“Apesaka nguya na moto oyo alɛmbi”
Mokapo ya mobu 2018: “Baoyo bazali kotyela Yehova elikya bakozwa nguya ya sika.”—YISAYA 40:31.
1. Wapi mwa mikakatano oyo tozali kobundana na yango, kasi mpo na nini Yehova asepelaka na basaleli na ye ya sembo? (Talá elilingi ya ebandeli.)
BOMOI ezali pɛtɛɛ te na mokili oyo. Na ndakisa, ezali na bandeko ebele oyo bazali kobɛla maladi ya makasi. Basusu mbula na bango epusani, kasi bazali lisusu kobatela bandeko ya libota na bango oyo bakómi mibange. Basusu mpe babundaka mpo na koleisa libota na bango mokolo na mokolo. Toyebi ete mingi na bino bozali kokutana na mokakatano kaka moko te, kasi mikakatano ebele na mbala moko. Yango elyaka ntango, makasi, mpe mbongo mingi. Kasi bondimi na motema moko ete Yehova akosalisa bino. Boyebi ete makambo ekobonga na mikolo ezali koya mpo Yehova alaki yango. Na ntembe te, kondima na bino esepelisaka Yehova!
2. Ndenge nini Yisaya 40:29 ezali kolendisa biso, kasi libunga nini ya monene tokoki kosala?
2 Kasi, na bantango mosusu omonaka lokola ete mikakatano na yo eleki mpasi mpo oyikela yango mpiko? Soki omonaka bongo, ozali yo moko te. Biblia emonisi ete basaleli mosusu ya Nzambe ya ntango ya kala bamonaki mpe bongo. (1 Bakonzi 19:4; Yobo 7:7) Nini esalisaki bango bákoba koyika mpiko? Balukaki Yehova mpo apesa bango makasi. Bayokaki nsɔni te mpo Biblia elobi ete Nzambe “apesaka nguya na moto oyo alɛmbi.” (Yisaya 40:29) Kasi likambo ya mawa, basaleli mosusu ya Nzambe lelo oyo bamoni ete lolenge eleki malamu ya koyikela mikakatano ya bomoi mpiko ezali ya kotika naino kosalela Yehova. Bamoni ete kosalela Yehova ezali lipamboli te, kasi ezali nde kilo. Yango wana, batiki kotánga Biblia, koyangana na makita, mpe kosakola—kaka ndenge Satana alingaki básala.
3. (a) Tokoki kosala nini mpo Satana alɛmbisa biso te? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo?
3 Satana alingaka te tózala makasi na elimo. Mpe ayebi ete tokómaka makasi mingi koleka soki tozali komipesa na mosala ya Yehova. Yango wana, soki oyoki ete nzoto mpe makanisi na yo elɛmbi, kokima Yehova te. Pusaná lisusu penepene na ye. Biblia elobi ete ‘akotɛlɛmisa yo ngwi, akokómisa yo makasi.’ (1 Petro 5:10; Yakobo 4:8) Na lisolo oyo, tokoyekola liboso Yisaya 40:26-31 oyo emonisi ete Yehova akoki kopesa biso makasi. Na nsima, tokotalela makambo mibale oyo ekoki kosala ete tólɛmbisa mabɔkɔ na mosala ya Yehova, mpe tokomona ndenge mitinda ya Biblia ekoki kosalisa biso tóyika mpiko.
BAOYO BATYELAKA YEHOVA ELIKYA BAKOZWA NGUYA YA SIKA
4. Yisaya 40:26 ezali koteya biso nini?
4 Tángá Yisaya 40:26. Moto moko te akoki kotánga minzoto nyonso oyo ezali na molɔ́ngɔ́. Bato ya siansi balobi ete kaka na galaksi na biso (la Voie lactée), minzoto ekoki kozala miliare 400. Atako bongo, Yehova abengaka monzoto mokomoko na nkombo na yango. Yango ezali koteya biso nini? Ezali koteya biso ete soki Yehova atyaka likebi na monzoto mokomoko, eloko oyo ezangá bomoi, kanisá ndenge atalelaka yo moto oyo osalelaka ye! Osalelaka ye lokola robo te, kasi nde mpo olingaka ye. (Nzembo 19:1, 3, 14) Tata na biso ya likoló ayebi makambo na yo nyonso. Biblia elobi ete ‘atángaka nsuki nyonso ya motó na yo.’ (Matai 10:30) Yehova alingi tóyeba ete “ayebi mikolo ya bato oyo bazangi mbeba.” (Nzembo 37:18) Kozanga ntembe, Yehova amonaka mikakatano na yo nyonso, mpe akoki kopesa yo makasi mpo oyikela mokomoko na yango mpiko.
5. Mpo na nini tokoki kondima ete Yehova akoki kopesa biso makasi?
5 Tángá Yisaya 40:28. Nguya nyonso euti na Yehova. Na ndakisa, tókanisa nguya oyo moi ezali na yango. David Bodanis, mokomi moko ya makambo ya siansi, alobi ete nguya oyo moi ebimisaka na segɔnde moko ekokani na nguya oyo ekoki kobima ntango bamiliare ya babɔmbi epanzani. Moto mosusu ya mayele alobaki ete nguya oyo moi ebimisaka na segɔnde moko ekoki kopesa bato nyonso awa na mabele makasi oyo ekoki mpo na bambula 200 000! Ya solo, Yehova, ye oyo apesá moi nguya ya ndenge wana, akoki mpe kopesa biso makasi mpo tóyikela mikakatano na biso mpiko.
6. Na ndenge nini ekanganeli ya Yesu ezali pɛtɛpɛtɛ, mpe koyeba yango esalaka biso nini?
6 Tángá Yisaya 40:29. Kosalela Yehova epesaka esengo mpenza. Yesu ayebisaki bayekoli na ye: “Bókamata ekanganeli na ngai likoló na bino.” Mpe abakisaki ete: “Milimo na bino ekopema. Mpo ekanganeli na ngai ezali ya pɛtɛpɛtɛ mpe mokumba na ngai ezali pɛpɛlɛ.” (Matai 11:28-30) Ezali mpenza solo! Na bantango mosusu, tokoki kozala ya kolɛmba ntango tolongwe na ndako mpo na kokende makita to mosala ya kosakola. Kasi toyokaka ndenge nini ntango tozongi? Toyokaka esengo, tomonaka ete tozwi makasi mpo na koyikela mikakatano mpiko. Ekanganeli ya Yesu ezali mpenza pɛtɛpɛtɛ.
7. Pesá ndakisa oyo emonisi ete maloba ya Matai 11:28-30 ezali solo.
7 Tótalela ndakisa ya ndeko mwasi moko. Abɛlaka maladi ya nzoto kolɛmbalɛmba, anyokwamaka na makanisi, mpe ayokaka motó mpasi mpenza. Mpo na yango, na bantango mosusu ezalaka mpasi ayangana na makita. Kasi, mokolo moko ntango asalaki makasi mpe akendaki na makita, akomaki boye: “Diskur elobelaki kolɛmba nzoto. Lokola esalemaki na ndenge ya boboto mpe ya kolendisa mpenza, nalelaki. Esalisaki ngai nabosana te ete nasengeli koyanganaka na makita.” Ndeko yango asepelaki mingi ndenge asalaki makasi ya koyangana na makita mokolo wana!
8, 9. Maloba ya Paulo: “Ntango nazali na bolɛmbu, na ntango wana nde nazali mpenza na nguya” elimboli nini?
8 Tángá Yisaya 40:30. Tokoki kozala na makoki mingi, kasi ezali na makambo mosusu oyo tokokoka kosala na makasi na biso moko te. Biso nyonso tosengeli koyeba likambo yango. Ntoma Paulo azalaki na makoki mingi, kasi akokaki te kosala likambo nyonso oyo azalaki na mposa ya kosala. Ntango ayebisaki Yehova mitungisi na ye, Yehova ayebisaki ye: “Nguya na ngai ezali kokóma ya kokoka na kati ya bolɛmbu.” Paulo akangaki ntina ya maloba ya Yehova. Alobaki: “Ntango nazali na bolɛmbu, na ntango wana nde nazali mpenza na nguya.” (2 Bakorinti 12:7-10) Maloba yango elimboli nini?
9 Ntoma Paulo asosolaki ete ezali na makambo mosusu oyo akokaki kosala te na makasi na ye moko. Azalaki na mposa ya lisalisi. Elimo santu ya Nzambe ekokaki kopesa Paulo nguya ntango alɛmbi. Esuki wana te, elimo ya Nzambe ekokaki mpe kopesa ye nguya ya kosala makambo oyo akokaki kosala te na makasi na ye moko. Ezali mpe bongo mpo na biso. Soki Yehova apesi biso elimo santu na ye, tokozwa makasi mpenza!
10. Ndenge nini Yehova asalisaki Davidi ayikela mikakatano na ye mpiko?
10 Davidi amonaki mbala mingi ndenge elimo santu ya Nzambe epesaki ye nguya. Ayembaki ete: “Na lisalisi na yo, napotaka mbangu mpo na kobunda na etuluku ya bapunzi; mpe na lisalisi ya Nzambe na ngai, namataka efelo.” (Nzembo 18:29) Na bantango mosusu, tokutanaka na mikakatano oyo ezali lokola efelo ya molai, oyo tokoki kosilisa biso moko te. Tozalaka na mposa ya lisalisi ya Yehova.
11. Ndenge nini elimo santu esalisaka biso tóyikela mikakatano mpiko?
11 Tángá Yisaya 40:31. Bampongo etikalaka likoló ntango molai kozanga kobɛta mapapu; kasi esalaka bongo na makasi na yango moko te. Nguya ya mopɛpɛ ya molunge oyo emataka likoló nde etombolaka yango mosika. Yango esalisaka mpongo epumbwa ntaka molai mpe ebatela makasi na yango. Yango wana, soki okutani na likambo oyo eleki yo motó, kanisá mpongo. Sɛngá Yehova apesa yo nguya na nzela ya ‘mosungi, elimo santu.’ (Yoane 14:26) Tokoki kosɛnga Yehova apesa biso elimo na ye ata na ntango nini. Tokoki mpe kozala mpenza na mposa ya lisalisi ya Yehova mingimingi ntango tozwani matata na ndeko moko ya lisangá. Kasi mpo na nini matata ebimaka?
12, 13. (a) Mpo na nini matata ebimaka kati na bandeko? (b) Lisolo ya Yozefe ezali koteya biso nini mpo na Yehova?
12 Matata ebimaka mpo biso nyonso tozali bato ya kozanga kokoka. Yango wana, tokoki kosilika mpo na makambo oyo bandeko mosusu balobi to basali, to bango mpe bakoki kosilikela biso. Yango ekoki kozala komekama monene. Kasi komekama yango epesaka biso libaku ya komonisa bosembo na biso epai ya Yehova. Na ndenge nini? Esalisaka biso tóyekola kosala na bomoko elongo na bandeko na biso oyo bamipesá na Nzambe. Yehova alingaka bango atako bazali bato ya kozanga kokoka.
13 Lisolo ya Yozefe emonisi ete Yehova apekisaka te ete basaleli na ye bámekama. Ntango Yozefe azalaki elenge, bandeko na ye bakómaki koyokela ye zuwa. Batɛkaki ye lokola moombo, mpe amemamaki na Ezipito. (Ebandeli 37:28) Yehova amonaki makambo nyonso mpe na ntembe te ayokaki mpasi komona ndenge banyokolaki Yozefe, moninga mpe mosaleli na ye ya sembo. Kasi, apekisaki yango te. Na nsima, ntango babwakaki Yozefe na bolɔkɔ mpo mwasi ya Potifare akoselaki ye makambo ete alingaki kosangisa na ye nzoto na makasi, Yehova akɔtelaki ye mpe te. Kasi, ata mbala moko te Yehova asundolaki Yozefe! Biblia elobi ete “Yehova azalaki elongo na Yozefe mpe oyo ye azalaki kosala, Yehova azalaki kolongisa yango.”—Ebandeli 39:21-23.
14. Matomba nini tokozwa soki ‘totiki nkanda’?
14 Tólobela mpe ndakisa ya Davidi. Bato mingi te banyokwamá lokola Davidi. Atako bongo, moninga yango ya Nzambe atikelaki nkanda esika te. Akomaki boye: “Tiká nkanda, mpe tiká kotomboka; kosilika te kaka mpo na kosala mabe.” (Nzembo 37:8) Ntina ya libosoliboso oyo tosengeli ‘kotika’ nkanda, to koboya kobomba nkanda, ezali ete tolingi komekola Yehova. ‘Asalelaka biso makambo na kolanda masumu na biso te,’ kasi alimbisaka biso. (Nzembo 103:10) Kotika nkanda ezali mpe na matomba mosusu. Na ndakisa, nkanda ekoki komatisa tension mpe kopesa bamaladi ya mpema. Ekoki kobebisa libale (foie), pancréas, mpe kopesa mpasi na libumu. Lisusu, ntango moto asiliki, mbala mingi akanisaka lisusu malamu te. Akoki koloba to kosala makambo oyo ekopesa basusu mpasi, mpe ekoki konyokola ye na makanisi ntango molai. Yango wana, eleki malamu mpenza kotikala kimya. Biblia elobi: “Motema ya kimya ezali bomoi ya nzoto.” (Masese 14:30) Na yango, ndenge nini tokoki kobosana mpasi oyo ndeko moko apesaki biso, mpe ndenge nini tokoki kozongisa kimya elongo na ye? Tosengeli kosalela toli ya bwanya oyo ezali na Biblia.
SOKI NDEKO MOKO APESI YO MPASI
15, 16. Tosengeli kosala nini soki ndeko moko apesi biso mpasi?
15 Tángá Baefese 4:26. Tokamwaka te soki bato ya mokili basaleli biso makambo na ndenge ebongi te. Kasi soki ndeko ya lisangá to ya libota alobi to asali eloko moko oyo epesi biso mpasi, tokoki kotungisama makasi. Okosala nini soki ozali kokoka kobosana likambo yango te? Okobomba nde nkanda na motema, mbala mosusu bambula mingi? To okolanda toli ya bwanya ya Biblia mpe okobongisa makambo nokinoki? Soki ozali koumela mpo na kosolola na ndeko yango, ekokóma lisusu mpasi okende kozongisa kimya.
16 Kanisá ete ndeko moko apesaki yo mpasi mpe ozali kaka kokanisa yango. Okoki kosala nini mpo ozongisa kimya? Ya liboso, bondelá Yehova. Sɛngá ye asalisa yo osolola malamu na ndeko na yo. Kobosana te ete ndeko yango mpe azali moninga ya Yehova. (Nzembo 25:14) Nzambe alingaka ye. Yehova asalelaka baninga na ye makambo na boboto; alingi biso mpe tósala bongo. (Masese 15:23; Matai 7:12; Bakolose 4:6) Ya mibale, kanisá malamu makambo okoloba na ndeko yango. Kowela kokanisa te ete ndeko yango apesaki yo mpasi na nko. Ekoki kozala ete ezalaki libunga to okangaki ntina ya likambo te. Zalá pene ya kondima ete ntango mosusu yo mpe ozali na mwa foti. Okoki kobanda lisolo na maloba lokola oyo: “Mbala mosusu nazali kolekisa ndelo, kasi ndenge olobaki na ngai lobi, nayokaki . . .” Soki bosololi kasi bozongisi kimya te na ndeko yango, kolɛmba te. Bondeláká mpo na ndeko yango. Sɛngá Yehova apambola ye, mpe asalisa yo otya makanisi na bizaleli na ye ya malamu. Yebá ete Yehova akosepela na milende nyonso ozali kosala mpo na kozongisa kimya elongo na ndeko na yo, oyo mpe azali moninga ya Nzambe.
SOKI OZALI KAKA KOMITUNGISA MPO NA MABUNGA YA KALA
17. Ndenge nini Yehova asalisaka biso tózongisa boyokani elongo na ye ntango tosali lisumu, mpe mpo nini tosengeli kondima lisalisi yango?
17 Bandeko mosusu bamonaka ete babongi kosalela Yehova te mpo basalá lisumu moko ya monene. Kotungisama ekoki kolongola kimya, esengo mpe kosilisa makasi. Mokonzi Davidi, oyo azalaki mpe kotungisama ndenge wana, alobaki boye: “Ntango nafandaki nyɛɛ, mikuwa na ngai ezalaki kobeba na kolelalela na ngai mokolo mobimba. Mpamba te na moi mpe na butu lobɔkɔ na yo ezalaki kilo likoló na ngai.” Likambo ya esengo, Davidi azwaki mpiko ya kosala oyo Yehova asɛngaka basaleli na ye básala. Akomaki boye: “Nsukansuka nayambolelaki yo lisumu na ngai, . . . mpe yo moko olimbisaki libunga ya masumu na ngai.” (Nzembo 32:3-5) Soki osali lisumu moko ya monene, Yehova akoki kolimbisa yo mpe alingi kosalisa yo ozongisa boyokani elongo na ye. Kasi, osengeli kondima lisalisi oyo apesaka na nzela ya bankulutu. (Masese 24:16; Yakobo 5:13-15) Yango wana, kozela te! Okoki kozanga bomoi ya seko. Kasi, osengeli kosala nini soki otungisamaka kaka mingi atako lisumu na yo elimbisamá banda kala?
18. Ndenge nini ndakisa ya Paulo ekoki kosalisa baoyo bamonaka ete babongi kosalela Yehova te?
18 Na bantango mosusu, ntoma Paulo azalaki kolɛmba nzoto mpo na masumu na ye ya kala. Alobaki boye: “Nazali moto oyo aleki moke mpenza na kati ya bantoma, mpe nabongi kutu te kobengama ntoma, mpamba te nanyokolaki lisangá ya Nzambe.” Atako bongo, Paulo abakisaki ete: “Kasi mpo na boboto monene ya Nzambe, nazali ndenge nazali.” (1 Bakorinti 15:9, 10) Yehova ayebaki ete Paulo azali moto ya kozanga kokoka. Kasi andimaki ye ndenge azalaki, mpe alingaki ete Paulo ye moko mpe ayeba yango. Soki obongoli mpenza motema mpo na masumu oyo osalaki mpe oyamboli yango na ndenge oyo esengeli, yebá ete Yehova akolimbisa yo. Ndimá ete Yehova alimbisaka, mpe ete alimbisi yo mpenza!—Yisaya 55:6, 7.
19. Mokapo ya mobu 2018 ezali nini, mpe mpo na nini ebongi mpenza?
19 Lokola nsuka ya mokili oyo ezali se kokóma pene, tóyeba ete tokokutana na mikakatano mosusu mingi. Kasi, kobosana te ete Yehova, ye oyo ‘apesaka nguya na moto oyo alɛmbi, mpe atondisaka na nguya moto oyo azangi makasi,’ akoki kopesa yo nyonso oyo osengeli na yango mpo okoka kosalela ye na bosembo. (Yisaya 40:29; Nzembo 55:22; 68:19) Na 2018, tokobanda kokanisa likambo yango ya ntina mingi ntango nyonso oyo toyei na makita na Ndako ya Bokonzi mpe tomoni mokapo ya mobu: “Baoyo bazali kotyela Yehova elikya bakozwa nguya ya sika.”—Yisaya 40:31.