yesu alingaki koloba te ete Yehova Nzambe akosala epai ya basambeli na ye lokola zuzi wana. Yesu ateyaki nde bayekoli na ye liteya moko ya ntina mpo na Yehova na bokeseni oyo ezali kati na Yehova ná zuzi yango. Bokeseni yango ezali na makambo nini?
13 Zuzi yango azalaki “moyengebene te,” nzokande, “Nzambe azali mosambisi ya boyengebene.” (Nzembo 7:11; 33:5) Zuzi yango azalaki komibanzabanza ata moke te mpo na mwasi wana, nzokande Yehova amibanzabanzaka mpo na mokomoko na biso. (2 Ntango 6:29, 30) Zuzi yango azalaki na mposa te ya kosalisa mwasi wana, nzokande Yehova azalaka na mposa makasi ya kosalisa basaleli na Ye. (Yisaya 30:18, 19) Nyonso wana eteyi biso nini? Soki zuzi yango, oyo azalaki ata moyengebene te, ayokaki kolela ya mwasi oyo akufelá mobali mpe asalaki ete azwa elonga na likambo na ye, tokoki kokanisa ete Yehova akoyoka mabondeli ya basaleli na ye mpe akosala ete likambo ekatama na bosembo mpo na bango.—Masese 15:29.
14. Mpo na nini tosengeli te kobungisa kondima na biso ete mokolo ya kosambisa ya Nzambe ekoya?
14 Yango wana, baoyo bazali kobungisa kondima ete mokolo ya kosambisa ya Nzambe ekoya, bazali kosala libunga monene. Mpo na nini? Ntango balongoli elikya makasi oyo bazalaki na yango ete “mokolo monene ya [Yehova]” ebɛlɛmi, yango ezali komonisa ete bazali kondima te ete Yehova akokokisa bilaka na ye. Nzokande, moto moko te akoki kobɛtela bosembo ya Nzambe ntembe. (Yobo 9:12) Motuna oyo mokomoko asengeli komituna ezali oyo: “Nakotikala mpenza sembo?” Yango nde likambo Yesu alobelaki nsima ya ndakisa ya zuzi ná mwasi oyo akufelá mobali.
“Akokuta mpenza kondima yango awa na mabelé?”
15. (a) Motuna nini Yesu atunaki, mpe mpo na nini? (b) Motuna nini tosengeli komituna?
15 Yesu atunaki motuna oyo: “Ntango Mwana ya moto akoya, akokuta mpenza kondima yango awa na mabelé?” (Luka 18:8, maloba na nse ya lokasa na NW) Maloba “kondima yango” ezali komonisa ete Yesu azalaki kolobela kondima nyonso te, kasi kondima lokola oyo mwasi oyo akufelá mobali azalaki na yango. Yesu apesaki eyano na motuna yango te. Atunaki motuna yango mpo bayekoli na ye bátalela malamumalamu lolenge ya kondima na bango. Kondima yango ezalaki nde kolɛmba mokemoke mpe kotya bango na likama ya kozonga na biloko oyo batikaki na nsima? To bazalaki na kondima lokola ya mwasi oyo akufelá mobali? Lelo oyo, mokomoko na biso asengeli komituna boye, ‘Kondima ya ndenge nini “Mwana ya moto” azali komona na motema na ngai?’
16. Mwasi oyo akufelá mobali azalaki na kondima ya ndenge nini?
16 Mpo tózala na kati ya bato oyo Yehova akosala ete likambo ekatama na bosembo mpo na bango, tosengeli kozala na kondima lokola ya mwasi oyo Yesu alobelaki na ndakisa na ye. Mwasi yango azalaki na kondima ya ndenge nini? Amonisaki kondima na ye na ndenge atyaki mbamba na “kokende epai [ya mosambisi], kolobáká ete, ‘Salá ete nazwa elonga na ngai.’” Mwasi yango atyaki mbamba mpo moto oyo azali moyengebene te apesa ye elonga na ye. Basaleli ya Nzambe mpe bakoki kozala na elikya ete Yehova akosala ete likambo ekatama na bosembo mpo na bango, ata soki eumeli koleka ndenge oyo bakanisaki. Longola yango, bakomonisa ete bazali kondima bilaka ya Nzambe soki bazali kotingama na mabondeli, na maloba mosusu, soki bazali ‘kobelela Yehova butu moi.’ (Luka 18:7) Soki moklisto moko atiki kobondela ete likambo ekatama na bosembo, ekomonisa ete azali lisusu kondima te ete Yehova akosala malamu mpo na basaleli na ye.
17. Bantina nini tozali na yango ya kotingama na mabondeli mpe kobatela kondima na biso ete mokolo ya kosambisa ya Yehova ekoya?
17 Bomoi ya mwasi yango ezali komonisa biso bantina mosusu oyo tosengeli kotingama na mabondeli. Tótalela mwa makambo oyo ekesenisi biso na ye. Mwasi yango azalaki kolɛmba te kokende epai ya zuzi atako moto moko te azalaki kolendisa ye, nzokande Liloba ya Nzambe ezali kolendisa biso mingi ete ‘tótingama na mabondeli.’ (Baloma 12:12) Likambo moko te ekokaki komonisa mwasi yango ete zuzi akoyokela ye; nzokande, Yehova alaki ete akosala ete likambo ekatama na bosembo. Na nzela ya mosakoli na ye, Yehova alobaki boye: “Ata ezali koumela, [kobá kozela yango, NW] yango; ekoya solo mpenza, ekoumela mingi te.” (Habakuku 2:3; Nzembo 97:10) Mwasi wana azalaki na molobeli te oyo akokaki kosalisa ye mpo maloba na ye ezala na kilo. Nzokande biso tozali na Yesu, mosalisi oyo azali na nguya mingi, “oyo azali na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe, oyo mpe azali kolobela biso.” (Baloma 8:34; Baebele 7:25) Na yango, soki mwasi wana, atako azangaki makambo mingi, azalaki kaka na elikya mpe alɛmbaki te kokende epai ya zuzi mpo likambo na ye ekatama na bosembo, esengeli ete biso mpe tóbatela kondima na biso ete mokolo ya kosambisa ya Yehova ekoya!
18. Ndenge nini libondeli ekolendisa kondima na biso mpe ekosalisa mpo likambo ekatama na bosembo mpo na biso?
18 Ndakisa ya mwasi oyo akufelá mobali ezali koteya biso ete kondima etambolaka nzela moko na mabondeli mpe ete kotingama na mabondeli ekoki kolongola makambo oyo ekoki kolɛmbisa kondima na biso. Ya solo, yango elingi koloba te ete koluka komonana na miso ya bato ete tobondelaka nde ekosalisa biso tóbungisa kondima te. (Matai 6:7, 8) Soki na motema na biso tozali na mposa makasi ya kobondelaka mpo tozali komona ete lobiko na biso ezali na mabɔkɔ ya Nzambe, mabondeli ekopusa biso penepene na Nzambe mpe ekolendisa kondima na biso. Mpe lokola kondima ezali na ntina mingi mpo na kobika, Yesu alendisaki bayekoli na ye ete ‘bábondelaka ntango nyonso mpe bálɛmba te’! (Luka 18:1; 2 Batesaloniki 3:13) Ya solo, mabondeli na biso te nde ekosala ete “mokolo monene ya [Yehova]” eya; ata soki tobondeli to te, yango ekoya kaka. Kasi, kondima ya mokomoko na biso mpe komipesa na mabondeli nde ekosala ete likambo ekatama na bosembo mpo na ye mpe abika na etumba ya Nzambe.
19. Ndenge nini tozali komonisa ete tozali na elikya makasi ete Nzambe “akosala ete likambo ekatama na bosembo”?
19 Ndenge toutaki koloba, Yesu atunaki boye: “Ntango mwana ya moto akoya, akokuta mpenza kondima yango awa na mabelé?” Eyano ezali nini na motuna yango? Tozali na esengo ya komona ete bamilio ya basaleli ya sembo ya Yehova na mokili mobimba bazali komonisa na mabondeli na bango, na motema molai na bango, mpe na kolendendela na bango ete bazali na kondima yango! Na yango, eyano na motuna oyo Yesu atunaki ezali ɛɛ. Atako lelo oyo mokili ya Satana ezali kosalela biso makambo mingi ya kozanga boyengebene, tozali na kondima makasi ete Nzambe “akosala ete likambo ekatama na bosembo mpo na baponami na ye.”
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo okanga ntina ya ndakisa yango malamu, tángá Luka 17:22-33. Okomona ete ndenge oyo balobeli “Mwana ya moto” na Luka 17:22, 24, 30 ezali na boyokani na motuna oyo ezali na Luka 18:8.
Ozali koyeba lisusu?
• Mpo na nini baklisto mosusu basili kobungisa kondima?
• Mpo na nini tokoki kondima mpenza ete mokolo ya kosambisa ya Yehova ekoya?
• Mpo na bantina nini tosengeli kotingama na mabondeli?
• Ndenge nini kotingama na mabondeli ekosalisa biso tóbungisa kondima te?
[Elilingi na lokasa 26]
Ndakisa ya zuzi ná mwasi oyo akufelá mobali ezali komonisa likambo nini?
[Bililingi na lokasa 29]
Lelo oyo, bamilio ya bato bazali kondima ete Nzambe “akosala ete likambo ekatama na bosembo”