SEKELE MPO NA LIBOTA YA ESENGO
Ndenge ya koyokana na mama to tata ya bana ya molongani na yo mpe bandeko mosusu
MARGARET,a MAMA-MOBƆKƆLI MOKO NA AUSTRALIE: “Mama ya bana ya mobali na ngai ayebisaki bana ete balandaka te makambo nyonso oyo nalobaka; ata soki ezali likambo ya mpasi te lokola, ‘kobosana konika mino te.’” Margaret amonaka ete likambo yango nde ebimisaki matata na libala na ye.
Mbala mingi, ezalaka mpasi mpo mabota oyo ezali na tata to mama-mobɔkɔli eyokana malamu ná bandeko mosusu ya libota.b Baboti mingi oyo babɔkɔlaka bana ya balongani na bango basengeli kosololaka ná baboti ya bana yango na makambo lokola kokende kotala bandeko, kopesa disiplini mpe makambo ya mbongo. Ekoki mpe kozala mokakatano mpo baninga mpe bandeko mosusu bámesana ná bato ya libota ya sika. Tótala naino ndenge batoli ya Biblia ekoki kosalisa libota na bino elonga mikakatano yango.
1. NDENGE YA KOYOKANA NA: MOBOTI MOSUSU YA MWANA
Judith, mama-mobɔkɔli moko na Namibie, alobi boye: “Mama ya bana ya molongani na ngai ayebisaki bana ete ngai nazali kaka mwasi ya tata na bango mpe mwana nyonso oyo tokobota akozala ndeko na bango te. Maloba na ye eswaki ngai mpenza mpo nalingaka bana yango lokola bana na ngai moko.”
Bato ya mayele bamoni ete koyokana na moboti mosusu ya bana ekoki kobimisa matata na libota. Mbala mingi, ezalaka mpasi mpenza mpo mama-mobɔkɔli mpe mama mpenza ya bana báyokana. Nini ekoki kosalisa?
Sekele mpo na kolonga: Tyá mibeko oyo ebongi. Soki opekisi moboti mosusu ya mwana akɔta na makambo ya mwana na ye, mwana yango akoki kotungisama na makanisi.c Moboti ya mwana, elingi koloba ‘oyo abotaki ye,’ azali na esika moko monene na bomoi ya mwana yango. (Masese 23:22, 25) Na ngambo mosusu, soki otiki ete molongani na yo ya kala amikɔtisa mingi na makambo ya libota na yo, yango ekoki kobangisa to kosilikisa molongani na yo ya sika. Salá nyonso mpo ozala na bokatikati, tyá mibeko oyo ebongi mpo na kobatela libala na yo ntango bozali kopesana mabɔkɔ ná tata to mama ya bana na yo soki esɛngi bongo.
TOLI MPO NA BABOTI
Ntango ozali kosolola ná molongani na yo ya kala, tyá likebi na makambo ya bana mpe kokipe masolo mosusu te. Na ndakisa, okoki kotuna na mayele soki likoki ezali ya kotya ngonga ya kosololaka na telefone na boumeli ya mokolo. Mbala mingi kosala bongo esimbaka koleka kosolola na telefone na ntango oyo eyebani te to na butu makasi.
Soki bapesá yo te mokumba ya kofanda ná bana, mbala mosusu okoki kobenga bango na telefone, kotindela bango mikanda to bamesaje na telefone to na Internet mpo oyebaka soki bazali ndenge nini. (Kolimbola Mibeko 6:6, 7) Bamosusu kutu basalelaka Internet mpo na komonana na bana na bango ntango bazali kosolola. Okoki koyeba bamposa mpe mikakatano ya bana na yo mpe kopesa bango toli ya malamu oyo ekoki kosalisa bango koleka kutu ndenge ozali kokanisa.
TOLI MPO NA MAMA-MOBƆKƆLI
‘Mityá na esika’ ya mama ya bana ya molongani na yo mpe monisá polele ete olingi te kozwa esika na ye. (1 Petro 3:8) Yebisaká ye mbala na mbala ndenge oyo bana na ye bazali, lobeláká mingimingi makambo ya malamu ya bana yango. (Masese 16:24) Sɛngáká ye toli mpe pesáká ye mersi ntango apesi yo yango.
Ntango mama na bango azali wana, komonisela bana yango bolingo koleka ndelo te. Beverly, mama-mobɔkɔli moko na États-Unis, alobi boye: “Bana ya mobali na ngai ya mike bazalaki na mposa ya kobengaka ngai mama. Nandimaki ete babengaka ngai bongo na ndako kasi te ntango bazali elongo na mama na bango Jane, to ná bato ya libota na ye. Ngai ná Jane tokómaki koyokana malamu nsima ya likambo yango. Kutu, na nsima tokómaki kopesana mabɔkɔ mpo na kosalisa bana na masano mpe mibembo oyo eteyelo ebongisaka.”
BATOLI MPO NA KOSALISA MOBOTI YA MWANA AYOKANA MALAMU NÁ TATA TO MAMA-MOBƆKƆLI
Komeka soki moke te kolobela bana mabe ya moboti to mpe ya tata to mama-mobɔkɔli oyo azali wana te. Ezalaka mpasi te kokwea na motambo yango, kasi yango etungisaka mpenza makanisi ya bana. Mpe okoyeba te ndenge nini to ntango nini bana bakozongela maloba na yo. (Mosakoli 10:20) Soki mwana alobi ete moboti mosusu to mpe tata to mama-mobɔkɔli alobelaki yo mabe, mityá na esika ya mwana. Okoki koloba na ye maloba lokola: “Esali ngai mpasi ndenge oyokaki yango. Mama na yo azali na nkanda na ngai, mpe na bantango mosusu soki bato bazali na nkanda, balobaka maloba oyo ezali malamu te.”
Tyá disiplini mpe mibeko oyo ezali bongolabongola te na ngambo nyonso mibale. Soki likoki ya kosala bongo ezali te, limbolá ntina yango kozanga ete okitisa lokumu ya moboti mosusu. Tótalela ndakisa oyo:
Mama-mobɔkɔli: Tim, tandá naino esumɛ na yo na nsinga mpo ekauka.
Tim: Epai ya mama, totikaka yango kaka na nse mpe ye nde atandaka yango.
Mama-mobɔkɔli (na nkanda nyonso): Azalaki nde kokómisa yo gɔigɔi.
Eyano ya boye ezali malamu?
Mama-mobɔkɔli (na kimya nyonso): Ah, likambo te. Awa, biso moko nde totandaka yango.
Kotyela bana na yo programɛ mosusu te na ntango oyo bakolekisa elongo na moboti mosusu. (Matai 7:12) Kasi, soki olingi kotyela bango programɛ mosusu kaka na ntango yango, sɛngá ndingisa ya moboti mosusu liboso ya koyebisa bana programɛ yango.
MEKÁ KOSALA BOYE: Mbala ya nsima oyo okokutana na tata to mama ya bana ya molongani na yo to mpe molongani ya mwasi to mobali na yo ya kala, salelá makambo oyo elandi:
Kobwaka elongi mopanzi te mpe sɛká mwa moke. Komonisa te ete obaye ye, kokanga elongi te, kodongola ye mpe te.
Pesá ye mbote na nkombo na ye. Na ndakisa, okoki koloba, “Mbote, Jane.”
Kɔtisá ye na masolo na bino soki bozali kosolola na bato ebele.
2. NDENGE YA KOYOKANA NA: BANA OYO BAZALI MIKÓLÓ
Buku moko (Step Wars) elobeli mwasi moko oyo azali komilelalela mpo mobali na ye akɔtelaka bana ya mwasi na ye ya kala oyo bazali mikóló mpe aboyaka kondima ete bana yango basalelaka ye makambo na boboto te. Mwasi yango alobi boye: “Nayokaka nkanda makasi.” Okoki kosala nini mpo boyokani na yo ná bana ya molongani na yo oyo bazali mikóló ebebisa libala na bino te?
Sekele mpo na kolonga: Mityá na esika na bango. Biblia elobi boye: “Moto na moto akoba koluka, litomba na ye moko te, kasi oyo ya moto mosusu.” (1 Bakorinti 10:24) Luká koyeba mpe koyoka ndenge bamosusu bazali koyoka na motema. Bana ya molongani na yo oyo bakómi mikóló bakoki kobanga ete moboti na bango atika kolinga bango. To mpe bakoki komona ete soki bayambi mwasi ya tata to mobali ya mama na bango, bakomonisa ete bazali sembo te na libota na bango ya liboso. Epai mosusu, baboti bakoki komona ete soki bazali kolobela bana na bango mabe, ekotinda bana báboya kosolola na bango.
Na esika ya koluka kosala boninga na makasi ná bana ya molongani na yo, tiká ete boyokani yango ekola yango moko. Mbala mingi, ezalaka mabe koluka kotinda moto na makasi alinga yo. (Loyembo ya Salomo 8:4) Na yango, zalá na makanisi oyo ebongi na likambo etali komesana na bana ya molongani na yo.
Koloba te likambo nyonso oyo okanisi to oyo eyeli yo na motema, ata soki bazali konyokola yo. (Masese 29:11) Soki omoni ete ezali mpasi mpo okanga monɔkɔ, bondelá ndenge Mokonzi Davidi asalaki: “Ee Yehova, tyelá monɔkɔ na ngai mokɛngɛli; Tyá sinzili na porte ya mbɛbu na ngai.”—Nzembo 141:3.
Soki omoni malamu ete ofanda na ndako oyo bana yango babɔkwamaki, mbala mosusu okokamwa ndenge bazali kosepela na ndako yango mingi. Koluka te kobongisa makambo nyonso oyo okuti na ndako, mingimingi na bashambrɛ na bango ya kala. Okoki mpe komona malamu bókende kofanda na ndako mosusu.
MEKÁ KOSALA BOYE: Soki bana ya molongani na yo oyo bazali mikóló bazali kokoba koboya kotosa yo, yebisá molongani na yo ndenge ozali koyoka na motema mpe yoká makanisi na ye na likebi mpenza. Kotya molongani na yo mbamba te ete apesa bango disiplini. Kutu, luká nde koyokana malamu ná molongani na yo. Soki bozali na ‘makanisi ndenge moko’ mpo na likambo yango, bokoki kopesana mabɔkɔ mpo na kobongisa yango.—2 Bakorinti 13:11.
3. NDENGE YA KOYOKANA NA: BANDEKO MOSUSU MPE BANINGA
Marion, mama moko oyo abɔkɔlaka bana ya mobali na ye, alobi boye: “Mbala mingi baboti na ngai bapesaka bana na ngai bakado, kasi bapesaka bana ya mobali na ngai te. Tolukaka mpe kosombela bana ya mobali na ngai bakado yango, kasi na bantango mosusu tozangaka mbongo ya kosomba yango.”
Sekele mpo na kolonga: Tyá libota na yo ya sika na esika ya liboso. Yebisá bandeko mpe baninga na yo makambo oyo olingi basala to te mpo na bato ya libota na yo ya sika. (1 Timote 5:8) Ata soki okomizela te ete bandeko mpe baninga na yo nyonso bálinga bato ya libota na yo ya sika, okoki kosɛnga bámonisela bango limemya mpe basalela bango makambo na bosembo. Monisá bango mpasi oyo bana bakoyoka na motema soki bakipe bango te mpe basaleli bango makambo na boboto te.
Pesá baboti ya molongani na yo ya kala libaku ya kosalela bana makambo mosusu. Susan, mama moko na Angleterre, alobi boye: “Nabalaki mobali mosusu sanza 18 nsima ya liwa ya molongani na ngai, mpe ezalaki mpasi mpo baboti na ye bándima mobali na ngai ya sika. Makambo etambolaki malamu ntango tokɔtisaki bango na makambo mosusu etali bana, na ndakisa, kotinda bana babenga bango na telefone, mpe kopesa bango mersi mpo na lisungi na bango.”
MEKÁ KOSALA BOYE: Luká koyeba moninga to ndeko moko oyo ozali na mokakatano ya koyokana na ye, mpe na nsima, bósolola ná molongani na yo ndenge oyo bokoki kobongisa boyokani yango.
Boyokani ná mama to tata ya bana ya molongani na yo mpe bandeko mosusu, ekoki kokɔtisa mikakatano na libala na yo. Ata bongo, salelá batoli ya Makomami mpe libota na yo ekozwa mapamboli oyo Biblia elaki: “Ndako ekotongama na bwanya, mpe ekopikama makasi na bososoli.”—Masese 24:3.
a Oyo ezali bankombo topesi bango kopesa.
b Mpo na koyeba ndenge ya kolonga mikakatano mosusu, talá masolo “Des familles recomposées épanouies,” na Lamuká! ya sanza ya minei ya mobu 2012, na Lifalanse, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
c Toboyi te, soki molongani na yo ya kala azali kokanela to azali makambo mabe, ekozala malamu otyá mibeko ya makasi mpo na kobatela libota na yo.
OMITUNA BOYE . . .
Ndenge nini nakoki koyokana malamu na tata to mama ya bana ya molongani na ngai?
Ndenge nini tokoki kosalisa bandeko mpe baninga bákɔtisa mobulu te na libota na biso ata na kozanga kokana?