Lisolo ya bomoi
Koluka biloko ya motuya ememeli biso bozwi ya libela
Ya Dorothea Smith ná Dora Ward
Biloko nini ya motuya tozalaki koluka? Tozalaki bilenge basi mibale oyo tozalaki na mposa makasi ya kopesa mabɔkɔ na kokokisa etinda ya Yesu oyo: “Bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso.” (Matai 28:19) Tiká tóyebisa bino ndenge koluka biloko yango ememeli biso bozwi ya libela.
DOROTHEA: Nabotamaki na 1915, mwa moke na nsima ya ebandeli ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba. Nazalaki mwana ya nsuka ya libota na biso. Tozalaki kofanda pene na engumba Howell, na etúká ya Michigan, na États-Unis. Tata azalaki kosambela te, kasi mama azalaki mpenza kobanga Nzambe. Amekaki koteya biso kotosa Mibeko Zomi, kasi azalaki komitungisa mingi mpo ngai ná ndeko na ngai ya mobali Willis mpe yaya na ngai ya mwasi Viola tozalaki kokende ata na lingomba moko te.
Ntango nakokisaki mbula 12, mama azwaki ekateli ete bábatisa ngai na Lingomba ya Presbytérien. Nabosanaka mokolo ya batisimo na ngai te. Nazwaki batisimo elongo ná babebe mibale oyo bamama na bango bamemaki. Esalaki ngai nsɔni mingi kobatisama elongo ná babebe wana. Sango asopelaki ngai mwa mai na motó mpe alobaki na mongongo ya nse makambo oyo nayokaki kutu te. Ya solo, nazalaki kaka lokola babebe wana, mpo nayebaki ata eloko moko te na oyo etali batisimo!
Mokolo moko na 1932, motuka moko etɛlɛmaki liboso ya ndako na biso mpe mama afungolaki porte. Amonaki bilenge mibali mibale basimbi babuku ya makambo ya Nzambe. Moko na bango ayebisaki mama nkombo na ye: Albert Schroeder. Alakisaki mama babuku ya Batatoli ya Yehova oyo azalaki na yango mpe mama azwaki yango. Babuku yango esalisaki mama andima solo ya Liloba ya Nzambe.
Tobandi koluka biloko ya motuya
Na ntango wana, nakendeki kofanda na engumba Detroit epai ya yaya na ngai ya mwasi. Kuna, nakutanaki na mwasi moko mobange oyo azalaki koya koteya yaya Biblia. Masolo na bango ekundwelaki ngai programɛ moko ya radio oyo nazalaki kolanda pɔsɔ na pɔsɔ ntango nazalaki epai ya mama. Ndeko J. F. Rutherford, oyo azalaki na ntango wana kokamba misala ya Batatoli ya Yehova nde azalaki kolimbola mateya ya Biblia na boumeli ya miniti 15. Na 1937, tobandaki koyangana na lisangá ya liboso ya Batatoli ya Yehova na Detroit. Nazwaki batisimo na mbula oyo elandaki.
Na ebandeli ya mobu 1940, toyokaki ete Batatoli ya Yehova bakofungola kelasi moko na nkombo Gileadi, na engumba South Lansing, na etúká ya New York mpo na kobongisa bamisionɛrɛ. Ntango nayokaki ete bakobanda kotinda bana kelasi yango mosusu na mboka mopaya, nalobaki ete ‘ngai mpe nakosepela kokende na Gileadi!’ Namityelaki mokano ya kokɔta eteyelo yango. Oyo nde libaku kitoko ya kokende na bikólo mosusu mpo na koluka “biloko ya motuya,” elingi koloba bato oyo balingi kokóma bayekoli ya Klisto Yesu!—Hagai 2:6, 7.
Nazali kokokisa mokano na ngai mokemoke
Na Aprili 1942, nalongwaki na mosala mpe nakómaki mobongisi-nzela to mosakoli ya ntango nyonso na engumba ya Findlay, na Ohio, elongo na Batatoli mosusu mitano ya basi. Lokola lisangá ezalaki te, tozalaki kosala makita te, kasi tozalaki kolendisana ntango tozalaki kotánga elongo mikanda ya moombo ya sembo. Na sanza ya liboso oyo nasalaki lokola mobongisi-nzela, nakabolaki babuku 95 epai ya bato oyo basepelaki na nsango malamu. Nsima ya mbula moko na ndambo, batindaki ngai lokola mobongisi-nzela monene na Chambersburg na etúká ya Pennsylvanie. Kuna, nasalaki elongo na babongisi-nzela mosusu mitano, na kati na bango Dora Ward, ndeko mwasi moko ya etúká ya lowa. Dora, akómaki moninga na ngai ya mosala ya mobongisi-nzela. Biso nyonso mibale tozwaki batisimo mbula moko, tozalaki na mposa ya kokende na kelasi ya Gileadi mpe kokende lokola bamisionɛrɛ na mboka mopaya.
Na ebandeli ya 1944, mokolo oyo tozalaki kozela ekómaki! Babengaki ngai ná Dora na kelasi ya mbala ya minei ya Gileadi. Tobandaki kelasi na Augusto ya mbula yango. Kasi, liboso nakoba na lisolo na ngai, natiki Dora ayebisa bino ndenge akómaki moninga na ngai na mosala ya koluka biloko ya motuya na boumeli ya ebele ya bambula.
Mposa makasi ya kobanda mosala ya ntango nyonso
DORA: Mama azalaki kosambela mingi mpo azwa boyebi ya Liloba ya Nzambe. Mokolo moko ya lomingo, ngai ná mama tolandaki na radio lisukulu moko oyo ndeko J. F. Rutherford asalaki. Na nsuka ya lisukulu yango, mama alobaki na mongongo makasi ete: “Oyo ezali solo!” Mwa moke na nsima, tobandaki koyekola mikanda ya Batatoli ya Yehova. Na mobu 1935, ntango nazalaki na mbula 12, nalandaki lisukulu moko ya batisimo oyo Motatoli ya Yehova moko asalaki mpe nayokaki mposa makasi ya komipesa epai ya Yehova. Mbula misato na nsima, nazwaki batisimo. Komipesa na ngai mpe batisimo esalisaki ngai nabosana mikano na ngai te ntango nazalaki naino kotánga. Nazalaki na mposa makasi ya kosilisa kelasi mpo nabanda mosala ya mobongisi-nzela.
Na ntango wana, tozalaki koyangana elongo na etuluku ya Batatoli ya engumba ya Fort Dodge, na etúká ya Iowa. Ezalaki kosɛnga milende mpenza mpo na koyangana na makita. Na ntango yango, masolo ya boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezalaki na mituna te. Basɛngaki na mosakoli mokomoko abongisaka mituna oyo akopesa epai ya ndeko oyo azalaki kotambwisa boyekoli yango. Mokolo ya mosala moko na butu, ngai ná mama tozalaki kobongisa mituna mpo na eteni mokomoko mpe kopesa yango epai ya motambwisi mpo apona mituna oyo akotuna.
Bakɛngɛli-batamboli bazalaki koya kotala lisangá na biso mbala na mbala. Moko na bango ezalaki ndeko John Booth, oyo alakisaki ngai kosakola ndako na ndako ntango nazalaki na mbula 12. Ntango nakokisaki mbula 17, natunaki ye alakisa ngai ndenge ya kotondisa formilɛrɛ mpo na kosɛnga mosala ya mobongisi-nzela, mpe asalisaki ngai. Nakokaki kokanisa ata moke te ete tokokutana lisusu na ndeko yango mpe akokóma moninga na ngai mpo na libela!
Ntango nazalaki mobongisi-nzela, nazalaki kosakola mingi ná ndeko mwasi Dorothy Aronson oyo azalaki mpe mobongisi-nzela mpe azalaki mokóló na ngai ya mbula 15. Tozalaki kosakola elongo kino ntango babengaki ye na kelasi ya mbala ya liboso ya Gileadi na 1943. Nakobaki na mosala na ngai ya mobongisi-nzela ngai moko.
Botɛmɛli ekolɛmbisa biso te
Etumba ya Mibale ya mokili mobimba etindaki bato bákolisa bolingo ya ekólo. Yango wana, bambula ya 1940 ezalaki mpasi mpenza mpo na biso. Ntango tozalaki kosakola ndako na ndako, bazalaki kobamba biso maki epɔlá, batomati mpe ntango mosusu ata mabanga! Tomekamaki lisusu makasi ntango tozalaki kokabola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Consolation (lelo oyo Lamuká!) na balabala. Na bopusi ya bato ya mangomba oyo bazalaki kotɛmɛla biso, bapolisi bayaki kopekisa biso mpe balobaki ete soki bamoni biso lisusu tozali kosakola bakokanga biso.
Kasi, totikaki te mpe bamemaki biso na biro ya bapolisi mpo na kosambisa biso. Ntango batikaki biso, tozongaki lisusu kaka esika oyo bakangaki biso mpe tokobaki kokabola bazulunalo. Bandeko oyo bazalaki kotambwisa mosala ya kosakola balendisaki biso totángelaka moto nyonso oyo akangi biso Yisaya 61:1, 2 mpo na kolimbola ntina oyo tokoki te kotika kosakola. Mokolo moko, polisi moko akangaki ngai. Natángelaki ye bavɛrsɛ na motó na mongongo oyo emonisaki ete nasiliki. Likambo ya kokamwa, abalukaki mpe akendeki mbala moko! Namonaki lokola baanzelu bazalaki kobatela biso.
Mokolo oyo nakobosana te
Na 1941, nazalaki na esengo ya koyangana na liyangani ya Batatoli ya Yehova oyo esalaki mikolo mitano na Saint Louis, na etúká ya Missouri. Na boumeli ya liyangani yango, Ndeko Rutherford asɛngaki na bana nyonso oyo bazalaki na mbula kobanda 5 tii 18 bákende kofanda na esika moko oyo babongisaki mpo na bango. Bankóto ya bana bayanganaki na esika yango. Ndeko Rutherford apɛpaki biso elamba mpo na kopesa biso mbote. Biso nyonso mpe topɛpaki ye mabɔkɔ. Nsima ya lisukulu na ye ya ngonga moko, alobaki boye: “Nasɛngi bana oyo bandimi kosala mokano ya Nzambe, baponi Bokonzi ya Nzambe oyo ezali koyangelama na Klisto Yesu mpe bandimi kotosa Nzambe mpe Mokonzi oyo ye atyé bátɛlɛma.” Bana 15 000 batɛlɛmaki mbala moko. Nazalaki moko na bango! Abakisaki boye: “Nasɛngi na bino nyonso oyo bondimi kosala oyo bokokoka mpo na koyebisa basusu makambo etali Bokonzi ya Nzambe mpe mapamboli oyo alaki, bóloba Ɛɛ.” Tolobaki “Ɛɛ!” Mpe bayangani babɛtaki mabɔkɔ makasi.
Na nsima alakisaki buku ya sika oyo motó ya likambo na yango ezalaki Bana,a(na Lingelesi). Bilenge batandamaki molɔngɔ tii na esika ndeko Rutherford azalaki mpe apesaki elenge mokomoko buku wana ya sika. Ezalaki esengo mpenza! Lelo oyo, mingi kati na baoyo bazwaki buku yango na liyangani wana bazali kokoba kosalela Yehova na molende na mokili mobimba mpe bazali koyebisa bato makambo etali Bokonzi ya Nzambe mpe boyengebene na yango.—Nzembo 148:12, 13.
Nsima ya kosakola lokola mobongisi-nzela ngai moko na boumeli ya mbula misato, nasepelaki mingi ntango nazwaki mokanda ya biro oyo esɛngaki ngai nakende kosala lokola mobongisi-nzela monene na Chambersburg! Kuna, nakutanaki na Dorothea, mpe tokómaki baninga mpenza. Tozalaki na esengo mingi mpe lokola tozalaki bilenge, tozalaki na makasi mingi. Tozalaki na mposa makasi ya kobakisa molende na biso na mosala ya kosakola. Biso nyonso mibale tobandaki koluka biloko ya motuya, mosala oyo tosali bomoi na biso mobimba.—Nzembo 110:3.
Mwa basanza na nsima ya kobanda mosala na biso ya babongisi-nzela minene, tokutanaki na ndeko Albert Mann, oyo akɔtaki kelasi ya mbala ya liboso ya Gileadi. Etikalaki moke akende epai biro etindaki ye. Alendisaki biso tóndimaka kokende epai nyonso oyo biro ekotinda biso.
Tokei na Gileadi elongo
DORA NÁ DOROTHEA: Bókanisa naino esengo oyo tozalaki na yango ntango tobandaki mateya na Gileadi! Mokolo ya liboso ya kelasi, ndeko Albert Schroeder oyo apesaki mama ya Dorothea buku Études des Écritures mbula 12 liboso nde akomaki bankombo na biso. Ndeko John Booth mpe azalaki wana. Azalaki na ntango wana mokɛngɛli ya Ferme ya Bokonzi, epai eteyelo ezalaki. Na nsima, bango nyonso mibale bakómaki na Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova.
Na kelasi ya Gileadi, toyekolaki solo ya Biblia na mozindo mpenza. Ezalaki formasyo kitoko mpenza. Tozalaki bana ya kelasi 104 mpe moko na biso azalaki moto ya Amérique te, autaki na Mexique. Ye azalaki kokolisa Lingelesi na ye mpe biso tozalaki koyekola monɔkɔ ya Espagnol. Tozalaki na esengo makasi mokolo Ndeko Nathan H. Knorr apesaki biso mikanda oyo eyebisaki biso bisika oyo batindaki biso. Batindaki mingi kati na biso na Amerika ya Ntei mpe ya Sudi; biso tokendeki na chili.
Tozali koluka biloko ya motuya na Chili
Mpo na kokɔta na Chili, tosengelaki kozwa viza. Mpo na kozwa yango, tozelaki ntango molai. Na yango, nsima ya kozwa diplome na sanza ya Yanuali 1945, tosalaki lokola babongisi-nzela na etúká ya Washington na boumeli ya mbula moko na ndambo. Ntango tozwaki baviza na biso, tokendeki chili elongo na bamisionɛrɛ mosusu libwa. Bamisionɛrɛ nsambo kati na bango bakɔtaki bakelasi ya Gileadi mosusu liboso na biso.
Tokutanaki na bandeko ebele ntango tokómaki na Santiago, mboka-mokonzi ya Chili. Moko na bango ezalaki ndeko Albert Mann, mwana-kelasi ya Gileadi, oyo alendisaki biso mwa bambula liboso. Ye ná ndeko Joseph Ferrari, mwana-kelasi ya Gileadi ya mbala ya mibale, bakómaki na Chili mbula moko liboso na biso. Na ntango wana, basakoli bakómaki ata 100 te na Chili mobimba. Tozalaki na mposa makasi ya koluka mpe kozwa biloko mingi ya motuya, elingi koloba bato ya motema sembo na kati ya teritware na biso ya sika.
Tozalaki kofanda na ndako moko ya bamisionɛrɛ na Santiago. Kofanda elongo ná bamisionɛrɛ ebele ezalaki likambo ya sika mpo na biso. Longola kokokisa bangonga oyo basɛngaki biso na mosala ya kosakola, misionɛrɛ mokomoko asengelaki kolambaka mbala moko na pɔsɔ mpo na biso nyonso. Biso mpe tosalaki mwa makambo mosusu oyo ebongaki te. Mokolo moko, tolambaki bisikiti oyo tosengelaki kolya biso nyonso na ntɔngɔ. Kasi, ntango tobimisaki yango na fulu ya kotumba mampa, ezalaki kolumba nsolo mabe. Tosalelaki nde eloko mosusu na esika ya levire! Moko na biso atyaki eloko yango na linzanza ya levire.
Likambo etungisaki biso mingi koleka ezalaki nde mabunga oyo tozalaki kosala ntango tozalaki koyekola monɔkɔ ya Espagnol. Libota moko ya bato mingi oyo tozalaki koyekola na bango Biblia balingaki kotika koyekola, mpamba te bazalaki kosimba ntina te ya makambo oyo tozalaki koyebisa bango. Kasi, lokola bazalaki kotánga bavɛrsɛ na kati ya Babiblia na bango moko, yango esalisaki bango báyekola solo; mpe mitano kati na bango bakómá Batatoli. Na bambula wana, bazalaki te koteya bamisionɛrɛ ya sika monɔkɔ oyo basengelaki kosalela. Tobandaki kosakola mbala moko mpe koyekola mokemoke monɔkɔ ya Espagnol epai ya bato oyo tozalaki kosakwela.
Toyekolaki Biblia na bato ebele mpe basusu kati na bango bakolaki nokinoki na elimo. Mpo na basusu, esengelaki tózala motema molai. Teresa Tello, elenge mwasi moko, alandaki mateya na biso mpe alobaki boye: “Nasɛngi bino bózonga koyebisa ngai makambo mosusu.” Tozongelaki ye mbala 12 kozanga ete tókuta ye. Mbula misato elekaki. Na nsima, toyanganaki na liyangani moko oyo esalemaki na esika moko ya masano na Santiago. Mokolo ya lomingo, ntango tozalaki kobima na esika ya liyangani, toyokaki moto moko azali kobelela: “Senorita Dora, senorita Dora!” Totalaki na nsima mpe tomonaki Teresa. Ayaki kotala ndeko na ye ya mwasi oyo azalaki kofanda na ngámbo mosusu ya balabala mpe akatisaki mpo na kotala soki nini ezalaki kosalema na esika wana. Tozalaki na esengo ya kokutana na ye lisusu! Tozwaki bibongiseli mpo tóbanda koyekola Biblia mpe mosika te azwaki batisimo. Na nsima, akómaki mobongisi-nzela monene. Lelo oyo, mbula soki 45 na nsima, Teresa azali kaka kokoba na mosala ya ntango nyonso.—Mosakoli 11:1.
Tozali koluka biloko ya motuya na “Zɛlɔ”
Na 1959, batindaki biso na engumba Punta Arenas, oyo elimboli “Libondo ya Zɛlɔ,” na Sudi mpenza ya Chili. Engumba yango ezali na bolai ya bakilomɛtrɛ 4 300 na bokula ya mbu. Punta Arenas ekeseni mpenza na bingumba mosusu. Na eleko ya molunge, mikolo ezalaka milai, elingi koloba moi elalaka te tii pene na midi ya butu. Tozalaki kolekisa mikolo ebele na mosala ya kosakola, kasi mikakatano ezalaki kozanga te, mpo eleko ya molunge ezalaka na mipɛpɛ makasi mpenza. Eleko ya malili, ezalaka nde malili mpenza mpe mikolo ezalaka mikuse.
Atako bongo, Punta Arenas ezali mpe na makambo na yango ya kitoko. Na eleko ya molunge, mapata ya minene elekalekaka likoló mpo na kokende epai moi elalaka. Na bantango mosusu, okoyoka litangá ya mai ekweli yo na motó, kasi na nsima mopɛpɛ ya makasi ekaukisi yango. Monama mpe emonanaka ntango kongɛnga ya moi elekaka na kati ya mapata wana. Mikolo mosusu, monama yango eumelaka bangonga ebele, ebimaka mpe elimwaka ntango mapata ezali koleka liboso ya moi.—Yobo 37:14.
Na ntango wana, basakoli bazalaki moke na engumba Punta Arenas. Biso bandeko basi tosengelaki kotambwisa makita na mwa lisangá ya moke oyo ezalaki wana. Yehova apambolaki milende na biso. Mbula 37 na nsima, tozongaki na engumba Punta Arenas mpo na kotambola kaka. Tokutaki nini? Masangá motoba ya minene mpe Bandako ya Bokonzi misato ya kitoko mpenza. Oyo nde esengo komona ndenge Yehova apesaki biso nzela ya kobimisa biloko ya motuya ya elimo na bamboka wana ya sudi!—Zekalia 4:10.
Biloko mosusu ya motuya na “Libongo Monene”
Nsima ya kosala mbula misato na ndambo na Punta Arenas, batindaki biso na engumba Valparaiso. Engumba yango ezali na bangomba 41 na pembeni ya Mbu ya Pasifike. Tozalaki kosakola mingimingi na moko ya bangomba yango, Playa Ancha, oyo elingi koloba “Libongo Monene.” Na boumeli ya mbula 16 oyo tosalaki kuna, tomonaki ndenge bilenge mingi bakolaki na elimo, mpe lelo oyo bazali bakɛngɛli-batamboli mpe bankulutu na masangá ya Chili.
Na nsima, batindaki biso na engumba Viña del Mar. Toumelaki kuna mbula misato na ndambo kino mabelé eninganaki mpe ebebisaki ndako ya bamisionɛrɛ. Tozongaki na Santiago, epai tobandaki mosala na biso ya misionɛrɛ mbula 40 liboso. Makambo ebongwanaki kuna. Batongaki Betele ya sika mpe esika oyo Betele ya liboso ezalaki ekómaki ndako ya bamisionɛrɛ nyonso oyo bazalaki na Santiago. Na nsima, ndako yango ekómaki Eteyelo mpo na kobongisa basungi. Na ntango yango, Yehova amonisaki lisusu boboto na ye epai na biso. Basɛngaki na bamisionɛrɛ mitano kati na biso oyo bapusanaki na mbula bákɔta na Betele. Na boumeli ya ntango oyo tosali awa na Chili, batindaki biso na bisika 15 ekeseni. Tomoni ndenge mosala ekei liboso. Basakoli oyo bazalaki ata 100 te bakómi soki 70 000! Oyo nde esengo tozali na yango ya koluka biloko ya motuya na kati ya ekólo chili na boumeli ya mbula 57!
Topambolami mpenza na ndenge Yehova asalisi biso tóbimisa biloko ya motuya mpenza, elingi koloba bato ebele oyo ebongiseli ya Yehova ezali kokoba kosalela. Nsima ya mbula koleka 60 oyo tosaleli Yehova elongo, tokoki mpenza koloba lokola Mokonzi Davidi ete: “Malamu na yo ezali monene mingi mpenza, oyo yo obombeli bango bakotosaka yo!”—Nzembo 31:19.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisamaki na Batatoli ya Yehova, kasi sikoyo ebimaka lisusu te.
[Bililingi na lokasa 9]
Dorothea, na 2002 mpe na mosala ya kosakola na 1943
[Elilingi na lokasa 10]
Tozali kosakola na balabala na Fort Dodge, Iowa, na 1942
[Elilingi na lokasa 10]
Dora, na 2002
[Elilingi na lokasa 12]
Dorothea ná Dora, liboso ya ndako ya bamisionɛrɛ ya liboso oyo bafandaki na Chili, na 1946