Otalelaka basusu ndenge Yehova atalelaka bango?
“Bokabwani ezala te na kati ya nzoto . . . binama na yango ezala na lobanzo motindo moko yango na yango.”—1 Kol. 12:25.
1. Oyokaki ndenge nini ntango okɔtaki na paladiso ya elimo?
NTANGO tobimaki na mokili oyo mabe mpe tobandaki koyangana ná basaleli ya Yehova, na ntembe te tozalaki na esengo ya komona bolingo ya solosolo oyo ezalaka na kati na bango. Bakeseni mpenza na bato oyo bazali kotambwisama na Satana, oyo batondi na koyinana mpe na kowelana! Tokɔtaki na paladiso ya elimo, oyo etondi na kimya mpe na bomoko.—Yis. 48:17, 18; 60:18; 65:25.
2. (a) Nini ekoki kosala ete tótalelaka basusu na ndenge oyo ebongi te? (b) Tosengeli kosala nini?
2 Kasi, ntango mikolo ezali koleka, tokoki kobanda kotalela bandeko na miso na biso ya kozanga kokoka. Kozanga kokoka na biso ekoki kotinda biso tókóma komona kaka mabe ya bandeko na biso na esika ya kotalela bizaleli na bango ya malamu. Na mokuse, tobosanaka kotalela bango ndenge Yehova atalelaka bango. Soki ekómeli biso, tosengeli kotalela lolenge oyo totalelaka basusu mpe koyokanisa yango na oyo ya Yehova.—Ex. 33:13.
Ndenge oyo Yehova atalelaka bandeko na biso
3. Biblia emonisi ete lisangá ya baklisto ekokani na nini?
3 Ndenge totángaka yango na 1 Bakolinti 12:2-26, Paulo alobi ete lisangá ya baklisto bapakolami ezali lokola nzoto oyo ezali na “binama mingi.” Ndenge kaka binama ya nzoto ekeseni, ndeko mokomoko na kati ya lisangá azali na bizaleli mpe makoki oyo ekeseni na oyo ya basusu. Kasi, Yehova andimaka bokeseni wana. Alingaka mpe asepelaka na ndeko mokomoko. Yango wana, Paulo apesi biso toli ete bandeko ya lisangá basengeli ‘kozala na lobanzo moko bango na bango.’ Yango ekoki kozala mpasi mpo bizaleli ya basusu ekoki kokesana makasi mpenza na oyo ya biso.
4. Mpo na nini tosengeli kobongisa lolenge na biso ya kotalela bandeko?
4 Mbala mosusu mpe tokoki kokóma kotalela kaka bolɛmbu ya bandeko na biso. Kosala bongo, ezali lokola tozali kosalela masini moko ya fɔtɔ oyo ekoki kozwa kaka esika ya moke. Nzokande, Yehova amonaka moto na mobimba na ye mpe na makambo na ye nyonso. Biso tokoki kotya likebi na biso kaka na likambo oyo tozali kosepela na yango te, nzokande Yehova amonaka moto mobimba, ná bizaleli na ye ya malamu. Ntango tozali kosala makasi mpo na komekola Yehova, tokoki kosala mingi mpo bolingo mpe bomoko ezala na lisangá.—Ef. 4:1-3; 5:1, 2.
5. Mpo na nini ebongi te tósambisaka basusu?
5 Yesu ayebaki malamu ete bato ya kozanga kokoka balingaka mingi kosambisa basusu. Apesaki toli ete: “Bótika kosambisa mpo bino bósambisama te.” (Mat. 7:1) Yesu alobaki te ete “Bósambisa te,” kasi alobaki nde ete “bótika kosambisa.” Ayebaki ete bato mingi oyo bazalaki koyoka ye bazalaki na momeseno ya kosambisa basusu. Ekoki kozala ete tokómi na ezaleli yango. Soki tozalaka na ezaleli yango, tosengeli kosala makasi mpo na kotika, mpo biso mpe tósambisama te. Biso tozali banani mpo na kosambisa moto oyo Yehova apesi mokumba moko to koloba ete asengeli te kozala na kati ya lisangá? Ndeko moko akoki kozala na mwa mabunga, kasi soki Yehova azali kokoba kondima ye, ekozala mpenza malamu biso tóboya ye? (Yoa. 6:44) Tozali mpenza kondima ete Yehova azali kotambwisa ebongiseli na ye mpe ete soki makambo ya kosembola ezali, akosala yango na ntango oyo ye moko alingi?—Tángá Baloma 14:1-4.
6. Ndenge nini Yehova atalelaka basaleli na ye?
6 Likambo ya malamu epai na Yehova ezali ete azali na likoki ya komona ndenge moklisto mokomoko akozala ntango akokóma moto ya kokoka na mokili ya sika. Ayebi mpe milende oyo mokomoko asili kosala mpo na kosalela mitinda ya Biblia. Yango wana, alandelaka te mabunga oyo moto asalaka. Totángaka na Nzembo 103:12 ete: “Mosika [lokola] yango kati na epai na ebimelo na ntango mpe epai na elimwelo na yango, mosika boye asili kolongola bipɛngwɛli na biso.” Tosengeli mpenza kozala na botɔndi mpo na yango!—Nz. 130:3.
7. Liteya nini tozwi na lolenge oyo Yehova atalelaki Davidi?
7 Makomami ezali komonisa polele ete Yehova atalelaka mingi bizaleli malamu ya moto. Nzambe abengaki Davidi “moombo na ngai Davidi, . . . ye oyo abatelaki malako na ngai mpe [alandaki] ngai na motema na ye mobimba, kosala bobele yango ezali malamu na miso na ngai.” (1 Mik. 14:8) Ya solo, toyebi ete Davidi asalaki makambo mosusu oyo ezalaki mabe. Atako bongo, Yehova atyaki nde likebi na bizaleli malamu ya Davidi, mpo ayebaki ete motema na ye ezalaki malamu.—1 Nta. 29:17.
Taleláká bandeko ndenge Yehova atalelaka bango
8, 9. (a) Ndenge nini tokoki komekola Yehova? (b) Ndakisa nini tokoki kopesa na likambo yango, mpe liteya nini tokoki kozwa na ndakisa yango?
8 Yehova akoki kotánga na kati ya motema ya moto, kasi biso tokoki kosala yango te. Ata likambo wana kaka ekoki kosalisa biso tósambisaka basusu te. Toyebaka te makanisi nyonso oyo ezali na motema ya moto. Tosengeli komekola Yehova mpe koboya kotya likebi kaka na mabunga ya basusu, oyo ekotikala libela te. Ekozala malamu tóluka komekola Yehova oyo atalaka kaka te mabunga ya bato. Kosala bongo, ekosala ete tózala na kimya na bandeko na biso.—Ef. 4:23, 24.
9 Tózwa ndakisa. Kanisá ete ndako moko ebandi kobeba, manzanza ebandi kolongwa, maninisa ezali kobukana mpe mai epolisi plafɔ. Bato mingi oyo bazali komona ndako yango bakoki koloba ete esengeli kobuka yango mpo ezali lisusu kitoko te. Nzokande, moto moko akoki kozala na likanisi oyo ekeseni na oyo ya basusu. Na esika asuka kaka na oyo amoni na miso, atali yango malamumalamu mpe amoni ete ezali naino makasi mpe ekoki kobonga. Asombi ndako yango, abongisi bisika oyo ebebaki mpe akómisi yango kitoko. Na nsima, baleki-nzela babandi kokumisa ndako yango. Tokoki nde kozala lokola moto wana oyo asalaki makasi mpo na kobongisa ndako yango? Na esika ya komonaka kaka mabunga ya bandeko na biso, tokoki mpe kotalela bizaleli na bango ya malamu mpo na komona ete bakoki kokola na elimo? Soki tosali bongo, tokokóma kolinga bandeko na biso mpo na bizaleli na bango ya malamu, ndenge Yehova asalaka.—Tángá Baebele 6:10.
10. Ndenge nini toli oyo ezali na Bafilipi 2:3, 4 ekoki kosalisa biso?
10 Ntoma Paulo apesi batoli oyo ekoki kosalisa biso tózala malamu na bandeko nyonso na lisangá. Alobaki na baklisto boye: “[Bósalaka] eloko moko te na kowelana to na ezaleli ya komitya liboso, kasi na elimo ya komikitisa bótalelaka bamosusu ete baleki bino, kotyáká likebi, na kobanzabanza kaka na makambo na bino moko te, kasi na kobanzabanza mpe na makambo ya bamosusu.” (Filp. 2:3, 4) Komikitisa ekosalisa biso tótalelaka basusu na ndenge ebongi. Komibanzabanza mpo na basusu mpe koluka komona malamu na bango, ekosalisa biso tómonaka bango ndenge Yehova amonaka bango.
11. Makambo nini ememi mbongwana na masangá mosusu?
11 Na mikolo oyo, bambongwana oyo esalemi na mokili etindi bato mingi bákende kofanda na mikili mosusu. Bingumba mosusu etondi sikoyo na bato bauti na mikili ndenge na ndenge. Bato mosusu oyo bayei kofanda na bamboka na biso bakómi kosepela na mateya ya Biblia mpe bakómi kosambela Yehova elongo na biso. Bato yango “bauti na bikólo nyonso mpe na mabota nyonso mpe na bato ya mikili nyonso mpe na minɔkɔ nyonso.” (Emon. 7:9) Yango esali ete masangá na biso ekóma na bato bauti na mikili ndenge na ndenge.
12. Ndenge nini tosengeli kotalelanaka, mpe mpo na nini yango ekoki kozala mokakatano?
12 Na lisangá na biso, tosengeli kokeba ete tótalelanaka na ndenge ebongi. Yango ekosɛnga ete tóbosana te toli oyo ntoma Petelo apesaki ete tózala na “bolingo ya bondeko oyo ezangi bokosi” mpe ‘tólinganaka makasi uta na motema.’ (1 Pet. 1:22) Kozala na bolingo ya solosolo esika bato ya mikili ndenge na ndenge bazali esika moko ezalaka pɛtɛɛ te. Makambo na bango, na ndakisa bakelasi oyo batángá, bozwi na bango mpe mimeseno ya mboka na bango ekoki kokesana mosika na oyo ya biso. Ezalaka mpasi mpo na yo komitya na esika ya bandeko wana oyo makanisi to makambo na bango ekeseni na oyo ya yo? Bango mpe bakoki kozala na mokakatano wana mpo na yo. Atako bongo, biso nyonso tozwi toli oyo: “Bólinga lisangá mobimba ya bandeko.”—1 Pet. 2:17.
13. Mbongwana nini tosengeli kosala na makanisi na biso?
13 Ntango mosusu ekosɛnga tóbongola makanisi na biso mpo tókóma kolinga bandeko na biso nyonso. (Tángá 2 Bakolinti 6:12, 13.) Ekómelá biso te tóbimisa maloba lokola “ngai nakaniselaka basusu mabe te, kasi . . . ” mpe na nsima tokómi kolobela mabe ya bato ya ekólo moko boye? Likambo wana ekoki komonisa ete tozali naino kokanisela basusu mabe na motema mpe tosengeli kotika. Tokoki komituna boye: ‘Nasalaka makasi nayeba bato ya bikólo to mikili mosusu?’ Komitalela ndenge wana ekoki kosalisa biso tókóma kosepela na bandeko na biso ya mokili mobimba.
14, 15. (a) Pesá bandakisa ya bato oyo babongolaki lolenge na bango ya kotalela basusu? (b) Ndenge nini tokoki komekola bango?
14 Biblia elobeli bato oyo babongolaki makanisi na bango; moko na bango ezali ntoma Petelo. Lokola azalaki Moyuda, Petelo azalaki kokɔta na ndako ya mopakano te. Kanisá naino ndenge ayokaki ntango basɛngaki ye akende epai ya Koloneyi, mopakano oyo akatamaki ngenga te! Petelo abongolaki makanisi na ye mpo amonaki ete mokano ya Nzambe ezali ete bato ya bikólo nyonso bákɔta na lisangá ya baklisto. (Mis. 10:9-35) Saulo, oyo akómaki na nsima ntoma Paulo, asengelaki mpe kobongola makanisi na ye mpo atika kokanisela basusu mabe. Andimaki ete azalaki koyina baklisto mingi mpe akómaki “konyokola lisangá ya Nzambe mpe kopanzapanza yango” na koleka ndelo. Kasi, ntango Nkolo Yesu asembolaki ye, Paulo asalaki mbongwana monene mpe abandaki kutu kondima litambwisi ya bato oyo ye azalaki konyokola.—Gal. 1:13-20.
15 Na ntembe te, emonani ete na lisalisi ya elimo ya Yehova tokoki kobongola bizaleli na biso. Soki tomoni ete tozali naino na mwa makanisi mabe mpo na basusu, tósala makasi mpo na kolongola yango mpe “kobatela bomoko ya elimo na kati ya ekanganeli ya kimya oyo esangisaka.” (Ef. 4:3-6) Biblia ezali kolendisa biso ‘tólata bolingo, mpo yango ezali ekanganeli ya kokoka mpo na bomoko.’—Kols. 3:14.
Tómekola Yehova ntango tozali kosakola
16. Mokano ya Nzambe mpo na bato ezali nini?
16 Ntoma Paulo akomaki ete: “Epai ya Nzambe koponapona ezalaka te.” (Lom. 2:11) Yehova nde alingi ete bato ya bikólo nyonso bákóma kosambela ye na bomoko. (Tángá 1 Timote 2:3, 4.) Mpo na yango, azwi bibongiseli mpo “nsango malamu ya seko” esakolama na “bikólo nyonso mpe mabota nyonso mpe minɔkɔ nyonso mpe mikili nyonso.” (Emon. 14:6) Yesu alobaki ete: “Elanga ezali mokili.” (Mat. 13:38) Yango elimboli nini mpo na yo mpe libota na yo?
17. Ndenge nini tokoki kosalisa bato ya lolenge nyonso?
17 Basakoli nyonso te nde bazali na likoki ya kokende mosika mpo na kosakwela basusu nsango malamu. Atako bongo, tokoki kosakola nsango malamu epai ya bato ya bikólo mosusu oyo bazali na teritware na biso. Tosimbaka mabaku oyo tokutanaka na yango ya kopesa litatoli epai na bato nyonso, kasi kaka te epai ya baoyo tosakwelaka mbula na mbula? Mpo na nini te komityela mokano ya kosakwela bato mosusu oyo bayoká naino nsango malamu te?—Lom. 15:20, 21.
18. Ndenge nini Yesu amonisaki ete azalaki komibanzabanza mpo na bato?
18 Yesu azalaki na mposa ya kosalisa bato nyonso. Azalaki kosakola kaka na esika moko te. Lisolo moko ya Biblia eyebisi biso ete “Yesu azalaki kolekaleka na bingumba nyonso mpe bamboka.” Mpe “ntango amonaki bibele wana ya bato ayokelaki bango mawa” mpe asalisaki bango.—Mat. 9:35-37.
19, 20. Na ndakisa ya Yehova ná Yesu, wapi balolenge oyo tokoki komonisa ete tozali komibanzabanza mpo na bato ya lolenge nyonso?
19 Wapi balolenge oyo okoki komonisa ezaleli yango? Bandeko mosusu basalaki makasi bápesa litatoli na bisika mosusu na teritware na bango epai nsango malamu esakolamaka mingi te. Bisika yango ekoki kozala bamagazini to bazando, baparke, esika mituka to engbunduka etɛlɛmaka, to liboso ya bandako oyo ezalaka mpasi mpo na kokɔta. Basusu basalaki makasi báyekola monɔkɔ mosusu mpo bákoka kopesa litatoli epai ya bato ya bikólo mosusu oyo bazali kofanda na mboka na bango to epai ya bato oyo bazwaka litatoli mingi te. Koyekola ndenge ya kopesa bato wana mbote na monɔkɔ na bango ekoki komonisa ete ozali mpenza komibanzabanza mpo na bango. Ata soki tozali na likoki te ya koyekola monɔkɔ mosusu, mpo na nini te kolendisa baoyo bazali koyekola? Tosengeli te kolɛmbisa bandeko mosusu oyo bazali kosala makasi mpo na kopesa litatoli epai ya bato ya ekólo mosusu. Bomoi ya bato nyonso ezali na motuya na miso ya Nzambe, mpe ekozala malamu biso mpe tótalelaka makambo lokola Nzambe.—Kols. 3:10, 11.
20 Soki tozali kotalela bato ndenge Nzambe atalelaka bango, yango ekotinda biso tósakwela bato nyonso, atako bazali ndenge nini. Ekoki kozala ete bato mosusu bazangá bisika ya kofanda, bazali bosɔtɔ, to mpe bamipesá na makambo oyo Nzambe apekisi. Soki bato mosusu basali biso mabe, yango esengeli kotinda biso te tóbanda kokanisela ekólo na bango mobimba mabe. Bato mosusu basalaki Paulo mabe, kasi atikaki te ete yango epekisa ye kosakwela bato ya bikólo na bango nsango malamu. (Mis. 14:5-7, 19-22) Azalaki na elikya ete bamosusu bakoki kondima nsango malamu.
21. Ndenge nini kotalela basusu ndenge Yehova atalelaka bango ekoki kosalisa yo?
21 Emonani sikoyo polele ete mpo na kofanda malamu na bandeko ya lisangá na biso, bandeko na biso ya mokili mobimba, to bato oyo tokutanaka na bango na mosala ya kosakola, tosengeli kozala na makanisi oyo ebongi, elingi koloba kotalelaka bato ndenge Yehova atalelaka bango. Soki tozali kotalela bato ndenge Yehova atalelaka bango, tokozala na likoki ya kofanda na kimya mpe na bomoko. Tokozala mpe na likoki ya kosalisa basusu bákóma kolinga Yehova, Nzambe oyo “akotalaka bilongi . . . te” kasi oyo alingaka bato nyonso, “mpo ete bazali nyonso mosala ya mabɔkɔ na ye.”—Yobo 34:19.
Okoki koyanola?
• Wapi lolenge ya kotalela bandeko na biso oyo tosengeli koboya?
• Ndenge nini tokoki komekola Yehova na lolenge ya kotalela bandeko na biso?
• Mateya nini ozwi na oyo etali lolenge ya kotalelaka bandeko na biso ya mokili mobimba?
• Ndenge nini totoki komekola Yehova na lolenge ya kotalela bato oyo tokutanaka na bango na mosala ya kosakola?
[Elilingi na lokasa 26]
Ndenge nini okoki koyeba bato ya bikólo mosusu?
[Elilingi na lokasa 28]
Okoki kosala nini mpo osakwela bato ebele nsango malamu?