Ozali koyeba lisusu?
Osepelaki mpenza na botángi ya banimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo euti kobima? Na bongo, talá soki okoki kopesa biyano na mituna milandi:
• Ntango nini banganga-minzoto bakendaki kotala Yesu?
Libongoli moko ya Biblia elobi boye: “Bato mingi bakanisaka ete banganga-minzoto bakendaki kotala Yesu na elyelo ya banyama na butu oyo abotamaki, ndenge babateli ya mpate basalaki; kasi ezali bongo te. Bango bakendaki mwa basanza na nsima.” Na ntango yango, bakutaki Yesu azalaki “mwana” moke na kati ya ndako. (Mat. 2:7-11) Soki banganga-minzoto oyo bakendaki kotala Yesu bamemelaki ye wolo mpe makabo mosusu na butu oyo abotamaki, Malia alingaki nde kopesa lokola mbeka bandɛkɛ mibale ntango amemaki Yesu na tempelo mikolo 40 na nsima?—1/1, lokasa 31.
• Bato mingi bakoki kosala nini mpo na kobongisa bomoi na bango?
Moto mosusu akoki komituna boye: ‘Ndenge nini nakoki kotalela lisusu bomoi na ngai mpe kokómisa yango pɛpɛlɛ?’ Amy amitunaki motuna yango. Azalaki na mbongo mingi kasi azalaki na esengo te. Amonaki ete lokola amipesaki mingi na mosala ya mosuni, etikalaki moke abunga nzela ya kondima. Na nsima, amonaki ete asengeli kotya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso mpe asalaki mosala ya mobongisi-nzela na boumeli ya mwa ntango. Amy alobi boye: “Sikoyo, nazali na esengo oyo natikalaki kozala na yango te na ntango namipesaki mpo na kosalela mokili.”—15/1, lokasa 19.
• Nini ekoki kosalisa bamama básepela na mokumba na bango?
Basi mingi bakómi kosala. Bamosusu basalaka mpo na kokokisa bamposa ya libota, mpe bamosusu basalaka mpo bázwaka mbongo na bango moko, oyo bakobanda kosalela ndenge balingi, to mpo na komisombela biloko ya motuya. Bamosusu mpe ezali mpo basepelaka na mosala na bango. Bamama baklisto bazali na mokumba monene na ndako, mingimingi ntango bana bazali naino mike. Bamama mosusu bazwaki ekateli ya kokutola ntango oyo bazalaki kolekisa na mosala, to mpe batikaki kosala mpo na kotya likebi mingi na libota, mpe yango esalisaki bango básepela na mokumba na bango.—1/2, nkasa 28-31.
• “Libota” nini Yesu alobelaki na Matai 24:34?
Mbala mingi Yesu asalelaki liloba “libota” ya mabe, ntango azalaki kolobela bato mabe. Kasi ezalaki bongo te ntango alobaki na bayekoli na ye, oyo mosika te balingaki kopakolama na elimo santu. Basengelaki kososola ntango bakomona makambo oyo ezali na Matai 24:32, 33. Na yango, emonani ete Yesu azalaki kolobela bayekoli na ye bapakolami na elimo, ya ekeke ya liboso mpe ya ntango oyo.—15/2, nkasa 23-24.
• Na ndenge nini Mibeko ezalaki molakisi, ndenge Bagalatia 3:24 emonisi yango?
Na ntango ya kala, molakisi azalaki mbala mingi moombo oyo bazalaki kotyela motema, oyo azalaki kobatela mwana mpe kosɛnzɛla ete mposa ya tata ya mwana ekokisama. Ndenge moko mpe, Mibeko ezalaki kobatela Bayisalaele na makambo lokola kobalana na bato ya bikólo mosusu. Kasi, ndenge moko na molakisi ya mwana, mokumba ya Mibeko ezalaki mpo na mwa ntango; tii ntango Klisto ayaki.—1/3, nkasa 18-21.
• Na kolanda Yakobo 3:17, bizaleli nini tosengeli kozala na yango?
Mpo na kozala pɛto na bizaleli, tosengeli koboya makambo mpe makanisi nyonso ya mbindo. (Gen. 39:7-9) Tosengeli mpe kozala bato ya kimya, elingi koloba koboya bitumba, makambo mosusu oyo ekoki kobebisa kimya. Yango wana, mokomoko na biso asengeli komituna boye: ‘Nayebani lokola moto oyo atyaka kimya to lokola epanza makita? Naswanaka mbala mingi na basusu? Naumelaka te kosilika to kopesa basusu nkanda? Nalimbisaka basusu to nalingaka kaka ete basusu bálanda makambo oyo ngai nalingi?’—15/3, nkasa 24-25.
• Mpo na nini Yesu abikisaki mokufi miso mokemoke? (Malako 8:22-26)
Biblia epesi eyano ya polele te na motuna yango. Kasi, ekoki mpenza kozala ete Yesu abikisaki mokufi miso yango mokemoke mpo apesa ye ntango ya komesana na pole. Yango emonisaki ete Yesu amityaki mpenza na esika ya mokufi miso yango.—1/4, lokasa 30.