Mokanda euti na Congo (Kinshasa)
Kosakola pembeni ya ngomba ya mɔtɔ
LIKOLÓ ezali motane ngwaa ntango moi ezali kobima na engumba Goma. Na mosika, Ngomba Nyiragongo emonanaka kitoko mpenza; ngomba yango ezali moko ya bangomba oyo esanzaka mɔtɔ mingi na mokili mobimba. Milinga ebimaka ntango nyonso likoló ya ngomba yango. Na butu, likoló na yango emonanaka motane mpe yango elakisaka ete pɔtɔpɔtɔ ya mɔtɔ ezali kotɔka kuna na kati.
Na Swahili, babengaka ngomba yango Mulima ya Moto, elingi koloba Ngomba ya Mɔtɔ. Mbala ya nsuka oyo Nyiragongo esanzaki mɔtɔ ezalaki na 2002. Bato mingi oyo tofandi na bango kartye moko ná baninga mosusu awa na Goma babungisaki biloko na bango nyonso. Na bisika mosusu ya engumba yango epai ngai ná mobali na ngai tokendaka kosakola, tomonaka mabanga makasi oyo ezalaki pɔtɔpɔtɔ oyo ngomba esanzaki, mpe ntango tozali kotambola likoló na yango, nakanisaka ndenge bato oyo batambolá na sanza bayokaki. Nzokande, mitema ya bato ya engumba oyo ekokani ata moke te na mabanga yango. Bazali bato ya esengo, ya mitema boboto, oyo basepelaka koyoka nsango malamu oyo tosakwelaka bango. Yango wana, kosakola pembeni ya ngomba ya mɔtɔ ezali esengo mpenza.
Mokolo moko ya pɔsɔ, nalamukaki na esengo mpenza na motema. Ngai ná mobali na ngai, ná baninga mosusu oyo bayaki kotala biso mpe baninga na biso bamisionɛrɛ tosengelaki kolekisa mokolo mobimba na mosala ya kosakola na Mugunga, kaa moko ya bato oyo bakimá bitumba, oyo ezali pembeni ya engumba na ngámbo ya wɛsti. Bato mingi balongwá na bamboka na bango mpo na kokima bato ya mobulu oyo bazalaki konyokola bango.
Totyaki na motuka ebele ya mikanda oyo elimbolaka Biblia; ezalaki na Français, na Kiswahili, mpe na Kinyarwanda. Na nsima, tosimbaki nzela. Ntango tozalaki kotambola na nzela ya Sake oyo ezali mabulumabulu, tozalaki komona bato bazali kobanda misala. Bilenge babandaki komema biloko na bango likoló ya ba-chukudu (batukutuku ya mabaya mpo na komema mikumba). Basi oyo balati maputa ya langilangi bazalaki kotambola pembenipembeni ya nzela na bisaka minene na motó. Batukutuku ezalaki kolekaleka mpo na komema bato na mosala mpe na zando. Bipai na bipai tozalaki komona bandako ya mabaya ya moindo mpe zingazinga ya baporte mpe maninisa bapakolá langi ya bulé.
Totɛlɛmaki na Ndako ya Bokonzi ya Ndosho mpo na kokutana na Batatoli ya Yehova mosusu oyo tosengelaki kokende kosakola elongo na bango na kaa. Nazalaki na esengo komona bilenge, basi oyo mibali bakufá, bitike, mpe bato ya maladi. Mingi bakutanaki na mikakatano minene, kasi bazali na bomoi ya esengo mpo bazali kosalela batoli ya Biblia. Elikya oyo ezali na Biblia ezali kosepelisa mitema na bango, mpe bazali na mposa makasi ya koyebisa yango bato mosusu. Nsima ya kosala mwa likita moke mpo na koyoka malako mpe bavɛrsɛ ya Biblia oyo ekolendisa bato oyo tokokutana na bango, tomataki na babisi ya mike mitano mpe land-cruiser moko; tozalaki basakoli 130.
Nsima ya miniti 30, tokómaki na kaa. Kaa yango ezali na esika moko monene oyo pɔtɔpɔtɔ oyo ngomba esanzaki ekómá makasi. Batongá bankama ya bandako ya kapo ya mpɛmbɛ na esika yango. Na katikati ya kaa, ezali na batwalɛti oyo etandami na molɔngɔ mpe bapɔmpi epai bato nyonso bayaka kotɔka mai mpe kosukola bilamba. Bato bazalaki bipai na bipai, basusu bazalaki kosukola bilamba, basusu kolamba, basusu koteta madesu, mpe kokɔmba liboso ya bandako na bango ya kapo.
Tokutanaki na mobali moko oyo babengaka Papa Jacques, azali mokonzi ya eteni moko ya kaa. Azalaki komituna ndenge oyo asengeli kobɔkɔla bana na ye na mikolo oyo ya mpasi. Asepelaki mingi ntango topesaki ye buku Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi mpe alobaki ete akosepela kotánga yango mpe na nsima kosangisa mwa bituluku ya bilenge mpo na koyebisa bango makambo oyo akotánga.
Mwa moke na nsima, tokutanaki na mwasi moko oyo babengaka Mama Béatrice. Atunaki biso ntina oyo Nzambe atiki nzela na bampasi. Azalaki kokanisa ete Nzambe azalaki kopesa ye etumbu. Mobali na ye akufá na etumba, mwana na ye ya mwasi abotá mpe abɔkɔlaka mwana ye moko na kati ya kaa, mpe kobanda mwa basanza, bato oyo ayebi te bazwaki mwana na ye ya mobali mpe bakendaki na ye epai oyo ayebi te. Azalaki na nsango na ye te.
Motungisi ya Mama Béatrice ezongisaki makanisi na ngai na lisolo ya Yobo mpe ndenge oyo azalaki koyoka ntango bazalaki koyela ye bansango ya mabe. Tolakisaki ye ntina ya bampasi mpe tomonisaki ye ete bampasi na ye ezali te etumbu oyo Nzambe apesi ye. (Yobo 34:10-12; Yakobo 1:14, 15) Tomonisaki ye mpe makambo oyo Nzambe akosala mosika te awa na mabele na nzela ya Bokonzi na ye. Elongi na ye efungwamaki mpe asɛkaki mwa moke, mpe alobaki ete azali na ekateli ya kokoba koyekola Biblia mpe kobondela Nzambe asalisa ye.
Biso nyonso oyo tokendaki kosakola tolekisaki mokolo moko malamu, mpe tozalaki komona ete Yehova asalisaki biso tópesa elikya epai ya bato oyo tokutanaki na bango mpe tólendisa bango. Ntango tozalaki kolongwa na kaa mpo na kozonga, bato mingi bazalaki kopepa biso na batrakte, bazulunalo, mpe mikanda mpo na kopesa biso mbote.
Ntango tozalaki kozonga, nazalaki kokanisa. Nazalaki na botɔndi mingi mpo na mokolo yango ya malamu mingi. Nazalaki kokanisa ndenge oyo Papa Jacques asepelaki, ndenge motema ya Mama Béatrice ekitaki, mpe mbote makasi ya lobɔkɔ ya mobange mwasi moko oyo nakokaki kosolola na ye te mpo nayebi monɔkɔ oyo alobaka te, kasi totalanaki kaka mpe tosɛkaki. Nazalaki kokanisa lisusu bilenge oyo batunaki mituna ya mozindo mpe bamonisaki ete bazali mpenza mayele soki totali mbula na bango. Nazalaki kokamwa ndenge bato oyo namonaki bazali makasi mpe bazali kosɛka atako bazali na bomoi ya mpasi mpenza.
Na mboka oyo, tomonaka milende ya solosolo oyo bato mingi bazali kosala mpo na kosalisa bato oyo bazali konyokwama. Mokolo wana, tozwaki libaku malamu ya kosalela Biblia mpo na kolakisa bato ndenge oyo mikakatano na bango ekosila mpo na libela. Nazali na esengo mingi lokola nazali kosangana na mosala monene ya kosalisa bato báyeba Nzambe, mosala oyo ezali kosalema na mokili mobimba mpe ekozongelama lisusu te.