Yoane Mobatisi—Ndakisa oyo ekoki kosalisa biso tóbatela esengo
OZALAKA na mposa ya kozwa mokumba moko na lisangá, kasi okoki te kozwa yango sikoyo? Mbala mosusu ezali mokumba oyo ndeko mosusu azali na yango. Ekoki mpe kozala mokumba oyo ozalaki na yango na kala. Kasi lokola mbula epusani, to mpe okómi na maladi, mikakatano ya mbongo, to mikumba ya libota esali ete osala lisusu te ndenge ozalaki kosala liboso. Mbala mosusu mpe esɛngaki otika mokumba oyo ozalaki na yango banda kala mpo na mbongwana oyo esalemi na ebongiseli ya Yehova. Ata soki ezali mpo na ntina nini, okoki komona ete ozali kosala te nyonso oyo okokaki kosala na mosala ya Nzambe. Soki ezali bongo, na bantango mosusu okoki kolɛmba nzoto. Atako bongo, okoki kosala nini mpo makanisi ya kolɛmba nzoto to nkanda ezwa misisa te na motema na yo? Ndenge nini okoki kobatela esengo na yo?
Ndakisa ya Yoane Mobatisi ekoki koteya biso ndenge ya kobatela esengo na biso. Yoane azalaki na mikumba minene, kasi mbala mosusu akanisaki te ete bomoi na ye na mosala ya Yehova ekosuka ndenge oyo esukaki. Ekoki kozala ete andimaki te ete akolekisa ntango mingi na bolɔkɔ koleka na mosala na ye mpo na Nzambe. Atako bongo, Yoane azalaki kaka na esengo, mpe abatelaki yango ntango nyonso. Nini esalisaki ye? Mpe ndenge nini tokoki kobatela esengo na biso ata soki tokutani na makambo oyo ekoki kolɛmbisa biso nzoto?
MOKUMBA OYO EPESAKI YOANE MOBATISI ESENGO
Na eleko ya prɛnta ya mobu 29 T.B., Yoane abandaki mosala na ye ya kobongisa nzela mpo na Masiya; azalaki koloba: “Bóbongola mitema, mpo bokonzi ya likoló ekómi pene.” (Mat. 3:2; Luka 1:12-17) Bato mingi bayokaki ye. Kutu, ebele ya bato oyo bautaki mosika bayaki mpo na koyoka nsango na ye, mpe mingi babongolaki motema mpe bazwaki batisimo. Lisusu, na mpiko nyonso, Yoane akebisaki bakonzi ya mangomba oyo bazalaki komimona sembo ete soki babongwani te, bakozwa etumbu. (Mat. 3:5-12) Asalaki likambo oyo eleki ntina na mosala na ye na eleko ya ɔtɔne ya mobu 29 T.B., ntango abatisaki Yesu. Kobanda wana, Yoane azalaki koyebisa basusu bálanda nde Yesu, Masiya oyo alakamaki.—Yoa. 1:32-37.
Na kotalela mokumba monene oyo Yoane azalaki na yango, Yesu alobaki: “Na bato nyonso oyo basi babotá, moko oyo aleki Yoane Mobatisi abimá te.” (Mat. 11:11) Na ntembe te, Yoane asepelaki na mapamboli oyo azwaki. Ndenge moko na Yoane, bandeko mingi lelo bazwi mapamboli minene. Tózwa ndakisa ya ndeko mobali moko na nkombo Terry. Ye ná mwasi na ye Sandra balekisi mbula koleka 50 na mosala ya ntango nyonso. Terry alobi boye: “Nazwaki mikumba ebele ya minene. Nazalaki mobongisi-nzela, nasalaki na Betele, nakómaki mobongisi-nzela monene, mokɛngɛli ya zongazonga, mokɛngɛli ya etúká, mpe sikoyo nazali lisusu mobongisi-nzela monene.” Ezalaka esengo kozwa mikumba na lisangá, kasi ndenge tokomona yango na ndakisa ya Yoane, esɛngaka kosala milende mpo na kobatela esengo yango ntango makambo ebongwani.
ZALÁ NTANGO NYONSO NA BOTƆNDI
Yoane Mobatisi abatelaki esengo na ye mpo azalaki ntango nyonso na botɔndi mpo na mikumba oyo azwaki. Tózwa ndakisa. Nsima ya batisimo ya Yesu, mosala ya Yoane ekitaki mpe mosala ya Yesu ebandaki komata. Lokola bayekoli ya Yoane bamitungisaki, bakendaki epai na ye mpe balobaki mpo na Yesu ete: “Talá, ye wana azali kobatisa mpe bato nyonso bazali kokende epai na ye.” (Yoa. 3:26) Yoane alobaki na bango: “Moto oyo azwi mwasi na libala ye nde mobali ya mwasi yango. Nzokande, moninga ya mobali ya libala, ntango atɛlɛmi mpe azali koyoka ye, azali na esengo mingi mpo na mongongo ya mobali oyo abali. Na yango, esengo oyo ezali ya ngai etondi kotonda.” (Yoa. 3:29) Yoane amikokanisaki te na Yesu; akanisaki mpe te ete mokumba oyo azwaki esilaki valɛrɛ mpo Yesu azalaki na mokumba monene koleka. Yoane abatelaki esengo na ye mpo akobaki kosepela na mokumba na ye ya kozala “moninga ya mobali ya libala.”
Makanisi ya Yoane esalisaki ye akoba kosepela na mokumba oyo azalaki na yango atako ezalaki pɛtɛɛ te. Na ndakisa, lokola Yoane azalaki Monaziri banda mbotama na ye, akokaki komɛla vinyo te. (Luka 1:15) Mpo na komonisa ete bomoi ya Yoane ezalaki lokola ya bato nyonso te, Yesu alobaki ete “Yoane ayei alei te mpe amɛli te.” Nzokande, Yesu ná bayekoli na ye bazalaki na mibeko ya ndenge wana te mpe bazalaki na bomoi lokola bato nyonso. (Mat. 11:18, 19) Lisusu, atako Yoane asalaki ata likamwisi moko te, ayebaki ete bayekoli ya Yesu, ata mpe baoyo bazalaki liboso kolanda ye Yoane, bakokaki kosala makamwisi. (Mat. 10:1; Yoa. 10:41) Na esika atika makambo wana elongola makanisi na ye na mosala, Yoane abatelaki molende na ye na mosala ya Yehova.
Soki biso mpe tozali kosepela na mokumba oyo tozali na yango sikoyo na mosala ya Yehova, tokoki kobatela esengo na biso. Terry, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Nazalaki kotya makanisi na mokumba nyonso bazalaki kopesa ngai.” Nsima ya kokanisa bambula oyo alekisi na mosala ya ntango nyonso, alobi boye: “Nayokaka mawa te, kasi nazali na basuvenire ya malamu.”
Tokoki kokóma na esengo mingi na mosala ya Nzambe soki tozali kokanisa eloko oyo esalaka ete mokumba moko na mosala ya Yehova ezala na motuya mingi. Ezali lokumu monene kozala “bato oyo bazali kosala elongo na Nzambe.” (1 Ko. 3:9) Mwa mbɛki oyo ezali na motuya ekozala kaka kitoko soki tobatelaka yango malamu. Ndenge moko mpe, tokobatela esengo na biso soki tokobi kokanisa lokumu monene oyo tozali na yango ya kosala elongo na Yehova. Tokoboya kokokanisa makambo oyo tozali kosala na oyo basusu bazali kosala. Tokomona te ete mikumba na biso ezali na valɛrɛ te soki bapesi basusu mikumba mosusu.—Gal. 6:4.
KOBÁ KOTYA MAKANISI NA MAKAMBO YA ELIMO
Mbala mosusu Yoane ayebaki ete mosala na ye ekosila, kasi ekoki kozala ete ayebaki te ete ekosila na mbalakaka. (Yoa. 3:30) Na mobu 30 T.B., sanza soki motoba nsima ya kobatisa Yesu, Mokonzi Erode atyaki Yoane na bolɔkɔ. Atako bongo, Yoane asalaki oyo akokaki mpo akoba kopesa litatoli. (Mrk. 6:17-20) Nini ekokaki kosalisa ye abatela esengo atako bomoi na ye ebongwanaki? Akobaki kotya makanisi na makambo ya elimo.
Ntango Yoane azalaki na bolɔkɔ, azwaki nsango ete mosala ya Yesu ezalaki kokende liboso. (Mat. 11:2; Luka 7:18) Yoane azalaki kondima ete Yesu azalaki Masiya, kasi mbala mosusu amitunaki ndenge nini Yesu akokokisa makambo nyonso oyo Makomami elobaki mpo na Masiya. Lokola Masiya asengelaki kozwa bokonzi, mbala mosusu Yesu alingaki kokóma mokonzi mosika te? Yango elingaki kosala ete Yoane abima na bolɔkɔ? Lokola Yoane azalaki na mposa ya koyeba mpenza mokumba ya Yesu, atindaki bayekoli na ye mibale bátuna Yesu motuna oyo: “Yo ozali Moto oyo azali koya to tosengeli nde kozela mosusu?” (Luka 7:19) Ntango bazongaki, na ntembe te, Yoane azalaki koyoka bango na likebi ntango bazalaki komonisa ete Yesu asalaki makamwisi ya kobikisa bato, mpe atindaki bango báyebisa Yoane ete: “Bato oyo bakufá miso bazali komona, batɛngumi bazali kotambola, bato ya maba bazali kopɛtolama mpe bato oyo bakufá matoi bazali koyoka, bakufi bazali kolamuka, [mpe] nsango malamu ezali koyebisama epai ya babola.”—Luka 7:20-22.
Na ntembe te, nsango yango epesaki Yoane makasi. Endimisaki ye ete Yesu azalaki kokokisa bisakweli oyo elobelaki Masiya. Atako Yesu abimisaki Yoane na bolɔkɔ te, Yoane ayebaki ete mosala na ye ezalaki ya mpunda te. Bomoi ebongwanaki, kasi Yoane azalaki na ntina ya kozala na esengo.
Ndenge moko na Yoane, soki tokobi kotya makanisi na makambo ya elimo, tokoyika mpiko, tokozala na esengo mpe na motema molai. (Kol. 1:9-11) Tokoki kosala yango soki tozali kotánga Biblia mpe komanyola yango, mpo ekosalisa biso tóbosana te ete mosala oyo tosalelaka Nzambe ezali na ntina. (1 Ko. 15:58) Sandra alobi boye: “Kotánga mokapo moko ya Biblia mokolo na mokolo esalisi ngai napusana lisusu penepene na Yehova. Esalisaka ngai natya makanisi epai na ye, kasi te epai na ngai moko.” Tokoki mpe kotya makanisi na bansango oyo elobeli ndenge mosala ya Bokonzi ezali kosalema; yango ekoki kosalisa biso tókanisaka kaka te mbongwana oyo esalemi na bomoi na biso, kasi tótya nde makanisi na makambo oyo Yehova azali kosala. Sandra alobi: “Baemisyo ya sanza na sanza ya TV JW® esalisaka biso tómiyoka penepene na ebongiseli ya Nzambe mpe tóbatela esengo na mosala na biso.”
Na boumeli ya mwa ntango oyo Yoane asalaki mosala na ye, azalaki “na elimo mpe na nguya ya Eliya,” mpe Eliya “azalaki moto lokola biso.” (Luka 1:17; Yak. 5:17) Soki tolandi ndakisa na ye ya kozala na botɔndi mpe kokoba kotya makanisi na makambo ya elimo, biso mpe tokoki kobatela esengo na mosala ya Bokonzi, ata soki likambo nini ekómeli biso.