Motema pɛtɛɛ—Ezali na ntina nini mpo na biso?
Saraa alobi boye: “Nazalaka moto ya nsɔninsɔni mpe nakokaka komityela motema te. Nabangaka soki nazali elongo na bato ya nkandankanda, mpe ya mwa kobangisa. Kasi namiyokaka malamu soki nazali elongo na moto ya komikitisa mpe ya motema pɛtɛɛ. Nakoki koyebisa moto ya ndenge wana ndenge oyo nazali komiyoka mpe makambo oyo ezali kotungisa ngai. Bato ya ndenge wana nde baninga na ngai ya motema.”
Maloba ya Sara emonisi ete soki tozali na motema pɛtɛɛ, bato mosusu bakosepela kozala baninga na biso. Ezaleli ya motema pɛtɛɛ esepelisaka mpe Yehova. Liloba na ye elendisi biso ete: ‘Tólata motema pɛtɛɛ.’ (Kol. 3:12) Motema pɛtɛɛ ezali nini? Ndenge nini Yesu amonisaki ezaleli yango? Mpe ndenge nini ezaleli yango ekoki kosala ete tózala na bomoi ya esengo?
MOTEMA PƐTƐƐ EZALI NINI?
Motema pɛtɛɛ ezali ezaleli ya moto oyo atyaka kimya. Moto oyo azali na motema pɛtɛɛ asalelaka bato makambo na boboto mpe afandaka kimya ntango basusu basaleli ye makambo oyo ekoki kosilikisa ye.
Ezaleli ya motema pɛtɛɛ ezali bolɛmbu te. Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “motema pɛtɛɛ” ezalaki kosalelama mpo na kolobela mpunda ya zamba oyo bazalaki kobɔkɔla na mboka. Mpunda yango ezalaki kaka makasi, kasi bazalaki koteya yango ndenge ya malamu ya kosalela makasi na yango. Ndenge moko mpe, soki tomonisi ezaleli ya motema pɛtɛɛ, tokozala na bokonzi likoló ya ezaleli na biso ya kozanga kokoka mpe tokofanda na kimya elongo na basusu.
Tokoki kokanisa boye: ‘Nabotamá na ezaleli ya motema pɛtɛɛ te.’ Tozali na mokili oyo bato mingi bazalaka bato ya nkanda mpe bazangi motema molai, yango wana ekoki kozala mpasi tómonisa ezaleli ya motema pɛtɛɛ. (Rom. 7:19) Ya solo, esɛngaka milende mingi mpo na komonisa ezaleli yango, kasi elimo santu ya Yehova ekoki kosalisa biso tókolisa ezaleli yango. (Ga. 5:22, 23) Mpo na nini tosengeli kosala makasi tólona ezaleli ya motema pɛtɛɛ?
Motema pɛtɛɛ ebendaka basusu epai na biso. Ndenge Sara oyo touti kolobela amonisi yango, biso nyonso tosepelaka kozala elongo na bato ya motema pɛtɛɛ. Yesu azali ndakisa eleki monene na likambo etali komonisa boboto mpe motema pɛtɛɛ. (2 Ko. 10:1) Ata bana oyo bayebaki ye te, bazalaki kosepela kozala elongo na ye.—Mrk. 10:13-16.
Motema pɛtɛɛ ebatelaka biso mpe bato oyo tofandaka na bango. Soki tozali na ezaleli ya motema pɛtɛɛ, tokosilika nokinoki te. (Mas. 16:32) Tokoyoka te ete tomemi ngambo mpo tosalaki likambo moko oyo epesaki moto mosusu mpasi, mingimingi soki ezali moto oyo tolingaka. Mpe bato oyo tofandaka na bango bakosepela mpo tokosala te makambo oyo ekopesa bango mpasi na motema.
NDAKISA YA KOKOKA NA LIKAMBO ETALI MOTEMA PƐTƐƐ
Atako azalaki na mikumba minene mpe makambo mingi ya kosala, Yesu amoniselaki bato nyonso motema pɛtɛɛ. Bato mingi na ntango na ye bazalaki komona mpasi mpe kokumba mikumba, na yango bazalaki na mposa ya kopema. Bazwaki libɔndisi ntango Yesu alobaki na bango: “Bóya epai na ngai, . . . mpo ngai nazali na ezaleli ya boboto mpe na komikitisa na motema”!—Mat. 11:28, 29.
Ndenge nini tokoki kokóma na ezaleli ya motema pɛtɛɛ lokola Yesu? Tosengeli koyekola Liloba ya Nzambe mpo na koyeba ndenge oyo Yesu azalaki kosalela bato makambo mpe oyo asalaki ntango akutanaki na makambo ya mpasi. Na yango, ntango tokutani na makambo oyo emeki ezaleli na biso ya motema pɛtɛɛ, tokosala makasi tólanda ndakisa ya Yesu. (1 Pe. 2:21) Tólobela makambo misato oyo esalisaki Yesu amonisa motema pɛtɛɛ.
Yesu azalaki na komikitisa na motema. Alobaki ete azali na “ezaleli ya boboto mpe na komikitisa na motema.” (Mat. 11:29) Biblia elobeli bizaleli yango nzela moko mpamba te motema pɛtɛɛ ekangani na ezaleli ya komikitisa. (Ef. 4:1-3) Mpo na nini?
Komikitisa esalisaka biso tómimona te ete tozali na ntina mingi. Yesu asalaki nini ntango bafundaki ye ete “amipesá na kolunda” mpe na “komɛla vinyo”? Lolenge ya bomoi na ye emonisaki ete makambo oyo bafundaki ye ezalaki solo te, mpe na komikitisa nyonso alobaki: “Bwanya ya moto emonanaka na makambo ya boyengebene oyo asalaka.”—Mat. 11:19.
Soki moto moko alobi mabe mpo na loposo na yo, na ndenge ozali mwasi to mobali, to mpo na esika oyo outá, ekozala malamu osalela ye makambo na komikitisa. Nkulutu moko na nkombo Peter oyo afandaka na Afrique du Sud alobi boye: “Ntango moto moko alobi likambo oyo esilikisi ngai, namitunaka boye, ‘soki ezalaka Yesu, alingaki kosala nini na likambo ya boye?’” Abakisi: “Nasalaka makasi naboya kosilika.”
Yesu ayebaki bolɛmbu ya bato. Bayekoli ya Yesu bazalaki na mposa ya kosala makambo ya malamu, kasi na bantango mosusu, ezaleli ya kozanga kokoka ezalaki kopekisa bango kosala bongo. Na ndakisa, na butu ya nsuka liboso abomama, Yesu asɛngaki Petro, Yakobo mpe Yoane básɛnzɛla, kasi basalaki yango te. Yesu alobaki ete: “Ya solo, elimo ezali na molende, kasi nzoto ezali na bolɛmbu.” (Mat. 26:40, 41) Lokola Yesu ayebaki ete bayekoli na ye bazali bato ya kozanga kokoka, asilikelaki bango te.
Ndeko mwasi moko na nkombo Mandy amesanaki koloba mabe mpo na basusu, kasi sikoyo, asalaka makasi amekola ezaleli ya motema pɛtɛɛ ya Yesu. Alobi boye: “Nasalaka makasi nabosana te ete biso nyonso tozali bato ya kozanga kokoka, mpe lokola Yehova, nasalaka makasi natya makanisi na bizaleli ya malamu ya basusu.” Lolenge oyo Yesu azalaki kotalela bolɛmbu ya bato, ekotinda yo mpe omonisa motema pɛtɛɛ?
Yesu atyelaki Nzambe motema. Ntango azalaki awa na mabele, Yesu ayikaki mpiko na makambo ya kozanga bosembo. Bato mosusu bakangaki ntina te ya makambo na ye, bayinaki ye mpe banyokolaki ye. Atako bongo, azalaki kaka komonisa ezaleli ya boboto mpo “azalaki ntango nyonso komitika na mabɔkɔ ya moto oyo asambisaka na bosembo.” (1 Pe. 2:23) Yesu ayebaki ete Tata na ye ya likoló akosalisa ye ayika mpiko mpe akopesa etumbu na bato oyo bazalaki kosalela ye makambo ya mabe.
Soki basaleli biso makambo ya kozanga bosembo, mpe totiki nkanda etinda biso tósala makambo ya mabe, tokobebisa nde makambo. Yango wana Biblia eyebisi biso ete: “Nkanda ya moto esalaka makambo ya boyengebene ya Nzambe te.” (Yk 1:20) Atako tokoki kozala na ntina ya kosilika, kozanga kokoka ekoki kotinda biso tósala makambo na ndenge oyo ebongi te.
Cathy, ndeko mwasi moko na Allemagne azalaki kokanisa ete, ‘soki yo moko omilongisi te, moto moko te akolongisa yo.’ Kasi ntango ayekolaki kotyela Yehova motema, abongolaki makanisi na ye. Alobi boye: “Sikoyo nalukaka ntango nyonso komilongisa te. Nakoki kosalela bato makambo na boboto mpo nayebi ete Yehova akobongisa makambo mabe nyonso na mokili.” Soki okutaná na makambo ya kozanga bosembo, kotyela Nzambe motema lokola Yesu ekosalisa yo obatela ezaleli ya motema pɛtɛɛ.
“ESENGO NA BATO YA EZALELI YA BOBOTO”
Yesu alobaki ete mpo na kozala na esengo tosengeli komonisa ezaleli ya boboto. Alobaki: “Esengo na bato ya ezaleli ya boboto.” (Mat. 5:5) Talá ndenge ezaleli yango ekoki kosalisa na makambo oyo elandi.
Ezaleli ya boboto ekitisaka matata na libala. Robert, ndeko mobali moko ya Australie alobi boye: “Nazalaki koloba na mwasi na ngai maloba mabe oyo ngai moko kutu nazalaki koyeba te.” Abakisi boye: “Soki obimisi maloba mabe, okoki kobongola yango te. Namiyokaka mabe ndenge nazalaki koyokisa mwasi na ngai motema mpasi.”
Biblia elobi ete, “biso nyonso tobɛtaka mabaku mbala mingi” na maloba, mpe makambo oyo tolobi kozanga kokanisa ekoki kobimisa matata na libala. (Yk 3:2) Na bantango ya boye, ezaleli ya boboto ekoki kosalisa biso tófanda kimya mpe tóbatela lolemo na biso.—Mas. 17:27.
Robert asalaki makasi akolisa ezaleli ya kimya mpe ya komipekisa. Yango ebotaki mbuma nini? Alobi boye: “Lelo oyo, soki matata ebimi kati na ngai ná mwasi na ngai, nasalaka makasi nayoka ye na likebi, naloba na boboto, mpe nasalaka makasi nasilika te. Sikoyo tozali na boyokani ya malamu na libala na biso.”
Ezaleli ya boboto esalisaka biso tóyokana malamu na basusu. Bato oyo basilikaka noki, bazalaka na baninga mingi te. Kasi ezaleli ya boboto esalisaka biso mpo na “kobatela . . . ekanganeli ya kimya oyo esangisaka.” (Ef. 4:2, 3) Cathy, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Ezaleli ya boboto esalisaka ngai nafanda malamu na bato, atako koyokana na basusu ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te.”
Ezaleli ya boboto epesaka kimya ya motema. Biblia emonisi ete, “bwanya oyo euti na likoló” ná ezaleli ya boboto mpe kimya ezali na boyokani. (Yk 3:13, 17) Moto oyo azalaka na boboto azalaka na “motema ya kimya.” (Mas. 14:30) Martin, oyo asalaki makasi akolisa ezaleli ya boboto, alobi boye: “Lokola natingamaka ntango nyonso te ete makambo esalema kaka ndenge oyo ngai nalingi, nazali na kimya ya motema mpe esengo.”
Ya solo, ekoki kozala mpasi tókolisa ezaleli ya boboto. Ndeko mobali moko alobi boye: “Mpo na koloba solo, ata tii lelo oyo, nayokaka nkanda makasi na bantango mosusu.” Kasi lokola Yehova alendisi biso tókolisa ezaleli ya boboto, akosalisa biso tólonga mokakatano yango. (Yis. 41:10; 1 Ti 6:11) Akoki ‘kosilisa kobongisa biso’; akoki ‘kokómisa biso makasi.’ (1 Pe. 5:10) Nsukansuka, lokola ntoma Paulo, tokoki komekola “motema pɛtɛɛ mpe boboto ya Kristo.”—2 Ko. 10:1.
a Topesi bango bankombo mosusu.