Liloba ya Yehova ezali na bomoi
Makanisi ya ntina na mikanda epai ya Bakolinti
NTOMA Paulo amitungisaki mingi mpo na elimo ya lisangá ya Kolinti. Ayokaki ete bokabwani ekɔti na kati ya bandeko ya lisangá yango. Batikaki moto moko oyo asalaki pite azala na kati na bango. Lisangá ekomelaki mpe Paulo mokanda mpo na kotuna ye mwa makambo. Yango wana, soki na mobu 55 T.B., ntango azalaki na Efese na boumeli ya mobembo na ye ya misato ya misionɛrɛ, Paulo akomaki mokanda na ye ya liboso epai ya Bakolinti.
Mokanda ya mibale, oyo emonani ete akomaki yango mwa basanza na nsima, eyaki kaka kobakisa makanisi mosusu na oyo ya liboso. Lokola makambo oyo ezalaki kosalema na Kolinti na ekeke ya liboso, ezala na kati to na libándá ya lisangá, ekokani mingi na makambo ya ntango na biso, nsango oyo ezali na kati ya mikanda ya Paulo epai ya Bakolinti ezali na ntina mingi mpo na biso.—Ebe. 4:12.
‘BÓLALA MPƆNGI TE, BÓTƐLƐMA NGWI, BÓZALA MAKASI’
Paulo alendisaki bango boye: “Bosengeli bino nyonso kolobaka na boyokani.” (1 Kol. 1:10) Ezali na ‘moboko mosusu te longola kaka Yesu Klisto,’ oyo baklisto bakoki kotonga bizaleli na bango likoló na yango. (1 Kol. 3:11-13) Mpo na moto moko oyo asalaki pite na lisangá yango, Paulo alobaki boye: “Bólongola moto mabe na kati na bino.” (1 Kol. 5:13) Alobaki lisusu boye: “Nzoto ezali te mpo na pite, kasi mpo na Nkolo.”—1 Kol. 6:13.
Mpo na ‘makambo oyo bakomelaki ye,’ Paulo apesaki bango toli kitoko mpenza epai ya baoyo babalá ná baoyo babalá te. (1 Kol. 7:1) Nsima ya kolobela ebongiseli ya bokonzi na kati ya lisangá, ya komonisa ete makambo esengeli kosalemaka na molɔngɔ na kati ya lisangá mpe ete lisekwa ekosalema mpenza, Paulo alendisaki bango boye: “Bólala mpɔngi te, bótɛlɛma ngwi na kati ya kondima, bómitambwisa lokola mibali, bózala makasi.”—1 Kol. 16:13.
Biyano na mituna ya Biblia:
1:21—Yehova asalelaka mpenza “bozoba” mpo na kobikisa baoyo bazali kondima? Te, asalaka bongo te. Kasi, lokola “mokili na nzela ya bwanya na yango eyebi Nzambe te,” makambo oyo Nzambe azali kosalela mpo na kobikisa bato emonanaka lokola bozoba na miso ya bato ya mokili.—Yoa. 17:25.
5:5—Kopesa “moto [mabe] epai ya Satana mpo na libebi ya mosuni, ete elimo ebikisama” elimboli nini? Soki mosumuki oyo aboyi kobongola motema abimisami na lisangá, azongaka lisusu na mokili mabe ya Satana. (1 Yoa. 5:19) Yango wana, Biblia elobi ete apesami epai ya Satana. Kobimisama ya moto na lisangá elimboli kobebisa to kolongola etamboli mabe na ye oyo ekoki kobebisa elimo ya lisangá.—2 Tim. 4:22.
7:33, 34—“Makambo ya mokili” oyo mobali to mwasi oyo abalá amitungisaka mpo na yango ezali nini? Awa, Paulo azali kolobela makambo ya bomoi ya mokolo na mokolo oyo baklisto oyo babalá basengeli komitungisa mpo na yango. Na ndakisa bilei, bilamba mpe ndako, kasi te makambo ya mabe ya mokili oyo, oyo baklisto basengeli koboya.—1 Yoa. 2:15-17.
11:26—Maloba “mbala nyonso” oyo Paulo asalelaki ntango alobelaki Ekaniseli ya liwa ya Yesu elimboli nini? Mpe ekaniseli yango esengeli kosalemaka tii ntango nini? Paulo alingaki koloba ete mbala nyonso, elingi koloba mbala moko na mbula, na mokolo ya 14 ya sanza ya Nisana, oyo baklisto bapakolami bazali kolya limpa mpe komɛla vinyo ya Ekaniseli, bazali “kosakola liwa ya Nkolo.” Bazali kosala yango “tii ntango akoya,” to akozwa bango kuna na likoló na nzela ya lisekwa.—1 Tes. 4:14-17.
13:13—Na ndenge nini bolingo eleki kondima mpe elikya? Ntango ozwi ‘biloko oyo ozalaki kolikya kozwa’ to “kozela na motema mobimba,” kondima mpe elikya esukaka wana. (Ebe. 11:1) Bolingo eleki kondima mpe elikya mpo yango ekotikala libela na libela.
15:29—“Kobatisama mpo na kozala bakufi” elimboli nini? Paulo alingaki koloba te ete bato ya bomoi basengelaki kobatisama mpo na baoyo bakufá kozanga kozwa batisimo. Awa, Paulo azali kolobela kobatisama ya baklisto bapakolami mpo na kokóma na lolenge ya bomoi oyo ekosala ete bátikala sembo tii na liwa na bango, mpe na nsima bakosekwa mpo na kozala na bomoi ya elimo kuna na likoló.
Mateya mpo na biso:
1:26-31; 3:3-9; 4:7. Soki tozali komikumisa na kati na Yehova, kasi na kati na biso moko te, kimya ekozala na kati ya lisangá.
2:3-5. Ekoki kozala ete ntango Paulo azalaki kosakola na Kolinti, esika monene ya filozofi mpe boyebi ya Bagrɛki, azalaki komituna soki akokoka kosimba mitema ya bayoki na ye. Atako bongo, atikaki te ete bolɛmbu to kobanga epekisa ye kokokisa mokumba oyo Nzambe apesaki ye. Biso mpe tosengeli te kotikaka mikakatano epekisa biso kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Tosengeli nde kolukaka lisalisi epai ya Yehova na elikya mpenza, ndenge Paulo asalaki.
2:16. Kozala na “makanisi ya Klisto” elimboli koyeba ndenge ye akanisaka mpe ntina oyo akanisaka bongo, kokanisa lokola ye, koyeba bomoto na ye malamumalamu mpe komekola ye. (1 Pet. 2:21; 4:1) Yango wana, ezali mpenza na ntina ete tóyekola na likebi mpenza bomoi ya Yesu mpe makambo oyo asalaki awa na mabelé!
3:10-15; 4:17. Tosengeli kotalela mpe kobongisa makoki na biso ya koteya mpe kokómisa bato bayekoli. (Mat. 28:19, 20) Soki toteyi moyekoli na biso malamu te, akolonga te soki kondima na ye emekami; tokoki kobungisa ye mpe kobika na biso “ekozala lokola nde na kolekáká na mɔtɔ.”
6:18. ‘Kokima pite’ elimboli kaka te koboya kosala yango, kasi elimboli mpe koboya kotala bililingi ya bato bazali kosangisa nzoto, etamboli ya mbindo, kokanisa makambo oyo ekoki kolamusa mposa ya kosangisa nzoto, kokangamakangama na moto oyo azali molongani na yo te, to makambo mosusu oyo ekoki kotinda moto asala pite.—Mat. 5:28; Yak. 3:17.
7:29. Balongani basengeli kokeba ete bátya te makambo ya libala na bango liboso ya matomba ya Bokonzi.
10:8-11. Yehova ayokaki mabe mpenza ntango Bayisalaele bakómaki koimaima mpo na Moize ná Alona. Tokomonisa mpenza bwanya soki toboyi momeseno ya koimaima.
16:2. Makabo ya mbongo oyo topesaka mpo na kosimba misala ya Bokonzi ekosalisa soki tozali kobongisa yango liboso mpe tozali kopesa yango mbala na mbala.
‘BÓKOBA KOSEMBOLAMA’
Paulo alobaki na Bakolinti ete basengeli ‘kolimbisa na boboto mpe kobɔndisa’ mosumuki oyo bapamelaki mpe na nsima abongolaki motema. Atako mokanda na ye ya liboso eyokisaki bango mawa, Paulo asepelaki mpo mawa na bango etindaki bango bábongola motema.—2 Kol. 2:6, 7; 7:8, 9.
Paulo alendisaki Bakolinti ete ‘kaka ndenge batondanaki na biloko nyonso,’ ‘bátondana mpe na kopesa.’ Nsima ya koyanola batɛmɛli, apesaki bango nyonso toli ya nsuka oyo: “Bókoba kosepela, kosembolama, kobɔndisama, kokanisa ndenge moko, kofanda na kimya.”—2 Kol. 8:7; 13:11.
Biyano na mituna ya Biblia:
2:15, 16—Na ndenge nini tozali “nsolo kitoko ya Klisto”? Ezali bongo mpo totosaka mitinda ya Biblia mpe tosakolaka nsango malamu. Atako “nsolo” yango ekoki kozala mabe epai ya bato mabe, Yehova ná bato ya mitema sembo bayokaka yango kitoko.
5:16—Na ndenge nini baklisto bapakolami bayebi “ata moto moko te na ndenge ya mosuni”? Batalelaka bato te na miso ya mosuni, elingi koloba baponaka bato te mpo na bozwi, mposo to ekólo na bango. Likambo ya ntina na miso na bango ezali nde bondeko na bango ná baklisto mosusu.
11:1, 16; 12:11—Mpo na nini paulo akokaki komonana zoba na miso ya bakolinti? Na miso ya basusu, akokaki komonana moto ya lolendo mpe zoba mpo na makambo oyo bapusaki ye aloba mpo na kolongisa mosala na ye ya ntoma.
12:1-4—Nani “amemamaki tii na kati ya paladiso”? Lokola Biblia etángi nkombo ya moto mosusu te oyo amonaki emonaneli yango mpe alobeli likambo yango nsima ya koloba ete azali ntoma ya kodefa te, ekoki kozala ete alobaki yango mpo na ye moko. Eloko oyo ntoma Paulo amonaki ezali paladiso ya elimo oyo biso baklisto tozali na kati na yango “na ntango [oyo] ya nsuka.”—Dan. 12:4, NW.
Mateya mpo na biso:
3:5. Vɛrsɛ yango ezali komonisa ete Yehova apesaka biso nyonso oyo tosengeli na yango na nzela ya Liloba na ye, ya elimo santu mpe ya ebongiseli na ye awa na mabelé mpo tósala mosala ya kosakola na ndenge ebongi. (Yoa. 16:7; 2 Tim. 3:16, 17) Tosengeli koyekolaka Biblia mpe mikanda oyo elimbolaka yango na molende mpenza, kobondelaka na etingya mpo na kosɛnga Nzambe apesa biso elimo santu mpe koyanganaka na makita nyonso mpe kopesaka biyano na makita yango.—Nz. 1:1-3; Luka 11:10-13; Ebe. 10:24, 25.
4:16. Lokola Yehova ‘akómisaka bomoto na biso ya kati sika mokolo na mokolo,’ tosengeli ntango nyonso kosalelaka bibongiseli oyo Yehova azwi, kasi te kolekisaka ata mokolo moko kozanga kotalela makambo ya elimo.
4:17, 18. Soki tozali kobosana te ete “bolɔzi . . . ezali ya ntango mokuse mpe ya pɛpɛlɛ,” yango ekoki kosalisa biso tótikala sembo ata na ntango ya mpasi.
5:1-5. Paulo asalelaki maloba kitoko mpenza mpo na kolobela ndenge oyo baklisto bapakolami batalelaka elikya na bango ya kokende na likoló!
10:13. Na momeseno, soki ebongiseli mosusu ezwami te mpo na kokende kopesa mabɔkɔ epai mposa ezali monene, tosengeli kosakolaka kaka na teritware ya lisangá na biso.
13:5. Mpo na ‘komimeka mpo na komona soki tozali na kati ya kondima,’ tosengeli kotala soki etamboli na biso eyokani na makambo oyo tozali koyekola na Biblia. Mpo na ‘kotala soki tozali ndenge nini,’ tosengeli kotalaka soki tozali makasi na elimo to te, soki ‘makoki na biso ya kososola’ ezali makasi mpe soki tozali kosalela Nzambe na molende. (Ebe. 5:14; Yak. 1:22-25) Soki tosaleli toli kitoko wana ya Paulo, tokoki kokoba kotambola na nzela ya solo.
[Elilingi na lokasa 26]
Maloba “mbala nyonso oyo bozali kolya limpa oyo mpe komɛla kɔpɔ oyo” ezali na ndimbola nini?—1 Kol. 11:26