BASUVENIRE YA MAKAMBO ELEKÁ
“Drame Eureka” esalisaki bato mingi báyeba solo ya Biblia
“EUREKA!” Liloba yango elimboli, “Nazwi yango!” Na boumeli ya siɛklɛ ya 19, ntango bato bazalaki koluka wolo na Californie, na États-Unis, bato bakokaki koyoka ndenge moto oyo azali kotimola wolo agangi ntango azwi yango. Kasi, ndeko Charles Taze Russell ná bayekoli mosusu ya Biblia bazwaki eloko moko ya motuya mpenza: Solo ya Biblia. Mpe bazalaki na mposa makasi ya koyebisa yango epai ya basusu.
Na eleko ya molunge ya mobu 1914, bamilio ya bato ya bingumba minene, bayanganaki ebele mpo na kolanda “Fɔtɔ-Drame ya bozalisi,” oyo bayekoli ya Biblia (I.B.S.A.) balakisaki. Fɔtɔ-Drame yango eumelaki ngonga mwambe mpe elakisamaki na boumeli ya bileko mingi. Bafɔtɔ na yango oyo ezalaki koningananingana, mwa bavitre ya langilangi, masolo ná miziki kitoko, mpe bato oyo bazalaki kotala yango, bazalaki komona makambo oyo elekaki kobanda na kozalisama ya moto tii na nsuka ya boyangeli ya Mbula Nkóto ya Yesu Kristo.—Em. 20:4.a
Kasi ezalaki boni mpo na bingumba mpe bamboka ya mikemike? Mpo ete moto ata moko te akufa nzala na elimo, na sanza ya mwambe ya mobu 1914, bayekoli ya Biblia babimisaki “Drame Eureka,” “Fɔtɔ-Drame” ya moke oyo ezalaki te na biteni mosusu ya Fɔtɔ-Drame. Ezalaki na balolenge misato ya kopona, oyo ezalaki na minɔkɔ ndenge na ndenge: “Eureka X” ezalaki na masolo mpe miziki nyonso. “Eureka Y” ezalaki na masolo nyonso mpe mwa bavitre ya kitoko ya langilangi. Mpe “Drame Eureka mpo na libota,” ezalaki mpo na kotala na bandako, ezalaki kaka na masolo mpe nzembo. Ezalaki mpasi te mpo na kozwa bafɔnɔ mpe bisaleli mosusu na ntalo moke.
Kozanga ete báluka vitre ya monene mpo na kosalela, bayekoli ya Biblia bakokaki kosalela filme wana na bamboka, mpe komema nsango ya Bokonzi tii na bateritware oyo nsango ekómaki te. Bato bakokaki kolakisa drame “Eureka X” na moi to na butu. Kasi bakokaki kolakisa “Eureka Y” ata soki lotiliki ezali te, bazalaki kosalela mwa mwinda moko. Lapolo moko oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na Finnois elobaki ete, “Tokoki kolakisa bililingi yango esika nyonso.” Maloba wana emonanaki mpenza solo!
Na esika ya kofutela bisika ya minene lokola bandako ya teyatre, bayekoli ya Biblia bazalaki kozwa bisika ya ofele, na ndakisa bandako ya kelasi, babiro ya bazuzi, bisika oyo bato bazalaki kozwa bingbunduka, ata mpe na bandako oyo ezalaki na salon ya minene. Bazalaki kolakisa bafilme mingi na bisika ya polele, bazalaki kosalela “vitre” oyo bazalaki kotya papye ya monene ya mpɛmbɛ mpe bakangisi yango na ndako oyo babombaka biloko. Antony Hambuch akomaki ete: “Bato ya ferme bazalaki kobongisa bisika ya polele na kati ya banzete, bazalaki kotanda mwa biteni ya banzete oyo bato bakokaki kofanda mpo na kotala drame yango.” Bandeko oyo bazalaki kolakisa “Eureka” bazalaki kosalela “wagɔ moko ya drame” mpo na komema bisaleli, biloko na bango mosusu, bahema mpe bilamba ya kosalela.
Bato oyo bazalaki kotala “Eureka” bazalaki naino na motángo ya moke tii bakómaki ebele. Na États-Unis, bato 400 bazalaki na ndako ya kelasi moko na engumba moko ya bato 150. Na esika mosusu, bato mosusu basalaki kilomɛtrɛ mwambe mpo na kokende kotala “Drame Eureka.” Na ekólo Suède, bato ya kartye ya Charlotte Ahlberg oyo bayanganaki na mwa ndako na ye “basepelaki makasi mpenza” nsima ya koyoka masolo ya drame yango. Mokolo mosusu oyo balakisaki drame yango, bato soki 1 500 bautaki na engumba moko ya mosika na Australie, epai balukaka wolo. Zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli emonisi ete biteyelo ya ntei mpe bainiversite, “baprofɛsɛrɛ mpe bana-kelasi basepelaki makasi na bililingi mpe masolo kitoko oyo elobamaki na fɔnɔ yango.” “Drame Eureka” eyebanaki mingi ata na bisika oyo bazalaki kolakisa bafilme.
MPO NA KOLONA MBOTO YA SOLO
“Drame Eureka” ekómaki esaleli moko ya ntina mingi mpo na “kofungola masangá ya sika,” mpe bayekoli ya Biblia bazalaki kotinda bandeko oyo bazalaki kosala badiskur mpo na kofungola masangá. Bato mingi basepelaki mpenza na “Drame Eureka.” Balakisaki “Drame” yango mbala na mbala. Kutu, na mobu 1915, kati na baekipi 86 oyo bazalaki na “Drame” yango, kaka 14 nde elakisaki mbala na mbala. Atako ekipi yango ezalaki mobimba te, kasi na nsuka ya mbula wana, lapolo emonisaki ete bato koleka milio moko batalaki “Drame” yango. Bato soki 30 000 basɛngaki mikanda na biso.
Ntango mosusu “Drame Eureka” etikaki nsango te na mikili mosusu, kasi ekoki kozala ete kobanda na Australie tii na Argentine, na Afrika ya Sudi tii na bisanga ya Angleterre, Inde mpe Caraïbe, bamilio ya bato batalaki drame wana ya ntina mingi. Mingi na bango bazwaki solo ya Biblia, eloko oyo eleki mosika wolo na motuya, mpe bakokaki koganga “Eureka!”
a Talá lisolo “Filme moko oyo esali sikoyo mbula 100—na eteni oyo elobi, Biloko oyo tosalelá kala,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/02/2014, nkasa 30-32.