Tózala na bomoko ndenge Yehova ná Yesu bazali na bomoko
“Nazali kosɛngɛla . . . bango nyonso bázala moko, ndenge yo, Tata, ozali na bomoko elongo na ngai.”—YOANE 17:20, 21.
1, 2. (a) Yesu asɛngaki nini na libondeli na ye ya nsuka elongo na bantoma na ye? (b) Mpo na nini Yesu amitungisaki mpo na bomoko?
YESU amitungisaki mpo na bomoko ntango bazalaki kolya elongo na bantoma na ye mpo na mbala ya nsuka. Ntango azalaki kobondela elongo na bango, alobaki ete alingi bayekoli na ye bázala moko to na bomoko, ndenge kaka ye ná Tata na ye bazali na bomoko. (Tángá Yoane 17:20, 21.) Soki bayekoli bazali na bomoko, yango ekomonisa ete Yehova atindaki Yesu na mabele mpo na kosala mokano ya Nzambe. Bato bakoyeba bayekoli ya solo ya Yesu soki bazali na bolingo kati na bango mpe yango ekosala ete bázala lisusu na bomoko makasi.—Yoane 13:34, 35.
2 Yesu alobelaki bomoko na butu wana mpo amonaki ete bantoma na ye bazalaki mpenza na bomoko te. Na ndakisa, ndenge esalemaki liboso, bantoma bawelanaki lisusu mpo “na koyeba nani na kati na bango amonani ete aleki bango nyonso.” (Luka 22:24-27; Marko 9:33, 34) Mokolo moko, Yakobo ná Yoane basɛngaki Yesu apesa bango esika ya lokumu na Bokonzi ya likoló, pembeni na ye.—Marko 10:35-40.
3. Nini ekokaki kosala ete bayekoli ya Kristo bázala na bomoko te, mpe tokozwa biyano na mituna nini?
3 Kaka mposa ya kozala na lokumu te nde ekokaki kosala ete bayekoli ya Kristo bázala na bomoko te. Na mikolo ya Yesu, koyinana mpe kokanisela basusu mabe ezalaki kokabola bato. Bayekoli ya Yesu basengelaki kolonga makanisi mabe wana. Na lisolo oyo tokozwa biyano na mituna oyo: Yesu asalaki nini na likambo etali kokanisela basusu mabe? Ndenge nini asalisaki bayekoli na ye báponaka bilongi te, mpe bázala mpenza na bomoko? Mpe ndenge nini ndakisa ya Yesu mpe makambo ateyaki ekoki kosalisa biso tóbatela bomoko?
BATO BAZALAKI KOKANISELA YESU NÁ BAYEKOLI NA YE MABE
4. Pesá bandakisa oyo emonisi ete bazalaki kokanisela Yesu mabe.
4 Bakaniselaki mpe Yesu mabe. Ntango Filipe ayebisaki Natanaele ete amoni Masiya, Natanaele alobaki: “Eloko moko ya malonga ekoki nde kobima na Nazarete?” (Yoane 1:46) Na ntembe te, Natanaele ayebaki ete Masiya akobotama na Beteleme, ndenge esakolamaki na Mika 5:2. Mbala mosusu akanisaki ete Nazarete ebongi te kozala mboka ya Masiya. Lisusu, bato ya Yudea, oyo bazalaki na lokumu bazalaki komona Yesu moto mpamba mpo azalaki moto ya Galile. (Yoane 7:52) Bato ya Yudea mingi bazalaki komona bato ya Galile bato mpamba. Bayuda mosusu balukaki kofinga Yesu ndenge bazalaki kobenga ye Mosamaria. (Yoane 8:48) Basamaria bazalaki bato ya ekólo mosusu, mpe lingomba na bango ekesanaki na oyo ya Bayuda. Bayuda mpe bato ya Galile bazalaki komona Basamaria bato mpamba mpe balingaki te kozala elongo na bango.—Yoane 4:9.
5. Nini emonisi ete bazalaki kokanisela bayekoli ya Yesu mabe?
5 Bakonzi ya lingomba ya Bayuda bazalaki mpe kopesa bayekoli ya Yesu lokumu te. Bazalaki kobenga bango “bato balakelamá mabe.” (Yoane 7:47-49) Bafarisai bazalaki komona moto nyonso oyo akɔtá eteyelo ya lingomba ya Bayuda te mpe alandaka mimeseno na bango te lokola moto mpamba. (Misala 4:13) Bazalaki kokanisela Yesu ná bayekoli na ye mabe mpo na ntango wana bato bazalaki komikumisa mpo na lingomba na bango, esika oyo bazalaki na yango, mpe ekólo na bango. Makanisi wana ekɔtelaki mpe bayekoli ya Yesu. Mpo bákoba kozala na bomoko, basengelaki kobongola makanisi na bango.
6. Pesá bandakisa mpo na komonisa ete kokanisela basusu mabe ekoki kokɔtela biso.
6 Lelo oyo bato mingi bakaniselaka basusu mabe. Bakoki kokanisela biso mabe, to biso mpe tokoki kokanisela basusu mabe. Ndeko mwasi moko oyo azali mobongisi-nzela na Australie alobi: “Lokola natyaki makanisi nyonso na ndenge oyo mindɛlɛ banyokolaki bankolo-mboka na kala, ata mpe tii lelo, yango esalaki ete nakóma koyina bango.” Makambo mabe oyo bato mosusu basalelaki ye, etindaki ye ayina bango lisusu koleka. Ndeko mobali moko na Canada amonisi ndenge oyo azalaki kokanisa liboso, alobi: “Nazalaki kokanisa ete bato oyo balobaka Français nde baleki. Yango wana nazalaki kosepela te na baoyo balobaka Anglais.”
7. Yesu asalaki nini mpo na likambo ya kokanisela basusu mabe?
7 Ndenge kaka ezalaki na mikolo ya Yesu, lelo oyo mpe mbala mingi bato bakaniselaka basusu mabe, mpe ezali mpasi kotika ezaleli yango. Yesu asalaki nini mpo na likambo yango? Ya liboso, akaniselaki basusu mabe ata moke te. Azalaki kopona bilongi te. Asakwelaki bazwi mpe babola, Bafarisai mpe Basamaria, ata mpe bakɔngɔli-mpako ná basumuki. Ya mibale, na mateya mpe na ndakisa na ye, Yesu amonisaki bayekoli na ye ete basengeli te koyina to kokanisela basusu mabe.
BOLINGO MPE KOMIKITISA EKOSALISA BISO TÓTIKA KOKANISELA BASUSU MABE
8. Likambo nini ya ntina mingi esimbi bomoko na biso? Limbolá.
8 Yesu ateyaki bayekoli na ye likambo moko ya ntina mingi oyo esimbi bomoko na biso. Ayebisaki bango ete: “Bino nyonso bozali bandeko.” (Tángá Matai 23:8, 9.) Na maloba mosusu, tozali bandeko mpo biso nyonso tozali bana ya Adama. (Misala 17:26) Yesu amonisaki ete bayekoli na ye bazalaki bandeko mpo bandimaki ete Yehova azali Tata na bango ya likoló. (Matai 12:50) Bango nyonso bakɔtaki na libota ya Nzambe mpe bolingo ná kondima esangisaki bango. Yango wana, na mikanda na bango bantoma bazalaki kobenga baninga na bango bakristo “bandeko.”—Baroma 1:13; 1 Petro 2:17; 1 Yoane 3:13.
9, 10. (a) Mpo na nini Bayuda bazalaki na ntina te ya komikumisa mpo na loposo na bango? (b) Ndakisa nini Yesu apesaki mpo na komonisa ete ezali mabe komona bato ya loposo mosusu mpamba? (Talá elilingi ya ebandeli.)
9 Nsima ya koyebisa bayekoli na ye ete basengeli komona ete bazali bandeko, Yesu amonisaki bango ntina ya kozala na komikitisa. (Tángá Matai 23:11, 12.) Kaka ndenge tomonaki yango, na bantango mosusu lolendo ezalaki kokabola bantoma. Mpe na mikolo ya Yesu, bato bazalaki komikumisa mingi mpo na loposo na bango. Bayuda ebele bazalaki kokanisa ete bazali malamu koleka basusu mpo bazali bana ya Abrahama. Kasi, Yoane mobatisi alobaki na bango ete: “Nzambe azali na nguya ya kobimisela Abrahama bana na mabanga oyo.”—Luka 3:8.
10 Yesu amonisaki ete komikumisa mpo na loposo ezali mabe mpenza. Alobaki yango polele ntango mokomeli moko atunaki ye: “Nani mpenza azali mozalani na ngai?” Mpo na kopesa eyano, Yesu apesaki ndakisa moko. Miyibi babɛtaki Moyuda moko mpe babwaki ye na nzela. Bayuda mosusu bazalaki kolekaleka na nzela yango, kasi ata moko te asalisaki ye. Nzokande Mosamaria ayokaki mawa mpe asalisaki ye. Mpo na kosukisa ndakisa yango alobaki na mokomeli yango ete asengeli kozala lokola Mosamaria wana. (Luka 10:25-37) Yesu amonisaki ete Mosamaria wana ateyaki Bayuda ndenge ya kolinga bato ya lolenge nyonso.
11. Mpo na nini bayekoli ya Yesu basengelaki kopona bilongi te, mpe ndenge nini Yesu asalisaki bango na likambo yango?
11 Liboso Yesu akende likoló, apesaki bayekoli na ye etinda ya kosakola na “Yudea mobimba mpe na Samaria, mpe tii na esika eleki mpenza mosika na mabele.” (Misala 1:8) Mpo básala yango, basengelaki kolongola lolendo mpe kotika kokanisela basusu mabe. Mbala mingi Yesu alobelaki bizaleli ya malamu ya bato ya bikólo mosusu, mpe yango ebongisaki bayekoli na ye mpo na kosakola na bikólo mosusu. Na ndakisa, Yesu akumisaki mokonzi moko ya basoda ya ekólo mosusu mpo na kondima na ye ya makasi. (Matai 8:5-10) Na mboka na ye Nazarete, Yesu alimbolaki ndenge Yehova asalisaki bato ya ekólo mosusu, na ndakisa Mofenisia moto ya Zarefate oyo mobali akufá mpe Namana, moto ya Asiri oyo abɛlaki maba. (Luka 4:25-27) Lisusu Yesu asakwelaki mwasi Mosamaria moko mpe alekisaki kutu mikolo mibale na engumba Samaria mpo bato basepelaki na nsango malamu.—Yoane 4:21-24, 40.
BAKRISTO YA LIBOSO BASALAKI MAKASI MPO BÁTIKA KOKANISELA BASUSU MABE
12, 13. (a) Bantoma basalaki nini ntango Yesu asakwelaki mwasi Mosamaria? (Talá elilingi ya ebandeli.) (b) Nini emonisi ete Yakobo ná Yoane bakangaki mpenza ntina te ya likambo oyo Yesu alingaki koteya bango?
12 Ezalaki pɛtɛɛ te bantoma bálongola ezaleli ya kokanisela basusu mabe. Bakamwaki ndenge Yesu andimaki koteya mwasi Mosamaria. (Yoane 4:9, 27) Mpo na nini? Mpamba te bakonzi ya mangomba ya Bayuda bazalaki te kosolola na basi na esika ya bato nyonso, mpe bakokaki te kosolola na mwasi Mosamaria oyo azalaki na etamboli mabe. Bantoma basɛngaki Yesu alya, kasi mpo na Yesu kosolola na mwasi wana ezalaki na ntina koleka bilei. Kosakola, ezala epai ya mwasi Mosamaria, ezalaki mokano ya Tata na ye, mpe ezalaki lokola bilei ya kolya mpo na ye.—Yoane 4:31-34.
13 Yakobo ná Yoane bakangaki ntina ya likambo yango te. Ntango bayekoli bakendaki elongo na Yesu na Samaria, balukaki esika ya kolala na mboka moko kuna. Basamaria baboyaki koyamba bango, na nkanda nyonso Yakobo ná Yoane batunaki Yesu soki básɛnga mɔtɔ ekita mpe etumba mboka mobimba. Yesu apesaki bango toli ya makasi mpenza. (Luka 9:51-56) Mbala mosusu Yakobo ná Yoane balingaki kosilika bongo te soki likambo yango esalemaki nde na Galile, oyo ezalaki engumba na bango. Emonani ete bazalaki kokanisela basusu mabe yango wana basilikaki. Na nsima, ntango Yoane azalaki kosakwela Basamaria mpe bato mingi bayokaki, mbala mosusu ayokaki mpasi mpo na makanisi mabe oyo azalaki na yango liboso.—Misala 8:14, 25.
14. Bantoma basilisaki likambo nini oyo etalaki minɔkɔ mibale?
14 Mwa moke nsima ya pantekote na mobu 33, bokabwani ekɔtaki na lisangá. Ntango bandeko bazalaki kokabolela basi oyo mibali bakufá bilei, bazalaki kobosana basi oyo bazalaki koloba monɔkɔ ya Grɛki. (Misala 6:1) Ekoki kozala esalemaki bongo mpo bazalaki koyina monɔkɔ mosusu. Bantoma basilisaki likambo yango na lombangu. Baponaki mibali nsambo ya makoki mpo na kokabola biloko na ndenge oyo ebongi. Bandeko yango nyonso bazalaki na bankombo ya bato ya Grɛki, yango ekokaki kobɔndisa basi wana oyo mibali bakufá, oyo bayokaki mpasi mpo na likambo yango.
15. Ndenge nini Petro ayekolaki kolinga bandeko nyonso? (Talá elilingi ya ebandeli.)
15 Na mobu 36, bayekoli ya Yesu babandaki kosakwela bato ya bikólo nyonso. Liboso, ntoma Petro azalaki kolekisa ntango mbala mingi kaka na Bayuda. Na nsima Nzambe amonisaki yango polele ete bakristo basengeli te kopona bilongi, mpe Petro asakwelaki Korneyi, soda ya Roma. (Tángá Misala 10:28, 34, 35.) Nsima na yango Petro akómaki kolya mpe kolekisa ntango elongo na bakristo oyo bazalaki Bayuda te. Nzokande bambula na nsima, na engumba Antiokia, atikaki kolya elongo na bakristo oyo bazalaki Bayuda te. (Bagalatia 2:11-14) Ntoma Paulo asembolaki Petro mpe ayokaki toli yango. Ndenge nini toyebi yango? Mpo ntango Petro akomaki mokanda na ye ya liboso epai ya Bayuda mpe bakristo oyo bazalaki Bayuda te na Azia, amonisaki ntina ya kolinga bandeko nyonso.—1 Petro 1:1; 2:17.
16. Bakristo ya liboso bayebanaki na nini?
16 Na ntembe te, ndakisa ya Yesu esalisaki bantoma báyekola kolinga “bato ya ndenge nyonso.” (Yoane 12:32; 1 Timote 4:10) Bantoma babongolaki makanisi na bango atako ezwaki ntango. Bakristo ya liboso bayebanaki ete balinganaka mpenza. Na mobu soki 200, Tertullien, mokomi moko alobaki boye mpo na bakristo: “Balinganaka . . . mpe bazali pene ya kopesa bomoi na bango mpo na basusu.” Lokola bakristo yango balataki “bomoto ya sika,” bakómaki komona ete bato nyonso bazali ndenge moko, ndenge Nzambe amonaka bato.—Bakolose 3:10, 11.
17. Ndenge nini tokoki kotika kokanisela basusu mabe? Pesá bandakisa.
17 Lelo oyo mpe ekoki kosɛnga ntango mpo na kotika ezaleli ya kokanisela basusu mabe. Ndeko mwasi moko na France amonisi ndenge ezalaki mpasi mpo na ye, alobi boye: “Yehova ateyi ngai bolingo, kokaba mpe ndenge ya kolinga bato ya lolenge nyonso. Kasi nazali koyekola kaka ndenge ya kotika kokanisela basusu mabe, mpe ezali pɛtɛɛ te. Yango wana nakobaka kobondela mpo na yango.” Ndeko mwasi moko na Espagne amonisi ete na bantango mosusu abundisaka makanisi mabe oyo azalaka na yango mpo na ekólo moko boye, alobi: “Mbala mingi nalongaka, kasi nayebi ete nasengeli kokoba kobunda. Na lisalisi ya Yehova nazali na esengo ya kozala kati ya libota na ye oyo ezali na bomoko.” Mokomoko na biso asengeli kotalela makanisi na ye malamu mpenza. Biso mpe tosengeli kobunda mpo na kotika kokanisela basusu mabe?
SOKI TOKOLISI BOLINGO, TOKOTIKA KOKANISELA BASUSU MABE
18, 19. (a) Bantina nini etindaka biso tóyamba moto nyonso? (b) Ndenge nini tokoki kosala yango?
18 Ezali malamu tóbosana te ete biso nyonso tozalaki mosika na Nzambe. (Baefese 2:12) Kasi, na bolingo na ye, Yehova abendaki biso epai na ye. (Hosea 11:4; Yoane 6:44) Mpe Kristo ayambaki biso. Andimaki tókɔta na libota ya Nzambe. (Tángá Baroma 15:7.) Atako tozali bato ya kozanga kokoka, Yesu ayambaki biso na boboto nyonso, na yango tosengeli ata moke te kobengana moto mosusu, eyela biso ata na makanisi te!
19 Lokola tozali kobɛlɛma na nsuka ya ebongiseli oyo, na ntembe te bokabwani, kokanisela basusu mabe mpe koyinana ekobakisama mingi koleka. (Bagalatia 5:19-21; 2 Timote 3:13) Biso basaleli ya Yehova tolukaka “bwanya oyo euti na likoló,” oyo esalisaka biso tóponaka bilongi te mpe tótya kimya. (Yakobo 3:17, 18) Tozali na esengo ya kozala na baninga ya bikólo mosusu, kondima lolenge basalaka makambo mpe mbala mosusu koyekola monɔkɔ na bango. Ntango tosalaka bongo tozalaka na kimya “lokola ebale” mpe boyengebene “lokola mbonge ya mbu.”—Yisaya 48:17, 18.
20. Nini esalemaka ntango bolingo ebongolaka makanisi mpe motema na biso?
20 Ntango ndeko mwasi ya Australie ayekolaki Biblia, mokemoke ezaleli na ye ya kokanisela basusu mabe mpe koyina ebandaki kosila. Bolingo ebongolaki makanisi na ye. Ndeko mobali ya Canada oyo alobaka Français amoni sikoyo ete mbala mingi bato bayinaka basusu mpo kaka bayebi bango te. Ayekolaki ete “bizaleli ya bato etalaka te esika moto abotamá.” Kutu abalaki ndeko oyo alobaka Anglais! Bandakisa yango emonisi ete bolingo ekoki kolonga ezaleli ya kokanisela basusu mabe. Bolingo esangisaka biso na ekanganeli oyo ekoki kokatana te.—Bakolose 3:14.