Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala
02-08/09
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | BAEBRE 7-8
“Nganga-nzambe libela na libela lokola Melekisedeke”
Melekisedeke
Mokonzi ya mboka Saleme mpe “nganga-nzambe ya Nzambe Oyo-Aleki-Likoló,” Yehova. (Eb 14:18, 22) Azali nganga-nzambe ya liboso oyo Makomami elobeli; asalaki mosala yango ntango moko boye liboso ya mobu 1933 L.T.B. Lokola Melekisedeke azalaki mokonzi ya Saleme, oyo elimboli “kimya,” ntoma Paulo abengi ye “Mokonzi ya Kimya” mpe na kotalela nkombo na ye, abengami “Mokonzi ya Boyengebene.” (Ebr 7:1, 2) Balobaka ete mboka Saleme nde ezalaki ebandeli ya engumba oyo ekómaki kobengama Yerusaleme, mpe bakɔtisaki nkombo yango na nkombo Yerusaleme, oyo na bantango mosusu ebengamaka mpe “Saleme.”—Nz 76:2.
Nsima ya kolonga Kedolaomere mpe bakonzi mosusu oyo bapesaki ye mabɔkɔ, Abrama (Abrahama) akendaki na lobwaku ya Patatalu ya Shave to “Lobwaku ya Patatalu ya mokonzi.” Kuna, Melekisedeke “abimisaki mampa mpe vinyo” mpe apambolaki Abrahama na maloba oyo: “Abrama apambolama na Nzambe Oyo-Aleki-Likoló, oyo abimisá likoló ná mabele; mpe Nzambe Oyo-Aleki-Likoló apambolama, Ye oyo akabi banyokoli na yo na lobɔkɔ na yo!” Na yango Abrahama apesaki mokonzi yango oyo azalaki mpe nganga-nzambe, “moko ya bandambo zomi ya biloko nyonso,” elingi koloba “biloko ya kitoko” oyo azwaki ntango alongaki etumba oyo abundaki na bakonzi oyo bapesaki Kedolaomere mabɔkɔ.—Eba 14:17-20; Ebr 7:4.
Melekisedeke
Na ndenge nini ‘mikolo ya Melekisedeke ezalaki na ebandeli te mpe bomoi na ye na nsuka te’?
Paulo abimisi likambo moko ya ntina ntango alobi mpo na Melekisedeke ete: “Azali na tata te, na mama te, na molɔngɔ ya bankɔkɔ te, lokola mikolo na ye ezali na ebandeli te mpe bomoi na ye na nsuka te, kasi akómi lokola Mwana ya Nzambe, azali nganga-nzambe seko na seko.” (Ebr 7:3) Ndenge moko na bato mosusu nyonso, Melekisedeke abotamaki mpe akufaki. Kasi, Makomami elobeli nkombo ya tata to ya mama na ye te, elobeli mpe te molɔngɔ ya bankɔkɔ na ye ata mpe ya bakitani na ye; elobeli mpe te ndenge bomoi na ye ebandaki mpe esukaki. Na yango, Melekisedeke abongaki mpenza mpo na komonisa Yesu Kristo, oyo bonganga-nzambe na ye ezali na nsuka te. Lokola esika moko te elobi ete ezalaki na nganga-nzambe moko oyo azalaki liboso ya Melekisedeke mpe na nganga-nzambe mosusu oyo azwaki ebonga yango nsima na ye, ndenge moko mpe ezali na nganga-nzambe monene moko te oyo Kristo azwi esika na ye, mpe Biblia emonisi ete ata moto moko te akokóma nganga-nzambe monene na esika ya Kristo. Lisusu, atako Yesu abotamaki na libota ya Yuda mpe na molɔngɔ ya bakonzi ya libota ya Davidi, azwaki mosala ya bonganga-nzambe mpo na bango te; ezalaki mpe te mpo na libota oyo autaki nde bapesaki ye bonganga-nzambe ná bokonzi. Azwaki mikumba yango mpo na ndai oyo Yehova ye moko alapelaki ye.
Melekisedeke
Lolenge ya bonganga-nzambe ya Kristo. Na esakweli moko oyo elobeli Masiya, Yehova alapaki ndai oyo epai ya “Nkolo” ya Davidi: “Ozali nganga-nzambe mpo na ntango oyo etyami ndelo te lokola Melekisedeke!” (Nz 110:1, 4) Maloba yango ya nzembo, oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo santu, esalisaki Baebre bámona ntina ya kotalela Masiya oyo alakamaki lokola moto oyo akozala mokonzi mpe nganga-nzambe. Na mokanda na ye epai ya Baebre, ntoma Paulo alongolaki ntembe nyonso na likambo etali koyeba ye oyo esakolamaki mpo na ye; elingi koloba “Yesu, oyo akómi Nganga-nzambe monene lokola Melekisedeke libela na libela.”—Ebr 6:20; 5:10; talá KONDIMANA.
Nganga-nzambe monene
Yesu Kristo Nganga-nzambe. Mokanda ya Baebre emonisi ete bandá Yesu Kristo asekwaki mpe azongaki na likoló, azali “nganga-nzambe monene lokola Melekisedeke libela na libela.” (Ebr 6:20; 7:17, 21.) Mpo na komonisa ete bonganga-nzambe ya Kristo eleki oyo ya Arona, mokomi ya Biblia amonisi ete Melekisedeke azalaki mokonzi mpe nganga-nzambe mpo Nzambe nde apesaki ye bibonga yango. Ndenge moko na Melekisedeke, Yesu Kristo, oyo azalaki na libota ya Levi te, kasi nde na libota ya Yuda mpe na molɔngɔ ya Davidi, azwaki ebonga yango te mpo azalaki mokitani ya Arona; kasi Nzambe ye moko nde apesaki ye yango (Ebr 5:10). Longolá kozala mokonzi mpe nganga-nzambe na likoló mpo na elaka oyo ezali na Nzembo 110:4: “Yehova alapi ndai (mpe akoyoka mawa te): ‘Ozali nganga-nzambe mpo na ntango oyo etyami ndelo te lokola Melekisedeke!’”, Kristo azwi mpe bokonzi ya koyangela mpo azali mokitani ya Davidi. Na ndenge yango, akómi mozwi ya libula ya bokonzi oyo elakamaki na kondimana oyo Nzambe asalaki na Davidi (2 Sa 7:11-16). Boye, ndenge moko na Melekisedeke, azwi ebonga ya bokonzi mpe ya bonganga-nzambe.
Likambo mosusu oyo emonisi ete bonganga-nzambe ya Kristo eleki mpenza; ezali ete Levi, oyo azalaki nkɔkɔ ya banganga-nzambe ya Bayuda, apesaki na ndenge moko to mosusu moko ya bandambo zomi epai ya Melekisedeke, mpo azalaki naino na bangei ya Abrahama, mokonzi ya libota ntango apesaki moko ya bandambo zomi epai mokonzi ya Saleme oyo azalaki mpe nganga-nzambe. Lisusu, na ndenge wana nde Melekisedeke apambolaki Levi; kutu mobeko elobi ete moto oyo azali moke apambolami na moto oyo aleki ye. (Ebr 7:4-10) Ntoma amonisi mpe ete Melekisedeke azalaki “na tata te, na mama te, na molɔngɔ ya bankɔkɔ te, lokola mikolo na ye ezali na ebandeli te mpe bomoi na ye na nsuka te, ” azalaki elilingi ya bonganga-nzambe ya seko ya Yesu Kristo, oyo asekwaki mpo na “bomoi moko oyo ekoki te kobebisama.”—Ebr 7:3, 15-17.
Tóluka biloko ya motuya ya elimo
Bambeka oyo Nzambe asepelaki na yango
11 Ntoma Paulo alobaki ete: “Nganga-nzambe monene nyonso atyami mpo na kopesa makabo mpe bambeka.” (Baebre 8:3) Tomoni ete Paulo akaboli biloko oyo nganga-nzambe monene azalaki kopesa na Yisraele ya kala na lolenge mibale: “makabo” mpe “bambeka,” to “mbeka mpo na masumu.” (Baebre 5:1) Mbala mingi, moto apesaka mozalani na ye likabo mpo na komonisa ete alingi ye to asepeli na ye, mpe lisusu mpo na kobatela boninga, mpo moto yango asepela na ye to andima ye. (Ebandeli 32:20; Masese 18:16) Ndenge moko mpe, tokoki koloba ete biloko mingi oyo Mibeko esɛngaki ezalaki “makabo” oyo bazalaki kopesa Nzambe mpo andima bango to asepela na bango. Soki moto abuki Mibeko, esengelaki abongisa likambo na mabe oyo asali, mpe mpo na kosɛnga bolimbisi, bazalaki kopesa “mbeka mpo na masumu.” Na mikanda mitano ya liboso ya Biblia, mingimingi Kobima, Balevi, mpe Mitángo, elobeli makambo mingi etali bambeka mpe makabo ndenge na ndenge. Atako ekoki kozala mpasi mpo tósimba makambo mikemike nyonso wana na motó, kasi ebongi tótalela makambo mosusu ya ntina mpo na bambeka ndenge na ndenge.
Kondimana
Ndenge nini kondimana ya Mibeko ‘esilaki ngala’?
Kasi, tokoki koloba ete kondimana ya Mibeko “esilaki ngala” ntango Nzambe asakolaki na nzela ya Yirimia ete akosala kondimana ya sika. (Yir 31:31-34; Ebr 8:13) Na mobu 33 T.B. kondimana ya Mibeko esilaki ngala na nzela ya liwa ya Kristo likoló ya nzete ya mpasi (Kol 2:14), mpe kondimana ya sika ezwaki esika na yango.—Ebr 7:12; 9:15; Mis 2:1-4.
It-1-F nk. 80 par. 5-7
Kondimana ya sika. Na siɛklɛ ya nsambo L.T.B., Yehova asakolaki na nzela ya mosakoli Yirimia ete akosala kondima ya sika, amonisaki ete ekozala ndenge moko te na kondimana ya Mibeko, oyo ekólo Yisraele ebukaki. (Yir 31:31-34) Na butu ya nsuka liboso ya liwa na ye na mokolo ya 14 Nisana ya mobu 33 T.B., Yesu Kristo abandisaki molulu ya Bilei ya Mpokwa ya Nkolo, alobelaki kondimana ya sika, oyo mbeka na ye ekondimisa yango. (Lk 22:20) Mikolo 50 nsima ya lisekwa na ye to mikolo zomi nsima ya komata na ye epai ya Tata na ye, Yesu asopelaki bayekoli na ye oyo bayanganaki na shambre ya likoló na Yerusaleme elimo santu, oyo azwaki epai ya Yehova.—Mis 2:1-4, 17, 33; 2 Ko 3:6, 8, 9; Ebr 2:3, 4.
Kondimana ya sika esalemi kati na Yehova ná “Yisraele ya Nzambe,” bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpe na bomoko elongo na Kristo, baoyo basali lisangá to nzoto na ye. (Ebr 8:10 ; 12:22-24; Ga 6:15, 16; 3:26-28; Ro 2:28, 29) Makila ya Yesu Kristo oyo esopanaki (mbeka ya bomoi na ye ya moto) endimisaki kondimana ya sika, Yesu amonisaki motuya ya mbeka na ye epai ya Yehova ntango amataki na likoló. (Mt 26:28) Ntango Nzambe aponi moto mpo na kokende na likoló (Ebr 3:1), akɔtisaka moto yango na kondimana na ye na lisalisi ya mbeka ya Kristo. (Nz 50:5; Ebr 9:14, 15, 26) Yesu Kristo azali moyokanisi ya kondimana ya sika (Ebr 8:6; 9:15) mpe momboto ya libosoliboso ya Abrahama. (Ga 3:16) Lokola azali moyokanisi, Yesu asalisaka baoyo bazali na kati ya kondimana ya sika bákóma libota mobimba ya momboto ya solosolo ya Abrahama (Ebr 2:16; Ga 3:29), mpe na nzela ya bolimbisi ya masumu na bango. Yehova atángaka bango bayengebene.—Ro 5:1, 2; 8:33; Ebr 10:16, 17.
Bandeko wana ya Kristo, bakristo oyo batyami mafuta na elimo, bakómaka banganga-nzambe basungi ya Nganga-nzambe Monene, “bonganga-nzambe ya bokonzi.” (1 Pe 2:9; Em 5:9, 10; 20:6) Bazali kosala mosala ya bonganga-nzambe, “mosala mpo na bolamu ya bato nyonso” (Flp 2:17), mpe babengami “basaleli ya kondimana ya sika.” (2 Ko 3:6) Baoyo babengami mpo na kokende likoló basengeli kolanda matambe ya Kristo, na bosembo nyonso, tii na liwa. Na yango, Yehova akosala ete bázala banganga-nzambe mpe bakonzi, bákóma bilimo lokola Nzambe, mpe bálata kozanga kokufa mpe kopɔla lokola bazali bazwi-ya-libula elongo na Kristo kuna na likoló. (1 Pe 2:21; Ro 6:3, 4; 1 Ko 15:53; 1 Pe 1:4; 2 Pe 1:4) Mokano ya kondimana yango ezali ya kobimisa ekólo moko mpo na nkombo ya Yehova lokola eteni ya “momboto” ya Abrahama. (Mis 15:14) Etuluku yango ya bato ekómi “mwasi” ya Kristo, mpe Yesu akɔtisi bango na kondamana mpo na Bokonzi, mpo báyangela elongo na ye. (Yn 3:29; 2 Ko 11:2; Em 21:9; Lk 22:29; Em 1:4-6; 5:9, 10; 20:6) Mpo na mokano na yango, kondimana ya sika esengeli kokoba kosala mosala mpo na mwa ntango tii basangani nyonso ya “Yisraele ya Nzambe” bakosekwa mpe bakozwa bomoi oyo ezangi kokufa na likoló. Soki kaka mokano na yango ekokisami, mapamboli oyo ekomemela bato ekozala ya seko. Yango wana kondimana ya sika ekoki kobengama “kondimana ya seko.”—Ebr 13:20.
09-15/09
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | BAEBRE 9-10
“Elili ya makambo malamu oyo ekoya”
Bolimbisi
Na kotalela Mibeko oyo Nzambe apesaki ekólo Yisraele, moto oyo asaleli Nzambe lisumu to asaleli mozalani na ye lisumu, asengelaki naino kobongisa mabe oyo asali na ndenge oyo mibeko esɛngaki liboso bálimbisa ye mpe mbala mingi yango ezalaki kosɛnga apesa Yehova mbeka ya makila. (Le 5:5–6:7) Na yango, Paulo alobaki boye: “Ɛɛ, biloko pene na nyonso epɛtolamaka na makila na kolanda Mibeko, mpe soki makila esopami te bolimbisi ezali te.” (Ebr 9:22) Kasi ata bongo, makila ya bambeka ya banyama ekokaki te kolongola mpenza masumu to kosala ete moto akóma na lisosoli ya pɛto mpenza. (Ebr 10:1-4; 9:9, 13, 14) Nzokande, kondimana ya sika oyo esakolamaki esalaki ete bato bázwa bolimbisi ya solosolo na nzela ya mbeka ya lisiko ya Yesu Kristo. (Yir 31:33, 34; Mt 26:28; 1 Ko 11:25; Ef 1:7) Ata ntango Yesu azalaki awa na mabele, amonisaki ete azali na nguya ya kolimbisa masumu ntango abikisaki mokatatali moko.—Mt 9:2-7.
“Kobá kolanda ngai”
4 Makomami elobeli te makambo oyo esalemaki ntango Yesu akómaki na likoló, ndenge ayambamaki, mpe esengo oyo ayokaki ya kozala lisusu elongo na Tata na ye. Nzokande, Biblia esilaki komonisa liboso oyo ekosalema mwa moke nsima ya kozonga ya Yesu na likoló. Na boumeli ya bikeke zomi na mitano, Bayuda bazalaki kosala molulu moko mosantu mbula na mbula. Mbala moko na mbula, nganga-nzambe monene azalaki kokɔta na Esika oyo Eleki Bosantu ya tempelo mpo na komwangisa makila ya bambeka oyo esɛngamaki na Mokolo ya Kozipa masumu liboso ya sanduku ya kondimana. Na mokolo yango, nganga-nzambe monene azalaki elilingi ya Masiya. Nsima ya kozonga na ye na likoló, Yesu akokisaki ndimbola ya esakweli ya molulu yango mbala moko mpo na libela. Akɔtaki liboso mpenza ya nkembo ya Yehova na likoló—esika oyo eleki mpenza bosantu na molɔ́ngɔ́ mobimba—mpe alakisaki motuya ya mbeka ya lisiko na ye epai ya Tata na ye. (Baebre 9:11, 12, 24) Yehova andimaki yango?
Kokoka
Mibeko ya Moize ezalaki ya kokoka. Mibeko oyo Nzambe apesaki Bayisraele na nzela ya Moize ezalaki mpe na ebongiseli mosusu oyo etali bonganga-nzambe mpe bambeka ya banyama ndenge na ndenge. Lokola eutaki na Nzambe, ezalaki ya kokoka; ata bongo, ndenge ntoma Paulo amonisaki yango na litambwisi ya elimo ya Nzambe, ezala Mibeko, bonganga-nzambe to bambeka ekómisaki te baoyo bazalaki na nse ya Mibeko, bato ya kokoka. (Ebr 7:11, 19; 10:1) Na esika epesa bato bonsomi na lisumu mpe na liwa, esalaki nde ete lisumu emonana lisusu polele. (Ro 3:20; 7:7-13) Ata bongo, bibongiseli yango nyonso oyo Nzambe azwaki ekokisaki mokano oyo Nzambe atyaki yango; mibeko esalaki lokola “mobateli” mpo na komema bato tii epai ya Kristo, mpe ezalaki mpenza “elili ya makambo malamu oyo ekoya.” (Ga 3:19-25; Ebr 10:1) Na yango, ntango Paulo alobaki ete “mibeko ekokaki te kosala mpo ezalaki na bolɛmbu na nzoto” (Ro 8:3), emonani ete alobaki yango nde mpo nganga-nzambe monene ya Bayuda na mosuni (oyo Mibeko etyaki ye na ebonga yango mpo na kopesaka bambeka mpe oyo azalaki kokɔta na Esika eleki Mosantu na makila ya bambeka na mokolo ya kozipa masumu) azalaki te na likoki ya “kobikisa mpenza” baoyo ye azalaki kosalela, ndenge Baebre 7:11, 18-28 emonisi yango. Atako bambeka oyo Bayisraele bazalaki kopesa na nzela ya banganga-nzambe ya libota ya Arona ezalaki kopesa bango nzela ya kobatela boyokani malamu na Nzambe, lisosoli na bango etikaki te kokundwela bango ete bazali basumuki. Yango nde ntoma Paulo alobeli ntango alobaki ete bambeka ya kozipa masumu ekokaki te “kokómisa baoyo bazali kopusana pene bato ya kokoka;” elingi koloba, na likambo etali lisosoli na bango. (Ebr 10:1-4; talá mpe Ebr 9:9.) Nganga-nzambe monene azalaki na likoki te ya kopesa motuya ya lisiko oyo esengelaki mpo na bolimbisi ya masumu. Kaka mosala ya bonganga-Nzambe ya Kristo oyo ekoumela mpe mbeka na ye oyo ebongi mpenza nde ekokokisa likambo yango.—Ebr 9:14; 10:12-22.
Tóluka biloko ya motuya ya elimo
Mituna ya batángi
Paulo amonisaki ete esɛngaki makila esopana mpo kondimana kati na Nzambe mpe bato endimama. Kondimana ya Mibeko ezali ndakisa moko. Moize azalaki moyokanisi na yango, ye nde asalaki ete kondimana yango ezala kati na Nzambe mpe Bayisraele. Na yango, Moize akokisaki mokumba moko monene mpenza mpe ye nde asololaki na Bayisraele ntango bakɔtaki na kondimana yango. Na ndenge yango, Moize akokaki kotalelama lokola moto oyo asalaki kondimana ya Mibeko oyo eutaki epai ya Yehova. Kasi Moize asengelaki kosopa makila na ye mpo kondimana ya Mibeko ebanda mosala? Te. Makila ya bambeka ya banyama oyo epesamaki nde ezwaki esika ya makila ya Moize.—Baebre 9:18-22.
Bongo mpo na kondimana ya sika kati na Yehova mpe Yisraele ya elimo? Yesu Kristo akokisaki mokumba ya lokumu ya kozala moyokanisi kati na Yehova mpe Yisraele ya elimo. Atako Yehova nde azali mobandisi ya kondimana yango, efandi nde na mabɔkɔ ya Yesu Kristo. Yesu asukaki kaka te na kozala moyokanisi ya kondimana yango, kasi ntango azalaki moto awa na mabele, azalaki elongo na bato ya liboso oyo babengamaki mpo na kokɔta na kondimana yango. (Luka 22:20, 28, 29) Longola yango, akokisaki mpe masɛngami mpo na kopesa mbeka oyo esɛngamaki mpo kondimana yango endimama. Mbeka yango ezalaki ya banyama te, kasi nde ya bomoi ya kokoka. Na yango, Paulo akokaki sikoyo koloba ete Kristo nde moto asalaki kondimana ya sika. Ntango “Kristo akɔtaki . . . na likoló mpenza, mpo amonana sikoyo liboso ya Nzambe mpenza mpo na biso,” kondimana ya sika endimamaki.—Baebre 9:12-14, 24.
Ntango Paulo alobelaki Moize ná Yesu lokola bato oyo basalaki kondimana, alingaki koloba te ete bango nde babandisaki yango mpo Nzambe nde azalaki mobandisi na yango. Kasi, mibali yango mibale bazalaki mpenza bayokanisi ntango kondimana yango esalemaki. Mpe na kondimana yango mokomoko, esɛngaki makila esopana: makila ya banyama na esika ya makila ya Moize, mpe makila oyo Yesu ye moko asopaki ntango apesaki bomoi na ye mpo na baoyo bazali na kati ya kondimana ya sika.
Batisimo
Luka alobi ete Yesu abondelaki na ntango ya batisimo na ye. (Lk 3:21) Mokomi ya mokanda epai ya Baebre alobi ete ntango Yesu Kristo ayaki “na mokili” (elingi koloba te ntango abotamaki mpo azalaki na likoki te ya kotánga to koloba maloba oyo ezali awa na nse, kasi nde ntango akendaki kozwa batisimo mpe abandaki mosala na ye) alobaki, na kotalela Nzembo 40:6-8 (LXX): “Olingaki mbeka ná likabo te, kasi obongiselaki ngai nzoto. . . . Talá! Nayei (ndenge ekomami mpo na ngai na rulo ya buku) kosala mokano na yo, Ee Nzambe.” (Ebr 10:5-9) Yesu abotamaki Moyuda, ekólo oyo esalaki kondimana na Nzambe; elingi koloba kondimana ya Mibeko. (Kob 19:5-8; Ga 4:4) Yango wana, Yesu mpe azalaki na kati ya kondimana yango elongo na Yehova Nzambe ntango akendaki epai ya Yoane mpo na kozwa batisimo. Boye, Yesu asalaki koleka oyo Mibeko esɛngaki ye. Amilakisaki epai ya Tata na ye Yehova mpo na kosala “mokano” na ye: Kopesa nzoto na ye oyo ‘abongiselaki’ ye mpe kosukisa bambeka ya banyama oyo Mibeko esɛngaki bato bápesaka. Ntoma Paulo alobi boye: “Na ‘mokano’ yango biso tosantisami na likabo ya nzoto ya Yesu Kristo mbala moko mpo na libela.” (Ebr 10:10) Mokano ya Tata mpo na Yesu etalelaki mpe mosala na ye na boyokani ná Bokonzi; ezali mpe mpo na likambo yango nde Yesu amilakisaki. (Lk 4:43; 17:20, 21) Yehova atyaki Mwana na ye mafuta na elimo mpe alobaki: “Yo ozali Mwana na ngai ya bolingo; nandimi yo” mpo na komonisa ete andimaki ndenge Yesu ayaki komilakisa epai na ye.—Mr 1:9-11; Lk 3:21-23; Mt 3:13-17.
16-22/09
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | BAEBRE 11
“Kondima ezali na ntina”
Monisá kondima na bilaka ya Yehova
6 Na Baebre 11:1, Biblia emonisi ndimbola ya kondima. (Tángá.) (1) Kondima ezali “ezaleli ya kozela na motema mobimba biloko oyo ozali kolikya kozwa.” Na makambo oyo tozali kolikya kozwa, tokoki kotánga bilaka ya Nzambe mpo na mikolo ezali koya. Na ndakisa, tondimisami ete mabe ekosila mpe mokili ya sika ekozala. (2) Kondima ezali “elembeteli oyo ezali komonisa bosolo ya makambo” to elembo ya kondimisa, ya ‘makambo oyo ezali komonana te.’ Toyebi ete Yehova Nzambe, Yesu Kristo, mpe baanzelu bazali kuna na likoló, atako tokoki komona bango te; ezali mpe bongo mpo na Bokonzi ya Nzambe. (Baebre 11:3) Ndenge nini tokoki komonisa ete tondimaka mpenza bilaka ya Nzambe mpe tondimaka makambo oyo tokoki komona te? Tomonisaka yango na bomoi na biso mpe na makambo oyo tolobaka mpe tosalaka.
“Moto oyo apesaka mbano na baoyo bazali koluka ye na mposa makasi”
Esɛngaka nini mpo na kosepelisa Yehova? Ntoma Paulo akomaki: “Soki moto azali na kondima te akoki kosepelisa [Nzambe] ata moke te.” Simbá ete ntoma Paulo alobi te ete ezali mpasi kosepelisa Nzambe soki ozali na kondima te. Kasi, alobi nde okokoka ata moke te kosepelisa Nzambe soki ozali na kondima te. Na maloba mosusu, kondima ezali na ntina mingi mpo na kosepelisa Nzambe.
Yehova asepelaka na kondima ya ndenge nini? Kondimela Nzambe esɛngaka makambo mibale. Ya liboso, ‘tosengeli kondima ete ye azali.’ Ndenge nini tokoki kosepelisa Nzambe soki tozali kondima te ete azali mpenza? Kondima ya solo esɛngaka makambo mingi, mpo ata bademo mpe bandimaka ete Yehova azali. (Yakobo 2:19) Kondima ete Nzambe azali esengeli kotinda biso tómonisa yango na misala, elingi koloba, kozala na bomoi oyo esepelisaka ye.—Yakobo 2:20, 26.
Ya mibale, ‘tosengeli kondima ete’ Nzambe azali “moto oyo apesaka mbano.” Moto oyo azali na kondima ya solosolo ayebaka mpenza ete milende oyo azali kosala mpo na kosepelisa Nzambe ezali mpamba te. (1 Bakorinti 15:58) Ndenge nini tokoki kosepelisa Yehova soki tozali kondima te ete azali na likoki to na mposa ya kopesa biso mbano? (Yakobo 1:17; 1 Petro 5:7) Moto oyo alobi ete Nzambe azali mafumafu, azalaka na botɔndi te mpe akabaka te, ayebi Nzambe oyo Biblia elobeli te.
Yehova apesaka banani mbano? Ntoma Paulo alobi: “Baoyo bazali koluka ye na mposa makasi.” Buku moko ya babongoli ya Biblia emonisi ete maloba ya Grɛki oyo ebongolami na “koluka na mposa makasi” elimboli kosala milende mpo na kosambela Nzambe, kasi kaka te koluka ye to koyekola makambo na ye. Buku mosusu elobi ete verbe wana ya Grɛki ezali na likanisi ya kotinda moto asala milende mpenza to kotya makanisi nyonso na likambo moko. Ya solo, Yehova apesaka mbano na baoyo kondima na bango etindaka bango basambela ye na motema na bango mobimba, na bolingo na bango mpe na molende.—Matai 22:37.
Kómisá kondima na yo makasi na biloko oyo ozali kolikya kozwa
10 Na mokanda ya Baebre mokapo 11, ntoma Paulo alobaki: “Basi bazwaki bakufi na bango na lisekwa; kasi bato mosusu banyokwamaki makasi mpo bandimaki te kosikolama na nzela ya lisiko moko boye, mpo bázwa lisekwa moko oyo eleki malamu.” (Baebre 11:35) Bato mingi bayikaki mpiko na komekama mpe batikalaki sembo epai ya Nzambe mpo bazalaki na kondima makasi na lisekwa oyo Nzambe alakaki. Bayebaki ete na mikolo ezali koya, Yehova akozongisa bango na bomoi mpe bakozala na bomoi ya seko awa na mabele. Tózwa ndakisa ya Nabote mpe Zekaria. Babambaki bango mabanga mpe bakufaki mpo bazalaki kotosa Nzambe. (1 Bakonzi 21:3, 15; 2 Ntango 24:20, 21) Babwakaki Danyele na libulu ya bankɔsi oyo ezalaki na nzala, mpe babwakaki baninga na ye na mɔtɔ oyo ezalaki kopela. Bandimaki kokufa na esika ya koboya kotosa Yehova. Mibali wana bazalaki na kondima makasi epai ya Yehova ete akopesa bango elimo santu na ye mpe akosalisa bango bálonga minyoko wana.—Danyele 3:16-18, 20, 28; 6:13, 16, 21-23; Baebre 11:33, 34.
11 Basakoli mingi, lokola Mikaya mpe Yirimia batyolamaki mpe bakangamaki na bolɔkɔ. Basusu, lokola Eliya, “bazalaki kotelengana na bisobe mpe na bangomba mpe na mibenga mpe na mabulu ya mabele.” Bango nyonso bayikaki mpiko na mikakatano mpe batikalaki sembo epai ya Nzambe mpo bazalaki ‘kozela na motema mobimba biloko oyo bazalaki kolikya kozwa.’—Baebre 11:1, 36-38; 1 Bakonzi 18:13; 22:24-27; Yirimia 20:1, 2; 28:10, 11; 32:2.
Tóluka biloko ya motuya ya elimo
Kondima
Bandakisa ya kondima na ntango ya kala. Bato nyonso oyo bazali na kati ya “lipata monene boye ya batatoli” oyo Paulo alobeli (Ebr 12:1) bazalaki na bantina mpenza ya kozala na kondima. Na ndakisa, Abele ayebaki mpenza elaka ya Nzambe oyo etali “momboto” oyo ekopanza motó ya “nyoka.” Amonaki mpe makambo oyo endimisaki mpenza ete etumbu oyo Yehova akatelaki baboti na ye na Edene ekokisamaki. Na libándá ya Edene, Adama ná libota na ye bazalaki kolya limpa na motoki ya elongi na bango mpo mabele elakelamaki mabe, yango wana ezalaki kobimisa banzubɛ mpe matiti ya nsendensende. Ekoki mpe kozala ete Abele amonaki ndenge mposa ya Eva ezalaki epai ya mobali na ye mpe ndenge Adama azalaki na bokonzi likoló ya Eva. Na ntembe te, azalaki koyoka ndenge mama na ye azalaki kolobela bampasi oyo azalaki koyoka na bazemi. Longola yango, ekɔtelo ya elanga ya Edene ezalaki kobatelama na bakeruba mpe na mopanga oyo mɔtɔ ezalaki kopela na ebende na yango. (Eb 3:14-19, 24) Makambo wana nyonso ezalaki “elembeteli oyo ezali komonisa bosolo ya makambo,” mpe endimisaki Abele ete kosikolama ekoya na nzela ya ‘momboto oyo alakamaki.’ Yango wana, na kondima “apesaki Nzambe mbeka” oyo elekaki ya Kaina na motuya monene.—Ebr 11:1, 4.
“Asepelisaki mpenza Nzambe”
Kasi na ndenge nini Enoka “amemamaki” mpo “amona liwa te”? Ekoki kozala ete Yehova asalaki ete akufa na pɛtɛɛ nyonso mpo ayoka ata mpasi moko te ya liwa. Kasi liboso na yango, Enoka azwaki “litatoli ete asepelisaki mpenza Nzambe.” Na ndenge nini? Ekoki kozala ete liboso akufa, Nzambe alakisaki ye paradiso awa na mabele na emonaneli. Nsima ya komona elembo wana oyo emonisaki ete Nzambe andimi ye, Enoka alalaki mpɔngi ya liwa. Ntango ntoma Paulo akomaki na ntina etali Enoka mpe mibali ná basi mosusu ya sembo, alobaki boye: “Bango nyonso bakufaki na kati ya kondima.” (Baebre 11:13) Ekoki kozala ete na nsima, banguna na ye balukaki nzoto na ye kasi “amonanaki ata esika moko te,” ekoki kozala mpo Yehova abombaki yango mpo básambwisa yango te to básalela yango te na losambo ya lokuta.
23-29/09
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | BAEBRE 12-13
“Disiplini emonisaka bolingo ya Yehova”
Tótala te “biloko oyo ezali na nsima”
18 Disiplini oyo eyokisaki biso mpasi. Tosengeli kosala nini soki tobandi kokanisa disiplini oyo tozwaki, oyo esalaki biso mpasi na motema? Yango ekoki kotungisa biso, kasi mpe ‘kolɛmbisa biso nzoto.’ (Ebr. 12:5) Disiplini ekosalisa biso te mpe ekobongisa biso te soki tozali “kotyola” yango, elingi koloba koboya yango to soki tozali “kolɛmba nzoto” elingi koloba kondima disiplini, kasi na nsima koboya kosalela yango. Eleki malamu tólanda toli ya Salomo oyo elobi boye: “Simbá disiplini; kotika yango te. Batelá yango, mpo yango nde bomoi na yo.” (Mas. 4:13) Lokola sofɛlɛ oyo azali kotosa bilembo oyo azali komona na nzela, tóndima disiplini, tósalela yango, mpe tókoba kokende liboso.—Mas. 4:26, 27; tángá Baebre 12:12, 13.
“Ntango bozali kobondela, bóloba: ‘Tata’”
Tata oyo alingaka bana na ye apesaka bango disiplini mpo alingaka ete ntango bakokola, bázala malamu. (Baefese 6:4) Tata ya ndenge wana akangaka miso te na mabe ya bana, kasi apesaka bango disiplini oyo eleki ndelo te. Ndenge moko mpe na ntango mosusu, Tata na biso ya likoló akoki komona malamu apesa biso disiplini. Kasi, ntango nyonso Nzambe apesaka biso disiplini na bolingo mpe kozanga kolekisa ndelo. Ndenge moko na Tata na ye, Yesu azalaki makambo makasi te, ata ntango bayekoli na ye basalelaki toli na ye te.—Matai 20:20-28; Luka 22:24-30.
‘Yoká disiplini mpe kómá na bwanya’
18 Disiplini ekoki kosala mpasi, kasi koboya disiplini ya Nzambe ezali likambo oyo eleki mpasi. (Baebre 12:11) Tótalela ndakisa ya Kaina mpe ya Mokonzi Zidikiya. Ntango Kaina akómaki koyina ndeko na ye Abele mpe koluka koboma ye, Nzambe apesaki ye likebisi oyo: “Mpo na nini oyoki nkanda makasi mpe mpo na nini elongi na yo ekangami? Soki obandi kosala makambo ya malamu, okondimama te? Kasi soki osali makambo ya malamu te, lisumu ebatami na monɔkɔ ya ndako na yo, mpe ezali na mposa ya kokanga yo; mpe yo, okokoka kolonga yango?” (Ebandeli 4:6, 7) Kaina ayokaki te mpe abomaki ndeko na ye. Kaina abukaki mbuma mabe ya likambo wana bomoi ye mobimba. (Ebandeli 4:11, 12) Soki andimaki mpasi ya disiplini ya Nzambe, alingaki kobebisa bomoi na ye ndenge wana te.
Makambo nini emonisi ete Yehova alingaka biso?
13 Yehova atambwisaka mpe apesaka biso disiplini mpo alingaka biso. Asukaka kaka te na kosembola biso soki esengeli, kasi apesaka biso mpe formasyo. (Baebre 12:6) Na Biblia, totángaka masolo ya basaleli ya sembo oyo Yehova abongisaki mpo bákóma bato oyo babongi. Na ndakisa, Yozefe, Moize mpe Davidi bakutanaki na mikakatano ya makasi mpenza. Na ntango wana ya mpasi, Yehova azalaki ná bango. Mpe makambo oyo bamonaki na ntango wana ya mpasi esalisaki bango ntango Yehova apesaki bango mikumba minene. Ntango tozali kotánga na Biblia ndenge Yehova asungaka mpe abongisaka bato na ye, tomonaka ete Yehova alingaka mpenza biso.—Tángá Masese 3:11, 12.
Disiplini
Makambo mosusu oyo Yehova akoki kotika nzela ete ekómela basaleli na ye lokola minyoko ekoki kosalisa mpo na kopesa bango disiplini to formasyo, oyo na nsima ekoki kobota mbuma malamu ya boyengebene, mbuma oyo bakosepela na yango na kimya nyonso soki komekama yango eleki. (Ebr 12:4-11) Ata Mwana ya Nzambe mpe azwaki formasyo na minyoko oyo Tata na ye atikaki nzela ete ekómela ye mpo azala nganga-Nzambe monene ya motema mawa mpe oyo ayebi komitya na esika ya basusu.—Ebr 4:15.
Tóluka biloko ya motuya ya elimo
Tópota mbangu na mpiko
11 ‘Lipata monene ya batatoli,’ elingi koloba bato oyo basalelaki Nzambe liboso Kristo aya awa na mabele, bazalaki batali mpamba te. Bango moko mpe bazalaki bapoti-mbangu mpe balongaki na ndenge batikalaki sembo epai ya Yehova tii na nsuka ya bomoi na bango. Ndakisa na bango ekokaki kolendisa basusu bákoba kopota na momekano ya mbangu. Soki tozali kopota na momekano ya mbangu mpe toyebi ete bapoti-mbangu minene bazali kotala biso mpe kolendisa biso, yango ekolendisa biso tósala nyonso oyo tokoki mpo tókoma tii na nsuka. Ndenge moko mpe, bakristo wana Baebre basengelaki kokanisa bandakisa ya basaleli ya Yehova ya ntango ya kala. Ndakisa ya bato yango ekokaki kolendisa bango mpe kosalisa bango báyeba ete bakoki ‘koyika mpiko ntango bazali kopota mbangu’ mpe kokóma na nsuka. Ezali mpe ndenge moko mpo na biso.
Tópesa bambeka oyo ekosepelisa Yehova
10 Na yango, Baebre basengelaki koboya ‘komemama na mateya ya ndenge na ndenge mpe ya bopaya’ ya baoyo bazalaki kolongisa bonkɔkɔ ya Bayuda. (Bagalatia 5:1-6) Ezali na mateya ya ndenge wana te, kasi nde ‘na boboto monene ya Nzambe nde motema ekolendisama’ mpe ekopikama na solo. Emonani ete basusu bazalaki koswana mpo na bilei mpe bambeka mpo Paulo alobi ete motema elendisamaka te ‘na bilei oyo baoyo bazali komipesa na yango bazwi litomba te.’ Kokangama na Nzambe mpe komonisa botɔndi na mbeka ya lisiko nde ememelaka moto matomba na elimo kasi te na likambo etali kolya bilei to kotosa mokolo moko boye. (Baroma 14:5-9) Lisusu, mbeka ya Kristo esalaki ete bambeka oyo Balevi bazalaki kopesa ezala lisusu na ntina te.—Baebre 9:9-14; 10:5-10.
30/09–06/10
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | YAKOBO 1-2
“Nzela oyo ezali komema na lisumu mpe liwa”
Komekama
Moto amekamaka ntango azali kobendama na eloko moko, mingimingi eloko ya mabe. Tózwa ndakisa: ntango ozali kosomba biloko, omoni eloko moko oyo osepeli na yango. Likanisi eyeli yo na motema ete okoki koyiba eloko yango mpe bakokanga yo te. Kasi, lisosoli na yo epekisi yo osala bongo! Na yango, obengani likanisi yango mpe olongwe esika yango. Na ntango wana, komekama esili mpe olongi yango.
OYO BIBLIA ELOBI
Soki omekami, yango emonisi te ete ozali moto mabe. Biblia emonisi ete biso nyonso tokutanaka na komekama. (1 Bakorinti 10:13) Likambo eleki ntina, ezali ndenge oyo tosalaka ntango tomekami. Bato mosusu batikaka ete bamposa ya mabe eumela na mitema na bango mpe nsukansuka bakokisaka yango. Basusu babenganaka nokinoki bamposa ya mabe.
“Moto na moto amekamaka nde na mposa na ye moko oyo ezali komema ye mpe kobenda ye.”—Yakobo 1:14.
Komekama
Biblia emonisi makambo oyo esalemaka liboso ete moto akwea na lisumu. Yakobo 1:15 elobi: “Na nsima mposa [mabe] wana, ntango ekoli [to ezwi zemi], eboti lisumu.” Na maloba mosusu, soki totiki mposa mabe eumela na motema na biso, yango ezali lokola mwasi oyo azali na zemi, oyo nsukansuka akobota. Kasi, tokoki koboya kozala baombo ya bamposa ya mabe. Tokoki kolonga yango.
Tóluka biloko ya motuya ya elimo
Pole
Yehova azali “Tata ya miinda ya likoló.” (Yk 1:17) Azali kaka te “Mopesi ya moi mpo na pole na ntango ya moi, mibeko ya sanza mpe ya minzoto na ntango ya butu,” (Yir 31:35) kasi azali mpe eutelo ya bingɛngiseli nyonso ya elimo. (2 Ko 4:6) Mibeko, bikateli na ye ya lisambisi mpe maloba na ye ezali pole epai ya baoyo batikaka yango etambwisa bango. (Nz 43:3; 119:105; Mas 6:23; Yis 51:4) Mokomi ya nzembo alobaki: “Na pole oyo ezali kouta epai na yo, tokoki komona pole.” (Nz 36:9; talá mpe Nz 27:1; 43:3.) Kaka ndenge kongɛnga ya moi ekobaka koya makasi kobanda ntɔngɔ tii “moi ekokóma makasi,” nzela ya moyengebene mpe, oyo engɛngisamaka na bwanya oyo euti na Nzambe, ekobaka kongɛnga se kongɛnga. (Mas 4:18) Kotambola na pole ya Yehova elimboli kolanda banzela na ye. (Yis 2:3-5) Kasi, soki moto azali kotalela eloko moko na ndenge ya mbindo to na makanisi ya mabe, azali na molili makasi na elimo. Yesu alobeli yango boye: “Soki liso na yo ezali mabe, nzoto na yo mobimba ekozala molili. Soki ya solo mpenza pole oyo ezali na kati na yo ezali molili, molili yango ezali makasi mpenza!”—Mt 6:23; talá mpe Mib 15:9; 28:54-57; Mas 28:22; 2 Pe 2:14.
Mibeko
“Mobeko ya mokonzi.” Kaka ndenge mokonzi azalaka na lokumu mpe na ntina mingi koleka bato oyo ye azali koyangela “Mobeko ya mokonzi” mpe eleki mibeko mosusu na lokumu mpe na ntina. (Yk 2:8) Bolingo nde esimbaki kondimana ya Mibeko; mpe “osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko” (mobeko ya mokonzi) ezalaki mobeko ya mibale oyo esimbaki mibeko nyonso mpe basakoli. (Mt 22:37-40) Atako bakristo bazali na nse ya kondimana ya Mibeko te, bazali na nse ya mobeko ya Mokonzi Yehova mpe ya Mwana na ye, Mokonzi Yesu Kristo na boyokani na kondimana ya sika.