Bamoná mpenza masuwa ya Noa?
EMONANAKA ete bapanzi-nsango balobelaka mwa mingi mosala oyo bato ya mayele basalaka mpo na koluka masuwa ya Noa. Likambo yango esengeli kokamwisa biso te. Mpo soki bato ya arkeoloji bamoni masuwa yango oyo ebikisaki Noa ná libota na ye na Mpela na mobu 2370-2369 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), ekozala likambo monene mpenza. Atako bato ya mayele basali milende mingi mpo na koluka masuwa ya Noa, tii lelo oyo masuwa yango emonani naino te. Bato bazali kopesa makanisi ndenge na ndenge mpe kolobaloba, kasi nini eyebani mpenza na likambo yango?
Biblia elobi ete masuwa ya Noa “esɛmaki likoló ya [ba]ngomba ya Alalata.” (Genese 8:4) Na etúká oyo ezali na bangomba yango, ezali na ngomba moko molai oyo ebengamaka lelo Ngomba Alalata; yango ezali na ɛsti ya Turquie, pene na ndelo na yango ná ekólo Arménie mpe ekólo Iran.
Bato ndenge na ndenge ya arkeoloji oyo bakendá na etúká yango mpo na koluka masuwa ya Noa balobá makambo mingi oyo ebendaki likebi; kasi, bapesaki bilembeteli te oyo ekoki mpenza kondimisa. Bafɔtɔ ya kokamwa ya bisika yango, oyo bato bakangaki longwa na mpɛpɔ, biteni ya mabaya epakolami gudrɔ oyo bato mosusu bamonaki, mpe maloba ya bato oyo balobaki ete bamonaki masuwa yango, nyonso wana etindaki bato ya arkeoloji báluka kozwa elembeteli ya sikisiki mpenza. Kasi, koluka masuwa yango ezali pɛtɛɛ te. Moko ya bisika oyo balobelaka mingi ete masuwa etɛlɛmaki wana ezali na ntaka ya mɛtrɛ soki 4600, na mopanzi ya Ngomba Alalata. Lisusu, lokola matata ezalaka mingi na etúká yango mpo na makambo ya politiki, bakonzi ya Leta baboyaka kopesa bapaya ndingisa ya kokende na ngomba yango mpo na koluka masuwa ya Noa.
Atako bongo, bato mingi basepelaka ete bato ya arkeoloji bákendaka mingi na ngomba yango mpo na koluka masuwa ya Noa. Bandimaka ete biteni mosusu ya masuwa yango ezali naino mibimba, ekundamá na nse ya nɛjɛ, na Ngomba Alalata, oyo na boumeli ya basanza mingi, ezipamaka na nɛjɛ. Bato yango balobaka mpe ete elikya ya komona masuwa yango mpe ya kokóma esika oyo ezali ekoki kozala kaka na bambula oyo moi ezalaka makasi na eleko ya molunge.
Makambo ndenge na ndenge oyo bato mosusu balobá etindaka bato bázala na elikya ya komona masuwa yango. Josèphe, Moyuda moko ya ekeke ya liboso oyo azalaki mokomi ya masolo ya kala, alobelaki bakomi mingi oyo bazalaki na bomoi liboso na ye, oyo balobaki ete masuwa ya Noa ezalaki naino komonana na mosika, na bangomba ya Alalata. Kutu, balobaki ete bato mosusu bazalaki kozwa biteni ya mabaya ya masuwa yango oyo bapakolá gudrɔ, mpe bazalaki kobomba yango lokola suvenire. Moko ya bato oyo Josèphe atángaki nkombo na ye ezali Bérose, moto ya Babilone oyo azalaki kokoma masolo ya kala na ekeke ya misato L.T.B.
Na ekeke ya 20, likambo mosusu oyo ebendaki likebi ya bato mingi ezalaki maloba ya George Hagopian, moto ya ekólo Arménie. Alobaki ete na ebandeli ya bambula ya 1900, wana azalaki naino elenge, akendaki kotala masuwa ya Noa elongo na noko na ye, kutu amataki likoló na yango. Hagopian akufaki na 1972, kasi tii sikoyo, makambo oyo alobaki ekamwisaka mpe epesaka bato elikya.
Masuwa ya Noa ekolendisa kondima ya bato?
Tozali mpenza na ntina ya kondima ete bato oyo bakendaka koluka masuwa ya Noa bamoná yango to bakomona yango mokolo mosusu? Ekoki kozala bongo, kasi ezali na makambo mingi oyo ekoki kotinda biso tókakatana kondima ete bakomona yango. Ya liboso, tóbosana te ete Biblia elobi te esika mpenza oyo masuwa yango etɛlɛmaki ntango mai ya mpela ekitaki. Elobi kaka ete masuwa etɛlɛmaki “na bangomba ya Alalata.”
Tokoki kokamwa te ete bato oyo bakendaka koluka masuwa ya Noa mpe bapanzi-nsango bákanisa ete masuwa etɛlɛmaki na ngomba oyo eleki molai na etúká yango. Kasi, Makomami elobi mpenzampenza te ete Nzambe abongisaki makambo mpo masuwa yango etɛlɛma na nsɔngɛ mpenza ya Ngomba Alalata, oyo na mikolo na biso, ezali esika moko ya malili makasi mpe na bolai ya kilomɛtrɛ soki 5.a Tóbosana mpe te ete ntango masuwa etɛlɛmaki, na nsima Noa ná libota na ye baumelaki basanza mingi na kati. (Genese 8:4, 5) Lisusu, ezali mwa mpasi tókanisa ete nsima ya kobima na masuwa, Noa ná libota na ye, mpe ebele ya banyama oyo ezalaki na kati, basengelaki kokita ngomba moko molai. Mbala mosusu, esika oyo masuwa yango etɛlɛmaki ezalaki esika ya malamu, oyo ekeseni mpenza na ndenge oyo bato mosusu oyo balukaka masuwa ya Noa bakanisaka, kasi ezalaki mpe mwa molai mpo ekokana na makambo oyo elobami na Genese 8:4, 5. Ezala soki masuwa yango etɛlɛmaki na ngomba nini ya mokili ya Alalata, boye yango nyonso epɔlá te mpe elimwá te banda bankama ya bambula oyo eleká?
Longola yango, bapanzi-nsango balobaka ete soki masuwa ya Noa emonani ekozala na litomba mpo na bandimi; kasi, ezali mpasi tóndima ete ekozala mpenza bongo. Moto moko oyo abongisaki etuluku moko ya bato mpo bákende koluka masuwa ya Noa alobaki ete soki masuwa yango emonani, “kondima ya bamilio ya bato ekokóma makasi . . . mpe bato mingi bakokóma bandimi.” Ntango alobaki liboso ya bapanzi-nsango na 2004, amonisaki ete komonana ya masuwa ya Noa ekozala “likambo oyo eleki monene banda lisekwa ya Klisto.” Mobembo oyo abongisaki esalemaki lisusu te.
Ezali mpenza solo ete komonana ya masuwa ya Noa ekokómisa kondima ya bato mingi makasi mpe ekosalisa bato mosusu bákóma bandimi? Biblia emonisi ete kondima ya solo eutaka te na biloko oyo tokoki komona to kosimba. (2 Bakolinti 5:7) Bato mosusu bazalaka na ntembe makasi mpe balobaka ete bakoki kondima masolo mosusu ya Biblia kaka soki bamoni to basimbi eloko oyo ekondimisa bango. Nzokande, bato ya ndenge wana bakoki kokóma na kondima te ata soki bamoni bilembeteli ebele ndenge nini. Yesu ye moko alobaki ete bato mosusu bakoki te kondima mateya ya solo oyo euti na Biblia—ata soki bamoni moto asekwi na bakufi!—Luka 16:31.
Kasi, kondima ya solo ezali bindimandima te; eutaka na bilembeteli ya solosolo. (Baebele 11:1) Tozali nde na bilembeteli ya solosolo oyo ekoki kosalisa bato ya makanisi malamu bándima lisolo ya Mpela? Bilembeteli ezali. Yesu Klisto alobaki polele ete: “Noa akɔtaki na masuwa, mpe mpela eyaki.” (Luka 17:26, 27) Yango nde elembeteli eleki malamu. Mpo na nini?
Yesu azalaki na likoló liboso aya awa na mabelé. (Yoane 8:58) Azalaki kotala ndenge bazalaki kotonga masuwa; amonaki Mpela. Sikoyo, elembeteli nini ekoki kondimisa yo mpenza? Litatoli ya moto oyo amonaki makambo na miso, oyo amonisaki ete akoki kotyelama motema mpe apesaki bilembeteli ete azali Mwana ya Nzambe? To nde mwa elikya oyo bato ya arkeoloji bazali na yango ete mokolo mosusu bakomona mwa biteni ya mabaya ya kalakala na ngomba moko oyo ezipami na nɛjɛ? Soki totaleli makambo ndenge wana, tokomona ete ezali na elembeteli ya solosolo oyo emonisi ete masuwa ya Noa ezalaki mpenza.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ngomba oyo ebengamaka lelo Ngomba Alalata ezali volcan oyo ebimisaka mɔtɔ lisusu te banda mobu 1840. Ezali na bolai ya mɛtrɛ 5165 mpe nɛjɛ ezipaka yango mbula mobimba.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 13]
Ezali na elembeteli ya solosolo oyo endimisi lisolo ya Mpela?
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 14]
Yesu Klisto alobaki polele ete: “Noa akɔtaki na masuwa, mpe mpela eyaki”