Sɛkɛlɛ mpo na libota ya esengo
Ndenge ya kosalela mbongo
Mobali: “Namonaka ete mwasi na ngai Lauraa abebisaka mbongo na bisombasomba—nandimi te ete tozalaka mpenza na mposa ya biloko yango. Mpe namonaka ete akokaka kobomba mbongo te! Yango ezalaka mpenza mokakatano ntango tokutani na likambo moko boye oyo ezali kosɛnga mbongo. Mbala mingi nalobaka ete soki mwasi na ngai azali na mbongo, akosilisa yango.”
Mwasi: “Ekoki kozala solo ete nayebi kobomba mbongo te, kasi mobali na ngai ayebaka te ntalo ya biloko ya kolya, biloko ya ndako mpe biloko mosusu oyo libota ezalaka na yango mposa; ngai nde natikalaka na ndako. Nayebaka biloko oyo tozali na yango mposa, mpe nasombaka yango ata soki nayebi ete ekobimisa matata.”
MBONGO ekoki kozala moko ya makambo oyo ezalaka mpasi mpo mwasi ná mobali bálobela yango na kimya nyonso. Tokoki kokamwa te ete mbala mingi yango nde ebimisaka matata na libala.
Babalani oyo bazali na bokatikati te na makambo etali mbongo, bazalaka na kimya te na makanisi, baswanaka mingi, ata mpe boyokani na bango na Yehova ebebaka. (1 Timote 6:9, 10) Kozanga kosolola malamu mpo na ndenge ya kosalela mbongo, etindaka baboti mosusu bámona ete basengeli kolekisa ngonga mingi na mosala, mpe mpo na yango bazalaka na ntango mingi te ya kozala elongo na bana na bango, ata mpe na molongani na bango; bazalaka mpe na ntango te ya kolendisana mpo na kozala na boyokani malamu na Yehova. Balakisaka mpe bana na bango te ndenge malamu ya kosalela mbongo.
Biblia elobi ete, “mbongo ebatelaka.” (Mosakoli 7:12, NW) Kasi, mbongo ekobatela libala mpe libota na yo kaka soki oyebi kosalela yango mpe oyebi kosolola na molongani na yo mpo na makambo etali mbongo.b Kutu, na esika ya kobimisa koswana, kosolola malamu na likambo etali mbongo ekosalisa mwasi ná mobali báyokanaka malamu.
Kasi, mpo na nini mbongo ebimisaka mikakatano mingi na libala? Mpe batoli nini tokoki kolanda mpo koswana ebima te ntango tozali kosolola makambo ya mbongo?
Mokakatano ezalaka nini?
Mbala mingi, mbongo yango moko te nde ebimisaka mokakatano, kasi mokakatano ezalaka nde ntango mwasi ná mobali bazali kotyelana motema te. Na ndakisa, mobali oyo azali kosɛnga na mwasi na ye ayebisaka ye eloko mokomoko oyo azali kosomba, ezali lokola nde azali koloba na ye ete ayebi te kosalela mbongo. Lisusu, soki mwasi amilelaka ete mobali na ye abombaka mbongo moke, yango ekoki komonisa ete azali kobanga bázanga mbongo soki mikakatano ebimeli bango.
Mokakatano mosusu eutaka na ndenge mwasi ná mobali babɔkwamá. Matthew, oyo abalá eleki mbula mwambe, alobi boye: “Mwasi na ngai akolá na libota oyo bayebaki kosalela mbongo. Abangaka te lokola ngai na makambo etali mbongo. Tata na ngai azalaki molangwi masanga mpe momɛli makaya mpe azalaki na mosala te bambula mingi. Mbala mingi tozalaki kokelela mpe nakómá kobanga mingi likambo ya kokɔta banyongo. Ntango mosusu likambo yango esalaka ete nazala makambo makasi epai ya mwasi na ngai na oyo etali mbongo.” Ata soki matata na bino ezali mpo na likambo nini, ndenge nini bokoki kosala mpo mbongo ebatela libala na bino, kasi epanza yango te?
Eloko nini eleki ntina mpo na yo—mbongo to libala na yo?
Sɛkɛlɛ minei mpo na kolonga
Biblia ezali buku ya makambo ya mbongo te. Kasi, ezali na bwanya oyo ekoki kosalisa babalani bákima mikakatano oyo ebimaka mpo na mbongo. Tolendisi yo otalela batoli oyo ezali awa na nse.
1. Yebá kosolola na kimya.
Biblia elobi boye: “Bwanya ezali epai ya baoyo bapesanaka makanisi.” (Masese 13:10, NW) Na kolanda ndenge oyo obɔkwamá, ntango mosusu okoki koyoka nsɔni mpo na kolobela makambo ya mbongo na basusu, mingimingi na molongani na yo. Atako bongo, bwanya ekotinda yo oyeba kolobela likambo yango ya ntina mingi. Na ndakisa, mpo na nini te koyebisa molongani na yo ete olandá ndenge oyo baboti na yo bazalaki kosalela mbongo? Lisusu, luká mpe koyeba ndenge oyo molongani na yo abɔkwamá; mpo yango mpe etali ndenge oyo asalelaka mbongo.
Bosengeli te kozela naino likambo ebima mpo bólobela makambo ya mbongo. Mokomi moko ya Biblia atunaki boye: “Bato mibale bakotambola nde elongo soki bayokani te?” (Amosa 3:3, NW) Ndenge nini kosalela toli yango? Soki bobongisi ntango ya kolobela makambo ya mbongo, yango ekosalisa bino bóswanaka mingi te.
MEKÁ KOSALA BOYE: Bongisá ntango oyo bokobanda kolobela ndenge ya kosalela mbongo na libota. Bokoki kosololaka mokolo nyonso ya liboso ya sanza to mpe kopona mokolo moko na pɔsɔ. Salá ete lisolo yango ezala mokuse, ntango mosusu ekoki koumela ata miniti 15. Poná ngonga oyo omonaka ete bozalaka kimya. Bóluka te kosolola makambo ya mbongo na ngonga mosusu, na ndakisa ntango bozali kolya to ntango bozali kominanola na bana.
2. Bóyokana mpo na ndenge ya kotalela mbongo oyo bozwaka.
Biblia elobi boye: “Mpo na kopesana lokumu bózala bato ya liboso.” (Baloma 12:10) Soki kaka yo moko nde osalaka, okoki kopesa molongani na yo lokumu, ntango ozali kotalela mbongo oyo ozali kozwa lokola ya yo moko te, kasi ya libota mobimba.—1 Timote 5:8.
Soki yo ná molongani na yo bosalaka, bokoki kopesana lokumu soki mokomoko azali kobombela molongani na ye te mbongo boni azwaka. Soki ozali kobombela molongani na yo mbongo boni ozwaka, molongani na yo akotyela yo motema te mpe yango ekobebisa boyokani na bino. Ya solo, ezali na ntina te oyebisaka ntango nyonso molongani na yo ata soki olingi kosomba eloko ya moke. Kasi, soki oyebisi molongani na yo liboso ya kosomba eloko moko ya monene, okomonisa ete ozwaka makanisi na ye na valɛrɛ.
MEKÁ KOSALA BOYE: Bóyokana mpo na mbongo oyo mokomoko na bino akoki kosalela kozanga koyebisa moninga; ekoki kozala dolare 20, 200 to mpe motángo mosusu. Sololáká ntango nyonso na molongani na yo soki olingi kosalela mbongo oyo eleki motuya oyo boyokaná.
3. Bókomaka.
Biblia elobi boye: “Mikano mya moto wa molende mikozwela ye litomba.” (Masese 21:5, Biblia Liloba lya Nzambe) Ndenge moko ya kobongisa avenire na bino mpo mosala na bino ezala ya mpunda te, ezali ya koyebaka mbongo oyo bokoki kosalela na libota. Nina, oyo aumeli mbula mitano na libala, alobi boye: “Kokoma na papye mbongo oyo bozwaka mpe oyo bosalelaka esalisaka mpenza. Moto akoki kotya ntembe te na makambo oyo akomi.”
Bóluka mindɔndɔ te ntango bozali koyokana mpo na ndenge oyo bokosalela mbongo. Darren, oyo abalá eleki mbula 26 mpe azali tata ya bana mibale, alobi boye: “Liboso tozalaki kotya mbongo na ba anvelopɛ. Na kati ya anvelopɛ mokomoko, tozalaki kotya mbongo oyo tokosalela na boumeli ya pɔsɔ moko. Na ndakisa, tobongisaki ba anvelopɛ mpo na bilei, kominanola, ata mpe mpo na kobongisa nsuki. Soki tosilisi mbongo ya anvelopɛ moko, tozalaki kodefa na anvelopɛ mosusu, kasi tozalaki ntango nyonso kokeba ete tózongisa yango.” Soki bobombaka mbongo na banki, ekozala malamu bózala na liste ya biloko oyo bozali na mposa na yango mpe bókomaka mbongo oyo bozali kobimisa.
MEKÁ KOSALA BOYE: Komá biloko oyo ntalo na yango ebongwanaka te. Bóyokana mbongo boni bokobanda kobomba. Na nsima, bósala liste ya biloko oyo ntalo na yango ebongwanaka; na ndakisa biloko ya kolya, kura to mai, mpe telefone. Na nsima, komá mbongo nyonso oyo bosaleli na boumeli ya mwa basanza. Soki likoki ezali, bómipimela biloko mosusu mpo bókɔtakɔta banyongo te.
4. Bóyokana soki nani akosala nini.
Biblia elobi boye: “Mibale baleki moko na malamu, zambi bakozala na libonza malamu na mosala na bango.” (Mosakoli 4:9, 10) Na mabota mosusu, mobali nde abombaka mbongo. Kasi, na mabota mosusu mwasi nde amemaka mokumba yango. (Masese 31:10-28) Nzokande, na mabota mingi mwasi ná mobali bamemaka mokumba yango bango mibale. Mario, oyo abalá eleki mbula 21, alobi boye: “Mwasi na ngai nde asombaka biloko ya ndako mpe biloko mosusu ya mikemike. Ngai nafutaka mbongo ya bampako, ya ba kɔntra mpe ya ndako. Toyebisanaka makambo nyonso oyo tozali kosala.” Ezala boyokani ndenge nini, sɛkɛlɛ ezali kaka kozala na bomoko.
MEKÁ KOSALA BOYE: Nsima ya koyeba makoki mpe bolɛmbu na bino, bóyokana mpo na mokumba oyo mokomoko akokokisa. Bótalelaka ebongiseli yango nsima ya mwa basanza. Bóndimaka mpe kobongisa esika oyo esimbi te. Mpo na koyeba valɛrɛ ya mosala ya molongani na yo, na ndakisa kofuta ba faktire, kosomba biloko, ntango mosusu yo okoki kokokisa mokumba na ye mpe ye akokisa oyo ya yo.
Oyo masolo yango esengeli komonisa
Masolo na bino na ntina na mbongo esengeli te kobebisa bolingo na bino. Leah, oyo abalá eleki mbula mitano, andimi likambo yango. Alobi boye: “Ngai ná mobali na ngai tosololaka polelepolele mpo na makambo ya mbongo. Yango esali ete tósalaka na boyokani, mpe bolingo na biso ezali se kokola.”
Ntango mwasi ná mobali bazali koyokana mpo na ndenge bakosalela mbongo, koyebisana makambo oyo bazali kokana, yango ekolendisa ndai na bango ya libala. Ntango mokomoko azali kotuna moninga liboso ya kosomba eloko ya monene, yango ekomonisa ete amemyaka makanisi mpe atalelaka bamposa ya moninga. Ntango mokomoko azali kotikela moninga bonsomi ya kosalela motángo moko boye ya mbongo oyo bayokani kozanga koyebisa moninga, yango ekomonisa ete batyelanaka motema. Yango nde sɛkɛlɛ ya bolingo na kati ya libala. Boyokani ya ndenge wana ezali na ntina mingi koleka mbongo; na yango, mpo na nini koswana mpo na mbongo?
a Oyo ezali bankombo topesi bango kopesa.
b Biblia elobi boye: “Mobali azali mokonzi ya mwasi”; na yango azali na mokumba monene ya kozwaka bikateli mpo na ndenge libota esengeli kosalela mbongo, kolinga mwasi na ye mpe kosalela ye makambo na makasi te.—Baefese 5:23, 25.
OMITUNA . . .
Mbala ya nsuka oyo ngai ná molongani na ngai tosololaki na kimya mpo na makambo ya mbongo ezalaki ntango nini?
Nakoki koloba to kosala nini mpo na komonisa botɔndi na nyonso oyo molongani na ngai asalaka mpo na kosunga libota na biso na makambo ya mbongo?