Bankulutu—Bokobɔndisa “molimo oyo elɛmbi”?
Angela,a ndeko mwasi moko ya mbula 30 na ndambo, azali motema likoló. Azali kozela bankulutu oyo bazali koya kotala ye. Azali kokanisa boye: ‘Makambo nini bakoloba na ngai? Nayebi ete nazangisaki mwa makita, kasi yango ezalaki mpo nalɛmbaka mingi ntango nazongaka ndako nsima ya kolekisa mokolo mobimba na mosala na ngai ya kosalisa mibange.’ Longola yango, azali mpe komitungisa mingi mpo mama na ye azali kobɛla.
Soki yo nde ozali kokende kotala Angela, ndenge nini okolendisa “molimo [yango] oyo elɛmbi”? (Yir. 31:25) Kasi, ndenge nini okoki komibongisa liboso okende kotala ndeko moko mpo na kolendisa ye?
KANISÁ MAKAMBO OYO BANDEKO BAZALI KOKUTANA NA YANGO
Na bantango mosusu, biso nyonso tolɛmbaka mpo na mosala na biso to mpo na mikumba na biso na lisangá. Na ndakisa, mosakoli Danyele ‘alɛmbaki mpenza’ ntango azwaki emonaneli moko oyo akangaki ntina na yango te. (Dan. 8:27) Nini esalisaki ye? Nzambe atindaki anzelu Gabriele alimbwela Danyele makambo mpe ayebisa ye ete Yehova ayokaki mabondeli na ye. Anzelu yango ayebisaki mpe ye ete azalaki kaka moto oyo Nzambe alingaki mingi. (Dan. 9:21-23) Na libaku mosusu, ntango mosakoli yango alɛmbaki nzoto, anzelu mosusu mpe alendisaki ye na maloba ya malamu.—Dan. 10:19.
Ndenge moko mpe, liboso okende kotala ndeko moko oyo mbala mosusu makasi esili to alɛmbi nzoto, zwá ntango ya kokanisa makambo oyo azali kokutana na yango. Mikakatano nini azali na yango? Mikakatano yango ezali kosilisa ye makasi? Bizaleli nini ya malamu ndeko yango amonisaka? Richard, oyo azali nkulutu banda mbula koleka 20, alobi boye: “Nalukaka kotalela libosoliboso makambo ya malamu epai ya bandeko. Liboso ya kokende kotala bango, soki nataleli malamu makambo oyo bazali kokutana na yango, ezalaka mpasi te nalendisa bango na kolanda bamposa na bango.” Soki okokende na nkulutu mosusu kotala ndeko moko, mpo na nini te bótalela elongo makambo ya ndeko yango liboso bókende?
SALÁ ETE NDEKO AZALA MOTEMA LIKOLÓ TE
Na ntembe te, oyebi ete moto akoki koyoka nsɔni koyebisa moto ndenge oyo azali mpenza komiyoka. Na ndakisa, ndeko moko akoki kozala na mokakatano mpo na kofungwela bankulutu oyo bayei kotala ye motema. Na yango, ndenge nini okoki kosalisa ye abanga te koloba makambo oyo azali na yango na motema? Kosɛka mwa moke mpe koloba na ye mwa maloba ya kolendisa ekoki kosalisa ye. Michael, oyo azali nkulutu banda mbula koleka 40, abandaka mbala mingi lisolo na maloba lokola: “Oyebi, moko ya mabaku kitoko oyo nkulutu azali na yango ezali ya kokende kotala bandeko na bandako na bango mpo na koyeba bango malamu. Yango wana, nazalaki mpenza kozela mokolo ya lelo mpo tóya kotala yo.”
Ntango bokei kotala ndeko, bokoki kobanda na libondeli oyo euti mpenza na motema. Na mabondeli na ye, ntoma Paulo alobelaki kondima ya bandeko na ye, bolingo na bango, mpe ezaleli na bango ya koyika mpiko. (1 Tes. 1:2, 3) Soki otángi bizaleli ya malamu ya ndeko yango na kati ya libondeli, okobongisa motema na ye mpe oyo ya yo mpo bósolola malamu. Maloba na yo ekoki kokitisa ye motema. Ray, nkulutu moko oyo aumeli mingi, alobi boye: “Ntango mosusu tobosanaka makambo ya malamu oyo tozali kosala na mosala ya Nzambe. Na yango, soki moto akundweli biso yango, ekoki kokitisa biso motema.”
SALELÁ BIBLIA MPO NA KOLENDISA
Lolenge moko oyo okoki kokabela moto “likabo ya elimo” to kolendisa ye ezali ya kosalela Biblia mpo na kosalisa ye, ata soki otángi kaka vɛrsɛ moko. (Rom. 1:11) Na ndakisa, ndeko oyo azali konyokwama na makanisi akoki komona lokola ete azali na ntina te, ndenge moko na mokomi ya nzembo oyo alobaki ete akauki lokola “molangi ya mposo ya nyama na kati ya molinga.” (Nz. 119:83, 176) Nsima ya komonisa na mokuse soki maloba yango elimboli nini, okoki koyebisa ndeko yango ete ondimisami ete ye mpe ‘abosani’ mitindo ya Nzambe te.
To mpe, mpo na kosalisa ndeko mwasi moko oyo amonanaka lisusu te na lisangá to asakolaka lisusu te, okoki kosalela ndakisa ya mwasi oyo abungisaki drakimɛ moko ya ebende. (Luka 15:8-10) Drakimɛ oyo ebungaki ekokaki kokɔta na badrakimɛ mosusu mpo na kosala shɛnɛti moko ya kitoko. Ntango ozali kolimbola ndakisa yango, okoki kosalisa ndeko mwasi yango amona ete azali na ntina na lisangá ya Yehova. Na nsima, okoki komonisa ye ete azali mpate ya Yehova mpe ete Yehova amibanzabanzaka mpenza mpo na ye.
Mbala mingi, bandeko basepelaka kopesa makanisi ya bavɛrsɛ oyo batángi. Na yango, tikelá mpe ndeko oyo bokei kotala ntango ya koloba. Nsima ya kotánga vɛrsɛ oyo eyokani na likambo na ye, okoki kozwa liloba to fraze moko mpe kosɛnga ye alimbola yango. Na ndakisa, nsima ya kotánga 2 Bakorinti 4:16, nkulutu akoki kotuna boye: “Okoki koyeba lisusu mabaku oyo omonaki ete Yehova akómisi yo sika, to apesi yo makasi?” Kosala bongo ekoki kopesa bino likoki ya ‘kolendisana.’—Rom. 1:12.
Okoki mpe kolendisa ndeko soki olobeli moto moko ya Biblia oyo akutanaki na likambo oyo ye azali kokutana na yango. Moto oyo alɛmbi nzoto akoki kolendisama na ndakisa ya bato lokola Hana to Epafrodite, oyo na ntango moko boye balɛmbaki, kasi bazalaki kaka na motuya na miso ya Nzambe. (1 Sa. 1:9-11, 20; Flp. 2:25-30) Ezali na bandakisa mosusu ya malamu na Biblia oyo bokoki kolobela.
KOBÁ KOTYELA YE LIKEBI
Okoki komonisa ete omibanzabanzaka mpenza mpo na ndeko soki okobi kotyela ye likebi nsima ya kouta kotala ye. (Mis. 15:36) Na nsuka ya lisolo na bino, bokoki koyokana mokolo moko mpo bóbima na mosala ya kosakola elongo. Soki Bernard, nkulutu moko oyo aumeli mingi, akutani lisusu na ndeko moko oyo bautaki kotala mikolo eleki, atunaka ye na mayele ete, “Boni, makambo ezali kotambola malamu?” Soki ozali kotyela ndeko likebi ndenge wana, okoyeba soki azali na mposa ya lisalisi mosusu.
Lelo oyo, bandeko bazali mpenza na mposa báyoka ete bankulutu batyelaka bango likebi, bamityaka na esika na bango, mpe balingaka bango. (1 Tes. 5:11) Na yango, liboso okende kotala ndeko mpo na kolendisa ye, zwá ntango ya kokanisa makambo oyo azali kokutana na yango. Bondelá mpo na likambo yango. Poná bavɛrsɛ oyo ebongi. Soki osali bongo, okozwa maloba ya malamu mpo na kobɔndisa “molimo oyo elɛmbi”!
a Oyo ezali bankombo oyo topesi bango kopesa.