Poná kosalela Yehova ntango ozali naino elenge
“Kangamá na makambo oyo oyekolaki mpe oyo ondimisamaki bosolo na yango.”—2 TIM. 3:14.
1. Ndenge nini Yehova atalelaka mosala oyo bilenge basalelaka ye?
YEHOVA atalelaka mosala mosantu ya bilenge na motuya mingi. Yango wana, asakolaki na nzela ya mokomi ya nzembo ete: “Bato na yo bakomipesa na yo na bolingo nyonso, na mokolo ya nguya na yo, na nkembo ya bulɛɛ, bilenge na yo bakoya epai na yo lokola mamwɛ longwá na ntango ya ntɔngɔntɔngɔ.” (Nz. 110:3) Ya solo, Yehova azwaka na motuya mpenza bilenge oyo bamipesi mpo na kosalela ye.
2. Lelo oyo, bilenge bazali kokutana na mokakatano nini mpo na kopona lolenge ya bomoi oyo bakozala na yango?
2 Bino bilenge na kati ya lisangá, bosilá komipesa epai ya Yehova? Bilenge mingi bakoki kozala na mokakatano ya kozwa ekateli ya kosalela Nzambe ya solo. Bato minene ya mimbongo, bateyi, ata mpe baboti, bandeko mpe baninga balendisaka bilenge bámipesa na koluka bozwi ya mokili. Mbala mingi, soki bilenge bamipesi na makambo ya elimo, mokili ekómaka kotyola bango. Kasi, likambo ya solo ezali ete kosalela Nzambe ya solo ezali bomoi oyo eleki malamu. (Nz. 27:4) Na likambo yango, tótalela mituna misato oyo: Mpo na nini osengeli kosalela Nzambe? Ndenge nini okoki komipesa mobimba na mosala ya Nzambe ata soki basusu bazali kotɛmɛla yo? Mikumba nini okoki kozwa na mosala ya Nzambe?
Kosalela Yehova ezali likambo eleki malamu
3. Biloko oyo Yehova akelá esengeli kotinda biso tósala nini?
3 Mpo na nini osengeli kosalela Nzambe ya solo mpe ya bomoi? Emoniseli 4:11 epesi ntina ya libosoliboso: “Yehova, Ɛɛ Nzambe na biso, obongi kozwa nkembo mpe lokumu mpe nguya, mpamba te yo ozalisaki biloko nyonso, mpe mpo na mokano na yo yango ezalaki mpe ezalisamaki.” Yehova azali Mozalisi monene ya biloko nyonso. Mabelé ezali mpenza esika kitoko! Banzete, bafololo, banyama, mbu mpe bibale, bangomba, nyonso wana ezali misala ya mabɔkɔ ya Yehova. Nzembo 104:24 elobi boye: “Mokili etondi maa na biloko bisalaki [Nzambe].” Tozali mpenza na botɔndi epai ya Yehova na ndenge apesá biso nzoto mpe bɔɔngɔ oyo esalisaka biso tósepela na mabelé mpe biloko kitoko oyo ezali na kati na yango! Botɔndi oyo tozali na yango mpo na biloko kitoko oyo Nzambe akelá esengeli te kotinda biso tósalela ye?
4, 5. Makambo nini Nzambe asalaki oyo etindaki Yosua apusana penepene na ye?
4 Yosua, oyo azalaki motambwisi ya Yisalaele, ayebisi ntina mosusu oyo tosengeli kosalela Yehova. Pene na nsuka ya bomoi na ye, Yosua alobaki na Bayisalaele boye: “Boyebi malamu na mitema na bino mobimba mpe na milimo na bino nyonso ete ata liloba moko te ezangaki kokokisama na maloba malamu nyonso oyo Yehova Nzambe alobaki na bino, yango nyonso ekokisamaki mpo na bino.” Mpo na nini alobaki bongo?—Yos. 23:14, NW.
5 Ekoki kozala ete ntango Yosua azalaki kokola na Ezipito, ayebaki elaka oyo Yehova apesaki ete akopesa Yisalaele mokili na bango moko. (Gen. 12:7; 50:24, 25; Ex. 3:8) Na nsima, Yosua amonaki ndenge Yehova abandaki kokokisa elaka yango mpe kokitisa Malɔzi Zomi na Ezipito mpo na kotinda Falao, mokonzi ya Ezipito ya motó makasi, atika bana ya Yisalaele bákende. Yosua azalaki na kati ya bato oyo Yehova abikisaki na Mbu Motane mpe amonaki ndenge mbu yango emɛlaki Falao ná mampinga na ye. Na boumeli ya mobembo molai oyo basalaki “na kati ya lisobe monene mpe ya nsɔmɔ” ya Sinai, Yosua amonaki ndenge Yehova azalaki kopesa Bayisalaele nyonso oyo bazalaki na mposa na yango. Ata moko na bango akufaki te na mposa ya mai to na nzala. (Det. 8:3-5, 14-16; Yos. 24:5-7) Ntango ngonga ekokaki mpo Bayisalaele bálonga Bakanana oyo bazalaki bilombe mpe bázwa Mokili ya Ndaka, Yosua amonaki ndenge Nzambe oyo ye ná Bayisalaele mosusu bazalaki kosambela abundelaki bango.—Yos. 10:14, 42.
6. Nini ekoki kopesa yo mposa makasi ya kosalela Nzambe?
6 Yosua ayebaki ete Yehova akokisaki bilaka na ye nyonso. Yango wana alobaki boye: “Mpo na ngai mpe ndako na ngai, biso tokosalela [Yehova].” (Yos. 24:15) Ezali boni mpo na yo? Soki okanisi bilaka ya Nzambe ya solo oyo esilá kokokisama ná oyo ekokisami naino te, yango epesaka yo mposa ya kosalela ye ndenge Yosua asalaki?
7. Mpo na nini batisimo ezali lisɛngami ya ntina mingi?
7 Komona biloko oyo Yehova akelá mpe kokanisa bilaka kitoko oyo apesá, oyo ekozanga te kokokisama, esengeli kotinda yo omipesa na Yehova mpe omonisa yango na batisimo ya mai. Batisimo ezali lisɛngami ya ntina mingi mpo na moto oyo alingi kosalela Nzambe. Yesu, ndakisa na biso, amonisaki mpenza likambo yango. Liboso abanda mosala na ye ya Masiya, akendaki epai ya Yoane Mobatisi mpo abatisa ye. Mpo na nini Yesu asalaki bongo? Alobaki na nsima boye: “Nakitaki uta na likoló mpo na kosala, mokano na ngai te, kasi mokano ya moto oyo atindaki ngai.” (Yoa. 6:38) Mpo na komonisa ete alingi kosala mokano ya Tata na ye, Yesu azwaki batisimo.—Mat. 3:13-17.
8. Mpo na nini Timote aponaki kosambela Nzambe, mpe yo osengeli kosala nini?
8 Tózwa mpe ndakisa ya Timote, elenge moklisto moko oyo Yehova apesaki mosala monene mpe mikumba mingi. Mpo na nini Timote aponaki kosambela Nzambe ya solo? Biblia eyebisi biso ete ‘ayekolaki makambo mpe andimisamaki bosolo na yango.’ (2 Tim. 3:14) Soki yo mpe oyekolá Liloba ya Nzambe mpe ondimá ete mateya na yango ezali solo, ozali lokola Timote. Ntango ya kozwa ekateli yango oyo. Mpo na nini te koyebisa baboti na yo mposa na yo? Bango ná bankulutu ya lisangá bakoki kosalisa yo oyeba makambo oyo osengeli kokokisa mpo na kozwa batisimo.—Tángá Misala 8:12.
9. Bato mosusu bakoki koyoka ndenge nini soki ozwi batisimo?
9 Soki ozwi batisimo, yango ekozala ebandeli ya malamu mpenza mpo na yo na mosala ya Nzambe ya solo. Kozwa batisimo ezali kokɔta na momekano ya mbangu oyo mbano na yango ezali bomoi ya seko mpe esengo ya koyeba ete ozali kosala mokano ya Nzambe. (Ebe. 12:2, 3) Okosepelisa mpe bato ya libota na yo oyo basilá kobanda momekano yango mpe baninga na yo na kati ya lisangá ya baklisto. Oyo eleki ntina, okosepelisa motema ya Yehova. (Tángá Masese 23:15.) Ezali ya solo ete basusu bakoyeba te ntina oyo oponi kosambela Yehova, mpe bakoki ata kobanda koloba na yo ete ozwi ekateli ya malamu te. Bakoki ata mpe kotɛmɛla yo. Kasi, okoki kolonga mokakatano yango.
Soki basusu bazali kotyola to kotɛmɛla yo
10, 11. (a) Mituna nini bato bakoki kotuna yo mpo na ekateli na yo ya kosalela Nzambe? (b) Liteya nini okoki kozwa na lolenge oyo Yesu azalaki koyanola na mituna oyo bazalaki kotuna ye mpo na losambo ya solo?
10 Ekateli na yo ya kosalela Yehova ekoki kokamwisa baninga na yo ya kelasi, baninga ya kartye mpe bandeko na yo. Bakoki kobanda kotuna yo mpo na nini oponi nzela wana mpe bakoki ata kobanda kotyola kondima na yo. Okosala nini? Osengeli kotalela makanisi na yo mpo oyeba kolimbolela bango ntina oyo oponi kosalela Yehova. Ntango ozali koyanola na mituna na bango, osengeli kolanda ndakisa ya Yesu.
11 Ntango bakonzi ya mangomba ya Bayuda batunaki Yesu soki bato bakosekwa, abendaki likebi na bango na vɛrsɛ moko oyo bakokaki kutu kokanisa te. (Ex. 3:6; Mat. 22:23, 31-33) Ntango mokomeli moko atunaki ye soki mobeko nini eleki monene, Yesu atángelaki ye bavɛrsɛ ya Biblia oyo ebongi mpenza. Moto yango atɔndaki mpenza Yesu mpo na eyano yango. (Lev. 19:18; Det. 6:5; Mko. 12:28-34) Lokola Yesu asalelaki Makomami mpe ayebaki koloba, “bokabwani ekɔtaki na kati ya ebele wana ya bato na ntina etali ye,” mpe banguna na ye bakokaki lisusu kosala ye mabe te. (Yoa. 7:32-46) Ntango ozali koyanola na mituna oyo etali kondima na yo, salelá Biblia mpe yanolá “na elimo ya boboto mpe na limemya makasi.” (1 Pet. 3:15) Soki oyebi eyano te, lobá ete oyebi te mpe laká ye ete okozongela ye nsima ya kosala bolukiluki. Na nsima, luká masolo oyo elobeli likambo yango na Index des publications de la Société Watch Tower to na CD-ROM, soki ezali na monɔkɔ na bino. Soki omibongisi malamu, ‘okoyeba ndenge oyo osengeli kopesa eyano.’—Kols. 4:6.
12. Mpo na nini osengeli kotika te ete minyoko elɛmbisa yo?
12 Bakoki kotuna yo mituna ebele na ntina ya ekateli na yo ya kosalela Nzambe mpe bindimeli na yo. Kobosana te ete Satana Zabolo, monguna ya Nzambe, azali koyangela mokili. (Tángá 1 Yoane 5:19.) Okomikosa mpenza soki ozali kokanisa ete moto nyonso akopesa yo longonya to akosepela na ekateli na yo, mpe yebá ete okoki kokutana na botɛmɛli. Bato mosusu bakoki kobanda ‘kofinga yo’ ntango nyonso. (1 Pet. 4:4) Kasi, yebá ete ozali yo moko te. Yesu mpe banyokolaki ye. Ntoma Petelo mpe anyokwamaki, mpe akomaki boye: “Balingami, bómitungisa te mpo na mɔtɔ [minyoko] oyo ezali kopela na kati na bino, oyo ezali kokómela bino mpo na komekama, lokola nde likambo moko ya kokamwa ezali kokwela bino. Kutu, bókoba nde kosepela mpamba te bozali basangani na kati ya bampasi ya Klisto.”—1 Pet. 4:12, 13.
13. Mpo na nini baklisto bakoki kosepela soki bazali konyokola bango?
13 Soki bazali konyokola to kotɛmɛla yo mpo ozali moklisto, osengeli kosepela. Mpo na nini? Mpo soki mokili ezali kosepela na yo, yebá ete ozali kosala mokano ya Satana, kasi ya Nzambe te. Yesu apesaki likebisi oyo: “Mawa, ntango bato nyonso bazali koloba malamu na ntina na bino, mpo ezali makambo ya ndenge wana nde bankɔkɔ na bango basalelaki basakoli ya lokuta.” (Luka 6:26) Minyoko oyo ozali kokutana na yango ezali komonisa ete Satana ná mokili na ye bazali kosepela na yo te mpo ozali kosalela Yehova. (Tángá Matai 5:11, 12.) Mpe soki bazali ‘kolobela yo mabe mpo na nkombo ya Klisto,’ osengeli kosepela.—1 Pet. 4:14.
14. Matomba nini moto akoki kozwa soki akangami kaka na Yehova atako bazali konyokola ye?
14 Soki okangami na Yehova atako bazali konyokola yo, yango ezali na matomba soki minei. Ya liboso, ozali kosakola nkombo ya Nzambe mpe ya mwana na ye. Ya mibale, mpiko na yo ezali kolendisa bandeko na yo baklisto. Ya misato, ndakisa na yo ekoki kotinda bato mosusu oyo bayebi Yehova te báluka ye. (Tángá Bafilipi 1:12-14.) Mpe ya minei, ntango ozali komona ndenge Yehova azali kopesa yo mpiko mpo na kolonga minyoko yango, bolingo na yo mpo na ye ekobakisama.
“Ekuke monene” efungwami liboso na yo
15. “Ekuke monene” nini efungwamaki liboso ya ntoma Paulo?
15 Mpo na mosala na ye ya kosakola oyo asalaki na Efese, ntoma Paulo akomaki boye: “Ekuke monene oyo ezali komema na mosala efungwelami ngai.” (1 Kol. 16:8, 9) Ezalaki ekuke oyo ezalaki komema na mosala monene ya kosakola nsango malamu mpe kokómisa bato bayekoli na engumba yango. Lokola andimaki libaku yango, Paulo asalisaki bato ebele báyeba Yehova mpe bákóma kosambela ye.
16. Ndenge nini batikali bapakolami bakɔtaki na ‘ekuke oyo efungwamaki’ liboso na bango na 1919?
16 Na 1919, Yesu Klisto oyo asilaki kozwa nkembo na likoló ‘afungolaki ekuke’ liboso ya batikali bapakolami. (Emon. 3:8) Bakɔtaki na ekuke yango mpe babandaki kosakola nsango malamu mpe koteya solo ya Biblia na molende lisusu koleka. Mosala na bango ebimisaki matomba nini? Nsango malamu ekómi sikoyo tii na nsuka ya mokili, mpe bato soki milio nsambo bazali na elikya ya kozwa bomoi ya seko na mokili ya sika oyo Nzambe alaki.
17. Ndenge nini okoki kokɔta na “ekuke monene oyo ezali komema na mosala”?
17 “Ekuke monene oyo ezali komema na mosala” ezali naino polele mpo na basaleli nyonso ya Yehova. Baoyo bazali kokɔta na ekuke yango bazali kozwa esengo mpe bolamu na ndenge bazali komipesa mingi na kosakola nsango malamu. Bino bilenge oyo bozali kosalela Yehova, bomonaka ete kosalisa basusu ‘bándima nsango malamu’ ezali mosala oyo eleki misala mosusu nyonso? (Mko. 1:14, 15) Okanisaka mpe kosala mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza to mobongisi-nzela mosungi? Mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi, mosala ya Betele mpe ya misionɛrɛ ezali mpe bikuke mosusu oyo mingi na bino bakoki kokɔta. Lokola mokili mabe oyo ya Satana ezali kokende na nsuka, emonani ete bosengeli mpenza komipesa na misala wana ya Bokonzi. Okokɔta na ‘ekuke monene’ wana lokola ntango ezali naino?
‘Meká mpe sosolá ete Yehova azali malamu’
18, 19. (a) Nini epesaki Davidi mposa makasi ya kosalela Yehova? (b) Nini emonisi ete Davidi amonaki te ete abebisi bomoi na ye mpamba na kosalela Nzambe?
18 Na lisalisi ya elimo santu, mokomi ya nzembo asɛngaki na bato ‘bámeka mpe básosola ete Yehova azali malamu.’ (Nz. 34:8) Ntango Davidi, mokonzi ya Yisalaele ya kala azalaki naino elenge mpe azalaki kobatela bampate, Yehova abikisaki ye na mabɔkɔ ya banyama ya mabe. Nzambe asungaki ye ntango abundaki na Goliata mpe abikisaki ye na ebele ya makama mosusu. (1 Sam. 17:32-51; Nz. 18, na maloba oyo ezali likoló na yango) Mpo na motema-boboto monene ya Nzambe, Davidi akomaki ete: “Ɛ [Yehova], Nzambe na ngai, yo osali makambo mingi, misala na yo ya kokamwa mpe mikano na yo ezali mpo na biso; mosusu lokola yo azali te.”—Nz. 40:5.
19 Davidi akómaki kolinga Yehova mingi mpe akómaki na mposa ya kosanzola ye na motema na ye mobimba mpe na makanisi na ye nyonso. (Tángá Nzembo 40:8-10.) Ntango bambula ezalaki koleka, Davidi amonaki te ete abebisi bomoi na ye mpamba na kosambela Nzambe ya solo. Kokangama na Nzambe bomoi na ye mobimba ezalaki likambo oyo elekaki motuya na bomoi na ye, oyo ezalaki komemela ye esengo koleka makambo mosusu nyonso. Ntango akómaki mobange, Davidi alobaki ete: “Yo ozali elikya na ngai, Ɛ Nkolo; nandimi yo, ɛ [Yehova], longwa na bolenge na ngai. Boye, kino ntango ya konuna na ngai na nsuki mpɛmbɛ, Ɛ Nzambe, tiká ngai te.” (Nz. 71:5, 18) Atako Davidi akómaki mobange mpe alɛmbaki mpenza, elikya na ye epai ya Yehova mpe boninga na bango ekómaki lisusu makasi.
20. Mpo na nini kosalela Nzambe ezali lolenge ya bomoi oyo eleki malamu?
20 Bomoi ya Yosua, ya Davidi mpe ya Timote emonisi lisusu polele ete kosalela Yehova ezali lolenge ya bomoi oyo eleki malamu. Bomɛngo ya ntango mokuse oyo moto akoki kozwa na mosala ya mokili ekoki kokokana ata moke te na ebele ya mapamboli oyo moto akoki kozwa soki ‘asaleli Yehova na motema na ye mobimba mpe na molimo na ye mobimba.’ (Yos. 22:5) Soki omipesá naino te epai ya Yehova na libondeli, omituna boye: ‘Nini ezali kopekisa ngai kokóma Motatoli ya Yehova?’ Soki ozwá batisimo, okosepela kobakisa lisusu esengo na bomoi na yo? Omipesa lisusu mingi na mosala ya kosakola mpe kobá kokola na elimo. Lisolo oyo elandi ekosalisa yo omona ete soki olandi ndakisa ya ntoma Paulo okokola na elimo.
Okopesa eyano nini?
• Yebisá ntina mibale oyo tosengeli kosalela Nzambe.
• Nini esalisaki Timote azwa ekateli ya kosalela Nzambe?
• Mpo na nini osengeli kotikala ngwi liboso ya minyoko?
• Mabaku nini ya mosala ezali liboso na yo?
[Elilingi na lokasa 18]
Kosalela Yehova ezali lolenge ya bomoi oyo eleki malamu
[Elilingi na lokasa 19]
Okoki koyanola bato oyo balingi koyeba ntina oyo ozali Motatoli ya Yehova?