Okosala nini soki ozali lisusu na mbongo te ndenge ozalaki na yango liboso?
OBED azali tata ya bana mibale. Asalaki mosala mbula zomi mobimba na otɛlɛ moko ya kitoko mpe ya ntalo mingi na engumba moko monene na Afrika mpe azalaki na mokakatano te mpo na kokokisa bamposa ya libota na ye. Mbala na mbala, azalaki komema libota na ye na konje na bisika kitoko ya masano ya ekólo na bango. Nyonso wana esilaki ntango abungisaki mosala na ye mpo otɛlɛ na bango ezalaki lisusu kozwa bakiliya mingi te.
Nsima ya kosala mbula 22 na banki moko ya monene, Stephen akómaki mokonzi na banki yango. Azwaki matomba ebele: azalaki na ndako ya monene, asombaki motuka, azalaki na bana ya misala mpe bana na ye bazalaki kotánga na biteyelo ya lokumu. Kasi, ntango banki yango ekómaki kobongola makambo, mosala na ye esilaki. Alobi boye: “Ngai ná libota na ngai tolɛmbaki nzoto. Nazalaki lisusu na elikya te, esengo esilaki ngai mpe nakómaki komitungisa mingi.”
Makambo ya boye ekómelaka bato mingi. Mbongwana ya makambo ya nkita na mokili mobimba ezali kosala ete bamilio ya bato oyo bazalaki na mikakatano ya mosolo te, bábungisa misala na bango. Mingi na bango oyo bazalaki koluka misala, basengelaki kondima misala oyo ezali na lifuti mingi te, atako biloko ezali komata ntalo. Ezala mikili ya bozwi to ya bobola, ezali na esika moko te epai makambo nyonso ezali kotambola malamu.
Litomba ya kozala na bwanya
Soki tozali kozwa mbongo moke to mosala esili, ezali mpasi te tókóma na makanisi ya mabe. Toboyi te, moto nyonso azalaka na makambo oyo etungisaka ye. Nzokande, mokolo moko, Salomo alobaki boye: “Omonisi ete olɛmbi nzoto na mokolo ya mpasi? Nguya na yo ekozala moke.” (Masese 24:10) Na esika ya kobanga ntango tozali lisusu na mbongo te, tosengeli kosalela toli ya Liloba ya Nzambe: ‘Bombá malamu mpenza bwanya.’—Masese 2:7.
Atako Biblia ezali te buku oyo epesaka toli na makambo ya mbongo, toli na yango esalisi bamilio ya bato na mokili mobimba na likambo yango. Tótalela sikoyo mwa toli ya ntina oyo Biblia epesi.
Yango ekosɛnga ntalo boni. Talá maloba ya Yesu oyo ezali na Luka 14:28: “Nani na kati na bino oyo alingi kotonga linɔ́ngi akofanda liboso te mpo na koyeba mosolo boni yango ekosɛnga, mpo na komona soki azali na oyo esengeli mpo na kosilisa yango?” Kosalela toli yango elimboli kobongisa liboso ndenge ya kosalela mbongo mpe kobimisa kaka mbongo oyo okanaki. Kasi, ndenge Obed amonisi yango, kosala bongo ezalaka pɛtɛɛ te. Alobi boye: “Liboso nabungisa mosala na ngai, tozalaki kosomba biloko oyo tozalaki mpenza na mposa na yango te na zando. Tozalaki kobongisa liboso te ndenge ya kosalela mbongo mpo tozalaki na mbongo mingi mpo na kosomba eloko nyonso oyo tolingi.” Kasi, kobongisa liboso ndenge ya kosalela mbongo ekosalisa ete mwa mbongo moke oyo botikali na yango esomba kaka biloko oyo libota esengeli na yango.
Bongolá makambo mosusu ya bomoi na yo. Na ntembe te, kondima kozala na bomoi ezangi mindɔndɔ ezalaka pɛtɛɛ te, kasi ezali na ntina. Lisese moko ya Biblia elobi boye: “Moto ya ekɛngɛ nde moto oyo amoni likama mpe amibombi.” (Masese 22:3) Stephen alobi boye: “Mpo na kobatela mbongo, tokendaki kofanda na ndako na biso moko, ezalaki moke mpe esilaki malamu te na kati. Tolongolaki bana na biteyelo ya ntalo mingi, tokɔtisaki bango na biteyelo oyo efutisaka mbongo mingi te kasi etángisaka malamu.”
Kosolola polele na kati ya libota ezali na ntina mingi soki bolingi ete bómesana na bomoi ya sika. Austin, oyo asalaki na banki moko mbula libwa, liboso mosala na ye ebeba, alobi boye: “Ngai ná mwasi na ngai tofandaki mpe tolukaki koyeba biloko nini tosengelaki na yango mpenza. Tosengelaki kotika kosomba bilei ya ntalo mingi, kokendaka bakonje oyo ezali kosɛnga mbongo mingi, mpe kosombaka bilamba ya sika oyo tosengeli na yango mpenza te. Nazali na esengo ndenge libota na ngai endimaki mbongwana wana.” Na ntembe te, bana mike bakoki koyeba te ete mbongwana wana ezali na ntina, kasi lokola bozali baboti, bokoki kosalisa bango bákanga ntina na yango.
Ndimá kosala mosala mosusu. Soki omesaná na mosala ya biro, okoki komona ete kosala misala ya mabɔkɔ ezali mpasi. Austin alobi boye: “Na motó na ngai, ezalaki pɛtɛɛ te nandima kosala misala ya mabɔkɔ mpo namesanaki kokamba kompanyi moko ya monene.” Ezali likambo ya kokamwa te na kotalela oyo Biblia elobi na Masese 29:25: “Kolɛnga liboso ya bato, yango nde etyaka motambo.” Kokanisa ntango nyonso oyo bato bakoloba ekopesa yo mbongo ya koleisa libota na yo te. Nini ekoki kosalisa yo olonga makanisi ya mabe wana?
Komikitisa ezali na ntina. Nsima ya kobungisa mosala na ye na otɛlɛ, Obed azwaki mosala moko epai ya moninga moko oyo bazalaki kosala na ye kala, oyo azalaki na esika na ye ya kobongisa mituka. Mosala yango ezalaki kosɛnga ye atambolaka ngonga mingi na makolo na nzela oyo etondi na putulu mpo na kosomba langi ya kotya na mituka mpe biloko mosusu ya mikemike. Obed alobi boye: “Nazalaki mpenza kosepela na mosala yango te, kasi nazalaki na eloko mosusu ya kosala te. Komikitisa esalisaki ngai nandima mosala oyo ezalaki kofuta ngai mbongo moke mpenza (1/4) koleka lifuti na ngai ya liboso, kasi yango ezalaki kokokisa bamposa ya libota na ngai.” Makanisi ya ndenge wana ekoki mpe kosalisa yo?
Sepelá na oyo ozali na yango. Diksionɛrɛ moko elobi ete moto oyo asepelaka na oyo azali na yango ezali “moto oyo azalaka na esengo mpe andimaka ndenge makambo ezali.” Moto oyo azali kokutana na mikakatano ya mbongo, akoki komona ete likanisi wana ebongi te. Nzokande, talá maloba ya ntoma Paulo, misionɛrɛ oyo azalaki mpe na bosɛnga: “Nayekoli, na makambo ata ya ndenge nini, kosepela na oyo nazali na yango. Nayebi mpenza kozanga biloko, nayebi mpenza kozala na biloko mingi.”—Bafilipi 4:11, 12.
Ekoki kozala ete tozali na bomoi ya malamu sikoyo, kasi lokola makambo ezali ntango nyonso kobongwana, bomoi yango ekoki mpe kobongwana. Tokoki mpenza kozwa matomba soki tozwi na lisɛki te toli oyo ya ntoma Paulo: “Ya solo, ezaleli yango ya kokangama na Nzambe ná ezaleli ya kosepela na oyo ozali na yango ezali nzela ya kozwa litomba monene. Yango wana, soki tozali na bilei mpe na eloko ya kozipa nzoto, tósepela na biloko yango.” Paulo alendisi te ezaleli ya gɔigɔi, amonisi nde ndenge oyo tosengeli kotya bamposa na biso na esika na yango.—1 Timote 6:6, 8.
Nini epesaka esengo ya solosolo?
Kozala na biloko nyonso oyo olingi mpe kozala na bomɛngo epesaka esengo ya solosolo te. Yesu ye moko alobaki boye: “Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.” Ya solo, esengo mpe bolamu ya solosolo eutaka nde na kosalela oyo tozali na yango mpo na kosalisa basusu mpe kolendisa bango.—Misala 20:35.
Mozalisi na biso, Yehova Nzambe, ayebi malamumalamu nyonso oyo tosengeli na yango. Na nzela ya Liloba na ye, Biblia, apesi toli oyo esalisi bato mingi bábongisa bomoi na bango mpe bátika komitungisa koleka ndelo. Toboyi te, kosalela toli yango ekobimisa matomba na mbalakaka te to ekosilisa te mikakatano ya mbongo oyo moto azali na yango. Kasi Yesu alakaki baoyo bazali ‘kokoba koluka liboso bokonzi mpe boyengebene [ya Nzambe]’ ete bakopesa bango oyo basengeli na yango mokolo na mokolo.—Matai 6:33.