Tólona bolingo oyo esilaka soki moke te
‘Bolingo eyikaka mpiko na makambo nyonso. Bolingo esilaka soki moke te.’—1 KO. 13:7, 8.
1. (a) Ndenge nini bato balobelaka bolingo? (b) Bato mingi balingaka nani mpe nini?
BATO balobá makambo mingi na ntina etali bolingo. Banzembo mingi ekumisaka bolingo mpe elobelaka lolango. Moto nyonso azalaka na mposa bálinga ye. Kasi mbala mingi, babuku mpe bafilme elobelaka yango na masolo ya lolango, mpe babuku mpe bafilme yango etɛkamaka mingi. Nzokande, likambo ya mawa, bolingo ya solosolo mpo na Nzambe mpe mozalani ezali te. Tozali komona likambo oyo Biblia esakolaki mpo na mikolo oyo ya nsuka. Bato bazali “bato oyo bamilingaka, bato balingá mbongo, . . . oyo balingá bisengo na esika ya kolinga Nzambe.”—2 Tim. 3:1-5.
2. Likebisi nini Biblia epesi mpo na bolingo oyo ebongi te?
2 Bato bazali na likoki ya komonisa bolingo, kasi Liloba ya Nzambe ekebisi biso mpo na bolingo oyo ebongi te. Biblia elobeli likambo oyo esalemaka ntango bolingo ya ndenge wana ezwi misisa na motema ya moto. (1 Tim. 6:9, 10) Oyebi lisusu likambo oyo ntoma Paulo akomaki mpo na Demasi? Atako azalaki kosala elongo na Paulo, Demasi akómaki kolinga biloko oyo mokili ezalaki kopesa. (2 Tim. 4:10) Ntoma Yoane mpe akebisaki bakristo mpo na likama yango. (Tángá 1 Yoane 2:15, 16.) Kolinga mokili mpe biloko na yango oyo ezali koleka, eyokani te na kolinga Nzambe mpe makambo oyo euti epai na ye.
3. Tozali kobunda mpo na nini, mpe yango ebimisi mituna nini?
3 Tozali bato ya mokili oyo te, atako tozali kofanda na mokili. Yango wana, tozali kobunda mpo na kokima lolenge mabe oyo mokili etalelaka bolingo. Tosengeli kosala makasi mpo tókwea te na motambo ya kozala na bolingo oyo ebongi te. Na yango, mpo na nani tosengeli kolona bolingo oyo esimbami na mitinda mpe komonisa yango? Nini ekoki kosalisa biso tólona bolingo oyo eyikaka mpiko na makambo nyonso mpe oyo esilaka soki moke te? Na ndenge nini bolingo yango esalisaka biso lelo oyo mpe etali bomoi na biso ya mikolo ezali koya? Tosengeli kozwa biyano oyo eyokani na makanisi ya Nzambe mpo yango etambwisa biso.
Tólona bolingo mpo na Yehova
4. Ndenge nini bolingo mpo na Nzambe ekolaka?
4 Kolona ekoki kosɛnga kobongisa molona mpo ekola malamu. Kanisá mosali-bilanga oyo asali mosala makasi ya kobongisa mabele mpe kolona mboto. Azali kozela ete mboto yango ekola. (Ebr. 6:7) Ndenge moko mpe, bolingo na biso mpo na Nzambe esengeli kokola. Tosengeli kosala nini mpo bolingo na biso mpo na Nzambe ekola? Tosengeli kobongisa mabele ya malamu, elingi koloba motema na biso, epai mboto ya solo ya Bokonzi elonamaki. Tokoki kosala yango soki tozali koyekola Liloba ya Nzambe na mozindo mpo na kobakisa boyebi na biso ya Nzambe. (Kol. 1:10) Koyangana pɔsɔ na pɔsɔ na makita ya lisangá mpe kopesa biyano na makita yango ekosalisa mpe biso tókóma na boyebi mingi. Ozali ntango nyonso kosala makasi mpo okóma na boyebi mingi?—Mas. 2:1-7.
5. (a) Ndenge nini tokoki koyeba bizaleli minene ya Yehova? (b) Okoki koloba nini mpo na bosembo, bwanya, mpe nguya ya Nzambe?
5 Na nzela ya Liloba na ye, Yehova amonisi bizaleli na ye. Soki tozali koyekola Makomami mpe koyekola mokemoke makambo oyo etali Yehova, tokoki kosepela lisusu mingi na bizaleli na ye minene—bosembo, nguya, bwanya, mpe na koleka, bolingo na ye monene. Yehova amonisaka bosembo na ye na banzela na ye nyonso mpe na mobeko na ye ya kokoka. (Mib. 32:4; Nz. 19:7) Soki tozali kokanisa na mozindo biloko oyo Yehova azalisá, tokoki kozala na limemya makasi mpo na bwanya na ye monene. (Nz. 104:24) Molɔ́ngɔ́ mobimba mpe emonisaka ete Yehova azali Liziba ya makasi mpe ya nguya oyo esilaka te.—Yis. 40:26.
6. Ndenge nini Nzambe amonisaki ete alingaka biso, mpe yango esengeli kotinda yo osala nini?
6 Tokoki koloba nini mpo na bolingo, ezaleli ya Nzambe oyo eleki monene? Ezali na ndelo te mpe etali biso nyonso. Amonisaki bolingo yango na ndenge apesaki lisiko mpo na kosikolama ya bato. (Tángá Baroma 5:8.) Ebongiseli yango ezali mpo na bato ya mokili mobimba, kasi kaka baoyo bazali kondima bolingo ya Nzambe mpe kondimela Mwana na ye nde bakozwela yango matomba. (Yoa. 3:16, 36) Ndenge Nzambe apesaki Yesu mbeka mpo na bolimbisi ya masumu na biso esengeli mpe kotinda biso tólinga ye.
7, 8. (a) Tosengeli kosala nini mpo tómonisa ete tolingaka Nzambe? (b) Basaleli ya Nzambe bazali kotosa mibeko na ye ata na bisika nini?
7 Ndenge nini tokoki komonisa ete tolingi Nzambe na kotalela nyonso oyo asali mpo na biso? Makomami epesi eyano ya polele: “Bolingo ya Nzambe elakisi boye: ete tótosaka mibeko na ye; kutu mibeko na ye ezali kilo te.” (1 Yoa. 5:3) Ya solo, kolinga Yehova Nzambe etindaka biso tótosa mibeko na ye. Yango ezali ntina moko oyo topesaka litatoli mpo na nkombo mpe Bokonzi na ye, mpe yango ememelaka bato matomba. Soki tozali kosala yango mpo motema na biso nde ezali kotinda biso, tokomonisa ete tozali kotosa mibeko ya Nzambe mpo tolingi ye.—Mat. 12:34.
8 Bandeko na biso na mokili mobimba bazali kokoba kotosa mibeko ya Nzambe ata na bisika oyo bato bakipaka makambo ya Nzambe te mpe oyo bato bazali koboya nsango ya Bokonzi na motema moko. Bazali kotika te kosala milende mpo na kokokisa mosala na bango malamumalamu. (2 Tim. 4:5) Ndenge moko mpe, bolingo ezali kotinda biso tósalisa basusu báyeba Nzambe mpe tótosaka mibeko na ye mosusu.
Ntina oyo tolingaka Nkolo na biso Yesu Kristo
9. Makambo nini Kristo ayikelaki mpiko, mpe nini esalisaki ye?
9 Longola kolinga Nzambe, ezali mpe na makambo mingi oyo etindaka biso tólinga Mwana na ye. Atako tomoná Yesu te, bolingo na biso mpo na ye ekobakisama wana tozali koyekola makambo oyo etali ye. (1 Pe. 1:8) Wapi mwa makambo oyo Yesu ayikelaki mpiko? Ntango Yesu azalaki kosala mokano ya Tata na ye, bato bayinaki ye kaka mpamba, banyokolaki ye, bakoselaki ye makambo, batyolaki ye. Basalelaki ye mpe makambo mosusu oyo ekitisaki lokumu na ye. (Tángá Yoane 15:25.) Bolingo oyo Yesu azalaki na yango mpo na Tata na ye ya likoló nde etindaki ye ayikela bampasi nyonso wana mpiko. Bolingo etindaki ye mpe akufa liwa ya mbeka mpo na kosikola bato mingi.—Mat. 20:28.
10, 11. Na kotalela nyonso oyo Yesu asalaki mpo na biso, ekateli na biso ezali nini?
10 Makambo oyo Yesu asalaki na bomoi na ye ezali kotinda biso tólinga ye. Soki tozali kokanisa makambo oyo Kristo asali mpo na biso, bolingo na biso mpo na ye ekokóma makasi. Lokola tozali bayekoli na ye, tosengeli komityela mokano ya kolona mpe kokoba komonisa bolingo lokola oyo ya Kristo mpo tótika te kotosa etinda oyo apesaki biso ya kopesa litatoli na ntina na Bokonzi mpe kokómisa bato bayekoli.—Mat. 28:19, 20.
11 Lokola tomonisaka botɔndi mpo na bolingo oyo Kristo alingaki bato nyonso, tomonaka ete tosengeli kosilisa mosala na biso liboso nsuka eya. (Tángá 2 Bakorinti 5:14, 15.) Bolingo oyo Kristo amonisaki nde ezalaki kotinda ye asala nyonso oyo Nzambe akanaki mpo na bato. Mpe ndakisa oyo Kristo atikelaki biso mpo tólanda malamumalamu ekoki kosalisa mokomoko na biso apesa mabɔkɔ mpo mokano yango ya Nzambe ekokisama. Yango ezali kosɛnga ete tólonga kotondisa mpenza mitema na biso na bolingo ya Nzambe. (Mat. 22:37) Soki tozali kotosa makambo oyo Yesu ateyaki mpe tozali kobatela mibeko na ye, tokomonisa ete tolingi ye mpe tozali na ekateli ya kozala na ngámbo ya boyangeli ya Nzambe, ata soki ekosɛnga nini, kaka ndenge Yesu asalaki.—Yoa. 14:23, 24; 15:10.
Tólanda nzela ya bolingo, nzela oyo eleki nyonso
12. Paulo alingaki koloba nini na maloba “nzela oyo eleki nyonso”?
12 Ntoma Paulo azalaki komekola Kristo. Lokola azalaki kolanda matambe ya Kristo malamumalamu, Paulo azalaki na elobeli ya polele ntango alendisaki bandeko na ye bákóma bamekoli na ye. (1 Ko. 11:1) Atako alendisaki bakristo ya Korinti bákoba koluka na molende makabo mosusu ya elimo oyo ezalaki na ekeke ya liboso, na ndakisa kobikisa bato mpe koloba na minɔkɔ mosusu, Paulo amonisaki bango ete ezalaki na nzela moko oyo eleki malamu, oyo basengelaki kolanda. Na 1 Bakorinti 12:31, alobaki boye: “Nalingi kolakisa bino nzela oyo eleki nyonso.” Bavɛrsɛ oyo elandi emonisi ete nzela yango oyo eleki nyonso ezali nzela ya bolingo. Na ndenge nini nzela yango eleki nyonso? Paulo apesaki ndakisa mpo na kolimbola likambo oyo alingaki koloba. (Tángá 1 Bakorinti 13:1-3.) Soki azalaki na makoki ya kokamwa mpe azalaki kosala makambo ya minene kasi azalaki na bolingo te, alingaki kozala ndenge nini? Alingaki kozala mpamba. Na lisalisi ya elimo ya Nzambe, Paulo alobelaki likambo wana ya ntina mingi. Likambo oyo alobaki esengeli mpenza kosimba mitema na biso!
13. (a) Mokapo ya mobu 2010 ezali nini? (b) Na ndenge nini bolingo esilaka soki moke te?
13 Na nsima, Paulo amonisaki biso oyo bolingo ezali, mpe oyo yango ezali te. (Tángá 1 Bakorinti 13:4-8.) Sikoyo, omitalela mpo na koyeba soki bolingo oyo ozali na yango ezali mpenza oyo esɛngami. Talelá mingimingi eteni ya nsuka ya vɛrsɛ 7 mpe fraze ya liboso ya vɛrsɛ 8: ‘Bolingo eyikaka mpiko na makambo nyonso. Bolingo esilaka soki moke te’; ezali mokapo ya mobu 2010. Simbá ete na vɛrsɛ 8, Paulo alobaki ete makabo ya elimo, na ndakisa kosakola makambo ekoya mpe koloba na minɔkɔ mosusu—oyo ezalaki na ebandeli ya lisangá ya bokristo—ekolongolama. Ekosuka. Kasi, bolingo ekozala kaka. Bolingo eutaka epai ya Yehova, mpe Yehova azali libela na libela. Yango wana, bolingo ekosila to ekosuka soki moke te. Ekokoba kozala libela na libela mpo ezali ezaleli ya Nzambe na biso ya seko.—1 Yoa. 4:8.
Bolingo eyikaka mpiko na makambo nyonso
14, 15. (a) Ndenge nini bolingo ekoki kosalisa biso tóyikela mikakatano mpiko? (b) Mpo na nini ndeko moko ya elenge aboyaki kobuka mitinda ya Biblia?
14 Nini epesaka bakristo likoki ya koyika mpiko ata soki bakutani na komekama, mikakatano, mpe makambo ya mpasi ya ndenge nyonso? Ezali mingimingi bolingo oyo esimbami na mitinda. Bolingo ya ndenge wana esuki kaka te na kondima kobungisa biloko na biso ya mosuni. Ekendaka tii na kondima kobatela bosembo na biso mpe kondima kobungisa ata bomoi na biso mpo na Kristo. (Luka 9:24, 25) Tótalela bosembo ya Batatoli oyo banyokwamaki na bakaa ya bakangami, na bakaa ya misala makasi, mpe na babolɔkɔ, na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba mpe nsima na yango.
15 Tólobela ndakisa ya elenge Motatoli moko ya Allemagne na nkombo Wilhelm. Na esika abuka mitinda ya Biblia, atikalaki sembo ntango basoda ya Nazi balingaki koboma ye na mindoki. Na mokanda oyo akomelaki bato ya libota na ye mpo na kopesa bango mbote ya nsuka, alobaki boye: “Tosengeli libosoliboso kolinga Nzambe, ndenge Motambwisi na biso Yesu Kristo apesaki etinda. Soki tozali na ngámbo na ye, akopesa biso mbano.” Na nsima, na lisolo moko ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, ndeko moko ya libota na ye akomaki boye: “Na kati ya mikakatano nyonso oyo tokutanaki na yango, libota na biso mobimba, tozalaki kosala nyonso tólekisa bolingo na biso mpo na Yehova liboso ya makambo nyonso.” Bandeko na biso mingi oyo bazali na bolɔkɔ na Arménie, na Érythrée, na Corée du Sud, mpe na mikili mosusu, bazali na elimo ya ndenge wana. Bolingo ya bandeko yango mpo na Yehova ezali kaka makasi.
16. Makambo nini bandeko na biso ya Malawi bayikelaki mpiko?
16 Na bisika mingi, bandeko na biso bazali kokutana na makambo mosusu oyo ezali komeka kondima mpe ezaleli na bango ya koyika mpiko. Na boumeli ya mbula 26, Leta epekisaki mosala ya Batatoli ya Yehova na Malawi, bandeko yango bakutanaki na botɛmɛli makasi mpe makambo mingi ya mpasi. Bazwaki mbano ndenge bayikaki mpiko. Ntango epekiseli ebandaki, Batatoli ya Yehova bazalaki soki 18000 na ekólo yango. Mbula 30 na nsima, bakómaki 38393, mbala mibale koleka ndenge bazalaki liboso. Bokoli ya ndenge wana emonanaki mpe na mikili mosusu.
17. Makambo nini bato mosusu bakutanaka na yango na mabota oyo bato nyonso te nde bazali Batatoli, mpe nini ekoki kosalisa bango bálonga mikakatano yango?
17 Soki banguna babundisi basaleli ya Nzambe na ndenge ya polele, yango esalaka mpasi. Kasi, soki bato ya libota ya mokristo moko nde bazali kotɛmɛla ye, ezalaka mpasi koleka. Mingimingi soki ezali bato oyo afandaka na bango ndako moko to bandeko na ye mosusu ya libota, akoki kotungisama mingi. Yesu asakolaki te ete likambo ya ndenge wana ekosalema? Asakolaki yango, mpe likambo yango esilá kokómela bato mingi. (Mat. 10:35, 36) Baboti mosusu oyo bazali Batatoli te batɛmɛlaka bana na bango ya bilenge. Kutu, babenganaki bamosusu na ndako, kasi Batatoli mosusu bamoniselaki bango boboto mpe bazwaki bango. Baboti mosusu basundolaki bana na bango. Nini esalisaki bilenge ya ndenge wana báyikela makambo wana mpiko? Bolingo na bango mpo na bandeko na bango ya mokili mobimba, kasi na koleka, bolingo na bango ya solosolo mpo na Yehova mpe Mwana na ye.—1 Pe. 1:22; 1 Yoa. 4:21.
18. Ndenge nini bolingo oyo eyikaka mpiko na makambo nyonso esalisaka babalani bakristo?
18 Ezali na makambo mosusu mingi ya bomoi oyo esɛngaka tózala na bolingo oyo eyikaka mpiko na makambo nyonso. Na libala, bolingo esalisaka babalani bátosa maloba oyo ya Yesu: “Oyo Nzambe akangisi esika moko moto akabola yango te.” (Mat. 19:6) Ntango bakutani na “bolɔzi na kati ya mosuni na bango,” babalani bakristo basengeli kobosana te ete Yehova azali na esika monene na libala na bango. (1 Ko. 7:28) Liloba na ye elobi ete ‘bolingo eyikaka mpiko na makambo nyonso,’ mpe soki mwasi ná mobali bamilatisi ezaleli yango, bakozala na likoki ya kokangama mpenza bango mibale mpe kobatela libala na bango.—Kol. 3:14.
19. Nini esalemaki epai ya basaleli ya Nzambe nsima ya likama?
19 Bolingo esalisaka biso tóyika mpiko na makambo nyonso ntango makama ebimi. Esalemaki bongo ntango mabele eninganaki na sudi ya ekólo Pérou mpe ntango mopɛpɛ makasi oyo ebengamaki Katrina ebebisaki bingumba mingi na sudi ya États-Unis. Bandeko na biso mingi babungisaki bandako mpe biloko na bango na likama wana. Bolingo etindaki lisangá ya bandeko na mokili mobimba epesa biloko mpo na kosalisa bango, mpe bandeko bamipesaki mpo na kotonga lisusu bandako ya bandeko mpe kobongisa Bandako ya Bokonzi. Makambo wana emonisi ete bandeko balinganaka mpe basalisanaka ntango nyonso, ezala na makambo nini.—Yoa. 13:34, 35; 1 Pe. 2:17.
Bolingo esilaka soki moke te
20, 21. (a) Mpo na nini bolingo ezali na ntina mingi koleka? (b) Mpo na nini ozali na ekateli ya kolanda nzela ya bolingo?
20 Na kati ya basaleli ya Yehova lelo oyo, tomonaka ete kolanda nzela ya bolingo, nzela oyo eleki nyonso, ezali mpenza likambo ya bwanya. Ya solo, bolingo eleki nyonso. Tótala ndenge ntoma Paulo amonisaki likambo yango. Ya liboso, alobaki ete makabo ya elimo ekosila mpe ete lisangá ya bokristo ekokola mpe ekokɔmɛla. Na nsima, asukisaki boye: “Nzokande, sikoyo kondima, elikya mpe bolingo ezali, yango misato; kasi oyo eleki na kati na yango ezali bolingo.”—1 Ko. 13:13.
21 Nsukansuka, makambo oyo tozali na kondima mpo na yango ekosalema; na yango, ekozala lisusu na ntina te ete tózala na kondima na makambo yango. Elikya na bilaka oyo tozali kozela ete ekokisama ekozala lisusu na ntina te ntango makambo nyonso ekokóma makambo ya sika. Bongo bolingo? Yango ekosila to ekosuka soki moke te. Ekotikala libela. Ntango tokozala na bomoi libela na libela, na ntembe te tokomona mpe tokoyeba makambo mosusu mingi oyo etali bolingo ya Nzambe. Soki ozali kosala mokano ya Nzambe, ozali kolanda nzela ya bolingo, nzela oyo eleki nyonso, oyo esilaka soki moke te, okotikala libela na libela.—1 Yoa. 2:17.
Okopesa eyano nini?
• Mpo na nini esengeli kokeba na bolingo oyo ebongi te?
• Bolingo ekoki kosalisa biso tóyika mpiko na nini?
• Na ndenge nini bolingo esilaka soki moke te?
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 27]
Mokapo ya mobu 2010 ezali: ‘Bolingo eyikaka mpiko na makambo nyonso. Bolingo esilaka soki moke te.’—1 Ko. 13:7, 8.
[Elilingi na lokasa 25]
Kolinga Nzambe etindaka biso tópesa litatoli
[Elilingi na lokasa 26]
Bolingo oyo esilaka te esalisaki bandeko ya Malawi báyikela mikakatano mpiko