Bótosaka bakɛngɛli ya etonga na komikitisa mpenza
“Bótosaka baoyo bazali kokamba bino mpe bóyokelaka bango.”—BAEBELE 13:17.
1, 2. Bavɛrsɛ nini emonisi ete Yehova ná Yesu bazali babateli ya mpate ya bolingo?
YEHOVA NZAMBE ná Mwana na ye, Yesu Klisto, bazali babateli ya mpate ya bolingo. Yisaya asakolaki boye: “Talá Nkolo [Yehova] akoya na nguya, lobɔkɔ na ye ekobatela bokonzi mpo na ye . . . Akoleisa etonga na ye lokola mobateli, akoyanganisa bana ya mpate na mabɔkɔ na ye; akokumba bango na ntolo na ye, akokamba malɛmbɛmalɛmbɛ baoyo bazali konungisa.”—Yisaya 40:10, 11.
2 Esakweli wana ya kozongisama ekokisamaki mpo na mbala ya liboso ntango mwa ndambo ya Bayuda oyo batikalaki bazongaki na ekólo na bango na 537 liboso ya ntango na biso (L.T.B.). (2 Ntango 36:22, 23) Ekokisamaki lisusu ntango Yesu Klisto, Sirisi Monene, asikolaki bapakolami oyo batikalaki na boombo ya “Babilone Monene” na 1919. (Emoniseli 18:2; Yisaya 44:28) Yesu azali lokola “lobɔkɔ” oyo Yehova azali kosalela mpo na koyangela; azali koyanganisa bampate mpe kobatela bango na boboto nyonso. Yesu alobaki boye: “Ngai nazali mobateli ya bampate oyo aleki malamu, mpe nayebi bampate na ngai mpe bampate na ngai bayebi ngai.”—Yoane 10:14.
3. Ndenge nini Yehova atalelaka makambo oyo bazali kosala bampate na ye?
3 Esakweli ya Yisaya 40:10, 11 ezali komonisa ete Yehova abatelaka bato na ye na boboto. (Nzembo 23:1-6) Ntango Yesu azalaki awa na mabelé, azalaki mpe komonisela bayekoli na ye mpe bato mosusu boboto. (Matai 11:28-30; Malako 6:34) Yehova ná Yesu bayokaki mabe ndenge babateli ya mpate to bakambi ya Yisalaele bazalaki kosundola mpe kolyela bitonga na bango kozanga nsɔni. (Ezekiele 34:2-10; Matai 23:3, 4, 15) Yehova alakaki boye: “Nakobikisa etonga na ngai, mpe bakobomama lisusu te; mpe nakokata makambo kati na mpate na mpate. Mpe nakotya mobateli moko na likoló na bango, bobele moombo na ngai Davidi, mpe ye akoleisa bango; ye akoleisa bango mpe akozala mobateli na bango.” (Ezekiele 34:22, 23) Na ntango oyo ya nsuka, Yesu Klisto, Davidi Monene, azali “mobateli kaka moko” oyo Yehova atye likoló ya basaleli na ye awa na mabelé, ezala baklisto bapakolami to “bampate mosusu.”—Yoane 10:16.
Makabo oyo Yehova apesi lisangá
4, 5. (a) Likabo nini ya motuya Yehova apesi basaleli na ye awa na mabelé? (b) Likabo nini Yesu apesi lisangá na ye?
4 Ntango Yehova atyaki Yesu Klisto “mobateli kaka moko” ya basaleli na ye awa na mabelé, yango ezalaki likabo ya motuya mpenza oyo apesaki lisangá. Yisaya 55:4 esakolaki na ntina na likabo yango ete: “Talá nazalisi ye motatoli epai na bato, motambwisi mpe mokóló mpo na bato.” Baklisto bapakolami ná “ebele ya bato” bauti na bikólo, na mabota mpe na minɔkɔ nyonso. (Emoniseli 5:9, 10; 7:9) Bazali lisangá kaka moko ya mokili mobimba, elingi koloba “etonga moko,” oyo ezali kotambwisama na “mobateli kaka moko,” Klisto Yesu.
5 Yesu mpe apesi lisangá na ye awa na mabelé likabo moko kitoko. Apesi babateli ya mpate basungi oyo, na ndakisa ya Yehova ná Yesu, bazali kobatela etonga na boboto nyonso. Ntoma Paulo alobelaki likabo yango na mokanda oyo akomelaki baklisto ya Efese. Akomaki boye: “‘Ntango amataki na likoló amemaki bakangami; apesaki makabo oyo ezali bato.’ . . . Apesaki bamosusu lokola bantoma, bamosusu lokola basakoli, bamosusu lokola bapalanganisi ya nsango malamu, bamosusu lokola babateli ya mpate mpe bateyi, mpo na kosembolama ya basantu, mpo na mosala ya kosunga, mpo na kotongama ya nzoto ya Klisto.”—Baefese 4:8, 11, 12.
6. Elilingi nini Emoniseli 1:16, 20 esaleli mpo na kolobela bapakolami oyo bazalaki na masangani ya bankulutu, mpe tokoki koloba nini mpo na bankulutu oyo bazali bampate mosusu?
6 ‘Makabo yango oyo ezali bato’ ezali bakɛngɛli to bankulutu, oyo Yehova ná Mwana na ye baponi na nzela ya elimo santu mpo na kobatela bampate na boboto. (Misala 20:28, 29) Na ebandeli, bakɛngɛli yango nyonso bazalaki baklisto bapakolami. “Minzɔtɔ” to “baanzelu” oyo Emoniseli 1:16, 20 elobeli, ezali bankulutu oyo bazalaki na masangani ya bankulutu ya lisangá ya bapakolami; bazalaki na lobɔkɔ ya mobali ya Klisto, elingi koloba ye moko azalaki kotambwisa bango. Kasi, na ntango oyo ya nsuka, lokola motángo ya bakɛngɛli bapakolami oyo bazali naino awa na mabelé ezali se kokita, bankulutu mingi ya masangá bazali bampate mosusu. Lokola bamonisi ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi nde baponaka bankulutu yango na lisalisi ya elimo santu, tokoki koloba ete bango mpe bazali na lobɔkɔ ya mobali ya Yesu Klisto (to kotambwisama na ye), Mobateli ya mpate oyo aleki malamu. (Yisaya 61:5, 6) Lokola bankulutu ya masangá na biso bayokelaka Klisto, Motó ya lisangá, ebongi mpenza tólandaka litambwisi na bango.—Bakolose 1:18.
Tótosaka mpe tóyokelaka bango
7. Toli nini ntoma Paulo apesaki na ntina na ezaleli oyo tokoki kozala na yango liboso ya bakɛngɛli ya lisangá?
7 Babateli na biso ya likoló, Yehova Nzambe ná Yesu Klisto, balingi tótosaka mpe tóyokelaka babateli ya mpate basungi oyo bango bapesi mikumba na lisangá. (1 Petelo 5:5) Na lisalisi ya elimo santu, ntoma Paulo akomaki boye: “Bókanisaka baoyo bazali kokamba bino, oyo bayebisaki bino liloba ya Nzambe, mpe wana bozali kotala malamumalamu motindo nini etamboli na bango ezali kosuka bómekola kondima na bango. Bótosaka baoyo bazali kokamba bino mpe bóyokelaka bango, mpo bazali kokɛngɛla milimo na bino lokola bato oyo bakozongisa monɔkɔ; mpo básalaka yango na esengo kasi na komilelalela te, mpo yango ekozala likama mpo na bino.”—Baebele 13:7, 17.
8. Eloko nini Paulo azali kosɛnga biso ‘tótala malamumalamu,’ mpe ndenge nini tosengeli ‘kotosaka’?
8 Tósimba ete Paulo azali kosɛnga biso ‘tótala malamumalamu,’ to na likebi matomba oyo etamboli ya sembo ya bankulutu ezali kobimisa mpe tólanda kondima na bango. Lisusu, azali kopesa biso toli ete tótosaka mpe tóyokelaka mibali yango. Richard. T. France, molimboli moko ya maloba ya Biblia alobaki ete na Grɛki oyo bakomaki na yango Biblia, liloba oyo babongoli na “bótosaka” ezali te “liloba botosi ndenge toyebi yango, kasi ‘kondimisama’ to kondima litambwisi na bango kozanga kokakatana.” Totosaka bankulutu kaka te mpo Liloba ya Nzambe ezali kosɛnga biso yango, kasi mpe mpo toyebi ete bamibanzabanzaka mpo na matomba ya Bokonzi mpe mpo na bolamu na biso. Tokozala mpenza na esengo soki tozali kondima litambwisi na bango kozanga kokakatana.
9. Longola kotosa baoyo bazali kokamba biso, mpo na nini tosengeli mpe ‘koyokelaka’ bango?
9 Kasi, ezali boni soki tomoni ete ekateli moko oyo bankulutu bazwi ezali malamu te? Na ntango wana nde esengeli tóyokela bango. Ezalaka mpasi te kotosa soki makambo nyonso ezali komonana polele mpe tondimi yango, kasi tosengeli mpe koyokela bango ata soki tosimbi malamu te likambo oyo bazali kosɛnga biso tósala. Petelo, oyo na nsima akómaki ntoma, amonisaki elimo ya motindo wana.—Luka 5:4, 5.
Ntina minei oyo tosengeli kolandaka litambwisi ya bakɛngɛli
10, 11. Ndenge nini bakɛngɛli bazalaki ‘koyebisa liloba ya Nzambe’ epai ya bandeko na bango baklisto na ekeke ya liboso mpe ndenge nini bazali kosala yango lelo oyo?
10 Na mokanda ya Baebele 13:7, 17, oyo totángaki liboso, ntoma Paulo apesi ntina minei oyo tosengeli kotosaka mpe koyokelaka bakɛngɛli. Ya liboso ezali ete “bayebisaki [biso] liloba ya Nzambe.” Tóbosana te ete “makabo oyo ezali bato” oyo Yesu azali kopesa na lisangá ezali mpo na “kosembolama ya basantu.” (Baefese 4:11, 12) Asembolaki makanisi mpe etamboli ya baklisto ya ekeke ya liboso na nzela ya babateli ya mpate basungi ya sembo mpe elimo santu esalisaki bamosusu na kati na bango bákomela masangá mikanda. Asalelaki bakɛngɛli wana oyo elimo santu eponaki mpo na kotambwisa mpe kolendisa baklisto ya liboso.—1 Bakolinti 16:15-18; 2 Timote 2:2; Tito 1:5.
11 Lelo oyo, Yesu azali kotambwisa biso na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele,” oyo amonisami na Lisangani ya Mikóló-Bakambi mpe bankulutu. (Matai 24:45) Na limemya mpo na “mobateli ya mpate mokonzi,” Yesu Klisto, tozali kolanda toli ya Paulo oyo: “Bózala na limemya epai ya baoyo bazali kosala mosala makasi na kati na bino mpe kokamba bino na kati ya Nkolo mpe kokebisa bino.”—1 Petelo 5:4; 1 Batesaloniki 5:12; 1 Timote 5:17.
12. Ndenge nini bakɛngɛli “bazali kokɛngɛla milimo na [biso]”?
12 Ntina ya mibale oyo tosengeli kolandaka litambwisi ya bakɛngɛli ezali ete “bazali kokɛngɛla milimo na [biso].” Soki bamoni biso na ezaleli to etamboli moko oyo ekoki kobebisa boyokani na biso ná Nzambe, bapesaka biso nokinoki toli mpo na kosembola biso. (Bagalatia 6:1) Liloba ya Grɛki oyo babongoli na “kokɛngɛla” elimboli “koboya kolala.” Molimboli moko ya maloba ya Biblia alobaki ete liloba yango elimboli “likebi makasi oyo mobateli ya mpate azalaka na yango.” Longola kokɛngɛla na elimo, mbala mosusu bankulutu balalaka te mpo na koluka bolamu na biso ya elimo. Kozanga kokakatana, tosengeli kolanda litambwisi ya babateli ya mpate basungi, oyo bazali kosala nyonso mpo na komekola boboto ya Yesu Klisto, “mobateli monene ya bampate.”—Baebele 13:20.
13. Bankulutu ná baklisto nyonso bakozongisa monɔkɔ epai ya nani?
13 Ntina ya misato oyo tosengeli kolanda litambwisi ya bakɛngɛli ezali ete bazali kokɛngɛla biso “lokola bato oyo bakozongisa monɔkɔ.” Bakɛngɛli bayebaka ete bazali babateli ya mpate basungi, oyo bazali na nse ya babateli ya mpate ya likoló, Yehova Nzambe ná Yesu Klisto. (Ezekiele 34:22-24) Yehova azali Nkolo ya bampate oyo “asombaki na makila ya Mwana na ye moko,” mpe ayebaka ete bankulutu bakozongisa monɔkɔ mpo na lolenge oyo bazali kotambwisa etonga na ye; mpo alingi ete básalaka yango “na boboto.” (Misala 20:28, 29) Na yango, biso nyonso tokozongisa monɔkɔ mpo na lolenge oyo tozali kotalela litambwisi na ye. (Baloma 14:10-12) Botosi na biso epai na bankulutu ezali mpe komonisa ete toyokelaka Klisto, motó ya lisangá.—Bakolose 2:19.
14. Nini ekoki kosala ete bankulutu bákóma “komilelalela,” mpe yango ekoki kosuka ndenge nini?
14 Paulo apesaki ntina ya minei oyo tosengeli kolanda litambwisi ya bakɛngɛli. Akomaki boye: “Mpo básalaka yango na esengo kasi na komilelalela te, mpo yango ekozala likama mpo na bino.” (Baebele 13:17) Mikumba minene oyo bankulutu bazali na yango ya koteya, kobatela bampate, kopesa ndakisa na mosala ya kosakola, kobɔkɔla bana na bango mpe kotalela makambo ya lisangá emonisi mpenza ete bazali na mokumba moko ya kilo. (2 Bakolinti 11:28, 29) Soki toboyi litambwisi na bango, tozali kobakisela bango mokumba likoló ya mokumba. Wana tokotinda bango ‘bamilelalela.’ Lisusu, yango ekosepelisa Yehova te mpe ekoki kozala likama mpo na biso. Nzokande, soki tozali komemya bankulutu mpe kondima litambwisi na bango, bakokokisa mikumba na bango na esengo, mpe yango ekosala ete bomoko ezala na kati ya lisangá mpe mosala ya kosakola esalema na esengo.—Baloma 15:5, 6.
Tóyokelaka bango
15. Ndenge nini tokoki komonisa ete totosaka mpe toyokelaka bankulutu?
15 Ezali na ndenge mingi ya komonisa ete tozali kolanda litambwisi ya bankulutu. Tokosala nini soki bankulutu bazwi bibongiseli ete makita ya mosala ya kosakola esalemaka na mikolo mpe na bangonga oyo ekosɛnga biso tóbongola manaka na biso mpo na koyokanisa yango na oyo ya bato ya teritware na biso? Tosengeli kopesa bango mabɔkɔ. Yango ekoki komemela biso mapamboli oyo tokanaki te. Tokosala nini soki mokɛngɛli ya mosala ayei kotala etuluku na biso ya boyekoli ya mokanda? Tiká ete tósakola mingi na pɔsɔ yango. Okosala nini soki ozali na lisolo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi? Osengeli kosala makasi mpo oya na makita mpe osala yango. Tokosala nini soki mokɛngɛli ya etuluku na biso ya boyekoli ya mokanda ayebisi ete ezali ngala na biso ya kotya bopɛto na Ndako ya Bokonzi? Tiká ete tópesa mabɔkɔ, na kotalela esika makasi na biso esuki. Soki tosali makambo nyonso wana mpe makambo mingi mosusu, tokomonisa ete toyokelaka mibali wana oyo Yehova ná Mwana na ye batyá mpo na kobatela etonga.
16. Soki nkulutu asali te makambo ndenge esɛngami, mpo na nini ezali te libaku mpo na biso tótomboka?
16 Ntango mosusu, nkulutu akoki te kosala makambo ndenge moombo ya sembo mpe Lisangani na ye ya Mikóló-Bakambi bazali kosɛnga. Soki azali kokoba kosala bongo, akozongisa monɔkɔ epai na Yehova, “mobateli ya mpate mpe mokɛngɛli ya milimo na [biso].” (1 Petelo 2:25) Kasi, ata soki bankulutu mosusu basali libunga nini, yango epesi biso nzela te ya koboya koyokela bango. Yehova apambolaka te moto oyo azangi botosi to atomboki.—Mituya 12:1, 2, 9-11.
Yehova apambolaka bato oyo bayokaka
17. Ezaleli nini tosengeli kozala na yango liboso ya bankulutu?
17 Yehova ayebi ete bato oyo aponá bakɛngɛli bazali bato ya kozanga kokoka. Atako bongo, azali kosalela bango, mpe na nzela ya elimo santu na ye, azali kobatela basaleli na ye awa na mabelé. Ezala mpo na bankulutu to mpo na biso moko, “nguya oyo eleki makasi [ezali] ya Nzambe kasi te oyo euti na biso moko.” (2 Bakolinti 4:7) Na yango, tosengeli mpenza kotɔnda Yehova mpo na oyo azali kosala na nzela ya bankulutu na biso ya sembo, mpe tosengeli koyokelaka bango.
18. Soki tozali koyokela bakɛngɛli na biso, tokomonisa mpenza nini?
18 Bakɛngɛli bazali kosala nyonso mpo na kokokisa makambo oyo Yehova alobaki mpo na babateli oyo asengelaki kotya mpo na kokɛngɛla etonga na ye na ntango ya nsuka. Alobaki na Yilimia 3:15 boye: “Nakopesa bino babateli babongi na motema na ngai baoyo bakoleisa bino na boyebi mpe na bososoli.” Na ntembe te, bankulutu oyo tozali na bango bazali kosala mosala malamu mpenza ya koteya mpe kobatela etonga ya Yehova. Tiká ete tózalaka ntango nyonso na botɔndi epai na bango mpo na mosala makasi oyo bazali kosala. Tokosala yango soki tozali kolanda litambwisi na bango, kotosa mpe koyokela bango. Soki tozali kosala bongo, tokomonisa botɔndi epai ya Yehova Nzambe ná Yesu Klisto, Babateli na biso ya likoló.
Bozongeli
• Ndenge nini Yehova ná Yesu Klisto bamonisi ete bazali babateli ya mpate ya bolingo?
• Longola kotosa, mpo na nini tosengeli mpe koyokelaka baoyo bazali kokamba biso?
• Wapi bandenge oyo tokoki komonisa ete toyokelaka baoyo bazali kokamba biso?
[Elilingi na lokasa 27]
Bankulutu balandaka litambwisi ya Klisto
[Bililingi na lokasa 29]
Ezali na ndenge mingi ya komonisa ete tozali kolanda litambwisi ya babateli ya mpate oyo Yehova atyá