Moto oyo asepelisaki motema ya Yehova
LIKAMBO nini eyelaka yo na makanisi soki oyoki nkombo ya Davidi? Ndenge alongaki elombe Goliate? Ndenge azalaki kokima na esobe mpo Mokonzi Saulo aboma ye te? Lisumu na ye na Bate-seba mpe mikakatano oyo yango ememelaki ye? To nde maloba kitoko oyo akomá, oyo ezali na mokanda ya Nzembo?
Na bomoi na ye, Davidi akutanaki na makambo ya malamu mpe mikakatano. Kasi, na nyonso wana, oyo esepelisaka biso mingi epai na ye ezali oyo mosakoli Samwele alobaki, ete akozala “moto moko oyo azali kosepelisa motema [ya Yehova].”—1 Samwele 13:14.
Maloba ya Samwele ekokisamaki ntango Davidi azalaki naino elenge. Yo mpe okolinga ete bábenga yo moto oyo azali kosepelisa motema ya Yehova? Soki boye, makambo nini na bomoi ya Davidi, mingimingi na bolenge na ye, ekoki kosalisa yo ozala moto ya ndenge wana? Tiká tótalela yango.
Bato ya libota na ye mpe mosala oyo asalaki
Tata ya Davidi nkombo na ye ezalaki Yese; azalaki nkɔkɔ ya Ruta ná Boaze mpe na ntembe te, azalaki moto oyo azalaki kobanga Nzambe. Yese ateyaki Davidi ná bandeko na ye, oyo bazalaki mibali nsambo mpe basi mibale, Mibeko ya Moize ntango bazalaki naino bilenge. Na nzembo moko, Davidi amibengaki mwana ya ‘moombo ya mwasi’ ya Yehova. (Nzembo 86:16) Maloba yango etindaki bato mosusu báloba ete mama ya Davidi, oyo Biblia etángi nkombo na ye te, asalisaki ye mingi mpo ayeba Nzambe. Molimboli moko ya maloba ya Biblia alobaki ete: “Ekoki mpenza kozala ete mama na ye nde moto ya liboso abɛtelaki ye masolo ya makambo minene oyo Nzambe asalaki mpo na basaleli na ye,” ata mpe lisolo ya Ruta ná Boaze.
Mbala ya liboso oyo Biblia elobeli Davidi, azalaki naino elenge mpe azalaki kokɛngɛla bampate ya tata na ye. Na ntembe te, mosala yango ezalaki kosɛnga ye alekisa mikolo ebele ye moko na zamba, ezala na moi to na butu. Meká naino kokanisa ndenge makambo ezalaki koleka.
Davidi ná bato ya libota na ye bazalaki kofanda na Beteleme, mwa engumba moko oyo ezalaki likoló ya bangomba ya Yuda. Milona ezalaki kobota malamu na mabele ya mabangamabanga oyo ezalaki zingazinga ya Beteleme. Bilanga ya banzete ya mbuma, banzete ya olive, mpe banzete ya vinyo ezalaki na mipanzi ya bangomba mpe mabwaku. Na mikolo ya Davidi, bazalaki koleisa bampate na bangomba, na bisika oyo bazalaki kosala bilanga te. Esobe ya Yuda ezalaki na nse.
Mosala ya Davidi ezalaki na makama mingi. Ezali na bangomba yango nde akutanaki na nkɔsi mpe na urse oyo elukaki kolya mpate.a Elenge yango ya mpiko alandaki banyama yango, abomaki yango, mpe abikisaki bampate na ye. (1 Samwele 17:34-36) Ekoki kozala ete na ntango wana nde Davidi ayekolaki kosalela malamu mpenza bilingongo to lansi. Beteleme ezalaki mosika te na mabele ya libota ya Benyamina. Bilombe ya ekólo yango bayebaki kobwaka mabanga na lansi mpe “ekoki koleka pamba té, ekotuta ata eloko ya moke penza.” Davidi mpe ayebaki kobwaka libanga na lansi ndenge wana.—Bilombe [Basambisi] 20:14-16, Bible na lingala ya lelo oyo; 1 Samwele 17:49.
Asalelaki ntango na ye malamu
Mbala mingi, mobateli ya mpate azalaki ye moko na bisika oyo ezalaki makɛlɛlɛ te. Kasi, Davidi ayebaki kosalela ntango wana malamu. Ntango wana ya kimya ezalaki kopesa ye mabaku mingi ya komanyola. Ekoki kozala ete makambo mosusu oyo Davidi akomaki na banzembo na ye mosusu, akanisaki yango ntango azalaki elenge. Ekoki mpe kozala ete na bantango wana oyo azalaki ye moko azalaki kokanisa esika ya moto na molɔ́ngɔ́ mpe biloko ya kokamwa oyo ezali na likoló, lokola moi, sanza, mpe minzoto, “mosala ya misapi [ya Yehova].” Ekoki mpe kozala ete azalaki kotala mabele, bampate, bantaba, na bangɔmbɛ, bandɛkɛ mpe “banyama ya zamba” na bisika wana oyo ezalaki zingazinga ya Beteleme.—Nzembo 8:3-9; 19:1-6.
Na ntembe te, makambo oyo Davidi ayekolaki ntango azalaki mobateli ya mpate esalisaki ye amona malamumalamu boboto ya Yehova epai ya basaleli na Ye ya sembo. Yango wana, Davidi ayembaki boye: “Yehova azali Mobateli na ngai. Nakozanga eloko te. Alalisaka ngai na bisika ya koleisa banyama oyo etondi na matiti; atambwisaka ngai na bisika ya kopema oyo ezali na mai mingi. Ata soki nazali kotambola na lobwaku ya molili makasi, nakobanga eloko ya mabe ata moko te, mpo ozali elongo na ngai; nzete na yo mpe lingenda na yo ezali biloko oyo ebɔndisaka ngai.”—Nzembo 23:1, 2, 4.
Mbala mosusu ozali komituna soki oyo nyonso etali yo na nini. Eyano ezali ete ntina moko oyo Davidi azalaki moninga ya Yehova mpe abengamaki “moto moko oyo azali kosepelisa motema na ye” ezalaki ete azalaki komanyola mpenza na misala ya Yehova mpe na boyokani na ye na Nzambe. Bakoki mpe koloba bongo mpo na yo?
Osilá koyoka mposa ya kosanzola mpe kokumisa Mozalisi nsima ya kotalela malamumalamu mosala moko ya mabɔkɔ na ye? Osilá koyoka ete motema na yo etondi na bolingo mpo na Yehova ntango omonaki ndenge amoniselaka bato bizaleli na ye? Nzokande, mpo na kozala na botɔndi ndenge wana mpo na Yehova, osengeli kozwaka ntango ya kofanda kimya, kokanisa na mozindo Liloba ya Nzambe mpe misala na ye. Kokanisa ndenge wana ekoki kosalisa yo oyeba Yehova malamumalamu mpe na bongo, kolinga ye. Mibange mpe bilenge bakoki kosala yango. Emonani mpenza ete Davidi azalaki moninga ya Yehova banda bolenge na ye. Toyebi yango ndenge nini?
Davidi atyami mafuta
Ntango Yehova amonaki ete Mokonzi Saulo abongi lisusu te kotambwisa libota na ye, alobaki na mosakoli Samwele boye: “Okolela Saulo kino ntango nini, awa ngai naboyi ye azala mokonzi ya Yisraele? Tondisá liseke na yo na mafuta mpe kende. Nakotinda yo epai ya Yese, moto ya Beteleme, mpamba te namizweli mokonzi kati na bana na ye ya mibali.”—1 Samwele 16:1.
Ntango Samwele akómaki na Beteleme, asɛngaki Yese ayanganisa bana na ye. Mwana nini Samwele asengelaki kotya mafuta mpo akóma mokonzi? Ntango amonaki Eliabe, mwana ya liboso ya Yese oyo azalaki mobali kitoko, Samwele akanisaki boye: ‘Ezali nde ye.’ Kasi, Yehova alobaki na Samwele ete: “Kotala elongi na ye te mpe bolai na ye te, mpo ngai naboyi ye. Mpo Nzambe amonaka ndenge moto amonaka te, mpamba te moto amonaka oyo emonanaka na miso; kasi Yehova amonaka ndenge motema ezali.” Yehova aboyaki mpe Abinadabe, Shama, mpe bandeko na bango mosusu minei. Lisolo elobi boye: “Nsukansuka, Samwele alobaki na Yese boye: ‘Bana nyonso ya mibali bango oyo?’ Bongo ye alobaki ete: ‘Etikali leki na bango, mpe talá! azali koleisa bampate.’”—1 Samwele 16:7, 11.
Maloba ya Yese ekoki kolimbola boye: ‘Davidi akoki te kozala moto oyo yo ozali koluka.’ Lokola Davidi azali mwana mobali ya nsuka mpe mwana moke na libota, bapesaki ye mosala ya kobatela bampate. Kasi, ye nde Nzambe aponaki. Yehova atalaka motema, mpe amonaki eloko ya motuya epai ya elenge yango. Yango wana ntango Yese atindaki bákende kobenga Davidi, Yehova alobaki na Samwele ete: “‘Tɛlɛmá, tyá ye mafuta, mpo ye oyo!’ Na yango, Samwele azwaki liseke ya mafuta mpe atyaki ye mafuta na katikati ya bandeko na ye. Mpe elimo ya Yehova ebandaki kosala kati na Davidi banda mokolo wana.”—1 Samwele 16:12, 13.
Biblia elobi te soki Davidi azalaki na mbula boni ntango likambo yango esalemaki. Kasi, mwa moke na nsima, bayaya na ye misato: Eliabe, Abinadabe, ná Shama, bazalaki na kati ya basoda ya Saulo. Mbala mosusu bayaya na ye mosusu mitano bazalaki naino bilenge mpenza oyo bakokaki naino kozala basoda te. Ekoki kozala ete moko na bango te akokisaki mbula 20, mbula oyo moto akokaki kokɔta na mosala ya soda na Yisraele. (Mitángo 1:3; 1 Samwele 17:13) Ezala bongo to te, Davidi azalaki naino elenge mpenza ntango Yehova aponaki ye. Kasi, emonani ete Davidi azalaki kolinga makambo ya Nzambe liboso kutu bápona ye. Na ntembe te azalaki moninga ya Yehova, boninga oyo akolisaki na ndenge azalaki kokanisa na makambo oyo ayebi mpo na Nzambe.
Lelo oyo, esengeli kolendisa bilenge básala ndenge yango. Yango wana, baboti, bolendisaka bana na bino bákanisaka makambo ya Nzambe, básepelaka na biloko oyo Nzambe akelá, mpe báyekolaka oyo Biblia elobi mpo na Mozalisi? (Kolimbola Mibeko 6:4-9) Bino mpe bilenge, bosalaka makambo yango na motema na bino moko? Mikanda oyo elimbolaka Biblia, na ndakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká!b ebimisamaka mpo na kosalisa bino.
Ayebaki mpenza kobɛta nzɛnzɛ
Maloba oyo Davidi akomaki na banzembo na ye mingi ezali komonisa biso ete azalaki kosalela malamu ntango oyo azalaki mobateli ya mpate; tokoki mpe kokanisa ete ayebaki miziki malamu mpo azalaki kosalela ntango wana malamu. Ya solo, lelo oyo toyebi te ndenge oyo bazalaki koyemba banzembo wana oyo ezalaki kokumisa Nzambe. Kasi, toyebi ete moto oyo asalaki yango ayebaki mosala ya miziki malamu. Kutu, ntina oyo bayebisaki Davidi atika kobatela bibwɛlɛ mpe aya kosala epai ya Mokonzi Saulo ezali mpo ayebaki mpenza kobɛta nzɛnzɛ.—1 Samwele 16:18-23.c
Epai wapi mpe ndenge nini Davidi azwaki mayele yango? Na ntembe te na ntango oyo azalaki kobatela bampate. Yango wana, tokoki mpenza kokanisa ete ata ntango oyo Davidi azalaki mpenza elenge, azalaki kosanzola Nzambe na ye na nzembo kitoko. Kutu, Yehova aponaki ye mpe apesaki ye mokumba mpo azalaki kolinga Nzambe mpe kobanga Ye!
Na lisolo oyo, tokolobela te makambo oyo Davidi asalaki na nsima. Kasi, elimo oyo amonisaki bomoi na ye mobimba emonisami na maloba oyo mbala mosusu akanisaki ntango azalaki kotambola na bazamba oyo ezalaki zingazinga na Beteleme. Kanisá ndenge oyo Davidi azalaki koyembela Yehova ete: “Nakanisi mikolo ya kalakala; namanyoli mosala na yo mobimba; nasepelaki komibanzabanza ntango nyonso mpo na mosala ya mabɔkɔ na yo.” (Nzembo 143:5) Maloba kitoko ya nzembo oyo mpe banzembo mosusu ya Davidi ekoki kosalisa bato nyonso oyo balingaka kosepelisa motema ya Yehova.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Urse ya Syrie, oyo ezalaki mwa moindo, ezalaki komonana kala na Palestine; ezalaki na kilo soki 140 mpe ekokaki koboma nyama na mino na yango makasi. Bankɔsi ezalaki mingi na mokili yango. Yisaya 31:4 elobi ete “etuluku mobimba ya babateli ya mpate” ekoki te kobengana “mwana-nkɔsi oyo nkingo etondi na nsuki” liboso ya nyama oyo ekangi.
b Ebimisami na Batatoli ya Yehova.
c Mopesi-toli ya mokonzi oyo apesaki nkombo ya Davidi alobaki mpe ete azalaki moto oyo “ayebi koloba, mobali moko kitoko, mpe Yehova [azalaki] na ye.”—1 Samwele 16:18.