Kondimama na Nzambe ememaka na bomoi ya seko
“Yo moko okopambola moto nyonso oyo azali moyengebene, Ee Yehova; okozinga bango na kondimama lokola na nguba ya monene.”—NZ. 5:12.
1, 2. Eloko nini Eliya asɛngaki mwasi ya Zarefate oyo mobali akufá, mpe apesaki ye elikya nini?
MWASI moko ná mwana na ye ya mobali bazalaki na nzala, ndenge moko mpe mosakoli ya Nzambe. Ntango mwasi yango ya engumba Zarefate oyo mobali na ye akufá azalaki komibongisa mpo apelisa mɔtɔ mpo na kolamba, mosakoli Eliya asɛngaki ye mai ná limpa. Andimaki kopesa ye mwa eloko ya komɛla, kasi nyonso oyo azalaki na yango mpo na kolya ezalaki kaka “mwa farini na elokó ya monene mpe mwa mafuta na elokó ya moke.” Amonaki ete azalaki na likoki te ya kopesa mosakoli yango bilei, mpe ayebisaki ye bongo.—1 Bak. 17:8-12.
2 Eliya atingamaki kaka mpe alobaki ete: “Na oyo ezali wana, salelá ngai naino mwa gato ya libungutulu mpe memelá ngai yango, bongo na nsima, okoki kosala mwa eloko mpo na yo ná mwana na yo. Mpo talá oyo Yehova Nzambe ya Yisraele alobi: ‘Farini ya elokó ya monene ekosila te, mpe mafuta ya elokó ya moke ekozanga te.’”—1 Bak. 17:13, 14.
3. Motuna nini ya ntina etali biso lelo?
3 Mwasi wana oyo mobali akufá asengelaki kozwa ekateli oyo esuki kaka te na koyeba soki akokaba mwa ndambo ya bilei oyo etikali. Akotyela Yehova motema ete akobikisa ye ná mwana na ye ya mobali, to akotya bamposa na ye ya mosuni liboso ya kondimama na Nzambe mpe kosala boninga na ye? Motuna ya ndenge wana etali mpe biso lelo. Tokoluka libosoliboso kondimama na Yehova na esika ya koluka biloko ya mosuni? Tozali na bantina malamu ya kotyela Nzambe motema mpe kosalela ye. Mpe ezali na makambo oyo tokoki kosala mpo na koluka kondimama na Nzambe.
‘Obongi kozwa losambo’
4. Mpo na nini Yehova abongi kozwa losambo na biso?
4 Yehova azali na lotomo ya kosɛnga ete bato básalela ye na ndenge ebongi. Etuluku ya basaleli na ye na likoló bamonisaki likambo yango mpe balobaki bango nyonso ete: “Yehova, ɛɛ Nzambe na biso, obongi kozwa nkembo mpe lokumu mpe nguya, mpo yo ozalisaki biloko nyonso, mpe mpo na mokano na yo yango ezalaki mpe ezalisamaki.” (Em. 4:11) Lokola azali Mozalisi, Yehova abongi kozwa losambo na biso.
5. Mpo na nini bolingo ya Nzambe esengeli kotinda biso tósalela ye?
5 Ntina mosusu oyo tosengeli kosalela Yehova ezali ete alingi biso koleka moto mosusu nyonso. Biblia elobi boye: “Nzambe abandaki kozalisa moto na elilingi na ye, na elilingi ya Nzambe azalisaki ye; azalisaki bango mobali ná mwasi.” (Eba. 1:27) Moto azali na bonsomi ya kopona mpo Nzambe apesá ye likoki ya kokanisa mpe ya kozwa bikateli. Lokola apesaki biso bomoi, Yehova akómaki Tata ya bato nyonso. (Luka 3:38) Lokola tata nyonso ya bolingo, asalaki nyonso mpo na kopesa bana na ye ya mibali mpe ya basi nyonso oyo esengeli mpo básepela na bomoi. ‘Abimisaka moi’ mpe ‘anɔkisaka mbula,’ mpo ete mabele ebimisaka bilei mingi mpo na biso mpe ezala esika moko kitoko.—Mat. 5:45.
6, 7. (a) Mabe nini Adama asalaki bakitani na ye nyonso? (b) Mbeka ya Kristo ekosala nini mpo na baoyo bazali koluka kondimama na Nzambe?
6 Yehova abikisi biso mpe na mbuma mabe oyo lisumu ebotaki. Ntango Adama asalaki lisumu, akómaki lokola mobɛti masano ya mbongo oyo ayibaka mbongo ya libota na ye mpo na kokende kobɛta masano. Ntango atombokelaki Yehova, Adama ayibaki bana na ye elikya na bango—kozala na esengo libela na libela. Moimi na ye ekɔtisá bato na boombo ya kozanga kokoka. Na yango, bato nyonso babɛlaka, bayokaka mawa, mpe nsukansuka bakufaka. Kobimisa moto na boombo esɛngaka kofuta eloko, mpe Yehova afutaki eloko oyo ekoki kosikola biso na mabe wana oyo lisumu ebimisaki. (Tángá Baroma 5:21.) Na kolanda mokano ya Tata na ye, Yesu Kristo apesaki “molimo na ye lisiko na esika ya bato mingi.” (Mat. 20:28) Mosika te, baoyo bandimami na Nzambe bakozwa matomba nyonso ya lisiko.
7 Mozalisi na biso, Yehova, asali mingi koleka moto mosusu nyonso mpo na kopesa biso bomoi ya esengo mpe oyo ezali na ntina. Soki tondimami na ye, tokomona ndenge azali kosala mpo na kolongola bampasi nyonso oyo ekwelá bato. Yehova akokoba komonisa mokomoko na biso ndenge akómaka “moto oyo apesaka mbano na baoyo bazali koluka ye na mposa makasi.”—Ebr. 11:6.
“Bato na yo bakomipesa na bolingo na bango moko”
8. Likambo oyo Yisaya akutanaki na yango eteyi biso nini na oyo etali kosalela Nzambe?
8 Mpo tóndimama na Nzambe, tosengeli kosalela malamu bonsomi na biso ya kopona. Ezali bongo mpo Yehova atindikaka moto na makasi te ete asalela ye. Na ntango ya Yisaya, Nzambe atunaki boye: “Nakotinda nani, mpe nani akokende mpo na biso?” Lokola andimaki ete mosakoli azali na lotomo ya kozwa bikateli, Yehova apesaki ye lokumu. Kanisá esengo oyo Yisaya ayokaki ntango ayanolaki ete: “Ngai oyo! Tindá ngai.”—Yis. 6:8.
9, 10. (a) Tosengeli kozala na makanisi ya ndenge nini ntango tozali kosalela Nzambe? (b) Mpo na nini ebongi tósalela Yehova na molimo mobimba?
9 Bato bazali na bonsomi ya kosalela Nzambe to ya koboya kosalela ye. Yehova alingi tósalela ye na bolingo na biso moko. (Tángá Yosua 24:15.) Bato oyo basambelaka Nzambe na motema moko te bakoki kosepelisa ye te; Nzambe asepelaka mpe te na losambo ya baoyo bazali kosambela ye kaka mpo na kosepelisa basusu. (Kol. 3:22) Soki tozali kosala mosala mosantu na “kokakatana” mpe tozali kotika makambo ya mokili ezwa esika ya losambo na biso, Nzambe akondima biso te. (Kob. 22:29) Yehova ayebi ete kosalela ye na molimo mobimba ezali malamu mpo na biso. Moize alendisaki Bayisraele bápona bomoi ‘na kolingáká Yehova Nzambe na bango, koyokáká mongongo na ye mpe na kokangamáká na ye.’—Mib. 30:19, 20.
10 Davidi, mokonzi ya Yisraele ya kala, ayembelaki Yehova boye: “Bato na yo bakomipesa na bolingo na bango moko na mokolo oyo okokamba limpinga ya basoda na yo na etumba. Na nkembo mingi ya bosantu, ozali na etuluku na yo ya bilenge lokola matangá ya mamwɛ ya kotana ya ntɔngɔ.” (Nz. 110:3) Mpo na bato mingi lelo, eloko eleki ntina ezali kozala na mbongo mpe bisengo. Kasi, mpo na baoyo balingaka Yehova, eloko eleki ntina ezali mosala mosantu na bango. Molende na bango na mosala ya kosakola emonisi makambo nini batyaka na esika ya liboso na bomoi na bango. Batyelaka Yehova motema mobimba ete akoki kokokisa bamposa na bango ya mokolo na mokolo.—Mat. 6:33, 34.
Bambeka oyo Nzambe andimaka
11. Litomba nini Bayisraele bazalaki kolikya kozwa soki bapesi Yehova bambeka?
11 Na kondimana ya Mibeko, basaleli ya Nzambe bazalaki kopesa bambeka mpo Nzambe andima bango. Balevi 19:5 elobi boye: “Soki bokopesa Yehova mbeka ya boyokani, bokopesa yango mpo bóndimama.” Mokapo mosusu ya mokanda yango elobi boye: “Soki bokopesa mbeka ya kozongisa matɔndi epai ya Yehova, bokopesa yango mpo bóluka kondimama.” (Lev. 22:29) Ntango Bayisraele bazalaki kopesa bambeka ya banyama oyo ebongi na etumbelo ya Yehova, milinga oyo ezalaki komata ezalaki lokola ‘nsolo moko ya kokitisa motema’ mpo na Nzambe ya solo. (Lev. 1:9, 13) Nzambe azalaki koyoka ete motema na ye ekiti mpe azalaki kosepela na misala wana oyo emonisi bolingo ya bato na ye. (Eba. 8:21) Makambo wana ya Mibeko ezali na etinda moko oyo etali mpe biso lelo. Yehova andimaka baoyo bapesaka ye bambeka. Andimaka bambeka nini? Tótalela makambo mibale ya bomoi: etamboli na biso mpe maloba na biso.
12. Misala nini ekosala ete mbeka ya nzoto na biso epesa Nzambe nkanda?
12 Na mokanda na ye epai ya Baroma, ntoma Paulo akomaki boye: “Bókaba nzoto na bino mbeka ya bomoi, ya bosantu, oyo Nzambe akoki kondima: mosala mosantu oyo bozali kosala na makoki na bino ya kokanisa.” (Rom. 12:1) Mpo moto andimama na Nzambe, asengeli kobatela nzoto na ye mpo ezala ndenge oyo Nzambe akoki kondima. Soki amikómisi mbindo na biloko lokola makaya, mbuma ya bétel, bangi, mpe na milangwa ya masanga, mbeka na ye ekozala na ntina moko te. (2 Ko. 7:1) Lisusu, lokola “moto oyo asalaka pite, azali kosalela nzoto na ye moko lisumu,” mbeka ya moto oyo azali na etamboli ya mbindo ya ndenge nyonso epesaka Yehova nkanda. (1 Ko. 6:18) Mpo na kosepelisa Nzambe, moto asengeli ‘kokóma mosantu na etamboli na ye mobimba.’—1 Pe. 1:14-16.
13. Mpo na nini ebongi tósanzola Yehova?
13 Mbeka mosusu oyo esepelisaka Yehova etali maloba na biso. Baoyo balingaka Yehova balobaka ntango nyonso malamu mpo na ye ezala na esika ya bato mingi to ntango bazali bango moko na bandako na bango. (Tángá Nzembo 34:1-3.) Soki otángi Nzembo 148 tii na 150, okomona mbala boni banzembo wana misato elendisi biso tósanzola Yehova. Ya solo, “lisanzoli ebongi na bato ya makambo alima.” (Nz. 33:1) Ndakisa na biso Yesu Kristo mpe amonisaki ntina ya kosanzola Nzambe na mosala ya kosakola nsango malamu.—Luka 4:18, 43, 44.
14, 15. Hosea alendisaki Bayisraele bápesa bambeka ya ndenge nini, mpe Yehova alobaki nini?
14 Kosakola na molende emonisaka mpenza ete tolingaka Yehova mpe tozali na mposa ya kondimama na ye. Na ndakisa, tótala ndenge mosakoli Hosea alendisaki Bayisraele oyo bamipesaki na losambo ya lokuta mpe oyo Nzambe azalaki lisusu kondima bango te. (Hos. 13:1-3) Hosea ayebisaki bango básɛnga boye: “[Yehova] limbisá libunga; mpe ndimá oyo ezali malamu, mpe mpo na yango, biso tokopesa likabo ya bana-ngɔmbɛ ya mibali ya mbɛbu na biso.”—Hos. 14:1, 2.
15 Mwana-ngɔmbɛ mobali ezalaki nyama ya motuya koleka oyo Moyisraele akokaki kopesa Yehova. Na yango, “bana-ngɔmbɛ ya mibali ya mbɛbu na biso” elakisi maloba oyo elobami na motema moko, oyo eponami malamu mpo na kosanzola Nzambe ya solo. Yehova alobaki nini mpo na baoyo bazalaki kopesa bambeka ya ndenge wana? Alobaki boye: “Nakolinga bango ndenge ngai moko nasepeli.” (Hos. 14:4) Yehova azalaki kolimbisa baoyo bazalaki kopesa bambeka ya ndenge wana, kondima bango mpe kokóma moninga na bango.
16, 17. Ntango kondima epai ya Nzambe etindi moto asakola nsango malamu, ndenge nini Yehova atalelaka lisanzoli ya moto yango?
16 Kosanzola Yehova liboso ya bato ezalaka ntango nyonso na ntina mingi na losambo ya solo. Kopesa Yehova nkembo ezalaki mpenza na ntina mingi mpo na mokomi ya nzembo tii ayaki kosɛnga Nzambe ete: “Nabondeli yo, Ee Yehova, sepelá na makabo ya bolingo ya monɔkɔ na ngai.” (Nz. 119:108) Bongo na mikolo na biso? Ntango asakolaki mpo na maloba ya ebele ya bato ya ntango na biso, Yisaya alobaki boye: “Bakosakola masanzoli ya Yehova. . . . [Makabo na bango] ekomata na etumbelo na ngai [Nzambe] mpe ekondimama mpenza.” (Yis. 60:6, 7) Esakweli yango ezali kokokisama na ndenge bamilio ya bato bazali kopesa Nzambe “mbeka ya lisanzoli . . . , elingi koloba, mbuma ya mbɛbu . . . oyo ezali kosakola nkombo na ye polele.”—Ebr. 13:15.
17 Bongo yo? Opesaka Nzambe bambeka oyo akoki kondima? Soki ezali bongo te, okosala bambongwana oyo esengeli mpe okobanda kosanzola Yehova na miso ya bato? Ntango kondima ekotinda yo obanda kosakola nsango malamu, mbeka na yo “ekosepelisa Yehova mingi koleka ngɔmbɛ-mobali.” (Tángá Nzembo 69:30, 31.) Yebá ete “nsolo ya kokitisa motema” ya mbeka na yo ya lisanzoli ekokóma epai ya Yehova mpe ete akondima yo. (Ezek. 20:41) Esengo oyo okoyoka na ntango wana eleki nyonso.
‘Yehova ye moko akopambola moto nyonso oyo azali moyengebene’
18, 19. (a) Bato mingi bazali kokanisa nini na likambo etali kosalela Nzambe? (b) Koboyama na Nzambe ememaka wapi?
18 Lelo oyo, bato mingi bakanisaka lokola bato ya ntango ya Malaki ete: “Kosalela Nzambe ezali na ntina te. Kokokisa mokumba na ye . . . ezali na litomba nini?” (Mal. 3:14) Lokola balingaka mingimingi nde biloko ya mosuni, bamonaka ete bakokoka soki moke te kosala mokano ya Nzambe mpe ete mibeko na ye esilá ngala. Mpo na bango, kosakola nsango malamu ezali kolekisa ntango mpe epesaka bango nkanda.
19 Makanisi ya ndenge wana ebandaki mpenza nde na elanga ya Edene. Satana nde andimisaki Eva amona ete bomoi kitoko oyo Yehova apesaki ye ezali mpamba mpe ete kondimama na Nzambe ezali na ntina moko te. Lelo oyo, Satana azali kolendisa bato bándima ete kosala mokano ya Nzambe ezali na litomba moko te. Nzokande, Eva ná mobali na ye bayaki komona ete lokola Nzambe aboyaki bango, bakobungisa bomoi na bango. Mosika te, baoyo bazali lelo kolanda ndakisa na bango ya mabe bakoyeba likambo yango.—Eba. 3:1-7, 17-19.
20, 21. (a) Mwasi ya Zarefate oyo mobali na ye akufá asalaki nini, mpe ndenge nini likambo yango esukaki? (b) Ndenge nini mpe mpo na nini tosengeli komekola mwasi yango ya Zarefate?
20 Na bokeseni na ndenge makambo esukaki mpo na Adama ná Eva, talá ndenge likambo oyo tolobaki na ebandeli, ya Eliya ná mwasi ya Zarefate oyo mobali akufá, esukaki. Nsima ya kolanda maloba ya kolendisa ya Eliya, mwasi yango abandaki kosala limpa mpe apesaki naino mosakoli atako ezalaki moke. Na nsima Yehova akokisaki elaka na ye oyo apesaki na nzela ya Eliya. Lisolo yango elobi boye: “Alyaki, ye ná Eliya mpe bato ya ndako na ye, mikolo mingi. Farini ya elokó ya monene esilaki te, mpe mafuta ya elokó ya moke ezangaki te, na kolanda liloba oyo Yehova alobaki na nzela ya Eliya.”—1 Bak. 17:15, 16.
21 Mwasi ya Zarefate oyo mobali akufá asalaki likambo oyo bato mingi te lelo bakoki kondima kosala. Atyaki motema na ye mobimba na Nzambe ya lobiko, mpe Ye asundolaki ye te. Lisolo oyo mpe masolo mosusu ya Biblia emonisi mpenza ete Yehova abongi tótyela ye motema. (Tángá Yosua 21:43-45; 23:14.) Bomoi ya Batatoli ya Yehova ya lelo mpe emonisi ete Yehova akosundola soki moke te bato oyo bandimami na ye.—Nz. 34:6, 7, 17-19.a
22. Mpo na nini tosengeli koluka kondimama na Nzambe kozanga koumela?
22 Mokolo ya kosambisa ya Nzambe oyo “ekoyela bato nyonso oyo bafandi na mabele mobimba” ekómi pene. (Luka 21:34, 35) Moto moko te akoki kokima yango. Eloko moko te, ezala bozwi to biloko ya mosuni ekoki kozala na motuya oyo ekoki kokokana na lokumu ya koyoka Mosambisi oyo Nzambe aponi azali koloba na biso ete: “Bóya, bino baoyo Tata na ngai apambolá, bózwa libula ya bokonzi oyo babongiselá bino.” (Mat. 25:34) Ya solo, ‘Yehova ye moko akopambola moto nyonso oyo azali moyengebene, akozinga bango na kondimama lokola na nguba ya monene.’ (Nz. 5:12) Tosengeli mpenza koluka kondimama na Nzambe!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Marsi 2005, lokasa 13, paragrafe 15; 1 Augusto 1997, nkasa 20-25.
Ozali koyeba lisusu?
• Mpo na nini Yehova abongi tósambela ye na motema moko?
• Bambeka nini Yehova andimaka lelo?
• Maloba “bana-ngɔmbɛ ya mibali ya mbɛbu na biso” elakisi nini, mpe mpo na nini tosengeli kopesa Yehova yango?
• Mpo na nini tosengeli koluka kondimama na Nzambe?
[Elilingi na lokasa 13]
Mosakoli ya Nzambe atyaki likambo nini liboso ya mama moko mobola?
[Elilingi na lokasa 15]
Litomba nini tozwaka ntango tozali kopesa Yehova mbeka ya lisanzoli?
[Elilingi na lokasa 17]
Okoyoka nsɔni ata mokolo moko te soki otyeli Yehova motema mobimba