Kobala mpe kobota na ntango oyo ya nsuka
“Ntango oyo etikali ekómi mokuse.”—1 KOL. 7:29.
1. (a) Mbongwana nini ezali na kati ya makambo ya “mpasi mpenza” oyo ezali lelo oyo? (b) Mpo na nini tosengeli komibanzabanza na ndenge oyo mbongwana ezali kosalema na mabota?
LILOBA ya Nzambe esakolaki ete bitumba, koningana ya mabelé, nzala, mpe bamaladi ekozala na “ntango ya nsuka.” (Dan. 8:17, 19; Luka 21:10, 11) Esakolaki mpe ete na eleko yango, mbongwana minene ekosalema na makambo ya bomoi ya bato. Yikiyiki na mabota ekozala na kati ya makambo ya “mpasi mpenza” oyo ekomonana na “mikolo ya nsuka.” (2 Tim. 3:1-4) Mpo na nini tosengeli komibanzabanza mpo na makambo yango? Mpamba te ezali kosalema mingi mpe ekoki kobongola ndenge oyo baklisto batalelaka kobala mpe kobota. Na ndenge nini?
2. Ndenge nini bato ya mokili batalelaka libala mpe koboma libala?
2 Lelo oyo, koboma libala ezali lisusu mpasi te mpe ezali kosalema mingi, mpe na mikili mingi, motángo ya mabala oyo ezali kokufa ezali se kobakisama. Nzokande, tosengeli kobosana te ete ndenge oyo Yehova Nzambe atalelaka libala mpe koboma libala ekeseni mpenza na ndenge oyo bato ya mokili batalelaka yango. Yehova atalelaka yango ndenge nini?
3. Ndenge nini Yehova ná Yesu Klisto batalelaka libala?
3 Yehova Nzambe alingi ete bato oyo babalani bákokisa ndai na bango ya libala, bákabwana te. Ntango Yehova abalisaki mobali mpe mwasi ya liboso, alobaki ete “moto . . . akokangama na mwasi na ye, mpe bango bakozala mosuni moko.” Na nsima, Yesu azongelaki maloba yango mpe abakisaki boye: “Na yango, oyo Nzambe akangisi esika moko moto akabola yango te.” Yesu alobaki lisusu ete: “Moto nyonso oyo abomi libala ná mwasi na ye, soki mpo na pite te, mpe abali mosusu azali kosala ekobo.” (Gen. 2:24; Mat. 19:3-6, 9) Na bongo, mpo na Yehova ná Yesu, libala esengeli kosuka kaka ntango molongani moko akufi. (1 Kol. 7:39) Lokola libala ezali ebongiseli ya bosantu, koboma libala ezali likambo ya lisɛki te. Kutu, Liloba ya Nzambe emonisi ete Yehova ayini koboma libala mpo na bantina oyo Biblia endimi te.a—Tángá Malaki 2:13-16; 3:6.
Tótalela libala na motuya
4. Mpo na nini bilenge baklisto mingi oyo bawelaki kobala bamonaka ete bazwaki ekateli ya malamu te?
4 Lelo oyo, bato mingi bamipesi na makambo ya kosangisa nzoto. Mokolo na mokolo bazali kolakisa bililingi oyo ekoki kolamusa bamposa ya nzoto. Bililingi yango ekoki kobebisa makanisi na biso, mingimingi ya bilenge na kati ya lisangá. Ndenge nini bilenge baklisto bakoki kokima makambo ya mabe oyo ekoki kolamusa bamposa ya nzoto? Mpo na kokima motambo yango, bamosusu babalaka ntango bazali naino bilenge mpenza. Bakanisaka ete yango ekobatela bango bákwea na pite te. Kasi na nsima, mingi bamonaka ete bazwaki ekateli ya malamu te. Mpo na nini? Nsima ya mwa ntango, mingi bamonaka ete babalanaki na moto oyo abongi na bango te. Mabala mingi ya ndenge wana ezali na mokakatano monene.
5. Nini ekoki kosalisa babalani bábatela ndai na bango ya libala? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.)
5 Kobalana na moto oyo na nsima okómi komona ete bozali koyokana ata na likambo moko te ezalaka mokakatano monene, ata soki moto yango azali ndeko na kati ya lisangá. (1 Kol. 7:28) Kasi, ata soki mokakatano yango ezali monene, baklisto ya solo bayebaka ete koboma libala mpo na ntina oyo Biblia endimi te ezali ndenge malamu te ya kosilisa mokakatano ya libala oyo ezali na esengo te. Yango wana, baoyo bazali kosala makasi mpo na kobatela libala na bango mpo balingi te kobuka ndai oyo basalaki babongi mpenza kozwa longonya mpe bandeko na lisangá basengeli kosalisa bango.b
6. Ndenge nini bilenge baklisto basengeli kotalela likanisi ya kobala?
6 Ozali elenge mpe ozali naino monzemba? Boye ndenge nini osengeli kotalela likanisi ya kobala? Okokima mikakatano mingi soki ozeli okola naino na nzoto kaka te, kasi mpe na makanisi mpe na elimo liboso ya kolingana na ndeko moko mpo na libala. Ya solo, Biblia elobi te soki moto asengeli kozala na mbula boni mpo na kobala.c Kasi, emonisi ete ebongi moto alekisa bambula oyo bamposa ya nzoto ezalaka makasi. (1 Kol. 7:36) Mpo na nini? Mpamba te mposa ya nzoto ekoki kokosa moto mpe komema ye na kozwa bikateli oyo ekobimisela ye mikakatano na nsima. Kobosana te ete batoli ya bwanya oyo Yehova apesi na kati ya Biblia mpo na libala ezali mpo na bolamu na yo.—Tángá Yisaya 48:17, 18.
Tózwa mokumba ya kobota na lisɛki te
7. Likambo nini babalani mingi oyo bazali bilenge bakutanaka na yango, mpe mpo na nini yango ekoki kobebisa boyokani na bango?
7 Bato mosusu oyo bawelaka kobala babotaka na ntango oyo bango moko bazali naino bilenge mpenza. Liboso kutu bázwa ntango ya koyebana malamu, bakómaka na mwana mpe esɛngaka kobatela ye ngonga nyonso. Ntango mama akómi kotya likebi mingi epai ya mwana, mobali akoki kokóma na zuwa. Lisusu, lokola motungisi ya mwana epekisaka baboti bálala, mbala mosusu butu mobimba, yango ekoki kokómisa bango nkandankanda mpe kobebisa boyokani na bango. Ntango babalani oyo bazali naino bilenge bakómi na mwana bamonaka mbala moko ete babungisi bonsomi na bango na makambo mingi. Bazalaka lisusu na ntango te ya kobima mpe kosala makambo mosusu oyo bazalaki kosala liboso. Ndenge nini basengeli kotalela mbongwana wana?
8. Ndenge nini tosengeli kotalela likambo ya kobota, mpe mpo na nini?
8 Ndenge moko na kobala, kobota ezali mokumba mpe likabo ya Nzambe oyo tosengeli kozwa na lisɛki te. Ata soki babalani basengeli kosala mbongwana nini ntango bakómi na mwana, basengeli kosala nyonso mpo na kokokisa mokumba yango malamu. Lokola Yehova nde apesi bato likoki ya kobota, baboti basengeli kotalela mwana na bango lokola “likabo ya [Yehova].” (Nz. 127:3) Tata ná mama oyo bazali baklisto basengeli kosala makasi bákokisa mikumba na bango lokola “baboti . . . na kati ya bomoko elongo na Nkolo.”—Ef. 6:1.
9. (a) Kobɔkɔla mwana esɛngaka nini? (b) Mobali akoki kosala nini mpo na kosalisa mwasi na ye azala ntango nyonso makasi na elimo?
9 Kobɔkɔla mwana ezwaka bambula mingi mpe esɛngaka komipimela makambo mingi. Esɛngaka ntango mpe milende mingi. Mobali oyo azali moklisto asengeli koyeba ete ntango mwana abotami, mwasi na ye akolekisa bambula mingi oyo akobanda lisusu kolanda makita malamu te mpe akozanga ntango ya koyekola ye moko mpe komanyola Liloba ya Nzambe. Yango ekoki kozongisa ye nsima na elimo. Mpo na mobali, kokokisa malamu mokumba ya moboti esɛngi asalaka nyonso oyo akoki mpo ye mpe abatelaka mwana. Akoki koyebisa mwasi na ye makambo mosusu oyo alandaki te na makita soki azali kosolola na ye ntango bazongi na ndako. Akoki mpe kopesa mabɔkɔ na kobatela mwana mpe na bongo, kotikela mwasi na ye ntango ya kobima na mosala ya kosakola.—Tángá Bafilipi 2:3, 4.
10, 11. (a) Kobɔkɔla bana na “makebisi ya Yehova” esɛngaka nini? (b) Mpo na nini baboti mingi oyo bazali baklisto babongi kozwa longonya?
10 Kozala moboti ya malamu esuki kaka te na koleisa mpe kolatisa mwana, to komema ye na lopitalo ntango abɛli. Mingimingi na ntango ya nsuka oyo etondi na makama, bana basengeli koyekola bizaleli malamu kobanda bazali naino mike mpenza. Esengeli kobɔkɔla bana “na disipilini mpe na makebisi ya Yehova.” (Ef. 6:4) Kopesa “makebisi” yango elimboli kokɔtisa makanisi ya Yehova na motó ya mwana banda azali naino moke mpenza mpe kokoba kosala yango tii ntango akokóma elenge, eleko oyo mikakatano ekómaka mingi.—2 Tim. 3:14, 15.
11 Na ntembe te, ntango Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete basengeli ‘kokómisa bato bayekoli na bikólo nyonso,’ alingaki mpe koloba ete baboti basengeli kosalisa bana na bango bákóma bayekoli. (Mat. 28:19, 20) Yango ezali likambo moke te na kotalela makambo oyo mokili oyo ezali kolakisa epai ya bilenge mpo na kobenda bango. Yango wana, baboti oyo balongi kosalisa bana na bango bákóma baklisto oyo bamipesi na Nzambe, babongi kozwa longonya ya bandeko mosusu nyonso na kati ya lisangá. Baboti yango ‘balongi’ mokili na nzela ya kondima mpe bosembo na bango.—1 Yoa. 5:4.
Kotikala monzemba to kobota te mpo na mokano ya malamu mingi
12. Mpo na nini baklisto mosusu basepelaka kotikala minzemba ntango molai?
12 Lokola “ntango oyo etikali ekómi mokuse” mpe “makambo ya mokili oyo ezali kobongwana,” Liloba ya Nzambe ezali kolendisa biso tótalela matomba ya kozala monzemba. (1 Kol. 7:29-31) Yango wana, baklisto mosusu baponaka kotikala monzemba ntango molai to mpe bomoi na bango mobimba. Likambo ya malamu ezali ete basalelaka bonsomi ya kozala monzemba mpo na matomba na bango moko te. Mingi batikalaka minzemba mpo na kosalela Yehova “kozanga kotya makanisi na makambo mosusu.” (Tángá 1 Bakolinti 7:32-35.) Baklisto mosusu oyo bazali minzemba basalaka mosala ya mobongisi-nzela to basalaka na Betele. Bamosusu balukaka kokokisa masɛngami mpo na kokɔta na Eteyelo mpo na kobongisa basungi mpo básalela Yehova mingi lisusu na kati ya ebongiseli na ye. Kutu, mbala mingi bandeko oyo basalaka mosala ya ntango nyonso lokola minzemba mpe na nsima bazwaka ekateli ya kobala, bamonaka ete makambo oyo bayekolaki ntango bazalaki minzemba esalisaka bango mingi na mabala na bango.
13. Mpo na nini baklisto mosusu bazali kozwa ekateli ya kobota te?
13 Na mikili mingi, mbongwana mosusu ezali komonana na mabota—bato mingi bazali kozwa ekateli ya kobota te. Bamosusu bazali kosala yango mpo bazali na mbongo te; bamosusu mpe bazali kosala yango mpo bámipesa na mosala oyo bakozwela mbongo mingi. Baklisto mosusu oyo babalani bazali mpe kozwa ekateli ya kobota te. Nzokande, mingi bazali kosala yango mpo na kozala na bonsomi mingi ya kosalela Yehova. Yango elingi koloba te ete babalani yango bazangaka makambo mosusu oyo bato oyo babalá basepelaka na yango. Kasi, basepelaka kotya Bokonzi ya Nzambe liboso ya makambo mosusu oyo libala ekoki komemela bango. (1 Kol. 7:3-5) Babalani yango mosusu basalelaka Yehova mpe bandeko na bango na mosala ya zongazonga to ya etúká to mpe na Betele. Bamosusu bazali babongisi-nzela to mpe bamisionɛrɛ. Yehova akobosana soki moke te mosala na bango mpe bolingo oyo bazali komonisa mpo na nkombo na ye.—Ebe. 6:10.
“Bolɔzi na kati ya mosuni”
14, 15. Baboti oyo bazali baklisto bakoki kokutana na makambo nini oyo ezali “bolɔzi na kati ya mosuni”?
14 Ntoma Paulo ayebisaki baklisto oyo babali ete bakozala na “bolɔzi na kati ya mosuni na bango.” (1 Kol. 7:28) Yango ekoki kozala maladi epai ya molongani moko, bana na bango, to mpe baboti na bango oyo bakómi mibange. Yango ekoki mpe kozala mikakatano mpe mitungisi ya kobɔkɔla bana. Ndenge tolobaki yango na ebandeli, Biblia esakolaki ete “mikolo ya nsuka” ekozala “bantango ya ndenge mosusu mpe ya mpasi mpenza.” Moko na makambo yango ya mpasi mpenza ezali bana oyo “bazangi botosi epai ya baboti.”—2 Tim. 3:1-3.
15 Kobɔkɔla bana ezali mokakatano monene mpo na baboti oyo bazali baklisto. Makambo oyo ezali kobima na “bantango ya ndenge mosusu” ezali mpe kokómela biso. Yango wana, baklisto basengeli ntango nyonso kobunda etumba mpo mopɛpɛ mabe ya “ebongiseli ya makambo ya mokili oyo” ebebisa bana na bango te. (Ef. 2:2, 3) Ntango mosusu mpe balongaka etumba yango te! Ntango mwana oyo abɔkwami na libota ya baklisto atiki kosalela Yehova, yango ezalaka mpenza “bolɔzi” mpo na baboti oyo basalaki nyonso mpo na koteya ye solo.—Mas. 17:25.
“Ekozala na bolɔzi moko monene”
16. “Bolɔzi” nini Yesu asakolaki?
16 Nzokande, ata “bolɔzi” nini oyo tokoki kokutana na yango na kati ya libala to mpo na kobɔkɔla bana, ekokokana te na bolɔzi mosusu ya monene koleka. Ntango Yesu asakolaki kozala na ye mpe bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo, alobaki boye: “Na ntango wana ekozala na bolɔzi moko monene oyo esalemá naino boye te banda na ebandeli ya mokili tii sikoyo, ɛɛ ekosalema lisusu mpe te.” (Mat. 24:3, 21) Na nsima, Yesu amonisaki ete ebele ya bato bakobika na “bolɔzi monene” wana. Nzokande, ebongiseli ya Satana ekokoba kobundisa na makasi nyonso Batatoli ya Yehova, bato ya kimya. Na ntembe te ekozala ntango ya mpasi mpo na biso nyonso, bilenge mpe mikóló.
17. (a) Mpo na nini tosengeli komitungisa te mpo na mikolo ezali koya? (b) Tosengeli kotalela nini ntango tozali kozwa ekateli ya kobala to kobota?
17 Atako bongo, tosengeli te komitungisa mpambampamba mpo na mikolo ezali koya. Baboti oyo bazali sembo epai ya Yehova bakoki kozala na elikya ete akobatela bango mpe bana na bango. (Tángá Yisaya 26:20, 21; Sef. 2:2, 3; 1 Kol. 7:14) Nzokande, mpo na sikoyo, tóbosana te ete tozali na mikolo ya ndenge mosusu mpe yango esalisa biso tókanisa malamu ntango tozali kozwa ekateli ya kobala to kobota na mikolo oyo ya nsuka. (2 Pet. 3:10-13) Na ndenge yango, tózala minzemba to bato babalá, bato oyo bazali na bana to te, bomoi na biso ekopesa nkembo mpe lokumu epai ya Yehova mpe lisangá ya boklisto.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá buku Vivez en gardant à l’esprit le jour de Jéhovah na motó ya likambo moke “Il a haï le divorce,” na lokasa 125.
b Baoyo bazali na mikakatano na libala bakolendisama soki batángi masolo oyo elobeli libala na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Sɛtɛmbɛ 2003, mpe Lamuká! ya Aprili-Yuni 2001.
c Talá mokapo 30, “Nakoki mpo na libala?” na buku Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano bibongi.
Bozongeli
• Mpo na nini bilenge baklisto basengeli te kowela kobala?
• Kobɔkɔla mwana esɛngaka makambo nini?
• Mpo na nini baklisto mingi baponaka kotikala minzemba to ata babali, bábota te?
• “Bolɔzi” nini baklisto oyo bazali na bana bakoki kokutana na yango?
[Elilingi na lokasa 17]
Mpo na nini ezali likambo ya mayele ete bilenge baklisto báwela kobala te?
[Elilingi na lokasa 18]
Mobali akoki kosala makambo mingi mpo na kosalisa mwasi na ye azala makasi na elimo
[Elilingi na lokasa 19]
Mpo na nini baklisto mosusu baponi kobota te?